‘Poná bomoi mpo ozala na bomoi’
“Natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi.”—Deteronome 30:19.
1, 2. Na ndenge nini moto azalisamaki na elilingi ya Nzambe?
TOTÁNGAKA na mokapo ya liboso ya Genese boye: “Tiká tózalisa moto na lolenge na biso na elilingi na biso.” Na boyokani na maloba yango, Genese 1:26, 27 elobi ete “Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye.” Na yango, moto ya liboso akesanaki na bikelamu mosusu nyonso awa na mabelé. Lokola asalamaki na elilingi ya Mozalisi na ye, azalaki na likoki ya kokanisa, kolinga, komonisa boyengebene, bwanya mpe nguya. Azalaki na lisosoli oyo ekokaki kosalisa ye na kozwa bikateli oyo ekokaki komemela ye moko bolamu mpe kosepelisa Tata na ye ya likoló. (Baloma 2:15) Na mokuse, Adama azalaki na bonsomi ya kopona. Ntango Yehova atalaki lolenge oyo mwana na ye wana ya mabelé asalemaki, alobaki ete: ‘Ezali malamu mingi.’—Genese 1:31; Nzembo 95:6.
2 Biso mpe bana ya Adama tosalemá na lolenge mpe na elilingi ya Nzambe. Kasi, tokoki mpenza koloba ete toponaka makambo oyo tosalaka? Ɛɛ, atako Yehova azali na likoki ya koyeba makambo oyo esalemi naino te, abongisaka liboso te makambo nyonso oyo mokomoko na biso akosala na bomoi na ye. Asalaka bongo te. Mpo na koyeba ntina oyo tosengeli kosalela bonsomi na biso mpo na kozwa bikateli ya malamu, tiká tótalela oyo ekómelaki ekólo Yisalaele.—Baloma 15:4.
Bonsomi ya kopona na Yisalaele
3. Wapi mobeko ya liboso kati na Mibeko Zomi, mpe ndenge nini Bayisalaele ya sembo baponaki kotosa yango?
3 Yehova alobaki na Bayisalaele boye: “Ngai nazali [Yehova] Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito, na ndako ya boombo.” (Deteronome 5:6) Na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ekólo Yisalaele esikolamaki na boombo na ndenge ya likamwisi. Yango wana bakokaki kotya ntembe te na maloba wana. Na mobeko ya liboso kati na Mibeko Zomi, Yehova alobaki na nzela ya molobeli na ye Moize ete: “Okozala na banzambe mosusu liboso na ngai te.” (Exode 20:1, 3) Na ntango wana, ekólo Yisalaele eponaki kotosa. Baponaki komipesa mobimba na Yehova.—Exode 20:5; Mituya 25:11.
4. (a) Likambo nini Moize asɛngaki Bayisalaele bápona? (b) Likambo nini biso tosengeli kopona lelo oyo?
4 Mbula soki 40 na nsima, Moize akundwelaki Bayisalaele oyo babotamaki na nsima ete basengelaki kopona. Alobaki na bango ete: “Nabyangi likoló mpe nse kotatola na ntina na bino lelo, ete natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi.” (Deteronome 30:19) Biso mpe lelo oyo, tokoki kopona. Ya solo, tokoki kopona kosalela Yehova na bosembo nyonso, na elikya ete tokozwa bomoi ya seko, to tokoki kopona kotombokela ye mpe kobuka mbuma mabe. Tótalela bandakisa mibale ya bato oyo bazwaki bikateli ekeseni.
5, 6. Likambo nini Yosua aponaki, mpe azwaki litomba nini?
5 Na mobu 1473 L.T.B., Yosua akɔtisaki Bayisalaele na Mokili ya Ndaka. Liboso Yosua akufa, alendisaki ekólo Yisalaele na maloba ya nguya mpenza oyo: “Soki nde emonani mabe na miso na bino kosalela [ Yehova], mbɛlɛ bópona lelo ye oyo bokosalela, soki banzambe oyo batata na bino basalelaki na mokili ya ngámbo ya Ebale, to banzambe ya Baamola, baoyo bozali kofanda na mokili na bango.” Na nsima, mpo na libota na ye moko alobaki boye: “Mpo na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela [Yehova].”—Yosua 24:15.
6 Liboso na yango, Yehova alendisaki Yosua ete azala na mpiko mpe makasi mpo abuka Mobeko ya Nzambe te. Kotángaka buku ya Mobeko mpe kokanisa na yango butu moi ekokaki kosalisa Yosua alonga. (Yosua 1:7, 8) Yosua atosaki mpe alongaki. Yosua azwaki mapamboli mpo aponaki kotosa. Alobaki boye: “[Yehova] akokisaki maloba ya malamu nyonso oyo alobelaki ba-Israelite. Elaka moko té ezangaki kosalama.”—Yosua 21:45, Bible na lingala ya lelo oyo.
7. Na ntango ya Yisaya, likambo nini Bayisalaele mosusu baponaki, mpe esukelaki bango ndenge nini?
7 Tótala sikoyo ndenge makambo ezalaki na Yisalaele mbula soki 700 na nsima. Na ntango wana, Bayisalaele mingi bakómaki kolanda mimeseno ya bapakano. Na ndakisa, na nsuka ya mbula, bato bazalaki koyangana mpo na kolya bilei kitoko mpe komɛla vinyo ya elɛngi. Yango ezalaki kaka mpo na kosepela na kati ya libota te. Ezalaki nde molulu ya losambo mpo na kokumisa banzambe mibale ya bapakano. Mosakoli Yisaya ayebisaki lolenge oyo Yehova azalaki kotalela likambo yango: “Bino baoyo botikaki Yawe, bobosani ngomba na ngai ya bulɛɛ, bokotɛlɛmisaka mesa mpo na Gada mpe bokotondisa kɔpɔ ya vinyo esangisami mpo na Meni.” Bazalaki kokanisa ete bilanga na bango ekobota malamu soki bakitisi mitema ya banzambe “Gada” mpe “Meni,” kasi te mpo na lipamboli ya Yehova. Nzokande, botomboki na bango mpe ndenge baponaki kosambela Gada mpe Meni na esika ya Yehova ezalaki komemela bango nde mpasi. Yehova alobaki na bango boye: “Nakokanela bino mpo na mopanga, bino nyonso bokogumbama kino kobomama; zambi, ebyangi ngai, bozongisaki monɔkɔ te, elobaki ngai, boyokaki te; kasi bosalaki yango ezali mabe na miso na ngai; boponaki yango esepelisi ngai te.” (Yisaya 65:11, 12) Lokola baponaki na bozoba nyonso kosambela Gada ná Meni, babebisamaki mpe banzambe Gada ná Meni bazalaki na nguya ya kobikisa bango te.
Tóyebaka kopona
8. Soki totali Deteronome 30:20, koyeba kopona esɛngaka nini?
8 Ntango Moize asɛngaki Bayisalaele bápona bomoi, ayebisaki bango makambo misato oyo basengelaki kosala: “Olinga [ Yehova] Nzambe na yo mpe otosa mongongo na ye mpe okangama na ye.” (Deteronome 30:20) Tiká tótalela mokomoko ya makambo yango mpo tóyebaka kopona.
9. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Yehova?
9 Tólinga Yehova Nzambe na biso: Toponaka kosalela Yehova mpo tolingaka ye. Soki tozwi liteya na makambo oyo ekómelaki Bayisalaele, tokoki kokwea te na ekobo mpe pite, mpe tokoboya etamboli nyonso oyo ekoki kotinda biso tómipesa na biloko ya mokili. (1 Bakolinti 10:11; 1 Timote 6:6-10) Tokangami na Yehova mpe tozali kotosa mibeko na ye. (Yosua 23:8; Nzembo 119:5, 8) Liboso Bayisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka, Moize alendisaki bango boye: “Talá, nasili kolakisa bino mibeko mpe malako, lokola [ Yehova] Nzambe na ngai alakelaki ngai ete bósala yango na mokili oyo elingi bino koyingela mpo na kokamata yango. Tosá yango mpe salá yango, mpo ete yango ekozala mayele na bino mpe lisosoli na bino na miso ya bato baoyo bakoyoka mpo na mibeko oyo nyonso.” (Deteronome 4:5, 6) Sikoyo nde ntango ya kotya mokano ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso, mpo tómonisa ete tolingaka ye. Na ntembe te, akopambola biso soki tosali bongo.—Matai 6:33.
10-12. Mateya nini tozwi ntango totaleli makambo oyo esalemaki na ntango ya Noa?
10 Tótosaka mongongo ya Nzambe: Noa azalaki “mosakoli ya boyengebene.” (2 Petelo 2:5) Kasi, bato nyonso ya mokili liboso ya Mpela “batyaki likebi te” na makebisi ya Noa. Basukaki ndenge nini? “Mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.” Yesu alobaki ete ekozala mpe bongo na ntango na biso, ntango ya “kozala ya Mwana ya moto.” Likambo oyo esalemaki na ntango ya Noa ezali likebisi monene mpo na bato ya lelo, oyo baboyi koyoka nsango ya Nzambe.—Matai 24:39.
11 Baoyo bazali kotyola makebisi ya Nzambe oyo basaleli ya Nzambe ya mikolo na biso bazali kosakola bakomona oyo ekokómela bango. Mpo na batyoli ya ndenge wana, ntoma Petelo alobaki boye: “Engebene mposa na bango, likambo oyo ezali kokima bango, ete ezalaki na likoló moko banda kala mpe na mabelé moko oyo ebimaki lokola liboke makasi likoló ya mai mpe na katikati ya mai na nzela ya liloba ya Nzambe; mpe na nzela ya myango yango mokili ya ntango wana ezwaki libebi ntango ezindisamaki na mai. Kasi na nzela ya liloba yango kaka likoló mpe mabelé oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ mpe ezali kobatelama mpo na kozela mokolo ya lisambisi mpe ya libebi ya bato oyo batyolaka Nzambe.”—2 Petelo 3:3-7.
12 Kokanisá batyoli yango ná Noa mpe libota na ye. “Na kondima Noa, nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe na ntina etali biloko oyo emonanaki naino te, amonisaki ezaleli ya kobanga Nzambe mpe atongaki masuwa.” Lokola Noa ayokaki likebisi yango, abikisaki libota na ye. (Baebele 11:7) Tiká ete biso mpe tóyokaka noki nsango ya Nzambe mpe tósalelaka yango.—Yakobo 1:19, 22-25.
13, 14. (a) Mpo na nini ezali na ntina ‘tókangama na Yehova’? (b) Ndenge nini tokoki kotika Yehova, “moyemi” na biso, abongisa biso?
13 Tókangama na Yehova: Mpo na ‘kopona bomoi mpe kokoba kozala na bomoi,’ tosengeli kaka te kolinga Yehova mpe koyoka ye, kasi tosengeli mpe ‘kokangama na Yehova,’ elingi koloba kokoba kosala mokano na ye. Yesu alobaki boye: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokozwa milimo na bino.” (Luka 21:19) Soki totali malamu, oyo toponaka kosala na likambo yango nde emonisaka ndenge motema na biso ezali. Masese 28:14 elobi boye: “Esengo ezali epai ya moto oyo azali kotosa ntango nyonso; nde ye oyo akoyeisa motema na ye makasi, akokwea na mobulu.” Bosolo ya likambo yango emonanaki mpenza epai ya Falao. Ntango Malɔzi ezalaki kokwea na Ezipito, Falao azalaki kaka koyeisa motema makasi na esika ya kobanga Nzambe. Yehova ayeisaki motema ya Falao makasi te, kasi atikaki nde mokonzi yango ya lolendo apona soki akotosa ye to te. Ezala bongo to te, mokano ya Yehova ekokisamaki, ndenge ntoma Paulo alimbolaki na ntina na Falao: “Ezali mpo na ntina wana mpenza nde natikaki yo ozala, mpo ete namonisa nguya na ngai mpo na yo, mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabelé mobimba.”—Baloma 9:17.
14 Bankama ya bambula na nsima ya kosikolama ya Yisalaele na boombo ya Falao, mosakoli Yisaya alobaki boye: “E [Yehova], ozali nde tata na biso, biso tozali lima, yo ozali moyemi; biso nyonso tozali mosala ya lobɔkɔ na yo.” (Yisaya 64:8) Soki tozali koyekola Liloba ya Yehova mpe kosalela yango, tokotika ye abongisa biso mpe tokolata mokemoke bomoto ya sika. Tokokóma bato ya komikitisa, oyo bandimaka kobongisama, mpe yango ekosalisa biso tókangama na Yehova mpo tozali mpenza na mposa ya kosepelisa ye.—Baefese 4:23, 24; Bakolose 3:8-10.
‘Lakisá yango’
15. Na kotalela Deteronome 4:9, wapi mikumba mibale oyo Moize akundwelaki Bayisalaele?
15 Moize alobaki na Bayisalaele liboso ya kokɔta na Mokili ya Ndaka boye: “Kebá bobele kokeba, mpe sɛnzɛlá [molimo] na yo malamu ete obosana makambo mamoni miso na yo te, mpe ete malongwa na motema na yo te mikolo nyonso ya bomoi na yo. Lakisá bana na yo yango mpe bana ya bana na yo.” (Deteronome 4:9) Mpo na kopambolama na Yehova mpe kofuluka na mokili oyo balingaki kozwa, Bayisalaele basengelaki kokokisa mikumba mibale liboso ya Yehova, Nzambe na bango. Basengelaki te kobosana makambo ya kokamwa oyo Yehova asalaki na miso na bango, mpe basengelaki koteya yango epai ya bana na bango. Biso basaleli ya Nzambe lelo oyo tosengeli mpe kosala bongo soki tolingi ‘kopona bomoi mpo na kozala na bomoi.’ Makambo nini Yehova asaleli biso oyo tomoni na miso?
16, 17. (a) Bamisionɛrɛ oyo babimá na Eteyelo ya Gileadi basali nini na mosala ya Kosakola? (b) Tángá bandeko oyo bazali kokoba kosakola na molende?
16 Tozali na esengo ya komona ndenge Yehova azali kopambola mosala na biso ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Banda Eteyelo ya Gileadi esalemaki na 1943, bamisionɛrɛ bazali kotambwisa mosala yango na mikili ebele. Lelo oyo, bamisionɛrɛ ya libosoliboso ya eteyelo yango bakómi mibange mpe bamosusu bazali lisusu nzoto makasi te. Atako bongo, bazali kokoba kosakola Bokonzi na molende. Moko na bango ezali Ndeko Mary Olson, oyo akɔtaki na eteyelo yango na 1944. Asali mosala ya misionɛrɛ na mikili mingi: abandaki na ekólo Uruguay, na nsima akendeki na Colombie, mpe sikoyo azali na Porto Rico. Atako akómi mpenza mobange, Ndeko Olson azali kaka kosakola na esengo mpenza. Lokola ayebi monɔkɔ ya Espagnol, abongisaka ntango pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kobima na mosala ya kosakola elongo na bandeko ya engumba yango.
17 Nancy Porter, ndeko mwasi oyo akɔtaki eteyelo ya Gileadi na 1947, azali kokoba na mosala ya misionɛrɛ na bisanga ya Bahamas, atako mobali na ye asilá kokufa. Ye mpe azali kaka kosakola na molende. Na lisolo ya bomoi na ye,a Ndeko Porter alobaki boye: “Koteya basusu solo ya Biblia ememelaka ngai esengo monene. Esalisaka ngai nazala na programɛ ya malamu na makambo ya elimo mpe nazala na bomoi ya molɔngɔ.” Ntango Ndeko Porter ná basaleli mosusu ya sembo ya Yehova batalaka ndenge balekisi bomoi na bango, babosanaka te makambo oyo Yehova asaleli bango. Ezali boni mpo na biso? Totɔndaka Yehova mpo na ndenge azali kopambola mosala ya Bokonzi na esika tofandi?—Nzembo 68:11.
18. Litomba nini tokoki kozwa soki tozali kotánga masolo ya bomoi ya bamisionɛrɛ?
18 Tozali kosepela mingi na oyo bandeko oyo baumeli na mosala ya Yehova basali mpe oyo bazali kokoba kosala. Kotánga masolo ya bomoi na bango elendisaka biso, mpamba te soki tomoni makambo oyo Yehova asaleli bango, ekateli na biso ya kosalela ye ekómaka lisusu makasi. Otángaka masolo kitoko yango oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe omanyolaka yango?
19. Ndenge nini baboti bakoki kosalela masolo ya bomoi oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli?
19 Moize akundwelaki Bayisalaele ete basengelaki te kobosana makambo nyonso oyo Yehova asalelaki bango mpe ete basengelaki te kolongola yango na mitema na bango bomoi na bango mobimba. Na nsima, abakisaki boye: “Lakisá bana na yo yango mpe bana ya bana na yo.” (Deteronome 4:9) Masolo ya bomoi esimbaka mpenza motema. Bana bazalaka na mposa ya ndakisa ya malamu. Bandeko basi oyo babalá te bakoki kozwa mateya na masolo ya bomoi ya bandeko basi ya mikóló ya sembo, oyo ebimá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Bandeko oyo basakolaka na teritware ya bato oyo balobaka monɔkɔ mosusu na ekólo na bango bazwaka libaku ya kosakola lisusu mingi. Bino baboti, mpo na nini te kosalela ndakisa ya bamisionɛrɛ ya sembo oyo batángá na Eteyelo ya Gileadi mpe bandeko mosusu mpo na kosalisa bana na bino bápona mosala ya ntango nyonso na bomoi na bango?
20. Tosengeli kosala nini mpo na ‘kopona bomoi’?
20 Ndenge nini mokomoko na biso akoki ‘kopona bomoi’? Tosengeli kosalela likabo kitoko oyo Yehova apesá biso ya bonsomi ya kopona mpo na komonisa ye ete tolingaka ye mpe kokoba kosala oyo tokoki na mosala na ye. Tosengeli mpe kokoba kosala nyonso oyo tokoki na mosala na ye, na ntango nyonso oyo apesi biso likoki ya kosala yango. Ndenge Moize alobaki yango, tosengeli kosala bongo “mpo [Yehova] azali bomoi mpe mikolo mingi mpo na yo.”—Deteronome 30:19, 20, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Nazali na esengo mpe na botɔndi atako nakufelaki mobali,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 2001, nkasa 23-27.
Ozali koyeba lisusu?
• Mateya nini ozwi na bandakisa mibale oyo tolobeli ya bato oyo bazwaki bikateli ekeseni?
• Makambo nini tosengeli kosala mpo na ‘kopona bomoi’?
• Wapi mikumba mibale oyo tosengeli kokokisa?
[Elilingi na lokasa 26]
“Natii liboso na yo bomoi mpe kufa”
[Elilingi na lokasa 29]
Koyoka mongongo ya Nzambe ebikisaki Noa ná libota na ye
[Elilingi na lokasa 30]
Mary Olson
[Elilingi na lokasa 30]
Nancy Porter