Pusaná penepene na Nzambe
Ntango mibange bakozonga lisusu bilenge
NANI na kati na biso asepelaka na makambo oyo bobange ememaka: mposo ya nzoto elɛmbi, miso ezali komona lisusu malamu te, matoi ezali koyoka lisusu malamu te mpe makolo ekómi kolɛmba? Okoki komituna boye: ‘Mpo na nini Nzambe akelaki biso na likoki ya kozala na makasi ntango tozali bilenge mpe na nsima asala ete tókóma kobanga makambo oyo bobange ememaka?’ Likambo ya esengo ezali ete Nzambe akanaki bongo te mpo na biso. Kutu, na bolingo na ye, akani kosikola biso na makambo oyo ememaka na bobange. Tótalela maloba oyo ayebisaki Yobo, ndenge ezali na Yobo 33:24, 25.
Tótalela likambo ya Yobo, moto ya sembo oyo Yehova azalaki kolinga. Kozanga ete Yobo ayeba yango, Satana atyelaki bosembo ya Yobo ntembe, alobaki ete asalelaka Nzambe kaka mpo na matomba na ye moko. Kasi, lokola Yehova azalaki kotyela Yobo motema mpe ayebaki ete azali na nguya ya kolongola mabe, apesaki Satana nzela ameka Yobo. Na nsima, Satana “abwakelaki Yobo maladi mabe ya babibɔ banda na litambe tii na motó na ye.” (Yobo 2:7) Nzoto ya Yobo ekɔtaki bankusu, mpe mposo na ye esalaki bikokoto, ekómaki moindo, mpe ebandaki kokweakwea. (Yobo 7:5; 30:17, 30) Okoki komona na makanisi mpasi oyo azalaki koyoka? Atako bongo, Yobo atikalaki sembo, alobaki ete: “Kino nakokufa, nakotika bosembo na ngai te!”—Yobo 27:5.
Nzokande, Yobo asalaki libunga moko monene. Ntango amonaki lokola ete akokufa, abandaki komitungisa mingi mpe komilongisa, “kotánga molimo na ye moyengebene na esika ete ezala Nzambe.” (Yobo 32:2) Elihu, molobeli ya Nzambe, apamelaki Yobo. Kasi, Elihu ayebisaki mpe Yobo nsango moko ya malamu oyo eutaki epai ya Nzambe: “Kotika ye [Yobo] akita na libulu [nkunda ya bato nyonso] te! Nazwi lisiko! Mosuni na ye ekóma ya sika koleka oyo ya bolenge; azonga na mikolo oyo azalaki na makasi ya bolenge.” (Yobo 33:24, 25) Na ntembe te, maloba wana epesaki mpenza Yobo elikya. Asengelaki te kokoba konyokwama tii na liwa. Soki Yobo abongolaki motema, Nzambe alingaki kondima lisiko mpo na ye mpe kosikola ye na bampasi na ye.a
Na komikitisa nyonso, Yobo andimaki básembola ye mpe abongolaki motema. (Yobo 42:6) Emonani ete Yehova andimaki mbeka ya lisiko mpo na Yobo, atikaki ete yango ezipa libunga na ye mpe efungola nzela mpo Nzambe abikisa ye mpe apesa ye mbano. Yehova “apambolaki nsuka ya Yobo koleka ebandeli na ye.” (Yobo 42:12-17) Kanisá naino ndenge Yobo abɔndisamaki ntango, longola ndenge maladi na ye ya mabe esilaki, mosuni na ye ekómaki “ya sika koleka oyo ya bolenge”!
Lisiko oyo Nzambe andimaki mpo na Yobo, esilisaki makambo nyonso te mpo atikalaki kaka moto ya kozanga kokoka mpe na nsima akufaki. Tozali na lisiko oyo eleki malamu mpenza mpo na biso. Na bolingo na ye, Yehova apesaki biso mwana na ye Yesu lokola lisiko. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Baoyo nyonso bazali kondima lisiko yango bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. Na mokili ya sika oyo ezali koya, Nzambe akosikola bato ya sembo na makambo nyonso oyo ememaka na bobange. Mpo na nini te koyekola makambo mingi oyo ekosalisa yo omitambwisa na ndenge oyo ekosalisa yo omona ntango oyo mibange bakomona ‘mosuni na bango ekómi ya sika koleka oyo ya bolenge’?
Botángi ya Biblia mpo na sanza ya Aprili:
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba “lisiko” oyo esalelami awa, elimboli “kozipa.” Mpo na Yobo, lisiko ekokaki kozala mbeka ya nyama oyo Nzambe akokaki kondima mpo na kozipa libunga ya Yobo.—Yobo 1:5.