LISOLO YA BOYEKOLI 6
Batelá bosembo na yo!
“Kino nakokufa, nakotika bosembo na ngai te!”—YOBO 27:5.
LOYEMBO 34 Tambolá na bosembo
NA MOKUSEa
1. Ndenge nini Batatoli oyo paragrafe elobeli batosaki Yehova?
KANISÁ ete makambo oyo misato ekómeli Batatoli ya Yehova. (1) Elenge mwasi moko azali na eteyelo mpe molakisi asɛngi bana-kelasi nyonso básangana na fɛti oyo eyokani te na mateya ya Biblia. Elenge yango ayebi ete fɛti yango esepelisaka Nzambe te, mpe na limemya nyonso aboyi. (2) Elenge mobali moko ya nsɔninsɔni azali kosakola ndako na ndako. Amikundweli ete mwana moko ya kelasi na bango afandaka na ndako oyo elandi, mpe mwana yango asɛkaka Batatoli ya Yehova. Atako bongo, elenge mobali yango akei na ndako yango mpe abɛti porte. (3) Mobali moko asalaka mosala makasi mpo na koleisa libota na ye, kasi mokolo moko patrɔ na ye asɛngi ye asala likambo moko oyo ebongi te to oyo ebuki mobeko. Atako akoki kobungisa mosala, mobali yango ayebisi patrɔ ete akosala yango te mpe akotosa mibeko mpo Nzambe asɛngi bongo epai ya basaleli na ye.—Rom. 13:1-4; Ebr. 13:18.
2. Mituna nini tokotalela, mpe mpo na nini?
2 Ezaleli nini omoni epai ya bato wana misato? Mbala mosusu omoni bizaleli ebele, na ndakisa mpiko, mpe kolongobana. Kasi bamonisi mpe ezaleli moko ya motuya mpenza: bosembo. Bango nyonso misato batikali sembo epai ya Yehova. Mokomoko aboyi kobuka mibeko ya Nzambe. Bosembo etindi bango básala ndenge oyo basali. Na ntembe te, Yehova asepeli na bango ndenge bamonisi ezaleli yango. Biso mpe tolingaka kosepelisa Tata na biso ya likoló. Na yango, tótalela mituna oyo: Bosembo ezali nini? Mpo na nini bosembo ezali na ntina mingi? Mpe ndenge nini tokoki kokómisa makasi ekateli na biso ya kobatela bosembo na ntango oyo ya mikakatano?
BOSEMBO EZALI NINI?
3. (a) Bosembo elimboli nini mpo na biso? (b) Bandakisa nini ekoki kosalisa biso tóyeba soki bosembo elimboli nini?
3 Mpo na biso basaleli ya Nzambe, bosembo elimboli kolinga Yehova na motema mobimba mpe kokangama makasi na ye; yango ekosala ete tózwaka ntango nyonso bikateli oyo ekosepelisa ye. Tótala ndenge Biblia esalelaka liloba bosembo. Na Biblia, liloba “bosembo” elimboli libosoliboso mobimba, oyo ezangi mbeba to oyo ezali ndambo te. Na ndakisa, Bayisraele bazalaki kopesa Yehova mbeka ya nyama, mpe Mibeko elobaki ete nyama yango esengelaki kozala na mbeba ata moko te.b (Lev. 22:21, 22) Basaleli ya Nzambe basengelaki te kopesa nyama oyo ezangi lokolo moko, litoi moko, to liso moko; basengelaki mpe te kopesa nyama oyo ezali na maladi. Mpo na Yehova, ezalaki na ntina ete nyama ezala ya mobimba, ezanga mbeba, mpe ezala ya ndambo te. (Mal. 1:6-9) Tokoki komona ntina oyo Yehova alingaka eloko oyo ezangi mbeba to oyo ezali mobimba. Soki tozali kosomba eloko moko, ezala mbuma, buku, to esaleli moko boye, tozwaka te oyo ezali na mbeba to oyo ezali ndambo. Tolingaka oyo ezali ya mobimba, ezangi mbeba, to ezali ya ndambo te. Yehova mpe amiyokaka bongo mpo na bolingo oyo tolingaka ye mpe bosembo na biso. Esengeli kozala ya mobimba, ezanga mbeba, mpe ezala ya ndambo te.
4. (a) Mpo na nini moto ya kozanga kokoka akoki komonisa bosembo? (b) Na kotalela Nzembo 103:12-14, Yehova asɛngaka biso nini?
4 Elingi nde koloba ete tosengeli kozala bato ya kokoka mpo tómonisa bosembo? Mbala mosusu tomonaka ete tozali mpenza bato ya kozanga kokoka, to kutu tosalaka mabunga ebele. Tótalela ntina mibale oyo tosengeli te kokanisa ete esengeli tózala bato ya kokoka mpo tómonisa bosembo. Ya liboso, Yehova atyaka likebi na mabunga na biso te. Liloba na ye elobi: “Soki otalaka kaka mabunga, Ee Yah, Ee Yehova, nani akotɛlɛma?” (Nz. 130:3) Yehova ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka, bato ya masumu mpe mbala mingi alimbisaka biso. (Nz. 86:5) Ya mibale, ayebi esika makoki na biso esuki, mpe asɛngaka biso te tósala makambo oyo tokokoka te. (Tángá Nzembo 103:12-14.) Sikoyo, na ndenge nini tokoki kozala mobimba, na mbeba te mpe ndambo te na miso na ye?
5. Ndenge nini bolingo etindaka basaleli ya Yehova bámonisa bosembo?
5 Bolingo nde etindaka basaleli ya Yehova bámonisa bosembo. Tosengeli kolinga Tata na biso ya likoló mpe kokangama na ye makasi, na ndenge ya mobimba, ya kozanga mbeba mpe ya ndambo te. Soki bolingo na biso etikali bongo, ata na ntango ya komekama, wana tomonisi bosembo. (1 Nt. 28:9; Mat. 22:37) Tókanisa lisusu Batatoli misato oyo tolobelaki na ebandeli. Nini etindaki bango básala ndenge basalaki? Elenge mwasi wana alingaka kosakana ata mwa moke te na eteyelo? To elenge mobali azalaki na mposa báyokisa ye nsɔni na porte moko? Mpe tata wana ya libota azalaki koluka kobungisa mosala? Te. Bayebi nde ete Yehova atyá mibeko ya sembo, mpe balingaki kosala makambo oyo ekosepelisa Tata na bango ya likoló. Bolingo oyo balingaka Yehova etindaki bango bázwa bikateli oyo ekosepelisa ye. Na ndenge yango, bamonisaki bosembo na bango na misala.
MPO NA NINI BOSEMBO EZALI NA NTINA MINGI?
6. (a) Mpo na nini bosembo ezali na ntina mingi? (b) Na ndenge nini Adama ná Eva bamonisaki bosembo te?
6 Mpo na nini bosembo ezali na ntina mingi mpo na mokomoko na biso? Ezali na ntina mingi mpo Satana abɛtɛlá Yehova ntembe, abɛtɛlá mpe yo ntembe. Anzelu yango oyo atombokaki, amikómisaki Satana, to “Motɛmɛli,” na elanga ya Edene. Alukaki kobebisa lokumu ya Yehova na ndenge alobaki ete Nzambe azali Moyangeli ya mabe, ya moyimi mpe oyo azangi bosembo. Likambo ya mawa, Adama ná Eva bandimelaki Satana, mpe batombokelaki Yehova. (Eba. 3:1-6) Bomoi na elanga ya Edene epesaki bango mabaku ndenge na ndenge ya kokómisa makasi bolingo na bango mpo na Yehova. Kasi, na ntango oyo Satana abimisaki ntembe, bolingo na bango ezalaki ya mobimba te, ezalaki na mbeba mpe ezalaki ya ndambo. Motuna mosusu oyo ebimaki yango oyo: Moto akoki kotikala sembo epai ya Yehova Nzambe mpo alingaka ye? Na maloba mosusu, bato bakoki mpenza komonisa bosembo? Motuna yango ebimaki mpo na Yobo.
7. Na kotalela Yobo 1:8-11, Yehova ayokaki ndenge nini mpo na bosembo ya Yobo? Bongo Satana?
7 Yobo azalaki na bomoi na eleko oyo Bayisraele bazalaki na Ezipito. Moto moko te azalaki sembo lokola ye. Ndenge moko na biso, Yobo azalaki moto ya kozanga kokoka. Asalaki mabunga. Kasi, Yehova alingaki ye mpo na bosembo na ye. Emonani lokola ete Satana asilaki kotumola Yehova mpo na bosembo ya bato. Yango wana, Yehova abendaki likebi ya Satana epai ya Yobo. Bomoi ya Yobo emonisaki polele ete Satana azali mobuki-lokuta! Satana asɛngaki ete bosembo ya Yobo emekama. Yehova atyelaki moninga na ye Yobo motema, mpe atikaki Satana ameka ye.—Tángá Yobo 1:8-11.
8. Ndenge nini Satana anyokolaki Yobo?
8 Satana azali mabe mpenza, mpe azali mobomi. Asalaki ete bozwi nyonso ya Yobo esila, abomaki basaleli na ye, mpe abebisaki lokumu na ye. Atyaki miso na libota ya Yobo, abomaki bana na ye zomi. Na nsima, abwakelaki Yobo maladi ya mabe, abimaki babibɔ oyo enyokolaki ye nzoto mobimba, kobanda na motó tii na makolo. Mwasi ya Yobo abulunganaki mpe azalaki na mawa mingi; ayebisaki Yobo atika bosembo na ye, alakela Nzambe mabe mpe akufa. Yobo asɛngaki liwa, kasi akobaki kobatela bosembo na ye. Na nsima, Satana alukaki mayele mosusu. Asalelaki mibali misato oyo bazalaki baninga ya Yobo. Mibali yango bayaki kotala Yobo mpo na mwa mikolo, kasi babɔndisaki ye te. Balobaki makambo ebele ya mabe mpe bapamelaki ye. Balobaki ete Nzambe nde abimiselaki ye bampasi wana mpe ete azalaki kokipe bosembo na ye te. Balobaki kutu ete Yobo azalaki moto mabe mpe abongaki na makambo ya mpasi oyo ezalaki kokómela ye!—Yobo 1:13-22; 2:7-11; 15:4, 5; 22:3-6; 25:4-6.
9. Atako amekamaki makasi, Yobo aboyaki kosala nini?
9 Yobo asalaki nini mpo na mikakatano nyonso wana? Azalaki moto ya kokoka te. Na nkanda nyonso, apamelaki babɔndisi yango ya lokuta mpe alobaki makambo oyo na nsima amonaki ete ezalaki bilobaloba mpamba. Amimonaki moyengebene na esika alongisa boyengebene ya Nzambe. (Yobo 6:3; 13:4, 5; 32:2; 34:5) Kasi, ata na ntango wana ya mpasi mpenza, Yobo aboyaki kopesa Yehova Nzambe mokɔngɔ. Aboyaki kondima lokuta ya baninga na ye wana. Alobaki boye: “Nakoki kokanisa ata moke te ete natánga bino bayengebene! Kino nakokufa, nakotika bosembo na ngai te!” (Yobo 27:5) Maloba yango ezali na ntina mingi mpenza. Yobo aboyaki kotika bosembo na ye; biso mpe tokoki kosala bongo.
10. Na ndenge nini ntembe oyo Satana abimisaki mpo na Yobo etali mpe yo?
10 Ntembe oyo Satana abimisaki mpo na Yobo etali mpe mokomoko na biso. Na ndenge nini? Satana alobaka ete olingaka Yehova Nzambe mpenza te, ete okotika kosalela ye mpo na kobikisa bomoi na yo, mpe ete okokoka te kobatela bosembo na yo! (Yobo 2:4, 5; Em. 12:10) Yango etindi yo omiyoka ndenge nini? Na ntembe te, esali yo mpasi mpenza! Kasi, kanisá naino: Yehova atyelaka yo motema mpe apesi yo libaku moko ya malamu. Atiki Satana ameka bosembo na yo. Atye motema ete okoki kobatela bosembo na yo mpe kosalisa na komonisa ete Satana azali mobuki-lokuta. Mpe alaki ete akosalisa yo mpo osala yango. (Ebr. 13:6) Ezali libaku malamu mpenza ete Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba atyela yo motema! Omoni mpo na nini bosembo ezali na ntina mingi? Esalisaka biso tómonisa lokuta ya Satana, tóbatela lokumu ya nkombo ya Tata na biso mpe tómonisa ete tondimi boyangeli na ye. Ndenge nini tokoki kobatela bosembo na biso?
NDENGE OYO TOKOKI KOBATELA BOSEMBO NA BISO LELO OYO
11. Na likambo nini tokoki kozwa mateya epai ya Yobo?
11 Satana abakisi mpenza milende mpo na konyokola biso na ‘mikolo oyo ya nsuka’ mpe ya mpasi. (2 Tim. 3:1) Na ntango oyo ya yikiyiki, ndenge nini tokoki kokómisa makasi ekateli na biso ya kobatela bosembo na biso? Na likambo oyo mpe, tokoki kozwa mateya epai ya Yobo. Bambula ebele mpenza liboso ete amekama, Yobo abatelaki bosembo na ye epai ya Yehova mbala mingi. Tótalela mateya misato oyo tokoki kozwa epai ya Yobo na likambo etali kokómisa makasi ekateli na biso ya kobatela bosembo na biso.
12. (a) Ndenge emonisami na Yobo 26:7, 8, 14, nini esalisaki Yobo akolisa ezaleli ya kobanga mpe komemya Yehova? (b) Nini ekoki kosalisa biso tóbanga Nzambe?
12 Koyekola kobanga Yehova esalisaki Yobo akóma kolinga ye mingi. Yobo alekisaki ntango mingi na kotalatala biloko ya kokamwa oyo Yehova akelá. (Tángá Yobo 26:7, 8, 14.) Yobo akamwaki mingi ntango akanisaki mabele, likoló, mapata, mpe nkake, kasi andimaki ete ayebaki kaka mwa makambo moke mpo na ebele ya biloko oyo Nzambe akelá. Azalaki mpe kozwa maloba ya Yehova na motuya. Alobaki boye: “Nabombi maloba ya monɔkɔ na ye.” (Yobo 23:12) Yobo azalaki kobanga Yehova mpe komemya ye mingi. Alingaki Tata na ye mpe alukaki kosepelisa ye. Na yango, ekateli ya Yobo ya kobatela bosembo na ye ezalaki se kokóma makasi. Tosengeli komekola Yobo. Na bokeseni na bato ya mikolo ya Yobo, biso toyebi makambo mingi mpenza oyo etali biloko ya kokamwa oyo Nzambe akelá. Mpe tozali na Biblia mobimba, oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe, mpo na kosalisa biso tóyeba bizaleli ya Yehova. Makambo nyonso oyo toyekolaka ekoki kosalisa biso tóbanga ye. Soki tozali kobanga mpe komemya Yehova, yango ekotinda biso tólinga ye, tótosa ye, mpe tózala na ekateli makasi ya kobatela bosembo na biso.—Yobo 28:28.
13-14. (a) Ndenge emonisami na Yobo 31:1, ndenge nini Yobo amonisaki botosi? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yobo?
13 Kotosa Nzambe na makambo nyonso esalisaki Yobo azala na ekateli makasi ya kobatela bosembo na ye. Yobo ayebaki ete mpo amonisa bosembo, asengeli kotosa Yehova. Kutu, mbala nyonso oyo totosaka Yehova, tokómisaka makasi ekateli na biso ya kobatela bosembo. Yobo asalaki makasi atosaka Nzambe mokolo na mokolo. Na ndakisa, azalaki komemya basi. (Tángá Yobo 31:1.) Lokola azalaki na mwasi na ye, ayebaki ete ezali malamu te kolula mwasi mosusu. Lelo oyo, mokili emekaka biso mingi na makambo ya pite. Ndenge moko na Yobo, tokoboya kolula moto nyonso oyo azali molongani na biso te? Tokoboya mpe kotala bililingi ya mbindo to pornografi ya ndenge nyonso? (Mat. 5:28) Soki tozali komipekisa ndenge wana mokolo na mokolo, tokozala na ekateli makasi ya kobatela bosembo na biso.
14 Yobo atosaki mpe Yehova na ndenge oyo azalaki kotalela biloko ya mokili. Ayebaki ete soki atyeli bozwi na ye motema, akosala libunga moko monene mpe akozwa etumbu. (Yobo 31:24, 25, 28) Lelo oyo, bato ebele balingi biloko ya mokili. Soki toyekoli kotalela mbongo mpe biloko ya mokili na bokatikati, ndenge Biblia esɛngi biso, tokozala na ekateli makasi ya kobatela bosembo na biso.—Mas. 30:8, 9; Mat. 6:19-21.
15. (a) Nini esalisaki Yobo abatela bosembo na ye? (b) Mpo na nini kobosana te elikya oyo Yehova apesi ekoki kosalisa biso?
15 Kozala ntango nyonso na elikya ete Nzambe akopesa ye mbano esalisaki Yobo abatela bosembo na ye. Yobo andimaki ete Nzambe azalaki kosepela na bosembo na ye. (Yobo 31:6) Atako amekamaki makasi, atyaki motema ete nsukansuka Yehova akopesa ye mbano. Na ntembe te, yango esalisaki ye akangama na bosembo na ye. Yehova asepelaki mpenza na bosembo ya Yobo mpe apambolaki ye mingi, atako azalaki kaka moto ya kozanga kokoka! (Yobo 42:12-17; Yak. 5:11) Yobo akozwa lisusu mbano monene koleka na mikolo oyo ezali koya. Ozalaka mpenza na elikya ete Yehova akopesa yo mbano mpo na bosembo na yo? Nzambe na biso abongwani te. (Mal. 3:6) Soki tozali kobosana te ete azwaka bosembo na biso na motuya, tokoki kobatela na motema na biso elikya kitoko mpo na mikolo oyo ezali koya.—1 Tes. 5:8, 9.
16. Tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini?
16 Na yango, kotika bosembo na yo ata mokolo moko te! Na bantango mosusu, okoki komona ete bato nyonso zingazinga na yo bazali sembo te kaka yo, kasi yebá ete ozali yo moko te. Ozali na kati ya bamilio ya bato ya sembo oyo bazali kobatela bosembo na bango na mokili mobimba. Okozala mpe na molɔngɔ ya mibali ná basi ya kondima oyo babatelaki bosembo na bango na ntango ya kala, ata liboso ya liwa. (Ebr. 11:36-38; 12:1) Biso nyonso tózala na ekateli ya kosala lokola Yobo, oyo alobaki ete: “Nakotika bosembo na ngai te!” Mpe tiká ete bosembo na biso epesa Yehova nkembo libela na libela!
LOYEMBO 124 Tótikala sembo
a Bosembo ezali nini? Mpo na nini Yehova asepelaka ete basaleli na ye bámonisa ezaleli yango? Mpo na nini bosembo ezali na ntina mpo na mokomoko na biso? Lisolo oyo ekosalisa biso tózwa biyano ya Biblia na mituna yango. Ekosalisa mpe biso tómona polele ndenge ya kozala na ekateli makasi ya kobatela bosembo mokolo na mokolo. Kosala bongo ekomemela biso mapamboli ebele.
b Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “kozanga mbeba” mpo na nyama ezali na boyokani na liloba “bosembo” oyo esalelamaka mpo na bato.
c ELILINGI: Yobo, ntango akómi naino mobange te, azali kolakisa bana na ye mosusu biloko ya kokamwa oyo Yehova akelá.
d ELILINGI: Ndeko mobali moko aboyi kotala pornografi oyo baninga ya mosala bazali kotala.
e ELILINGI: Ndeko mobali moko atɛmɛli moto oyo azali kotinda ye asomba televizyo ya monene mpo azali na mbongo ya kosomba yango te.
f ELILINGI: Ndeko mobali moko azwi ntango ya kobondela mpe komanyola elikya ya Paradiso.