Kotyela Yehova motema mobimba ekitisaka motema
“Yehova ye moko akoyoka ntango nakobenga ye.”—NZ. 4:3.
1, 2. (a) Davidi akutanaki na likama nini? (b) Banzembo nini tokotalela?
MOKONZI DAVIDI ayangeli Yisraele mwa bambula, kasi sikoyo akutani na likambo moko oyo ezali kotya bomoi na ye na likama. Mwana na ye Abisalome oyo asalelaki ye likita amitye mokonzi, mpe Davidi asengeli kokima Yerusaleme. Longola yango, moninga na ye ya motema atɛki ye, mpe sikoyo Davidi ye wana azali komata na Ngomba ya Olive, azali kolela nzelanzela mpe kotambola makolo ngulu, elongo na mwa bato oyo batikali sembo epai na ye. Lisusu, Shimei, moto ya libota moko ya ndako ya Mokonzi Saulo, azali kobwakela Davidi mabanga ná putulu, mpe kolakela ye mabe.—2 Sa. 15:30, 31; 16:5-14.
2 Likambo wana ya mpasi ekomema Davidi na Nkunda na mawa mpe na nsɔni? Te, mpo azali kotyela Yehova motema. Emonisami polele na Nzembo 3, oyo Davidi akomaki ntango azalaki kokima Abisalome. Akomaki mpe Nzembo 4. Nzembo yango mibale emonisi ete Davidi azalaki kondima mpenza ete Yehova ayokaka mpe ayanolaka mabondeli. (Nz. 3:4; 4:3) Banzembo yango ezali kondimisa biso ete Yehova azalaka elongo na basaleli na ye ya sembo butu moi, mpe ete apambolaka bango na ndenge asungaka bango mpe apesaka bango kimya. (Nz. 3:5; 4:8) Na yango, tótalela banzembo yango mpo tómona ndenge ekitisaka motema mpe elendisaka biso tótyela Nzambe motema.
Ntango ‘bato mingi batɛmɛli biso’
3. Ndenge emonisami na Nzembo 3:1, 2, nini ekómelaki Davidi?
3 Momemi-nsango moko ayaki koyebisa Davidi boye: “Mitema ya bato ya Yisraele ekómi kolanda Abisalome.” (2 Sa. 15:13) Ntango azalaki komituna ndenge nini Abisalome alongaki kondimisa bato ebele ndenge wana, Davidi alobaki boye: “Ee Yehova, mpo na nini banguna na ngai bakómi mingi? Mpo na nini bato mingi bazali kotɛmɛla ngai? Mingi bazali koloba mpo na molimo na ngai ete: ‘Nzambe akokoka kobikisa ye te.’” (Nz. 3:1, 2) Bayisraele mingi bakanisaki ete Yehova akosikola Davidi te na likama oyo euti na mabɔkɔ ya Abisalome ná bato na ye.
4, 5. (a) Likambo nini Davidi andimaki? (b) Maloba “Moto oyo azali kotombola motó na ngai” elimboli nini?
4 Kasi Davidi abangaki te mpo atyelaki Nzambe motema mobimba. Ayembaki boye: “Nzokande yo, Ee Yehova, ozali nguba oyo ezali kobatela ngai epai na epai, nkembo na ngai mpe Moto oyo azali kotombola motó na ngai.” (Nz. 3:3) Davidi andimaki mpenza ete Yehova akobatela ye kaka ndenge nguba ebatelaka soda. Ya solo, mokonzi yango oyo akómaki konuna azali kokima, azipi motó mpe agumbi yango mpo na nsɔni. Kasi Oyo-Aleki-Nyonso akobongola makambo mpo nsɔni ya Davidi ekóma nkembo. Yehova akosalisa ye atɛlɛma, atombola lisusu motó na ye likoló. Davidi abeleli Nzambe mpe ayebi ete akoyanola ye. Yo mpe otyelaka Yehova motema ndenge wana?
5 Na maloba “Moto oyo azali kotombola motó na ngai,” Davidi amonisaki ete lisalisi oyo azalaki kolikya kozwa ekouta nde na Yehova. Biblia Liloba lya Nzambe elobi boye: “Kasi yo Mokonzi, ozali nguba ekobatela ngai, yo lokumu la ngai, okopesa ngai mpiko.” Mpo na maloba “Moto oyo azali kotombola motó na ngai,” buku moko elobi boye: “Ntango Nzambe atomboli . . . ‘motó’ ya moto, atondisaka ye na elikya mpe akitisaka ye motema.” Lokola babenganaki ye na kiti ya bokonzi, Davidi azalaki na ntina ya kozala mawamawa. Kasi ntango Nzambe ‘akotombola motó na ye,’ Davidi akozwa lisusu mpiko, akokitisa motema, mpe akotyela Nzambe motema mobimba.
‘Yehova akoyanola!’
6. Mpo na nini Davidi alobaki ete eyano na libondeli na ye ekouta na ngomba mosantu ya Yehova?
6 Davidi atyaki elikya epai ya Yehova mpe abakisaki boye: “Na mongongo na ngai nakobenga Yehova ye moko, mpe ye akoyanola ngai longwa na ngomba na ye mosantu.” (Nz. 3:4) Na kolanda mitindo oyo Davidi apesaki, sanduku ya kondimana, oyo ezalaki komonisa ete Nzambe azali wana, ememamaki na Ngomba Siona. (Tángá 2 Samwele 15:23-25.) Yango wana, Davidi amonisaki ete eyano na libondeli na ye ekouta na ngomba mosantu ya Yehova.
7. Mpo na nini Davidi azalaki na nsɔmɔ te?
7 Lokola andimaki ete Nzambe akoyanola libondeli na ye, Davidi azalaki na nsɔmɔ te. Kutu, ayembaki boye: “Ngai nakomilalisa mpo nalala mpɔngi; nakolamuka mpenza, mpo Yehova ye moko azali kosunga ngai.” (Nz. 3:5) Ata na butu, ntango oyo likama ekoki mpenza koya na mbalakaka, Davidi abangaki te kokende kolala. Ayebaki ete akolamuka, mpo makambo oyo akutanaki na yango liboso endimisaki ye mpenza ete akoki kotya motema na lisungi ya Nzambe oyo ezangaka te. Biso mpe tokoki kondima ete Nzambe akosunga biso soki tokangami na “banzela ya Yehova” mpe totiki ye ata mokolo moko te.—Tángá 2 Samwele 22:21, 22.
8. Ndenge nini Nzembo 27:1-4 emonisi ete Davidi atyelaki Nzambe motema?
8 Ndenge oyo Davidi azalaki na motema ya kokita mpe atyelaki Nzambe motema mobimba emonani polele na banzembo na ye mosusu; moko na yango ezali na maloba oyo: “Yehova azali pole na ngai mpe lobiko na ngai. Nakobanga nani? Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai. Nakozala na nsɔmɔ ya nani? . . . Ata kaa etɛlɛmiseli ngai hema, motema na ngai ekobanga te. . . . Nasɛngi Yehova eloko moko—yango nde nakoluka, ete nafanda na ndako ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na komona bisengo ya Yehova mpe kotala na botɔndi tempelo na ye.” (Nz. 27:1-4) Soki yo mpe oyokaka ndenge wana mpe soki makambo ya bomoi na yo epesi nzela, na ntembe te okobanda koyangana na makita nyonso elongo na baninga basambeli ya Yehova.—Ebr. 10:23-25.
9, 10. Atako Davidi alobaki makambo oyo ezali na Nzembo 3:6, 7, mpo na nini okoloba ete azalaki na elimo ya kozongisa mabe na mabe te?
9 Atako azalaki na likama mpo Abisalome asalaki na bokosi mpe bato mosusu mingi bazangaki bosembo epai na ye, Davidi ayembaki boye: “Nakobanga te bato bankóto zomi zomi oyo batandani epai na epai mpo na kotɛmɛla ngai. Tɛlɛmá, Ee Yehova! Bikisá ngai, Ee Nzambe na ngai! Mpo okobɛta mpenza banguna na ngai na mbanga. Okobuka mpenza mino ya bato mabe.”—Nz. 3:6, 7.
10 Davidi azalaki na elimo ya kozongisa mabe na mabe te. Soki banguna na ye basengelaki ‘kobɛtama na mbanga,’ Nzambe nde alingaki kosala yango. Mokonzi Davidi asalaki kopi na ye moko ya Mibeko mpe ayebaki ete na kati na yango, Yehova alobaki ete: “Kozongisa mabe ezali likambo na ngai, mpe kofuta.” (Mib. 17:14, 15, 18; 32:35) ‘Kobuka mino ya bato mabe’ ezali mpe likambo ya Nzambe. Kobuka mino ya bato mabe elimboli kosilisa bango makasi ya kosala mabe. Yehova ayebi banani bazali bato mabe mpo “amonaka ndenge motema ezali.” (1 Sa. 16:7) Tozali mpenza na botɔndi ndenge Nzambe apesaka biso kondima mpe makasi ya kotɛlɛma ngwi liboso ya Satana, moto oyo aleki mabe, oyo mosika te akobwakama na libulu mozindo lokola nkɔsi oyo ezali koganga kasi ezangá mino, oyo ebongi kaka kobebisama!—1 Pe. 5:8, 9; Em. 20:1, 2, 7-10.
“Lobiko ezali ya Yehova”
11. Mpo na nini tosengeli kobondela mpo na baninga na biso bakristo?
11 Davidi amonaki ete kaka Yehova nde akoki kopesa ye lobiko oyo azalaki koluka na mposa makasi. Kasi ntango akomaki loyembo yango, akanisaki kaka bolamu na ye moko te. Bongo bato ya ekólo oyo Yehova aponá? Mpo na bango, Davidi asukisaki loyembo na ye oyo asalaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe na maloba oyo: “Lobiko ezali ya Yehova. Lipamboli na yo ezali likoló ya bato na yo.” (Nz. 3:8) Ya solo, Davidi azali na mikakatano minene mpenza, kasi azali kokanisa basaleli nyonso ya Yehova mpe azali kondima ete Nzambe akopambola bango. Biso mpe tosengeli te kokanisa ntango nyonso baninga na biso bakristo? Tóbosana bango te na mabondeli na biso; tósɛnga Yehova apesa bango elimo santu na ye mpo bákoka kozwa mpiko mpe bákoka kosakola nsango malamu na motema ya kokita.—Ef. 6:17-20.
12, 13. Nini ekómelaki Abisalome, mpe Davidi asalaki nini?
12 Bomoi ya Abisalome esukaki na nsɔni—ezali likebisi mpo na bato nyonso oyo bakonyokola basusu, mingimingi bato oyo Yehova atyá mafuta, lokola Davidi. (Tángá Masese 3:31-35.) Etumba moko ebimaki, mpe basoda ya Abisalome bakweaki. Abisalome ye moko akimaki afandi na mpunda, mpe nsuki na ye ebeleebele ekangamaki na etape ya nzete moko monene. Akangamaki na nzete yango mpe moto ya kosalisa ye azalaki te tii Yoabe atubaki ye mbanzi misato na motema mpe akufaki.—2 Sa. 18:6-17.
13 Davidi asepelaki ntango ayokaki likambo oyo ekwelaki mwana na ye? Te. Kutu abandaki nde kotambolatambola esika moko, kolela, mpe koganga ete: “Mwana na ngai Abisalome, mwana na ngai, mwana na ngai Abisalome! Aa, ebongaki nde ngai nakufa na esika na yo, Abisalome, mwana na ngai, mwana na ngai.” (2 Sa. 18:24-33) Kaka maloba ya Yoabe nde elongolaki Davidi na mawa wana oyo elingaki kosilisa ye mayele. Abisalome asukaki mabe mpenza, ye oyo lolendo ebomaki miso mpe etindaki ye abundisa tata na ye moko—moto oyo Yehova atyaki mafuta—mpe amilukelaki mpenza likama!—2 Sa. 19:1-8; Mas. 12:21; 24:21, 22.
Davidi atyeli Yehova motema lisusu
14. Tokoki koloba nini mpo na ntina oyo Nzembo 4 ekomamaki?
14 Ndenge moko na Nzembo 3, Nzembo 4 ezali libondeli oyo Davidi asalaki na etingya mpo na komonisa ete atyelaki Yehova motema mobimba. (Nz. 3:4; 4:3) Mbala mosusu Davidi asalaki loyembo yango mpo na komonisa ndenge motema na ye ekitaki mpe mpo na kopesa Nzambe matɔndi na ndenge mwango ya Abisalome elongaki te. Mbala mosusu mpe ntango azalaki kokoma yango, azalaki nde kokanisa Balevi oyo bazalaki bayembi. Ezala ndenge nini, komanyola loyembo yango ekoki kotinda biso tótyela Yehova motema mingi koleka.
15. Mpo na nini tokoki kobondela Yehova na motema ya kokita na nzela ya Mwana na ye?
15 Davidi amonisaki lisusu ete atyelaka Yehova motema mpe ete andimaka ete Yehova ayokaka mpe ayanolaka mabondeli. Ayembaki boye: “Ee Nzambe na ngai ya boyengebene, ntango nazali kobenga, yanolá ngai. Na ntango ya mpasi osengeli kobongisela ngai esika monene. Moniselá ngai boboto mpe yoká libondeli na ngai.” (Nz. 4:1) Biso mpe tokoki kokitisa motema ndenge wana soki tosalaka makambo ya boyengebene. Soki toyebi ete Yehova, ‘Nzambe ya boyengebene,’ apambolaka basaleli na ye ya sembo, tokoki kobondela ye na motema ya kokita na nzela ya Mwana na ye mpe kozala na kondima na mbeka ya lisiko oyo apesaki. (Yoa. 3:16, 36) Kosala bongo epesaka mpenza kimya na motema!
16. Ekoki kozala mpo na nini Davidi alɛmbaki nzoto?
16 Na bantango mosusu, tokoki kokutana na likambo moko oyo elɛmbisi biso nzoto mpe elongoli biso kimya ya motema. Mbala mosusu esalemaki bongo mpo na Davidi na boumeli ya mwa ntango, mpo ayembaki boye: “Bino bana ya bato, kino ntango nini nkembo na ngai ekofingama, awa bozali kaka kolinga makambo mpamba, awa bozali kaka koluka lokuta?” (Nz. 4:2) Emonani polele ete maloba “bana ya bato” elimboli nde bato, kasi na ndenge ya malamu te. Banguna ya Davidi ‘bazalaki kolinga makambo mpamba.’ Biblia moko (New International Version) ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Kino ntango nini bokolinga bandɔtɔ ya mpamba mpe koluka banzambe ya lokuta?” Ata soki tolɛmbi nzoto mpo na makambo oyo bato mosusu basali, tókoba kobondela makasi mpe kotyela Nzambe kaka moko ya solo motema na biso mobimba.
17. Limbolá ndenge oyo tokoki kosala na boyokani na Nzembo 4:3.
17 Davidi amonisaki polele ete azalaki kotyela Nzambe motema na maloba oyo: “Bongo bóyeba ete Yehova akomonisela mpenza moto na ye ya sembo boboto; Yehova ye moko akoyoka ntango nakobenga ye.” (Nz. 4:3) Mpo na kotikala sembo epai ya Yehova esɛngaka kozala na mpiko mpe kotyela ye motema mobimba. Na ndakisa, bato oyo bazali na libota ya bakristo basengeli kozala na bizaleli yango ntango moto moko ya libota na bango oyo abongoli motema te abimisami na lisangá. Nzambe apambolaka baoyo bazali sembo epai na ye mpe na banzela na ye. Lisusu, kotikala sembo mpe kotyela Yehova motema mobimba ebakisaka esengo na kati na basaleli ya Nzambe.—Nz. 84:11, 12.
18. Na boyokani na Nzembo 4:4, tosengeli kosala nini soki balobi to basali biso makambo oyo ezangi boboto?
18 Tokosala nini soki moto alobi to asali makambo oyo epesi biso nkanda? Tokoki kobatela esengo soki tosali makambo oyo Davidi alobaki ete: “Ata soki bosiliki, bósala lisumu te. Bóloba na motema na bino, na mbeto na bino, mpe bófanda nyɛɛ.” (Nz. 4:4) Soki balobi na biso to basali biso makambo oyo ezangi boboto, tózongisa mabe te mpo tósala lisumu te. (Rom. 12:17-19) Tokoki komonisa mayoki na biso na libondeli ya biso moko, ntango tozali na mbeto. Soki tobondeli mpo na likambo yango, tokoki komona yango ndenge mosusu mpe bolingo ekotinda biso tólimbisa. (1 Pe. 4:8) Na likambo yango, talá toli oyo Paulo apesaki, oyo mbala mosusu eutaki na Nzembo 4:4: “Bóyoka nkanda, mpe ata bongo bósala lisumu te; moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te.”—Ef. 4:26, 27.
19. Ndenge nini Nzembo 4:5 ekoki kosalisa biso na oyo etali bambeka na biso ya elimo?
19 Mpo na komonisa ntina oyo tosengeli kotyela Nzambe motema, Davidi ayembaki boye: “Bópesa bambeka ya boyengebene, mpe bótyela Yehova motema.” (Nz. 4:5) Bambeka oyo Bayisraele bazalaki kopesa ezalaki na valɛrɛ kaka soki epesami na makanisi ya malamu. (Yis. 1:11-17) Mpo Nzambe andima bambeka na biso ya elimo, biso mpe tosengeli kozala na makanisi ya malamu mpe kotyela ye motema mobimba.—Tángá Masese 3:5, 6; Baebre 13:15, 16.
20. ‘Pole ya elongi ya Yehova’ elimboli nini?
20 Davidi abakisaki boye: “Mingi bazali koloba: ‘Nani akomonisa biso bolamu?’ Moniselá biso pole ya elongi na yo, Ee Yehova.” (Nz. 4:6) ‘Pole ya elongi ya Yehova’ elakisi kondimama na Nzambe. (Nz. 89:15) Na yango, ntango Davidi abondelaki ete: “Moniselá biso pole ya elongi na yo,” alingaki nde koloba ete ‘ndimá biso.’ Lokola totyelaka Yehova motema, andimaka biso mpe tozali na esengo monene wana tozali kosala mokano na ye na motema ya kokita.
21. Likambo nini tondimi ete ekosalema wana tozali komipesa mobimba na mosala ya kobuka mbuma ya elimo lelo?
21 Ntango azalaki kokanisa esengo oyo Nzambe akopesa, oyo eleki esengo ya eleko ya kobuka mbuma, Davidi ayembelaki Yehova ete: “Okopesa mpenza motema na ngai esengo, esengo ya monene koleka ntango oyo milona na bango mpe vinyo na bango ya sika etondanaki.” (Nz. 4:7) Tokoki kondima mpenza ete tokozala na esengo ya solosolo soki tomipesi mobimba na mosala ya kobuka mbuma ya elimo oyo ezali kosalema lelo. (Luka 10:2) Elongo na ‘ekólo ya bato ebele,’ elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali kokamba biso, tozali na esengo lelo mpo motángo ya ‘basali na mosala ya kobuka mbuma’ ezali se komata. (Yis. 9:3) Ozali komipesa mpenza na mosala yango ya kobuka mbuma oyo epesaka esengo?
Tóbanga te, tókoba kotyela Nzambe motema mobimba
22. Na kolanda Nzembo 4:8, Bayisraele bazalaki ndenge nini ntango bazalaki kotosa Mibeko ya Nzambe?
22 Davidi asukisaki nzembo yango na maloba oyo: “Nakomilalisa mpe nakolala mpɔngi na kimya, mpo kaka yo moko, Ee Yehova, nde ozali kofandisa ngai na kimya.” (Nz. 4:8) Ntango Bayisraele bazalaki kotosa Mibeko ya Yehova, bazalaki kofanda na kimya. Na ndakisa, ‘Yuda ná Yisraele bafandaki na kimya,’ na boyangeli ya Salomo. (1 Bak. 4:25) Baoyo bazalaki kotyela Nzambe motema bazalaki na kimya ata ntango bikólo oyo ezalaki zingazinga ezalaki koyina bango. Lokola Davidi, tolalaka mpɔngi na kimya mpo Nzambe asalisaka biso tóyoka kimya ya motema.
23. Soki tozali kotyela Nzambe motema mobimba tokozala na nini?
23 Tóbanga te, tókoba na mosala ya Yehova. Lisusu, tóbondela na kondima nyonso, mpe tokozala na “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Flp. 4:6, 7) Epesaka biso esengo monene mpenza! Mpe tokoki kozela mikolo oyo ezali koya na motema ya kotika soki tokobi kotyela Yehova motema mobimba.
Okopesa eyano nini?
• Mikakatano nini Abisalome abimiselaki Davidi?
• Ndenge nini Nzembo 3 ezali kokitisa biso mitema?
• Ndenge nini Nzembo 4 ekoki kolendisa biso tótyela Yehova motema?
• Matomba nini tokoki kozwa soki totyeli Nzambe motema mobimba?
[Elilingi na lokasa 29]
Ata ntango akimaki Abisalome, Davidi atyelaki Yehova motema
[Bililingi na lokasa 32]
Otyelaka Yehova motema mobimba?