Mokapo ya Zomi na Minei
Yehova asambwisi engumba moko ya lolendo
1. Kino wapi mokanda ya Yisaya esakoli makambo oyo ekosalema?
MOKANDA ya esakweli ya Yisaya ekomamaki na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.) mpo na kotɛmɛla Baasulia ntango bakɔtaki na Mokili ya Ndaka. Lokola tomonaki yango na mikapo oyo eleki, na mokanda na ye, Yisaya asakoli na bosikisiki mpenza ndenge makambo yango ekosalema. Kasi, mokanda yango esuki kaka te na kolobela makambo oyo etaleli nguya ya Asulia. Esakoli mpe bozongi ya bato oyo basalaki kondimana na Yehova, oyo bakouta na mikili mingi, kati na yango Sinala, esika Babilone ezalaki. (Yisaya 11:11) Na Yisaya mokapo 13, tozali kokuta esakweli moko kitoko oyo kokokisama na yango ekofungola nzela mpo na bozongi wana. Esakweli yango ebandi na maloba oyo: “[Likebisi mpo na kotɛmɛla Babilone, NW], limonaki Yisaya, mwana na Amosa.”—Yisaya 13:1.
‘Nakokitisa lolendo’
2. (a) Ndenge nini Hizikiya asali boyokani na Babilone? (b) “Elembo” oyo ekotombolama ezali nini?
2 Na mikolo ya Yisaya, Yuda akómi na boyokani na Babilone. Mokonzi Hizikiya abɛli makasi, mpe na nsima abiki. Batindami bauti na Babilone bayei kopesa ye longonya ndenge abiki, mbala mosusu mpo na ntina oyo balobi yango te, balingi kosala boyokani na Hizikiya mpo na etumba oyo bakobundisa Asulia. Mokonzi Hizikiya asali libunga monene ya kolakisa bango biloko na ye nyonso ya motuya. Mpo na yango, Yisaya ayebisi Hizikiya ete nsima ya liwa na ye mokonzi, bozwi yango nyonso ekomemama na Babilone. (Yisaya 39:1-7) Yango ekokisamaki na mobu 607 L.T.B. ntango Yelusaleme ebebisamaki mpe libota yango ememamaki na boombo. Kasi, bato oyo Nzambe aponaki bakotikala na Babilone libela te. Yehova asakoli ndenge akofungola nzela mpo bázonga na mokili na bango. Abandi boye: “Likoló na ngomba oyo mabanga etikali mpamba bótombola elembo bótombola mongongo epai na bango, bópepela lobɔkɔ ete bákɔta na bikuke ya bato minene.” (Yisaya 13:2, NW) “Elembo” ezali mokili oyo ezali nguya ya mokili mobimba oyo ezali komata mpo na kolongola Babilone na esika na ye ya bokonzi. Ekotombolama “likoló na ngomba oyo mabanga etikali mpamba”—oyo ezali komonana mosika. Ntango ekozwa etinda ya kobundisa Babilone, nguya yango ya sika ya mokili mobimba ekokɔta na “bikuke ya bato minene,” bikuke ya engumba yango monene, mpe ekolonga yango.
3. (a) Banani bazali “basantisami” oyo Yehova akobimisa? (b) Na lolenge nini mampinga ya basoda ya bapakano “esantisami”?
3 Yehova alobi sikawa ete: “Ngai nalakisaki [basantisami, NW] na ngai, nabyangaki bato na ngai ya makasi mpo na nkanda na ngai, bango bakomikumisa mpo na ngai. Lokito ya ebele kati na ngomba, lokola na libota monene mpenza! Lokito ya makɛlɛlɛ ya [bikonzi, NW], na mabota mazali koyangana. [Yehova] na bibele azali koyanganisa ebele mpo na etumba.” (Yisaya 13:3, 4) “Basantisami” oyo baponami mpo na kosambwisa Babilone ya lolendo ezali banani? Ezali mampinga ya basoda ya mabota mingi oyo esali boyokani, “mabota mazali koyangana.” Bauti na bangomba ya etúká moko mosika mpo na kokitela Babilone. “Bauti na mokili na mosika, na nsuka na lola.” (Yisaya 13:5) Na lolenge nini basantisami? Ezali te na lolenge ete bazali basantu. Bazali mampinga ya basoda ya bapakano mpe bazali ata na mposa moke te ya kosalela Yehova. Kasi, na Makomami ya Liebele, “basantisami” elimboli “batyami pembeni mpo na mosala ya Nzambe.” Yehova akoki kosantisa mampinga ya basoda ya bikólo mosusu mpe kosalela bamposa na bango ya lokoso mpo na kolakisa nkanda na ye. Asalelaki Asulia na lolenge wana. Akosalela mpe Babilone na lolenge wana. (Yisaya 10:5; Yilimia 25:9) Akosalela mpe bikólo mosusu mpo na kopesa Babilone etumbu.
4, 5. (a) Yehova asakolaki nini mpo na Babilone? (b) Baoyo bakobundisa Babilone bakondongwana na nini?
4 Babilone ekómi naino te nguya ya mokili mobimba. Kasi, na esakweli moko oyo alobi na nzela ya Yisaya, Yehova azali komona ntango oyo Babilone ekozala na esika yango, mpe asakoli kokwea na yango. Alobi ete: “Bólela zambi mokolo ya [Yehova] ezali kobɛlɛma; ekoya lokola kobebisama longwa na Oyo-na-Nguya-Nyonso.” (Yisaya 13:6) Ɛɛ, lolendo ya Babilone ekokóma kolela na mawa. Mpo na nini? Mpo na “mokolo ya Yehova,” mokolo oyo Yehova akopesa ye etumbu.
5 Kasi, ndenge nini ekosalema ete Babilone abebisama? Wana ntango oyo Yehova abongisi mpo na yango ekokóma, engumba yango ekomonana lokola bakozwa yango te. Mampinga ya basoda ya banguna bakokutana liboso na mokakatano mpo na mai ya Ebale Pelata, oyo eleki na katikati ya engumba yango mpe etondisi terasɛ moko mozindo zingazinga ya engumba mpo na kobatela yango mpe bafandi ya engumba basalelaka mai yango mpo na komɛla. Na nsima, basengeli koleka bifelo mineneminene ya Babilone oyo ezali mibalemibale, oyo emonani ete bakokoka koleka yango te. Lisusu, engumba yango ekozanga biloko ya kolya te. Buku moko (Daily Bible Illustrations) elobi ete Nabonide—mokonzi ya nsuka na Babilone—“asalaki nyonso oyo ekokaki na ye mpo na kobomba biloko ya kolya na engumba, mpe engumba etondaki mpenza na [biloko ya kolya] oyo bato bakokaki kolya mbula ntuku mibale.”
6. Likambo nini ekosalema oyo bato bakanisaki te ntango bakobundisa Babilone?
6 Kasi, makambo oyo ezali komonana ekoki kokosa. Yisaya alobi ete: “Bongo mabɔkɔ nyonso makolɛmba, mpe motema ya moto na moto ekonangwa; mpe bakobanga; mpasi mpe bolɔzi ekosimba bango, bakoyoka mpasi monene lokola mwasi oyo azali kobota; bakokamwana, moto na moto na mozalani na ye; bilongi na bango ekopela.” (Yisaya 13:7, 8) Ntango mampinga ya basoda bakokɔta na engumba yango, kimya ya bato oyo bafandaka kuna ekokóma mpasi makasi ya mbalakaka lokola oyo esalaka mwasi oyo alingi kobota. Mitema na bango ekobeba mpo na kobanga. Lokola bakosenzwa na nsɔmɔ, mabɔkɔ na bango ekolɛmba, bakokoka kotombola yango te. Bilongi na bango “ekopela” na kobanga mpe na nsɔmɔ. Bakotalana na kokamwa mpenza mpe bakomituna ndenge nini engumba na bango monene ekwei boye.
7. “Mokolo ya Yehova” nini ekómi pene, mpe nini ekokómela Babilone?
7 Atako bongo, nsukansuka Babilone ekokwea. Ezali na mokolo oyo Babilone esengeli kozongisa monɔkɔ, “mokolo ya Yehova,” oyo ekozala mpenza na mpasi mingi. Mosambisi monene akobimisa nkanda na ye mpe akopesa bato ya Babilone oyo batondi na masumu etumbu oyo babongi na yango. Esakweli yango elobi ete: “Talá mokolo ya [Yehova] ezali koya, [ezali mabe mpenza, NW] na nkanda mpe na nkɛlɛ; [mpo na, NW] kokómisa mokili mpamba mpe kobebisa kati na yango bato ya masumu kati na yango.” (Yisaya 13:9) Avenire ya Babilone ekómi molili. Ezali lokola nde moi, sanza, mpe minzoto nyonso etiki kopesa pole. “Zambi minzoto ya lola mpe biyanganelo na yango ekobimisa pole na yango te; moi ekozala molili na ntango ya kobima; sanza ekongɛnga na pole na yango te.”—Yisaya 13:10.
8. Mpo na nini Yehova akani kokwea ya Babilone?
8 Mpo na nini likambo ya ndenge wana ekokómela engumba yango ya lolendo? Yehova alobi ete: “Nakopesa mokili etumbu mpo na mabe na yango, mpe bato mabe mpo na masumu na bango. Nakosukisa lolendo ya bato na nzombo, nakokitisa lipombo ya baoyo bakobangisa bato.” (Yisaya 13:11) Yehova akosopa nkanda na ye likoló na Babilone mpe akopesa ye etumbu mpo na mabe monene oyo mboka yango esalelaki basaleli ya Nzambe. Mokili yango mobimba ekozala na mpasi mpo na mabe ya bato ya Babilone. Banyokoli yango ya lolendo bakotuka lisusu Yehova polelepolele te!
9. Likambo nini ezali kozela Babilone mokolo Yehova akosambisa?
9 Yehova alobi ete: “Nakosala ete bato bázala mingi te koleka wolo ya pɛto, mpe moto oyo auti na mabele azala mingi te koleka wolo ya Ofili.” (Yisaya 13:12, NW) Ɛɛ, bato bakosila na engumba yango, mpe ekotikala mpamba. Yehova alobi lisusu ete: “Boye nakolɛngisa lola mpe mokili ekolongolama na esika na yango, mpo na nkanda ya [Yehova] na bibele na mokolo ya nkɛlɛ monene na ye.” (Yisaya 13:13) “Lola” ya Babilone, elingi koloba ebele ya banzambe na ye ya mibali mpe ya basi, bakolɛnga, bakozala na likoki te ya kosalisa engumba yango na ntango wana ya mpasi. “Mokili,” elingi koloba bokonzi ya Babilone, ekolongwa na esika na yango, bato bakokanisa yango kaka lokola bokonzi moko oyo ekufá. “Lokola mboloko oyo [babengani to etonga oyo, NW] bazangi moyanganisi, moto na moto akobongwana epai na ye mpenza, moto na moto akokima na mokili na ye moko.” (Yisaya 13:14) Bato ya mikili mosusu nyonso oyo bazalaki kosunga Babilone bakosundola ye mpe bakokima, na elikya ete básala boyokani na nguya ya sika oyo ekolonga. Nsukansuka, Babilone akomona mpasi ya engumba oyo balongi yango, mpasi oyo amonisaki bikólo mosusu mingi na ntango azalaki naino na nkembo: “Ye oyo azwami akobomama, ye oyo akangami akokwea na mopanga. Bana na bango bakobukama liboso na miso na bango; ndako na bango ekopunzama, basi na bango bakobebisama.”—Yisaya 13:15, 16.
Esaleli ya Nzambe mpo na kobebisa
10. Yehova akosalela nani mpo na kolonga Babilone?
10 Nguya nini Yehova akosalela mpo na kokweisa Babilone? Mbula soki 200 liboso ya ntango wana, Yehova apesi eyano: “Talá, nakopelisela bango [Bamede], baoyo bakolulela palata te, bakosepela na wolo mpe te. Matimbo na bango ekoboma bilenge babali, bakoyokela mbuma na libumu mawa te; miso na bango ekotika bana mike te. Mpe Babilone, nkembo ya mokonzi, kitoko mpe lipombo na Bakaladi; ekozala lokola Sodomo mpe Gomola wana esili Nzambe kobuka bango.” (Yisaya 13:17-19) Babilone mboka kitoko ekokwea, mpe Yehova akosalela mampinga ya basoda ya Mede, mokili moko ya bangomba, oyo bakouta mosika mpo na kokweisa Babilone.a Nsukansuka, Babilone ekotikala mpamba lokola bingumba ya makambo ya mbindo, Sodomo mpe Gomola.—Genese 13:13; 19:13, 24.
11, 12. (a) Ndenge nini ekólo ya Bamede ekómi nguya ya mokili mobimba? (b) Likambo nini ya kokamwa esakweli elobeli mpo na mampinga ya basoda ya Baperse?
11 Na mikolo ya Yisaya, ezala Mede to Babilone, bazalaki koyangelama na Asulia. Nsima ya ekeke moko, na mobu 632 L.T.B., Mede mpe Babilone basangisi banguya na bango mpe bakweisi Ninive, mboka-mokonzi ya Asulia. Yango efungoli nzela mpo Babilone ekóma nguya ya mokili mobimba. Andimaki mpenza te ete nsima ya mbula soki 100, Mede akobebisa ye! Nani mosusu akokaki kosakola likambo moko ya mpasi mpo na kondimisa lokola oyo wana soki Yehova te?
12 Ntango amonisi esaleli na ye oyo aponi mpo na kobebisa, Yehova alobi ete mampinga ya basoda ya Bamede “bakolulela palata te, bakosepela na wolo mpe te.” Ezali likambo oyo esalemaka mpenza te epai ya basoda oyo bameseni na etumba. Albert Barnes, nganga-mayele ya Biblia alobi ete: “Mpo na mampinga ya basoda oyo bazalaki kokɔtela bamboka, baoyo bazalaki na likanisi ya kobɔtɔla biloko te, bazalaki mingi te.” Mampinga ya basoda ya Bamede bazali mpenza ndenge Yehova alobeli bango? Ɛɛ. Talá oyo tokoki kotánga na buku moko (The Bible-Work), ya J. Glentworth Butler: “Na bokeseni na mabota mosusu mingi oyo babundaki bitumba, Bamede, mpe mingimingi Baperse bazalaki kotalela mingi kolonga mpe kokóma na nkembo koleka wolo.”b Mpo na yango, ezali likambo ya kokamwa te ntango abimisaki Bayisalaele na boombo ya Babilone, Sirise, moyangeli Moperse azongiselaki bango bankóto ya bisaleli ya wolo mpe ya palata oyo Nebukadanesala apunzaki na tempelo ya Yelusaleme.—Ezela 1:7-11.
13, 14. (a) Atako basepeli na biloko te, mposa ya babundi ya Bamede na Baperse ezali nini? (b) Ndenge nini Sirise alongaki bibatelo oyo Babilone azalaki komikumisa mpo na yango?
13 Atako basoda ya Bamede na Baperse bazali mpenza te na lokoso ya kobɔtɔla biloko, kasi bazali na lokumu monene. Mpo na oyo etali nguya ya mokili mobimba, balingi te kozala na esika ya mibale. Lisusu, Yehova atii mposa ya ‘kobɔtɔla’ na mitema na bango. (Yisaya 13:6, NW) Yango wana, na matimbo na bango ya bibende—oyo ekoki kosalelama kaka te mpo na kobwaka mbanzi, kasi mpe mpo na kobɛta mpe kobebisa basoda ya banguna, bana ya bamama ya Babilone—bazali na mokano ya kolonga Babilone.
14 Sirise, mokonzi ya basoda ya Bamede na Baperse, akobanga bifelo ya Babilone te. Na butu ya mwa 5 mpe 6 Ɔkɔtɔbɛ 539 L.T.B., apesi etinda ete bálekisa mai ya Ebale Pelata epai mosusu. Ntango mai ekiti, basoda yango batamboli malɛmbɛmalɛmbɛ na bokula ya ebale yango mai tii na bibɛlo kino bakɔti na mayele na kati ya engumba. Babimeli bato ya Babilone na mbalakaka, mpe Babilone ekwei. (Danyele 5:30) Nzambe apemisaki Yisaya mpo na kosakola makambo yango, mpe ntembe ezali te ete Ye nde azalaki kotambwisa makambo yango.
15. Nini ezali kozela Babilone?
15 Kobebisama ya Babilone ekozala na monene ya ndenge nini? Yoká maloba ya Yehova: “Ekozala na bafandi te, kino libota na libota bakozala wana te; Moalaba akotɛmisa hema na ye wana te; babateli na mpate bakolalisa bitonga na bango wana te. Kasi banyama ya yauli bakolala wana, ndako na yango ekotonda na . . . bisulungutu [mpe maligwanga] ekofanda wana mpe [bademo ya motindo ya, NW] bantaba bakobinabina. Ngombolo ekongala kati na ndako milai yango, mpe [nyoka ya monene, NW] kati na ndako ya kitoko na yango; ntango na yango ebɛlɛmi; mikolo na yango ekoumela te.” (Yisaya 13:20-22) Egumba yango ekotikala mpenza mpamba.
16. Ezalela ya Babilone na mikolo ya lelo endimisi biso likambo nini?
16 Yango esalemaki mbala moko te na mobu 539 L.T.B. Kasi, lelo oyo ezali polele ete makambo nyonso oyo Yisaya alobaki mpo na Babilone ekokisamaki mpenza. Nganga-mayele moko ya Biblia alobi ete “esika oyo [Babilone] ezalaki, kobanda bikeke mingi tii lelo oyo etikala esika moko ya mpamba, mpe ezali kaka libondo ya mitika.” Na nsima abakisi ete: “Soki otali ndenge yango ezali, okomona ete makambo oyo Yisaya na Yilimia balobaki ekokisami na bosikisiki mpenza.” Ya solo, moto moko te na mikolo ya Yisaya akokaki kosakola kokwea mpe kobebisama ya Babilone. Kutu, Babilone ekweaki na mabɔkɔ ya Bamede na Baperse mbula soki 200 nsima wana Yisaya akomaki mokanda na ye! Mpe Babilone ebebisamaki mpo na mbala ya nsuka bikeke mingi na nsima. Yango ezali mpenza kolendisa kondima na biso na Biblia ete ezali Liloba epemami na Nzambe, boye te? (2 Timote 3:16) Lisusu, lokola Yehova akokisaki bisakweli na ye na ntango ya kala, tokoki kozala na elikya ete bisakweli ya Biblia oyo ekokisami naino te ekokokisama na ntango oyo Nzambe ye moko abongisi.
“Kopema na mpasi na yo”
17, 18. Kokwea ya Babilone ekobimisa matomba nini mpo na Yisalaele?
17 Kokwea ya Babilone ekozala libɔndisi mpo na Yisalaele. Yango ekolimbola kobima na boombo mpe libaku ya kozonga na Mokili ya Ndaka. Yango wana, Yisaya alobi sikawa ete: “Mpo ete [Yehova] akoyokela Yakobo mawa, akopona naino Yisalaele mpe akotya bango na mokili na bango mpenza; mpe bapaya bakoyangana esika moko na bango mpe bakozala na ndako ya Yakobo na lisangana. Bato bakokamata bango mpe bakoyeisa bango na esika na bango; mpe ndako ya Yisalaele bakozala bankolo na bango na kati ya mokili ya [Yehova] lokola baombo babali mpe baombo basi; bakokanga lokola baombo baoyo bakangaki bango liboso; bakozala na bokonzi likoló na baoyo banyokolaki bango.” (Yisaya 14:1, 2) Awa, “Yakobo” ezali komonisa Yisalaele mobimba—mabota nyonso 12. Yehova akoyokela “Yakobo” mawa, akopesa ekólo yango nzela ya kozonga na mokili na yango. Bakokenda elongo na bankóto ya bapaya, oyo mingi kati na bango bakosalela Bayisalaele lokola basali na tempelo. Kutu, Bayisalaele mosusu bakozala na bokonzi likoló na bankolo na bango ya kala.c
18 Kobanga ya bomoi ya boombo ekozala lisusu te. Kutu, Yehova akopesa nde basaleli na ye “kopema na mpasi na bango mpe mikakatano na [bango] mpe na boombo makasi oyo bakómisaki bango na yango.” (Yisaya 14:3, NW) Lokola akolongwa na boombo ya komema mikumba makasi, Yisalaele akonyokwama lisusu te na mpasi mpe na bolɔzi oyo azalaki na yango na kati ya basambeli ya banzambe ya lokuta. (Ezela 3:1; Yisaya 32:18) Mpo na yango, buku moko (Lands and Peoples of the Bible) elobi ete: “Moto ya Babilone azalaki komona banzambe na ye kaka lokola ye moko, azalaki komona bango na bambeba nyonso. Banzambe yango bazalaki bibangabanga, balangwi ya masanga mpe bilema.” Ezalaki mpenza likambo ya kobɔndisa kolongwa na esika ya losambo ya mbindo ya ndenge wana!
19. Nini esengeli mpo ete Yisalaele ezwa bolimbisi ya Yehova, mpe yango etei biso nini?
19 Kasi, ngɔlu ya Nzambe ekoki kozwama mpambampamba te. Basaleli na ye basengeli komonisa mawa oyo bayoki mpo na mabe na bango, oyo etindaki Nzambe apesa bango etumbu makasi. (Yilimia 3:25) Soki bayamboli masumu na bango polele, Yehova akolimbisa bango. (Talá Nehemia 9:6-37; Danyele 9:5.) Etinda yango ezali solo kino lelo oyo. Lokola “moto azali te oyo akosalaka masumu te,” biso nyonso tozali na mposa ya motema mawa ya Yehova. (2 Ntango 6:36) Yehova, Nzambe ya motema mawa, abyangaka biso na bolingo nyonso epai na ye mpo tóyambola masumu na biso, tóbongola mitema, mpe tótika banzela nyonso ya mabe, mpo tókoka kobika. (Deteronome 4:31; Yisaya 1:18; Yakobo 5:16) Yango esalisaka biso kaka te ete andima biso lisusu kasi mpe mpo tóbɔndisama.—Nzembo 51:1; Masese 28:13; 2 Bakolinti 2:7.
“Liloba ya kotuka” Babilone
20, 21. Ndenge nini bato ya zingazinga ya Babilone basepeli mpo na kokwea na ye?
20 Mbula koleka 100 liboso Babilone ekóma nguya ya mokili mobimba, Yisaya asakolaki likambo oyo mokili ekosala na ntango ya kokwea na ye. Na esakweli na ye, apesi Bayisalaele oyo basikolamaki na boombo etinda oyo: “Okobimisa liloba ya lisese mpo na kotɛmɛla mokonzi ya Babilone mpe okoloba ete: ‘Ndenge nini ye oyo azalaki kotinda basusu na mosala atiki, monyokoli atiki! Yehova abuki lingenda na bato mabe, nzete ya bayangeli, ye oyo abɛtaki bato ya bikólo na nkanda mpe azalaki kotika te, ye oyo azalaki na bokonzi likoló na mabota na nkanda ya minyoko kozanga koyokela mawa.’” (Yisaya 14:4-6, NW) Babilone amikómisaki elombe, monyokoli oyo akómisaka bansomi baombo. Ebongi mpenza ete kokwea na ye básalela yango molulu na “liloba ya lisese” oyo babwakeli mingimingi libota ya bakonzi ya Babilone—kobanda na Nebukadanesala mpe kosuka na Nabonide na Belesasala—oyo batambwisaki mboka na mikolo oyo engumba yango monene ezalaki na lokumu!
21 Kokwea na ye ekomema mpenza mbongwana! “Mokili mobimba ezali na kimya mpe na nyɛɛ; babandi koyemba. Ɛɛ nzete na losimi ekosepela mpo na yo, nzete na eleze na Lebanona mpe ete, Mpo ete [banda yo okwei mokati-nzete moko te, NW] ayei kokata biso.” (Yisaya 14:7, 8) Na miso ya bayangeli ya Babilone, bakonzi ya mabota ya zingazinga bazalaki mpenza lokola banzete oyo ebongi ete bákata yango mpe basalelá yango mpo na mikano na bango. Kasi, nyonso wana esili. Mokati-nzete, moto ya Babilone akati nzete na ye ya nsuka!
22. Na maloba ya ntɔki, Sheole esali nini na kokwea ya libota ya bakonzi ya Babilone?
22 Kokwea ya Babilone ezali mpenza kokamwisa, mpe na yango ata lilita yango moko elobi: “Ata sheole na nse ekómi na yikiyiki mpo na yo, mpo na koyamba yo na ntango ya kokóma na yo. Alamwisi mpo na yo baoyo bazangi makasi kati na liwa, bakambi nyonso ya mabele oyo bazali lokola ntaba ya mibali. Atɛlɛmisi bakonzi nyonso ya bikólo mosusu na kiti na bango ya bokonzi. Bango nyonso bazali kozwa maloba mpe bazali koloba na yo ete: ‘Yo mpe ozangi makasi lokola biso? Okómi mpe lokola biso? Bakitisi lolendo na yo na sheole mpe makɛlɛlɛ na bibɛtɛlo na nsinga na yo. Na nse na yo nkusu etandani, lokola mbeto, mpe mpambo lokola bolangiti na yo.’” (Yisaya 14:9-11, NW) Oyo nde elilingi ya maloba kitoko! Ezali lokola nde lilita ya bato nyonso ezali kolamusa bakonzi nyonso oyo bakufaki liboso ya libota ya bakonzi ya Babilone mpo na koyamba baoyo bayei sika. Bazali kotyola boyangeli ya Babilone, oyo ezali sikawa na nguya te, balali likoló ya mbeto ya nkusu na esika ya kolala na mbeto ya kitoko, mpambo ezipi bango na esika ete bámizipa na bolangiti moko ya kitoko.
“Lokola ebembe oyo enyatami na nse na makolo”
23, 24. Lofundo ya ndenge nini bakonzi ya Babilone bamonisaki?
23 Yisaya akobi koloba na lisese: “Osili kokwea longwa na lola boni! Ɛ mɔ́tɔ na [kongɛnga, NW], mwana na kobima na moi! Osili kokatama kino mabele boni! yo oyo obukaki mabota.” (Yisaya 14:12) Lolendo na moimi etindaki bakonzi ya Babilone bámitombola likoló ya baoyo bazalaki zingazinga na bango. Lokola monzoto oyo ezali kongɛnga na likoló na ntɔngɔntɔngɔ, bazali kosalela nguya na bango mpe bokonzi na bango na lolendo nyonso. Bazali na lolendo mingimingi mpo na ndenge Nebukadanesala azwaki Yelusaleme, likambo oyo Asulia alongaki kosala yango te. Liloba ya lisese elakisi ndenge libota ya bakonzi ya Babilone bazali koloba: “Nakobuta epai na lola koleka likoló na [minzoto] na Nzambe; nakokisa na kiti na ngai na bokonzi, nakofanda na ngomba ya koyangana, na epai na likoló mosika; nakobuta likoló na esika na mapata, nakomizalisa lokola Oyo-Aleki-Likoló.” (Yisaya 14:13, 14) Yango ezali mpenza maloba ya kotuka, boye te?
24 Na Biblia, bakonzi ya molɔngɔ ya Davidi bakokanisami na minzoto. (Mituya 24:17) Kobanda na Davidi, “minzoto” yango ezalaki koyangela longwa na Ngomba Siona. Nsima wana Salomo atongaki tempelo na Yelusaleme, nkombo Siona ekómaki kosalelama mpo na engumba yango mobimba. Na nse ya kondimana ya Mibeko, Bayisalaele nyonso ya mibali basengelaki kokenda na Siona mbala misato na mobu. Yango wana, ekómaki “ngomba ya koyangana.” Lokola azwaki ekateli ya kokonza bakonzi ya Yuda mpe na nsima kolongola bango na ngomba wana, Nebukadanesala amonisaki mposa na ye ya komitombola likoló na “minzoto” yango. Amonisi te ete bolongi na ye likoló na bango euti na Yehova. Kutu, na lolendo mpenza amitii ye moko na esika ya Yehova.
25, 26. Ndenge nini libota ya bakonzi ya Babilone basuki na nsɔni?
25 Oyo nde mbongwana ezali kozela libota ya bakonzi wana ya Babilone ya lolendo! Babilone ekoki soki moke te kotombolama likoló na minzoto ya Nzambe. Kutu, Yehova alobi ete: “Okitisami na nse kino [na sheole, NW], kino bozindo na libulu. Baoyo bakomona yo bakotala yo pii, bakobanzabanza mpo na yo ete, Oyo ezali nde moto oyo alɛngisaki mokili, oyo [aningisaki bikonzi]? Oyo akómisaki mokili lokola lisobe, mpe abukaki mboka na yango mpe akangolaki bakangami na ye te ete bákenda epai na bango?” (Yisaya 14:15-17) Libota ya bakonzi ya lolendo bakokita na Hadesi (Sheole), kaka lokola moto nyonso.
26 Kasi, nguya oyo elongaki bikonzi mingi, ebebisaki mabele oyo ezalaki kobotisa milona, mpe ekweisaki bingumba ebele, ekozala wapi? Nguya ya mokili mobimba oyo ekangaki baombo mpe ezalaki kopesa bango nzela soki moke te ete bázonga epai na bango ekozala wapi? Kutu, libota ya bakonzi ya Babilone bakokundama na ndenge ya malamu te! Yehova alobi ete: “Mikonzi nyonso ya mabota, ɛɛ bango nyonso, balali na nkembo, moko na moko na nkunda na ye. Kasi yo obwakami longwa na nkunda na yo, lokola etape eboyami; olatisami na babomami, baoyo batɔbɔlami na mopanga, baoyo bakokita kino mabanga na bozindo, lokola ebembe oyo enyatami na nse na makolo. Okosangana na bango na kokundama te, zambi osili kobebisa mokili; obomi bato na yo. Tiká ete bakitani na basali na mabe bátángama nkombo lisusu te.” (Yisaya 14:18-20) Na ntango ya kala, ezalaki likambo ya nsɔni mpo na mokonzi ete akundama te na lilita ya lokumu. Na bongo, ekozala boni mpo na libota ya bakonzi ya Babilone? Ezali solo ete bakonzi bakundamaki mbala mosusu na lokumu, kasi libota ya bakonzi oyo bazali bakitani ya Nebukadanesala babwakami “lokola etape eboyami.” Ezali lokola nde libota ya bakonzi yango babwakami na mwa lilita moko ya ndenge wana kaka—lokola mwa soda moko boye oyo abundaka na mabele abomami na etumba. Oyo nde kosambwisama!
27. Bato ya Babilone oyo bakobotama nsima bakonyokwama ndenge nini mpo na lisumu ya bankɔkɔ na bango?
27 Liloba ya lisese esuki na bitinda oyo epesami epai na Bamede na Baperse: “Bongiselá bana na ye kobomama mpo na masumu ya batata na bango; ete bátɛlɛma te, bázala bankolo na mokili te, bátondisa elongi na mokili na mboka na bango te.” (Yisaya 14:21) Kokwea ya Babilone ekozala mpo na libela. Libota ya bakonzi ya Babilone ekopikolama. Bakobotama lisusu te. Bato ya Babilone oyo bakobotama nsima bakonyokwama mpo na “masumu ya batata na bango.”
28. Ntina mpenza ya lisumu ya bakonzi ya Babilone ezalaki nini, mpe yango etei biso nini?
28 Etumbu oyo bapesaki libota ya bakonzi ya Babilone ezali kobimisa liteya moko ya ntina mpo na biso. Ntina mpenza ya lisumu ya bakonzi ya Babilone ezalaki mposa na bango makasi mpo na lokumu, oyo esilaka te. (Danyele 5:23) Mitema na bango etondaki na mposa makasi ya bokonzi. Balingaki koyangela basusu. (Yisaya 47:5, 6) Mpe bazalaki koluka nkembo oyo ezalaki kouta na bato, oyo esengeli mpenza kopesama na Nzambe. (Emoniseli 4:11) Yango ezali likebisi mpo na moto nyonso oyo azali na bokonzi—ata mpe na lisangá ya boklisto. Mposa makasi ya lokumu mpe lolendo na moimi ezali makambo oyo Yehova akopesa nzela te, ezala epai ya bato to na bikólo.
29. Lolendo mpe mposa makasi ya bokonzi epai ya bayangeli ya Babilone ezalaki komonisa nini?
29 Lolendo ya bakonzi ya Babilone ezalaki komonisa elimo ya “nzambe ya mokili oyo,” Satana Zabolo. (2 Bakolinti 4:4) Ye mpe azali kokufela bokonzi mpe azali na mposa makasi ya komitya likoló ya Yehova. Lokola esalemaki mpo na mokonzi ya Babilone mpe bato oyo azalaki kokonza, mposa mabe ya lokumu ya Satana ebimisaki mawa mpe minyoko mpo na bato nyonso.
30. Babilone mosusu nini elobelami na Biblia, mpe ezaleli nini yango emonisi?
30 Lisusu, mokanda ya Emoniseli elobeli Babilone mosusu—“Babilone Monene.” (Emoniseli 18:2) Ebongiseli yango, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, emonisi mpe elimo ya lolendo, monyokoli, mpe nkanda. Mpo na yango, ye mpe asengeli kondongwana na “mokolo ya Yehova” mpe kobebisama na ntango oyo Nzambe abongisi. (Yisaya 13:6) Kobanda 1919, nsango moko ezali koyokana na mabele mobimba: “[Babilone] monene ekwei!” (Emoniseli 14:8) Lokola akokaki te kokanga basaleli ya Nzambe na boombo, akweaki. Ekoumela te, akobebisama nyɛɛ mpenza. Mpo na Babilone ya kala, Yehova apesaki etinda ete: “Futá ye [mpo na] misala na ye nyonso. Salelá ye [mpo na] nyonso esalaki ye. Zambi atɛmɛlaki [Yehova] na lolendo, Oyo [Mosantu, NW] na Yisalaele.” (Yilimia 50:29; Yakobo 2:13) Babilone Monene akozwa etumbu ya ndenge wana.
31. Etikali moke, nini ekokómela Babilone?
31 Yango wana, maloba ya Yehova ya nsuka oyo ezali na esakweli oyo ya mokanda ya Yisaya ezali kolobela kaka te Babilone ya kala, kasi mpe Babilone Monene. “Nakotɛmɛla bango mpe nakokata longwa na [Babilone], nkombo mpe ndambo baoyo batikali, bana mpe bakitani . . . Nakokómisa yango libulu na nziko mpe esika na mai mingi mpe nakokɔmba yango na nkombo na kobebisa.” (Yisaya 14:22, 23) Mabondo ya mitiká ya Babilone ya kala ezali komonisa likambo oyo Yehova akosala Babilone Monene. Oyo nde kobɔndisama mpo na bato oyo balingaka losambo ya solo! Oyo nde kolendisama mpo na biso ete tósala makasi mpo tópesa nzela te ete bizaleli mabe ya Satana lokola lolendo, lofundo, to nkanda ekɔtela biso!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yisaya atángi kaka Bamede, kasi mabota mingi bakosala boyokani mpo na kobundisa Babilone—Mede, Palasa, Elama mpe mabota mosusu ya mikemike. (Yilimia 50:9; 51:24, 27, 28) Mabota ya zingazinga ezali kobenga Bamede mpe Baperse ete “Bamede.” Lisusu, na mikolo ya Yisaya, Mede ezalaki nguya oyo ezalaki makasi koleka mosusu nyonso. Kaka na ntango ya Sirise nde Perse ekómaki nguya monene.
b Nzokande, emonani ete Bamede mpe Baperse bakómaki kolinga mingi biloko ya motuya.—Esetele 1:1-7.
c Na ndakisa, Danyele aponamaki mosali monene ya Leta na boyangeli ya Bamede na Baperse. Mpe mbula soki 60 na nsima, Esetele akómaki mwasi ya Asierisi, mokonzi ya Baperse, mpe Moledekai akómaki ministre-mokambi na bokonzi nyonso ya Perse.
[Elilingi na lokasa 178]
Nsima ya kokwea na yango, Babilone ekokóma efandelo ya banyama ya esobe
[Bililingi na lokasa 186]
Lokola Babilone ya kala, Babilone Monene ekokóma libondo ya bitikali