“Yehova, Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu”
“[Yehova, Yehova], azali Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.”—EXODE 34:6.
1. (a) Ndenge nini Biblia ezali kobɔndisa baoyo bazali na bandeko oyo batiki losambo ya pɛto? (b) Ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo babungi nzela?
TATA moko moklisto alobi: “Mwana na ngai ya mwasi ayebisaki ngai ete alingi lisusu kozala na lisangá ya boklisto te. Elekaki mikolo mingi, bapɔsɔ, ata mpe basanza, likambo yango ezalaki se kosala ngai mpasi na motema. Mpo na ngai, kokufa elekaki malamu.” Ya solo, esalaka mpasi na komona moto oyo olingaka atiki losambo ya solo. Likambo yango esilá kokómela yo? Soki ezali bongo, okolendisama na koyeba ete Yehova azali koyeba mawa na yo. (Exode 3:7; Yisaya 63:9) Kasi, ndenge nini atalelaka bato yango oyo babungi nzela? Biblia emonisi ete, na mawa na ye, Yehova azali kobénga bango ete bázonga epai na ye. Abondelaki Bayuda batomboki na mikolo ya Malaki ete: “Bóbutwa epai na ngai mpe ngai nakobutwa epai na bino.”—Malaki 3:7.
2. Ndenge nini Biblia emonisaka ete mawa ezali mpenza na kati ya bomoto ya Yehova?
2 Mose amonaki mpenza mawa ya Nzambe na Ngomba Sinai. Kuna, Yehova amimonisaki lokola “Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 34:6) Maloba wana mamonisi mpenza ete mawa ezali na kati ya bomoto ya Yehova. Ntoma Petelo akomaki ete, ‘alingi ete bato nyonso bábongola motema.’ (2 Petelo 3:9) Kasi, mawa ya Nzambe ezali na ndelo. Ayebisaki Mose ete, “Akozangisa kopesa etumbu te.” (Exode 34:7, NW; 2 Petelo 2:9) Atako bongo, “Nzambe azali bolingo,” mpe mawa ezali na esika monene na kati ya bolingo. (1 Yoane 4:8; Yakobo 3:17) Yehova “akobomba nkanda na ye libela te,” mpe azali “kosepela na boboto.”—Mika 7:18, 19, NW.
3. Ndenge nini likanisi ya Yesu mpo na mawa ekeseni na likanisi ya Bakomeli na Bafalisai?
3 Yesu azalaki elilingi ya kokoka mpenza ya Tata na ye ya likoló. (Yoane 5:19) Ndenge ayokelaki basali ya mabe mawa emonisi te ete andimaki masumu na bango kasi ezalaki se lolenge mosusu ya kolakisa boboto oyo amonisaki epai ya bato ya maladi. (Kokanisá na Malako 1:40, 41.) Yesu atángaki mawa na kati ya “makambo maleki na bozito” na Mibeko ya Nzambe. (Matai 23:23) Nzokande, Bakomeli na Bafalisai bazalaki kosalela bosembo na ndenge oyo ezalaki kopesa nzela na mawa ata moke te. Ntango bamonaki Yesu esika moko na bato ya masumu, baimaimaki ete: “Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe azali kolya na bango esika moko.” (Luka 15:1, 2, NW) Mpo na koyanola bato oyo bazalaki kofunda ye, Yesu abɛtaki masolo misato; mokomoko na yango ezali kobenda likebi na mawa ya Nzambe.
4. Wapi masolo mibale Yesu abɛtaki, mpe mokomoko ezali na liteya nini?
4 Ya liboso, abɛtaki lisolo ya moto moko oyo atikaki mpate 99 mpo na koluka mpate moko oyo ebungaki. Abimisaki liteya nini? “Esengo ekozala kati na likoló mpo na moto moko na masumu oyo akobongola motema, ekoleka esengo mpo na bayengebene ntuku libwa na libwa baoyo bazali na bosɛnga na kobongola motema te.” Na nsima, Yesu abɛtaki lisolo ya mwasi moko oyo alukaki palata moko oyo ebungaki mpe asepelaki ntango amonaki yango. Liteya oyo abimisaki ezali ete, “esengo ekozala bongo kati na [baanzelu, NW] na Nzambe mpo na moto moko na masumu oyo abongoli motema.” Yesu abɛtaki lisolo ya misato lokola lisese.a Bato mingi balobaka ete ezali lisapo oyo eleki kitoko na kati ya masapo nyonso ebɛtamá. Soki toyekoli lisese yango, ekosalisa biso na kososola mpe komekola mawa ya Nzambe.—Luka 15:3-10.
Mwana ya kilikili akimi ndako
5, 6. Ndenge nini lisolo ya misato oyo Yesu abɛtaki emonisaki mpenza ete leki azangi makanisi?
5 “Moto moko azalaki na bana babali mibale. Oyo na nsima kati na bango alobaki na tata na ye ete, Tata, pesá ngai ndambo na biloko bikokitana na ngai. Akabweli bango biloko na ye. Na nsima na mikolo mingi te, mwana na nsima akangi biloko nyonso, mpe akendaki na mokili mosusu mosika, mpe abebisi biloko na ye wana na kotambola kilikili.”—Luka 15:11-13.b
6 Mwana oyo ya leki azangaki mpenza makanisi. Ya liboso, asɛngaki biloko na ye, mpe akendaki kobebisa yango “na kotambola kilikili.” Maloba “kotambola kilikili” mauti na liloba ya Greke oyo elimboli “bomoi ya mobulu.” Nganga-mayele moko ya Biblia alobi ete liloba yango “emonisi bomoi ya kowayawaya oyo eleki.” Yango wana, mbala mingi elenge mobali ya lisese ya Yesu abéngamaka mwana na kilikili, ebéngeli oyo ezali komonisa moto oyo azali motó likoló mpe ayebi kobatela biloko te.
7. Lelo oyo, nani akokani na mwana na kilikili, mpe mpo na nini bato mingi ya motindo yango balukaka lipanda na “mboka mosika”?
7 Lelo oyo, ezali mpe na bato lokola mwana na kilikili? Ɛɛ. Likambo ya mawa, mwa bato moke batiki “ndako” oyo ezali na libateli ya Yehova, Tata na biso ya likoló. (1 Timote 3:15) Na kati ya bato yango, ezali na baoyo bazali komona ete kozala na ndako ya Nzambe ezali kopekisa bango makambo mingi; liso ya Yehova oyo ezali kokɛngɛla ezali nde kopekisa mingi na esika ya kobatela. (Kokanisá na Nzembo 32:8.) Tókamata ndakisa ya mwasi moklisto moko oyo balakisaki ye mateya ya Biblia banda bomwana na ye kasi na nsima amipesaki na masanga mpe komela bangi. Ntango akanisi mikolo wana ya mabe na bomoi na ye, alobi ete: “Nalingaki kolakisa ete nakoki kokóma na bomoi ya malamu koleka na ndenge na ngai moko. Nazalaki na mposa ya kosala oyo nalingi, mpe nalingaki te ete moto apekisa ngai oyo nasepeli kosala.” Lokola mwana na kilikili, elenge mwasi yango alukaki lipanda. Likambo ya mawa, babimisaki ye na lisangá mpo na makambo oyo Biblia epekisi.—1 Bakolinti 5:11-13.
8. (a) Baoyo balingi kotosa mibeko ya Nzambe te bakoki kozwa lisalisi nini? (b) Mpo na nini moto asengeli kotalela malamu liponi na ye na oyo etali losambo?
8 Ya solo, esalaka mpasi na motema soki moninga moko mondimi alingi kolanda bomoi oyo mibeko ya Nzambe epekisi. (Bafilipi 3:18) Soki likambo ya ndenge wana esalemi, bankulutu mpe bandeko mosusu oyo bazali na makoki ya elimo bamekaka kosembola moto oyo abungi nzela. (Bagalatia 6:1) Kasi, moto moko te apusami na makasi ete azala moyekoli ya Klisto. (Matai 11:28-30; 16:24) Ata bilenge, na ntango bakómi mikóló, bango moko basengeli kopona losambo na bango. Ndenge tozali boye, moto na moto azali na bonsomi ya kozwa bikateli mpe ye moko akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na misala na ye. (Baloma 14:12) Kasi, tóbosana mpe te ete ‘tokobuka oyo tokokona’—na lisese ya Yesu, mwana ya kilikili aumelaki te komona likambo yango.—Bagalatia 6:7, 8.
Motelengano na mboka mosika
9, 10. (a) Ndenge nini makambo ebongwanaki mpo na mwana na kilikili, mpe asalaki nini mpo na yango? (b) Monisá ndenge nini bato mosusu oyo bazali kotika losambo ya solo lelo oyo bakutanaka na makambo lokola mwana na kilikili.
9 “Wana esilisaki ye biloko na ye nyonso, nzala monene mpenza ebimi na mokili yango, ye mpe abandi kozanga. Bongo akendaki mpe azwaki mosala epai na moto na mboka na mokili yango, mpe atindi ye kati na bilanga na ye koleisa ngulube. Azalaki na mposa na kotondisa libumu na ye na mposo izalaki ngulube kolya, mpe moto apesaki ye eloko te.”—Luka 15:14-16.
10 Atako akelelaki, mwana na kilikili akanisaki mbala moko kozonga na ndako te. Kasi, akendaki epai ya moto moko na mboka wana oyo apesaki ye mosala ya kobatela bangulu. Lokola Mibeko ya Mose elobaki ete ngulu ezali nyama ya mbindo, Moyuda akokaki kondima mosala ya ndenge wana te. (Levitike 11:7, 8) Kasi, ata soki lisosoli ya mwana na kilikili etungisamaki, mwaye ya kolanda yango ezalaki te. Mpamba te, akokaki kokanisa te ete moto ya mboka oyo apesaki ye mosala alingaki komitungisa mpo na mayoki ya mobola oyo azalaki na ye kutu mopaya. Makambo oyo mwana ya kilikili akutanaki na yango ekómelaka mpe bato mingi oyo bazali kotika losambo ya solo lelo oyo. Mbala mingi, bato yango bakómaka kosala makambo oyo liboso bazalaki komona mabe. Na ndakisa, elenge moko oyo abɔkwamaki na libota ya baklisto, atikaki solo ntango akokisaki mbula 17. Alobi ete, “Pite mpe bangi ebungisaki mateya ya Biblia oyo nayekolaki na boumeli ya bambula ebele.” Mosika te, elenge yango akɔtaki bolɔkɔ mpo akendaki koyiba na mondoki na mabɔkɔ mpe abomaki moto. Atako na nsima azongaki na lisangá ya boklisto, talá oyo ye afutaki mpo na “bisengo na masumu bikoumela bobele mwa ntango moke”!—Kokanisá na Baebele 11:24-26.
11. Ndenge nini mokakatano ya mwana na kilikili ebakisamaki, mpe ndenge nini bato mosusu bamonaki ete bisengo ya mokili ezali “bokosi mpamba”?
11 Mokakatano ya mwana na kilikili ebakisamaki mpamba te “moto apesaki ye eloko te.” Baninga na ye ya sika bazalaki wapi? Lokola azalaki lisusu na mbongo te, ‘bayinaki’ ye. (Masese 14:20) Ndenge moko lelo oyo, bato mingi oyo bazali kotika kondima na bango bazali komona ete bisengo mpe makanisi ya mokili oyo ezali ‘bokosi mpamba.’ (Bakolose 2:8) Elenge mwasi moko oyo atikaki ebongiseli ya Nzambe na boumeli ya mwa ntango alobi ete, “Nanyokwamaki mpe ezalaki kosala ngai motema mpasi na ndenge nazangaki litambwisi ya Yehova. Namekaki kolanda mokili, kasi lokola nazalaki mpenza lokola bato mosusu te, baboyaki ngai. Namimonaki lokola mwana oyo abungaki mpe nazalaki na mposa ya tata mpo na kotambwisa ngai. Na ntango yango nde namonaki ete nazali na mposa ya Yehova. Nalingaki lisusu kozala na lipanda liboso na ye te.” Mwana ya kilikili na lisese ya Yesu amonaki mpe makambo yango.
Mwana na kilikili akanisi na motema
12, 13. Makambo nini esalisaki bato mosusu ete bákanisa na mitema? (Talá etanda.)
12 “Akanisaki na motema mpe alobi ete, Basali na lifuti na tata na ngai mingi bazali na kwanga eleki, nde ngai nakufi na nzala awa. Nakolongwa mpe nakokenda epai na tata na ngai, mpe nakoloba na ye ete, Tata, nasaleli Likoló mabe, nasali mabe mpe na miso na yo, nabongi kobyangama mwana na yo lisusu te, zalisá ngai lokola moko na basali na yo na lifuti. Alongwi, mpe akómi epai na tata na ye mpenza.”—Luka 15:17-20.
13 Mwana na kilikili ‘akanisaki na motema.’ Mpo na mwa ntango, mwana na kilikili amipesaki na koluka bisengo, amonaki lokola ete azali na kati ya ndɔtɔ. Kasi, ayaki kososola esika oyo akómaki na elimo. Atako elenge yango akweaki, elikya ezalaki naino. Akokaki kozala na mwa makambo ya malamu. (Masese 24:16; kokanisá na 2 Ntango 19:2, 3.) Ezali boni mpo na baoyo batiki etonga ya Nzambe lelo oyo? Ebongi tóloba ete esili mpo na bango, ezala ndenge nini, botomboki na bango emonisi ete basaleli elimo santu ya Nzambe lisumu? (Matai 12:31, 32) Te. Mingi bamitungisaka mpo na etamboli na bango ya matoi mangbongi, mpe nsima ya ntango, mingi bakanisaka na mitema na bango. Ndeko mwasi moko alobaki boye mpo na ntango oyo azalaki libándá ya ebongiseli ya Nzambe, “Nabosanaki Yehova ata mokolo moko te. Nazalaki ntango nyonso kobondela ete ata ndenge nini, mokolo mosusu akondima ngai nazonga na solo.”—Nzembo 119:176.
14. Mwana na kilikili amonaki malamu asala nini, mpe ndenge nini amonisaki komikitisa na ndenge asalaki?
14 Kasi, baoyo bapɛngwaki nzela bakoki kosala nini na ezalela na bango? Na lisese ya Yesu, mwana na kilikili amonaki malamu azonga na ndako mpo na kosɛnga tata na ye bolimbisi. Mwana na kilikili akanisaki koyebisa tata na ye ete, “Zalisá ngai lokola moko na basali na yo na lifuti.” Mosali na lifuti azalaki mongamba oyo bazalaki kozwa ye na mosala mpo na mokolo moko mpe bakokaki kolongola ye ata na mokolo yango. Moombo kutu alekaki ye, mpamba te, na ndenge mosusu, moombo azalaki mosangani ya libota. Tomoni ete mwana na kilikili akanisaki te ete akosɛnga bátalela ye lisusu lokola mwana ndenge azalaki liboso. Azalaki pene ya kondima esika ya nse mpenza, mpo ete mokolo na mokolo amonisaka tata na ye ete azali lisusu sembo epai na ye. Nzokande, mwana na kilikili akendaki kokutana na likambo oyo akanisaki te.
Bayambi ye na esengo
15-17. (a) Tata asalaki nini ntango amonaki mwana na ye? (b) Elamba, lopɛtɛ, sapato oyo tata apesaki mwana na ye elimbolaki nini? (c) Feti oyo tata asalaki emonisaki nini?
15 “Nde naino ezalaki ye mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokeli ye mawa; atamboli mbango mpe abumeli ye mpe apwepwi ye. Mwana na ye nde alobi na ye ete, Tata, nasaleli Likoló mabe, nasali mabe mpe na miso na yo, nabongi kobyangama mwana na yo lisusu te. Tata nde alobi na baombo na ye ete, Yaká na elamba eleki kitoko nokinoki kolatisa ye, mpe tyá lopɛtɛ na mosapi na ye, mpe sapato na makolo na ye, mpe yaká na mwana na ngɔmbɛ na mafuta mpe bomá yango, tólya, tósepela, mpo ete mwana na ngai oyo awa azalaki mokufi mpe azali na bomoi lisusu: azalaki mobungani mpe azwami. Babandi kosepela.”—Luka 15:20-24.
16 Moboti nyonso oyo alingi mwana na ye azalaka na mposa ete mwana yango akóma lisusu malamu na elimo. Na yango, tokoki kokanisa ete mokolo na mokolo tata ya mwana na kilikili azalaki kotalatala na nzela liboso ya ndako na ye na elikya ete akomona mwana na ye azali kozonga. Mbala moko, amoni mwana na ye azali koya! Na ntembe te nzoto ya elenge mobali yango ebebaki. Kasi, tata abungi ye te ata wana azali ‘naino mosika.’ Azali kotala bilamba epasukapasuka mpe mawa na ye te; azali komona se mwana na ye mpe akimi mbangu koyamba ye!
17 Ntango tata akómaki liboso ya mwana na ye, ayambaki ye na nkingo mpe apwepwaki ye makasi. Na nsima, atindaki basaleli na ye ete bámemela mwana na ye elamba, lopɛtɛ, na sapato. Elamba yango ezalaki se elamba mpo na kozipa nzoto te, kasi oyo “eleki kitoko”—mbala mosusu ezalaki na mayemi kitoko; oyo bakoki mpenza kopesa na mopaya ya lokumu. Lokola ezalaki kosalema mpenza te ete moombo alata lopɛtɛ na sapato, tata amonisaki polele ete ayambaki mwana na ye na esika na ye mpenza na kati ya libota. Kasi tata asukaki wana te. Atindaki ete básala feti mpo ete mwana na ye azongi. Ya solo, kolimbisa oyo moto yango alimbisaki mwana na ye ezalaki ya likolólikoló te to mpe mpo kaka bozongi ya mwana esɛngaki bongo; alingaki mpenza kolimbisa ye. Asepelaki na yango.
18, 19. (a) Lisese ya mwana na kilikili eteyi yo nini mpo na Yehova? (b) Lokola emonisami na makambo oyo Yehova asalelaki Yuda na Yelusaleme, ndenge nini Yehova azali ‘kozela’ bozongi ya moto ya masumu?
18 Tii na esika oyo tokómi, lisese ya mwana na kilikili eteyi biso nini mpo na Nzambe oyo tozali na libaku malamu ya kosambela? Ya liboso, Yehova azali “na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 34:6) Kutu, mawa ezali ezaleli monene ya Nzambe. Ezali ndenge na ye asalaka epai na baoyo bazali na mpasi na motema. Na nsima, lisese ya Yesu eteyi biso ete Yehova azali ‘na mposa ya kolimbisa.’ (Nzembo 86:5) Ezali lokola ete azali kotalatala, koluka soki moto moko ya masumu abongoli motema mpo ayokela ye mawa.—2 Ntango 12:12; 16:9.
19 Na ndakisa, kanisá makambo oyo Nzambe asalelaki Yisalaele. Mosakoli Yisaya apemamaki na Yehova mpo na komonisa ete Yuda na Yelusaleme ezalaki na ‘maladi longwa na litambe na lokolo kino na motó.’ Kasi, alobaki lisusu ete: “[Yehova akozela, “NW”] ete amonisela bino boboto, bongo akokumisama ete ayokela bino mawa.” (Yisaya 1:5, 6; 30:18; 55:7; Ezekiele 33:11) Lokola tata na lisese ya Yesu, Yehova azali ‘kotalatala na nzela.’ Azali na elikya ete moto nyonso oyo atikaki ndako na ye akozonga. Ezali yango tosengeli kolikya epai ya tata ya bolingo, boye te?—Nzembo 103:13.
20, 21. (a) Ndenge nini bato mingi bazali kobendama na mawa ya Nzambe? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
20 Mbula na mbula, mawa ya Yehova ezali kopusa bato ebele na kokanisa na mitema na bango mpe kozonga na losambo ya solo. Likambo yango esepelisaka mpenza balingami na bango! Tókamata ndakisa ya tata oyo tolobelaki na ebandeli. Likambo ya esengo, mwana na ye akómaki lisusu malamu na elimo mpe lelo oyo azali mosaleli ya ntango nyonso. Tata yango alobi ete, “Esengo na ngai ezali nsuka ya esengo oyo moto akoki kozala na yango na ebongiseli ya biloko oyo. Mpisoli na ngai ya mawa ebongwani na mpisoli ya esengo.” Na ntembe te, Yehova mpe azali kosepela!—Masese 27:11.
21 Kasi lisese ya mwana na kilikili esukaki wana te. Yesu akobaki lisolo na ye mpo na komonisa bokeseni oyo ezali kati na mawa ya Yehova mpe makambo makasi to elimo ya kolinga kosambisa oyo Bakomeli mpe Bafalisai mingi bazalaki na yango. Na lisolo elandi, tokolobela ndenge oyo asalaki yango mpe ndimbola na yango mpo na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Elingi koloba te ete masese mpe masolo nyonso oyo ezali na Biblia esalemaki mpenza na bomoi ya solo. Mpe lokola mokano ya masapo yango ezali ya kobimisa liteya moko, ntina ezali te ya koluka ndimbola ya elilingi mpo na likambo mokomoko.
b Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1989 (ebimeli ya Lifalanse), nkasa 16, 17 epesaki ndimbola ya esakweli ya lisese yango.
Bozongeli
◻ Mpo na koyokela mawa, bokeseni nini ezali kati na makanisi ya Yesu mpe makanisi ya Bafalisai?
◻ Lelo oyo, nani akokani na mwana na kilikili, mpe na ndenge nini?
◻ Makambo nini epusaki mwana na kilikili akanisa na motema na ye?
◻ Ndenge nini tata ayokelaki mwana na ye oyo abongolaki motema mawa?
[Etanda na lokasa 11]
BAKANISAKI NA MITEMA NA BANGO
Nini esalisaki bato mosusu oyo babimisamaki na lisangá ya boklisto ete bákanisa na mitema na bango? Makanisi malandi mamonisi likambo yango polele.
“Na kati ya motema na ngai, nabosanaki epai oyo solo ezali te. Bambula ebele oyo nayekolaki Biblia mpe nazalaki kokende na makita ya boklisto etikaki elembo na motema na ngai. Ndenge nini nakokaki lisusu kobosana Yehova? Ye atikaki ngai te; ngai nde moto natikaki ye. Nsukansuka, nalobaki ngai moko ete nazali kosala libunga mpe nazali motó makasi mpe nandimaki ete Liloba ya Yehova elobaki kaka solo ete, ‘moto akobuka oyo akolona.’”—C.W.
“Ntango mwana na ngai ya moke akomaki koloba, nazalaki na mposa ya koteya ye makambo lokola: Yehova azali nani mpe ndenge nini kobondela ye. Kasi lokola nakokaki kosala yango te, likambo yango epesaki ngai mpasi na motema. Mwaye nazwa mpɔngi ezalaki te, mpe na kati ya butu nakendaki na motuka na ngai na parke moko mpe nabandaki kolela. Nalelaki mpe nabondelaki Yehova; likambo oyo natika kosala banda kala. Nayebaki malamu ete nazalaki lisusu na mposa ya Yehova na kati ya bomoi na ngai, mpe nazalaki na elikya ete akolimbisa ngai.”—G.H.
“Soki kaka lisolo ya mangomba ebimi, nazalaki koyebisa bato ete soki kopona lingomba oyo eteyaka solo, ngai nakopona nazala Motatoli ya Yehova. Na nsima, nazalaki koyebisa bango ete liboso nazalaki Motatoli, kasi nakokaki kotosa makambo na bango te, yango wana natikaki. Mbala mingi soki nakanisi yango, nazalaki koyoka lokola ete namemi ngambo mpe nazalaki na esengo te. Nsukansuka nalobaki ete ‘Nazali na ntina te. Nasengeli mpenza kobongwana.’”—C.N.
“Eleki mbula 35, ngai na mobali na ngai tobimisamaki na lisangá ya boklisto. Na nsima, na 1991, likambo moko ya kokamwa mpe ya esengo esalemaki; bankulutu mibale bayaki kotala biso mpe bamonisaki biso ete tokoki kozonga epai ya Yehova. Nsima ya sanza motoba, tosepelaki mingi ntango tozongisamaki na lisangá. Mobali na ngai azali na mbula 79 mpe ngai, mbula 63.”—C.A.