Sepelá na boyengebene ya Yehova
“Ye oyo [akolanda] boyengebene mpe boboto akomona bomoi mpe boyengebene mpe lokumu.”—MASESE 21:21.
1. Bizaleli nini ya bato na moi ya lelo ezali kobimisa mikakatano?
“NZELA ezali oyo emonani malamu na moto, nde nsuka na yango bobele nzela ya kufa.” (Masese 16:25) Maloba wana oyo ezali na Masese ezali komonisa malamu bizaleli oyo bato mingi bazali na yango lelo oyo! Bato mingi balingi kaka makambo oyo ezali malamu na miso na bango, bazali kokanisa ata te bamposa ya ntina mingi ya bato mosusu. (Masese 21:2) Na monɔkɔ, bazali koloba ete batosaka mibeko ya mboka, kasi bazali koluka ndenge ya koleka na banzela ya mokuse mbala nyonso oyo libaku emonani. Nyonso wana ememi bokabwani mpe mobulungano.—2 Timote 3:1-5.
2. Eloko nini bato bazali na mposa na yango makasi mpo bázala malamu?
2 Mpo ete biso moko tózala malamu mpe bato nyonso bázala na kimya, tozali na mposa mpenza ya mibeko ya sembo, mibeko oyo bato nyonso bakondima mpe bakotosa yango. Nzokande, soki totali malamu, mobeko moko te ya bato ekoki kokokisa mposa wana, ata soki bato oyo basali yango bazali na mayele mpe bazali sembo ndenge nini. (Yilimia 10:23; Baloma 3:10, 23) Soki mibeko ya ndenge yango ezali, ekoki kozala wapi mpe ekoki kozala ya ndenge nini? Kasi, motuna oyo eleki ntina ekoki kozala oyo: Soki mibeko yango ezali, okosepela na yango mpe okotosa yango?
Epai oyo tokoki kozwa mibeko ya sembo
3. Nani abongi mpenza mpo na kopesa biso mibeko ya malamu oyo ezali na litomba mpo na bato nyonso, mpe mpo na nini?
3 Tosengeli koluka mibeko ya malamu, oyo ezali na litomba mpo na bato nyonso, epai ya moto oyo atalaka loposo ya bato te, to bonkɔkɔ ya bato, aponaka ngámbo moko te na makambo ya politiki mpe azali lokola bato te, mpo bango bamonaka mosika te, mpe azali na bolɛmbu te lokola bango. Na ntembe te, ezali na moto kaka moko oyo akoki kokokisa makambo yango: Yehova Nzambe, Mozalisi oyo azali na nguya nyonso; ye alobi ete: “Lokola lola eleki mokili likoló, boye nzela na ngai eleki nzela na bino mpe makanisi na ngai maleki makanisi na bino.” (Yisaya 55:9) Lisusu, Biblia elobi ete Yehova azali “Nzambe ya sembo mpe ya mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Na bisika mingi na Biblia totángaka maloba oyo elobi ete “[Yehova] azali moyengebene.” (Exode 9:27, NW; 2 Ntango 12:6; Nzembo 11:7; 129:4; Bileli 1:18) Yehova akoki mpenza kolakisa biso mibeko oyo eleki malamu mpamba te azali moyengebene mpe azali sembo.
4. Soki balobi ete eloko moko to likambo moko ezali “na boyengebene,” elimbolaka nini?
4 Bato mingi basepelaka te na baoyo bamimonaka ete bango nde baleki na boyengebene, to bango nde bazali basantu. Nzokande na Biblia, soki balobi ete eloko moko to likambo moko ezali “na boyengebene” elimbolaka ete ezali “ya sembo, ya malamu, oyo eyokani na bizaleli malamu.” Na bongo, soki mibeko ezali ndenge wana, yo okosepela na yango te?
5. Limbolá boyengebene ndenge oyo Biblia elobeli yango.
5 Na ntina etali boyengebene, buku moko (Encyclopedia Judaica) elobi boye: “Boyengebene ezali likanisi mpamba te, kasi yango emonisamaka na kosala oyo ezali sembo mpe oyo elongobani na kati ya boyokani nyonso.” Na ndakisa, boyengebene ya Nzambe ezalaka kaka te ezaleli ya motema na ye, lokola bosantu mpe bopɛto na ye. Ezali nde ndenge oyo amonisaka bomoto na ye na misala oyo ezali sembo. Tokoki koloba ete lokola Yehova azali mosantu mpe azali pɛto, nyonso oyo asalaka mpe nyonso oyo eutaka epai na ye ezalaka sembo to na boyengebene. Lokola Biblia elobi yango, “Yehova azali na boyengebene na nzela na ye nyonso; azali mpe sembo na misala na ye nyonso.”—Nzembo 145:17.
6. Paulo alobaki nini mpo na Bayuda mosusu ya ntango na ye oyo bazangaki kondima, mpe mpo na nini alobaki bongo?
6 Ntoma Paulo amonisaki likambo yango polele na mokanda oyo akomelaki baklisto ya Loma. Na ntina na Bayuda mosusu oyo bazalaki bandimi te, akomaki boye: “Awa ezangi bango koyeba boyengebene bouti na Nzambe mpe bazali kolukaluka boyengebene bouti na bango mpenza, bongo batosi boyengebene ya Nzambe te.” (Baloma 10:3) Mpo na nini Paulo alobaki ete bato yango ‘bayebi boyengebene ya Nzambe te’? Toyebi ete bateyaki bato yango Mibeko ya sembo ya Nzambe. Kasi, na esika bámonisaka boyengebene na makambo oyo bazali kosalela bato mosusu, mingi kati na bango bazalaki kotalela yango kaka lokola ezaleli malamu ya motema ya moto, mpe ete moto asengelaki kotosa mibeko makasimakasi ya lingomba mpo na komonisa yango. Bato yango basalaki lokola bakonzi ya mangomba ya ntango ya Yesu, bakangaki ntina ya bosembo mpe ya boyengebene te.—Matai 23:23-28.
7. Ndenge nini Yehova amonisaka boyengebene na ye?
7 Nzokande, Yehova amonisaka boyengebene na ye polele na misala na ye nyonso. Atako mpo na boyengebene na ye akangaka miso te na masumu oyo bato bazali kosala na nko, yango elingi koloba te ete azali Nzambe ya makambo makasi, oyo tosengeli kobanga to mpe kokima ye. Kutu, misala ya boyengebene oyo asali nde epesi bato nzela ya kopusana penepene na ye mpo abikisa bango na makambo mabe oyo lisumu ememaki. Yango wana, Yehova abongi mpenza kobengama “Nzambe ya boyengebene mpe mobikisi.”—Yisaya 45:21.
Boyengebene mpe lobiko
8, 9. Na ndenge nini Mibeko emonisaki boyengebene ya Nzambe?
8 Mpo tókanga ntina ya boyokani oyo ezali kati na boyengebene ya Nzambe mpe misala na ye ya bolingo mpo na lobiko, tótalela Mibeko oyo apesaki libota ya Yisalaele na nzela ya Mose. Ntembe ezali ata moke te ete Mibeko ezalaki sembo. Na maloba na ye ya nsuka liboso akufa, Mose alobaki na Bayisalale boye: “Libota monene nini ezali na Mibeko mpe malako ya sembo lokola mibeko oyo nyonso [natii] liboso na bino lelo?” (Deteronome 4:8) Bambula mingi na nsima, Davidi, mokonzi ya Yisalaele alobaki boye: “Bikateli ya Yehova bizali solo, yango nyonso emonani na boyengebene.”—Nzembo 19:9, NW.
9 Na lisalisi ya Mibeko, Yehova amonisaki polele ndenge ya kokoka oyo ye atalelaka malamu na mabe. Mibeko eyebisaki polele oyo Bayisalaele basengelaki kosalaka na makambo ya losambo, na mombongo, na libala, na biloko ya kolya, na makambo ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, mpe ndenge ya kosambisa makambo. Mibeko eyebisaki polele etumbu nini moto asengeli kozwa soki abuki mobeko moko. Na makambo mosusu kutu esɛngaki kokatela moto etumbu ya liwa.a Kasi, tokoki nde koloba ete masɛngami ya sembo ya Nzambe oyo emonisamaki na Mibeko, ezalaki makasi mpe kilo mpenza mpo na bato; ete ezalaki kotya bango nkaka mpe kolongola esengo na bango, ndenge bato mingi bazali koloba yango lelo oyo?
10. Ndenge nini bato oyo balingaki Yehova bazalaki kotalela mibeko na ye?
10 Bato oyo balingaki Yehova bazalaki kosepela na mibeko mpe malako na ye ya sembo. Na ndakisa, ndenge touti komona yango, Mokonzi Davidi alobaki ete bikateli ya Yehova bizali solo mpe sembo; kasi, alobaki lisusu ete alingaki yango mingi mpe azalaki na botɔndi mpo na yango. Na ntina na mibeko mpe bikateli ya Yehova, akomaki boye: “Mposa na yango eleki mposa na wolo, ata na wolo mingi malamu; eleki mafuta ya nzoi na elɛngi, ata mafuta yango makwei na nse na ndako ya nzoi. Bongo moombo na yo apesameli toli na yango, libonza monene ekomonana wana akotosa yango.”—Nzembo 19:7, 10, 11.
11. Na ndenge nini Mibeko ezalaki ‘molakisi oyo azalaki kokamba epai ya Klisto’?
11 Bankama ya bambula na nsima, Paulo amonisaki ntina mosusu ya Mibeko, ntina oyo eleki kutu monene. Na mokanda oyo atindelaki Bagalatia, akomaki boye: “Mibeko ekómaki mokɛngɛli na biso oyo azalaki kokamba epai ya Klisto, mpo tókoka kobengama bayengebene mpo na kondima.” (Bagalatia 3:24, NW) Na ntango Paulo azalaki awa na mabele, moto oyo bazalaki kobenga ye mokɛngɛli ya bana azalaki moto ya mosala to moombo na ndako moko monene. Mokumba na ye ezalaki kobatela bana mpe komema bango na kelasi. Mibeko mpe ezalaki na mokumba lokola oyo ya moto wana: ezalaki kobatela Bayisalaele na misala ya mbindo mpe losambo ya mbindo ya bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango. (Deteronome 18:9-13; Bagalatia 3:23) Lisusu, Mibeko esalisaki Bayisalaele báyeba ete bazali bato ya masumu mpe bazali na mposa ya bolimbisi mpe ya lobiko. (Bagalatia 3:19) Bambeka oyo bazalaki kopesa ezalaki komonisa bango ete bazali na mposa ya mbeka mpo na kobikisa bango mpe ezalaki lokola elakiseli mpe esakweli oyo ekokaki kosalisa bango na koyeba Masiya. (Baebele 10:1, 11, 12) Na bongo, ntango Yehova apesaki Mibeko oyo ezalaki komonisa boyengebene na ye, azalaki mpe kokanisa bolamu mpe lobiko ya seko ya bato.
Bato oyo Nzambe abengaka bayengebene
12. Bayisalaele bakokaki kokóma ndenge nini soki batosaki Mibeko?
12 Lokola Mibeko oyo Yehova apesaki ezalaki sembo na makambo nyonso, soki Bayisalaele bátosaka yango, mbɛlɛ balingaki kokóma bayengebene na miso ya Nzambe. Ntango bakómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, Mose alobaki lisusu na Bayisalaele boye: “Ekozala boyengebene mpo na biso soko tokokeba ete tósala lilako oyo nyonso liboso ya [Yehova] Nzambe na biso lokola elakelaki ye biso.” (Deteronome 6:25) Lisusu, Yehova alakaki ete: “Bokotosa mibeko na ngai mpe malako na ngai. Soko moto akosala yango akobika na yango. Ngai nazali [Yehova].”—Levitike 18:5; Baloma 10:5.
13. Tokoki nde koloba ete Yehova azalaki sembo te na ndenge asɛngaki bato na ye ete bátosa Mibeko ya sembo? Limbolá.
13 Kasi likambo ya mawa ezali ete ekólo mobimba ya Bayisalaele balongaki te ‘kosalela lilako yango nyonso liboso ya Yehova,’ yango wana mpe bazwaki te mapamboli oyo alakaki bango. Balongaki te kotosa mibeko nyonso ya Nzambe mpamba te Mibeko yango ezalaki ya kokoka, nzokande, bango bazalaki bato ya kozanga kokoka. Yango elingi nde koloba ete Nzambe azali sembo te to azangi boyengebene? Te. Paulo akomaki boye: “Tóloba nini? Ete Nzambe [azangi nde bosembo, NW]? Soko moke te!” (Baloma 9:14) Liboso kutu Mibeko epesama to mpe nsima ya kopesa yango, ezalaki na bato oyo Nzambe abengaki bango bayengebene, atako bazalaki bato ya kozanga kokoka mpe ya masumu. Na kati ya bato yango oyo bazalaki kobanga Nzambe, tokoki kotánga Noa, Abalayama, Yobo, Lahaba mpe Danyele. (Genese 7:1; 15:6; Yobo 1:1; Ezekiele 14:14; Yakobo 2:25) Yango wana, motuna oyo tokoki kotuna yango oyo: Mpo na nini Nzambe abengaki bango bayengebene?
14. Ntango Biblia elobi ete moto moko azali “moyengebene,” yango elimbolaka nini?
14 Ntango Biblia elobi mpo na moto moko ete azali “moyengebene,” yango elimboli te ete moto yango azali na masumu te to mpe azali moto ya kokoka. Kasi, yango elimboli ete moto yango akokisaka mikumba na ye na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato. Na ndakisa, babengaki Noa “moto ya sembo mpe ya boyengebene kati na bato ya ntango na ye” mpamba te “asalaki bobele bongo, mpe asilisaki Nyonso elakaki Nzambe ye.” (Genese 6:9, 22; NW; Malaki 3:18) Zekalia na Elisabeta, baboti ya Yoane Mobatisi “bazalaki bayengebene na miso ya Nzambe, batambolaki na mibeko mpe na malako ya Nkolo na libunga te.” (Luka 1:6) Lisusu, balobaki mpo na Koloneli, mokonzi moko ya basoda oyo azalaki kutu Moyisalaele te ete azali “moyengebene mpe abangaka Nzambe.”—Misala 10:22, NW.
15. Boyengebene ezali na boyokani makasi na nini?
15 Lisusu, boyengebene ya moto ezali na boyokani makasi na makambo oyo ezali na motema na ye: kondima ya moto, botɔndi na ye mpe bolingo na ye mpo na Yehova mpe bilaka na ye; kasi ezali kaka te kosala makambo oyo Nzambe azali kosɛnga. Makomami elobi ete Abalayama “andimaki [Yehova], mpe ye atángelaki ye yango lokola boyengebene.” (Genese 15:6) Abalayama azalaki kondima ete Nzambe azali; kasi azalaki mpe kondima elaka na ye ya “mombóto.” (Genese 3:15, NW; 12:2; 15:5; 22:18, NW) Kondima wana mpe misala oyo emonisaki kondima yango nde etongaki boyokani kati na Yehova Abalayama mpe yango etindaki Yehova apambola ye mpe asala bongo epai ya bato mosusu ya sembo atako bazalaki bato ya kozanga kokoka.—Nzembo 36:10; Baloma 4:20-22.
16. Kondima na mbeka epesi nzela na nini?
16 Boyengebene ya bato etalelaka mingimingi kondima na bango na mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kobikisa bato. Paulo akomaki mpo na baklisto ya ekeke ya liboso ete: “Ezali lokola likabo ya ofele ndenge babengami bayengebene na boboto monene ya [Nzambe] mpo na lisiko oyo Klisto Yesu afutaki.” (Baloma 3:24, NW) Na vɛrsɛ yango, Paulo azalaki koloba mpo na baoyo baponamaki mpo na kozala bakonzi elongo na Klisto na Bokonzi ya likoló. Kasi, mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa epesi mpe bamilio mosusu ya bato libaku ya kozala bayengebene na miso ya Nzambe. Ntoma Yoane amonaki na emonaneli “ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; . . . batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana na Mpate. Balati bilamba mpɛmbɛ.” Bilamba mpɛmbɛ ezali komonisa ete bazali pɛto mpe bayengebene na miso ya Nzambe mpamba te “basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila na Mwana na Mpate.”—Emoniseli 7:9, 14.
Tósepela na boyengebene ya Yehova
17. Makambo nini moto asengeli kosala mpo na kolanda boyengebene?
17 Atako Yehova andimaki kopesa Mwana na ye Yesu Klisto mpo ete bato bákóma bayengebene na miso na Ye, elingi koloba te ete moto nyonso akómi mbala moko moyengebene na miso ya Nzambe. Moto asengeli kosala misala oyo ezali komonisa kondima na lisiko, asengeli kosala mokano ya Nzambe na bomoi na ye, asengeli komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo mpo na komonisa komipesa yango. Na nsima, moto asengeli kolanda ntango nyonso boyengebene mpe bizaleli mosusu ya moto ya elimo. Timote azalaki moklisto oyo azwaki batisimo mpe azalaki na elikya ya kokende na likoló; kasi Paulo apesaki ye toli oyo: “[Olandaka] boyengebene, kosalela Nzambe, kondima, bolingo, etingya, bopɔlɔ.” (1 Timote 6:11; 2 Timote 2:22) Yesu mpe amonisaki ete moto asengeli kotika te kosala molende ntango alobaki boye: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye.” Ekoki kozala ete tosalaka makasi mpo na koluka mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe, kasi tosalaka mpe makasi ndenge moko mpo na koluka banzela ya boyengebene ya Yehova?—Matai 6:33, NW.
18. (a) Mpo na nini kolanda boyengebene ezali likambo ya pɛtɛɛ te? (b) Ndakisa ya Lota ekoki koteya biso nini?
18 Ya solo, kolanda boyengebene ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Ezali bongo mpamba te biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe motema na biso ebendamaka mingi na makambo oyo ezangi boyengebene. (Yisaya 64:6) Lisusu, tofandi esika moko na bato oyo batyaka likebi ata moke te na banzela ya boyengebene ya Yehova. Tozali mpenza lokola Lota, ye oyo azalaki kofanda na engumba Sodomo oyo etondaki na makambo mabe mpenza. Ntoma Petelo alimbolaki ntina oyo Yehova amonaki ete asengeli kobikisa Lota na likama oyo esengelaki kokómela mboka yango. Petelo alobaki boye: “Moyengebene kati na bango, amoni mpe ayoki misala na bango ya kilikili mokolo na mokolo mpe anyokolami na molimo na ye sembo.” (2 Petelo 2:7, 8) Yango wana, ebongi mokomoko na biso amituna boye: ‘Na motema na ngai, nandimaka makambo ya mbindo oyo ezali komonana na esika oyo nafandi? Namonaka mpenza ete masano ya mobulu oyo bato mingi balingaka ezali mabe? Misala yango oyo ezangi boyengebene esalaka ngai mpasi na motema ndenge ezalaki kosala Lota?’
19. Mapamboli nini tokoki kozwa soki tozali kosepela na boyengebene ya Nzambe?
19 Na mikolo ya mabe mpe ya makama oyo tozali na yango, soki moto azali kosepela na boyengebene ya Yehova akobatelama. Mokonzi Davidi atunaki motuna oyo: “Ɛ [Yehova], nani akoumela kati na hema na yo? Nani akofanda na ngomba na yo [mosantu, NW]?” Mpe ye moko apesaki eyano ete: “Ye oyo akotambolaka sembo mpe [akolanda] boyengebene.” (Nzembo 15:1, 2) Soki tozali kolanda boyengebene ya Nzambe mpe tozali kosepela na yango, tokoki kobatela boyokani malamu na ye mpe akolanda kosepela na biso mpe kopambola biso. Na ndenge yango, tokozala na esengo, lisosoli na biso ekotungisama te mpe tokozala na kimya ya makanisi. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Ye oyo [akolanda] boyengebene mpe boboto akomona bomoi mpe boyengebene mpe lokumu.” (Masese 21:21) Lisusu, soki tozali kosala makasi tósalaka oyo ezali sembo mpe oyo ebongi na makambo nyonso, tokofanda malamu na bato, bizaleli mpe elimo na biso ekokóma malamu koleka. Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Esengo mingi na bango balandaka bosembo, basalaka ntango nyonso makambo na boyengebene.”—Nzembo 106:3, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo ndenge na ndenge oyo Mibeko ya Mose elobelaki, talá motó ya likambo “Abrégé de l’alliance de la loi,” na buku Étude perspicace des Écritures, volimi 2, nkasa 154-160, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okoki kolimbola?
• Boyengebene elimboli nini?
• Boyokani nini ezali kati mpe lobiko na boyengebene ya Nzambe?
• Mpo na nini Nzambe abengaka bato mosusu bayengebene?
• Ndenge nini tokoki kosepela na boyengebene ya Yehova?
[Bililingi na lokasa 15]
Mokonzi Davidi alingaki mibeko ya Nzambe mingi
[Bililingi na lokasa 16]
Nzambe abengaki Noa, Abalayama, Zekalia, Elisabeta, mpe Koloneli bayengebene. Oyebi soki ezalaki mpo na nini?