Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na eteni ya misato mpe ya minei ya mokanda ya Nzembo
NA LIBONDELI moko, mokomi ya nzembo atunaki boye: “Bakosakola boboto na yo kati na lilita? To boyengebene na yo kati na esika ya libebi?” (Nzembo 88:11) Soki tozali na bomoi te, tokoki kosanzola Yehova te. Kosanzola Yehova ezali ntina malamu ya kozala na bomoi, mpe kozala na bomoi esengeli kotinda biso tósanzola ye.
Eteni ya misato mpe ya minei ya mokanda ya Nzembo, oyo ebandi na Nzembo 73 tii 106, ezali kopesa biso bantina mpenza ya kosanzola Mozalisi mpe kokumisa nkombo na ye. Soki tomanyoli makambo oyo ezali na banzembo yango, tokosepela lisusu mingi na “liloba ya Nzambe,” mpe ekotinda biso tósanzola Yehova mingi mpe tósala yango malamu koleka. (Baebele 4:12) Tóbanda na eteni ya misato ya mokanda ya Nzembo.
“EZALI MALAMU ETE NABƐLƐMA NA NZAMBE”
Ezali Asafa to bato ya libota na ye nde bakomaki banzembo 11 ya ebandeli na eteni ya misato. Nzembo 73 emonisi likambo oyo esalisaki Asafa abongola makanisi na ye. Akanisaki malamu ntango ayembaki boye: “Mpo na ngai, ezali malamu ete nabɛlɛma na Nzambe.” (Nzembo 73:28) Nzembo 74 ezali maloba ya kolela mpo na kobebisama ya Yelusaleme. Nzembo 75, 76, mpe 77 ezali komonisa ete Yehova azali Mosambisi ya sembo, Mobikisi ya bato ya komikitisa, mpe Ye oyo ayokaka mabondeli. Nzembo 78 elobeli makambo oyo esalemaki na Yisalaele banda na ntango ya Moize tii na ntango ya Davidi. Nzembo 79 ezali maloba ya kolela mpo babebisi tempelo. Nzembo 80 ezali libondeli mpo na kosɛnga Nzambe azongisa bato na ye na mboka na bango. Nzembo 81 ezali kolendisa bato bátosa Yehova. Nzembo 82 mpe 83 ezali mabondeli mpo na kosɛnga Nzambe apesa basambisi ya mabe mpe banguna na ye etumbu.
Nzembo moko ya bana ya Kola elobi boye: “Molimo na ngai ezali na nzala, mpe ezali koyoka mposa ya lopango ya [Yehova].” (Nzembo 84:2) Nzembo 85 ezali libondeli mpo Nzambe apambola bato oyo bautaki na boombo. Nzembo yango ezali komonisa ete kozala na boyokani malamu na Nzambe eleki kozala na bozwi ya mokili. Na Nzembo 86, Davidi asɛngi Nzambe abatela ye mpe ateya ye. Nzembo 87 ezali nzembo mpo na Siona mpe bato oyo babotamaki kuna mpe Nzembo 88 ezali libondeli epai ya Yehova. Nzembo 89 elobeli motema-boboto ya Yehova oyo amonisaki na kondimana oyo asalaki na Davidi; Etana, oyo mbala mosusu azalaki moko ya bato minei ya bwanya oyo bazalaki na ntango ya Salomo, nde akomaki nzembo yango.—1 Mikonzi 4:31.
Biyano na mituna ya Biblia:
73:9—Ndenge nini bato mabe ‘batomboli minɔkɔ na bango kino lola mpe lolemo na bango etamboli na mokili?’ Lokola bato mabe bazalaka na limemya ata mpo na moto moko te, ezala na likoló to na mabelé, babangaka te kotuka Nzambe na minɔkɔ na bango. Batɔngaka mpe bato na lolemo na bango.
74:13, 14—Ntango nini Yehova ‘abolaki mitó ya banyama mabe kati na mai mpe atutaki mitó ya Leviatana mpenza’? Na Biblia, “Falao, mokonzi ya Ezipito,” abengami “nyama mabe oyo alali na kati ya bibale na ye.” (Ezekiele 29:3) Leviatana ekoki mpenza kolimbola bato makasi ya Falao. (Nzembo 74:14) Ekoki mpenza kozala ete Yehova atutaki mitó na bango na ndenge alongaki Falao mpe basoda na ye ntango alongolaki Bayisalaele na boombo ya Baezipito.
75:4, 5, 10—Liloba “liseke” elimboli nini? Maseke ya nyama ezalaka bibundeli ya makasi. Na bongo, liloba “liseke” ezali elilingi ya nguya to makasi. Yehova atombolaka maseke ya bato na ye na ndenge apesaka bango lokumu, nzokande ‘akataka maseke ya bato mabe.’ Tosengeli ‘kotombola liseke na biso likoló te’ elingi koloba ete tosengeli te kokóma na lolendo to lofundo. Lokola Yehova nde atombolaka, tosengeli komonaka ete mikumba nyonso oyo tozali na yango to makambo oyo tozali kosala na lisangá euti epai na ye.—Nzembo 75:7.
76:10—Ndenge nini “nkɛlɛ ya bato” ekoki kokumisa Yehova? Soki Nzambe atiki ete banguna batombokela biso, ekoki kobota mbuma ya malamu. Minyoko oyo bakoki kobimisela biso ekoki kosalisa biso na makambo mosusu. Yehova atikaka biso tónyokwama kaka soki amoni ete yango ekosalisa biso. (1 Petelo 5:10) Nzambe ‘akomilatisa nkanda oyo moto atiki.’ Bongo soki minyoko yango ememi biso tii na liwa? Ata bongo, Yehova akokumisama mpo bato oyo bakomona ndenge totikali sembo epai ya Nzambe, bakopesa ye nkembo.
78:24, 25—Mpo na nini babengi mana “masango ya likoló” mpe “kwanga ya bantoma-ya-likoló”? Na vɛrsɛ yango, “bantoma-ya-likoló” ezali baanzelu. Nzokande, maloba yango elimboli te ete mana ezali bilei ya baanzelu. Babengi yango “masango ya likoló” mpo ezalaki kouta na likoló. (Nzembo 105:40) Lokola baanzelu to “bantoma-ya-likoló” bafandaka na likoló, maloba “kwanga ya bantoma-ya-likoló” elingi kaka koloba ete Nzambe nde azalaki kopesa yango. (Nzembo 11:4) Mbala mosusu mpe Yehova atindaki baanzelu mpo na kopesa Bayisalaele mana.
82:1, 6—Banani bazali “banzambe” mpe “bana ya Oyo-Aleki-Likoló”? Bibengeli yango mibale ezali mpo na basambisi ya Yisalaele. Maloba yango ebongi mpenza mpamba te basambisi yango bazalaki koloba na esika ya Nzambe mpe bazalaki bamonisi na ye.—Yoane 10:33-36.
83:2—‘Kotombola motó’ elakisi nini? Kosala ndenge wana elimboli kobongama mpo na koyangela to kosala likambo moko na nguya, mingimingi kobunda to kokonza.
Mateya mpo na biso:
73:2-5, 18-20, 25, 28. Tosengeli te koyokela bato mabe zuwa mpo bazali na bozwi mpe kolanda banzela na bango ya mabe. Bato mabe bazali na nzela ya mosɛlu. Na ntembe te, Nzambe ‘akobwaka bango na mobulu.’ Longola yango, lokola bakonzi ya lelo bakoki te kosilisa mabe, ata soki tosali nini mpo na kolongola yango tokolonga te. Na ndakisa ya Asafa, tokomonisa ete tozali na bwanya soki, mpo na kokima mabe, ‘tobɛlɛmi na Nzambe’ mpe tozali na boyokani malamu na ye.
73:3, 6, 8, 27 (NW). Tosengeli kokeba na lofundo, lolendo, kotyola, mpe koyiba. Ata ntango tomoni ete kosala bongo ekoki kozala na litomba.
73:15-17. Soki tozali komitungisa mpo na likambo moko, tosengeli te kopanza yango epai ya bato nyonso. Koloba makambo ya ndenge wana ekolɛmbisa bato mosusu nzoto. Tosengeli nde kozala kimya mpe komanyola likoló ya makambo oyo ezali kotungisa biso mpe kokangama na bandeko mpo na kosilisa yango.—Masese 18:1.
73:21-24. ‘Kokatana motema’ ntango tomoni lokola nde bato mabe bazali na bomoi ya malamu ezali kosala makambo lokola nyama. Ekomonisa ete tozali kokanisa malamu te. Na esika tósala bongo, tosengeli kolanda batoli ya Yehova mpe kozala na elikya ete ‘akokanga lobɔkɔ na biso ya mobali’ mpe akosunga biso. Longola yango, Yehova ‘akoyamba biso na nkembo’ elingi koloba ete tokozala na boyokani malamu na ye.
77:6. Tokomonisa ete tozali mpenza na mposa ya mateya ya solo mpe tozali koluka yango soki tozali kozwa ntango ya koyekola mpe komanyola. Ezali na ntina tózalaka na ntango oyo tozali kaka biso moko mpo na komanyola!
79:9. Yehova ayokaka mabondeli na biso, mingimingi soki ezali mpo na kosantisama ya nkombo na ye.
81:13, 16. Soki tozali koyoka Yehova mpe tozali kotambola na nzela na ye, akopambola biso mingi.—Masese 10:22.
82:2, 5. Kozanga bosembo eningisaka “miboko nyonso ya mokili.” Makambo ya mabe ememaka mobulu.
84:1-4, 10-12. Bakomi ya nzembo bapesi biso ndakisa ya malamu na ndenge bazalaki kolinga esika ya losambo ya Yehova mpe kosepela na mikumba oyo bazalaki na yango.
86:5. Tosengeli kozala na botɔndi lokola Yehova ‘alimbisaka mabe’! Alukaka likambo nyonso oyo ekoki kotinda ye alimbisa moto oyo asali lisumu mpe abongoli motema.
87:5, 6. Bato oyo bakozala na bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé bakoyeba bankombo ya bato oyo basekwaki mpo na bomoi na likoló? Bavɛrsɛ yango emonisi ete ekoki kozala bongo.
88:13, 14. Soki tozwi naino eyano te na likambo moko oyo tosɛngaki Yehova, ekoki kolimbola ete alingi tómonisa soki totyelaka ye mpenza motema mobimba.
“BÓTƆNDA YE, BÓSANZOLA NKOMBO NA YE”
Tótala sikoyo bantina oyo esengeli kotinda biso tókumisa Yehova na eteni ya minei ya mokanda ya Nzembo. Na Nzembo 90, Moize amonisi ete Yehova azali “Mokonzi ya seko” mpe ete bomoi ya moto ezali mokuse. (1 Timote 1:17) Na Nzembo 91:2, Moize alobi ete Yehova azali ‘ebombelo na ye mpe ndako na ye makasi,’ elingi koloba ete Yehova abatelaka ye. Banzembo oyo elandi elobeli bizaleli kitoko ya Nzambe, bwanya na ye, mpe misala na ye ya kokamwa. Banzembo misato ebandi na maloba oyo: “[ Yehova] azali Mokonzi.” (Nzembo 93:1; 97:1; 99:1) Mokomi ya nzembo alobi ete Yehova nde akelaki biso mpe alendisi biso ‘tótɔnda ye mpe tósanzola nkombo na ye.’—Nzembo 100:4.
Ndenge nini mokonzi oyo abangaka Yehova asengeli kotambwisaka makambo? Eyano na motuna yango ezali na Nzembo 101, oyo ezali nzembo ya Mokonzi Davidi. Nzembo oyo elandi elobi ete Yehova “akobongwana epai ya libondeli ya babola, akoboya libondeli na bango te.” (Nzembo 102:17) Nzembo 103 emonisi ete Yehova azali na motema-boboto mpe alimbisaka. Mokomi ya Nzembo alobeli ebele ya biloko oyo Nzambe asalá awa na mabelé mpe alobi boye: “Misala na yo mingi boni, ee [Yehova]! Otɛmisaki yango nyonso na mayele malamu.” (Nzembo 104:24) Banzembo mibale ya nsuka na eteni ya minei ezali kokumisa Yehova mpo na misala na ye ya kokamwa.—Nzembo 105:2, 5; 106:7, 22.
Biyano na mituna ya Biblia:
91:1, 2 (NW)—“Esika ebombami ya Oyo-Aleki-Likoló” ezali nini, mpe ndenge nini tokoki ‘kofanda’ kuna? Yango ezali maloba ya elilingi mpo na komonisa libateli mpe kimya ya elimo oyo tozali na yango. Esika yango ebombami mpamba te bato oyo batyelaka Nzambe motema te, bayebi yango te. Tokofanda na esika yango soki tokómisi Yehova ebombelo mpe ndako makasi na biso, tozali kosanzola ye lokola Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Tozali na kimya ya elimo mpo toyebi ete Yehova azali wana ntango nyonso mpo na kosalisa biso.—Nzembo 90:1.
92:12 (NW)—Ndenge nini moto ya boyengebene ‘akolaka lokola nzete ya mbila’? Toyebi ete nzete ya mbila ezalaka semba mpe ebotaka bambula na bambula. Moto ya boyengebene azali lokola nzete ya mbila mpo, na miso ya Yehova, moto yango azali sembo mpe abotaka “mbuma ya malamu,” elingi koloba ete asalaka misala ya malamu.—Matai 7:17-20.
Mateya mpo na biso:
90:7, 8, 13, 14. Masumu na biso ebebisaka boyokani na biso na Yehova. Ata soki tobombi masumu, ye amonaka yango. Nzokande, soki tobongoli mpenza motema mpe totiki nzela na biso ya mabe, Yehova akopambola biso, ‘akotondisa biso na motema-boboto na ye.’
90:10, 12. Lokola bomoi ezali mokuse, tosengeli ‘kotángaka mikolo na biso.’ Ndenge nini? Soki tozwi “mitema ya mayele,” to soki tozali kosala makambo na bwanya na boye ete tóbebisa te mikolo oyo totikali na yango, kasi tósalela yango na ndenge oyo ekosepelisa Yehova. Yango ezali kosɛnga ete tótyaka makambo ya elimo na esika ya liboso mpe tósalela ntango na biso malamu.—Baefese 5:15, 16; Bafilipi 1:10.
90:17. Ezali malamu tósɛngaka Yehova ete ‘alendisa na makasi mosala ya mabɔkɔ na biso’ mpe apambola milende oyo tozali kosala na mosala ya kosakola.
92:14, 15. Soki mibange bazali kokoba koyekola Liloba ya Nzambe mpe kosangana na basaleli ya Yehova, “bakotonda na mafuta, bakokaoka te,” elingi koloba, bakozala ntango nyonso makasi na elimo mpe na ntina mingi na lisangá.
94:19 (NW). Ezala mpo na ntina nini tozali na “makanisi oyo ebulunganisaka,” kotánga mpe komanyola na maloba ya ‘kobɔndisa’ oyo ezali na Biblia ekopesa biso makasi.
95:7, 8. Soki tozali na momeseno ya koyoka batoli ya Biblia, kondima yango, mpe kosalela yango, tokokóma mitó makasi te.—Baebele 3:7, 8.
106:36, 37. Bavɛrsɛ yango elobi ete kosambela bikeko ezali kopesa mbeka epai ya bademo. Yango elingi koloba ete moto oyo asambelaka bikeko akómaka na boyokani na bademo. Biblia elobi na biso boye: “Bókeba na bikeko.”—1 Yoane 5:21.
‘Bósanzola Yehova’
Banzembo misato ya nsuka ya eteni ya minei esuki na maloba oyo ezali kolendisa biso tósanzola Yehova! Nzembo ya nsuka ya eteni yango ebandi mpe na maloba yango. (Nzembo 104:35; 105:45; 106:1, 48) Maloba oyo ezali kolendisa biso tósanzola Yehova ezongi mbala na mbala na eteni ya minei ya mokanda ya Nzembo.
Tozali mpenza na bantina oyo tosengeli kosanzola Yehova. Nzembo 73 tii 106 ezali na makambo ebele oyo esengeli kotinda biso tókanisa mpe oyo esengeli kotinda biso tótɔnda Tata na biso ya likoló. Soki tokanisi makambo nyonso oyo asali mpo na biso mpe oyo akosala na mikolo ekoya, mitema na biso esengeli koyoka mposa ya ‘kosanzola Yehova’ na makasi na biso nyonso!
[Elilingi na lokasa 10]
Lokola Asafa, soki ‘tobɛlɛmi na Nzambe’, tokolonga mabe
[Elilingi na lokasa 11]
Falao akweaki na Mai Motane
[Elilingi na lokasa 11]
Oyebi ntina oyo babengi mana “kwanga ya bantoma-ya likoló”?
[Elilingi na lokasa 13]
Nini esalisaka biso tólongola “makanisi oyo ebulunganisaka”?