Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Exode
EZALI lisolo ya solo oyo ezali kolobela kosikolama ya bato oyo bazalaki “na boombo makasi.” (Exode 1:13) Ezali mpe lisolo kitoko oyo ezali kolobela ndenge ekólo moko ebandaki. Buku ya Exode ezali kolobela makambo mingi ya kitoko, na ndakisa, makamwisi minene, mibeko ya malamu mingi, mpe botongi ya hema to mongombo. Yango nde makambo oyo mokanda ya Exode ezali kolobela.
Mokanda ya Exode ekomamaki na mosakoli Moebele Moize mpe ezali kolobela lisolo ya bana ya Yisalaele na boumeli ya mbula koleka 145—banda na liwa ya Yozefe na mobu 1657 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) tii ntango basilisaki kotonga mongombo na mobu 1512 L.T.B. Kasi, yango ezali kaka te lisolo ya makambo ya kala. Ezali mpe liloba ya Nzambe, to nsango oyo atindeli bato. Yango wana, lisolo yango “ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” (Baebele 4:12) Na bongo, Exode ezali mpenza na ntina mpo na biso.
‘NZAMBE AYOKAKI KOLELA NA BANGO’
Na Ezipito epai bazalaki kofanda, bankɔkɔ ya Yakobo bazalaki se kokóma ebele; yango wana, mokonzi abimisaki mobeko ete bákómisa bango baombo. Kutu, Falao apesaki mobeko ete bábomaka mwana nyonso ya mobali ya Bayisalaele oyo akobotama. Moize azalaki bebe ya sanza misato oyo abikaki na liwa mpe mwana mwasi ya Falao azwaki ye mpo abɔkɔla ye. Atako akolaki na ndako ya mokonzi, ntango akokisaki mbula 40, Moize akɔtelaki bandeko na ye mpe abomaki Moezipto moko. (Misala 7:23, 24) Yango wana akimaki na Midyani. Kuna abalaki mpe akómaki mobateli ya mpate. Mokolo moko, amonaki nzete moko ezali kopela mɔtɔ na ndenge ya likamwisi mpe na esika yango, Yehova ayebisaki ye azonga na Ezipito mpo na kobimisa Bayisalaele na boombo. Ndeko na ye Alona nde asengelaki kozala molobeli na ye.
Biyano na mituna ya Biblia:
3:1—Yetelo azalaki nganga-nzambe ya ndenge nini? Na ntango ya kala, tata azalaki nganga-nzambe ya libota na ye. Ekoki mpenza kozala ete Yetelo azalaki mokonzi ya libota moko ya Bamidyani. Lokola Bamidyani bazalaki bankɔkɔ ya Abalayama oyo abotaki na Ketula, ekoki kozala ete bayebaki losambo ya Yehova.—Genese 25:1, 2.
4:11 (NW)—Na ndimbola nini Yehova ‘asalaki baba, moto akufá matoi, mpe moto akufá miso’? Atako Yehova abomaki bato mosusu miso to mpe matoi, ye te nde apesaka bato bamaladi wana. (Genese 19:11; Luka 1:20-22, 62-64) Nyonso wana ezali mpo na lisumu oyo bankɔkɔ ya liboso batikelá biso. (Yobo 14:4; Baloma 5:12) Lokola Nzambe atikaki likambo yango ezala, nde ntina yango akoki koloba ete ye moto ‘asalaki’ baba, moto akufá matoi, mpe moto akufá miso.
4:16—Ndenge nini Moize ‘azalaki lokola Nzambe’ mpo na Alona? Moize azalaki momonisi ya Nzambe. Yango wana akómaki “lokola Nzambe” mpo na Alona, oyo azalaki koloba na esika na ye.
Mateya mpo na biso:
1:7, 14. Yehova asungaki bato na ye ntango bazalaki konyokwama na Ezipito. Ndenge moko mpe lelo oyo, Yehova asungaka basaleli na ye ata ntango banguna bazali konyokola bango makasi.
1:17-21. Yehova akanisaka biso “mpo na malamu.”—Nehemia 13:31.
3:7-10. Yehova ayokaka kolela ya basaleli na ye.
3:14. Yehova azangaka te kokokisa mikano na ye. Yango wana tosengeli kondimisama ete akokokisa bilikya na biso nyonso.
4:10, 13. Atako Nzambe alakaki kosalisa ye, Moize azangaki mpenza kotya motema na likoki na ye ya koloba, asɛngaki Nzambe atinda moto mosusu mpo na kosolola na Falao. Atako bongo, Yehova asalelaki Moize mpe apesaki ye mayele mpe bokasi oyo azalaki na yango mposa mpo na kokokisa mokumba na ye. Na esika tókanisaka mingi makambo oyo tokoki kosala te, tótyelaka nde Yehova elikya mpe, na kondima nyonso, tókokisa mosala ya kosakola mpe ya koteya oyo apesi biso.—Matai 24:14; 28:19, 20.
MAKAMWISI MINENE EMEMI KOSIKOLAMA
Moize ná Alona bakendaki kosɛnga Falao apesa Bayisalaele nzela bákende kosala fɛti mpo na Yehova na esobe. Mokonzi ya Ezipito aboyaki na motema moko. Yehova asalaki makamwisi minene na nzela ya Moize. Kaka nsima na bolɔzi ya zomi nde Falao atikaki Bayislaele bákende. Kasi, mwa moke na nsima ye ná basoda na ye balandaki Bayisalaele mbangu. Kasi, Yehova afungolaki nzela katikati ya Mai Motane mpo bato na ye báleka. Mai ezipamaki mpe Baezipito nyonso oyo balandaki bango bazindaki.
Biyano na mituna ya Biblia:
6:3—Na ndimbola nini Abalayama, Isaka, mpe Yakobo bayebaki nkombo ya Nzambe te? Bato wana ya kala bazalaki kobenga nkombo ya Nzambe mpe Yehova apesaki bango bilaka. Kasi bayebaki te to bamonaki te ndenge oyo Yehova akokisaki bilaka wana.—Genese 12:1, 2; 15:7, 13-16; 26:24; 28:10-15.
7:1—Ndenge nini Moize akómaki “Nzambe na miso ya Falao”? Moize azwaki nguya mpe bokonzi ya Nzambe oyo elekaki oyo ya Falao. Yango wana azalaki na ntina ya kobanga mokonzi yango te.
7:22—Epai wapi banganga-nzambe ya Ezipito bazwaki mai oyo ebongwanaki makila te? Ntango mosusu basalelaki mai oyo batokaki na Ebale Nil liboso ya bolɔzi yango. Bato bakokaki kotoka mai ya malamu na mabulu oyo batimolaki na mabelé pembeni ya Ebale Nil.—Exode 7:24.
8:26, 27—Mpo na nini Moize alobaki ete mbeka ya Bayisalaele ekozala “mbindo na miso ya Baezipito”? Bato ya Ezipito bazalaki kosambela banyama ya ndenge na ndenge. Na bongo, kolobela bambeka ya banyama ebakisaki kilo na maloba ya Moize mpo na kotya Falao mbamba mpo atika Bayisalaele bákende kotumbela Yehova mbeka.
12:29—Banani batángamaki bana ya liboso? Bana ya liboso ezalaki kaka bana mibali. (Mituya 3:40-51) Falao ye moko mpe azalaki mwana ya liboso, kasi abomamaki te. Azalaki na libota na ye moko. Bolɔzi ya zomi ezalaki kobomama ya mwana ya liboso ya libota kasi ya tata ya libota te.
12:40—Bayisalaele bafandaki mbula boni na Ezipito? Mbula 430 oyo balobeli na vɛrsɛ yango esangisi mbula oyo Bayisalaele balekisaki na “Ezipito mpe na Kanana.” (NW, maloba ya nse ya lokasa) Abalayama azalaki na mbula 75 ntango akatisaki Ebale Pelata na mobu 1943 L.T.B. mpo na kokende na Kanana. (Genese 12:4) Kobanda ntango wana tii ntango Yakobo, oyo azalaki na mbula 130, akendaki na Ezipito elekaki mbula 215. (Genese 21:5; 25:26; 47:9) Yango emonisi ete Bayisalaele balekisaki mbula 215 na Ezipito.
15:8—Mai “ekangami” ya Mai Motane ekómaki mpenza ngalasi? Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “ekangami” elimboli kokonda to kovimba. Na Yobo 10:10, basaleli liloba yango mpo na kolobela miliki oyo ekangami. Na yango, mai ekangami elimboli kaka te ete ekómaki mabanga to ngalasi. Soki ‘mopɛpɛ makasi oyo eutaki na ebimelo ya ntango’ oyo Exode 14:21 elobeli ezalaki malili oyo ekokaki kokómisa mai ngalasi, kozanga ntembe, vɛrsɛ yango elingaki koloba ete ezalaki mopɛpɛ ya malili makasi. Lokola eloko moko te oyo ezali komonana esimbaki mai yango, ezalaki komonana lokola ekangamá.
Mateya mpo na biso:
7:14–12:30. Malɔzi zomi ezali te makambo oyo esalemaki na mbalakaka. Esakolamaki mpe ekokisamaki ndenge elobamaki. Malɔzi yango ezali komonisa polele nguya oyo Mozalisi azali na yango likoló ya mai, moi, nyama-nkɛnkɛ, nyama, mpe bato! Malozi yango emonisi mpe ete Nzambe azali na likoki ya kopesa banguna na ye mpasi mpe kobatela basambeli na ye.
11:2; 12:36. Yehova apamboli bato na ye. Asalaki ete Bayisalaele bázwa lifuta ya mosala makasi oyo basalaki na Ezipito. Bakendaki kofanda na Ezipito lokola bato ya bonsomi, kasi te lokola bakangami ya etumba oyo basengelaki kokóma baombo.
14:30. Tokoki kozala na kondima ete Yehova akobatela basambeli na ye na “bolɔzi monene” oyo ezali koya.—Matai 24:20-22; Emoniseli 7:9, 14.
YEHOVA ABONGISI EKÓLO MOKO OYO YE MOKO AZALI MOYANGELI NA YANGO
Sanza misato nsima ya kobima na Ezipito, Bayisalaele batongaki kaa na bango na Ngomba Sinai. Kuna, bazwaki Mibeko Zomi mpe mibeko mosusu, basalaki kondimana na Yehova, mpe bakómaki ekólo oyo Nzambe azali koyangela. Moize alekisaki mikolo 40 likoló ya ngomba, epai Nzambe azalaki kopesa ya malako etali losambo ya solo mpe ndenge ya kotonga mongombo ya Yehova, oyo basengelaki komemaka bisika nyonso. Na ntango yango, Bayisalaele basalaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo mpe basambelaki ye. Ntango Moize akitaki na ngomba, akutaki Bayisalaele bazali kosambela mwana-ngɔmbɛ, nkanda na ye epelaki makasi mpe abukaki bitando mibale ya mabanga oyo Nzambe apesaki ye. Baoyo basalaki mabe bazwaki etumbu oyo ekokaki, na nsima Moize amataki lisusu likoló ya ngomba mpe Nzambe apesaki ye bitando mosusu ya mabanga. Ntango Moize azongaki, babandaki mosala ya kotonga tabenakle. Mbula moko nsima ya kolongwa na boombo, basilisaki kotonga hema yango, kobongisa bisaleli na yango nyonso mpe batɛlɛmisaki yango. Na nsima, Yehova atondisaki hema na ye na nkembo.
Biyano na mituna ya Biblia:
20:5—Mpo na nini Yehova akitisaka etumbu mpo na “mabe ya batata” epai ya mabota oyo ekolanda? Soki moto akómi mokóló, Nzambe asambisaka ye na kotalela etamboli mpe makanisi na ye moko. Kasi ntango libota ya Bayisalaele bakómaki kosambela bikeko, babukaki mbuma mabe ya etamboli wana tii na mabota oyo elandaki na nsima. Ata Bayisalaele ya sembo mpe batungisamaki na likambo yango na boye ete, lokola ekólo yango ebebisaki losambo ya Yehova, ezalaki mpasi mpo bábatela bosembo na bango.
23:19; 34:26—Mobeko oyo epekisaki kolamba nwana ya ntaba na mabɛlɛ ya mama na ye ezalaki na ndimbola nini? Balobaka ete kolamba mwana ya ntaba to mwana ya nyama mosusu oyo azali naino komɛla mabɛlɛ ezalaki molulu moko ya bapakano oyo bazalaki kokanisa ete kosala bongo ekosalaka ete bambula enoka. Lisusu, lokola mabɛlɛ ya mama ezali mpo na koleisa mwana na ye, kolamba mwana ya nyama ntango azali naino komɛla ezalaki konyokola banyama. Mobeko wana ezalaki koteya Bayisalaele bázala na motema mawa.
23:20-23—Anzelu oyo balobeli awa ezalaki nani, mpe ndenge nini nkombo ya Yehova ezalaki “kati na ye”? Ekoki mpenza kozala ete anzelu wana ezalaki Yesu ntango azalaki ekelamu ya elimo liboso aya awa na mabelé. Atambwisaki Bayisalaele tii na Mokili ya Ndaka. (1 Bakolinti 10:1-4) Nkombo ya Yehova ezali “kati na ye” na boye ete Yesu nde azali moto ya liboso mpo na kolongisa mpe kokumisa nkombo ya Tata na ye.
32:1-8, 25-35—Mpo na nini Alona azwaki etumbu te ntango asalaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo? Na motema na ye, Alona asepelaki na losambo ya bikeko te. Emonani ete na nsima, amityaki na ngámbo ya Balevi oyo baponaki kotosa Nzambe mpe aboyaki baoyo batombokelaki Moize. Nsima ya liwa ya bato mabe wana, Moize ayebisaki Bayisalaele ete basalaki lisumu monene, mpe amonisaki ete longola Alona, Yehova alimbisaki mpe bato mosusu.
33:11, 20 (NW)—Ndenge nini Nzambe asololaki na Moize “boye na miso na ye”? Maloba yango ezali komonisa ete bazalaki kosolola lokola baninga. Moize alobaki na momonisi ya Nzambe mpe momonisi yango ayebisaki ye malako oyo eutaki epai na Yehova. Kasi Moize amonaki Yehova te, mpo ‘moto akoki komona Nzambe te mpe kotikala na bomoi.’ Yehova ye moko te nde asololaki na Moize. Bagalatia 3:19 elobi ete Mobeko “eyeisamaki na nzela ya baanzelu na lobɔkɔ ya moyokanisi moko.”
Mateya mpo na biso:
15:25; 16:12. Yehova akokisaka bamposa ya bato na ye.
18:21. Mibali oyo baponami mpo na mikumba na lisangá basengeli kozala bato ya makoki, bato oyo babangaka Nzambe, oyo bakoki kotyelama motema, mpe oyo balukaka bolamu na bango moko te.
20:1–23:33. Yehova azali Mopesi monene ya mibeko. Ntango Bayisalaele bazalaki kotosa mibeko ya Yehova, bazalaki kosambela ye na ndenge ebongi mpe na esengo. Lelo oyo Yehova azali na ebongiseli ya Teokrasi. Soki tozali tozali kotosa bibongiseli na yango, tokozala na esengo mpe na kimya.
Ezali mpenza na ntina mpo na biso
Mokanda ya Exode ezali koteya biso nini mpo na Yehova? Ezali komonisa ete azali Mopesi ya bolingo, Mosikoli monene, mpe Nzambe oyo akokisaka mikano na ye. Azali Nzambe oyo atambwisaka bato na ye na ebongiseli ya Teokrasi.
Na ntembe te, ntango okobanda kotánga Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpo na komibongisa mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, okoyekola makambo na mokanda ya Exode oyo ekosimba mpenza motema na yo. Ntango okotalela eteni “Biyano na mituna ya Biblia,” okozwa ndimbola ya malamumalamu ya bavɛrsɛ mosusu ya Biblia. Makanisi oyo ezali na eteni “Mateya mpo na biso” ekolakisa yo ndenge okoki kozwa matomba na botángi ya Biblia ya pɔsɔ wana.
[Elilingi na lokasa 24]
Yehova apesaki Moize, moto oyo ayebaki koloba te, mokumba ya kobimisa Bayisalaele na boombo
[Elilingi na lokasa 25]
Malɔzi zomi emonisaki ete Mozalisi azali na bokonzi likoló ya mai, moi, nyama-nkɛnkɛ, nyama, mpe bato
[Elilingi na lokasa 26]
Yehova asalelaki Moize mpo ekólo Yisalaele etambwisama na ebongiseli ya Teokrasi