Nzambe akokaki kondima ye
TOSALELAKA Yehova, tolingaka ete andima biso mpe apambola biso. Kasi tokosala nini mpo Nzambe andima biso? Na ntango ya kala, ezalaki na bato mosusu oyo basalaki masumu minene kasi na nsima Nzambe andimaki bango. Basusu bazalaki na bizaleli malamu kasi nsukansuka Nzambe andimaki bango lisusu te. Na yango tokoki komituna boye: “Eloko nini Yehova alukaka epai ya mokomoko na biso?” Ndakisa ya Rehoboame, mokonzi ya Yuda, ekoki kosalisa biso tózwa eyano.
ABANDAKI MABE
Salomo, tata ya Rehoboame ayangelaki Yisraele na boumeli ya mbula 40. (1 Bakonzi 11:42) Salomo akufaki na 997 L.T.B. Nsima ya liwa ya tata na ye, Rehoboame asalaki mobembo banda na Yerusaleme tii na Shekeme mpo na kokóma mokonzi. (2 Ntango 10:1) Azalaki nde kobanga kokóma mokonzi mpo tata na ye ayebanaki lokola moto ya bwanya mingi? Mosika te, Rehoboame akomonisa soki azali na bwanya oyo ekoki mpo na kokata makambo ya minene.
Bayisraele bamonaki ete bazali konyokwama mpe batindaki bato bákende koyebisa Rehoboame likambo oyo balingaki ete asalela bango: “Tata na yo akómisaki ekanganeli na biso makasi; sikoyo yo, lɛmbisá mosala makasi ya tata na yo mpe ekanganeli ya kilo oyo atyelaki biso, mpe tokosalela yo.”—2 Ntango 10:3, 4.
Likambo yango ezalaki pɛtɛɛ te mpo na Rehoboame. Soki andimi kosala oyo bato basɛngi ye, ye ná libota na ye mpe bato oyo bafandi na ndako na ye mbala mosusu balingaki kozala lisusu na biloko kitoko oyo bazalaki na yango te. Na ngámbo mosusu soki aboyi kosala likambo basɛngi ye, bakokaki kotombokela ye. Asalaki nini? Liboso asololaki na mikóló oyo bazalaki kosalisa tata na ye. Bayebisaki ye asala likambo basɛngi ye. Na nsima, Rehoboame asololaki mpe na bilenge ya mbula na ye mpe azwaki ekateli ya kobakisela bato mpasi. Ayebisaki bato ete: “Nakokómisa ekanganeli na bino kilo koleka, mpe ngai, nakobakisa yango. Tata na ngai apesaki bino etumbu na fimbo, kasi ngai, ekozala nde na fimbo oyo ezali na bitubeli.”—2 Ntango 10:6-14.
Yango ezali koteya biso nini? Lelo oyo, tozali na bandeko oyo bakómi mikóló mpe basaleli Yehova na boumeli ya bambula mingi, mpe bakoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu. Tózala na bwanya mpe tóyoka bango.—Yobo 12:12.
“BATOSAKI LILOBA YA YEHOVA”
Rehoboame abongisaki basoda mpo na kobundisa mabota oyo etombokaki. Nzokande, Yehova atindaki mosakoli Shemaya mpo na koloba na bango ete: “Bosengeli te komata mpo na kobunda na bandeko na bino, bana ya Yisraele. Bózonga moto na moto na ndako na ye, mpo likambo oyo esalemi euti na ngai.”—1 Bakonzi 12:21-24.a
Ezalaki pɛtɛɛ mpo Rehoboame atosa Yehova? Bato bakokanisa nini mpo na mokonzi na bango ya sika? Liboso ayebisaki bango ete akopesa bango etumbu “na bitubeli,” kasi na mbala oyo asalaki likambo moko oyo ekamwisaki bato! (Talá mpe 2 Ntango 13:7.) Ye ná basoda na ye “batosaki liloba ya Yehova mpe bazongaki na ndako ndenge Yehova alobaki.”
Likambo yango ezali koteya biso nini? Kotosa Nzambe ezali ntango nyonso likambo ya bwanya ata soki bato basɛki biso. Kotosa Nzambe esalaka ete andima biso mpe yango ememelaka biso mapamboli.—Kolimbola Mibeko 28:2.
Makambo esukaki ndenge nini mpo na Rehoboame? Rehoboame akobaki koyangela libota ya Yuda mpe ya Benyamina, mpe azwaki ekateli ya kotonga bingumba ya sika na bisika oyo azalaki koyangela. Asalaki mpe ete bingumba mosusu ekóma makasi “na ndenge moko ya kosakana te.” (2 Ntango 11:5-12) Likambo eleki ntina, na ntango moko boye atosaki mibeko ya Yehova. Lokola bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele ebandaki kosambela bikeko, bato mingi bakendaki na Yerusaleme mpo na kopesa Rehoboame mpe losambo ya solo mabɔkɔ. (2 Ntango 11:16, 17) Na yango, lokola Rehoboame atosaki Yehova, bokonzi na ye ekómaki makasi.
REHOBOAME ASALAKI LISUMU MPE ABONGOLAKI MOTEMA
Ntango bokonzi ya Rehoboame ekómaki makasi, asalaki likambo moko ya mabe. Atikaki kotosa mibeko ya Yehova mpe abandaki kosambela banzambe ya lokuta! Mpo na nini? Mama na ye oyo azalaki Moamone nde atindaki ye asala bongo? (1 Bakonzi 14:21) Eyebani te, kasi ekólo mobimba elandaki ndakisa mabe na ye. Yango wana, Yehova atikaki ete mokonzi Shishake ya Ezipito abɔtɔla bingumba ebele ya Yuda. Esalemaki bongo atako Rehoboame akómisaki bingumba makasi mpenza!—1 Bakonzi 14:22-24; 2 Ntango 12:1-4.
Makambo ebebaki mpenza ntango Shishake mpe basoda na ye bayaki kobundisa Yerusaleme, esika Rehoboame azalaki koyangela. Na ntango yango, mosakoli Shemaya apesaki Rehoboame ná bankumu na ye nsango oyo eutaki epai ya Nzambe ete: “Bino botiki ngai, ngai mpe natiki bino na lobɔkɔ ya Shishake.” Rehoboame asalaki nini ntango azwaki disiplini? Ayokaki mpenza! Biblia elobi ete: “Bankumu ya Yisraele mpe mokonzi bamikitisaki mpe balobaki boye: ‘Yehova azali sembo.’” Na yango, Yehova abikisaki Rehoboame, mpe Yerusaleme ebebisamaki te.—2 Ntango 12:5-7, 12.
Na nsima, Rehoboame akobaki koyangela bokonzi ya Yuda. Liboso akufa, apesaki bana na ye makabo ebele. Mbala mosusu asalaki bongo mpo alingaki komindimisa ete bakotombokela te ndeko na bango Abiya, oyo asengelaki kokóma mokonzi nsima na ye. (2 Ntango 11:21-23) Na ndenge yango, Rehoboame amonisaki bwanya mingi koleka kutu ntango azalaki elenge.
REHOBOAME AZALAKI MOTO YA NDENGE NINI?
Atako Rehoboame asalaki makambo mosusu ya malamu, Biblia elobi ete “asalaki oyo ezali mabe.” Mpo na nini? Mpo “alendisaki motema na ye te mpo na koluka Yehova.” Yango wana Yehova asepelaki na ye te.—2 Ntango 12:14.
Ndakisa ya Rehoboame eteyi biso nini? Na bantango mosusu atosaki Nzambe. Asalaki makambo mosusu ya malamu mpo na basaleli ya Yehova. Kasi, azalaki mpenza moninga ya motema ya Yehova te, mpe azalaki na mposa makasi ya kotosa ye te. Kutu, atikaki kosala oyo ezali malamu mpe abandaki kosambela banzambe ya lokuta. Tokoki komituna boye: ‘Ntango Rehoboame andimaki disiplini ya Yehova, ezalaki mpenza mpo ayokaki mawa makasi mpo na mabunga asalaki mpe alingaki kosepelisa ye? To asalaki yango mpo basusu balobaki ete asengeli kosala bongo?’ (2 Ntango 11:3, 4; 12:6) Nsima ya mwa ntango asalaki lisusu mabe. Akesenaki mpenza na nkɔkɔ na ye, Mokonzi Davidi! Ezali solo ete Davidi asalaki mabunga, kasi abongolaki mpenza motema na masumu asalaki. Mpe alingaki Yehova mpe losambo ya solo bomoi na ye mobimba.—1 Bakonzi 14:8; Nzembo 51:1, 17; 63:1.
Tokoki koyekola makambo mingi na lisolo ya Rehoboame. Ezali malamu kosunga libota na biso mpe kosalela basusu makambo ya malamu. Kasi mpo Yehova andima biso, tosengeli kosambela ye na lolenge oyo ekosepelisa ye, mpe tosengeli kozala na boyokani malamu na ye.
Mpo na kosala yango, tosengeli kolinga Yehova na motema na biso mobimba. Kaka ndenge esɛngaka kotya nkoni mpo mɔtɔ ekoba kopela, tosengeli mpe kokoba koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala, komanyola yango, kokoba kobondela mpo tókóma kolinga Nzambe mingi koleka. (Nzembo 1:2; Baroma 12:12) Bolingo yango ekotinda biso tósepelisa Yehova na makambo nyonso. Ekosala mpe ete tóyoka mawa ntango tosali libunga mpe tósɛnga Yehova alimbisa biso. Yango ekosala ete tózala te lokola Rehoboame, kasi tokokangama mpenza na losambo ya solo.—Yuda 20, 21.
a Lokola Salomo atikalaki sembo te, Nzambe alobaki ete bokonzi ekokabwana na biteni mibale.—1 Bakonzi 11:31.