Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Basambisi
YEHOVA asalaka nini ntango basaleli na ye bapesi ye mokɔngɔ mpe babandi kosambela banzambe ya lokuta? Asalaka nini soki mbala na mbala bazali kotosa ye te mpe bazali koluka ye kaka ntango bakómi na mpasi? Ata na ntango wana Yehova abikisaka bango? Mokanda ya Basambisi epesi biyano na mituna wana mpe na mituna mosusu ya ntina mingi. Mokanda yango oyo mosakoli Samwele asilisaki kokoma soki na mobu 1100 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), elobeli makambo oyo elekaki na boumeli ya mbula soki 330—banda na liwa ya Yosua tii ntango baponaki mokonzi ya liboso ya Yisalaele.
Mokanda ya Basambisi ezali na ntina mingi mpo na biso mpamba te ezali eteni ya Liloba ya Nzambe oyo ezali na nguya. (Baebele 4:12) Masolo ya kosimba motema oyo ezali na mokanda yango ezali kosalisa biso tóyeba bomoto ya Nzambe. Mateya oyo tokoki kozwa na mokanda yango ekokómisa kondima na biso makasi mpe ekosalisa biso tósimba makasi “bomoi ya solosolo,” to bomoi ya seko na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. (1 Timote 6:12, 19; 2 Petelo 3:13) Ndenge Yehova abikisaki basaleli na ye ezali komonisa mwa moke lobiko monene oyo Mwana na ye, Yesu Klisto, akopesa bato na mikolo ezali koya.
MPO NA NINI BASAMBISI?
Ntango Yosua asilisaki kolonga bakonzi ya Kanana, libota mokomoko ya Yisalaele ezwaki eteni na yango ya mabelé mpe bazwaki mokili ya Kanana mobimba. Nzokande, Bayisalaele babenganaki bato nyonso ya mokili yango te. Yango ezalaki mpenza motambo mpo na Yisalaele.
Bato oyo babotamaki nsima ya liwa ya Yosua ‘bayebaki [Yehova] te mpe bayebaki misala oyo asalelaki Yisalaele te.’ (Basambisi 2:10) Lisusu, Bayisalaele bakómaki kobalana na Bakanana mpe kosambela banzambe na bango. Yango wana, Yehova atikaki nzela ete banguna na bango bálonga bango. Nzokande, ntango minyoko elekaki makasi, Bayisalaele babelelaki Yehova. Makambo ya politiki ná ya losambo mpe bomoi ya bato ezalaki ndenge wana ntango Yehova azalaki kobimisa basambisi mpo na kobikisa basaleli na ye na mabɔkɔ ya banguna na bango.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:2, 4—Mpo na nini libota ya Yuda ezwaki mabelé liboso ya mabota mosusu? Soki totali malamu libota ya Lubene, mwana ya liboso ya Yakobo nde esengelaki kozwa mabelé liboso. Kasi na esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa, alobaki ete Lubene akokaki koleka bandeko na ye te mpo abungisaki esika na ye ya mwana ya liboso. Simeona ná Levi bazalaki na nkanda mabe; yango wana basengelaki kopalangana na Yisalaele. (Genese 49:3-5, 7) Na yango, moto oyo akokaki kozwa esika ya liboso ekómaki Yuda, mwana ya minei. Bato ya libota ya Simeona, baoyo bakendeki na etumba elongo na libota ya Yuda, bazwaki mwa biteni mikemike ya mabelé na kati ya mabelé monene ya libota ya Yuda.a—Yosua 19:9.
1:6, 7—Mpo na nini bazalaki kokata misapi ya minene ya mabɔkɔ mpe ya makolo ya bakonzi oyo bazalaki kolonga? Moto oyo azali na misapi ya minene ya mabɔkɔ mpe ya makolo te, akoki kosala mosala ya soda te. Soda oyo azangi misapi ya minene te akokaki kosimba mopanga te! Lisusu soki azali na misapi ya minene ya makolo te, akokaki te kotɛlɛma kozanga kotɛngatɛnga.
Mateya mpo na biso:
2:10-12. Tosengeli kozala na momeseno ya koyekolaka Biblia mpo ‘tobosana te boboto nyonso ya [Yehova].’ (Nzembo 103:2) Baboti basengeli kokɔtisa solo ya Liloba ya Nzambe na mitema ya bana na bango.—Deteronome 6:6-9.
2:14, 21, 22. Yehova atikaka mabe ekómela bato na ye soki bazangi botosi mpo na: kopamela bango, kobongisa bango, mpe kosalisa bango bázonga epai na ye.
YEHOVA ABIMISI BASAMBISI
Lisolo ya kosimba motema ya makambo minene basambisi basalaki ebandi na Oteniele oyo alongolaki Yisalaele na boombo ya mbula mwambe na mabɔkɔ ya mokonzi moko ya Mezopotamia. Na mayele mpenza mpe na mpiko Ehude abomaki Egelone, mokonzi ya Moaba. Elombe Samagale abomaki Bafilistia 600 kaka ye moko, na nzete ya kotambwisaka bangɔmbɛ. Debora oyo azalaki mosakoli, alendisaki Balaka ná basoda na ye 10 000 oyo bazalaki na bibundeli ya malonga te, mpe na lisalisi ya Yehova balongaki Sisela ná basoda na ye oyo bazalaki na bibundeli ya makasi. Yehova abimisaki Gideona mpe asalisaki ye ná bato na ye 300 bálonga Bamidiani.
Yehova asalelaki Yefeta mpo na kobikisa Bayisalaele na mabɔkɔ ya Baamona. Tola, Yaili, Ibesana, Eloni mpe Abedone bazalaki kati na basambisi 12 ya Yisalaele. Mosambisi ya nsuka ezalaki Samasona; ye abundaki na Bafilistia.
Biyano na mituna ya Biblia:
4:8—Mpo na nini Balaka atyaki mbamba ete mosakoli Debola ete akende na ye na etumba? Ekoki kozala ete Balaka amonaki ete akokoka te kobundisa basoda ya Sisela ye moko. Akanisaki ete soki Debora azali na ye elongo, ekondimisa ye ná basoda na ye ete Yehova azali na bango mpe bakoki kozala na elikya ete bakolonga. Na yango, na kotya Debora mbamba Balaka amonisaki bolɛmbu te kasi kondima makasi.
5:20(NW)—Ndenge nini minzoto ya likoló ebundelaki Balaka? Biblia elobi te soki ezali baanzelu nde babundelaki ye, to mbula ya mabanga oyo, mpo na bato ya mayele ya Sisela bamonaki ete ezali lisuma mpo na bango, to mpe minzoto oyo Sisela azalaki kotalela mpo na koyeba makambo oyo ekoya nde ekosaki ye. Kasi, ntembe ezali te ete ezala na ndenge nini, Nzambe asalisaki basoda ya Yisalaele mpo bálonga.
7:1-3; 8:10—Mpo na nini Yehova alobaki ete basoda 32 000 ya Gideona balekaki mingi mpo na kobunda na banguna oyo bazalaki 135 000? Mpamba te Yehova akanaki kosalisa Gideona ná basoda na ye bálonga. Nzambe alingaki te bákanisa ete balongi Bamidiani na makasi na bango moko.
11:30, 31—Ntango Yefeta alapaki ndai, azalaki nde na likanisi ya kopesa moto lokola mbeka? Akokaki kozala na likanisi ya ndenge wana te mpamba te mobeko elobaki boye: “Moto akozwama kati na bino te, oyo akozikisa mwana mobali na ye to mwana mwasi na ye lokola mbeka.” (Deteronome 18:10) Nzokande, Yefeta azalaki na likanisi ya kopesa nyama te, kasi nde moto. Na Yisalaele, banyama oyo ebongi bápesa lokola mbeka bazalaki yango kobomba na bandako te. Lisusu, kopesa nyama lokola mbeka ezalaki likambo ya sika te mpo alapela yango ndai. Yefeta ayebaki ete moto oyo akoyamba ye liboso ekokaki kozala mwana na ye ya mwasi. Asengelaki kopesa ye “lokola mbeka ya kotumba”; maloba yango elimboli ete asengelaki komipesa bomoi na ye mobimba mpo na kosalela Yehova na hema.
Mateya mpo na biso:
3:10. Moto akoki te kolonga kokokisa mikano ya elimo na bwanya na ye moko, kasi nde na lisalisi ya elimo ya Yehova.—Nzembo 127:1.
3:21. Ehude asalelaki mopanga na ye malamu mpenza mpe na mpiko. Tosengeli kobakisa mayele na biso ya kosalela “mopanga ya elimo, elingi koloba, Liloba ya Nzambe.” Yango elimboli ete na mosala ya kosakola, tosengeli kosalelaka Biblia na mpiko.—Baefese 6:17; 2 Timote 2:15.
6:11-15; 8:1-3, 22, 23. Bopɔlɔ ya Gideona eteyi biso makambo misato: (1) Ntango tozwi mikumba na lisangá, tosengeli te kotalelaka libosoliboso oyo yango ekopesa biso, kasi tólukaka nde makambo oyo yango ezali kosɛnga biso. (2) Liboso ya bato oyo balingá koswana, bwanya ekotinda biso tózala na bopɔlɔ. (3) Bopɔlɔ epekisaka biso tólukaka lokumu.
6:17-22, 36-40. Tosengeli mpe kokeba ete ‘tóndimaka te liloba nyonso oyo epemami.’ Kasi, esengeli ‘tómekaka maloba mapemami mpo na komona soki yango euti na Nzambe.’ (1 Yoane 4:1) Mpo ndeko oyo akómi nkulutu sika ayeba soki toli oyo azali kopesa euti mpenza na Liloba ya Nzambe, asengeli kotuna likanisi ya nkulutu moko oyo aumeli.
6:25-27. Gideona asalelaki mayele mpo na koboya kotumola nkanda ya banguna na ye kaka mpamba. Ntango tozali kosakola nsango malamu, tosengeli kokeba ete elobeli na biso esilikisa bato te.
7:6. Na mosala ya Yehova, tosengeli kokɛngɛlaka ntango nyonso lokola basoda 300 ya Gideona.
9:8-15. Lolendo to koluka bokonzi ezali mpenza bozoba!
11:35-37. Na ntembe te, ndakisa malamu ya Yefeta esalisaki mwana na ye akóma na kondima makasi mpe na elimo ya komipimela. Lelo mpe baboti bakoki kopesa bana na bango ndakisa ya ndenge wana.
11:40. Kopesa moto oyo azali komipesa na mosala ya Yehova longonya elendisaka ye.
13:8. Mpo baboti báteya bana na bango malamu, basengeli kobondelaka Yehova mpo na kosɛnga ye litambwisi mpe kosalelaka batoli na ye.—2 Timote 3:16.
14:16, 17; 16:16. Kolelela moto mpe kotungisa ye mpo asalela yo likambo moko ekoki kobebisa boyokani na bino.—Masese 19:13; 21:19.
MASUMU MOSUSU NA YISALAELE
Eteni ya nsuka ya mokanda ya Basambisi ezali na masolo mibale ya nsɔmɔ. Lisolo ya liboso elobeli mobali moko na nkombo Mika, oyo atyaki ekeko moko na ndako na ye mpe azwaki Molevi moko mpo azala nganga-nzambe na ye. Nsima ya kokweisa engumba Laisi, to Leseme, bato ya libota ya Dani batongaki engumba na bango mpe babengaki yango Dani. Bazwaki ekeko ya Mika mpe nganga-nzambe na ye mpe babandisaki losambo mosusu. Na ntembe te, bato ya libota ya Dani bazwaki Laisi liboso Yosua akufa.—Yosua 19:47.
Likambo ya mibale esalemaki nsima ya liwa ya Yosua. Ebele ya mibali ya engumba Gibea, na etúká ya Benyamina, basangisaki nzoto na mwasi moko tii akufaki; yango wana, Bayisalaele mosusu babomaki pene na bato nyonso ya libota yango; kaka mibali 600 nde babikaki. Kasi, bandeko na bango ya bikólo mosusu babongisaki ete bápesa bango basi, mpe bakómaki lisusu mingi mpe ntango Davidi azalaki mokonzi, libota yango ezalaki na mibali ya etumba soki 60 000.—1 Ntango 7:6-11.
Biyano na mituna ya Biblia:
17:6; 21:25 (Bible na lingala ya lelo oyo)—Lokola ‘moto na moto azalaki kosala ndenge motema na ye elingi,’ mobulu ekɔtaki? Te, mpamba te Yehova azwaki bibongiseli mpo na kotambwisaki bato na ye. Apesaki bango Mibeko mpe atyaki banganga-nzambe mpo na koteya bango banzela na ye. Na nzela ya Ulimu mpe Tumimu, nganga-nzambe monene akokaki kotuna Nzambe mpo na makambo ya ntina. (Exode 28:30) Lisusu, engumba na engumba ezalaki na mikóló oyo bakokaki kopesa toli. Ntango Moyisalaele atosi bibongiseli yango, lisosoli na ye ezalaki kotambwisa ye malamu. Soki ‘kosala ndenge motema na ye elingi’ ezalaki kobota mbuma ya malamu. Nzokande, soki Moyisalaele aboyi kotosa Mibeko mpe asali makambo na ndenge na ye, azalaki kosuka mabe.
20:17-48—Atako bato ya libota ya Benyamina basengelaki kozwa etumbu, mpo na nini Yehova atikaki bálonga mabota mosusu mbala mibale? Yehova atikaki bálonga mabota oyo ezalaki sembo mpo atala soki mabota yango ezalaki mpenza na ekateli ya kolongola mabe na Yisalaele.
Mateya mpo na biso:
19:14, 15. Ndenge bato ya Gibea bayambaki bapaya te, emonisi ete bazalaki na etamboli ya malamu te. Biblia ezali kolendisa baklisto ‘bálanda ezaleli ya koyamba bapaya.’—Baloma 12:13.
Kosikolama ekómi pene
Mosika te, Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu Klisto azali kotambwisa ekoboma bato mabe mpe ekosikola basembwi mpe bato malamu. (Masese 2:21, 22; Danyele 2:44) ‘Banguna ya Yehova bakokufa, nde bato oyo balingaka ye bakozala lokola moi ntango ezali kongala makasi.’ (Basambisi 5:31, NW) Tósalela makambo oyo toyekoli na mokanda ya Basambisi mpo tómonisa ete tozali na kati ya bato oyo balingaka Yehova.
Likambo ya ntina oyo mokanda ya Basambisi ezongeli mbala na mbala ezali oyo: Kotosa Yehova ememaka mapamboli, kasi kozanga botosi ememaka makambo ya mabe. (Deteronome 11:26-28) Ezali na ntina mingi tókóma “kotosa uta na motema” mokano ya Nzambe oyo ayebisi biso!—Baloma 6:17; 1 Yoane 2:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Balevi bazwaki libula na mokili ya ndaka te, longola kaka bingumba 48 oyo bapesaki bango na Yisalaele.
[Karte na lokasa 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
“Yehova azalaki kobimisa basambisi, mpe bazalaki kobikisa bango na mabɔkɔ ya bapunzi.”—Basambisi 2:16, NW
BASAMBISI
1. Oteniele
2. Ehude
3. Samagale
4. Balaka
5. Gideona
6. Tola
7. Yaili
8. Yefeta
9. Ibesana
10. Eloni
11. Abedone
12. Samasona
DANI
MANASE
NAFATALI
ASELE
ZEBULONA
YISAKALA
MANASE
GADA
EFALAIMA
DANI
BENYAMINA
LUBENE
YUDA
[Elilingi na lokasa 26]
Ozwi liteya nini na ndenge Balaka atyaki Debora mbamba ete akende na ye na etumba?