Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Sanza ya 9 nk. 2-7
  • Tyelá Yehova motema mpo na kozwa libateli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tyelá Yehova motema mpo na kozwa libateli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NZEMBO OYO ELOBELI KOTYA MOTEMA MPE LIBATELI
  • LOLENGE NINI YA LIBATELI NZEMBO 91 ELAKI?
  • NDENGE NINI YEHOVA ABATELAKA BISO LELO OYO?
  • NDENGE NINI YEHOVA AKOBATELA BISO NA MIKOLO EZALI KOYA?
  • Yehova azali esika na biso mpo na komibomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tozalaka ata moke te biso moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Nguya ya kobatela—“Nzambe azali esika na biso ya komibomba”
    Pusaná penepene na Yehova
  • “Nzambe oyo alobaka solo” akokisaka ntango nyonso mokano na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Sanza ya 9 nk. 2-7

02-08/11/2026

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

Tyelá Yehova motema mpo na kozwa libateli

“Olobaki: ‘Yehova azali esika na ngai ya kokima.’”—NZ. 91:9.

NA MOKUSE

Ntina oyo tokoki kotyela libateli ya Yehova motema lelo oyo mpe na mikolo ezali koya.

1-2. Makambo nini oyo ekoningisa mabele ekosalema mosika te?

TOZALI kobika na nsuka ya mikolo ya nsuka. Makambo oyo ekoningisa mabele ekosalema mosika te. Yehova akotya na mitema ya bikólo “likanisi na ye,” elingi koloba ete bakopesa “nyama mabe [ONU] bokonzi na bango.”a (Em. 17:17) Na nsima, nyama mabe yango oyo ezwi nguya mingi, elongo na banguya nyonso ya politiki oyo esalaka elongo na yango, ekoboma mangomba nyonso ya lokuta ya mokili mobimba mbala moko mpo na libela. (Em. 17:16) Likambo yango nde ekomonisa kobanda ya bolɔzi monene. Nini ekosalema na nsima?

2 Makambo mosusu ekosalema na nsima. Bikólo ya mokili ekosangana mpo na kobundisa basaleli ya Yehova. (Ezk. 38:​14-16) Mpo na nini? Buku Losambo ya pɛto ya Yehova—Nsukansuka ezongisami! elobi: “Na nse ya litambwisi ya Satana, bikólo ekoluka kolimwisa basambeli ya solo mpe losambo ya pɛto na mabele.” Likambo oyo ekosalema na nsima ekozala monene koleka makambo wana nyonso: etumba ya Armagedone. Yesu akokamba mampinga na ye ya likoló, oyo esangisi mpe bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na ye, mpo na kolongola mokili mabe oyo mpe kobikisa mpe kokɔtisa biso na mokili ya sika oyo bosembo ekozala.—Em. 16:​14-16; 19:​11-21.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Tosengeli nde kobanga etumbu ya Nzambe oyo ekoyela mokili mabe oyo? Te! Mpo na nini? Mpo Yehova alaki kobatela biso. Alaki yango na Liloba na ye ete: “Bato nkóto bakokwea penepene na yo mpe bato nkóto zomi na lobɔkɔ na yo ya mobali, kasi nyonso wana ekopusana epai na yo te.” (Nz. 91:7) Na yango, tótalela Nzembo 91 mpe tóyanola na mituna oyo elandi: Lolenge nini ya libateli nzembo yango elaki? Ndenge nini Yehova abatelaka biso lelo oyo? Mpe ndenge nini akobatela biso na mikolo ezali koya? Kasi liboso, tótalela Nzembo 91 na mobimba na yango.

NZEMBO OYO ELOBELI KOTYA MOTEMA MPE LIBATELI

4. Ndenge nini maloba ya ebandeli ya Nzembo 91 ezali kondimisa biso ete Yehova abatelaka biso? (Nzembo 91:​1, 2)

4 Nsango ya ntina ya Nzembo 91 ekoki komonisama na mwa maloba oyo: Tyelá libateli ya Yehova motema. Bavɛrsɛ na yango mibale ya ebandeli endimisaka biso ete Yehova akobatela baoyo batyelaka ye motema. (Tángá Nzembo 91:​1, 2.) Longola koyeba ete tozali na nse ya elili mpe ya mapapu ya libateli ya Oyo-Aleki-Likoló, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, nini lisusu ekoki kosala ete tómiyoka ete tobatelami? (Ruta 2:12; Nz. 17:8) Maloba “esika ya kokima” mpe “esika makasi ya libateli” ezali kokundwela biso ndenge oyo bifelo ezalaki kobatela bingumba na ntango ya kala. Bafandi ya engumba bazalaki kobatelama na bifelo na yango, mpe baoyo bazalaki libanda ya engumba bakokaki kokima na engumba mpo na kobatelama na banguna. Na bavɛrsɛ oyo elandi, mokomi ya nzembo asaleli maloba kitoko ya elilingi mpo na kondimisa biso ete Yehova azali na likoki ya kobatela basaleli na Ye ata na likama nini oyo bakoki kokutana na yango.—Nz. 91:​3-13.

5-6. Nzembo 91 esuki na elaka nini, mpe ezali kondimisa biso nini? (Nzembo 91:​14-16)

5 Na bavɛrsɛ ya nsuka ya Nzembo 91, ezali na maloba oyo ezali kondimisa biso makasi koleka: mokomi ya nzembo atiki kosalela maloba oyo etali libateli ya Yehova mpe akómi kosalela maloba ya Yehova ye moko. Yehova apesi basaleli na ye elaka to ndanga. (Tángá Nzembo 91:​14-16.) Tyá likebi ndenge bafraze ya bavɛrsɛ yango ebandi. Yehova alaki kobatela basaleli na ye mpo batyelaka ye motema, bayebi nkombo na ye, mpe babelelaka ye. Tokoki kotyela Mokokisi bilaka motema mobimba. (Yos. 23:14) Libateli na ye ezali te eloko oyo ekoki kosalema to oyo tomoni ete ekosalema; ezali nde mpenza likambo ya solo!—Mit. 23:19.

6 Yehova asalisaki mokomi ya nzembo na nzela ya elimo santu akoma maloba oyo ezali na Nzembo 91 mpo na litomba na biso. (Rom. 15:4) Ndenge moko na mokomi ya nzembo, tokoki koloba na Yehova na kondima nyonso ete: “Ozali esika na ngai ya kokima mpe esika makasi na ngai ya libateli.” (Nz. 91:2) Kasi lolenge nini ya libateli tokoki kozela kozwa epai ya Yehova?

LOLENGE NINI YA LIBATELI NZEMBO 91 ELAKI?

7. Lolenge nini ya libateli Nzembo 91 elaki?

7 Ndenge mikanda na biso elimbolaka yango, Nzembo 91 ezali elaka ya Nzambe ya libateli ya elimo. Tokoki kotya motema ete Yehova akopesa biso ntango nyonso oyo tosengeli na yango mpo tókoka kobatelama na makama ya elimo mpe tóbatela boninga na biso na ye oyo ezali na motuya. Kasi nzembo yango elobeli kaka libateli ya elimo? Te. Nzembo yango ezali mpe elaka ete Yehova akobatela basaleli na ye lokola etuluku na makama ya nzoto mpe ya mayoki na mabɔkɔ ya banguna na bango. Mpo na nini tokoki koloba ete Nzembo 91 etali mpe libateli ya nzoto mpe ya mayoki?

8-9. Ndenge nini Yesu ayanolaki ntango Satana amekaki ye, mpe liteya nini tokoki kozwa na eyano oyo apesaki? (Matai 4:​5-7)

8 Tótalela ndenge oyo Yesu ayanolaki ntango Satana azongelaki maloba oyo ezali na Nzembo 91 mpo na komeka ye. (Tángá Matai 4:​5-7.) Satana asalelaki maloba ya Nzembo 91:​11, 12 lokola elaka ya libateli ya mosuni, mpo na kotinda Yesu amibwaka longwa na nsɔngɛ ya tempelo mpo amona soki baanzelu bakobatela ye na likama. Yesu alobaki nini? Alobaki te ete: ‘Ozali na libunga, Satana! Nzembo wana elaki te libateli ya mosuni.’ Kasi, Yesu ayanolaki: “Osengeli te komeka Yehova Nzambe na yo.” Liteya nini tokoki kozwa na eyano oyo Yesu apesaki?

9 Yesu ayebaki malamu ete na bantango mosusu, Tata na ye asalelaki baanzelu mpo na kobatela basaleli na Ye na mabɔkɔ ya banguna na bango na makama ya mosuni. (2 Bak. 6:​15-17; 19:​34, 35; Dan. 3:​19, 20, 26-28; 6:​16-22) Kasi Yesu aboyaki komeka Tata na ye, komizela ete baanzelu bábatela ye na mosuni soki atye bomoi na ye na likama. Na yango Satana asalelaki na ndenge ya mabe Nzembo 91; asalelaki yango te mpo na kolobela elaka ya libateli ya mosuni, kasi nde mpo na kotinda Yesu ameka Yehova.b Na kotalela eyano ya Yesu ntango Satana amekaki ye, tokoki koloba ete Nzembo 91 ezali elaka ya libateli ya mobimba, elingi koloba, libateli ya elimo, ya mosuni mpe ya mayoki.

10. Tondimisami na likambo nini?

10 Maloba oyo ezali na Nzembo 91 ezali kotinda biso tótyela Yehova motema mobimba. Tondimisami ete Yehova azali Mobateli ya baoyo nyonso batyelaka ye motema lokola esika na bango ya kokima mpe esika makasi na bango ya libateli. Yango wana tozali na ntina te ya kobanga makambo oyo ezali koya liboso na biso oyo ekoningisa mabele. Tótalela ndenge oyo Yehova abatelaka biso lelo oyo mpe ndenge akobatela biso na mikolo ezali koya.

NDENGE NINI YEHOVA ABATELAKA BISO LELO OYO?

11. Ndenge nini Yehova abatelaka biso na elimo?

11 Yehova abatelaka biso na elimo. Yango elakisi ete apesaka biso lisalisi oyo tosengeli na yango mpo na kobundisa makambo oyo ekoki kosala biso mabe na elimo, elingi koloba, oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na ye. Na ndakisa, tólobela etumba oyo tobundaka ntango nyonso na ezaleli na biso ya bato ya masumu. Yehova ayebi malamu nguya oyo lisumu ezalaka na yango likoló na biso. (Rom. 6:16; 7:​21-23) Tótalela mwa balolenge oyo asalisaka biso na etumba yango.

12-13. Ndenge nini tokoki kolonga etumba na bamposa ya mabe? (Matai 5:​28, 29)

12 Liloba na ye. Liloba ya Yehova ekebisaka biso kaka te na bamposa ya kosala lisumu kasi eyebisaka biso mpe ndenge ya kolonga yango. Na ndakisa, talá maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 5:​28, 29. (Tángá.) Yesu azali kolobela mobali “oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa.” Yesu alobi ete mobali yango “asili kosala na ye ekobo na motema.” Liteya ezali nini mpo na biso?

13 Soki tozali kokoba kotala bililingi ya mbindo, tokolamwisa bamposa ya mabe na motema na biso. Mpe ntango tozwi libaku ya kokokisa mposa yango, na ntembe te tokokwea na pite. (Yak. 1:​14, 15) Mpo na kobundisa bamposa mabe ya ndenge wana, tosengeli kozwa bikateli ya makasi. Yesu ayebisi biso likambo oyo moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia abengi “lipaso.” Tosengeli kolongola na bomoi na biso bililingi oyo elamwisaka bamposa ya mabe kaka ndenge balongolaka maladi na nzela ya lipaso. (Kol. 3:5) Soki tosaleli toli yango, tokobatela boninga na biso na Yehova.

14. Ndenge nini elimo santu ekoki kobatela biso?

14 Elimo santu na ye. Yehova asalelaka mpe elimo na ye mpo na kosalisa biso na etumba na ezaleli na biso ya bato ya masumu. Soki tokobi kosɛnga ye elimo santu, akopesa biso yango. (Luka 11:​9-13) Ndenge nini elimo santu ekoki kobatela biso? Ntoma Paulo alobi: “Bókoba kotambola na kolanda litambwisi ya elimo mpe bokokokisa ata mposa moko te ya nzoto.” (Gal. 5:16) Nɔti ya boyekoli na vɛrsɛ yango elobi: “Moto oyo atambolaka na elimo alukaka litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe atikaka yango etambwisa makanisi mpe misala na ye. Atako akoki kozala na bamposa ya kosala lisumu, alongolaka yango mbala moko, aboyaka kokolisa yango.” Elimo ya Yehova elongolaka bamposa ya mabe te. Kasi ekoki kosalisa biso tózala na ekateli makasi ya kosala oyo ezali malamu mpe koboya kokokisa bamposa ya mabe. Mpe ekateli yango ekosalisa biso tóbatelama na elimo.

15. Ndenge nini ebongiseli ya Yehova ebatelaka biso na elimo? (Talá mpe bililingi.)

15 Ebongiseli na ye. Na nzela ya ebongiseli na ye, Yehova apesaka biso bilei ya elimo na ntango oyo ebongi mpo na kobatela biso na elimo. Meká kokanisa: Mpo na ezaleli na biso ya kozanga kokoka, ezaleli ya bato ya masumu, tokoki na bantango mosusu kobundana na makanisi mpe mayoki ya mabe. Na ndakisa, tokoki kobundana na mayoki ya komema ngambo oyo ezali kosila te, komona ete bazali kokipe biso te, to mitungisi ezangá ntina. Satana, “Momeki,” asalelaka mayoki ya ndenge wana mpo na koluka kolɛmbisa biso. (Mat. 4:3; 6:13) Ebongiseli ya Nzambe epesaka biso bilei ya elimo oyo ebongisami mpo na kondimisa biso ete Yehova alimbisaka biso, tozali na motuya na miso na ye, mpe mpo na kokómisa makasi kondima na biso na elaka na ye ya kokokisa bamposa na biso. (Nz. 86:5; Mat. 10:​29-31; Luka 12:28; Ebr. 13:5) Ozali koyeba lisusu mokolo oyo otángaki likambo moko na mikanda na biso oyo esimbaki motema na yo mpe etindaki yo oloba ete, ‘Oyo ekomami mpenza mpo na ngai’? Kobosana te ete Yehova apesaka biso na ntango oyo ebongi bilei ya ndenge wana oyo ekoki kobatela biso na elimo.

Bililingi: Ndeko mwasi moko azali kolya bilei ya elimo. 1. Azali koyekola buku “Tambolá na mpiko elongo na Nzambe.” 2. Azali kotala emisyo ya TV JW elongo na mobali na ye mpe mwana na bango ya mwasi.

Na nzela ya ebongiseli na ye, Yehova apesaka biso bilei ya elimo na ntango oyo ebongi mpo na kobatela biso na elimo (Talá paragrafe 15)


16. Mikakatano nini Yehova atikaka ete basaleli na ye mosusu bákutana na yango, mpe tokoki kotya motema na nini?

16 Yehova abatelaka basaleli na ye lokola etuluku na makama ya mosuni na mabɔkɔ ya banguna na bango. Kasi, na bantango mosusu Yehova atikaka ete mosaleli na ye moko akutana na minyoko mpe ata na liwa na mabɔkɔ ya batɛmɛli mpo na komonisa ete Satana azali moto ya lokuta. (Em. 2:10; 6:9) Kasi Satana asepelaka te ete basaleli ya Yehova bákufa kaka moke. Na nkanda nyonso, alingaka komona batɛmɛli básilisa basaleli nyonso ya sembo ya Nzambe. (Mat. 24:9; Em. 12:​9-12) Kasi, yango ekosalema soki moke te! Tokoki kotya motema ete Yehova azali kosalela baanzelu mpo na kobatela basaleli na ye lokola etuluku mpo losambo ya pɛto ya Yehova ekoba kozala na mabele.—Ebr. 1:​7, 14.

17. Wapi ntina moko oyo tosengeli te komizela ete Yehova akobatela biso na makama nyonso ya mosuni lelo oyo?

17 Yehova abatelaka te mokomoko na biso na makama nyonso ya mosuni. Ntango totosaka mitinda mpe mibeko na ye, tobatelamaka na mimeseno mpe na makambo mingi oyo ekoki kosala biso mabe na nzoto. (Mas. 14:​29, 30; 22:3; 2 Ko. 7:1) Atako bongo, tomizelaka te ete abatela biso na makama nyonso ya mosuni sikoyo. Soki asali yango, na ntembe te Satana akolongisa lokuta na ye ete tosalelaka Yehova kaka mpo abatelaka biso. (Yobo 1:​10, 11) Toyebi malamu ete lokola ntembe monene etaleli mpe kosantisama ya nkombo na ye mosantu, Yehova ‘na motema molai nyonso atiki’ bato mabe oyo batɛmɛlaka mpe banyokolaka basaleli na ye mpo na mwa ntango. (Rom. 9:22) Kasi, makambo ya kozanga bosembo oyo atiki ezali kokóma pene na nsuka na yango. Wana azali kozela kosilisa yango, akosalisa biso tóyikela ata mikakatano nini oyo tokutani na yango mpiko mpo tókoka kobatela boninga na biso na ye oyo ezali na motuya mingi.—1 Ko. 10:13; 1 Pe. 5:10.

NDENGE NINI YEHOVA AKOBATELA BISO NA MIKOLO EZALI KOYA?

18. Ndenge nini Yehova akobatela biso na mikolo ezali koya?

18 Na bolɔzi monene, Yehova akokoba kobatela basaleli na ye na elimo. Bongo na mosuni? Ntango bikólo ekobundisa makasi basaleli na ye, Yehova akotika te ete basaleli na ye lokola etuluku básila. (Ezk. 38:​1, 2, 10-16) Yango ekomema na etumba ya Armagedone ntango oyo Yehova akotinda Yesu Kristo ná mampinga na ye ya likoló. Bakobundisa banguna ya Nzambe. (Em. 17:​12-14; 19:​11, 14, 15) Ndenge nini Yehova akobatela basaleli na ye na Armagedone?

Ntango Yesu ná mampinga na ye ya likoló bakopesa etumbu ya Nzambe na etumba ya Armagedone, ata monguna moko te ya Nzambe akotikala. . . . Kasi na ntango ya etumba yango, ata mpate moko te ya Nzambe oyo azali na motuya akobomama na mabɔkɔ ya banguna na Ye

19-20. Mpo na nini tozali na ntina ya kobanga te etumbu ya Nzambe oyo ekoya na etumba ya Armagedone? (Talá mpe elilingi .)

19 Tozali na ntina te ya kobanga kobebisama ya mokili mabe oyo na etumba ya Armagedone. Mpo na nini? Totyeli Yehova motema lokola esika na biso ya kokima mpe esika makasi na biso ya libateli. Na yango tokoki mpenza kotya motema mobimba ete: Ntango Yesu ná mampinga na ye ya likoló bakopesa etumbu ya Nzambe na etumba ya Armagedone, ata monguna moko te ya Nzambe akotikala. (Yir. 25:33; Zek. 14:12) Kasi na ntango ya etumba yango, ata mpate moko te ya Nzambe oyo azali na motuya akobomama na mabɔkɔ ya banguna na ye—ezala bato to bademo.—Luka 21:28; 2 Pe. 2:9.

20 Na etumba ya Armagedone, mbala mosusu maloba oyo ya mokomi ya nzembo ekokokisama na liloba na liloba: “Bato nkóto bakokwea penepene na yo mpe bato nkóto zomi na lobɔkɔ na yo ya mobali, kasi nyonso wana ekopusana epai na yo te. Okotala kaka mpe okomona ntango bato mabe bakozwa etumbu. Mpo olobaki: ‘Yehova azali esika na ngai ya kokima,’ okómisi Oyo-Aleki-Likoló esika na yo ya kofanda.” (Nz. 91:​7-9) Ntango kaka Armagedone ekobanda, tokoki komizela ete Yehova akopesa basaleli na ye libateli ya mobimba ya mosuni, ya mayoki, mpe ya elimo kaka te lokola etuluku kasi mpe lokola moto mokomoko. Mpo olobi: “Yehova azali esika na ngai ya kokima,” mpe Yehova alaki ete: “Nyonso wana ekopusana epai na yo te.” Na yango tiká ete tózela mikolo ezali koya na elikya, mpo toyebi ete tokoki kotya motema mobimba na libateli ya Yehova.

Anzelu moko azali kobatela mama moko ná bana na ye mibale ya mibali na ndako wana etumba ya Armagedone ezali kongala libanda. Mama yango akangi bana na ye na nzoto mpe moko ya bana na ye asimbi buku “Tambolá na mpiko elongo na Nzambe.”

Na Armagedone, tokobatelama na mosuni mpe na mayoki (Talá paragrafe 19-20)

OKOPESA EYANO NINI?

  • Lolenge nini ya libateli Nzembo 91 elaki?

  • Ndenge nini Yehova abatelaka biso lelo oyo?

  • Ndenge nini Yehova akobatela biso na mikolo ezali koya?

LOYEMBO 8 Yehova azali ekimelo na biso

a Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 11/2025.

b Na kala, mikanda na biso ezalaki koloba ete Nzembo 91 ezali elaka ya libateli ya elimo mpe ete Satana asalelaki yango na ndenge ya mabe mpo na komonisa ete ezali elaka ya kobatela biso na makama ya mosuni. Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/1975, lokasa. 145 na Français.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto