Matomba ya kobanga Nzambe ya solo
“Ngai, Yehova, nazali Nzambe na yo, Ye oyo akoteya yo mpo na litomba na yo moko, Ye oyo akokamba yo kati na nzela oyo osengeli kotambola.”—YISAYA 48:17, NW.
1. Bampasi nini ekokaki kopɛngolama soki bato bazalaki na ezaleli ya bobangi Nzambe?
SOKI Adama alónaki ezaleli ya bobangi Nzambe, yango ekokaki kopekisa ye ete asala lisumu te, oyo ememelaki ye kufa ya seko mpe oyo ememaki bambula mingi ya mpasi mpo na bakitani na ye. Soki libota ya kala ya Yisraele balandaki toli ya Yehova mpo na kobanga ye mpe kolinga ye mbɛlɛ libota yango elingaki komemama na boombo na Babilone te, soko mpe koboya Mwana na Nzambe mpe kokóma na ngambo na ntina na kosopama ya makila na ye. Soki mokili ya lelo ezalaki kobanga Nzambe, mbɛlɛ mabe elingaki kozala kati na biyangeli te soko mpe kati na makambo ya mombongo te, mbɛlɛ mobulu mpe bitumba ezali te.—Masese 3:7.
2. Atako makambo oyo mazali na mokili oyo ezingi biso, mpo na nini tosengeli kolóna ezaleli ya kobanga Yehova?
2 Nzokande, kozanga kotalela makambo oyo mazali kosalema na mokili oyo ezingi biso, ezala mpo na moko na moko, to kati na mabota, to mpe kati na masangá ya basaleli ya Yehova, mbɛlɛ tokoki kozwa matomba na kolónáká ezaleli ya kobanga Nzambe ya solo. Yango eyokani na likebisi oyo Mose apesaki na libota ya Yisraele: “[Yehova] Njambe na yɔ aluki nini epai na yɔ sɔkɔ ejali oyo tɛ ete omɛmisa [Yehova] Njambe na yɔ mpe otambola na njela na ye yɔnsɔ mpe olinga ye mpe osalela [Yehova] Njambe na yɔ na motema na yɔ mobimba mpe na molimo na yɔ mobimba, mpe otosa malako mpe mibeko na [Yehova] . . . mpɔ na malamu na yɔ?” (Dutɛlɔnɔmɛ 10:12, 13) Wapi mwa bamoko na matomba tozali kozwa wana tozali kobanga Yehova, Nzambe ya solo?
Mayele—Oyo eleki wolo na motuya
3. (a) Nini ezali litomba ya liboso oyo tokoki kozwa? (b) Nini ezali ndimbola ya Nzembo 111:10?
3 Litomba ya liboso mpenza ezali mayele ya solo. Nzembo 111:10 (NW) elobi ete: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya mayele.” Yango elimboli nini? Mayele ezali likoki ya kosalela boyebi na lolenge ya malamu mpo na kosilisa mikakatano, kopɛngola makámá, mpe kokokisa mikano misusu. Esɛngi koyeba kotalela makambo malamu. Ebandeli, eteni ya liboso, moboko ya mayele motindo wana ezali bongo kobanga Yehova. Mpo na nini? Mpamba te bozalisi nyonso ezali mosala ya mabɔkɔ na ye. Yango ezali kotalela ye. Apesaki bato bonsomi ya kopona oyo balingi, kasi apesaki bango te likoki ya kotambwisa matambe na bango moko mpe kolónga kozanga litambwisi na ye. (Yosua 24:15; Yilimia 10:23) Bobele soki tozali kopesa motuya na makambo wana ya moboko na ntina na bomoi mpe soki tozali komitambwisa na boyokani na yango nde tokoki kolónga mpo na libela. Soki boyebi na biso ya Yehova epesi biso endimiseli makasi ete mokano ya Nzambe ekolónga mpenza mpe ete elaka na ye mpe makoki oyo azali na yango ya kopesa mbano epai na bayengebene ezali solo, boye bobangi Nzambe ekopusa biso na kosala makambo na mayele nyonso.—Masese 3:21-26; Baebele 11:6.
4, 5. (a) Mpo na nini mateya oyo elenge mobali moko azwaki na eteyelo monene epesaki ye mayele ya solo te? (b) Mobali wana mpe mwasi na ye basalaki nini nsima na kozwa mayele ya solo, mpe na makambo nini yango ebongolaki bomoi na bango?
4 Tókamata ndakisa moko. Esili koleka mwa bambula, elenge mobali moko azalaki kotánga na Eteyelo monene ya Saskatchewan, na mboka Canada. Kati na manáka asengelaki koyekola mpe biologie (zébi ya koyekola bikelamu ya bomoi), mpe kuna balakisaki ye liteya ya évolution. Nsima ya kozwa lipɔlɔ́mi na ye, ayekolaki na mozindo liteya babéngi physique nucléaire, wana bapesaki ye mbongo mpo na kolanda boyekoli na ye na Eteyelo monene ya Toronto. Na boumeli ya boyekoli na ye akamwaki mingi na komona motindo nini biloko bibéngami atomes bibongisami malamumalamu. Kasi azwaki biyano te na mituna oyo: Nani abandisaki nyonso oyo? Ntango nini? Mpe mpo nini? Kozanga biyano na mituna wana, akokaki mpenza kosalela boyebi na ye na mayele nyonso kati na mokili oyo ezalaki ntango wana kati na etumba? Nini esengelaki kosalisa ye? Bolíngi-ekólo? Mposa ya kozala na biloko mingi ya mosuni? Azwaki mpenza mayele ya solo?
5 Mwa moke nsima na kozwa lipɔlɔ́mi na ye, elenge mobali wana mpe mwasi na ye babandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Na nzela ya Liloba ya Nzambe babandaki kozwa biyano oyo bazwaki yango liboso te. Bayaki koyeba Mozalisi, Yehova Nzambe. Lokola bazalaki koyekola makambo oyo makómelaki Mose na Mai Motane, mpe makambo oyo makómelaki Danyele mpe baninga na ye kati na Babilone, bayekolaki ntina ya kobanga Nzambe, kasi bato te. (Exode 14:10-31; Danyele 3:8-30) Bobangi Nzambe motindo wana oyo esanganaki na bolingo ya solo mpo na Yehova ebandaki kopusa bango. Mosika te bomoi na bango mobimba ebongwanaki. Na nsima, elenge mobali wana ayaki koyeba Ye oyo asalaki makambo oyo azalaki koyekola na zébi ya bikelamu na bomoi. Abandaki kososola mokano ya Ye oyo mayele na ye mamonisamaki kati na boyekoli ya makambo matali zébi ya physique. Na esika ete asalela boyebi na ye mpo na kobimisa bisaleli oyo ekokaki koboma bazalani na ye, ye mpe mwasi na ye bamonaki malamu ete básalisa bato mosusu ete bálinga Nzambe mpe bazalani na bango. Bamikɔtisaki kati na mosala ya ntango nyonso lokola basakoli ya Bokonzi ya Nzambe. Na nsima, bakɔtaki na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower mpe batindamaki lokola bamisionere.
6. Soki tozali na mayele oyo euti na ezaleli ya kobanga Yehova, mikano nini mizangi ntina oyo tokopɛngola kolanda, mpe na esika ya kolanda yango tosengeli nde kosala nini?
6 Ya solo, bato banso bakoki kokóma bamisionere te. Kasi biso banso, tokoki kozwa mayele oyo ezali kouta na kobanga Yehova. Soki tolóni mayele wana, tokomipesa te na bafilozofi ya bato oyo bazali bobele komekameka mpo na koyeba soki bomoi ezali nini mpenza. Tokomipesa nde na koyekola Biblia, oyo epemamaki na Liziba ya bomoi, Yehova Nzambe, ye oyo akoki kopesa biso bomoi ya seko. (Nzembo 36:9; Bakolose 2:8) Na esika ete tókóma baombo ya ebongiseli ya mombongo oyo yango moko ezali kotengatenga mpe ekómi pene na kokwea, tokolanda nde toli ya Yehova oyo ete tosengeli kosepela na bilei mpe na bilamba, wana tozali kotya boyokani na biso elongo na Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi. (1 Timoté 6:8-12) Na esika ete tósala lokola soki nde bomoi na biso na mikolo mizali koya etaleli kozala moto ya bozwi mingi kati na mokili oyo, tokondimela nde Liloba ya Yehova wana ezali koyebisa biso ete mokili ezali koleka mpe mposa na yango lokola, kasi ye oyo azali kosala mokano ya Nzambe akoumela seko.—1 Yoane 2:17.
7. (a) Lolenge nini Masese 16:16 ezali kosalisa biso na kozala na likanisi ya bokatikati mpo na makambo ya motuya? (b) Mbano nini ezali kozwama na kotyáká mokano ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso?
7 Masese 16:16 elendisi biso na kolobáká na solo nyonso ete: “Kojua mayɛlɛ [mayele oyo ebandaka na kobanga Yehova] eleki bojui na wɔlɔ; kojua bosɔsɔli epɔnami liboso na palata.” Mayele mpe bososoli motindo wana ekopusa biso na kotya mokano ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso. Mpe nini ezali mosala Nzambe apesi na Batatoli na ye mpo na eleko oyo ya lisoló ya bato? Kosakola na ntina na Bokonzi na ye mpe kosalisa bato ya motema sembo ete bákóma bayekoli ya solo ya Yesu Klisto. (Matai 24:14; 28:19, 20) Oyo ezali mosala mokopesaka mbano ya bosepeli ya solo mpe bolamu mingi. Yango wana Biblia elobi ete: “Mapamboli epai na moto oyo ajui mayɛlɛ.”—Masese 3:13.
Tobatelami ete tósala mabe te
8. (a) Tángá litomba ya mibale oyo euti na ezaleli ya kobanga Nzambe. (b) Likambo nini ya mabe oyo tobatelami longwa na yango? (c) Lolenge nini bobangi Nzambe ezali kokóma nguya makasi oyo ezali kopusa biso?
8 Litomba ya mibale oyo ezaleli ya kobanga Nzambe epesaka ezali oyo ete tobatelami ete tósala te oyo ezali mabe. Baoyo bazali na limemya mozindo mpo na Nzambe bazwaka te ekateli bango moko mpo na oyo ezali malamu mpe mpo na oyo ezali mabe. Makambo oyo Nzambe alobi ete ezali malamu, bango batalelaka yango te ete ezali mabe; soko mpe kotalela ete ezali malamu makambo oyo Nzambe alobi ete ezali mabe. (Nzembo 37:1, 27; Yisaya 5:20, 21) Lisusu, moto oyo bobangi Nzambe ezali na bopusi likoló na ye akosuka te bobele na koyeba oyo Yehova alobi ete ezali malamu mpe oyo alobi ete ezali mabe. Moto motindo wana alingaka makambo oyo Yehova alingaka mpe ayinaka makambo oyo Yehova ayinaka. Lokola litomba, azali kosala na boyokani na mitinda ya Nzambe. Na yango, lokola elobami na Masese 16:6 (NW): “kati na kobanga Yehova moto akomilongola na mabe.” Ezaleli motindo wana ya bobangi Nzambe ekokóma nguya oyo ezali kopusa biso mpo na kokokisa oyo moto akoki te kosala na makasi na ye moko.
9. Lolenge nini mposa makasi ya koboya kosala oyo ezangi kosepelisa Nzambe ezalaki na bopusi likoló na ekateli ya mwasi moko na mboka Mexique, mpe yango ebimisaki litomba nini?
9 Ata soki ezaleli ya bobangi Nzambe ebandi kokóla bobele sika epai ya moto moko, ekoki kopesa ye makasi ya koboya kosala likambo oyo ekoki kopesa ye mawa na boumeli ya bomoi na ye. Na ndakisa, mwasi moko oyo azalaki na zemi, na mokili ya Mexique, atunaki na mwasi moko oyo azalaki Motatoli ya Yehova, motuna na ntina na likambo litali kosopa zemi. Motatoli atángelaki mwasi yango mikapo mingi mpe amonisaki ye polele ete: “Na miso ya Mozalisi, bomoi ezali na ntina mingi, ata mpe bomoi ya baoyo babotami naino te.” (Exode 21:22, 23; Nzembo 139:13-16) Baekzamɛ́ ya monganga emonisaki ete mwana yango akobotama na mbeba. Kasi sikawa, kopusamáká na makambo oyo amonaki kati na Liloba ya Nzambe, mwasi yango azwaki ekateli ya kotika ete mwana na ye abotama. Monganga na ye aboyaki komona ye lisusu, mpe mobali na ye akanaki ete akabwana na ye, kasi mwasi wana atikalaki ngwi na ekateli na ye. Na nsima, abotaki mwana mwasi—oyo azalaki na mbeba moko te, azalaki na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ mpe azalaki mwana moko kitoko. Lokola apusamaki na botɔ́ndi, alukaki Batatoli, mpe babandaki koyekola Biblia elongo na ye. Nsima na mbula moko, ye mpe mobali na ye bazwaki batisimo. Mwa bambula na nsima, na liyangani moko ya etúká, bazalaki na esengo ya kokutana na Motatoli oyo asololaki na bango liboso, mpe balakisaki ye mwana na bango kitoko ya mwasi oyo azalaki na mibu minei. Na ntembe te, limemya ya solo mpo na Nzambe mpe mposa makasi ya koboya makambo oyo asepelaka na yango te, ezali na bopusi makasi likoló ya bomoi ya moto.
10. Bobangi Nzambe ekoki kopesa bato makasi na komilongola na makambo nini ya mabe?
10 Bobangi Nzambe ezali kopesa biso makasi ya kopɛngola kosala makambo mingi oyo mazali mabe. (2 Bakolinti 7:1) Soki moto alóni yango malamu, ekoki kosalisa ye na kotika kosala masumu ya nkuku, oyo eyebani bobele na ye moko mpe na Yehova. Ekoki kosalisa ye na komilongola na boombo ya kolekisa ndelo na masanga mpe ya bilangwiseli. Moto moko oyo azalaki kala komipesa na bilangwiseli na Afrika ya Súdi alimbolaki ete: “Lokola nazalaki kozwa boyebi ya Nzambe, nabandaki mpe kokólisa bobangi ya kosala te likambo oyo likozokisa ye to oyo ekozanga kosepelisa ye. Nayebaki ete azalaki komona ngai, mpe nazalaki na mposa makasi ya kondimama na miso na ye. Yango epusaki ngai na kobwaka bilangwiseli oyo nazalaki na yango na kozindisáká yango na kabinɛ́.” Bobangi Nzambe esili kosalisa bankóto mingi ya bato motindo wana.—Masese 5:21; 15:3.
Libateli mpo na kopɛngola kolɛnga liboso ya bato
11. Liboso ya motambo nini oyo emonanaka mingi ezaleli ya kobanga Yehova ekoki kobatela biso?
11 Kobanga Nzambe oyo ezali kopesa bolamu ezali mpe kobatela biso liboso na bobangi ya bato. Bato mingi banyokwami na bobangi ya bato, ezala na makambo minene to na mikambo mike. Ata bantoma ya Yesu Klisto basundolaki ye mpe bakimaki wana akangamaki na basodá kati na elanga ya Getesemane. Na nsima, na lopango ya nganga monene, lokola abulunganaki mpe lokola azalaki na kobanga, Petelo awanganaki ete azalaki te moko na bayekoli ya Yesu mpe ete ayebaki ye te. (Malako 14:48-50, 66-72; Yoane 18:15-27) Kasi bantoma basalisamaki mpo na kozwa lisusu bokatikati na elimo. Epai mosusu, na mikolo ya Mokonzi Yoyakimi, Uliya, mwana ya Semaya, azalaki na bobangi mingi na boye ete atikaki mosala na ye lokola mosakoli ya Yehova mpe akimaki mboka, kasi atako bongo akangamaki mpe abomamaki.—Yilimia 26:20-23.
12. (a) Libateli nini limonisami na Masese 29:25 mpo na kopɛngola ezaleli ya kobanga bato? (b) Lolenge nini kokólisa kotya elikya epai na Nzambe?
12 Nini ekoki kosalisa moto mpo ete alónga ezaleli ya kobanga bato? Nsima ya kokebisa ete “Kolɛnga liboso na bato ezali motambo,” Masese 29:25 (NW) ebakisi ete: “Nde ye oyo akotya elikya epai na Yehova akobatelama.” Kotya elikya epai na Yehova ezali likambo ya ntina. Kotya elikya motindo wana ezwi moboko likoló na boyebi mpe likoló na makambo oyo tosili kokutana na yango. Na koyekoláká Liloba na ye, tozali komona elembeteli ya bosembo ya banzela ya Yehova. Tozali koyeba malamumalamu makambo oyo mamonisi ete tosengeli kotalela ye, bosolo ya bilaka na ye (sangisá oyo ya lisekwa), bolingo na ye mpe nguya na ye monene. Na bongo, wana tozali kosala na boyokani na boyebi wana, kosala makambo oyo Yehova azali kosɛnga mpe kobwaka nyonso oyo azali kokebisa biso na ntina na yango, tobandi komona biso moko libateli na ye ya bolingo mpe ntina oyo tosengeli kotalela ye. Tozali biso moko komona lolenge nguya na ye ezali kosala mpo na kokokisa mokano na ye. Elikya na biso epai na ye ezali kokóla mpe, elongo na yango bolingo na biso mpo na ye mpe mposa makasi tozali na yango ya kosala te makambo oyo mazangi kosepelisa ye. Kotya elikya motindo wana etongami likoló na moboko makasi. Ezali libateli monene liboso ya bobangi ya bato.
13. Lolenge nini ezaleli ya bobangi Nzambe ezali kosalisa biso na mosala, na ndako mpe na eteyelo?
13 Ezaleli na biso ya kotya elikya epai na Yehova, wana yango esangani na ezaleli ya bobangi Nzambe, ekosala ete tókangama ngwi na oyo ezali sembo soki nkolo-kompanyi akani kolongola biso na mosala mpo ete toboyi kosangana na mimeseno mizangi kolongobana na makambo ya mombongo. (Kokanisá na Mika 6:11, 12.) Ezaleli motindo wana ya bobangi Nzambe ezali kosalisa baklisto mingi ete bálendendela kati na losambo ya solo liboso ya botɛmɛli ya basangani ya libota oyo bazali bandimi te. Ezali mpe kopesa bilenge oyo bazali kokende na eteyelo mpiko ya komimonisa ete bazali Batatoli ya Yehova, mpe ezali kopesa bango makasi ya koyika mpiko na matumoli ya baninga na bango ya kelasi oyo bazali kotyola mitinda ya Biblia. Na yango, elenge mwasi moko Motatoli alobaki ete: “Oyo bango bazali kokanisa ezali na ntina te. Oyo Yehova azali kokanisa, yango nde ezali likambo ya ntina.”
14. Lolenge nini basaleli ya Yehova bazali kolónga ata wana bomoi na bango ezali na likámá?
14 Endimiseli motindo moko ezali kopesa makasi epai na baklisto ya solo ete bákangama ngwi na banzela ya Yehova ata wana bomoi na bango ezali na likámá. Bayebi ete basengeli kokutana na minyoko oyo euti na mokili. Bayebi ete bantoma babetamaki mfimbo mpe ete Yesu Klisto ye moko abetamaki mpe abomamaki na bato mabe. (Malako 14:65; 15:15-39; Misala 5:40; kokanisá na Danyele 3:16-18.) Kasi basaleli ya Yehova bazali na elikya makasi ete akoki kopesa bango makasi mpo na koyika mpiko; ete na lisalisi ya Nzambe bakoki kolónga; ete kozanga ntembe Yehova akopesa mbano na baoyo bazali sembo—soki esengeli ata na nzela ya lisekwa mpo na kozala na bomoi kati na mokili na ye ya sika. Bolingo na bango mpo na Nzambe oyo esangani na ezaleli ya bobangi Nzambe ezali kopusa bango na nguya nyonso ete báboya kosala makambo nyonso oyo makoki kosepelisa ye te.
15. Nini esalisaki Batatoli ya Yehova na kobatela bosembo na bango kati na bakáa ya bakangami ya Nazi?
15 Mayoki wana esalisaki Batatoli ya Yehova na koyika mpiko na minyoko oyo ezalaki na bakáa ya bakangami ya Nazi na boumeli ya bambula 1930 mpe 1940. Babatelaki toli ya Yesu oyo ezali na Luka 12:4, 5: “Nalobi na bino baninga na ngai ete, Banga baoyo babomi njoto tɛ, bango bakoki kosala likambo mosusu na nsima tɛ. Nde nakokebisa bino sɔkɔ bobanga nani. Banga ye oyo ajali na bokonji na kobwaka kati na Gɛɛna, esili ye koboma. Ɛɛ nalobi na bino ete bobanga ye!” Na yango, Gustav Auschner, Motatoli moko oyo azalaki na káa ya bakangami oyo ebéngami Sachsenhausen, akomaki na nsima ete: ‘Basodá ya S.S. babetaki August Dickmann masasi mpe bakanaki kobeta biso banso masasi soki toboyi kotya mabɔkɔ na mokanda oyo ezalaki kosɛnga ete tówangana kondima na biso. Moko te kati na biso atyaki lobɔkɔ na mokanda yango. Tozalaki na bobangi mingi ya kosala te oyo ekozanga kosepelisa Yehova na esika ya kobanga masasi na bango.’ Kobanga bato ememaka na kowangana kondima, kasi kobanga Nzambe epesaka moto makasi mpo na kosala oyo ezali sembo.
Kobatelama ya bomoi
16. Nini esalisaki Noa na kobatela etamboli ya sembo bambula mingi liboso ya Mpela, mpe esukaki boni mpo na ye mpe mpo na libota na ye?
16 Noa azalaki na bomoi na mikolo ya nsuka ya mokili oyo ezalaki liboso ya mpela. Yehova azwaki ekateli ya koboma mokili mabe ya ntango wana mpamba te bato bazalaki kosala mabe mingi. Nzokande, na ntango yango Noa azalaki kati na mokili wana oyo etondaki na mobulu, na makambo ya nsɔ́mɔ ya mbindo, mpe na ezaleli ya kozanga kotalela mokano ya Nzambe. Atako kosakolama ya boyengebene oyo epesamaki na Noa, “bayebaki likambo tɛ kino eyaki mpela mpe elongolaki bango yɔnsɔ.” (Matai 24:39) Nzokande Noa alɛmbaki te na ntina na mosala oyo Nzambe apesaki ye. Asalaki “bobɛlɛ bongo, mpe asilisaki yɔnsɔ elakaki Njambe ye.” (Genese 6:22) Nini esalisaki Noa ete abatela etamboli malamu bambula mingi liboso ete Mpela eya? Baebele 11:7 (NW) eyanoli ete: “Na kondima, Noa nsima na kozwa likebisi ya Nzambe na ntina na makambo oyo mazalaki koya, amonisaki bobangi Nzambe.” Lokola litomba, ye mpe mwasi na ye, bana na ye mpe basi na bango babatelamaki na ntango ya Mpela.
17. (a) Kozanga kotalela oyo bato mosusu bazali kosala, biso tosengeli kosala nini? (b) Mpo na nini baoyo bazali kobanga Yehova bazali mpenza bato ya esengo?
17 Tozali kobika na eleko oyo ekokani na makambo mingi na mikolo ya Noa. (Luka 17:26, 27) Likebisi lizali mpe kopesama lisusu. Emoniseli 14:6, 7 (NW) ezali kolobela anzelu moko oyo azali kopombwa kati na nzangá oyo azali kobyanga bato na mabota nyonso mpe na bikólo nyonso mpe na minɔkɔ nyonso ete ‘bábanga Nzambe mpe bápesa ye nkembo.’ Kozanga kotalela makambo oyo bato bazingi yo bazali kosala, batelá maloba wana, mpe na nsima pesá libyangami yango na bato mosusu. Lokola Noa, zalá na kondima mpe monisá bobangi Nzambe. Kosala bongo ekoki komema na kobatela bomoi na yo mpe bomoi ya bato mingi mosusu. Wana ezali biso komona matomba oyo ezali kozwama na baoyo bazali kobanga Nzambe ya solo, tokoki bobele kondima maloba ya mokomi na Nzembo oyo apemamaki mpe ayembaki ete: “Esɛngɔ ejali na moto oyo akobangaka [Yehova], oyo akosepelaka mibeko na ye mingi.”—Njembo 112:1.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Wapi bamoko na matomba minene oyo euti na ezaleli ya kobanga Nzambe ya solo?
◻ Lolenge nini mayele oyo euti na bobangi Nzambe ekoki kobatela biso?
◻ Mpo na nini bobangi Nzambe ezali kopusa biso na kotika oyo ezali mabe?
◻ Lolenge nini bobangi Nzambe ezali kobatela biso liboso ya bobangi ya bato?
◻ Lisungi nini bobangi Nzambe ezali kopesa na bilikya ya bomoi na biso na mikolo mizali koya?
[Bililingi na lokasa 16, 17]
“Esɛngɔ ejali na moto oyo akobangaka [Yehova], oyo akosepelaka mibeko na ye mingi.”—Njembo 112:1