Mokapo ya Ntuku Mibale
Lobɔkɔ ya Yehova ekómi mokuse te
1. Makambo nini ezali na Yuda, mpe bato mingi bazali komituna motuna nini?
EKÓLO ya Yuda ezali komikumisa ete ezali na kondimana elongo na Yehova. Nzokande, mikakatano ezali bisika nyonso. Bosembo ezali mpenza te, bisika nyonso bazali koboma mpe konyokola bato, mpe elikya ezali te ete makambo ekobonga. Ekólo yango ezali mpenza malamu te. Bato mingi bazali komituna soki Yehova akobongisa makambo. Makambo ezalaki ndenge wana na mikolo ya Yisaya. Kasi makambo yango oyo Yisaya akomaki mpo na eleko yango ezali te kaka lisolo moko ya kala. Maloba na ye ezali makebisi oyo ezali kosakola makambo oyo ekokómela moto nyonso oyo alobaka ete azali kosambela Nzambe kasi azali kotya likebi te na mibeko na Ye. Mpe esakweli oyo ezali na Yisaya mokapo 59 ezali kolendisa mpenza baoyo nyonso bazali kosala makasi mpo na kosalela Yehova atako bazali kobika na bileko ya mabe mpenza.
Bazali mosika na Nzambe ya solo
2, 3. Mpo na nini Yehova abateli Yuda te?
2 Kanisá naino: Ekólo oyo esalaki kondimana elongo na Yehova epɛngwi! Bapesi Mokeli na bango mokɔngɔ, mpe na bongo akobatela bango lisusu te. Mpo na yango bazali na mpasi makasi. Ekoki kozala ete bazali kopesa Yehova foti mpo na bampasi na bango? Yisaya alobi boye: ‘Talá lobɔkɔ ya Yehova ekómi mokuse te ete ezanga kobikisa; litoi na ye ezali na kilo te ete ezanga koyoka. Kasi mabe na bino makaboli bino na Nzambe na bino; mpe masumu na bino esali ete abombela bino elongi na ye mpo ayoka te.’—Yisaya 59:1, 2.
3 Maloba wana ebombi likambo moko te, mpe ezali solo. Yehova azali kaka Nzambe oyo abikisaka. Lokola azali “Moyoki ya mabondeli,” ayokaka mabondeli ya basaleli na ye ya sembo. (Nzembo 65:2, NW) Kasi apambolaka bato oyo basalaka mabe te. Bato ya ekólo yango bango moko nde batiki Yehova. Mabe na bango nde etindi ye abombela bango elongi na ye.
4. Bafundi Yuda na mabe nini?
4 Ya solo, makambo oyo Yuda asali eleki mabe. Esakweli ya Yisaya etángi mwa mabe na bango mosusu: “Mabɔkɔ na bino mabebi na makila, mpe misapi na bino na masumu; bibɛbu na bino elobi lokuta mpe lolemo na bino ebimisi mabe.” (Yisaya 59:3) Bato bazali kobuka lokuta mpe koloba makambo oyo ezali sembo te. “Mabɔkɔ . . . mabebi na makila” ezali komonisa ete basusu babomaki kutu bato. Yango ezali solo koyokisa Nzambe nsɔni, mpamba te Mibeko na ye esuki kaka te na kopekisa koboma bato, kasi epekisi mpe ‘moto koyina ndeko na ye na motema na ye’! (Levitike 19:17) Bato ya Yuda bazalaki kopekisa bamposa mabe na bango te, yango wana bakokaki soki moke te kokima etumbu na yango. Likambo yango esengeli kosalisa mokomoko na biso lelo oyo abosana te ntina ya kopekisa makanisi mpe bamposa na ye ya masumu. Soki bongo te, tokoki kosuka na kosala makambo mabe oyo ekokabola biso na Nzambe.—Baloma 12:9; Bagalatia 5:15; Yakobo 1:14, 15.
5. Mabe ya Yuda ekómi tii wapi?
5 Masumu ekɔteli ekólo mobimba lokola maladi mabe. Esakweli elobi boye: ‘Moko te abengi boyengebene, moko te akei na tribinale na bosembo; bataleli maloba ya mpamba, balobilobi lokuta, bazwi zemi ya mobulu mpe baboti makambo mabe.’ (Yisaya 59:4) Moto moko te azali kolobela boyengebene. Ata na batribinale, ezali mpasi kokuta moto oyo bakoki kotyela motema to moto ya sembo. Yuda apesi Yehova mokɔngɔ mpe atye motema na kondimana oyo asali na bikólo mosusu, ata mpe na bikeko mpamba. Nyonso wana ezali “mpamba,” ezali na ntina ata moke te. (Yisaya 40:17, 23; 41:29) Yango etindi bálobaloba mingi, kasi makambo ya malonga te. Bazali kobongisa mikano, kasi yango ezali kosuka kaka na mobulu to na mpasi mpe na makambo mabe.
6. Na ndenge nini lisolo ya mangomba ya boklisto ekokani na oyo ya Yuda?
6 Kozanga boyengebene mpe mobulu oyo ezalaki na Yuda ezali lelo oyo mpe komonana mpenza na kati ya mangomba ya boklisto. (Talá “Yelusaleme oyo epɛngwaki—Elilingi ya mangomba ya boklisto,” lokasa 294.) Bikólo oyo ezali komibenga bikólo ya boklisto ebundaki mpe bitumba mibale ya nsɔmɔ oyo bikólo mingi ya mokili ekɔtaki na yango. Kino lelo, losambo ya mangomba ya boklisto ekoki te kopekisa bandimi ya mangomba yango koluka kosilisa bato ya ekólo moko to koboma bato ya mboka na bango oyo bakeseni na bango ekólo, nzokande kati na bato yango bandimi ya mangomba na bango mpe bazali. (2 Timote 3:5) Atako Yesu ateyaki bayekoli na ye ete bátya motema na Bokonzi ya Nzambe, bikólo ya boklisto ezali kolanda kotya motema ete bibundeli na yango mpe boyokani ya politiki oyo esalaka na bikólo mosusu nde ekobatela yango. (Matai 6:10) Kutu, ebele ya bakompanyi oyo esalaka bibundeli mingi na mokili mobimba ezali nde na bikólo yango! Ya solo, mangomba ya boklisto mpe ezali kotya motema na makambo “mpamba” ntango ezali kotya motema ete milende oyo bato bazali kosala mpe bibongiseli ya bato ekobatela yango na mikolo ezali koya.
Babuki mbuma ya bololo
7. Mpo na nini mikano ya Yuda ezali kosuka kaka na makambo mabe?
7 Losambo ya bikeko mpe kozanga bosembo ekoki kobongisa mboka soki moke te. Lokola Bayuda oyo bazali sembo te bamipesi na makambo yango, bazali sikoyo kobuka mpasi oyo bango moko balonaki. Totángi boye: ‘Batɛti makei ya nyoka ya ngɛngɛ, batongi monyama ya lifofe, ye oyo akolya likei na bango akokufa, mpe na oyo bapasoli, etupa ebimi.’ (Yisaya 59:5) Banda ntango Yuda akamati mikano na ye nyonso kino nsuka na yango, ebimisi eloko moko ya malonga te. Makanisi mabe na bango ezali se kobota misala mabe, ndenge makei ya nyoka ya ngɛngɛ ebimisaka se banyoka ya ngɛngɛ. Mpe ekólo ezali komona mpasi.
8. Nini ezali komonisa ete makanisi ya Yuda ezali malamu te?
8 Bato mosusu ya Yuda bakoki kosalela mobulu mpo na komibatela, kasi bakolonga te. Mpo na komibatela, makasi ya nzoto ekoki soki moke te kozwa esika ya kotyela Yehova motema mpe ya misala ya boyengebene se ndenge minyama ya lifofe ekoki soki moke te kozwa esika ya elamba mpo na kobatela moto na mbula to na mpiɔ. Yisaya alobi boye: ‘Monyama na bango ekokokana na elamba te, mpe bakomizipa na misala na bango te. Misala na bango bobele misala ya mabe, mpe makambo ya yauli mazali na mabɔkɔ na bango. Makolo na bango makopota mbangu epai ya mabe, bakotambola mbangu mpo na kosopa makila ya mosembwi; makanisi na bango bobele makanisi ya mabe, kopunza mpe kobukabuka ezali na balabala na bango.’ (Yisaya 59:6, 7) Yuda azali kokanisa malamu te. Lokola Yuda azali kosalela mobulu mpo na kosilisa mikakatano na ye, amonisi polele ete abangaka Nzambe te. Ata soki bato mingi oyo azali koboma bazali basembwi to basali likambo te to mpe basusu bazali basaleli ya solosolo ya Nzambe, etali ye te.
9. Mpo na nini bakonzi ya mangomba ya boklisto bakoki kozwa kimya ya solo te?
9 Maloba wana mapemami ezali kokundwela biso lisolo ya mangomba ya boklisto oyo esopá makila mingi. Na ntembe te, lokola bamonisi losambo ya boklisto na ndenge ya mabe, Yehova akozanga te kotuna bango mpo na yango! Ndenge moko na Bayuda ya mikolo ya Yisaya, bandimi ya mangomba ya boklisto bazwi etamboli ya mabe mpamba te bakonzi na bango bakanisi ete kaka etamboli wana nde ebongi. Atako balobelaka kimya, basalaka makambo na bosembo te. Wana ezali solo bokosi! Lokola bakonzi ya mangomba ya boklisto bazali se kosalela mayele mabe wana, bakozwa kimya ya solo ata mokolo moko te. Ezali lokola esakweli ebakisi ete: ‘Bayebi nzela ya kimya te; kosambisa-sembo ezali na nzela na bango te; bayeisi nzela na bango nyokanyoka, moto oyo akɔti na yango ayebi kimya te.’—Yisaya 59:8.
Bazali koyengayenga na molili ya elimo
10. Mabe nini Yisaya ayamboli na nkombo ya Yuda?
10 Yehova akoki soki moke te kopambola banzela ya Yuda oyo ezali nyokanyoka mpe ezali kaka kobebisa makambo. (Nzembo 11:5) Na yango, Yisaya alobi na nkombo ya ekólo mobimba mpe ayamboli mabe ya Yuda: ‘Kosambisa-sembo ezali mosika na biso mpe boyengebene ekokóma epai na biso te; tokoluka pole nde talá, bobele molili, tokoluka moi nde tozali kotambola na butu. Tokolukaluka efelo lokola bato bakufi miso, tokolukaluka biloko lokola baoyo bazali na miso te. Tokobɛta mabaku na ntango ya moi makasi lokola na molili ya mpokwa; kati na bato oyo bazali na makasi, biso tozali lokola bakufi. Tokonguluma lokola ngombolo, tokokimela mingi lokola bibenga.’ (Yisaya 59:9-11a) Bayuda batiki te ete Liloba ya Nzambe ezala mwinda mpo na makolo na bango mpe pole mpo na nzela na bango. (Nzembo 119:105) Yango wana, makambo na bango ezali komonana molili. Ata na midi, bazali kolukaluka nzela oyo bakotambola lokola nde bazali na butu. Bazali lokola nde basilá kokufa. Wana bazali kolukaluka libɔndisi, bazali konguluma makasi lokola bangombolo oyo bazali na nzala to oyo bazoki. Basusu bazali kokimela na mawa nyonso, lokola ebenga oyo ekabwani na baninga.
11. Mpo na nini elikya ya Yuda mpo na kosambisa-sembo mpe kobikisama ezali mpamba?
11 Yisaya ayebi mpenza malamu ete Yuda azali na mpasi mpo atombokeli Nzambe. Alobi boye: ‘Tokoluka kosambisa-sembo nde ezali te, tokoluka mpe kobikisama nde ezali mosika na biso. Zambi mapɛngwi na biso makómi mingi liboso na yo, mpe masumu na biso mazali kofunda biso; mpo ete mapɛngwi na biso mazali elongo na biso mpe toyebi masumu na biso, kopɛngwa mpe kowangana Yehova, mpe kotika kolanda Nzambe na biso, koloba makambo na minyoko mpe na kotomboka, kobanza mpe koloba lokuta longwa na motema.’ (Yisaya 59:11b-13) Lokola bato ya Yuda babongoli naino motema te, masumu na bango ezali kaka na mitó na bango. Kosambisa-sembo elongwe na mboka mpamba te bato na yango batiki Yehova. Bamonisi ete bazali mpenza bato mabe, bakómi kutu konyokola bandeko na bango. Solo, bandimi ya mangomba ya boklisto bakokani mpenza na bango! Mingi kati na bango basuki kaka te na koboya kosambisa-sembo, kasi lisusu bazali konyokola Batatoli ya Yehova, bato oyo bazali sembo mpe bazali koluka kosala mokano ya Nzambe.
Yehova apesi etumbu
12. Basambisi ya Yuda bazali na ezaleli nini?
12 Emonani ete kosambisa-sembo, boyengebene to solo ezali na Yuda te. ‘Kosambisa-sembo ezongisami nsima mpe boyengebene ezali kotɛlɛma naino mosika; zambi solo esili kokwea na esika ya koyangana mpe sembo ekoki kokɔta te.’ (Yisaya 59:14) Soki oleki na baporte ya bingumba ya Yuda, okokuta bisika ya koyangana epai mikóló ya mboka bakutanaka mpo na kosambisa makambo. (Luta 4:1, 2, 11) Mibali yango basengeli kosambisa na boyengebene mpe kolanda bosembo, mpe koboya kanyaka. (Deteronome 16:18-20) Na esika ya kosala bongo, bazali kosambisa na kolanda makanisi na bango ya koluka kaka matomba na bango moko. Oyo eleki lisusu mabe, moto nyonso oyo azali komeka na bosembo mpenza kosala malamu, bazali kotalela ye lokola moto oyo esengeli kolyela. Totángi boye: “Solo ezali te, mpe ye oyo aboyi kosala mabe bazali kobɔtɔla ye biloko.”—Yisaya 59:15a, NW.
13. Lokola basambisi ya Yuda bazali kokokisa mikumba na bango malamu te, Yehova akosala nini?
13 Baoyo bazali komona ndenge bizaleli ebebi kasi bakangi monɔkɔ bazali kobosana ete Nzambe akufi miso te, azangi koyeba yango te to azangi mpe nguya te. Yisaya akomi boye: ‘Yehova amoni yango mpe epesi ye mawa ete kosambisa-sembo ezali kozanga. Amoni ete moto azali te, mpe akamwi ete molobeli azali te; bongo, lobɔkɔ na ye ebandi kobikisa mpo na ye, mpe boyengebene na ye nde esungi ye.’ (Yisaya 59:15b, 16) Lokola basambisi oyo batyami bazali kokokisa mikumba na bango malamu te, Yehova ye moko akokamata makambo na mabɔkɔ. Ntango akosala bongo, akosala na boyengebene mpe na nguya mpenza.
14. (a) Ezaleli nini bato mingi bazali na yango lelo? (b) Ndenge nini Yehova azali komibongisa mpo na kokamata makambo na mabɔkɔ?
14 Makambo lokola oyo wana ezali komonana mpe lelo. Tozali kobika na mokili oyo bato mingi ‘babungisi bizaleli nyonso ya malamu.’ (Baefese 4:19) Bato mingi te bandimaka ete Yehova akokamata makambo ya bato na mabɔkɔ mpo na kosilisa mabe nyonso awa na mabelé. Kasi esakweli ya Yisaya emonisi ete Yehova azali kolandela makambo ya bato malamumalamu. Asambisaka bato, mpe na ntango ye moko alingi, apesaka bango etumbu oyo akateli bango. Etumbu na ye ezalaka sembo? Yisaya amonisi ete ezalaka sembo. Akomaki boye mpo na ekólo ya Yuda: ‘Yehova alati boyengebene lokola ebende na ntolo, mpe ekɔti ya lobiko na motó; alati bilamba ya kobukanisa lokola bilamba na ye mpe amizingeli na molende lokola mokoto.’ (Yisaya 59:17) Maloba wana ya esakweli emonisi Yehova lokola soda oyo alati molato ya etumba. Azali na ekateli ya kolongisa likambo na ye. Andimi mpenza ete boyengebene na ye ezali solo mpe ekoki kokweisama te. Lisusu, akobanga te mpe akozala na molende ntango akopesa etumbu na ye. Ntembe ezali te ete bosembo ekolonga.
15. (a) Ndenge nini baklisto ya solo bakosala ntango Yehova akopesa etumbu na ye? (b) Tokoki koloba nini mpo na etumbu ya Yehova?
15 Lelo oyo na mikili mosusu, banguna ya solo balukaka kopekisa mosala ya basaleli ya Yehova na ndenge bazali kopanzela bango nsango ya lokuta mpe kobebisa lokumu na bango. Baklisto ya solo babangaka te kokɔtela solo, nzokande balukaka te kozongisa mabe mpo na mabe. (Baloma 12:19) Ata ntango Yehova akosilisa makambo ya mangomba ya boklisto oyo epɛngwá, basaleli na ye awa na mabelé bakopesa mabɔkɔ te mpo na koboma mangomba yango. Bayebi ete Yehova ye moko nde amipesá mokumba ya kozongisa mabe mpe akosala oyo esengeli na ntango yango. Esakweli yango ekitisi biso motema na maloba oyo: ‘Ndenge misala na bango ezali, ndenge mpe akofuta, nkanda epai ya batɛmɛli na ye, kobukanisa epai ya bayini na ye; epai ya bisanga akopesa lifuti.’ (Yisaya 59:18) Ndenge ezalaki na mikolo ya Yisaya, etumbu ya Nzambe ekosuka te kaka na kozala sembo, kasi ekokokisama mpe mobimba. Ekokóma kino na “bisanga,” na bisika ya mosika. Moto moko te akozala mosika mingi to akomonana te mpo akima etumbu ya Yehova.
16. Nani akobika ntango Yehova akopesa etumbu na ye, mpe kobikisama na bango ekoteya bango nini?
16 Baoyo bazali kosala oyo ezali sembo na molende mpenza, Yehova akosambisa bango na boyengebene. Yisaya asakoli ete kobanda na nsuka moko ya mokili kino nsuka mosusu, elingi koloba na mabelé mobimba, bato wana bakobika. Mpe ntango bakomona ndenge Yehova akobatela bango, bakobanga ye mpe bakomemya ye lisusu mingi mpenza. (Malaki 1:11) Totángi boye: ‘Longwa na esika moi elalaka bakobanda kobanga nkombo ya Yehova, mpe nkembo na ye longwa na esika moi ebimaka; mpo akoya lokola ebale oyo ebangisaka, oyo elimo ya Yehova ezali kotinda yango.’ (Yisaya 59:19) Lokola mopɛpɛ makasi oyo ezali kotindika mai oyo ezali komema biloko nyonso oyo ezali na nzela na yango, elimo ya Yehova ekokɔmbɔla eloko nyonso oyo ekomeka kopekisa kokokisama ya mokano na ye. Elimo na ye ezali na nguya koleka nguya nyonso oyo moto akoki kozala na yango. Ntango akosalela yango mpo na kopesa bato mpe bikólo etumbu, akolonga mpenza.
Elikya mpe mapamboli mpo na baoyo babongoli motema
17. Nani azali Mosikoli ya Siona, mpe ntango nini asikoli yango?
17 Na ntango ya Mibeko ya Moize, Moyisalaele oyo amitɛki na boombo, mosikoli moko akokaki kosombela ye lisusu bonsomi. Na esika mosusu na esakweli ya Yisaya, tomonaki ete Yehova azali Mosikoli ya bato oyo babongoli motema. (Yisaya 48:17) Sikoyo babengi ye lisusu Mosikoli ya baoyo babongoli motema. Yisaya akomi elaka ya Yehova boye: ‘Mosikoli akoya na Siona; epai na bango kati na Yakobo baoyo bakotika kopɛngwa na bango. Yehova alobi bongo.’ (Yisaya 59:20) Elaka wana ya kokitisa motema ekokisamaki na mobu 537 L.T.B. Kasi ekokisamaki lisusu. Ntoma Paulo azongelaki maloba yango ndenge ekomamaki na libongoli ya Septante mpe asalelaki yango epai ya baklisto. Akomaki boye: “Na ndenge yango Yisalaele mobimba ekobikisama. Kaka ndenge ekomamá ete: ‘Mosikoli akouta na Siona mpe akolongola misala ya kotyola Nzambe epai ya Yakobo. Mpe wana ezali kondimana na ngai elongo na bango, ntango nakolongola masumu na bango.’” (Baloma 11:26, 27) Ya solo, esakweli ya Yisaya ezali na kokokisama oyo eleki monene, oyo etali ntango na biso mpe nsima ya ntango na biso. Na ndenge nini?
18. Ntango nini mpe ndenge nini Yehova abimisaki “Yisalaele ya Nzambe”?
18 Na ekeke ya liboso, mwa batikali ya ekólo Yisalaele bandimaki ete Yesu azali Masiya. (Baloma 9:27; 11:5) Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., Yehova asopaki elimo santu na ye likoló ya bandimi yango soki 120 mpe akɔtisaki bango na kondimana ya sika oyo Yesu Klisto azali moyokanisi na yango. (Yilimia 31:31-33; Baebele 9:15) Na mokolo yango “Yisalaele ya Nzambe” ebotamaki, yango ezali ekólo moko ya sika oyo ekeseni na oyo ya liboso mpamba te basangani na yango bazali te libosoliboso bato oyo bauti mpenza na Abalayama kasi elimo ya Nzambe nde eboti bango. (Bagalatia 6:16) Kobanda na Koloneyi, ekólo yango ya sika eyambaki mpe bato ya bikólo mosusu oyo bakatami ngenga te. (Misala 10:24-48; Emoniseli 5:9, 10) Na bongo Yehova Nzambe azwaki bango mpe bakómaki bana na ye ya elimo, baoyo bakozwa libula elongo na Yesu.—Baloma 8:16, 17.
19. Kondimana nini Yehova asali na Yisalaele ya Nzambe?
19 Yehova asali sikoyo kondimana elongo na Yisalaele ya Nzambe. Totángi boye: ‘Yehova alobi ete, mpo na ngai, oyo ezali kondimana na ngai elongo na bango ete, elimo na ngai oyo ezali likoló na yo, mpe maloba na ngai oyo natye na monɔkɔ na yo, ekolongwa na monɔkɔ na yo te to na monɔkɔ ya bana na yo te to na monɔkɔ ya bana ya bana na yo te, longwa sikoyo kino libela. Yehova alobi bongo.’ (Yisaya 59:21) Ata soki maloba oyo ekokisamaki epai ya Yisaya to te, nzokande ekokisamaki mpenza epai ya Yesu, oyo azwaki elaka ete “akomona bakitani na ye.” (Yisaya 53:10) Yesu azalaki koloba maloba oyo ayekolaki epai ya Yehova, mpe elimo ya Yehova ezalaki likoló na ye. (Yoane 1:18; 7:16) Na ndenge esengeli, bandeko na ye, baoyo bakozwa libula elongo na ye to basangani ya Yisalaele ya Nzambe, bazali mpe kozwa elimo santu ya Yehova mpe bazali kosakola nsango oyo bayekoli epai ya Tata na bango ya likoló. Bango nyonso bazali bato oyo ‘balakisami na Yehova.’ (Yisaya 54:13; Luka 12:12; Misala 2:38) Ezala na nzela ya Yisaya to ya Yesu (oyo Yisaya azalaki elilingi na ye) Yehova asali sikoyo kondimana oyo na nzela na yango azwi mokano ete akotya bato mosusu na esika na bango soki moke te, kasi akosalela bango libela na libela lokola batatoli na ye. (Yisaya 43:10) Bongo, banani bazali “bana” na bango oyo bakozwela mpe kondimana yango litomba?
20. Na ndenge nini elaka ya Yehova epai ya Abalayama ekokisamaki na ekeke ya liboso?
20 Kala mpenza Yehova apesaki Abalayama elaka oyo: ‘Mabota nyonso na nse ekomizwela lipamboli na nzela ya bana na yo.’ (Genese 22:18) Na boyokani na yango, mwa batikali ya Bayisalaele ya mosuni oyo bandimaki Masiya bakendeki epai ya bato ya bikólo mosusu kosakola nsango malamu ya Klisto. Kobanda na Koloneyi, bato mingi ya bikólo mosusu oyo bakatamaki ngenga te ‘bamizwelaki lipamboli’ na nzela ya Yesu, Momboto ya Abalayama. Bakómaki bato ya Yisalaele ya Nzambe mpe eteni ya mibale ya Momboto ya Abalayama. Bazali bato ya ‘libota mosantu’ ya Yehova, oyo ezwi mokumba ya ‘kosakola bizaleli malamu ya moto oyo abengaki [bango] bálongwa na molili bákɔta na kati ya pole na ye ya kokamwa.’—1 Petelo 2:9; Bagalatia 3:7-9, 14, 26-29.
21. (a) “Bana” nini Yisalaele ya Nzambe eboti na mikolo na biso? (b) Ndenge nini kondimana, to boyokani, oyo Yehova asali elongo na Yisalaele ya Nzambe ezali kobɔndisa “bana” yango?
21 Lelo oyo emonani lokola ete motángo mobimba ya Yisalaele ya Nzambe ekoki. Atako bongo, bikólo ezali naino kozwa mapamboli, mapamboli mingi mpenza. Na ndenge nini? Na ndenge Yisalaele ya Nzambe eboti “bana,” bayekoli ya Yesu oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Nzembo 37:11, 29) “Bana” yango mpe bazali kolakisama na Yehova mpe koteyama na banzela na ye. (Yisaya 2:2-4) Atako babatisami na elimo santu te, to bazali te basangani ya kondimana ya sika, bazali kozwa nguya ya elimo santu ya Yehova mpo na kolonga mikakatano nyonso oyo Satana azali kobimisela bango mpo básakola nsango malamu te. (Yisaya 40:28-31) Sikoyo bakómi bamilio mingi mpe bazali se kobakisama mpamba te bango mpe bazali kobota bana. Kondimana, to boyokani ya Yehova elongo na bapakolami endimisi “bana” yango ete Yehova akolanda kosalela bango libela na libela lokola balobeli na ye.—Emoniseli 21:3, 4, 7.
22. Na likambo nini tokoki kotyela Yehova motema, mpe ndenge nini yango esengeli kolendisa biso?
22 Na yango, tiká ete biso nyonso tóbatela kondima na biso epai ya Yehova. Azali na mposa mpe na makoki ya kobikisa biso! Lobɔkɔ na ye ekozala mokuse soki moke te; akobikisa ntango nyonso basaleli na ye ya sembo. Baoyo bazali kotyela ye motema bakokoba kozala na maloba malamu na ye na minɔkɔ na bango “longwa sikoyo kino libela.”
[Etanda na lokasa 294]
Yelusaleme oyo epɛngwaki—Elilingi ya mangomba ya boklisto
Yelusaleme, mboka-mokonzi ya ekólo oyo Nzambe aponaki, ezali elilingi ya ebongiseli ya Nzambe kuna na likoló, oyo esangisi bikelamu ya elimo mpe lisangani ya baklisto bapakolami oyo basekwi mpe bazali kuna na likoló lokola mwasi ya Klisto. (Bagalatia 4:25, 26; Emoniseli 21:2) Nzokande, mbala mingi, bato ya Yelusaleme bazalaki sembo te epai ya Yehova; yango wana balobaki ete mboka yango ezali lokola mwasi ya pite mpe ya ekobo. (Ezekiele 16:3, 15, 30-42) Na likambo yango, Yelusaleme ezali mpenza ndakisa oyo ebongi mpo na kolobela mangomba ya boklisto oyo epɛngwá.
Yesu abengaki Yelusaleme “mobomi ya basakoli mpe mobambi-mabanga na baoyo batindamaki epai na ye.” (Luka 13:34; Matai 16:21) Lokola Yelusaleme oyo ezangaki bosembo, mangomba ya boklisto ezali koloba ete esalelaka Nzambe, kasi ezali kopɛngwa mosika na banzela na ye ya sembo. Tondimi solo ete Yehova akosambisa mangomba ya boklisto na mitinda ya boyengebene oyo asalelaki mpo na kosambisa Yelusaleme oyo epɛngwaki.
[Elilingi na lokasa 296]
Mosambisi asengeli kosambisa na boyengebene, koluka bosembo, mpe koboya kanyaka
[Elilingi na lokasa 298]
Lokola ebale na ntango ya mpela, etumbu ya Yehova ekokɔmbɔla eloko nyonso oyo ezali komeka kopekisa mokano na ye
[Elilingi na lokasa 302]
Yehova asali kondimana oyo na nzela na yango azwi mokano ete bato na ye bakobungisa soki moke te libaku malamu ya kozala batatoli na ye