“Tótya likebi koleka mpenza”
“Ezali na ntina ete biso tótya likebi koleka mpenza na makambo oyo toyokaki, mpo tópɛngwa na nzela soki moke te.”—BAEBELE 2:1.
1. Monisá ndenge oyo kozanga kotya likebi ekoki komema likama.
SOKI tokamati kaka mboka lokola États-Unis, mbula na mbula bato soki 37 000 bakufaka na makama ya mituka. Bato oyo bayekolaka likambo yango bazali koloba ete soki basofɛlɛ bátambwisaka mituka na likebi mpenza, mbɛlɛ bato bakufaka ebele bongo te. Likebi ya basofɛlɛ mosusu ekendaka na bilembo oyo batyá na nzela, na bitanda minene ya bapiblisite to mpe basololaka na batelefone na bango ya mabɔkɔ. Bato mosusu mpe balyaka na ntango bazali kotambwisa motuka, mpe yango elongolaka likebi na bango. Kozanga kotya likebi mpo na makambo nyonso wana ekoki komema likama.
2, 3. Toli nini Paulo apesaki Baebele oyo bakómaki baklisto, mpe mpo na nini toli yango ebongaki mpenza?
2 Mbula soki 2 000 liboso ete básala motuka, ntoma Paulo alobelaki likambo moko oyo ezalaki komema Baebele mosusu oyo bakómaki baklisto na likama, mpamba te ezalaki kolongola likebi na bango. Liboso, Paulo amonisaki ete, nsima ya lisekwa ya Yesu, Nzambe apesaki ye esika ya lokumu oyo eleki ya baanzelu nyonso, mpamba te afandisaki ye na lobɔkɔ ya mobali na ye. Na nsima, Paulo alobaki boye: “Yango wana ezali na ntina ete biso tótya likebi koleka mpenza na makambo oyo toyokaki, mpo tópɛngwa na nzela soki moke te.”—Baebele 2:1.
3 Mpo na nini Baebele oyo bakómaki baklisto basengelaki ‘kotya likebi koleka mpenza na makambo oyo bayokaki’ na ntina na Yesu? Mpamba te, banda Yesu azongaki na likoló, mbula soki 30 esilaki koleka. Lokola Nkolo na bango azalaki lisusu awa na mabele te, Baebele mosusu oyo bakómaki baklisto bakómaki kotika kondima ya solosolo. Likebi na bango ekómaki kokende na Lingomba ya Bayuda, epai bazalaki kosambela liboso.
Basengelaki kotya likebi mingi mpenza
4. Nini ekokaki kobenda Baebele mosusu oyo bakómaki baklisto na kozonga na Lingomba ya Bayuda?
4 Nini ekokaki kobenda moklisto azonga lisusu na Lingomba ya Bayuda? Tosengeli koyeba ete losambo oyo ezalaki kosalema na kolanda Mibeko ezalaki na makambo mingi oyo ezalaki komonana na miso. Bato bazalaki komona banganga-nzambe, ata mpe koyoka nsolo ya bambeka oyo ezalaki kotumbama. Nzokande, na makambo mosusu, lingomba ya boklisto ezalaki mpenza ndenge wana te. Na ndakisa, baklisto bazalaki na Nganga-Nzambe Monene, Yesu Klisto, kasi na boumeli ya mbula soki 30, bazalaki komona ye na miso te. (Baebele 4:14) Bazalaki na tempelo, kasi esika mosantu na yango ezalaki nde kuna na likoló. (Baebele 9:24) Mibeko ezalaki kosɛnga bato ete bákatama ngenga na nzoto, nzokande kokatama ngenga ya baklisto ezalaki “oyo ya motema na nzela ye elimo.” (Baloma 2:29) Nyonso wana ekokaki kosala ete Baebele oyo bakómaki baklisto bákóma komona lingomba ya boklisto lokola likambo ya solo te.
5. Ndenge nini Paulo amonisaki ete losambo oyo Yesu abandisaki elekaki oyo ezalaki kosalema ndenge Mibeko esɛngaki?
5 Baebele oyo bakómaki baklisto basengelaki koyeba malamu likambo moko ya ntina mpenza oyo etali losambo oyo Klisto abandisaki. Moboko na yango ezalaki nde kondima kasi komona te; atako bongo, yango elekaki Mibeko oyo epesamaki na nzela ya mosakoli Moize. Kutu, Paulo akomaki boye: “Soki makila ya bantaba mpe ya bangɔmbɛ-mibali mpe putulu ya ngɔmbɛ-mwasi moko ya moke oyo emwangisami likoló ya baoyo bakómisami mbindo ezali kosantisa tii na kopɛtolama ya mosuni, na koleka boni makila ya Klisto, oyo na nzela ya elimo moko ya seko amikabaki epai ya Nzambe kozanga litɔnɔ, ekopɛtola masosoli na biso na misala ya kokufa mpo tósalela Nzambe ya bomoi mosala mosantu?” (Baebele 9:13, 14) Ya solo, bolimbisi oyo moto akoki kozwa mpo azali kondima mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kobikisa bato eleki mpenza bolimbisi oyo ezalaki kozwama na nzela ya bambeka oyo ezalaki kopesama ndenge Mibeko esɛngaki.—Baebele 7:26-28.
6, 7. (a) Likambo nini esɛngaki ete Baebele oyo bakómaki baklisto bázela te mpo na ‘kotya likebi koleka mpenza na makambo oyo bayokaki’? (b) Ntango Paulo akomelaki Baebele mokanda, etikalaki mbula boni liboso Yelusaleme ebomama? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
6 Ezali mpe na ntina mosusu oyo Baebele oyo bakómaki baklisto basengelaki kotya likebi mingi mpenza na makambo oyo bayokaki na ntina na Yesu. Yesu asakolaki ete Yelusaleme ekobebisama, alobaki boye: “Mikolo ekoyela yo wana banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko ya makasi na makonzí ya nsɔngɛ mpe bakozingela yo mpe bakonyokola yo epai na epai, mpe bakobwaka na mabelé yo ná bana na yo oyo bazali na kati na yo, mpe bakotika te libanga likoló na libanga na kati na yo, mpamba te ososolaki te ntango ya kotalama na yo.”—Luka 19:43, 44.
7 Ntango nini likambo yango esengelaki kosalema? Yesu ayebisaki mokolo te to ngonga te. Kasi, apesaki lilako oyo: “Ntango bokomona Yelusaleme ezingelami na mampinga oyo esalisali milako, boye bóyeba ete libebi na yango ekómi pene. Boye, tiká baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango bálongwa, mpe baoyo bazali na bamboka ya zamba bákɔta na kati na yango te.” (Luka 21:20, 21) Na boumeli ya mbula 30 oyo elandaki maloba wana ya Yesu, baklisto mosusu ya Yelusaleme bakómaki kosala mosala na bango na bolɛmbu mpe bakómaki kotya likebi na bango na makambo mosusu. Bakómaki lokola sofɛlɛ oyo azali kotala epai mosusu na ntango oyo azali kotambwisa motuka. Soki babongolaki makanisi na bango te, likama ezalaki kozela bango. Bálinga, bálinga te, kobebisama ya Yelusaleme ezalaki mosika te!a Tozali na elikya ete toli ya Paulo ezalaki lokola ngonga oyo ebɛtaki mpo na kolamusa baklisto ya Yelusaleme oyo bazalaki kolala mpɔngi na elimo.
“Tótya likebi koleka mpenza” lelo oyo
8. Mpo na nini tosengeli ‘kotya likebi koleka mpenza’ na solo ya Liloba ya Nzambe?
8 Lokola baklisto ya ekeke ya liboso, biso mpe tosengeli ‘kotya likebi koleka mpenza’ na solo ya Liloba ya Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te, biso mpe tozali liboso ya likama moko oyo elingi kosalema; ya mbala oyo, ezali kaka ekólo moko te nde ekobebisama, kasi ebongiseli ya makambo ya mokili mobimba. (Emoniseli 11:18; 16:14, 16) Ezali solo ete toyebi te mokolo mpe ngonga mpenza oyo Yehova akosala likambo yango. (Matai 24:36) Atako bongo, tozali mpenza komona na miso kokokisama ya bisakweli ya Biblia oyo ezali komonisa polele ete tozali na ‘mikolo ya nsuka.’ (2 Timote 3:1-5) Yango wana, tosengeli kokeba na eloko nyonso oyo ekoki kolongola likebi na biso. Tosengeli kotya likebi na Liloba ya Nzambe mpe tosengeli kobosana te ete mikolo etikali ya kotánga. Ezali se soki tozali kosala bongo nde ‘tokolonga kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kobima.’—Luka 21:36.
9, 10. (a) Ndenge nini tokoki kotya likebi na makambo ya elimo? (b) Na ndenge nini Liloba ya Nzambe ezali ‘mwinda na makolo na biso’ mpe ‘pole na nzela na biso’?
9 Na mikolo oyo ya ntina mingi, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali ‘kotya likebi koleka mpenza’ na makambo ya elimo? Ya liboso, tosengeli te kozangisaka makita mpe mayangani na biso baklisto. Ya mibale, tosengeli komipesa na koyekola Biblia mpo tókoka kozala penepene na Yehova, Mobandisi ya Biblia. (Yakobo 4:8) Soki tozali koyeba Yehova na nzela ya boyekoli ya biso moko mpe na nzela ya makita, tokozala lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki na Nzambe ete: “Liloba na yo ezali mwinda na [makolo] na ngai mpe pole na nzela na ngai.”—Nzembo 119:105.
10 Biblia ezalaka ‘pole ya nzela na biso’ na ntango ezali koyebisa biso makambo oyo Nzambe azali kokana kosala na mikolo ekoya. Ezalaka mpe ‘mwinda ya makolo na biso,’ elingi koloba ete ekoki kosalisa biso tóyeba oyo tosengeli kosala ntango tokutani na mikakatano ya bomoi. Yango wana, ezali na ntina ete “tótya likebi koleka mpenza” na ntango toyangani elongo na bandeko na biso mpo na koyoka mateya mpe na ntango biso moko tozali kotánga Liloba ya Nzambe. Boyebi oyo tozali kozwa ekosalisa biso tózwaka bikateli ya mayele mpe ya malamu oyo ekosepelisa motema ya Yehova. (Masese 27:11; Yisaya 48:17) Nini tokoki kosala mpo tótyaka likebi ntango molai wana tozali na makita to mpe na ntango tozali koyekola biso moko mpo tózwa matomba mingi mpenza na makambo nyonso ya elimo oyo Nzambe azali kopesa biso?
Ndenge oyo tokoki kotya likebi mingi ntango tozali na makita
11. Mpo na nini, na bantango mosusu, ezalaka pɛtɛɛ te kotya likebi na ntango oyo tozali na makita ya boklisto?
11 Na bantango mosusu, ezalaka pɛtɛɛ te kotya likebi na ntango oyo tozali na makita. Makanisi na biso ekoki ntango mosusu kobunga mpo mwana moko azali kolela to mpe mpo na moto moko oyo ayei nsima ya ngonga mpe azali koluka esika ya kofanda. Ntango mosusu tolɛmbi mpo tosalaki mingi moi mobimba. Soki ndeko oyo azali kosala lisolo azali mpenza molobi ya makoki te, tokoki kosutuka tokómi kokanisa makambo mosusu; tokoki ata kobanda kolalalala! Lokola makambo oyo elobamaka na makita na biso ezali na ntina mingi, tosengeli kosala nyonso mpo na kobongisa makoki na biso ya kolanda masolo na likebi mpenza. Kasi ndenge nini tokoki kosala yango?
12. Nini ekoki kosalisa biso tózalaka na mokakatano te mpo na kotya likebi ntango tozali na makita?
12 Ntango tozali na makita, ezalaka mpasi te kotya likebi soki tomibongisaki malamu. Yango wana, ezali mpenza malamu ete, liboso ya kokende na makita, tóbongisaka ntango mpo na kokanisa makambo oyo ekotalelama. Esɛngaka miniti mingi mpenza te, mokolo na mokolo, mpo na kotánga mpe komanyola mikapo oyo ebongisami mpo na botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ. Soki tosali programɛ, tokoki mpe kozwa ntango ya kobongisa Boyekoli ya Mokanda mpe Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ata soki toponi programɛ nini, likambo oyo tosengeli kosimba yango oyo: Komibongisa ekosalisa biso tótya likebi na makambo oyo ezali kotalelama na makita ya lisangá.
13. Nini ekoki kosalisa biso tólanda na likebi makambo oyo ezali kotalelama na makita?
13 Longola komibongisa malamu, bandeko mosusu bamonaka ete batyaka mpenza likebi ntango bazali na makita soki bafandi mosika te na estrade. Mpo makanisi na biso eyengayenga te, ezalaka mpe malamu tótalaka molobi, tólandaka botángi ya bavɛrsɛ na Biblia na biso mpe tózwaka mwa banɔti. Kasi, ezala ata tosali eloko nini mpo likambo ata moko te elongola likebi na biso, kobongisa motema nde likambo eleki ntina mpenza. Tosengeli koyeba ntina oyo toyanganaka. Libosoliboso, toyanganaka elongo na bandimi mosusu mpo na kosambela Yehova. (Nzembo 26:12; Luka 2:36, 37) Ezali mpe na nzela ya makita nde tolyaka mingi na elimo. (Matai 24:45-47) Lisusu, makita epesaka biso mabaku ya ‘kopusana na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu.’—Baebele 10:24, 25.
14. Esɛngaka makambo nini mpo na komona ete makita ezalaki malamu?
14 Bayangani mosusu bamonaka ntango mosusu ete mpo likita ezala malamu esengeli ete bandeko oyo bazali na masolo bázala bateyi ya makoki mpenza. Kasi, soki, na likita moko, bamoni ete mateya epesami malamu te, likita wana ezali malamu te mpo na bango. Toboyi te ete bandeko oyo bazali na masolo na likita basengeli kosala nyonso mpo na kosalela mayele ya koteya mpe basengeli mingimingi koluka kosimba mitema ya bayangani. (1 Timote 4:16) Kasi, biso mpe baoyo tozali koyoka tosengeli te kotalaka kaka soki bazali na makoki mingi to te. Atako makoki ya koteya ya baoyo bazali kosala masolo na likita ezali na ntina, ezali kaka yango te nde esalaka ete likita ezala malamu. Na esika tólukaka koyeba soki molobi azali kosala lisolo na ye malamu to te, tosengeli nde kolukaka libosoliboso koyeba soki biso moko tozali mpenza koyoka malamu. Soki tozali koyangana na makita mpe tozali kotya likebi na makambo oyo ezali kolobama, tozali kosambela Nzambe na boyokani na mokano na ye. Yango nde esalaka ete likita ezala malamu. Soki tozali mpenza na mposa ya koyeba Nzambe, tokozwa matomba na makita, ata soki molobi azali na makoki to te. (Masese 2:1-5) Boye, tiká ete tózala na mokano ya ‘kotya likebi koleka mpenza’ ntango tozali na makita na biso.
Tózwa mpenza litomba na boyekoli na biso moko
15. Ndenge nini tokoki kozwa litomba na koyekola mpe komanyola?
15 Tozwaka litomba mingi na ‘kotya likebi koleka mpenza’ ntango tozali koyekola biso moko mpe tozali komanyola. Soki tozali kotánga mpe komanyola Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango, tokozwa mpenza likoki ya kofandisa malamumalamu mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe na kati ya motema na biso. Soki mateya yango efandi na motema na biso, ekobongola mpenza makanisi na biso mpe makambo oyo tosalaka. Na ntembe te, ekosalisa biso tósala mokano ya Yehova na esengo. (Nzembo 1:2; 40:8) Yango wana, tosengeli kokolisa makoki na biso ya kotya mpenza likebi mpo esalisa biso na ntango tozali koyekola. Ezalaka mpenza mpasi te mpo ete likebi na biso ekende na makambo mosusu! Makambo ya mikemike, na ndakisa, telefone oyo ezali kolela to makɛlɛlɛ mosusu, ekoki kolongola likebi na biso. Ekoki mpe kozala ete na ebandeli tozali kokoka te kotya makanisi na biso esika moko na boumeli ya ntango molai. Ekoki kokóma ete tofandi mpo tólya na elimo, kasi nsima ya mwa ntango moke tokómi kokanisa makambo mosusu. Ndenge nini tokoki ‘kotya likebi koleka mpenza’ ntango tozali koyekola Liloba ya Nzambe biso moko?
16. (a) Mpo na nini tosengeli kobongisa ntango mpo na boyekoli na biso moko? (b) Ndenge nini otii makambo na yo na molɔngɔ mpo na kozwa ntango ya koyekola Liloba ya Nzambe?
16 Ezali malamu kosala programɛ mpe kopona esika moko oyo ebongi mpenza mpo na koyekola. Mpo na mingi kati na biso, ezalaka mpasi mingi tózwa ntango to mpe esika oyo tokoki kofanda kaka biso moko. Tokoki komona lokola nde ntango ezali koleka nokinoki. Yango wana, tosengeli mpenza kosala milende ya solosolo mpo na kozwa mwa bantango ya kimya mpo na koyekola. Tokoki te kofanda kaka ndenge wana mpe kokanisa ete tokozwa ntango ya koyekola. Tosengeli nde kotya makambo na molɔngɔ mpe koluka ntango mpo na koyekola. (Baefese 5:15, 16) Bamosusu bazwaka mwa ntango yango na ntɔngɔ wana makambo oyo ekoki kolongola likebi na bango ezali mingi te. Bamosusu bamonaka ete ntango ya malamu mpo na bango ezalaka nde na mpokwa. Ezala ntango nini oyo toponi, likambo oyo tosengeli kosimba ezali ete tozali na mposa mpenza ya koyekola mpo na kozwa boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe ya Mwana na ye. (Yoane 17:3) Yango wana, tiká ete tómityela ntango mpo na koyekola biso moko mpe tótosaka yango.
17. Komanyola elakisi nini, mpe ekoki kopesa biso litomba nini?
17 Komanyola, elingi koloba kokanisa malamumalamu makambo oyo toyekoli, ezali na ntina mingi. Esalisaka biso tózwa makanisi ya Nzambe oyo ekomami na Biblia mpo na kokɔtisa yango na motema na biso. Komanyola esalisaka biso tókanisa ndenge oyo tokoki kolanda toli ya Biblia mpo tókóma “batosi ya liloba, kasi bayoki kaka te.” (Yakobo 1:22-25) Longola yango, komanyola esalisaka biso tópusana lisusu penepene na Yehova, mpamba te epesaka biso nzela ya kokanisa bizaleli na ye mpe ndenge oyo makambo tozali koyekola ezali komonisa bizaleli yango.
18. Komanyola ya malamu mpenza esɛngaka makambo nini?
18 Soki tolingi mpenza kozwa matomba ya koyekola mpe komanyola, tosengeli kolongola na makanisi na biso likambo nyonso oyo ekoki kolongola likebi na biso. Soki tolingi koyeba makambo ya sika na ntango tozali komanyola, tosengeli koboya biloko nyonso oyo ezali kolongola likebi na mikolo na biso. Komanyola esɛngaka kozwa ntango mpe koluka esika moko ya kimya; kasi kolya mpe komɛla na elimo, elingi koloba kokɔtisa na bɔɔngɔ solo oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe, ekitisaka mpenza motema!
19. (a) Nini esalisi bamosusu mpo bátyaka likebi ntango molai na ntango oyo bazali koyekola bango moko? (b) Ndenge nini tosengeli kotalelaka boyekoli, mpe matomba nini tokoki kozwa na likambo yango ya ntina mingi?
19 Tokosala nini soki tozali kokoka te kotya likebi ntango molai to mpe soki makanisi na biso ekómi koyengayenga nsima ya koyekola mwa moke? Bamosusu bamoni ete kobanda naino koyekola na boumeli ya mwa ntango mokuse mpe, na nsima, koyeisa mokemoke ntango yango molai, esalisi bango bátyaka likebi ntango molai wana bazali koyekola bango moko. Tosengeli kozala na mokano ya kolekisa mpenza ntango na koyekola na esika ya koyekola mbangumbangu. Tosengeli kosepelaka mpenza na likambo oyo tozali koyekola. Lisusu, mpo na kobakisa boyebi na biso ya likambo yango, tokoki kotánga ebele ya mikanda oyo moombo ya sembo mpe ya mayele azali kopesa biso. Koluka koyeba “makambo mozindo ya Nzambe” ezali mpenza na ntina mingi. (1 Bakolinti 2:10) Yango esalisaka biso tóyeba Nzambe malamumalamu mpe tókolisa bososoli na biso. (Baebele 5:14) Soki tomipesi mpenza na koyekola Liloba ya Nzambe, tokozala mpe “bato oyo bakoki mpenza mpo na koteya bamosusu.”—2 Timote 2:2.
20. Ndenge nini tokoki kokóma baninga mpenza ya Yehova Nzambe mpe ndenge nini tokoki kobatela boninga yango?
20 Koyangana na makita mpe koyekola biso moko ekosalisa biso mingi mpo tókóma baninga mpenza ya Yehova mpe tóbatela boninga yango. Emonani ete ezalaki bongo mpo na mokomi ya nzembo oyo alobaki na Nzambe ete: “Nalingi mobeko na yo mingi! Nakanisaka yango mokolo mobimba.” (Nzembo 119:97, NW) Yango wana, tiká ete tózangisaka soki moke te makita mpe mayangani na biso. Tiká mpe tósomba ntango mpo na koyekola Biblia mpe komanyola. Soki tozali ‘kotya likebi koleka mpenza’ na Liloba ya Nzambe motindo wana, tokozwa mpenza matomba mingi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki mpenza kozala ete mokanda epai ya Baebele ekomamaki na mobu 61 ya ntango na biso (T.B.). Soki ezali bongo, tokoloba ete mbula soki mitano mpamba na nsima nde basoda ya Cestius Gallus bazingaki Yelusaleme. Eumelaki te, basoda yango bazongaki epai na bango; na bongo, baklisto oyo bazalaki ekɛngɛ bazwaki libaku ya kokima. Mbula minei na nsima, mokonzi ya basoda ya Loma na nkombo Titus ayaki na basoda na ye mpe babebisaki engumba yango.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini Baebele mosusu oyo bakómaki baklisto bakómaki kopɛngwa na kondima ya solosolo?
• Ndenge nini tokoki kolandaka makita na likebi mpenza?
• Nini ekoki kosalisa biso tózwa matomba ntango tozali koyekola Biblia biso moko mpe komanyola?
[Elilingi na lokasa 11]
Baebele oyo bakómaki baklisto basengelaki kobosana te ete etikalaki moke Yelusaleme ebebisama
[Elilingi na lokasa 13]
Baboti bakoki kosalisa bana na bango bázwa matomba na makita