Nini ezali na esika ya liboso kati na bomoi na yo?
“Lakisá ngai nzela ekoki na ngai kotambola.”—NZEMBO 143:8.
1. Esukiseli nini Mokonzi Salomo akómaki na yango na ntina na mikano ya bato mpe misala na bango?
NA NTEMBE te, oyebi malamu ete bomoi etondi na misala mpe na mabanzo. Soki okanisi likoló na yango, okoki komona ete mosusu kati na yango ezali na ntina mingi mpenza. Misala mosusu mpe mabanzo mosusu ezalaka na ntina mingi te to mpe ezalaka na ntina ata moke te. Soki osili kososola likambo yango, boye ozali na etaleli motindo moko na moto oyo alekaki bato nyonso ya mayele, Mokonzi Salomo. Nsima ya kotalela na mozindo misala oyo misalemaka kati na bomoi, asukisaki na kolobáká ete: “Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango ezali lisɛngisami mobimba ya moto.” (Mosakoli 2:4-9, 11; 12:13, NW ) Yango elimboli nini mpo na biso lelo oyo?
2. Motuna nini ya moboko oyo bato babangaka Nzambe basengeli komituna, yango ekoki kobimisa mituna nini mosusu?
2 Soki olingi “kobanga Nzambe ya solo mpe kotosa mibeko na ye,” omituna motuna oyo ya ntina mingi, ‘Nini ezali na esika ya liboso kati na bomoi na ngai?’ Ya solo, mbala mosusu osengeli te kokanisa likoló na motuna wana mokolo na mokolo, kasi mpo na nini te kotalela yango sikawa? Ya solo, ezali kopusa biso na kobimisa mituna mosusu oyo mikangami na yango, lokola oyo: ‘Nasengeli kotya likebi mingi koleka likoló na mosala na ngai to likoló na biloko ya mosuni? Natalelaka ndako na ngai, libota na ngai, mpe balingami na ngai na motuya nini?’ Elenge akoki komituna ete: ‘Na meko nini kelasi ezali kosimba likebi na ngai mpe ezali kokamata ngai ntango boni? Ya solo, likambo moko ya kosala mpo na kolekisa ntango, masano, lolenge moko ya kominanola to ya teknoloji ezali kosimba likebi na ngai nyonso?’ Mpe, ata soki tozali na mbula boni to soki ezalela na biso ezali lolenge nini, tokoki komituna na bosembo nyonso ete: ‘Kosalela Nzambe ezali na esika nini kati na bomoi na ngai?’ Na ntembe te, okondima ete kotya makambo oyo maleki motuya na esika ya liboso ezali na ntina mingi. Kasi lolenge nini mpe epai wapi tokoki kozwa lisungi mpo ete, na mayele nyonso, tókoka kotya makambo ya motuya na esika ya liboso?
3. Mpo na baklisto, kotya makambo ya ntina na esika ya liboso etaleli nini?
3 Eloko oyo etyami na “esika ya liboso” ezali mpenza eloko etyami na ebandeli ya biloko mosusu nyonso to esengeli kotalelama libosoliboso. Soki ozali Motatoli ya Yehova to moko kati na bamilió ya bayekoli ya sembo ya Liloba ya Nzambe oyo basangani na bango, talelá likambo ya solo oyo, ete: “Ntango ezali mpo na eloko na eloko mpe saa mpo na likambo na likambo na nsé na moi.” (Mosakoli 3:1) Na bosembo nyonso, yango etaleli mpe komibanzabanza oyo osengeli komonisa na bolingo nyonso epai na basangani ya libota na yo. (Bakolose 3:18-21) Yango esɛngi kokokisa bamposa ya libota na yo na bosembo nyonso na lisalisi ya mosolo oyo okoki kozwa na mosala ya mosuni. (2 Batesaloniki 3:10-12; 1 Timoté 5:8) Okoki mpe komibombela mwa ntango na mabaku mosusu mpo na kominanola to kosepelisa nzoto. (Kokanisá na Malako 6:31.) Atako bongo, nsima ya kokanisa na mozindo okomona ete ata moko te kati na makambo yango esengeli kozwa esika ya liboso kati na bomoi, boye te? Likambo mosusu nde ezali na ntina mingi koleka.
4. Boyokani nini ezali kati na Bafilipi 1:9, 10 mpe likanisi oyo ete tosengeli kotya makambo ya ntina na esika ya liboso?
4 Na ntembe te, oyebi ete mitindá ya Biblia oyo mitambwisaka biso mizali lisungi monene mpo na kotya makambo ya ntina na esika ya liboso mpe kokamata bikateli ya mayele. Na ndakisa, na Bafilipi 1:9, 10 (NW ), baklisto balendisami ete ‘bákóma na boyebi mingi mpe mingi lisusu koleka mpe na bososoli nyonso.’ Mpo na mokano nini? Ntoma Paulo abakisaki: “Ete bótalela malamu makambo oyo mazali mpenza na ntina.” Yango ebongi mpenza, boye te? Na lisalisi ya boyebi ya sikisiki, moklisto oyo azali na bososoli akoki koyeba eloko oyo esengeli kosimba likebi na ye nyonso—oyo esengeli kozala na esika ya liboso—kati na bomoi na ye.
Ndakisa mpo na koyeba eloko oyo esengeli kozala na esika ya liboso
5. Na kolobeláká ndakisa oyo atikelaki baklisto, lolenge nini Makomami mazali komonisa oyo ezalaki na esika ya liboso kati na bomoi ya Yesu?
5 Kati na maloba oyo ya Petelo, tozali kokuta likambo moko ya motuya mingi etaleli boyebi: “Ntina ete bobyangami mpo na bongo, zambi Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete bóbila matambe na ye.” (1 Petelo 2:21) Ɛɛ, mpo na kozwa bilembo oyo bikosalisa ete tóyeba likambo oyo esengeli kozala na esika ya liboso kati na bomoi na biso, tokoki kotalela likanisi ya Yesu na ntina na yango. Esakweli oyo ezwami na Nzembo 40:8 elobi na ntina na ye, ete: “Nasepeli kosala yango ekosepelisa yo; ɛ Nzambe na ngai; mibeko na yo izali kati na motema na ngai.” Talá lolenge alobelaki likanisi bobele moko wana: “Bilei na ngai ezali boye ete, nasala mokano na motindi na ngai mpe ete nasukisa mosala na ye.”—Yoane 4:34; Baebele 12:2.
6. Lolenge nini tokoki kozwa matomba lokola oyo Yesu azwaki na kotyáká mokano ya Nzambe na esika ya liboso?
6 Tósimba likanisi oyo ya moboko—kosala mokano ya Nzambe. Ndakisa ya Yesu ezali komonisa polele likambo oyo bayekoli na ye basengelaki kotya na esika ya liboso kati na bomoi na bango, mpamba te alobaki ete “oyo asili koyekola nyonso akozala lokola molakisi na ye.” (Luka 6:40) Mpe wana Yesu amitambwisaki na kolandáká mokano ya tata na ye, amonisaki ete azwaki “esengo mingi na kotonda,” kotyáká ntango nyonso mokano ya Nzambe na esika ya liboso. (Nzembo 16:11; Misala 2:28) Ozali komona soki yango elimboli nini? Awa bayekoli ya Yesu baponi kosala mokano ya Nzambe lokola eloko oyo esengeli kozala na esika ya liboso kati na bomoi na bango, bakozwa “esengo na kotonda” mpe bomoi ya solosolo. (1 Timoté 6:19) Tozali na bantina mingi oyo mpo na yango kosala mokano ya Nzambe esengeli kozala na esika ya liboso kati na bomoi na biso.
7, 8. Mimekano nini Yesu akutanaki na yango, mpe liteya nini tokoki kozwa kati na yango?
7 Nokinoki nsima wana Yesu amonisaki elembo ya komipesa na ye mpo na kosala mokano ya Nzambe, Zábolo alukaki kopɛngwisa ye. Na lolenge nini? Amekaki ye na makambo misato. Na mbala moko na moko, Yesu ayanolaki ye na kosaleláká Makomami, na maloba ya polele mpenza. (Matai 4:1-10) Kasi mimekano mosusu mizalaki kozela ye—konyokolama, koyokisama nsɔ́ni, kotekisama na Yuda, bifundeli ya lokuta, mpe kufa likoló na nzeté ya mpasi. Nzokande, ata moko te kati na mimekano wana mikweisaki Mwana ya sembo ya Nzambe. Na ntango moko ya mpasi mingi koleka, Yesu abondelaki ete: “Lokola elingi ngai te nde lokola elingi yo . . . tiká ete mokano na yo esalema.” (Matai 26:39, 42) Ndakisa oyo Yesu atikelaki biso esengeli mpenza kolamwisa mayoki mozindo ya mokomoko na biso, kopusáká biso ete ‘tóyikaka mpiko mpo na kobondela,’ boye te?—Baloma 12:12.
8 Ɛɛ, na ntango totyaka makambo ya ntina na esika ya liboso kati na bomoi na biso, litambwisi ya Nzambe esungaka biso, mingi mpenza wana tokutani na bato oyo bayinaka solo to baoyo batɛmɛlaka mokano ya Nzambe. Tómikundola naino lilɔmbɔ oyo Mokonzi Davidi asalaki epai na Nzambe mpo na kosɛnga litambwisi na ntango akutanaki na botɛmɛli. Tokomona yango malamu na ntango tokotalela eteni moko ya Nzembo 143. Yango esengeli kosalisa mokomoko na biso mpo na kososola lolenge nini tokoki kokólisa boyokani na biso elongo na Yehova mpe kolendisama ete tóbatela ntango nyonso kosala mokano ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso.
Yehova ayokaka mpe ayanolaka na mabondeli na biso
9. (a) Atako Davidi azalaki moto na masumu, maloba na ye mpe misala na ye mimonisaki nini? (b) Mpo na nini tosengeli kotika te kosala oyo ezali sembo?
9 Atako azalaki moto ya masumu, Davidi azalaki na kondima ete Yehova akoyoka lilɔmbɔ na ye. Asɛngaki na komikitisa nyonso ete: “Ɛ Yehova, yoká libondeli na ngai, pesá litoi epai na kolɔmba na ngai; zongiselá ngai monɔkɔ na sembo na yo mpe na boyengebene na yo. Kɔtisá moombo na yo na kosambisa te mpo ete moto moko azali na boyengebene na liboso na yo te.” (Nzembo 143:1, 2) Davidi ayebaki malamu ete azalaki moto ya kozanga kokoka, kasi apesaki motema na ye mobimba epai na Nzambe. Na yango, azalaki na elikya ete akozwa eyano na boyengebene nyonso. Yango ezali kolendisa biso, boye te? Atako tokoki te kokokana na boyengebene ya Nzambe, tokoki kondimisama ete matoyi ya mitema na biso matyami na mobimba epai na ye. (Mosakoli 7:20; 1 Yoane 5:14) Wana tozali kolendendela kati na libondeli, tosengeli kotya makanisi na biso nyonso likoló na mokano oyo ete tolingi nde ‘kolónga mabe na kosaláká malamu’ na mikolo oyo mabe.—Baloma 12:20, 21; Yakobo 4:7.
10. Mpo nini Davidi azalaki mawamawa na bileko mosusu?
10 Davidi azalaki na banguna, lokola biso mpe tozalaka na banguna. Ezala na ntango oyo azalaki kokima Saulo, kolukáká komibomba na bisika bitangwi, bisika ya mpasi mpo na kokóma kuna, to mpe ntango azalaki mokonzi, ntango banguna bazalaki kotungisa ye, wana ezalaki bileko oyo Davidi azalaki mawamawa. Alobelaki lolenge nini yango ezalaki na bopusi likoló na ye: “Moyini azali konyokola ngai . . . azali kofandisa ngai kati na molili, . . . [“Elimo,” NW ] elɛmbi kati na ngai; motema na ngai ezali kati na mpasi.” (Nzembo 143:3, 4) Ezali na likambo moko oyo esilá kopesa yo mayoki motindo oyo?
11. Mitungisi nini basaleli ya Nzambe basili kokutana na yango na mikolo na biso?
11 Kotungisama na banguna, komekama mpo na ezalela ya nkita ya mpasi, maladi makasi, mpe mitungisi misusu esili kopusa bamoko kati na basaleli ya Nzambe bámiyoka ete elimo na bango esili mpenza kolɛmba. Na bantango mosusu mpe, bamiyokaka lokola ete bazali na esengo te. Lokola nde mokomoko na bango angangaki ete: “Yo oyo omonisi ngai mpasi mingi mpe mabe, okozongisa bomoi na ngai lisusu; longwa na bozindo na mabelé, okolubola ngai lisusu . . . okobɔndisa ngai.” (Nzembo 71:20, 21) Lolenge nini basili kozwa kosalisama?
Lolenge ya kotɛmɛla milende mabe ya banguna
12. Lolenge nini mokonzi Davidi alóngaki likámá mpe mimekano?
12 Nzembo 143:5 emonisi oyo Davidi asalaki na ntango akutanaki na makámá mpe na mimekano minene: “Nakobanza mikolo na kalakala; nakokanisa misala na yo nyonso; nakobanza misala na mabɔkɔ na yo.” Davidi amikundolaki lolenge oyo Nzambe azalaki kosala epai na basaleli na ye mpe lolenge oyo ye moko abikisamaki. Amanyolaki likoló na oyo Yehova asalaki mpo na nkombo na ye. Ɛɛ, Davidi atyaki makanisi nyonso kati na misala ya Nzambe.
13. Ntango tokutani na mimekano, lolenge nini komanyola likoló na bandakisa ya basaleli ya sembo ya kala mpe ya mikolo na biso ezali kosalisa biso ete tóyika mpiko?
13 Tomikundolaka mbala mingi lolenge oyo Yehova asalaka epai na bato na ye, boye te? Ezali mpenza bongo! Kati na makambo yango, tomikundolaka mpe lisoló likomami na ntina na ‘lipata monene na batatoli’ oyo bazalaki na bomoi liboso na eleko ya Klisto. (Baebele 11:32-38; 12:1) Baklisto bapakolami ya ekeke ya liboso balendisamaki mpe ete ‘bákanisaka lisusu mikolo na liboso’ mpe makambo oyo bayikelaki yango mpiko. (Baebele 10:32-34) Ezali boni mpo na masoló matali basaleli ya Nzambe na mikolo na biso, lokola oyo ekomami kati na mokanda Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieua Masoló oyo makomami kuna mpe oyo makomami na mikanda mosusu ya la Société mazali kosalisa biso ete tókoka komikundola lolenge oyo Yehova asilá kosalisa bato na ye ete báyika mpiko na ntango ya bipekiseli, na kokangama na bolɔ́kɔ, na kobundisama na bituluku ya bato, mpe kati na káa ya bakangami mpe ya mosala-makasi. Mimekano misili komonana kati na mikili mibebisami na bitumba, lokola Burundi, Libéria, Rwanda, mpe ex-Yougoslavie. Na ntango botɛmɛli ebimaki, basaleli ya Nzambe bayikaki mpiko mpo ete babatelaki boyokani makasi elongo na Yehova. Lobɔkɔ na ye ebatelaki baoyo batyaki mokano na ye na esika ya liboso kati na bomoi na bango.
14. (a) Ndakisa nini emonisi lolenge oyo Nzambe asungaki moto moko oyo azalaki na ezalela ekoki kokokana na oyo ya biso? (b) Toli nini tozwi kati na ndakisa yango?
14 Nzokande, okoki koloba ete okutaná naino na monyoko motindo wana te, mpe okoki kokanisa ete ezali mpasi mpo ete likambo yango ekómela yo mokolo mosusu. Atako bongo, Nzambe abatelaka bato na ye ntango nyonso, bobele te kati na makambo oyo basusu bakoki kotalela yango ete ezali ya mpasi mingi koleka. Abatelaka “moto nyonso” kati na makambo oyo mabimaka “mokolo na mokolo.” Talá moko kati na bandakisa mingi: Ozali koyeba lisusu fɔtɔ́ oyo ezwami awa na likoló, mpe ezali kosalisa ete omikundola lolenge oyo Nzambe asalelaka bato na ye? Ebimaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛ́mbɛ 1996. Osilá kotánga lisoló ya Penelope Makris? Oyo nde ndakisa kitoko ya bosembo ya boklisto! Okoki komikundola lolenge oyo baninga na ye ya kartyé banyokolaki ye, lolenge abundanaki na mikakatano mitali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, mpe milende oyo asalaki mpo na koumela kati na mosala ya ntango nyonso? Ezali boni mpo na mbano oyo azwaki na engumba ya Mytilene? Likanisi ya moboko ezali oyo ete: Ozali kotalela bandakisa wana lokola lisungi oyo ekoki kosalisa biso nyonso ete tókoka kotya makambo ya ntina na esika ya liboso, kotyáká kosala mokano ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso?
15. Wapi mwa ndambo ya misala ya Yehova oyo tosengeli komanyola likoló na yango?
15 Ezali kolendisa biso ete tómanyola likoló na misala ya Nzambe, lokola Davidi asalaki yango. Mpo na kokokisa mokano na ye, Yehova asalaki ebongiseli mpo na lobiko na nzela ya liwa, lisekwa, mpe kokembisama ya mwana na ye. (1 Timoté 3:16) Atyaki Bokonzi na ye ya likoló, abenganaki Satana mpe bademó na ye na likoló, mpe azongisaki losambo ya solo awa na mabelé. (Emoniseli 12:7-12) Asili kosala paladiso ya elimo mpe asili kopambola libota na ye na kokólisáká motángo na bango. (Yisaya 35:1-10; 60:22) Libota na ye bazali lelo kopesa litatoli ya nsuka liboso ete bolózi monene eya. (Emoniseli 14:6, 7) Ɛɛ, tozali na makambo mingi ya komanyola likoló na yango.
16. Tolendisami ete tótyaka makanisi na biso likoló na nini, yango ezali kondimisa biso likambo nini?
16 Na kotyáká makanisi na biso likoló na misala ya mabɔkɔ ya Nzambe, na esika ete tómibanzabanza na ntina na misala ya bato, tokondimisama mpenza ete nguya oyo Yehova asalelaka ekoki kotɛmɛlama soko moke te. Nzokande, misala yango misuki te bobele na biloko bizalisami oyo tokoki komona na likoló mpe oyo bizali awa na mabelé. (Yobo 37:14; Nzembo 19:1; 104:24) Kati na misala na ye ya kokamwisa, tokoki mpe kotánga misala ya kobikisa oyo asalaki mpo na kosikola libota na ye na mabɔkɔ ya banguna, lokola emonisami na masoló mayebisami na ntina na libota na ye ya ntango ya kala.—Exode 14:31; 15:6.
Tóyeba nzela oyo kati na yango tosengeli kotambola
17. Lolenge nini Davidi atalelaki Yehova lokola moto ya solo mpenza, mpe lolenge nini tokoki kondimisama na yango?
17 Davidi abondelaki mpo na kosɛnga lisungi, soki te mai na nzoto na ye elingaki kokauka: “Nakonɛtola mabɔkɔ na ngai epai na yo; motema na ngai ekoyoka mposa epai na yo pelamoko mokili mokauki. Ɛ [Yehova], yokelá ngai noki; [“elimo,” NW ] na ngai esili kolɛmba. Bombá elongi na yo epai na ngai te; ete nazala pelamoko bango bakokitaka na libulu te.” (Nzembo 143:6, 7) Davidi, moto ya masumu, ayebaki malamu ete Nzambe abosanaki te ezalela na ye. (Nzembo 31:7) Na bantango mosusu mpe tokoki komiyoka lokola ete ezalela na biso ya elimo esili kokita. Kasi tozangi elikya te. Yehova, ye oyo akoyokaka mabondeli na biso, akoki kosala nokinoki mpo ete tókoka komiyoka malamu na kopesáká biso lisusu makasi na nzela ya bankulutu oyo batondi na bolingo, na nzela ya masoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, to na nzela ya masoló oyo masalemaka na boumeli ya makita, oyo mabongi mpenza mpo na biso.—Yisaya 32:1, 2.
18, 19. (a) Lilɔmbɔ nini ya etingya tosengeli kosala epai na Yehova? (b) Tokoki kondimisama na ntina na likambo nini?
18 Elikya na biso epai na Yehova ezali kopusa biso tolɔmba ye ete: “Yokisá ngai boboto na yo na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́, zambi elikya na ngai ezali epai na yo; lakisá ngai nzela ekoki na ngai kotambola.” (Nzembo 143:8) Azangaki kosunga ndeko mwasi Makris, oyo atangolamaki na esanga moko ya Grèce? Na bongo, akozanga kosunga yo soki otye kosala mokano na ye na esika ya liboso kati na bomoi na yo? Zábolo mpe bato oyo ye azali kosalela bakotyela biso mabaku mabe to bakopekisa biso mpenza mosala na biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Ezala ete tozali kosalela Nzambe kati na mikili oyo losambo ya solo ezali na bonsomi to mpe epai kuna losambo yango epekisami, mabondeli na biso oyo masalemi na bomoko makokokana na lilɔmbɔ oyo Davidi asalaki, ete: “Bikisá ngai, ɛ [Yehova], na bayini na ngai, nazali kobima epai na yo ete obomba ngai.” (Nzembo 143:9) Tokobatelama na likámá ya elimo soki tofandi kati na esika ya kobombama ya oyo Aleki-Likoló.—Nzembo 91:1.
19 Kondimisama na biso na ntina na eloko oyo esengeli kozala na esika ya liboso ezali na mobɔkɔ makasi. (Baloma 12:1, 2) Na bongo, tótɛmɛla milende oyo mokili ezali kosala mpo na kopesa biso na makasi eloko oyo bango bakanisi ete ezali na ntina mingi, na nzela ya myango misalemi na bato. Tókóba sé komonisa kati na makambo nyonso ya bomoi na biso ete toyebi eloko oyo esengeli kozala na esika ya liboso—kosala mokano ya Nzambe.—Matai 6:10; 7:21.
20. (a) Liteya nini tozwi na ntina na Davidi kati na Nzembo 143:1-9? (b) Lolenge nini baklisto bazali lelo oyo komonisa elimo ya Davidi?
20 Bavɛrsɛ́ libwa ya liboso ya Nzembo 143 emonisi polele boyokani oyo Davidi azalaki na yango elongo na Nzambe. Na ntango banguna bazingelaki ye, kozanga kokakatana, asɛngaki lisungi ya Nzambe. Afungolaki motema na ye, kolukáká lisungi kati na nzela ebongi mpo na kotambola. Ezali mpe bongo lelo mpo na batikali bapakolami na elimo oyo bazali awa na mabelé mpe baninga na bango. Batalelaka boyokani na bango na Yehova ete ezali na ntina mingi wana basɛngaka litambwisi na ye. Atako Zábolo mpe mokili bazali konyokola bango, bazali ntango nyonso kotya kosala mokano ya Yehova na esika ya liboso.
21. Mpo na nini ezali na ntina ete tómonisa ndakisa malamu soki tolingi koteya basusu likambo oyo esengeli kozala na esika ya liboso kati na bomoi na bango?
21 Bamilió ya bato oyo bazali koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova basengeli koyeba ete kosala mokano ya Yehova esengeli kozala na esika ya liboso. Tokoki kosunga bango ete básosola yango wana tozali kosolola na bango mokapo 13 ya mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mokapo oyo ezali kolobela mingi mitindá mitalelami mpo na kozala motosi na Liloba.b Ya solo, basengeli komona ete tozali kopesa ndakisa malamu na makambo oyo tozali koteya bango. Mwa moke na nsima, bango mpe bakoya koyeba nzela oyo kati na yango basengeli kotambola. Lokola mokomoko kati na bamilió wana ya bato bazali kososola likambo oyo esengeli kozala na ntina mingi koleka kati na bomoi na bango, mingi bakopusama ete bámipesa mpe bázwa batisimo. Na nsima, lisangá ekoki kosalisa bango ete bákóba ntango nyonso kotambola kati na nzela ya bomoi.
22. Mituna nini mikoyanolama na lisoló lilandi?
22 Mingi bandimaka nokinoki ete mokano ya Nzambe esengeli kozala na esika ya liboso kati na bomoi na bango. Kasi, lolenge nini Yehova azali koteya bato na ye mokemoke ete básala mokano na ye? Yango ezali komemela bango litomba nini? Mituna oyo mikoyanolama, na lisalisi ya vɛrsɛ́ moko ya moboko, Nzembo 143:10, na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na 1992 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Ebimisami na 1995 Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Na kosaleláká Bafilipi 1:9, 10, lolenge nini tokoki kotya makambo ya ntina na esika ya liboso?
◻ Lolenge nini Yesu amonisaki likambo oyo ezalaki na ntina mingi kati na bomoi na ye?
◻ Liteya nini tokoki kozwa kati na misala ya Davidi wana tokutani na momekano?
◻ Lolenge nini Nzembo 143:1-9 ezali kosunga biso lelo oyo?
◻ Nini esengeli kozala na esika ya liboso kati na bomoi na biso?
[Elilingi na lokasa 10]
Misala ya Davidi mimonisaki ete azalaki kotya motema epai na Nzambe
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Reproduced from Illustrirte Pracht - Bibel/Heilige Schrift des Alten und Neuen Testaments, nach der deutschen Uebersetzung D. Martin Luther’s