Tózala na mpiko lokola Yilimia
“Tyá elikya epai ya Yehova, zalá na mpiko mpe tiká ete motema na yo ezala makasi. Ɛɛ, tyá elikya epai ya Yehova.”—NZEMBO 27:14, NW.
1. Likambo nini ya malamu mingi Batatoli ya Yehova bazali na yango?
BATATOLI YA YEHOVA bazali na kati ya paladiso ya elimo. (Yisaya 11:6-9) Na kati ya mokili oyo ezangi kimya, bazali na kimya na Yehova Nzambe mpe na baninga na bango baklisto. (Nzembo 29:11; Yisaya 54:13) Lisusu, paladiso yango ya elimo ezali se kokola. Bato nyonso oyo bazali ‘kosala mokano ya Nzambe na molimo mobimba’ bazali kopesa mabɔkɔ mpo paladiso yango ekóma monene. (Baefese 6:6) Na ndenge nini? Na ndenge bazali kotosa mibeko ya Biblia mpe bazali koteya bato mosusu bátosa yango; na bongo, bazali kobenga bango báya mpe kosepela na makambo malamu ya paladiso yango.—Matai 28:19, 20; Yoane 15:8.
2, 3. Makambo nini baklisto ya solo basengeli koyikela mpiko?
2 Nzokande, atako tozali na paladiso ya elimo, yango elingi koloba te ete tokutanaka na mikakatano te. Tozali kaka bato ya kozanga kokoka, tobɛlaka, tonunaka, mpe nsukansuka tokufaka. Lisusu, tozali komona na miso ndenge bisakweli oyo elobelaki “mikolo ya nsuka” ezali kokokisama. (2 Timote 3:1) Bato nyonso, ata mpe Batatoli ya Yehova bazali konyokwama mpo na bitumba, kobomana, maladi, nzala, mpe mikakatano mosusu ya makasi.—Malako 13:3-10; Luka 21:10, 11.
3 Longola nyonso wana, toyebi ete bato oyo bazali na paladiso yango ya elimo te bazali kotɛmɛla biso makasi. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Lokola bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na kati ya mokili, yango wana mokili ezali koyina bino. Bóbosana te liloba oyo nalobaki na bino ete, Moombo aleki nkolo na ye te. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoane 15:18-21) Ata lelo oyo mpe tozali konyokwama. Bato mingi bakangaka ntina te oyo tomipesi na losambo ya Yehova to mpe bamonaka ete ezali kolekisa ntango mpamba. Bamosusu balobaka mabe mpo na biso, basɛkaka biso, to mpe, ndenge kaka Yesu asakolaki, bayinaka biso. (Matai 10:22) Bato mingi bakoselaka biso makambo na bazulunalo, na radio, mpe na televizyo. (Nzembo 109:1-3) Ya solo, biso nyonso tozali kokutana na mikakatano, mpe yango ekoki kolɛmbisa bamosusu kati na biso. Ndenge nini tokoki koyika mpiko?
4. Tolukaka lisalisi epai ya nani mpo tókoka koyika mpiko?
4 Yehova akosalisa biso. Na nguya ya elimo santu, mokomi ya nzembo akomaki ete: “Moyengebene azali na makambo mingi ya mpasi nde [Yehova] akobikisa ye kati na yango nyonso.” (Nzembo 34:19; 1 Bakolinti 10:13) Bandeko mingi bakoki kotatola ete soki totyeli Yehova motema mobimba, apesaka biso makasi ya koyikela ata mokakatano ya ndenge nini mpiko. Bolingo na biso mpo na ye mpe esengo oyo alaki biso esalisaka biso tólonga ezaleli ya kolɛmba nzoto mpe ya kobanga. (Baebele 12:2) Yango wana, ata soki tokutani na mikakatano, tozongaka nsima te.
Liloba ya Nzambe elendisaki Yilimia
5, 6. (a) Tángá mwa basambeli ya solo oyo bayikaki mpiko. (b) Yilimia ayokaki ndenge nini ntango Yehova aponaki ye azala mosakoli?
5 Banda kala, basaleli ya sembo ya Yehova bazalaki kaka na esengo ata ntango bazalaki kokutana na mikakatano. Bamosusu bazalaki na bomoi na bileko oyo Yehova apesaki bato mabe etumbu. Na kati ya basaleli ya sembo ya Nzambe tokoki kotánga Yilimia ná mwa bato mosusu ya ntango na ye, bakisa mpe baklisto ya ekeke ya liboso. Masolo ya bato wana ya kala ekomami na Biblia mpo na kolendisa biso, mpe tokoki kozwa mateya mingi soki toyekoli yango. (Baloma 15:4) Na ndakisa, tótalela lisolo ya Yilimia.
6 Yilimia azalaki naino elenge ntango Nzambe aponaki ye azala mosakoli na Yuda. Yango ezalaki mokumba moke te. Bato mingi bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Atako Yilimia abandaki mosala ya kosakola na ntango ya Yosiya, oyo azalaki mokonzi ya sembo, bakonzi nyonso oyo balandaki na nsima bazalaki sembo te; lisusu, baoyo basengelaki koteyaka bato, elingi koloba basakoli ná banganga, bapesaki solo mokɔngɔ. (Yilimia 1:1, 2; 6:13; 23:11) Na yango, Yilimia ayokaki ndenge nini ntango Yehova aponaki ye azala mosakoli? Abangaki! (Yilimia 1:8, 17) Yilimia ayebisaki ndenge oyo ayokaki na ebandeli: “Nalobaki ete, Aha, Nkolo [Yehova], talá; nayebi koloba te zambi ngai nazali bobele elenge.”—Yilimia 1:6.
7. Ndenge nini bato bazalaki koyamba nsango oyo Yilimia azalaki kosakola, mpe ye asalaki nini?
7 Bato mingi oyo Yilimia azalaki koyebisa nsango ya Yehova bazalaki matoi mangbongi, mpe mbala mingi bazalaki kotɛmɛla ye makasi. Mokolo mosusu, nganga-nzambe moko, nkombo na ye Pasulu, abɛtaki Yilimia mpe apesaki mitindo ete bátya ye na ekanga-makolo. Yilimia ayebisaki ndenge oyo ayokaki na ntango wana: “Nalobi ete, Nakoloba nkombo ya [Yehova] te, nakoloba mpo na nkombo na ye lisusu te.” Mbala mosusu yo mpe osí oyoká ndenge wana, mposa kaka otika kosakola. Yoká oyo esalisaki Yilimia alɛmba te. Alobaki boye: “[Liloba, to nsango ya Nzambe] ezalaki na motema na ngai lokola mɔtɔ ya kozikisa mobombami kati na mikuwa na ngai; nalɛmbaki mpo na koboya, nayebaki koyikela yango mpiko te.” (Yilimia 20:9) Liloba ya Nzambe esalaka mpe ndenge wana epai na yo?
Baninga ya Yilimia
8, 9. (a) Bolɛmbu nini mosakoli Uliya amonisaki, mpe esukelaki ye ndenge nini? (b) Mpo na nini Baluku alɛmbaki, mpe ndenge nini basalisaki ye?
8 Yilimia azalaki ye moko te na mosala na ye ya mosakoli. Azalaki na baninga, mpe tokanisi mpenza ete yango ezalaki kolendisa ye. Kasi, na bantango mosusu baninga na ye basalaki makambo na bwanya te. Na ndakisa, mosakoli mosusu, nkombo na ye Uliya, azalaki kokebisa bato ya Yelusaleme mpe ya Yuda “lokola na maloba ya Yilimia.” Kasi, ntango Mokonzi Yoyakimi apesaki mitindo ete báboma Uliya, mosakoli yango abangaki mpe akimaki na Ezipito. Kasi, kokima na ye ebikisaki ye te. Mokonzi atindaki bato bálanda ye, bakangaki ye, bazongaki na ye na Yelusaleme, mpe babomaki ye. Tokanisi mpenza ete likambo yango ebulunganisaki Yilimia!—Yilimia 26:20-23.
9 Moninga mosusu ya Yilimia ezalaki sekrɛtɛrɛ na ye, Baluku. Baluku azalaki mpenza mosungi ya Yilimia; kasi, na eleko moko, ye mpe azalaki lisusu kotalela makambo na liso ya elimo te. Akómaki komilelalela ete: “Mawa epai na ngai sasaipi! Mpo ete [Yehova] abakisi mawa na mpasi na ngai; nalɛmbi na konguluma na ngai mpe nayebi kopema te.” Lokola Baluku alɛmbaki nzoto, makambo ya elimo ebandaki kosila valɛrɛ na miso na ye. Kasi, na boboto mpenza, Yehova apesaki Baluku toli malamu, mpe azongaki na nzela. Na nsima, Yehova alakaki ye ete akobika ntango Yelusaleme ekobomama. (Yilimia 45:1-5) Tokanisi mpenza ete Yilimia alendisamaki ntango Baluku akómaki lisusu makasi na elimo!
Yehova asungaki mosakoli na ye
10. Ndenge nini Yehova alakaki Yilimia ete akosunga ye?
10 Likambo eleki ntina ezali ete Yehova abosanaki mosakoli na ye te. Ayebaki ndenge oyo Yilimia azalaki koyoka mpe apesaki ye lisalisi oyo asengelaki na yango. Na ndakisa, na ebandeli, ntango Yilimia azalaki kokanisa ete akokoka mosala wana te, Yehova alobaki na ye boye: “Bangá bilongi na bango te, mpo ete ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo; [Yehova] alobi bongo.” Bongo, nsima ya koyebisa mosakoli makambo mosusu etali mosala na ye, Yehova alobaki boye: “[Bakobunda] na yo nde bakoleka yo te zambi ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo. [Yehova] alobi bongo.” (Yilimia 1:8, 19) Elaka yango ebɔndisaki mpenza Yilimia! Mpe Yehova akokisaki maloba na ye.
11. Ndenge nini toyebi ete Yehova akokisaki maloba na ye ete akosunga Yilimia?
11 Yango wana, ntango batyaki ye na ekanga-makolo mpe bato bazalaki kosɛka ye, Yilimia alobaki na kondima mpenza ete: “[Yehova] azali na ngai elongo lokola elombe ya nsɔmɔ; bongo banyokoli na ngai [bakobɛta] mabaku mpe bakolonga te. Bakoyoka nsɔni mingi.” (Yilimia 20:11) Nsima ya bambula, ntango bazalaki koluka koboma Yilimia, Yehova atikaki ye te, mpe lokola Baluku, Yilimia abikaki mpe akómaki na bonsomi ntango Yelusaleme ebomamaki; nzokande banyokoli na ye mpe bato oyo baboyaki koyoka nsango na ye bakufaki to bakendaki boombo na Babilone.
12. Atako makambo mosusu ekoki kolɛmbisa biso, eloko nini tosengeli kobosana te?
12 Lelo oyo, ebele ya Batatoli ya Yehova bazali konyokwama ndenge Yilimia anyokwamaki. Ndenge tolobaki yango liboso, tozali kokutana na bampasi mosusu mpo tozali bato ya kozanga kokoka, mosusu ezali mpo na mobulu oyo etondi na mokili oyo, mpe mosusu ezali kouta na bato oyo bazali kotɛmɛla mosala na biso. Bampasi yango ekoki kolɛmbisa biso. Lokola Yilimia, tokoki komituna soki tokokoba na mosala yango. Tosengeli koyeba ete ekoki kokómela biso mbala na mbala ete tólɛmba nzoto. Makambo oyo ekoki kolɛmbisa nzoto emekaka makasi ya bolingo na biso epai ya Yehova. Yango wana, tózala na ekateli ya kotika te ete kolɛmba nzoto emema biso na kotika mosala ya Yehova lokola Uliya. Biso tólanda nde ndakisa ya Yilimia mpe tózala na elikya ete Yehova akosunga biso.
Ndenge ya kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto
13. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yilimia ná Davidi?
13 Yilimia azalaki kosolola na Yehova Nzambe mbala na mbala, azalaki koyebisa ye makanisi ya motema na ye mpe kosɛnga ye apesa ye makasi. Yango ezali ndakisa malamu mingi oyo tosengeli kolanda. Davidi, moto oyo azalaki mpe kosɛnga Nzambe makasi, akomaki boye: “Yoká maloba na ngai, ee [Yehova], kanisá kokimela na ngai. Yokamelá mongongo ya kolela na ngai, ee Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai; zambi nakobondela epai na yo.” (Nzembo 5:1, 2) Lisolo ya bomoi ya Davidi emonisi ete Yehova azalaki mbala na mbala koyoka mabondeli na ye ntango azali kosɛnga lisalisi. (Nzembo 18:1, 2; 21:1-5) Ndenge moko mpe, ntango mitungisi elekeli biso to tozali kobunda na mikakatano ya minene, tokozwa libɔndisi ya solosolo soki tobondeli Yehova mpe toyebisi ye makambo oyo ezali kotungisa biso. (Bafilipi 4:6, 7; 1 Batesaloniki 5:16-18) Yehova akangaka matoi te na mabondeli na biso. Kutu, alobi na biso ete ‘atyelaka biso likebi.’ (1 Petelo 5:6, 7) Kasi, ezali malamu te tóbondela Yehova, bongo na nsima, tóboya kotosa makambo oyo azali koloba na biso!
14. Maloba ya Yehova ezalaki kosala nini na motema ya Yilimia?
14 Ndenge nini Yehova alobaka na biso? Tótalela lisusu ndakisa ya Yilimia. Lokola Yilimia azalaki mosakoli, Yehova azalaki koloba na ye. Yilimia amonisi ndenge oyo maloba ya Nzambe ezalaki kosala na motema na ye: “Maloba na yo mazwani mpe nalei yango, mpe liloba na yo ezali epai na ngai esengo mpe kosepela na motema na ngai; zambi nabyangami na nkombo na yo, ee [Yehova], Nzambe ya bibele.” (Yilimia 15:16) Yilimia azalaki mpenza kosepela lokola bazalaki kobenga ye na nkombo ya Nzambe, mpe maloba na Ye ezalaki na motuya mingi epai ya mosakoli yango. Yango wana, lokola ntoma Paulo, Yilimia azalaki na mposa makasi ya kosakola nsango oyo bapesaki ye.—Baloma 1:15, 16.
15. Ndenge nini maloba ya Yehova ekoki kofanda na mitema na biso, mpe makambo nini ekopesa biso ekateli ya kokanga monɔkɔ te?
15 Lelo oyo, ezali na moto moko te oyo Yehova alobaka na ye mpenza. Kasi, tozali na maloba na ye na kati ya Biblia. Yango wana, soki biso mpe tozali kozwa na lisɛki te boyekoli ya Biblia mpe tozali kokanisa na mozindo makambo oyo tozali koyekola, maloba ya Nzambe ekokóma “esengo mpe kosepela” na motema na biso. Tokoki mpe kozala na esengo ete tomemelaka bato nkombo ya Yehova ntango tokendaka koyebisa bango maloba wana. Tóbosanaka ata moke te ete, na mokili mobimba, ezali na bato mosusu te oyo basakolaka nkombo ya Yehova. Kaka Batatoli na ye nde basakolaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali koyangela sikoyo mpe bateyaka bato ya komikitisa bákóma bayekoli ya Yesu Klisto. (Matai 28:19, 20) Yango ezali mpenza libaku malamu! Soki tokanisi ete na bolingo ye, Yehova apesi biso libaku malamu wana, ekobanda boni tókanga monɔkɔ na biso?
Tókeba na baninga na biso
16, 17. Ndenge nini Yilimia azalaki kotalela baninga, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye?
16 Yilimia ayebisaki likambo mosusu oyo esalisaki ye azala na mpiko. Alobaki boye: “Nafandaki na koyangana ya batyoli te mpe nasepelaki te; nafandaki bobele epai na ngai moko mpo na lobɔkɔ na yo; mpo ete otondisi ngai na nkanda.” (Yilimia 15:17) Yilimia amonaki malamu kozala ye moko na esika azalaka na baninga mabe oyo bakokaki kobebisa ye. Lelo oyo, biso mpe tomonaka bongo. Tobosanaka te likebisi ya ntoma Paulo ete “baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu,” ata bizaleli malamu oyo tozalaka na yango banda bambula ebele.—1 Bakolinti 15:33.
17 Baninga mabe bakoki kofungola nzela mpo elimo ya mokili ebebisa makanisi na biso. (1 Bakolinti 2:12; Baefese 2:2; Yakobo 4:4) Yango wana, tóteya makoki na biso ya kokanisa mpo tóyebaka banani bazali baninga mabe mpe tókima bango. (Baebele 5:14) Na makanisi na yo, soki Paulo azalaki na bomoi awa na mabelé na moi ya lelo, alingaki koloba nini na moklisto oyo azali kotala bafilme oyo ezali kolakisa bato bazali kosangisa nzoto to ya bato bazali kobomana to azali kotala masano ya bato bazali kobunda? Toli nini alingaki kopesa na ndeko oyo, na nzela ya Internet, akómi moninga ya bato oyo ayebi te? Ndenge nini alingaki kotalela moklisto oyo azali kolekisa ngonga ebele na masano ya video to na kotala televizyo, kasi ayekolaka te?—2 Bakolinti 6:14b; Baefese 5:3-5, 15, 16.
Tikalá na kati ya paladiso ya elimo
18. Nini ekosalisa biso tótikala makasi na elimo?
18 Tosepelaka mingi na paladiso na biso ya elimo. Na mokili oyo, ezali na eloko moko te oyo ekokani ata mwa moke na paladiso yango. Ata bato oyo bazali bandimi te bakumisaka baklisto mpo na bolingo, limemya, mpe boboto oyo bamonisanaka. (Baefese 4:31, 32) Kasi, koleka ndenge ezalaki liboso, sikoyo mpenza nde ntango oyo tosengeli kobunda etumba mpo tólɛmba nzoto te. Kozala na baninga ya malamu, kobondela, koyekolaka mingi, nyonso wana ekoki kosalisa biso tózala ntango nyonso makasi na elimo. Yango ekopesa biso makasi mpo na kobunda ata na komekama ya ndenge nini, na elikya mpenza ete Yehova akosunga biso.—2 Bakolinti 4:7, 8.
19, 20. (a) Nini ekosalisa biso tóyika mpiko? (b) Lisolo oyo elandi ezali mpenzampenza mpo na banani, mpe ekozala malamu lisusu mpo na banani?
19 Tosengeli kotika nzela ata moke te ete bato oyo bayinaka nsango ya Biblia oyo tozali kosakola bábangisa biso mpe tówangana kondima na biso. Bato oyo bazali kobundisa biso bazali ndenge moko na banguna oyo banyokolaki Yilimia; bazali nde kobundisa Nzambe. Bakolonga te. Yehova, oyo azali makasi koleka banguna na biso, alobi na biso boye: “Tyá elikya epai ya Yehova, zalá na mpiko mpe tiká ete motema na yo ezala makasi. Ɛɛ, tyá elikya epai ya Yehova.” (Nzembo 27:14, NW) Na elikya makasi epai ya Yehova, tiká tózwa ekateli ya kotika te kosala oyo ezali malamu. Tózala na elikya ete, lokola Yilimia ná Baluku, tokobuka soki tolɛmbi te.—Bagalatia 6:9.
20 Baklisto mingi basengeli ntango nyonso kobunda etumba mpo na kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto. Nzokande, bilenge bazali kokutana na mikakatano oyo bato mosusu bazali na yango te. Kasi, bazali mpe na mabaku mingi ya malamu. Lisolo oyo elandi ezali mpenzampenza mpo na bilenge. Ekozala mpe malamu mpo na baboti mpe mikóló nyonso oyo bamipesi na Nzambe oyo, na maloba, na ndakisa, mpe na lisungi na bango, bakoki kosalisa bilenge na kati ya lisangá.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tosengeli kolikya kokutana na makambo oyo ekoki kolɛmbisa nzoto, mpe tosengeli koluka lisalisi epai ya nani?
• Ndenge nini Yilimia alongaki ezaleli ya kolɛmba nzoto atako azalaki na mokumba ya mpasi?
• Nini ekosalisa biso mpo mitema na biso ‘esepela mpe ezala na esengo’ ata na kati ya mikakatano?
[Elilingi na lokasa 9]
Yilimia akanisaki ete akokaki kozala mosakoli te mpo azalaki naino elenge mpe ayebaki makambo mingi te
[Elilingi na lokasa 10]
Ata ntango bazalaki konyokola Yilimia, ayebaki ete Yehova azali elongo na ye “lokola elombe ya nsɔmɔ”