Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Ntango
ESILI koleka mbula 77 banda Bayuda babimaki na boombo na Babilone mpe bazongaki na mboka na bango. Tempelo oyo Guvɛrnɛrɛ Yelubabele atongaki ekokisi sikoyo mbula 55. Ntina ya libosoliboso oyo Bayuda bazongaki na mboka na bango ezali mpo na kozongisa losambo ya solo na Yelusaleme. Kasi, bana ya Yisalaele bazali na molende te na losambo ya Yehova. Basengeli mpenza na bilendiseli, mpe yango nde Mokanda ya Liboso ya Ntango ezali kopesa.
Longola eteni oyo elobeli mabota ya Yisalaele, Mokanda ya Liboso ya Ntango elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula 40, elingi koloba kobanda na liwa ya Mokonzi Saulo tii na liwa ya Mokonzi Davidi. Balobaka ete nganga Ezela nde akomaki buku yango na mobu 460 Liboso ya Ntango na biso (L.T.B.). Mokanda ya Liboso ya Ntango ezali na ntina mingi mpo na biso mpamba te ezali kosalisa biso tóyeba ndenge losambo ezalaki kosalema na tempelo mpe eyebisi biso makambo mingi na ntina na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya. Lokola ezali moko ya mikanda ya Liloba ya Nzambe, nsango na yango ezali kolendisa kondima na biso mpe ezali kobakisela biso boyebi ya Biblia.—Baebele 4:12.
MOKANDA MONENE YA BANKOMBO
Molɔngɔ molai ya bankɔkɔ oyo Ezela akomaki ezali na ntina mingi mpo na makambo soki misato: mpo na kosalisa na kotala ete kaka bato oyo Nzambe aponá nde bázala banganga-nzambe, mpo na koyeba libula ya libota mokomoko mpe mpo bankombo ya bato ya libota oyo Masiya asengelaki kobotama ebunga te. Bankombo yango oyo bakomaki ezalaki kosalisa Bayuda báyeba bankɔkɔ na bango nyonso tii na moto ya liboso. Ezali na mabota zomi banda na Adama tii na Noa, mpe mabota mosusu zomi banda na Noa tii na Abalayama. Nsima ya kotánga bana ya Yisamaele, bana ya Ketula, makango ya Abalayama mpe bana ya Esau, lisolo yango elobeli mingimingi molɔngɔ ya bakitani ya bana 12 ya Yisalaele.—1 Ntango 2:1.
Ezela alobeli mingi bana ya Yuda mpamba te libota ya Mokonzi Davidi ebimaki wana. Banda na Abalayama tii na Davidi, ezali na mabota 14 mpe banda na Davidi tii ntango Bayisalaele bakendeki na boombo na Babilone ezali na mabota 14. (1 Ntango 1:27, 34; 2:1-15; 3:1-17; Matai 1:17) Ezela atángi mpe bakitani ya bikólo oyo ezalaki na ngámbo ya Ɛsti ya Ebale Yolodani, na nsima, atángi molɔngɔ ya mabota ya bana ya Levi. (1 Ntango 5:1-24; 6:1) Na nsima, Ezela alobeli na mokuse mabota mosusu oyo ezalaki na wɛsti ya ebale Yolodani mpe alobeli na bolai libota ya Benyamina. (1 Ntango 8:1) Atángi mpe bankombo ya bato ya liboso oyo bafandaki na Yelusaleme ntango boombo na bango na Babilone esilaki.—1 Ntango 9:1-16.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:18—Nani azalaki tata ya Sela: Kainana to Alapakasadi? (Luka 3:35, 36) Alapakasadi azalaki tata ya Sela. (Genese 10:24; 11:12) Liloba “Kainana” oyo ezali na Luka 3:36 ekoki kozala ebengeli ya mabe ya liloba “Bakaladi.” Soki ezali bongo, bakomaki vɛrsɛ yango na ebandeli boye: “Alapakasadi mwana ya moto ya Kaladi.” To mpe ekoki kozala ete bankombo Kainana mpe Alapakasadi ezalaki bankombo ya moto moko kaka. Likambo ya ntina ezali ete maloba “mwana ya Kainana” ezali na bamaniskri mosusu te.—Luka 3:36.
2:15—Davidi azalaki mwana ya nsambo ya Yese? Te. Yese azalaki na bana mwambe mpe Davidi azalaki mwana ya nsuka. (1 Samwele 16:10, 11; 17:12) Emonani ete mwana moko ya Yese akufaki kozanga ete abota. Lokola abotaki te, Ezela atángaki nkombo na ye te.
3:17—Mpo na nini Luka 3:27 elobi ete Selatiele, mwana ya Yekoniya, azali mwana ya Neli? Yekoniya azalaki tata ya Selatiele. Nzokande, emonani ete Neli abalisaki mwana na ye ya mwasi epai ya Selatiele. Luka abengaki bokilo ya Neli mwana ya Neli ndenge kaka asalaki mpo na Yozefe, abengaki ye mwana ya Heli, oyo azalaki tata ya Malia.—Luka 3:23.
3:17-19—Yelubabele, Pedaya mpe Selatiele bazalaki ndenge nini? Yelubabele azalaki mwana ya Pedaya, oyo azalaki ndeko ya Selatiele. Nzokande, na bisika mosusu Biblia ebengi Yelubabele mwana ya Selatiele. (Matai 1:12; Luka 3:27) Mbala mosusu ekoki kozala mpo Pedaya akufaki mpe Selatiele abɔkɔlaki Yelubabele. Ekoki mpe kozala ete Selatiele akufaki kozanga kobota mpe Pedaya azwaki mwasi na ye mpe Yelubabele azali mwana ya liboso oyo babotaki.—Deteronome 25:5-10.
5:1, 2—Lotomo ya mwana ya liboso oyo Yozefe azwaki elimboli nini? Elimboli ete Yozefe azwaki ndambo mibale ya libula. (Deteronome 21:17) Na bongo, akómaki tata ya mabota mibale: Efelaima ná Manase. Bana mosusu nyonso ya Yisalaele bakómaki kaka batata ya libota mokomoko.
Mateya mpo na biso:
1:1–9:44. Mabota oyo balobeli na mokanda yango ezalaki mpenza. Yango emonisi ete ebongiseli mobimba ya losambo ya solo euti na masapo mpamba te, kasi na makambo oyo esalemaki mpenza.
4:9, 10. Yehova ayanolaki na libondeli makasi oyo Yabese asalaki mpo na kosɛnga ye ayeisa mokili na ye monene kozanga ete abunda mpo na kobɔtɔla mabelé, mpo ayamba bato mingi oyo babangaka Nzambe. Biso mpe ntango tozali kosala na molende mosala ya kokómisa bato bayekoli, tosengeli kobondelaka na motema mobimba mpo basambeli ya Nzambe bákóma ebele.
5:10, 18-22. Na mikolo ya Mokonzi Saulo, mabota oyo ezalaki na Ɛsti ya Ebale Yolodani elongaki Bahagili atako bikólo yango ezalaki na bato ebele mbala 2 koleka bango. Balongaki mpamba te bilombe mibali ya mabota yango batyelaki Yehova motema mpe balukaki lisalisi na ye. Biso mpe tosengeli kotyela Yehova motema na biso mobimba ntango tozali kobunda etumba ya elimo na banguna na biso oyo baleki biso na ebele.—Baefese 6:10-17.
9:26, 27. Balevi oyo bazalaki kokɛngɛla bikuke bazalaki na mokumba moko monene. Bapesaki bango fungola ya kokɔta na bisika mosantu ya tempelo. Bazalaki bato oyo ebongaki mpenza bátyela bango motema mpo na kofungola bikuke mokolo na mokolo. Bapesi biso mokumba ya kokende koluka bato na teritware na biso mpe kosalisa bango báya kosambela Yehova. Biso mpe tómimonisa bato oyo bakoki kotyela motema lokola Balevi oyo bazalaki kokɛngɛla bikuke!
DAVIDI AKÓMI MOKONZI
Eteni oyo ebandi na lisolo ya liwa ya Mokonzi Saulo mpe bana na ye misato na etumba oyo babundaki na Bafilistia na Ngomba Giliboa. Davidi, mwana ya Yese, akómi mokonzi ya libota ya Yuda. Mibali ya mabota nyonso bayei na Hebeloni mpe bakómisi ye mokonzi ya Yisalaele mobimba. (1 Ntango 11:1-3) Mwa moke na nsima, abɔtɔli Yelusaleme. Na nsima, Bayisalaele bamemi sanduku ya kondimana na Yelusaleme “na koganga mpe na mingongo ya kelelo mpe na . . . kobɛta bibɛtɛli-ya-nsinga mpe nzɛnzɛ ya makasi.”—1 Ntango 15:28.
Davidi amonisi mposa ya kotongela Nzambe ya solo ndako. Yehova asali na Davidi kondimana mpo na Bokonzi, kasi ayebisi ye ete lokumu ya kotongela ye ndako ekozala nde ya Salomo. Ntango Davidi azali kobunda na banguna ya Yisalaele, Yehova azali kosalisa ye alonga bitumba yango nyonso. Davidi asalisi resansema oyo Yehova asɛngi ye te mpe mpo na yango bato 70 000 bakufi. Nsima ya kozwa malako epai ya anzelu mpo na kotongela Yehova etumbelo, Davidi asombi mabelé epai ya Olonana Moyebusi. Davidi abandi ‘kobongisa biloko ebele’ mpo na kotongela Yehova ndako “oyo eleki monene pe kitoko” na esika yango. (1 Ntango 22:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Davidi abongisi misala ya Balevi, oyo Mokanda ya Liboso ya Ntango elobeli mingi koleka mikanda mosusu ya Biblia. Mokonzi ná bato ya Yisalaele bapesi ebele ya makabo mpo na tempelo. Nsima ya koyangela mbula 40, Davidi akufi nsima ya ‘kotonda na mikolo mpe na mosolo mpe na lokumu; mpe mwana na ye Salomo akómi mokonzi na esika na ye.’—1 Ntango 29:28.
Biyano na mituna ya Biblia:
11:11—Mpo na nini balobi ete bato oyo babomamaki bazali 300, kasi te 800 ndenge 2 Samwele 23:8 emonisi yango? Yasobama to Yosebe-basebete azalaki mokóló na kati ya bato misato ya makasi ya Davidi. Bato mibale mosusu ya makasi ezalaki Eleazala mpe Sama. (2 Samwele 23:8-11) Ekoki kozala ete bokeseni yango ezali mpo masolo mibale wana ezali kolobela makambo mibale ekeseni oyo moto yango asalaki.
11:20, 21—Esika nini Abisai akokaki kotɛlɛma liboso ya bilombe misato wana ya Davidi? Abisai azalaki te moko ya bilombe misato oyo basalelaki Davidi. Nzokande, ndenge 2 Samwele 23:18, 19 emonisi yango, ye azalaki moto ya liboso kati na mibali ya etumba ntuku misato mpe alekaki bango nyonso. Abisai akómaki na lokumu lokola bilombe misato wana mpamba te asalaki likambo moko ya nguya lokola oyo Yosebe-basebete asalaki.
12:8—Ndenge nini bilongi ya mibali ya etumba ya Gada ezalaki lokola “bilongi ya nkɔsi”? Mibali makasi wana bazalaki elongo na Davidi na esobe. Nsuki na bango ekómaki milai. Nsuki yango ekómisaki bango lokola bankɔsi.
13:5, NW—“Mongala ya Ezipito” ezali nini? Bato mosusu bakanisaka ete ezali mongala moko ya ebale Nil. Nzokande, eyebani mingimingi ete balobelaki nde “lobwaku ya Ezipito,” elingi koloba lobwaku molai oyo ezalaki ndelo ya sudi-wɛsti ya Mokili ya Ndaka.—Mituya 34:2, 5, NW; Genese 15:18.
16:30, NW—“Mpasi makasi” liboso ya Yehova elimboli nini? Liloba “mpasi” esalelami awa lokola elilingi mpo na kolobela bobangi mpe limemya makasi mpo na Yehova.
16:1, 37-40; 21:29, 30; 22:19—Ebongiseli nini ya losambo bazalaki kosalela na Yisalaele banda ntango bamemaki sanduku ya kondimana na Yelusaleme tii ntango batongaki tempelo? Ntango Davidi amemaki sanduku ya kondimana na Yelusaleme mpe atyaki yango na kati ya hema oyo asalaki, Sanduku yango ezalaki na kati ya tabenakle te na boumeli ya bambula ebele. Nsima ya komema yango na Yelusaleme, batikaki yango na kati ya hema wana. Tabenakle ezalaki na Gibona epai Nganga-Monene Sadoko ná bandeko na ye bakobaki kopesaka bambeka oyo Mobeko esɛngaki. Bakobaki kosala bongo tii ntango basilisaki kotonga tempelo na Yelusaleme. Ntango basilisaki kotonga tempelo, bamemaki na Yelusaleme tabenakle oyo ezalaki na Gibona mpe bakɔtisaki sanduku ya kondimana na Esika oyo Eleki Mosantu ya tempelo.—1 Mikonzi 8:4, 6.
Mateya mpo na biso:
13:11. Na esika tósilika mpe tópesa Yehova foti soki milende na biso mpo na kokokisa likambo moko elongi te, tosengeli nde kotalela likambo yango malamumalamu mpo na koyeba nini esalaki ete tólonga te. Na ntembe te, yango nde Davidi asalaki. Azwaki liteya na libunga oyo asalaki mpe na nsima amemaki Sanduku na Yelusaleme na lolenge ebongi.a
14:10, 13-16; 22:17-19. Liboso ya kosala likambo nyonso oyo ekotalela elimo na biso, tosengeli ntango nyonso kobondela Yehova mpe koluka litambwisi na ye.
16:23-29. Tosengeli kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso.
18:3. Yehova akokisaka bilaka na ye. Na nzela ya Davidi, akokisaki elaka na ye ya kopesa momboto ya Abalayama mokili ya Kanana mobimba, “longwa na ebale monene kino ebale ya Pelata.”—Genese 15:18; 1 Ntango 13:5.
21:13-15. Yehova ayebisaki anzelu asukisa bolɔzi mpamba te akokaka te komona bato na ye bazali konyokwama. Ya solo, “mawa na ye ezali monene mingi.”b
22:5, 9; 29:3-5, 14-16. Yehova apesaki Davidi nzela te ya kotongela ye tempelo, kasi ye apesaki makabo mingi. Mpo na nini? Mpamba te amonaki ete biloko nyonso oyo azwaki, azwaki yango mpo na motema malamu ya Yehova. Elimo wana esengeli mpe kotinda biso tópesaka makabo mingi.
24:7-18. Ebongiseli oyo Davidi asalaki ya bituluku 24 ya banganga ezalaki kaka ata na ntango oyo anzelu ya Yehova abimelaki Zekalia, tata ya Yoane Mobatisi mpe asakolaki ete Yoane akobotama. Lokola Zekalia azalaki moto ya “etuluku ya Abiya,” ntango anzelu asololaki na ye, azalaki kosala na tempelo mpo ekómaki ngala na bango. (Luka 1:5, 8, 9) Lisolo ya losambo ya solo ezali lisapo te, kasi ezali mpenza lisolo ya makambo ya solo. Tokozwa matomba mingi soki tozali kondima litambwisi ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” na oyo etali losambo ya Yehova oyo ebongisami malamumalamu lelo oyo.—Matai 24:45.
Salelá Yehova “na molimo ya botosi”
Mokanda ya Liboso ya Ntango elobeli kaka kolandana ya mabota te. Elobeli mpe ndenge Davidi amemaki sanduku ya kondimana na Yelusaleme, bitumba minene oyo alongaki, bibongiseli oyo ezwamaki mpo na kotonga tempelo mpe ndenge banganga ya libota ya Levi bakabolamaki na bituluku. Na ntembe te, makambo nyonso oyo Ezela alobeli na Mokanda ya Liboso ya Ntango esalisaki mpenza bana ya Yisalaele mpe etindaki bango bázongela molende na bango mpo na losambo ya Yehova na kati ya tempelo.
Davidi apesaki ndakisa malamu mpenza na likambo ya kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye. Na esika ya koluka mikumba ya lokumu, Davidi alukaki kosala mokano ya Nzambe. Tolendisami ete tósalela toli oyo apesaki ya kosalela Yehova “na motema mobimba mpe na molimo ya botosi.”—1 Ntango 28:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba mateya mosusu oyo tokoki kozwa na likambo oyo Davidi asalaki ntango alukaki komema Sanduku na Yelusaleme, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2005, nkasa 16-19.
b Mpo na koyeba mateya mosusu oyo tokoki kozwa na resansema ya mabe oyo Davidi asalaki, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2005, nkasa 16-19.
[Etanda/Bililingi na nkasa 8-11]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Kobanda na Adama tii na Noa (mbula 1 056)
4026 L.T.B. Adama
Mbula 130 ⇩
Sete
105 ⇩
Enosi
90 ⇩
Kainana
70 ⇩
Maalaleele
65 ⇩
Yaledi
162 ⇩
Enoka
65 ⇩
Metusela
187 ⇩
Lameki
182 ⇩
2970 L.T.B. NOA abotami
Kobanda na Noa tii na Abalayama (mbula 952)
2970 L.T.B. Noa
Mbula 502 ⇩
Semi
100 ⇩
MPELA 2370 L.T.B.
Alapakasadi
35 ⇩
Sela
30 ⇩
Ebele
34 ⇩
Pelege
30 ⇩
Leu
32 ⇩
Selugu
30 ⇩
Naolo
29 ⇩
Tela
130 ⇩
2018 L.T.B. ABALAYAMA abotami
Kobanda na Abalayama tii na Davidi: mabota 14 (mbula 911)
2018 L.T.B. Abalayama
Mbula 100
Yisaka
60 ⇩
Yakobo
Soki 88 ⇩
Yuda
⇩
Pelezi
⇩
Ezeloni
⇩
Lama
⇩
Aminadaba
⇩
Naasoni
⇩
Salamoni
⇩
Boazi
⇩
Obede
⇩
Yese
⇩
1107 L.T.B. DAVIDI abotami