Osepelaka mpenza na mapamboli na yo?
LOKOLA babimisamaki na boombo ya Ezipito na ndenge ya likamwisi, na ebandeli Bayisraele bazalaki kosepela ndenge bakómaki na bonsomi ya kosambela Yehova. (Kob. 14:29–15:1, 20, 21) Kasi mwa moke na nsima, makanisi na bango ebongwanaki. Babandaki koyimayima mpo na bomoi na bango. Mpo na nini? Mpo balongolaki makanisi na bango na makambo oyo Yehova asalelaki bango mpe batyaki makanisi na mikakatano ya kofanda na esobe. Bayebisaki Moize ete: “Mpo na nini bobimisaki biso na Ezipito mpo tókufa na esobe? Mpo mampa ezali te mpe mai ezali te, mpe molimo na biso ekómi koyoka mampa ya mpamba oyo [mana] mpii.”—Mit. 21:5.
Bikeke na nsima, Mokonzi Davidi ayembaki boye: “Ngai natye motema na motema boboto na yo; tiká motema na ngai ezala na esengo na lobiko na yo. Nakoyembela Yehova, mpo ye apesi ngai mbano.” (Nz. 13:5, 6) Davidi abosanaki te misala ya motema boboto oyo Yehova asalelaki ye. Kutu, azalaki kolekisa ntango mbala na mbala mpo na kokanisa misala yango. (Nz. 103:2) Yehova apesi mpe biso mbano, mpe ezali malamu tómona te ete makambo oyo asali mpo na biso ezali mpamba. Na yango, tótala mwa mapamboli ya Nzambe oyo tozali na yango lelo.
“Yehova azali moninga ya motema”
Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Yehova azali moninga ya motema ya baoyo babangaka ye.” (Nz. 25:14) Kozala moninga ya motema ya Yehova ezali mpenza lipamboli mpo na bato ya kozanga kokoka! Kasi, ekozala boni soki tokómi komitungisa mingi mpo na makambo ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo mpe tozali kobondela mingi lisusu te? Kanisá naino ndenge boyokani na biso ya malamu ná Yehova ekokóma. Lokola azali Moninga na biso, Yehova azali kolikya ete tótyela ye motema mpe tófungolela ye motema na biso na libondeli, tóyebisa ye mabanzo, bamposa, mpe mitungisi na biso. (Mas. 3:5, 6; Flp. 4:6, 7) Na yango, tosengeli te kotala lolenge oyo mabondeli na biso ezali?
Ntango elenge Motatoli moko na nkombo Paula akanisaki na ntina etali mabondeli na ye, amonaki ete asengeli kobongisa bisika mosusu. Alobaki boye: “Nakómaki na momeseno ya kozongela kaka maloba moko ntango nazalaki kobondela Yehova.” Ntango asalaki bolukiluki na Index des publications Watch Tower, ayebaki ete ezali na mabondeli soki 180 oyo ekomamá na Biblia. Na mabondeli yango, basaleli ya Yehova ya ntango ya kala babimisaki mpenza mayoki na bango. Paul alobaki boye: “Ntango namanyolaki bandakisa wana ya Makomami, nakómaki koloba makambo ya sikisiki na mabondeli na ngai. Esalisaki ngai nafungolelaka Yehova motema na ngai. Sikoyo nayokaka esengo ya kopusana penepene na ye na libondeli.”
‘Bilei na ntango oyo ebongi’
Lipamboli mosusu oyo Yehova apesá biso ezali ebele ya mateya ya solo oyo euti na Biblia. Lokola tozali kosepela na ebele ya bilei ya elimo oyo tozali na yango, tozali na ntina ya ‘koganga na esengo na ndenge tozali koyoka malamu na motema.’ (Yis. 65:13, 14) Kasi, tosengeli kokeba ete tótikela bopusi ya mabe nzela te ete etinda biso tótika kosepela na solo. Na ndakisa, kotya likebi na makambo oyo bapɛngwi bazali kotambwisa ekoki kobebisa makanisi na biso mpe kopekisa biso tómona valɛrɛ ya “bilei” ya elimo oyo Yehova apesaka biso “na ntango oyo ebongi” na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.”—Mat. 24:45-47.
André, oyo asalelaki Yehova bambula mingi, asalaki libunga ya kolanda makanisi ya bapɛngwi. Amonaki ete kotánga mwa moke makambo na site ya Internet ya bapɛngwi ekozala likama te. Alobi boye: “Na ebandeli, nabendamaki na makambo oyo bapɛngwi bazalaki koloba ete ezali makambo ya solo. Lokola nakómaki kolanda mingi makambo oyo bazalaki koloba, nakómaki mpe komona ete nakosala mabe te soki natiki lisangá ya Yehova. Kasi na nsima, ntango nasalaki bolukiluki mpo na makambo mabe oyo bapɛngwi bazalaki koloba mpo na Batatoli ya Yehova, nayaki komona ete bateyi wana ya lokuta bazalaki mpenza na mayele mabe. Makambo oyo bazalaki komonisa lokola ‘bilembeteli ya solosolo’ mpo na kokweisa biso ezalaki nde makambo oyo babalolaki. Na yango, nazwaki ekateli ya kozongela kotánga mikanda na biso mpe koyangana na makita. Eumelaki te, namonaki ete nazangaki makambo mingi mpenza!” Likambo ya esengo, André azongelaki lisangá.
“Lisangá mobimba ya bandeko”
Lisangá na biso mobimba ya bandeko oyo ezali na bomoko mpe etondi na bolingo ezali mpe lipamboli oyo euti na Yehova. (Nz. 133:1) Yango wana, ntoma Petro akomaki boye: “Bólinga lisangá mobimba ya bandeko.” (1 Pe. 2:17) Lokola tozali na kati ya lisangá yango ya bandeko, tozali kozwa mpenza lisungi ya bato oyo bazali batata, bamama, bandeko mibali mpe bandeko basi ya elimo.—Mrk. 10:29, 30.
Atako bongo, makambo mingi ekoki kobimisa matata kati na biso ná bandeko na biso ya mibali mpe ya basi. Na ndakisa, ezalaka mpasi te tóbaye mabunga ya ndeko moko mpe tóbanda kolobaloba mabe mpo na ye. Soki likambo ya ndenge wana esalemi, ekozala malamu te tómikundola ete Yehova alingaka basaleli na ye atako bazali na mabunga? Lisusu, “soki tolobi ete: ‘Tozali na lisumu te,’ tozali komikosa mpe solo ezali na biso te.” (1 Yoa. 1:8) Tosengeli mpenza kosala makasi mpo ‘tókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko,’ boye te?—Kol. 3:13.
Elenge moko na nkombo Ann ayebaki ntina ya lisangá ya bandeko nsima ya komona mpasi. Tokoki koloba ete asalaki lokola mwana ya mobulu oyo Yesu alobelaki na ndakisa moko, mpe atikaki lisangá ya bokristo. Na nsima, azongelaki makanisi ya malamu mpe azongaki na solo. (Luka 15:11-24) Liteya nini Ann azwaki na likambo oyo ekómelaki ye? Alobi boye: “Sikoyo lokola nazongi na ebongiseli ya Yehova, nazali kozwa na motuya bandeko na ngai nyonso ya mibali mpe ya basi atako bazali na mabunga. Liboso, nazalaki koumela te koloba mabe na bango. Kasi sikoyo nazwi ekateli ya kotika eloko moko te ezangisa ngai mapamboli oyo nazali kozwa kati na bandeko na ngai ya elimo. Kuna na mokili, ezali na eloko moko te ya malonga oyo esengeli kotinda moto atika paradiso na biso ya elimo mpo na yango.”
Sepelá ntango nyonso na mapamboli na yo
Elikya oyo tozalaka na yango ete Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mikakatano nyonso ya bato ezali eloko oyo tosengeli kozwa na motuya monene. Ntango tozwaki elikya yango, tosepelaki mingi mpenza na motema! Toyokaki kaka lokola moto ya mombongo oyo asalaka mibembo oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye, oyo ‘atɛkaki biloko nyonso oyo azalaki na yango’ mpo na kosomba “liyaka moko ya motuya monene.” (Mat. 13:45, 46) Yesu alobaki te ete na nsima moto yango atikaki kosepela na liyaka yango. Ndenge moko mpe, tótika soki moke te kosepela na elikya na biso kitoko.—1 Tes. 5:8; Ebr. 6:19.
Tózwa ndakisa ya Jean, oyo asaleli Yehova mbula kolela 60. Ndeko mwasi yango alobi boye: “Kosakwela basusu Bokonzi ya Nzambe nde eloko oyo esalisi ngai nakoba kokanisa yango. Komona ndenge miso na bango ezali kongɛnga ntango bayekoli soki Bokonzi [ya Nzambe] ezali nini, epesaka ngai esengo mingi. Komona mbongwana oyo solo ya Bokonzi esalaka na bomoi ya moyekoli ya Biblia etindaka ngai nakanisa boye: ‘Nazali mpenza na mateya ya solo ya koyebisa basusu!’”
Tozali na bantina mpenza ya kosepela na ebele ya mapamboli ya elimo oyo tozali na yango. Atako tokoki kotungisama mpo na mikakatano ndenge na ndenge, na ndakisa botɛmɛli, maladi, bobange, konyokwama na makanisi, kobungisa moto na liwa, mpe mikakatano ya mbongo, toyebi ete nyonso wana ezali mpo na ntango mokuse. Na Bokonzi ya Nzambe, longola mapamboli ya elimo, tokozwa mpe mapamboli ya mosuni. Mpasi nyonso oyo tozali na yango lelo ekozala lisusu te na ebongiseli ya makambo ya sika.—Em. 21:4.
Liboso eya, tókoba kosepela na mapamboli na biso ya elimo mpe tómonisa botɔndi lokola mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Yo moko osali makambo mingi, Ee Yehova Nzambe na ngai, ɛɛ misala na yo ya kokamwa mpe makanisi na yo epai na biso; moko te akokani na yo. Soki nalingi koyebisa to kolobela yango, ekómi ebele koleka oyo nakoki koyebisa.”—Nz. 40:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo mosusu ezali ya bango te.
[Elilingi na lokasa 18]
Tozwaka lisungi na elimo na ntango ya mikakatano