Baboti, bókokisa bamposa ya mabota na bino
“Soki moto azali kokokisa bamposa ya bato na ye te, . . . awangani kondima.”—1 TIMOTE 5:8.
1, 2. (a) Mpo na nini komona mabota ezali koyangana na makita ya lisangá elendisaka mpenza? (b) Lobelá mwa mikakatano oyo mabota bakutanaka na yango mpo na kokóma na makita na ngonga ya malamu.
SOKI okɔti na Ndako ya Bokonzi liboso makita ebanda, ntango obwaki miso epai na epai, okomona bana balati kitoko bafandi pembeni ya baboti na bango. Ezalaka mpenza esengo komona bolingo oyo bato ya mabota yango bazalaka na yango mpo na Yehova mpe bolingo oyo ezalaka kati na bango! Kasi, soki okebi te, okoki kobosana ete baboti basalaka mosala monene mpo na kobongisa bana na bango mpo bákóma na ngonga ya malamu na makita.
2 Baboti mingi basalaka mosala mokolo mobimba, mpe mikolo ya makita, misala ebakisamaka lisusu. Esengeli kolamba, kobongisa ndako, mpe kosilisa kosala badevuare. Baboti nde basalaka mingi; babongisaka bana mpo bázala pɛto, bálya mwa eloko, mpe bázala na retare te. Nzokande, bana bakoki kosala makambo mosusu na ntango oyo baboti bakokaki kokanisa te. Yaya akoki kopasola elamba na ye ntango azali kosakana. Leki akoki kosopa biloko na ye ya kolya. Bakoki kobanda koswana bango na bango. (Masese 22:15) Nyonso wana esalaka nini? Yango ekoki kobebisa makambo nyonso ata soki baboti bamibongisaki malamu. Kasi, mbala mingi bato ya mabota wana bakómaka na Ndako ya Bokonzi liboso makita ebanda. Komona mabota ya ndenge wana na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpe mbula na mbula, wana bana bazali kokola mpe kokóma basaleli ya Yehova, elendisaka mpenza!
3. Ndenge nini toyebi ete mabota ezali na valɛrɛ mingi na miso ya Yehova?
3 Baboti, atako mokumba na bino ezalaka ntango mosusu pɛtɛɛ te, to mpe elɛmbisaka bino mpenza, bóyeba ete milende oyo bosalaka esepelisaka Yehova mingi. Libota ezali ebongiseli ya Yehova. Yango wana, Liloba na ye eyebisi ete libota nyonso “ezwi nkombo na yango” epai na ye, elingi koloba ete ye nde alingaki ete ezala. (Baefese 3:14, 15) Na yango, ntango bino baboti bozali kosala molende mpo na kokokisa mikumba na bino na ndenge oyo ebongi, bokumisaka Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (1 Bakolinti 10:31) Bomoni te ete bozali na libaku malamu mingi? Yango wana, ezali malamu tótalela mokumba oyo Yehova apesi na baboti. Na lisolo oyo, tokolobela likambo etali kokokisa bamposa ya libota. Tótalela bamposa misato ya libota oyo Nzambe alingi ete baboti bákokisa.
Koleisa mpe kolatisa
4. Ebongiseli nini Yehova atye na kati ya libota mpo na koleisa mpe kolatisa bana?
4 Ntoma Paulo akomaki boye: “Ya solo mpenza soki moto azali kokokisa bamposa ya bato na ye te, mpe mingimingi mpenza ya bato ya ndako na ye, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azangi kondima.” (1 Timote 5:8) Ntango Paulo alobelaki “moto” na vɛrsɛ yango, azalaki kokanisa nani? Azalaki kokanisa mokonzi ya libota, oyo ezalaka mingimingi tata. Nzambe apesi mpe mwasi mokumba ya lokumu mingi ya kozala mosungi ya mobali na ye. (Genese 2:18) Na ntango ya kala, basi bazalaki kopesa mibali na bango mabɔkɔ mpo na koleisa mpe kolatisa mabota na bango. (Masese 31:13, 14, 16) Lelo oyo, mabota oyo ezali na moboti kaka moko ezali mingi.a Baklisto mingi oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko bazali kosala mosala malamu mingi mpo na koleisa mpe kolatisa bango. Ya solo, elekaka malamu soki tata ná mama bazali esika moko mpe tata azali kotambwisa libota.
5, 6. (a) Wapi mwa mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango mpo na koleisa mpe kolatisa mabota na bango? (b) Ndenge nini baklisto basengeli kotalela mosala mpo bálɛmba mokumba na bango te?
5 Paulo azalaki kokanisa bamposa nini ntango alobaki makambo oyo ezali na 1 Timote 5:8? Makanisi oyo ezali liboso mpe nsima ya vɛrsɛ yango emonisi ete azalaki kolobela koleisa mpe kolatisa libota. Lelo oyo, batata bazali na mikakatano mingi mpo na kokokisa bamposa wana. Na mokili mobimba bato bazali kokutana na mikakatano ya mbongo, bamosusu bazali kolongolama na misala, mingi bazali basomɛlɛ, mpe biloko ezali se komata ntalo. Nini ekoki kosalisa moto oyo azali na mokumba ya libota alɛmba te ntango azali na mikakatano yango?
6 Tata ya libota asengeli kobosana te ete Yehova nde apesi ye mokumba oyo azali kokokisa. Paulo alobaki ete moto oyo azali na makoki ya kokokisa bamposa ya libota na ye kasi aboyi kosala yango, akokani na moto oyo “awangani kondima.” Moklisto asengeli kosala nyonso mpo ete Nzambe atalela ye ndenge wana te. Kasi, lelo oyo, bato mingi “bazangi bolingo ya libota.” (2 Timote 3:1, 3) Batata mingi bazali kokima mikumba na bango mpe na bongo, bazali kotika mabota na bango na mpasi. Baklisto bazalaka na makanisi mabe to na bopɔtu ya ndenge wana te na oyo etali kokokisa bamposa ya mabota na bango. Ndenge baklisto batalelaka makambo ekeseni mpenza na oyo ya baninga na bango mingi ya mosala; baklisto bamonaka ete mosala nyonso ezali na lokumu mpe na ntina, esalisaka bango básepelisa Yehova Nzambe, mpamba te epesaka bango makoki ya koleisa mabota na bango.
7. Mpo na nini ebongi ete baboti bátalela ndakisa ya Yesu?
7 Batata ya mabota bakoki mpe kozwa makanisi ya malamu soki bazali kokanisa ndakisa malamu mingi ya Yesu. Tóbosana te ete na esakweli moko, Biblia ebengi Yesu “Tata ya seko.” (Yisaya 9:6, 7) Lokola Yesu azali “Adama ya nsuka,” azwi mpenza esika ya “moto ya liboso Adama” lokola tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima. (1 Bakolinti 15:45) Adama azalaki na moimi mpe alukaki matomba na ye moko; nzokande Yesu azali tata oyo abongi mpenza. Na ntina na ye, Biblia elobi boye: “Na likambo oyo nde toyebi bolingo, mpamba te moto wana akabaki molimo na ye mpo na biso.” (1 Yoane 3:16) Yesu andimaki kopesa bomoi na ye mpo na basusu. Kasi, ata mpe na bomoi ya mokolo na mokolo, azalaki koluka naino kokokisa bamposa ya basusu, ezala na makambo ya mikemike. Ebongi mpenza ete bino baboti bólanda ndakisa wana ya komipimela.
8, 9. (a) Liteya nini baboti bakoki kozwa na ndenge oyo bandɛkɛ basalaka nyonso mpo na koleisa bana na bango? (b) Ndenge nini baklisto mingi oyo bazali na bana bamonisaka elimo ya komipimela?
8 Baboti bakoki kozwa liteya monene na bolingo mpe boboto oyo ezali komonana na maloba oyo Yesu ayebisaki bato ya libota ya Nzambe oyo bazalaki matoi mangbongi: “Mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi ayanganisaka bana na ye na nse ya mapapu na ye!” (Matai 23:37) Yesu asalelaki elilingi malamu mpenza ya nsoso oyo abombi bana na ye na nse ya mapapu na ye. Baboti bakoki mpenza kozwa liteya monene na lolenge oyo ndɛkɛ abatelaka bana na ye, abangaka likama te mpo na kobatela bango. Kasi, mosala monene oyo bandɛkɛ basalaka mokolo na mokolo esengeli mpe kobenda likebi na biso. Batikaka te kokende koluka bilei mpo na bana na bango mpe kozonga mpo na koleisa bango. Ata soki balɛmbi, bakɔtisaka bilei na minɔkɔ ya bana na bango oyo, ata balei, batikaka kosɛnga te. Bikelamu mingi ya Yehova oyo ezali na “mayele ya lɔɔmbi” ekokisaka bamposa ya bana na yango.—Masese 30:24, NW.
9 Ndenge moko mpe, na mokili mobimba, baklisto oyo bazali na mabota bazali komipesa mpenza mpo na kokokisa bamposa na yango. Toyebi ete bino baboti bondimaka ata mpasi, na esika bótika ete likambo ya mabe ekómela bana na bino. Longola yango, mokolo na mokolo, bondimaka komipimela makambo mingi mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bino. Mingi kati na bino bolamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kosala misala ya makasi to ya mpasi. Bobomaka nzoto mpo mabota na bino elya malamu. Bosalaka makasi mpo bana na bino bázanga bilamba te, bálalaka na ndako ya malamu, mpe bátánga kelasi ya malonga. Lisusu, bosalaka makambo yango mokolo na mokolo, mbula na mbula. Ntembe ezali te elimo ya komipimela mpe ya mpiko ndenge wana esepelisaka Yehova! (Baebele 13:16) Nzokande, bobosanaka mpe te ete mabota na bino ezali na bamposa mosusu ya ntina mingi oyo bosengeli kokokisa.
Kokokisa bamposa ya elimo
10, 11. Mposa nini eleki ntina mpo na bato, mpe baboti basengeli kosala nini liboso ya kokokisa mposa yango epai ya bana na bango?
10 Kokokisa bamposa ya elimo ezali na ntina mingi koleka kutu mposa ya kolya ná kolata. Yesu alobaki boye: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Matai 4:4; 5:3) Bokoki kosala nini mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya mabota na bino?
11 Na likambo yango, tokanisi ete ezali na vɛrsɛ mosusu te oyo etángamaka koleka Deteronome 6:5-7. Tosɛngi yo ofungola Biblia mpe otánga bavɛrsɛ yango. Balobi ete baboti bango moko naino basengeli kolyaka malamu na elimo, kokóma na bolingo mingi mpo na Yehova mpe kokɔtisa maloba na ye na mitema na bango. Osengeli komipesa mpenza na koyekola Liloba ya Nzambe, kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe komanyola yango mpo na koyeba malamumalamu banzela, mitinda, mpe mibeko ya Yehova mpe kolinga yango. Na ndenge yango, motema na yo ekotonda na mateya kitoko ya solo oyo ekosala ete osepela na Yehova, omemya ye mpe olinga ye. Okozala na ebele ya makambo ya malamu oyo okobanda koteya bana na yo.—Luka 6:45.
12. Ndenge nini baboti bakoki kolanda ndakisa ya Yesu mpo na kolakisa na etingya mateya ya Biblia epai ya bana na bango?
12 Baboti oyo bazali makasi na elimo bazali na nyonso mpo na kolanda toli ya Deteronome 6:7 ya “kolakisa na etingya” maloba ya Yehova epai ya bana na bango na mabaku nyonso. “Kolakisa na etingya” elimboli kozongela mateya mbala na mbala mpo na kokɔtisa yango na motó. Yehova ayebi malamu ete biso nyonso—mingimingi bana—tozalaka na mposa bázongelaka biso makambo mbala na mbala mpo tósimba yango malamu. Yango wana, Yesu azalaki kozongela makambo oyo azalaki koteya. Na ndakisa, mpo ateya bayekoli ete basengeli kozala na komikitisa, kasi na lolendo te mpe báwelanaka te, asalelaki mayele ndenge na ndenge mpo na kozongela likambo yango. Akanisaki na bango, asalelaki ndakisa, mpe amonisaki bango ndenge ya kosala yango. (Matai 18:1-4; 20:25-27; Yoane 13:12-15) Kasi, tokomona ete Yesu azalaki ntango nyonso motema molai. Ndenge moko mpe, baboti basengeli koluka mayele ndenge na ndenge mpo na koteya bana na bango mateya ya ebandeli ya Biblia, basengeli kozongelaka mitinda ya Yehova tii bana bakosimba yango mpe bakobanda kosalela yango.
13, 14. Wapi mwa mabaku oyo baboti bakoki kosalela mpo na kolakisa na etingya solo epai ya bana na bango, mpe biloko nini bakoki kosalela?
13 Boyekoli ya libota ezali ebongiseli ya malamu mpenza mpo na koteya bana ndenge yango. Boyekoli ya libota oyo esalemaka malamu, pɔsɔ na pɔsɔ, mpe na esengo, ezali na ntina mingi mpo libota ezala makasi na elimo. Mabota ya baklisto na mokili mobimba basepelaka na boyekoli yango, basalelaka mikanda ya lisangá ya Yehova mpe babongisaka boyekoli na kotalela bamposa ya bana. Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene ezali likabo malamu mingi mpo na mabota, ndenge moko mpe buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi.b Kasi, koteya bana esengeli kosuka kaka na boyekoli ya libota te.
14 Ndenge Deteronome 6:7 emonisi yango, bino baboti bozali na mabaku mingi ya kosolola makambo ya elimo ná bana na bino. Ezala bozali kotambola, bozali kosala misala ya ndako, to bozali kosakana na bana, bokoki kozwa mabaku ya kokokisa bamposa na bango ya elimo. Kasi, yango elingi koloba te ete ntango nyonso oyo bozali na bana bosengeli kolobelaka kaka makambo ya Biblia. Bósalaka nde makasi ete masolo na bino elendisaka mpe etongaka na elimo. Na ndakisa, zulunalo Lamuká! ezalaka na masolo ya ndenge na ndenge. Masolo wana ekoki kopesa bino libaku ya kolobela banyama oyo Yehova akelá, bisika ya kitoko oyo ezali na mokili, bonkɔkɔ mpe mimeseno ndenge na ndenge ya bato. Masolo ya ndenge wana ekoki kopesa bana mposa ya kotánga mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele.—Matai 24:45-47.
15. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bámona ete mosala ya kosakola ezali mosala ya malamu mpe ya esengo?
15 Kosolola na bana na bino masolo ya kolendisa ekosalisa bino bókokisa mposa mosusu ya elimo. Bana basengeli koyekola ndenge ya kolimbola malamu mateya ya solo epai ya bato mosusu. Ntango bozali kosolola makambo malamu oyo botángaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na Lamuká! bokoki kokanisa ndenge ya kolobela makambo yango na mosala ya kosakola. Na ndakisa, okoki kotuna boye: “Bomoni te ete ekozala mpenza malamu soki bato mingi bayebi ete Yehova azali na ezaleli yango? Bokoki koloba na moto nini mpo asepela na likambo yango?” Masolo ya ndenge wana ekoki kosalisa bana bálona mposa ya koyebisa bato mosusu makambo oyo bazali koyekola. Na nsima, ntango bobimi na bango na mosala ya kosakola, bana bakomona ndenge oyo bozali kosalela makambo oyo bosololaka. Bakoki mpe komona ete mosala ya kosakola ezali mosala oyo epesaka mpenza esengo.—Misala 20:35.
16. Makambo nini bana bakoki koyekola ntango bazali koyoka mabondeli ya baboti na bango?
16 Baboti bakokisaka mpe bamposa ya elimo ya bana na bango ntango bazali kobondela. Yesu alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela, mpe abondelaki na bango na mabaku mingi. (Luka 11:1-13) Kanisá makambo oyo bayekolaki ntango bazalaki kobondela na Mwana ya Yehova! Bana na bino mpe bakoki koyekola makambo mingi ntango bazali koyoka mabondeli na bino. Na ndakisa, bakoki koyekola ete Yehova alingaka tóyebisa ye polele makambo oyo ezali na mitema na biso, tóyebisa ye nyonso oyo ezali kotungisa biso. Ya solo, mabondeli na bino ekoki kosalisa bana na bino báyekola likambo moko ya ntina mingi: Bakoki kokóma baninga ya Tata na bango ya likoló.—1 Petelo 5:7.
Kolakisa bana ete bolingaka bango
17, 18. (a) Ndenge nini Biblia emonisi ntina oyo baboti basengeli kolakisa bana ete balingaka bango? (b) Ndenge nini batata basengeli kolanda ndakisa ya Yehova mpo na kolakisa bana na bango ete balingaka bango?
17 Bana bazalaka mpe na mposa makasi ya komona ete balingaka bango. Liloba ya Nzambe eyebisi baboti ete ezali na ntina mingi bákokisa mposa wana. Na ndakisa, Biblia elendisi bamama “bálinga bana na bango.” Yango eyokani na toli oyo bapesi bilenge basi mpo bázongisa makanisi ya malamu. (Tito 2:4) Ya solo, ezali malamu kolakisa na mwana ete bolingaka ye. Kosala bongo eteyaka mwana bolingo mpe ezalaka na matomba oyo ekoumela bomoi na ye mobimba. Nzokande, kozanga kolakisa na mwana ete bolingaka ye, ezali mabe mpenza. Likambo yango epesaka mpasi mingi mpe emonisaka ete bozali kolanda ndakisa ya Yehova te, ye oyo alakisaka ete alingaka biso mingi atako tozali bato ya kozanga kokoka.—Nzembo 103:8-14.
18 Kutu, Yehova nde abandaki kolakisa bana na ye awa na mabelé ete alingaka bango. Ndenge 1 Yoane 4:19 elobi yango, “ye alingaki biso liboso.” Bino batata bosengeli mpenzampenza kolanda ndakisa ya Yehova, bosengeli kolona bolingo kati na bino ná bana na bino. Biblia ezali kolendisa baboti báboya kosilikisa bana na bango, “mpo bálɛmba nzoto te.” (Bakolose 3:21) Ezali na likambo te oyo esilikisaka bana koleka soki bazali komona ete tata to mama na bango alingaka bango te to amonaka bango mpamba. Batata oyo bakakatanaka mpo na kolakisa bana na bango ete balingaka bango basengeli kokanisa ndakisa ya Yehova. Kutu, longwa kuna na likoló, Yehova alobaki mpo na kolakisa ete andimaki mpe alingaki Mwana na ye. (Matai 3:17; 17:5) Tokanisi mpenza ete likambo yango elendisaki Yesu! Ndenge moko mpe, bana balendisamaka mingi soki baboti na bango bazali kolakisa bango mpenza ete balingaka mpe basepelaka na bango.
19. Mpo na nini disipilini ezali na ntina, mpe ndenge nini baboti bakoki kozala na bokatikati na likambo yango?
19 Nzokande, bolingo ya baboti esengeli kosuka kaka na maloba te. Bolingo emonanaka libosoliboso na misala. Koleisa mpe kolatisa bana mpe kokokisa bamposa na bango ya elimo ekoki komonisa bana ete baboti na bango balingaka bango, mingimingi soki bazali komona ete bazali kosala yango libosoliboso mpo balingaka bango. Longola yango, kopesa bana disipilini ezali lolenge ya ntina mingi oyo baboti bakoki komonisa ete balingaka bango. Kutu, “Yehova apesaka disipilini na moto oyo ye alingaka.” (Baebele 12:6) Nzokande, soki baboti bazali kopesa bana na bango disipilini te, emonisaka ete bayini bango! (Masese 13:24) Yehova apesaka disipilini “na ndenge oyo ekoki,” alekisaka ndelo te. (Yilimia 46:28, NW) Lokola baboti bazali bato ya kozanga kokoka, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo bázala na bokatikati ndenge wana. Atako bongo, ezali na ntina bósala makasi bózala na bokatikati ndenge wana. Disipilini oyo epesami na bolingo mpe na lisɛki te, esalisaka mwana mpo ete ntango akokola, azala na bomoi ya esengo mpe ya ntina. (Masese 22:6) Ezali yango nde moklisto nyonso alingaka mpo na mwana na ye, boye te?
20. Ndenge nini baboti bakoki kopesa bana na bango libaku eleki malamu ya ‘kopona bomoi’?
20 Soki bino baboti bozali kokokisa mokumba ya ntina mingi oyo Yehova apesi bino, elingi koloba bozali koleisa mpe kolatisa bana na bino, bozali kokokisa bamposa na bango ya elimo, mpe bozali kolakisa bango ete bolingaka bango, bokozwa mbano monene. Bokopesa bana na bino libaku eleki malamu ya ‘kopona bomoi,’ mpe na nsima ya ‘kotikala na bomoi.’ (Deteronome 30:19, NW) Bana oyo baponaka kosalela Yehova mpe batikalaka na nzela ya bomoi ntango bakoli, bapesaka baboti na bango esengo mingi mpenza. (Nzembo 127:3-5) Esengo yango ekoumela libela na libela! Kasi, ndenge nini bilenge bakoki kosanzola Yehova lelo oyo? Lisolo oyo elandi ekolobela yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na lisolo oyo, tokosalela tata mpo na kolobela moto oyo asengeli kokokisa bamposa ya libota. Kasi, makanisi yango ebongi mpe mpo na basi baklisto oyo bakokisaka mokumba wana.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
Baboti bakoki kosala nini mpo na
• koleisa mpe kolatisa bana na bango?
• kokokisa bamposa na bango ya elimo?
• kolakisa bango ete balingaka bango?
[Elilingi na lokasa 18]
Bandɛkɛ mingi basalaka makasi mpo na koleisa bana na bango
[Elilingi na lokasa 20]
Baboti basengeli naino kolendisa elimo na bango moko
[Bililingi na lokasa 21]
Baboti bakoki kosalela mabaku mingi mpo na koteya bana na bango makambo etali Mozalisi
[Elilingi na lokasa 22]
Bana balendisamaka soki baboti bazali kosepela na bango