Boyangeli ya Yehova mpe Bokonzi ya Nzambe
“E [Yehova], epai na yo, monene ezali mpe nguya mpe nkembo mpe elonga mpe lokumu . . . Bokonzi mpe ezali ya yo, e [Yehova].”—1 Ntango 29:11.
1. Mpo na nini Yehova abongi mpenza kozala Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba?
“YEHOVA apiki kiti na ye ya bokonzi na likoló mpenza; mpe bokonzi na ye ezali koyangela biloko nyonso.” (Nzembo 103:19, NW) Na maloba wana, mokomi ya nzembo amonisaki ndimbola ya solosolo ya bokonzi. Lokola Yehova Nzambe azali Mozalisi ya biloko nyonso, abongi mpenza kozala Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba.
2. Na maloba nini Danyele alobelaki boyangeli ya Yehova kuna na likoló?
2 Mokonzi akoki kozala te soki bato ya koyangela bazali te. Na ebandeli, Yehova azalaki koyangela bikelamu ya elimo oyo akelaki: liboso mpenza Mwana na ye mobotami-se-moko, mpe na nsima baanzelu. (Bakolose 1:15-17) Bambula na nsima, mosakoli Danyele amonaki na emonaneli likambo moko ezali kosalema kuna na likoló. Alobi boye: “Ezalaki ngai kotala, Kiti ya mokonzi etyamaki mpe [Mokóló na Mikolo, NW] afandaki; . . . nkóto nkóto basalelaki ye, mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmaki liboso na ye.” (Danyele 7:9, 10) Na boumeli ya ebele ya bambula, Yehova, “Mokóló na Mikolo,” azalaki koyangela libota monene ya bikelamu ya elimo, oyo bazalaki kosala mokano na ye.—Nzembo 103:20, 21.
3. Bikelamu nini mosusu Yehova akómaki koyangela?
3 Na nsima, Yehova azwaki bikelamu mosusu ya koyangela ntango akelaki sanza, minzoto, moi mpe mabelé. (Yobo 38:4, 7) Soki moto atali biloko nyonso oyo emonanaka na likoló mpe amoni ndenge esalemá na molɔngɔ, akoki koloba ete ezali na mposa ya motambwisi te. Kasi, mokomi ya nzembo alobi boye: “[Yehova] apesaki mobeko mpe yango esalemaki. Atɛlɛmisaki yango mpo na lobiko na lobiko, apesaki yango ndelo ete ekoleka te.” (Nzembo 148:5, 6) Yehova azalaki ntango nyonso kosalela bokonzi na ye mpo na kotambwisa bikelamu ya elimo mpe biloko mosusu oyo akelá.—Nehemia 9:6.
4. Ndenge nini Yehova ayangelaka bato?
4 Ntango akelaki Adama ná Eva, Nzambe akómaki mpe kosalela bokonzi na ye na ndenge mosusu. Longola kopesa bango nyonso oyo basengelaki na yango mpo na kozala na bomoi ya malamu, Yehova apesaki bango mpe bokonzi likoló ya bikelamu nyonso oyo ezali awa na mabelé, elingi koloba apesaki bango mwa ndambo ya bokonzi na ye. (Genese 1:26-28; 2:8, 9) Na yango, emonani ete Nzambe ayangelaka malamu mpe apesaka bato na ye lokumu. Soki Adama ná Eva bátosaka bokonzi ya Yehova, balingaki kozala na bomoi libela na libela na paladiso awa na mabelé.—Genese 2:15-17.
5. Okoki koloba nini mpo na lolenge oyo Yehova asalelaka bokonzi na ye?
5 Na oyo nyonso, tokoloba nini? Ya liboso, Yehova ayangelaka bikelamu na ye nyonso banda kala. Ya mibale, Nzambe ayangelaka bato na ye malamu mpe apesaka bango lokumu. Ya nsuka, soki tozali kotosa bokonzi ya Nzambe mpe kondima yango, tokozwa bomoi ya seko. Tokoki kokamwa te ete Mokonzi Davidi alobaki ete: “E [Yehova], epai na yo, monene ezali mpe nguya mpe nkembo mpe elonga mpe lokumu. Zambi nyonso na likoló mpe na nse ezali ya yo, bokonzi mpe ezali ya yo, e [Yehova], mpe yo okokumisama nkolo likoló na nyonso.”—1 Ntango 29:11.
Mpo na nini Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina?
6. Boyokani nini ezali na kati ya boyangeli ya Nzambe mpe Bokonzi na ye?
6 Lokola Yehova ayangelaka ntango nyonso, mpo na nini tosengeli na Bokonzi ya Nzambe? Mbala mingi, mokonzi ayangelaka na nzela ya guvɛrnema oyo etyami likoló ya bato na ye. Na yango, Bokonzi ya Nzambe ezali bokonzi oyo emonisaka boyangeli na ye ya molɔ́ngɔ́ mobimba, elingi koloba guvɛrnema oyo asalelaka mpo na koyangela.
7. Mpo na nini Yehova atyaki boyangeli ya sika?
7 Yehova ayangelaki na balolenge ekeseni na bileko ndenge na ndenge. Atyaki mpe boyangeli moko ya sika mpo na kosilisa likambo moko oyo eutaki kobima. Atyaki yango ntango Satana, moko ya bana ya Nzambe oyo atombokelaki ye, akosaki Adama ná Eva bátombokela Nzambe. Botomboki wana etɛmɛlaki boyangeli ya Nzambe. Na ndenge nini? Ntango Satana alobaki na Eva ete ‘akokufa te’ soki alei mbuma oyo Nzambe apekisaki, Satana amonisaki ete Yehova azali lokuta mpe ebongi kotyela ye motema te. Na nsima, Satana alobaki na Eva boye: “Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino makofungwama, mpe bino bokozala [lokola] Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.” Satana amonisaki ete Adama ná Eva bakozala malamu koleka soki babuki mobeko ya Nzambe mpe bakómi komitambwisa bango moko. (Genese 3:1-6) Yango ezalaki mpenza ntembe oyo etyamaki mpo na lotomo ya Nzambe ya koyangela. Yehova asengelaki kosala nini?
8, 9. (a) Mokonzi ya mokili akoki kosala bato oyo batombokeli ye nini? (b) Yehova asalaki nini ntango batombokelaki ye na Edene?
8 Tokanisi ete mokonzi akoki kosala nini soki bato balingi kokweisa bokonzi na ye? Bato oyo bayebi makambo ya kala, bakoki komikundola makambo ya ndenge wana. Na esika ya kotika likambo yango eleka kaka bongo, mbala mingi mokonzi, ata ya malamu, akoki kopesa batomboki yango etumbu lokola banguna. Na nsima, akoki kotinda moto mosusu asukisa batomboki wana mpe azongisa kimya. Ndenge moko, Yehova amonisaki ete botomboki wana elekaki ye motó te, mpo ntango kaka esalemaki, akataki mbala moko likambo ya batomboki wana. Akataki ete Adama ná Eva babongi te kozwa bomoi ya seko, mpe abimisaki bango na elanga ya Edene.—Genese 3:16-19, 22-24.
9 Ntango azalaki kokatela Satana etumbu, Yehova amonisaki lolenge ya sika oyo akosalela boyangeli na ye: ebongiseli oyo akosalela mpo na kozongisa kimya mpe molɔngɔ na bokonzi na ye. Nzambe alobaki na Satana ete: “Nakotya mpe bonguna kati na yo ná mwasi mpe kati na momboto na yo ná momboto na ye. Ye akopanza motó na yo mpe yo okoswa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Na ndenge yango, Yehova amonisaki ete azali na mokano ya kopesa “momboto” moko nguya mpo na konyata Satana ná mampinga na ye mpe komonisa ete kaka ye [Yehova] nde abongi kozala mokonzi.—Nzembo 2:7-9; 110:1, 2.
10. (a) “Momboto” yango ezalaki nani? (b) Paulo alobaki nini na ntina na kokokisama ya esakweli ya liboso?
10 Eyaki komonana ete “momboto” yango ezali Yesu Klisto, elongo na bato oyo akoyangela na bango. Ye ná bango bakosala bokonzi ya Masiya. (Danyele 7:13, 14, 27; Matai 19:28; Luka 12:32; 22:28-30) Kasi, Yehova ayebisaki nyonso wana mbala moko te. Yango wana, kokokisama ya esakweli ya liboso etikalaki “sɛkɛlɛ mosantu oyo ebombamaki nyɛɛ na boumeli ya bantango ya milai mingi.” (Baloma 16:25) Na boumeli ya bikeke, mibali ya kondima bazalaki na mposa ya koyeba ntango oyo “sɛkɛlɛ mosantu” yango ekoyebana mpe esakweli ya liboso ekokokisama mpo na kolongisa boyangeli ya Yehova.—Baloma 8:19-21.
“Sɛkɛlɛ mosantu” eyebanaki mokemoke
11. Makambo nini Yehova ayebisaki Abalayama?
11 Mokemoke, Yehova azalaki koyebisa “sɛkɛlɛ mosantu ya bokonzi ya Nzambe.” (Malako 4:11) Na kati ya bato oyo ayebisaki sɛkɛlɛ yango, tokoki kotánga Abalayama, oyo abengamaki “moninga ya Yehova.” (Yakobo 2:23) Yehova alakaki Abalayama ete ‘akozalisa ye libota monene.’ Na nsima, Nzambe ayebisaki Abalayama ete: “Bakonzi bakobima na yo,” mpe “na nzela ya momboto na yo bikólo nyonso ya mokili ekozwa lipamboli.”—Genese 12:2 ,3; 17:6; 22:17, 18, NW.
12. Ndenge nini momboto ya Satana emonanaki nsima ya Mpela?
12 Na ntango ya Abalayama, bato bazalaki koyangela basusu. Na ndakisa, mpo na Nimilodi, nkɔkɔ ya Noa, Biblia elobi ete: “Ezalaki ye oyo abandaki kozala moto ya nguya na mokili. Azalaki moluki makasi ya nyama liboso na [Yehova].” (Genese 10:8, 9) Emonani ete Satana nde azalaki kotambwisa Nimilodi ná bakonzi mosusu oyo bamityaki bango moko. Bakonzi yango ná bato oyo bazalaki kolanda bango bakómaki momboto ya Satana.—1 Yoane 5:19.
13. Yehova alobaki nini na nzela ya Yakobo?
13 Atako Satana azali kosala milende mpo na kotya bakonzi, mokano ya Yehova ezali se kokende liboso. Na nzela ya Yakobo, nkɔkɔ ya Abalayama, Yehova alobaki ete: “Lingenda ya bokonzi ekolongwa na Yuda te, to mpe nzete ya bokonzi kati na makolo na ye te, tii Shilo akoya; mpe bato nyonso bakotosa ye.” (Genese 49:10, NW) Liloba “Shilo” elimboli “Nkolo na yango.” Na yango, esakweli wana emonisaki ete moto moko akoya, oyo azali na lotomo ya kozwa “lingenda” to bokonzi, mpe “nzete ya bokonzi” to boyangeli likoló na “bato” nyonso. Moto yango ezalaki nani?
“Tii Shilo akoya”
14. Yehova asalaki kondimana nini na Davidi?
14 Na libota ya Yuda, moto ya liboso oyo Yehova aponaki mpo na koyangela bato na ye ezalaki Davidi, mwana ya Yese, oyo azalaki mobateli ya mpate.a (1 Samwele 16:1-13) Atako Davidi asalaki masumu mpe mabunga, Yehova andimaki ye mpo azalaki sembo na bokonzi ya Yehova. Mpo na kongɛngisa lisusu esakweli oyo apesaki na Edene, Yehova asalaki kondimana na Davidi. Alobaki boye: “Nakokembisa [momboto, NW] na yo, ye oyo akobima na nzoto na yo mpe nakokokisa bokonzi na ye.” Yango etalelaki te kaka Salomo, mwana ya Davidi oyo azwaki bokonzi nsima na ye, mpamba te kondimana yango elobaki ete: “Nakokembisa mpe efandelo ya bokonzi na ye libela.” Kondimana wana oyo Yehova asalaki na Davidi emonisaki polele ete “momboto” ya Bokonzi akobima na libota ya Davidi.—2 Samwele 7:12, 13.
15. Mpo na nini tokoki koloba ete bokonzi ya Yuda ezalaki komonisa Bokonzi ya Nzambe?
15 Davidi azalaki mokonzi ya liboso na libota ya Yuda oyo nganga-nzambe monene apakolaki mafuta mosantu. Bakonzi yango bakokaki kobengama bapakolami, to bamasiya. (1 Samwele 16:13; 2 Samwele 2:4; 5:3; 1 Mikonzi 1:39) Eyebanaki ete bazalaki kofanda na kiti ya bokonzi ya Yehova mpe koyangela mpo na Ye na Yelusaleme. (2 Ntango 9:8) Na ndenge yango, bokonzi ya Yuda ezalaki komonisa Bokonzi to boyangeli ya Yehova.
16. Bakonzi ya Yuda basukaki ndenge nini?
16 Ntango mokonzi ná bato na ye bazalaki kotosa boyangeli ya Yehova, bazalaki kobatelama mpe kopambolama. Boyangeli ya Salomo ezalaki mpenza eleko ya kimya mpe ya bomɛngo, mpe ezalaki komonisa ndenge Bokonzi ya Nzambe ekozala ntango Satana akolongolama mpo na libela mpe boyangeli ya Yehova ekolongisama. (1 Mikonzi 4:20, 25) Likambo ya mawa, bakonzi mingi ya libota ya Davidi balandaki masɛngami ya Yehova te, mpe bato bakweaki na losambo ya bikeko mpe na makambo ya mbindo. Nsukansuka, Yehova atikaki bato ya Babilone báboma bokonzi yango na 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Emonanaki lokola mayele oyo Satana asalelaki mpo na komonisa ete Yehova ayebi koyangela te elongi.
17. Nini emonisi ete Yehova azalaki kaka mokonzi atako bokonzi ya libota ya Davidi ekweaki?
17 Kokwea ya bokonzi ya libota ya Davidi mpe ya bokonzi ya nɔrdi ya Yisalaele emonisaki te ete Yehova akoki makambo te, kasi emonisaki nde ete kolanda Satana mpe kopesa Nzambe mokɔngɔ ememaka mpasi. (Masese 16:25; Yilimia 10:23) Mpo na komonisa ete azali kaka mokonzi, Yehova alobaki na nzela ya mosakoli Ezekiele ete: “Longolá elamba na motó mpe longolá motole; . . . Nakozalisa yango libebi, libebi, libebi; kasi ata oyo ekotikala te kino ekokóma ye oyo abongi na yango, oyo ngai nakopesa yango na ye.” (Ezekiele 21:26, 27) Maloba wana emonisi ete “momboto” oyo alakamaki, Ye oyo “[abongaki] na yango,” ayaki naino te.
18. Nsango nini anzelu Gabiliele ayebisaki Malia?
18 Tókende sikoyo na mobu 2 L.T.B. Nzambe atindaki anzelu Gabiliele epai na Malia, ngɔndɔ moko ya Nazalete, engumba moko ya Galilai, na nɔrdi ya Palestine. Anzelu yango alobaki ete: “Talá! okozwa zemi na matrisi na yo mpe okobota mwana mobali, mpe osengeli kobenga ye na nkombo Yesu. Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló; mpe Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe nsuka ekozala te na bokonzi na ye.”—Luka 1:31-33.
19. Ntango ekómaki pene mpo na makambo nini?
19 Nsukansuka, ntango mpo ete “sɛkɛlɛ mosantu” eyebana ekómaki pene. Etikalaki moke moto ya liboso ya “momboto” oyo alakamaki amonana. (Bagalatia 4:4; 1 Timote 3:16) Satana asengelaki koswa ye na litindi. Kasi “momboto” yango akopanza motó ya Satana, akosukisa mabe na ye mpe oyo ya bato na ye nyonso. Asengelaki kotatola ete Bokonzi ya Nzambe ekolongola makambo mabe nyonso oyo Satana abimisi mpe ekolongisa boyangeli ya Yehova. (Baebele 2:14; 1 Yoane 3:8) Ndenge nini Yesu asengelaki kokokisa yango? Ndakisa nini atikelá biso? Tokozwa biyano na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Saulo, moto ya liboso oyo Nzambe aponaki mpo na kozala mokonzi na Yisalaele, azalaki moto ya libota ya Benyamina.—1 Samwele 9:15, 16; 10:1.
Okoki kolimbola?
• Nini ezali komonisa ete Yehova abongi mpenza kozala mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba?
• Mpo na nini Yehova amonaki malamu asala Bokonzi?
• Ndenge nini Yehova amonisaki “sɛkɛlɛ mosantu” mokemoke?
• Nini emonisi ete atako bokonzi ya libota ya Davidi ekweaki, Yehova azalaki kaka mokonzi?
[Elilingi na lokasa 23]
Likambo nini Yehova asakolaki na nzela ya Abalayama?
[Elilingi na lokasa 25]
Mpo na nini kokwea ya bokonzi ya libota ya Davidi emonisaki te ete Yehova akoki makambo te?