Bozwi ekoki kotya kondima na yo na komekama
BOZWI ekoki kotya kondima na mosembwi na komekama. Kosala makasi mpo na kokóma na biloko mingi ya mosuni ekoki kotinda moto na kobungisa kondima na ye. (1 Timoté 6:9, 10) Kasi bozwi ekoki mpe komeka kondima ya moto na lolenge mosusu. Wana moto oyo azali moyengebene azali komona ete bato bazangi boyengebene bazali kokóma bazwi kasi ye azali na mpasi, akoki komekama na kolanda nzela oyo ezali kosepelisa Nzambe te. Ya solo, likambo yango lisili kotinda ata basaleli ya Jéhovah na kozala na ntembe mpo na ntina ya kolanda bomoi ya sembo!
Likambo yango likómelaki Asafa, moyembi Molevi na boumeli ya boyangeli ya Davidi, mokonzi ya Yisraele. Asafa asalaki Nzembo oyo esalelamaki kati na losambo. Elongo na Hemana mpe Yedutunu, asakolaki mpe, wana apesaki Jéhovah Nzambe masanzoli mpe matɔndi esika moko na miziki. (1 Ntango 25:1; 2 Ntango 29:30) Atako Asafa azalaki na mabaku malamu wana, Nzembo 73 emonisi ete bozwi ya mosuni ya bato mabe ezalaki komekama monene mpo na kondima na ye.
Likanisi mabe oyo Asafa azalaki na yango
“Solo Nzambe azali malamu mpo na Yisraele, mpo na baoyo bazali na mitema peto. Kasi ngai nazalaki penepene na kopengola makaka na ngai, matambe na ngai malingaki kosɛlingwa.” (Nzembo 73:1, 2) Na maloba oyo, Asafa andimaki ete Jéhovah azalaki malamu epai na Yisraele. Mingi mpenza epai na baoyo “bazali na mitema peto,” mpo ete mposa na bango ezalaki ya kokangama makasi epai na Nzambe mpe kosangana na kobulisama ya nkombo na ye mosantu. Soki tozali na likanisi wana, tokopambola Jéhovah wana tokolobela malamu mpo na ye ata soki tomekami makasi na bozwi ya bato mabe to na likambo mosusu.—Nzembo 145:1, 2.
Atako Asafa ayebaki malamu na Jéhovah, makolo na ye malingaki kopengwa na nzela ya boyengebene. Ezalaki lokola nde mazali koselingwa na mabelé ya mosɛlu ntango na momekano makasi ya bopoti mbangu. Mpo na nini kondima na ye elembaki bongo? Alimbolaki ete: “Mpo nazalaki na zuwa epai na bato na zoba, wana emonaki ngai esengo na bato mabe. Mpo ete mpasi ezali na bango te mpe nzoto na bango ezali na makasi mpe na mafuta. Bakoyoka bolozi lokola bato mosusu te mpe bakotungisama lokola bato mosusu te.”—Nzembo 73:3-5.
Bozwi ya mosuni ya bato mabe etindaki Asafa na kolula bango. Emonanaki lokola ete bazalaki mpenza na kimya, atako bakómaki na bozwi na banzela ezangi kolongobana. (Tala Nzembo 37:1.) Atako bazalaki na misala mabe, na libandá bazalaki komonana lokola ete bazali na libateli. Bomoi na bango emonanaki lokola ete bazali na mpasi ya kufa te! Mbala mosusu bakufaka na kimya mpe na endimiseli, kozanga kososola mposa na bango ya elimo. (Matai 5:3) Epai mosusu, basaleli mosusu ya Nzambe bazali konyokwama mingi na maladi mpe na liwa, kasi azali kosunga bango, mpe bazali na elikya kitoko ya lisekwa.—Nzembo 43:1-3; Yoane 5:28, 29.
Bato mabe mingi bazalaka na mikakatano ya kolongono ya nzoto te oyo epekisaka bango na kosepela mpenza na bilei na bango. “Nzoto na bango ezali na makasi mpe na mafuta,” mabumu na bango minene. Lisusu, bakoyoka “bolozi lokola bato mosusu te,” mpamba te bakeseni na ebele na bato mosusu, bazali na mposa te ya kobunda mpo na kozwa biloko ya ntina ya bomoi. Asafa akómaki na bosukisi ete bato mabe “bakotungisama lokola bato mosusu te.” Mingimingi bakutanaka te na komekama oyo bato babangaka Nzambe bazwaka mpo ete bazali kobatela mitinda ya sembo ya Jéhovah kati na mokili mabe ya Satana.—1 Yoane 5:19.
Mpo ete bato mabe bazalaki kokóma na bozwi mingi, Asafa alandaki koloba ete: “Mpo na yango, nzombo ekangi bango lokola mayaka, yauli ezali lokola elamba oyo ekozipa bango. Miso na bango ezali kovimba na mafuta mpe mitema na bango etondi na bolema maa. Bakotuka mpe bakoloba mabe mpo na konyokola na bango; bakolobaka mpe na nzombo. Bakotombola minoko na bango kino na lola, mpe lolemo na bango ekotambolaka na mokili.”—Nzembo 73:6-9.
Basáli na mabe balati lolendo lokola “mayaka,” mpe misala na bango ya mobulu mizali mpenza mingi ete ‘ezipi bango lokola elamba.’ Lokola balingi kolanda nzela na bango, bazali kobangisa basusu. Miso na bato mabe makoti te mpo na kozanga bilei kasi ‘miso ekovimba na mafuta,’ ekobimaka libandá na ntina na mafuta oyo mauti na kolya ya lokoso. (Masese 23:20) Myango mabe na bango mizali mpenza kolónga ete ‘mitema na bango mitondi na bolema maa.’ Bakolobelaka bokosi na bango na lolendo, “na nzombo nyonso.” Na yango, ‘bakotombola minoko na bango kino lola mpe lolemo na bango ekotambolaka na mokili’! Lokola bazali na limemya epai na moto moko te na likoló to na mabelé, bazali kotuka Nzambe mpe bazali kotyola bato.
Emonani lokola ete, Asafa azalaki kotungisama bobele ye moko te na makambo oyo azalaki komona. Alobaki ete: “Mpo na yango bato na ye bakobongwana epai na bango, mpe bayebi komela mai na kopo etondi maa. Bango mpe bakolobaka ete: ‘Nzambe ayebi boni? Oyo-Aleki-Likoló azali na mayele solo?’” (Nzembo 73:10, 11) Makomi ya Liebele makoki kolimbola ete mpo bato mabe bamonani ete bazali kokóma na bozwi mingi, basusu kati na libota na Nzambe bakómaki na makanisi mabe mpe bakómaki na ezalela moko lokola bato bazangi mibeko, kolobáká ete: ‘Nzambe ayebi te likambo oyo lisalemi mpe akopesa etumbu te mpo na misala mabe.’ Epai mosusu, komona ete bato mabe bazali kobuka mibeko kozanga kozwa etumbu ezali lokola komela mbondó bololo, oyo ekotinda mosembwi na kotuna ete: ‘Lolenge nini Nzambe akoki kotika nzela na makambo oyo? Azali komona te oyo ezali kosalema?’
Ntango akokisi ezalela na ye na oyo ya bato mabe, Asafa alobaki ete: “Tala, baoyo mabe bazali bongo, ntango nyonso bazali na kimya, bakozwaka mosolo mingi. Solo, ezali bobele mpamba ete napetoli motema na ngai mpe nasukoli maboko na ngai kati na sembo. Mpo ngai nazali kotungisama mokolo na mokolo, ntongo na ntongo nakopamelama.” (Nzembo 73:12-14) Asafa aokaki lokola ete ezali na ntina te kozala na bomoi ya sembo. Bato mabe bazali kokóma na bozwi mingi ‘kozwa mosolo mingi’ na nzela ya kozanga kolongobana. Emonani lokola ete bazali kozwa etumbu te mpo na misala mileki mabe, kasi Asafa azalaki kosembolama “mokolo na mokolo”—kobanda alamukaki kino akokende kolala na butu. Aokaki ete Jéhovah azalaki kosembola ye ntɔngɔ́ nyonso. Mpo ete likambo yango emonanaki ete ezali sembo te, etyaki kondima na Asafa na komekama.
Asemboli lolenge na ye ya kokanisa
Na nsima, ntango asosolaki ete makanisi na ye mazalaki mabe, Asafa alobaki ete: “Soko nalobaki ete: ‘Nakolobaka lokola bango,’ mbɛlɛ nakabi libota na bana na yo, nde wana ekanisaki ngai mpo na kososola yango, epesaki makanisi na ngai mpasi mingi. Kino esili ngai kokota na ndako na bulee na Nzambe; wana nayebaki mpo na nsuka na bango. Solo otyaki bango na nzela na moselu; yo obwaki bango na mobulu. Tala, nokinoki bango basili kobeba; balongolami mpe balimwi bango nyonso na kobanga. Lokola liloto soki moloti alongwi na mpongi, bobele bongo Jéhovah, soki olongwi na mpongi okotyola bililingi na bango.”—Nzembo 73:15-20.
Ezalaki malamu ete Asafa ayokisaki mongongo te mpo na komilelalela, mpamba te komonisa polele ete ezali ntina te kosalela Jéhovah ekokaki kolembisa basangani ya libota na ye oyo bazalaki basambeli ya Nzambe to elingaki kobebisa kondima na bango. Oyo nde likambo lileki malamu kozala nyee lokola Asafa asalaki yango! Mpo na kososola mpo na nini bato mabe bamonani lokola ete bazali kolónga na makambo mabe, nzokande basembwi bazali komona mpasi, akendeki na ndako ya bulee ya Nzambe. Esika yango epesaki Asafa nzela ya kososola na kimya nyonso kati na basambeli na Jéhovah, mpe likanisi na ye lisembolamaki. Bobele bongo lelo, soki tobulungani na makambo oyo tozali komona, tika ete biso mpe toluka biyano na mituna na biso na koyanganáká elongo na libota ya Nzambe na esika ete tomitangola.—Masese 18:1.
Asafa ayaki kososola ete Nzambe atyaki bato mabe “likoló na mabelé moselu.” Mpo ete bomoi na bango etaleli mingi mpenza biloko ya mosuni, bazali na likámá ya kokutana na libebi ya pwasa. Na nsuka, liwa ekokanga bango pwasa na ntango ya bonunu na bango, mpe bozwi na bango oyo bazwaki yango na banzela mabe ekobakisela bango bomoi molai koleka soko moke te. (Nzembo 49:6-12) Bozwi na bango ekozala lokola ndoto oyo ekoleka noki. Boyengebene esengeli mbala mosusu kokokisama mpo na kopesa bango etumbu liboso ete bakóma mibange wana bakobuka oyo balónaki. (Bagalatia 6:7) Lokola babosanaki Moto bobele moko oyo akokaki kosalisa bango, batikami kozanga lisalisi, kozanga elikya. Ntango Jéhovah akosambisa bango, akotala “elilingi” na bango—lokumu mpe etelemelo na bango—na kotyolama.
Tosenzela na ntina na ezaleli na biso
Lokola amonisaki ezaleli malamu te na oyo amonaki, Asafa andimaki ete: “Mpo wana motema na ngai ekatanaki mpe mawa etobolaki misopo na ngai, nazalaki lokola moto te, nazalaki bobele zoba, lokola nyama liboso na yo. Kasi nazali na yo esika moko mikolo nyonso; yo okangi loboko na ngai na mobali. Okotambolisaka ngai na toli na yo, mpe na nsima okoyamba ngai na nkembo na yo.”—Nzembo 73:21-24.
Kokanisa bozwi ya bato mabe mpe mpasi ya basembwi ekoki kotungisa motema na moto to kopesa ye nkanda. Likambo motindo wana libulunganisaki mpenza—kati na ngei na ye—Asafa kino epesaki ye mpasi mingi. Liboso na Jéhovah, akómaki lokola nyama mpamba oyo esalaka makambo bobele engebene maoki. Nzokande, Asafa ‘azalaki mikolo nyonso elongo na Nzambe, oyo asimbaki loboko na ye ya mobali.’ Soki tosali libunga na lolenge na biso ya kokanisa, kasi toluki toli ya Jéhovah lokola Asafa, Nzambe akosimba biso na lobɔkɔ na mobali, mpo na kosunga mpe kotambwisa biso. (Tala Yilimia 10:23.) Tokokambama kino na mikolo ya esengo mizali koya bobele soki tosaleli toli na ye. Tokoki kooka nsoni mpo na mwa ntango, kasi Jéhovah akobongola makambo, ‘akomema biso na nkembo,’ to lokumu.
Wana asosoli ntina ya kotyela Jéhovah motema, Asafa abakisi ete: “Ngai nazali na nani kuna na likoló? Bobele yo te? Mpe awa na nse nalingi mosusu te bobele yo. Ata makasi na nzoto mpe motema na ngai elingi kosila nde Nzambe azali nguya na motema na ngai mpe likabo na ngai mpo na libela. Mpamba te, tala baoyo bazali na yo mosika bakokufa, okobebisa baoyo nyonso bapɛngwi mpo na makambo na pite. Kasi mpo na ngai ezali malamu ete nabelema na Nzambe, nasili kotya elikya na ngai kati na Nkolo Jéhovah, ete nasolola misala na yo nyonso.”—Nzembo 73:25-28.
Lokola Asafa, tozali na moto mosusu te bobele Jéhovah oyo tokoki kotyela ye motema mpo na libateli mpe libondisi. (2 Bakolinti 1:3, 4) Na yango, na esika ya kolula baoyo bazali na bozwi ya mosuni awa na mabelé, tosalela Nzambe mpe tomibombela biloko na motuya kuna na likoló. (Matai 6:19, 20) Kozala na etamboli oyo ezali kosepelisa Jéhovah nde esengeli kozala esengo na biso monene. Atako nzoto mpe motema na biso ekobeba, akolendisa biso mpe akopesa motema na biso kimya mpo ete tobungisa te elikya mpe mpiko kati na botemeli. Boyokani ya penepene elongo na Jéhovah ezali bozwi ya motuya mingi. Kobwaka yango ekomema mpasi mpo na biso elongo na baoyo nyonso bazali kotika ye. Na bongo, lokola Asafa, tika ete tobelema penepene na Nzambe mpe totya mitungisi na biso nyonso likoló na ye. (1 Petelo 5:6, 7) Yango ekokólisa bolamu na biso ya elimo mpe ekotinda biso na kolobela basusu misala kitoko ya Jéhovah.
Totikala sembo epai na Jéhovah
Asafa abulunganaki mpo ete amonaki bato mabe kokóma na bozwi mingi na Yisraele, mboka na ye ya kobotama. Kati na basaleli ya sembo ya Jéhovah, ezalaki na “bato mabe” oyo bakweisamaki na komikumisa, nzombo, kotyola mpe kobuba, baoyo bandimaki te ete Nzambe ayebi oyo bazalaki kosala. (Nzembo 73:1-11) Oyo nde likebisi! Mpo na kosepelisa Jéhovah Nzambe, tosengeli komipekisa na komonisa bizaleli lokola lolendo, mobulu, kotyola mpe kozanga kolongobana. Lokola Asafa, tika ete basaleli nyonso ya Jéhovah ‘baya na ndako monene ya bulee ya Nzambe’ na nzela ya koyangana mbala na mbala elongo na basambeli na Ye ya sembo. Ya solo, tika ete baoyo nyonso balingaka Jéhovah ‘babelema penepene na Nzambe,’ batyela ye motema ete akosunga bango kati na mpasi, kozanga kotalela oyo basusu bakoki koloba to kosala.—Nzembo 73:12-28; 3 Yoane 1-10.
Ya solo, bozwi ya mosuni ya bato mabe ekoki kotya kondima na biso na komekama lokola ekómelaki Asafa. Nzokande, tokoki kolónga komekama wana soki totongi bomoi na biso likoló na mosala ya Jéhovah. Soki tosali bongo tokozwa mbano mpamba te, ‘Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na biso mpe bolingo bosili biso kotalisa mpo na nkombo na ye.’ (Baebele 6:10) Komekama na biso ekomonana ete “ezangi bozito mpe ekoumela bobele ntango moke” soki tokokanisi yango na mbano oyo tokozwa. (2 Bakolinti 4:17) Ata mibu 70 to 80 ya mpasi ezali lokola bobele mpema oyo ebimi na monoko na biso soki tokokanisi yango na bomoi ya seko ya esengo oyo Jéhovah alaki epai na basaleli na ye ya sembo.—Nzembo 90:9, 10.
Tika te ete kokesena oyo ezali kati na bozwi mingi na bato mabe mpe mpasi na biso mpo na boyengebene epekisa biso soko moke te na komonisa kondima oyo ezali mbuma ya elimo na Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23; 1 Petelo 3:13, 14) Satana akosepela soki tomekoli bato mabe, baoyo bazali ntango nyonso kokóma na bozwi mingi mpo ete bazangi sembo. Na esika ya kosala bongo, tika ete tokumisa nkombo na Jéhovah wana tozali kotemela masɛnginya ya kotika mitinda na ye ya sembo. (Sofoni 2:3) Tika te ete tooka mawa mpo na bozwi ya bato mabe, mpo bakoki bobele komitondisela biloko ya mosuni. Mpe yango ezali na motuya nini? Tokoki ata moke te kokokanisa yango na bozwi ya elimo oyo ezali kozwama na bato oyo bandimeli Jéhovah, Nkolo Moyangeli.