Mokapo ya Mibale
Bisakweli ya kobɔndisa oyo etali yo
1. Mpo na nini tosengeli kotyela esakweli ya Yisaya likebi?
ATAKO eleki sikoyo mbula soki 3 000 banda Yisaya akomaki mokanda oyo ezali na nkombo na ye, mokanda yango ezali mpenza na ntina mpo na biso lelo oyo. Makambo ya kala oyo akomaki ekoki koteya biso mitinda ya ntina mingi. Lisusu, tokoki kobakisa kondima na biso soki toyekoli bisakweli oyo akomaki na nkombo ya Yehova. Yisaya azalaki mpenza mosakoli ya Nzambe ya bomoi. Yehova apesaki ye elimo na Ye mpo esalisa ye akoma makambo oyo ekoya liboso ete esalema. Na ndenge yango, Yehova amonisaki ete azali na likoki ya koyebisa makambo oyo ekoya mpe kosala ete makambo yango esalema kaka bongo. Nsima ya koyekola mokanda ya Yisaya, baklisto ya solo bandimi ete Yehova akokokisa makambo nyonso oyo alaki.
2. Makambo ezalaki ndenge nini na Yelusaleme ntango Yisaya azalaki kokoma mokanda na ye ya bisakweli, mpe mbongwana nini esengelaki koya na nsima?
2 Liboso ete Yisaya asilisa kokoma esakweli na ye, makaneli oyo Asiria azalaki kokanela Yelusaleme ezalaki lisusu te. Tempelo ezalaki naino, mpe bato bazalaki kosala makambo na bango ya mokolo na mokolo kaka ndenge bamesanaki kosala yango bankama ya bambula liboso. Kasi, makambo esengelaki kobongwana na nsima. Mikolo ekoya oyo bomɛngo ya bakonzi ya Bayuda ekokende na Babilone mpe, kuna, bilenge Bayuda bakokóma bato minene na ndako ya mokonzi.a (Yisaya 39:6-7) Makambo yango esengelaki kosalema nsima ya mbula koleka 100.—2 Mikonzi 24:12-17; Danyele 1:19.
3. Nsango nini ezali na Yisaya mokapo 41?
3 Kasi nsango oyo Nzambe ayebisaki na monɔkɔ ya Yisaya esuki kaka te na kosakola makambo ya mawa. Yis Mokapo 40 ya mokanda na ye ebandi na liloba “Bóbɔndisa.”b Bayuda basengelaki kobɔndisama na elikya ete bango moko to bana na bango bakozonga na mboka na bango. Yis Mokapo 41 ekobi kolobela nsango yango ya kobɔndisa mpe esakoli ete Yehova akobimisa mokonzi moko ya nguya oyo akokokisa mokano na Ye. Mokapo yango ezali kokitisa motema mpe ezali kolendisa bato bátyela Nzambe motema. Ezali mpe komonisa polele ete banzambe ya lokuta, oyo bato ya bikólo batyelaka motema, bazali na nguya te. Makambo nyonso wana ekoki mpenza kokómisa kondima ya moto makasi, ezala na ntango ya Yisaya to na ntango na biso.
Yehova abɛteli bikólo ntembe
4. Na maloba nini Yehova abɛteli bikólo ntembe?
4 Na monɔkɔ ya mosakoli na ye, Yehova alobi boye: ‘E bino bisanga, bózala nyɛɛ liboso na ngai; tiká ete bato ya bikólo bámizwela nguya ya sika. Bábɛlɛma mpe báloba, tókutana mpo na kosamba.’ (Yisaya 41:1) Na maloba yango, Yehova abɛti ntembe na bikólo oyo batɛmɛlaka basaleli na ye. Bátɛlɛma liboso na ye mpe bákanga loketo mpo na koloba! Ndenge tokomona yango na nsima, Yehova, lokola nde azali zuzi oyo azali kosambisa na tribinale, asɛngi bikólo bálakisa makambo oyo ezali komonisa ete bikeko na bango ezali mpenza banzambe. Banzambe yango bakoki kosakola makambo oyo bakosala mpo na kobikisa basambeli na bango to koyebisa bitumbu oyo bakopesa banguna na bango? Soki bakokoka, bakokoka mpe kokokisa bisakweli yango? Te. Kaka Yehova nde azali na makoki yango.
5. Monisá ete bisakweli ya Yisaya ekokisamaka kaka mbala moko te.
5 Ntango tozali kotalela esakweli ya Yisaya, tóbosana te ete maloba na ye ekokisamaki te kaka mbala moko; ezali mpe bongo mpo na ebele ya bisakweli mosusu oyo ezali na Biblia. Na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bato ya Yuda bakokende na boombo na Babilone. Atako bongo, esakweli ya Yisaya emonisi ete Yehova akobimisa bango na boombo yango. Likambo yango ekokisami na mobu 537 L.T.B. Kobimisama mosusu ya ndenge wana esalemaki na ebandeli ya ekeke ya 20. Na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, basaleli ya Yehova bapakolami na elimo oyo bazalaki awa na mabelé bamonaki mpasi mingi. Na 1918, mindɔndɔ oyo mokili ya Satana ebimiselaki bango—mindɔndɔ yango eutaki na mangomba ya boklisto, oyo ezali eteni monene ya Babilone Monene—esalaki ete ebongiseli ya Batatoli ya Yehova emonana lokola etiki mosala ya kosakola nsango malamu. (Emoniseli 11:5-10) Bakambi mosusu ya la Société bakɔtaki bolɔkɔ mpo na lokuta oyo bakoselaki bango. Emonanaki lokola nde mokili elongi etumba oyo ezalaki kobundisa basaleli ya Nzambe. Na nsima, se ndenge esalemaki na mobu 537 L.T.B., Yehova abimisaki bango na ndenge oyo moto moko akanisaki te. Na 1919, bakambi yango oyo bazalaki na bolɔkɔ babimaki mpe na nsima, tribinale etikaki kolandela makambo oyo bafundamaki na yango. Liyangani moko oyo esalemaki na engumba Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis, na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1919, elendisaki lisusu basaleli ya Yehova mpo bázongela mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Emoniseli 11:11, 12) Banda wana, mosala yango ekoli mingi mpenza. Lisusu, ebele ya maloba ya Yisaya ekokokisama malamumalamu na Paladiso oyo ekozala awa na mabelé. Na yango, maloba oyo Yisaya alobá etali bikólo nyonso mpe bato nyonso lelo oyo.
Babengi mobikisi moko
6. Na maloba nini mosakoli alobeli moto moko oyo akobanda kobɔtɔla bamboka ye na basoda na ye?
6 Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova asakoli ete moto moko na basoda na ye bakobanda kobɔtɔla bamboka mosusu; moto yango akobimisa basaleli ya Nzambe na Babilone mpe akopesa banguna na bango etumbu. Yehova atuni boye: “Nani abimisi moto moko uta epai moi ebimaka? Nani oyo, na boyengebene, abengaki ye alanda makolo na Ye, mpo na kopesa ye bikólo, mpe kotinda ye akonza ata bakonzi? Nani azalaki ntango nyonso kopesa bango lokola putulu mpo na mopanga na ye, na boye ete bakimisamaki na litimbo na ye lokola matiti oyo ekimi na mopɛpɛ? Nani azalaki kolanda bango, azalaki koleka na makolo, na kimya, na mwa nzela oyo ayelaki te? Nani asalaki mosala mpe asalaki yango, abengi mabota banda na ebandeli? Ngai Yehova, Moto ya liboso; mpe na baoyo ya nsuka nazali kaka ndenge moko.”—Yisaya 41:2-4, NW.
7. Nani moto oyo akobɔtɔla bamboka ye na basoda na ye, mpe asali nini?
7 Nani yango bakobimisa ye uta epai moi ebimaka, elingi koloba uta na ɛsti? Mokili ya Bamede ná Baperse mpe mokili ya Elama ezali na ɛsti ya Babilone. Sirise, moto ya Perse, elongo na basoda na ye ya makasi bauti na mikili yango. (Yisaya 41:25; 44:28; 45:1-4, 13; 46:11) Atako azali mosambeli ya Yehova te, Sirise asali makambo oyo eyokani na mokano ya Yehova, Nzambe ya boyengebene. Sirise akonzi bakonzi, apalanganisi bango lokola putulu liboso na ye. Ntango azali kokende kobɔtɔla bamboka, azali koleka “na kimya,” to kozanga kobanga, na mwa banzela oyo bato bameseni koleka te mpe azali kolonga mikakatano nyonso. Na mobu 539 L.T.B., Sirise akómi na Babilone, engumba moko makasi, mpe akweisi yango. Yango epesi basaleli ya Nzambe nzela ya kobima na boombo mpe kozwa likoki ya kozonga na Yelusaleme mpo na kozongisa losambo ya pɛto.—Ezela 1:1-7.c
8. Kaka Yehova nde akoki kosala nini?
8 Ndenge tomoni, na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova asakolaki kotombwama ya Sirise bambula ebele liboso ete mokonzi yango abotama. Kaka Nzambe ya solo nde akoki kosakola likambo ya ndenge wana kozanga komikosa. Na banzambe nyonso ya lokuta oyo bikólo bazali kosambela, ata moko te akokani na Yehova. Yango wana, Yehova alobi boye: “Nakopesa nkembo na ngai epai ya mosusu te.” Kaka Yehova nde akoki mpenza koloba boye: “Nazali moto ya liboso mpe nazali moto ya nsuka, mpe longola ngai Nzambe mosusu azali te.”—Yisaya 42:8; 44:6, 7, NW.
Kobanga etindi bikólo bátyela bikeko motema
9-11. Bikólo basali nini ntango bayoki ete Sirise azali koya?
9 Sikoyo Yisaya alobeli ndenge oyo bikólo bakosala liboso ya moto yango oyo akobɔtɔla bamboka na basoda na ye: ‘Bisanga emoni mpe ebangi, nsuka na mokili bazali kolɛnga, babɛlɛmi mpe bayei. Moto na moto asungami na mozalani na ye, alobi na ndeko na ye ete, Yiká mpiko. Mosali ya mabaya ayikisi monangoli ya wolo mpiko, mpe ye oyo akómisaka ebende alima na marto ayikisi ye oyo abɛtaka yango likoló ya elondó mpiko, alobi mpo na ebende oyo bakangisi ete, Ezali malamu, mpe batɛlɛmisi yango na nsɛtɛ ete eninganaka te.’—Yisaya 41:5-7.
10 Sikoyo Yehova atye makanisi na ye na makambo oyo ekosalema nsima ya mbula soki 200; atalitali makambo oyo ezali koleka na mokili mobimba na ntango yango. Basoda makasi ya Sirise bazali koya nokinoki, bazali kolonga banguna na bango nyonso. Bato—ata baoyo bafandaka na bisanga, baoyo bafandaka na bisika oyo eleki mosika—bazali kolɛnga ntango bango bazali koya. Lokola bato yango bazali kobanga, basangani mpo na kobundisa ye oyo Yehova abengi uta na ɛsti mpo na kopesa bango etumbu. Bazali komeka kolendisana na maloba oyo: “Yiká mpiko.”
11 Bato ya misala ya mabɔkɔ basalisani mpo na kosala bikeko ya banzambe oyo bakobikisa bato. Mosali ya mabaya asali ekeko ya nzete; na nsima alendisi mosali ya wolo atya ebende likoló na yango, ntango mosusu wolo. Mosali-bikeko abɛtibɛti ebende yango marto mpo engɛnga mpe amoni ete ebende ekangami malamu. Ntango mosusu ezali na mwa lityo nde Yisaya alobi ete batɛlɛmisi ekeko yango na nsɛtɛ mpo eningana te to mpo emonana te ete ezangi makasi, ndenge ekeko ya Dagona ekweaki liboso ya sanduku ya Yehova.—1 Samwele 5:4.
Kobanga te!
12. Ndenge nini Yehova akitisi Yisalaele motema?
12 Yehova azali sikoyo koloba na basaleli na ye. Baoyo batyelaka Nzambe ya solo motema bakeseni na bikólo oyo batyelaka bikeko oyo ezangá bomoi motema; bango babangaka eloko moko te. Mpo na kokitisa bango motema, Yehova abandi naino kokundwela bango ete Yisalaele azali mwana ya moninga na ye Abalayama. Na maloba oyo etondi na bolingo ya Yehova, Yisaya alobi boye: ‘Yo Yisalaele, mosaleli na ngai, Yakobo oyo ngai naponi yo, bana na Abalayama, moninga na ngai, yo oyo nalɔkɔti yo longwa na nsuka na mokili, nabengi mpe yo longwa na ndelo eleki mosika na yango; koloba na yo ete, Yo ozali mosaleli na ngai, naponi yo mpe nabwaki yo te, kobanga te, zambi ngai nazali na yo; koyoka nsɔmɔ te mpo ete ngai nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi, nakosunga yo, nakosimba mpe yo na lobɔkɔ na ngai ya boyengebene.’—Yisaya 41:8-10.
13. Mpo na nini maloba ya Yehova ekobɔndisa mpenza Bayuda oyo bakozala na boombo?
13 Maloba yango ekobɔndisa mpenza Bayuda ya sembo oyo bakozala na boombo na mboka mopaya! Bakolendisama mpenza na koyoka ete Yehova abengi bango “mosaleli na ngai” na ntango oyo bazali kosalela mokonzi ya Babilone na mboka mopaya! (2 Ntango 36:20) Atako Yehova akopesa bango etumbu mpo na kozanga bosembo na bango, akobwaka bango te. Yisalaele ezali ya Yehova, kasi ya Babilone te. Basaleli ya Nzambe bakozala ata na ntina moko te ya kolɛnga ntango Sirise, moto oyo akobɔtɔla bamboka na basoda na ye, akobanda koya. Yehova akozala elongo na basaleli na ye mpo na kosalisa bango.
14. Libɔndisi nini basaleli ya Nzambe lelo oyo bazali kozwa na maloba oyo Yehova ayebisaki Yisalaele?
14 Maloba wana ekitisaki basaleli ya Nzambe motema mpe epesaki bango makasi tii ata na mikolo na biso. Na 1918, bazalaki na mposa ya koyeba mokano ya Yehova mpo na bango. Mposa na bango ezalaki ete abimisa bango na boombo ya elimo. Lelo oyo, tozali na mposa ya kolongwa na mikakatano oyo Satana, mokili mpe kozanga kokoka ezali kobimisela biso. Kasi tokangi ntina ete Yehova ayebi mpenza ntango nini mpe ndenge nini akosala mpo na bolamu ya basaleli na ye. Lokola bana mike, tosimbi lobɔkɔ na ye ya nguya, tozali na elikya ete akosalisa biso tólonga. (Nzembo 63:7, 8) Yehova alingaka mingi bato oyo basalelaka ye. Lelo oyo azali kosunga biso se ndenge oyo asungaki basaleli na ye na bambula ya mpasi, 1918 mpe 1919, kaka lokola asungaki Bayisalaele ya sembo na ntango ya kala mpenza.
15, 16. (a) Nini ekokómela banguna ya Yisalaele, mpe na makambo nini Yisalaele ekokani na mpambo? (b) Etumba nini, oyo ekómi pene, esali ete maloba ya Yehova elendisa mingi na moi ya lelo?
15 Tótalela makambo oyo Yehova alobi na nsima, na monɔkɔ ya Yisaya: ‘Talá baoyo nyonso basilikeli yo, bakoyokisama nsɔni mpe bakobulunganisama; baoyo bawelani na yo bakozala lokola eloko te mpe bakosila nyɛɛ. Okoluka bango nde okomona bango te, baoyo bawelani na yo; bakozala lokola eloko te, baoyo bayeli yo na etumba. Mpo ete ngai Yehova, Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali; ngai nazali koloba na yo ete, Kobanga te: ngai nakosunga yo. Kobanga te, yo Yakobo mpambo mpenza, bino mibali ya Yisalaele; Yehova, Mosikoli na yo, Mosantu ya Yisalaele alobi ete, Nakosunga yo.’—Yisaya 41:11-14.
16 Banguna ya Yisalaele bakolonga te. Baoyo basilikeli Yisalaele bakoyoka nsɔni. Baoyo babundisi ye bakosila nyɛɛ. Atako emonani lokola ete Bayisalaele oyo bazali na boombo bazangi makasi mpe bakoki komibatela te lokola mpambo oyo ezali kobaluka na putulu, Yehova akosalisa bango. Banda “mikolo ya nsuka” ebandaki, maloba yango elendisi mpenza baklisto ya solo na botɛmɛli makasi oyo bato mingi ya mokili bazali kobimisela bango! (2 Timote 3:1) Lisusu, elaka ya Yehova ezali mpenza kopesa makasi soki tokanisi etumba oyo, mosika te, Satana, oyo esakweli moko ebengi “Gogo ya mokili ya Magogo,” akobimisa! Na ntango oyo Gogo akobimisa etumba monene wana, ekomonana lokola nde basaleli ya Yehova bazangi likoki ya komibatela lokola mpambo, to lokola bato oyo ‘bafandi na mboka oyo ezangi lopango’ mpe oyo ezangi ‘ata bikangeli mpe baporte.’ Atako bongo, baoyo batyaka elikya na bango epai ya Yehova bakozala ata na ntina moko te ya kolɛnga na nsɔmɔ. Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ye moko akobunda mpo na kobikisa bango.—Ezekiele 38:2, 11, 14-16, 21-23, NW; 2 Bakolinti 1:3.
Libɔndisi mpo na Yisalaele
17, 18. Maloba nini Yisaya asaleli mpo na komonisa ete Yehova akopesa Yisalaele makasi, mpe likambo mosusu nini tokoki mpenza kondima ete ekosalema?
17 Yehova alandi kolendisa basaleli na ye: ‘Talá nasali yo etutelo-ya-loso ya sika, ya mopotu mpe ya mino; okonika bangomba mpe okonyata yango, okokómisa bangomba ya mike lokola pumbulu. Okopɛpa bango mpe mopɛpɛ ekolongola bango; mopɛpɛ makasi ekopanza bango; mpe okosepela kati na Yehova, okomona nkembo kati na Mosantu ya Yisalaele.’—Yisaya 41:15, 16.
18 Yehova akopesa Yisalaele makasi mpo abanda etumba mpe, na ndenge ya elimo, alonga banguna na ye oyo bakokani na bangomba. Ntango Yisalaele akouta na boombo, akolonga banguna oyo bakoluka kopekisa mosala ya kotonga lisusu tempelo mpe lopango ya Yelusaleme. (Ezela 6:12; Nehemia 6:16) Maloba ya Yehova ekokokisama malamumalamu nde epai ya “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16) Yesu alaki baklisto bapakolami ete: “Moto oyo alongi mpe abateli misala na ngai tii na nsuka nakopesa ye bokonzi likoló ya bikólo, mpe akokamba bato na lingenda ya ebende bongo bakobukanabukana lokola bambɛki ya mabelé, ndenge ngai mpe nazwaki epai ya Tata na ngai.” (Emoniseli 2:26, 27) Mokolo ekoya mpenza wana bandeko ya Klisto, nsima ya kosekwa mpe kozwa nkembo kuna na likoló, bakopesa mabɔkɔ na mosala ya koboma banguna ya Yehova Nzambe.—2 Batesaloniki 1:7, 8; Emoniseli 20:4, 6.
19, 20. Yisaya akomi nini mpo na Yisalaele oyo esengeli kokóma lisusu esika moko ya kitoko, mpe ndenge nini maloba yango ekokisami?
19 Sikoyo, na elobeli moko ya elilingi, Yehova azongeli elaka ya kosunga libota na ye. Yisaya akomi boye: ‘Wana babola mpe bazangi bakoluka mai nde ezali te, mpe ndemo na bango ekauki na mposa ya komɛla, ngai Yehova nakozongisela bango liloba, ngai Nzambe na Yisalaele, nakotika bango te. Nakozipola bitima na likoló ya ngomba, mpe maziba kati na mabwaku, nakobongola esobe ete ezala libeke mpe mokili mokauki ete ezala mitó ya mai. Nakokona kati na bisika ya mpamba nzete ya eleze mpe kasia mpe adasa mpe nzete ya mafuta; nakotya nzete ya beloso kati na esobe mpe tidala mpe tasulu esika moko, ete bámona mpe báyeba, bábanzabanza mpe básosola elongo ete lobɔkɔ ya Yehova esali yango, Mosantu ya Yisalaele atongi yango.’—Yisaya 41:17-20.
20 Atako Bayisalaele oyo bazali na boombo bafandi na mboka-mokonzi ya ekólo ya bomɛngo oyo eleki makasi na mokili mobimba, mpo na bango, mboka-mokonzi yango ezali lokola esobe oyo ezangi mai. Bazali koyoka ndenge moko na Davidi ntango azalaki kokima Mokonzi Saulo. Na mobu 537 L.T.B., Yehova afungoleli bango nzela mpo bázonga na Yuda mpe bátonga lisusu tempelo na ye na Yelusaleme mpo na kozongisa losambo ya pɛto. Mpo na nyonso wana, Yehova apamboli bango. Na esakweli moko oyo epesamaki na nsima, Yisaya alobi boye: “[Yehova] akobɔndisa Siona, akobɔndisa bisika ya mpamba na ye nyonso; akozalisa esobe na ye lokola Edene, esika na ye ya mpamba lokola elanga ya [Yehova].” (Yisaya 51:3) Yango mpe esalemi mpenza nsima ya kozonga ya Bayuda na mboka na bango.
21. Kozongisama nini esalemaki na mikolo na biso, mpe nini ekosalema na mikolo ekoya?
21 Likambo moko ya ndenge wana esalemaki mpe na mikolo na biso ntango Klisto Yesu, Sirise Monene, abimisaki bayekoli na ye bapakolami na boombo ya elimo mpo bákoka kozongisa losambo ya pɛto. Mbano oyo bato yango ya sembo bazwaki ezali paladiso kitoko ya elimo, elanga ya Edene ya elilingi. (Yisaya 11:6-9; 35:1-7) Etikali moke, ntango Nzambe akoboma banguna na ye, mabelé mobimba ekobongwana paladiso ya solosolo, se ndenge oyo Yesu alakaki moto mabe likoló ya nzete.—Luka 23:43.
Yehova abɛteli banguna ya Yisalaele ntembe
22. Na maloba nini Yehova abɛteli lisusu bikólo ntembe?
22 Sikoyo, Yehova azongeli ntembe oyo azali na yango na bikólo mpe na banzambe na bango ya bikeko: ‘Yehova alobi ete, Bóbimisa likambo na bino; Mokonzi na Yakobo alobi ete, Bóya na matatoli na bino. Tiká ete bábimisa yango mpe báyebisa biso makambo mazali koya; bómonisa biso makambo ya kala lokola yango ezalaki ete tóbanzabanza mpo na yango, ete tóyeba makambo na nsima na yango to bósakwela biso mpo na makambo makoya. Bómonisa biso oyo ezali koya nsima ete tósosola ete bozali banzambe; ɛɛ bósala malamu to bósala mabe ete tóyoka nsɔmɔ mpe tókamwa elongo moko. Talá, bozali eloko te, mosala na bino mpe ezali mpamba; ye oyo aponi bino aboyami.’ (Yisaya 41:21-24) Banzambe ya bikólo bazali na likoki ya kosakola makambo ndenge mpenza ekozala mpo na komonisa ete baleki bato na boyebi? Soki bazali na likoki yango, na ntembe te basengeli kosala makambo ya malamu to ya mabe oyo ekomonisa ete bazali na likoki ya kosala bongo. Ya solo, banzambe ya bikeko bakoki kosala eloko te mpe bazali na bomoi te.
23. Mpo na nini Yehova amonisaki mbala na mbala na monɔkɔ ya basakoli na ye ete losambo ya bikeko ezali mabe?
23 Na mikolo na biso bato mosusu bakoki komituna mpo na nini Yehova alekisaki ntango mingi mpo na komonisa na monɔkɔ ya Yisaya mpe ya basakoli mosusu ete losambo ya bikeko, likambo moko ya bozoba, ezali mabe. Lelo oyo, bato mingi bakoki kozala na mokakatano ata moke te mpo na komona ete bikeko oyo esalemi na bato ezali na ntina moko te. Nzokande, soki bato mingi bandimi mateya ya lokuta, ezalaka mpasi mpo na kolongola yango na makanisi na bango. Makambo mingi oyo bato ya ntango na biso bandimaka ezali na ntina te, se ndenge bato bazalaki kondima ete bililingi oyo ezangi bomoi ezali mpenza banzambe. Atako bongo, bato bakangamaka kaka na makambo yango ata soki balakisi bango bilembo oyo ezali komonisa ete makambo yango ezali bongo te. Mpo na basusu, ezali se nsima ya koyoka solo mbala na mbala nde bakoya komona ete ezali likambo ya mayele kotyela Yehova motema.
24, 25. Maloba nini Yehova asaleli ntango alobeli lisusu Sirise, mpe yango ekundweli biso esakweli nini?
24 Yehova alobeli lisusu Sirise: “Nabimisi moto moko uta na nɔrdi mpe akoya. Uta na epai moi ebimaka akobenga nkombo na ngai. Akoya likoló ya bayangeli-basungi lokola nde bazali mabelé ya mbɛki mpe lokola mosali-mbɛki azali konyatanyata mabelé ya pɛtɛpɛtɛ.” (Yisaya 41:25, NW)d Yehova akeseni na banzambe ya bikólo mpamba te ye akoki kosala makambo oyo akani. Ntango akobimisa Sirise na ɛsti, “epai moi ebimaka,” Nzambe akomonisa ete azali na likoki ya koyebisa makambo oyo ekoya mpe kobongisa yango mpo ekokisa bisakweli oyo alobaki.
25 Maloba yango ekundweli biso esakweli ya ntoma Yoane oyo elobeli bakonzi oyo bakopusama na kosala makambo na mikolo na biso. Na Emoniseli 16:12, tozali kotánga ete nzela ekolɛngɛlama “mpo na bakonzi oyo bauti epai moi ebimaka.” Bakonzi yango ezali nde Yehova Nzambe ná Yesu Klisto. Se ndenge Sirise abikisaki basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, bakonzi yango oyo baleki makasi bakoboma banguna ya Yehova mpe bakobatela basaleli na ye na ntango ya bolɔzi monene mpo na kokɔtisa bango na mokili ya sika ya boyengebene.—Nzembo 2:8, 9; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 7:14-17.
Yehova aleki nyonso!
26. Motuna nini Yehova atuni sikoyo, mpe eyano na yango ezali nini?
26 Yehova alobi lisusu likambo oyo ya solo ete kaka ye nde azali Nzambe ya solo. Atuni boye: “Nani ayebisaki likambo moko banda na ebandeli, mpo tókoka koyeba yango, to banda na bambula eleká, mpo tókoka koloba ete: ‘Ezali ya solo’? Ya solo, ezali na moto moko te oyo azali koyebisa. Ya solo, ezali na moto moko te oyo asali ete bóyoka. Ya solo, ezali na moto moko te oyo azali koyoka maloba na bino.” (Yisaya 41:26, NW) Ata nzambe ya ekeko moko te ayebisaki koya ya moto moko oyo abɔtɔlaka bamboka na basoda na ye mpo na kosikola baoyo batyelaka nzambe yango motema. Banzambe nyonso ya ndenge wana bazangi bomoi mpe balobaka te. Bazali mpenza banzambe te.
27, 28. Likambo nini ya solo mpe ya ntina mingi babɛteli yango nsɛtɛ na bavɛrsɛ ya nsuka ya Yisaya 41, mpe kaka banani nde basakolaka likambo yango?
27 Nsima ya koyebisa bisakweli yango ya ntina oyo euti na Yehova, Yisaya abɛti nsɛtɛ na likambo moko ya solo mpe ya ntina mingi: “Ezali na moto moko, ya liboso, oyo alobi na Siona ete: ‘Talá! Bango oyo!’ mpe na Yelusaleme ete nakopesa momemi ya nsango malamu. Mpe nazalaki kotala, mpe moto moko azalaki te; mpe moko te azali kopesa toli kati na bango. Mpe nazalaki kotuna bango, mpo bápesa ngai eyano. Talá! Bango nyonso bazali na bomoi te. Misala na bango ezali mpamba. Bililingi na bango ya bibende oyo enyangwisami ezali mopɛpɛ mpamba mpe makanisi mpamba.”—Yisaya 41:27-29, NW.
28 Yehova azali moto ya liboso. Ye aleki nyonso! Azali Nzambe ya solo, ye oyo ayebisaka kosikolama ya basaleli na ye mpe amemelaka bango nsango malamu. Lisusu, ezali kaka Batatoli na ye nde basakolaka monene na ye epai ya bikólo. Na lityo nyonso, Yehova akweisi baoyo batyelaka losambo ya bikeko motema, abwaki bikeko na bango mpamba te ezali “mopɛpɛ mpamba mpe makanisi mpamba.” Wana ezali mpenza ntina monene ya kokangama na Nzambe ya solo! Kaka Yehova nde ebongi tótyela ye motema na biso mobimba.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokapo 29 ya Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso I.
b Talá mokapo 30 ya Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso I.
c Sirise Monene, oyo abimisaki “Yisalaele ya Nzambe” na boombo ya elimo na 1919, ezali nde Yesu Klisto, ye oyo banda 1914 atyami Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló.—Bagalatia 6:16.
d Atako mboka ya Sirise ezalaki na ɛsti ya Babilone, autaki nde na nɔrdi (na Asie Mineure) ntango ayaki kobunda etumba ya nsuka na engumba yango.
[Elilingi na lokasa 19]
Atako Sirise azalaki mopakano, Nzambe aponaki ye asala mosala na ye
[Elilingi na lokasa 21]
Bikólo batye motema na bikeko ezangá bomoi
[Elilingi na lokasa 27]
Ndenge moko na “etutelo-ya-loso,” Yisalaele ‘akonika bangomba’