Mokapo ya Zomi na Nsambo
“Babilone akwei!”
1, 2. (a) Motó ya likambo ya Biblia mobimba ezali nini, kasi wapi motó ya likambo ya moke, oyo ezali na ntina mingi, na Yisaya? (b) Ndenge nini Biblia elobeli motó ya likambo ya kokwea ya Babilone?
BAKOKI kokokanisa Biblia na loyembo moko molai oyo ezali na motó ya likambo ya monene moko mpe na mitó ya makambo mosusu ya mikemike oyo bakɔtisi mpo ete loyembo mobimba ekesene na nzembo mosusu nyonso. Ndenge moko mpe, Biblia ezali na motó ya likambo ya monene moko—kolongisama ya bokonzi ya Yehova na nzela ya Bokonzi ya Masiya. Ezali mpe na mitó ya makambo mosusu ya ntina, oyo ezali kozongelama mbala na mbala. Moko na yango ezali kokwea ya Babilone.
2 Motó ya likambo yango elobelami liboso mpenza na Yisaya mokapo 13 mpe 14. Elobelami lisusu na Yisaya mokapo 21 mpe lisusu na Yisaya mokapo 44 mpe 45. Ekeke moko na nsima, Yilimia alobeli mingi lisusu motó ya likambo yango, mpe mokanda ya Emoniseli esukisi yango na ndenge moko oyo ezali mpenza kobenda likebi. (Yilimia 51:60-64; Emoniseli 18:1–19:4) Moyekoli nyonso ya solosolo ya Biblia asengeli mpenza kotya likebi na motó ya likambo yango ya moke mpe ya ntina oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Yisaya mokapo 21 ezali na ntina mingi mpo na yango, mpamba te eyebisi makambo mingi oyo ezali komonisa kokwea ya nguya yango monene ya mokili mobimba oyo elobelamaki na esakweli. Nsima, tokomona ete Yisaya mokapo 21 ezali kolobela mingi motó ya likambo mosusu ya Biblia oyo ezali mpe na ntina mingi—oyo ezali kosalisa biso baklisto ya lelo ete tóyeba ntina ya kozala na ekɛngɛ makasi.
‘Emonaneli moko makasi’
3. Mpo na nini babengi Babilone ete “esobe ya mbu,” mpe nkombo yango ezali komonisa nini mpo na ye na mikolo ezali koya?
3 Yisaya mokapo 21 ebandi na maloba ya mawa: “Litatoli mpo na [kotɛmɛla esobe ya mbu, NW]: Lokola mipɛpɛ makasi ekolekaka epai na [sudi, NW], ikolongwa na esobe, uta na mokili na nsɔmɔ mingi.” (Yisaya 21:1) Babilone ezali na ngámbo na ngámbo ya Ebale Pelata, mpe eteni na yango ya ɛsti ezali kati na bibale mibale, Pelata mpe Tigre. Ezali mwa mosika na mbu. Bongo, mpo na nini babengi yango “esobe ya mbu”? Babengi yango bongo mpamba te etúká ya Babilone ezalaki kozinda na mpela mbula na mbula mpe kokóma lokola “mbu” moko ya monene, etondi na pɔtɔpɔtɔ. Kasi, bato ya Babilone balongaki mikakatano wana ya esobe yango ya mai, basalaki misala ndenge na ndenge ya kokanga mpe kolekisa mai mpe baterase ya kolekisa mai yango. Na mayele mpenza, basalelaki mai yango mpo na kobatela engumba ete banguna bákɔtela yango te. Kasi, mosala moko te ya bato ekobikisa Babilone na kosambisama ya Nzambe. Ezalaki esobe—ekokóma lisusu esobe. Mawa ezali koya, ezali kobotama lokola moko ya mipɛpɛ makasi oyo eutaka na esobe monene ya sudi oyo mbala mosusu ebɛtaka na Yisalaele.—Kokanisá na Zekalia 9:14.
4. Emonaneli ya “Babilone Monene” oyo elobelami na Emoniseli ezali kolakisa nini mpo na “mai mingi” mpe “esobe,” mpe “mai mingi” yango elimboli nini?
4 Lokola toyekolaki yango na mokapo ya 14 ya buku oyo, ezali na ebongiseli moko ya ntango na biso oyo ekokani na Babilone ya kala—“Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Na Emoniseli, balobeli Babilone Monene elongo na “esobe” mpe “mai mingi.” Ntoma Yoane amemamaki na esobe moko mpo bámonisa ye Babilone Monene. Bayebisaki ye ete “afandi likoló ya mai mingi” oyo ezali komonisa “bato ya mikili mpe ebele ya bato mpe bikólo mpe minɔkɔ.” (Emoniseli 17:1-3, 5, 15, NW) Kobanda kala, lokola ebele ya bato bamipesaka na lingomba ya lokuta, yango nde esalaka mpenza ete lingomba ya lokuta eumela, kasi na nsuka “mai mingi” wana ekobatela ye libela te. Ndenge moko na mboka ya kala oyo ekokanaki na ye, akotikala polele, bakosundola ye mpe akozala mpamba.
5. Ndenge nini Babilone ezwaki lokumu mabe ya “motɛki-bato” mpe “mopunzi”?
5 Na mikolo ya Yisaya, Babilone ekómaki naino nguya ya mokili mobimba te, kasi Yehova asili koyeba ete ntango eleko na ye ekokóma, akosalela bokonzi na ye na ndenge ya mabe. Yisaya alobi ete: “Emonaneli ya makasi eyebisami epai na ngai: Motɛki-bato azali kotɛka, mopunzi azali kopunza.” (Yisaya 21:2a, NW) Babilone akotɛka mpenza mpe akopunza mabota oyo akolonga, bakisa mpe Yuda. Bato ya Babilone bakopunza Yelusaleme, bakopunza tempelo na yango, mpe bakomema bato na yango na boombo na Babilone. Kuna, bakonyokola baombo yango oyo bazali lisusu na nguya te, bakotyola bango mpo na kondima na bango, mpe bakopesa bango ata elikya moko te ya kozonga na mokili na bango.—2 Ntango 36:17-21; Nzembo 137:1-4.
6. (a) Monyoko nini Yehova akosilisa? (b) Mabota nini esakolami ete ekobundisa Babilone, mpe ndenge nini yango ekokisamaki?
6 Ya solo mpenza, Babilone abongi na “emonaneli ya makasi” yango, oyo elimboli ntango ya mpasi mpo na ye. Yisaya akobi koloba ete: “Butá likoló, ɛ Elama, zingelá na etumba, ɛ [Mede]. Kokimela nyonso [mpo] na ye, nasukisi yango.” (Yisaya 21:2b) Bato oyo bazali konyokwama na bokonzi mabe yango bakozwa libɔndisi. Na nsuka, kokimela na bango ekosila! (Nzembo 79:11, 12) Libɔndisi yango ekoya na nzela nini? Yisaya atángi bikólo mibale oyo bakobundisa Babilone: Elama mpe Mede. Bikeke mibale na nsima, na mobu 539 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Sirise moto ya Perse akokamba limpinga moko oyo esangisi basoda ya Perse na ya Mede mpo na kobundisa Babilone. Mpo na Elama, bakonzi ya Baperse bakozwa ndambo ya mokili yango liboso ya mobu 539 L.T.B.a Na yango, mampinga ya basoda ya Perse ekozala mpe na basoda ya Elama.
7. Emonaneli ya Yisaya esali ye nini, mpe yango elimboli nini?
7 Talá ndenge Yisaya alobeli makambo oyo emonaneli yango esali ye: “Bongo, [loketo, NW] na ngai etondi na mpasi, bolɔzi esimbi ngai, lokola mpasi ya mwasi oyo azali kobota. [Nasili mayele, NW] mpe boye nayoki likambo te, [nabulungani makasi, NW] mpe boye namoni eloko te. Motema na ngai ezali kotelengana, nsɔmɔ ezali kobangisa ngai; [mwa molili ya mpokwa, NW]oyo nalingaki yango ebongwani kolɛnga mpo na ngai.” (Yisaya 21:3, 4) Emonani ete mosakoli azali kosepela na bangonga ya mwa molili ya mpokwa, ntango moko kitoko mpo na kokanisa na kimya mpenza. Kasi ntango molili ebandi kokɔta na mpokwa, ebungisi kitoko na yango, ekómi kutu nde kobangisa, kopesa mpasi mpe kolɛngisa. Azali konyokwama na mpasi lokola ya mwasi oyo azali kobota, mpe motema na ye “ezali kotelengana.” Nganga-mayele moko abongoli maloba yango ete “motema na ngai ezali kobɛta mbangumbangu,” mpe amonisi ete elobeli yango ezali komonisa ete “motema ezali kobɛta malamu te mpo na fiɛvrɛ.” Mpo na nini mpasi ya ndenge wana? Na ntembe te, mayoki ya Yisaya ezali ya esakweli. Na butu ya mokolo ya 5 mpo tókóma mokolo ya 6 Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 539 L.T.B., bato ya Babilone bakoyoka nsɔmɔ ndenge wana.
8. Lokola yango esakolamaki, bato ya Babilone bazali kosala nini, atako banguna na bango bazali na libándá ya bifelo?
8 Ntango molili ekɔti na butu yango ya esakweli, bato ya Babilone bazali ata na likanisi moko te ya kobanga. Bikeke soki mibale liboso mpenza, Yisaya asakoli ete: “Tiká bátya mesa na molɔngɔ, bábongisa bisika ya kofanda, bálya, bámɛla!” (Yisaya 21:5a, NW) Ɛɛ, Belesasala, mokonzi ya lolendo asali fɛti. Babongisi bisika ya kofanda mpo na bato na ye ya minene nkóto, bakisa mpe ebele ya basi na ye, na bamakango na ye. (Danyele 5:1, 2) Bato oyo bazali na fɛti bayebi ete limpinga moko ya basoda ezali na libándá, kasi bakanisi ete bakoki kokɔta na engumba na bango te. Ezali komonana lokola ete bifelo na yango ya milai mpe libulu ya mai ya mozindo oyo ezali zingazinga na engumba ekómisi yango esika oyo bakoki kozwa yango te; mpe ebele ya banzambe na yango bakoki kotika te ete bázwa engumba yango. Lokola ezali bongo, ‘bazali kolya, bazali komɛla.’ Belesasala alangwe, mpe ezali kaka ye moko te. Emonani ete bankumu bakómi lokola bazoba, mpamba te esengeli kolamusa bango, lokola maloba ya esakweli ya Yisaya oyo elandi emonisi yango.
9. Mpo na nini ekómi likambo ya ntina ete ‘bápakola nguba’?
9 “Bótɛlɛma, bino [bankumu, NW], pakolá nguba!” (Yisaya 21:5b) Na mbalakaka mpenza, fɛti esili. Bankumu basengeli kolamuka! Babengisi mobange mosakoli Danyele na esika ya molulu yango, mpe amoni ndenge Yehova asali ete Belesasala, mokonzi ya Babilone, ayoka nsɔmɔ ndenge Yisaya alobaki yango. Bato ya lokumu ya mokonzi babulungani ntango mampinga ya basoda ya Bamede, Baperse, mpe Baelama bakɔti na engumba yango. Babilone ekwei noki mpenza! Kasi, ‘kopakola nguba’ elimboli nini? Na bantango mosusu, Biblia elobelaka mokonzi ya ekólo moko lokola nguba, mpamba te ye azali mobundi mpe mobateli ya mboka.b (Nzembo 89:18) Yango wana, na vɛrsɛ yango, Yisaya azali kosakola mpenza ete esengeli mokonzi mosusu azala. Mpo na nini? Mpamba te Belesasala abomami na “butu yango.” Yango wana, esengeli ‘kopakola nguba,’ elingi koloba kopona mokonzi ya sika.—Danyele 5:1-9, 30.
10. Libɔndisi nini basambeli ya Yehova bakoki kozwa na kokokisama ya esakweli ya Yisaya oyo etali mopunzi?
10 Baoyo nyonso balingaka losambo ya solo bazali kozwa libɔndisi na lisolo yango. Babilone ya mikolo na biso, Babilone Monene, azali mopunzi mpe mobebisi ndenge moko na Babilone ya ntango ya kala. Kino lelo oyo, bakonzi ya mangomba basalelaka mayele mabe mpo na kopekisa mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova, konyokola bango, to kofutisa bango baamande mineneminene. Kasi, lokola esakweli yango ezali kokundolela biso, Yehova azali komona mayele mabe yango, mpe akotika te ete bázanga etumbu. Akoboma mangomba nyonso oyo ezali koyokisa ye nsɔni mpe konyokola basaleli na ye. (Emoniseli 18:8) Likambo ya ndenge wana ekosalema? Mpo na kolendisa kondima na biso, tosengeli kaka komona ndenge makebisi na ye oyo etali kokwea ya Babilone ya kala, mpe ndoi na ye ya mikolo na biso, esili kokokisama.
“Akwei”
11. (a) Mokumba ya mosɛnzɛli ezali nini, mpe nani azali kosala mosala ya mosɛnzɛli lelo oyo? (b) Likalo ya bampunda mpe likalo ya bakamela ezali komonisa nini?
11 Yehova alobi sikawa na mosakoli. Yisaya alobi ete: “[Yehova] alobaki boye na ngai ete, Kendá, tyá [sinzili, NW], ayebisa yango ezali ye komona.” (Yisaya 21:6) Maloba yango ekɔtisi motó ya likambo mosusu ya ntina mingi na mokapo yango—likambo ya sinzili to mosɛnzɛli. Yango ezali na ntina mingi mpo na baklisto nyonso ya solo lelo oyo, mpamba te Yesu alendisaki bayekoli na ye ete, “bósɛnzɛlaka.” “Moombo ya sembo mpe ya mayele” atiki te koloba makambo oyo azali komona mpo na kobɛlɛma ya mokolo ya kosambisa ya Nzambe mpe likama oyo ezali kozela mokili mabe oyo. (Matai 24:42, 45-47) Mosɛnzɛli ya emonaneli ya Yisaya azali komona nini? “Amonaki likalo ya etumba na mbalata mibale, likalo ya etumba na bampunda, likalo ya etumba na bakamela. Mpe atii likebi mpenza, na likebi monene mpenza.” (Yisaya 21:7, NW) Lolenge mokomoko ya makalo yango ezali mbala mosusu komonisa milɔngɔ ya makalo oyo ezali kopusana mpo na komibongisa mpo na etumba, ezali kopota na lombangu ya bambalata makasi ya bitumba. Likalo ya bampunda mpe oyo ya bakamela ebongi mpenza mpo na komonisa banguya mibale, Bamede na Baperse, oyo bakosangana mpo na kobundisa. Lisusu, masolo ya kalakala endimisi ete mampinga ya basoda ya Baperse ezalaki kosalela bampunda na bakamela na etumba.
12. Bizaleli nini mosɛnzɛli ya emonaneli ya Yisaya amonisi, mpe nani asengeli kozala na yango lelo oyo?
12 Na nsima, mosɛnzɛli azwi etinda ya kosala lapolo. “Agangaki, lokola nkosi ete: ‘Likoló na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli, O Yehova, natɛlɛmi kozanga kotika na ntango na moi, mpe na esika na ngai ya kosɛnzɛla, natɛlɛmi babutu nyonso. Kasi talá, likalo ya etumba ezali koya na mibali, ebendami na mbalata mibale!’” (Yisaya 21:8, 9a, NW) Mosɛnzɛli ya emonaneli agangi na mpiko nyonso, “lokola nkosi.” Esɛngaka kozala na mpiko mpo na koganga nsango moko ya kosambisa oyo epesami likoló na libota moko ya nsɔmɔ lokola Babilone. Eloko mosusu mpe esɛngami—molende. Mosɛnzɛli atɛlɛmi kaka na esika na ye butu na moi, azali ntango nyonso na ekɛngɛ. Ndenge moko mpe, na mikolo oyo ya nsuka, kelasi ya mosɛnzɛli basengeli kozala na mpiko mpe na molende. (Emoniseli 14:12) Baklisto nyonso ya solo basengeli kozala na bizaleli yango.
13, 14. (a) Makambo nini ekómeli Babilone ya kala, mpe na lolenge nini bikeko na ye ebukani? (b) Ndenge nini mpe ntango nini Babilone Monene ekweaki lokola Babilone ya kala?
13 Na emonaneli ya Yisaya, mosɛnzɛli amoni likalo moko ya etumba ezali koya. Nsango nini? “Azongisaki monɔkɔ ete, [Babilone] akwei, akwei; bikeko nyonso ya banzambe na ye abuki yango kino mabele.” (Yisaya 21:9b) Lapolo yango ezali kosepelisa mpenza! Nsukansuka, oyo azalaki kopunza basaleli ya Nzambe akwei!c Kasi, na lolenge nini bililingi mpe bikeko ya Babilone ebukani? Basoda ya Bamede na Baperse bakokɔta nde na batempelo ya Babilone mpo na kopanza ebele ya bikeko yango? Te, ntina ya kosala bongo ezali te. Bikeko ya banzambe ya Babilone ekobukana na lolenge ete ekomonana polele ete bizali na nguya te ya kobatela engumba yango. Mpe Babilone akokwea ntango akokoka lisusu te konyokola basaleli ya Nzambe.
14 Tokoloba nini mpo na Babilone Monene? Lokola asalaki ete basaleli ya Nzambe bányokwama na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, akangaki mpenza bango na boombo na boumeli ya mwa ntango. Emonanaki ete mosala na bango ya kosakola ekatanaki. Prezida ya la Société Watch Tower na bandeko mosusu oyo bazalaki na mikumba minene bakangamaki na bolɔkɔ mpo na bifundeli ya lokuta. Kasi na 1919, mbongwana moko ya kokamwa esalemaki. Bandeko yango babimaki na bolɔkɔ, Biro monene oyo ekambaka mosala ya Batatoli ya Yehova efungwamaki lisusu, mpe mosala ya kosakola ebandaki lisusu. Na yango, Babilone Monene akweaki na lolenge ete nsinga oyo akangaki na yango basaleli ya Nzambe ekatanaki.d Na Emoniseli, kokwea yango esakolami mbala mibale na anzelu moko oyo asaleli maloba ya Yisaya 21:9.—Emoniseli 14:8; 18:2.
15, 16. Na lolenge nini bato ya Yisaya bazali ‘biloko bitutami,’ mpe liteya nini tokoki kozwa na ezaleli ya Yisaya epai na bango?
15 Yisaya asukisi nsango na ye ya esakweli na maloba ya boboto epai ya bato na ye. Alobi ete: “Ɛ bino batutami na ngai oyo bazali kotuta lokola mbuma mpe mwana ya libándá na ngai ya kotuta mbuma, oyo nayoki epai na Yehova na bibele, Nzambe ya Yisalaele, nayebisi bino yango.” (Yisaya 21:10, NW) Na Biblia, mbala mingi soki balobeli kotuta mbuma, ezalaka elilingi ya kopesa etumbu mpe kopɛtola basaleli ya Nzambe. Bato oyo basalaki kondimana na Nzambe bakokóma ‘bana ya libándá ya kotuta mbuma,’ epai nganu ekabolami na makasi na mposo na yango, mpe etikaka mbuma oyo epɛtolami mpe oyo esengeli mpo na kosalela. Yisaya azali kotyola bango mpo na etumbu yango te. Kutu, azali nde koyoka mawa mpo na ‘bana ya libándá ya kotuta mbuma,’ oyo mosusu kati na bango bakolekisa bomoi na bango mobimba lokola baombo na mokili ya bapaya.
16 Yango ekoki kozala lokola likambo moko ya ntina oyo bakundoleli biso. Na lisangá ya boklisto lelo oyo, bato mosusu bakoki koyokela basali na mabe mawa te. Mpe bato oyo bazwi etumbu bakoki mbala mosusu komona yango mabe. Nzokande, soki tobosani te ete Yehova apesaka basaleli na ye etumbu mpo na kobongisa bango, tokotyola etumbu yango te, tokotyola mpe te baoyo bandimi yango na komikitisa, mpe ntango tozwi yango tokoboya yango te. Tiká ete tóndima etumbu oyo euti na Nzambe lokola elembo ya bolingo na ye.—Baebele 12:6.
Tótuna mosɛnzɛli
17. Mpo na nini ebongi ete Edome abengama “Duma”?
17 Nsango ya mibale ya esakweli ya Yisaya mokapo 21 elobeli mingi mpenza mosɛnzɛli. Ebandi boye: “Litatoli mpo na [kotɛmɛla, NW] Duma: Moko abyangi ngai longwa na Seili ete, [Mosɛnzɛli, NW], nini na butu oyo? [Mosɛnzɛli, NW], nini na butu oyo?” (Yisaya 21:11) Duma yango ezali wapi? Na ntembe te bingumba mingi na ntango ya kala ezalaki na nkombo yango, kasi ata moko te kati na yango etalelami awa. Duma ezali na Seili te; Seili ezali nkombo mosusu ya Edome. Kasi, “Duma” elimboli “Nyɛɛ.” Yango wana, emonani ete lokola elobamaki na litatoli oyo eleki, etúká yango ezwi nkombo oyo ezali komonisa ndenge ekozala na mikolo ezali koya. Kobanda kala, Edome azali monguna monene ya basaleli ya Nzambe, mpe akokanga monɔkɔ—akokanga monɔkɔ mpenza. Kasi, liboso ete likambo yango esalema, bato mosusu bakomitungisa mpenza mpo na koyeba makambo oyo ezali na mikolo ezali koya.
18. Ndenge nini maloba oyo ete, “Ntɔngɔ ekoya mpe butu lokola,” ekokisamaki likoló ya Edome?
18 Na ntango Yisaya azali kokoma makambo yango, Edome azwami na nzela oyo mampinga ya basoda ya nguya ya Asulia bazali koleka. Bato mosusu na Edome bazali mpenza koluka koyeba ntango nini butu ya monyoko yango ekosila mpo na bango. Eyano nini epesami? “[Mosɛnzɛli, NW] alobi ete, Ntɔngɔ ekoya mpe butu lokola.” (Yisaya 21:12a) Makambo ekozala malamu te mpo na Edome. Mwa kongɛnga moko ya ntɔngɔ ekomonana, kasi ekozala mokuse, mokuse mpenza. Butu—eleko mosusu ya molili mpe ya monyoko—ekolanda noki mpenza. Elilingi yango ebongi mpenza na Edome mpo na mikolo ezali koya! Monyoko ya Asulia ekosuka, kasi Babilone akokitana Asulia lokola nguya ya mokili mobimba mpe akobebisa Edome. (Yilimia 25:17, 21; 27:2-8) Likambo yango ekozongelama lisusu. Nsima ya monyoko ya Babilone, monyoko ya Baperse mpe ya Bagrɛki ekoya. Na nsima, mwa “ntɔngɔ” moke ekozala na boumeli ya eleko ya Loma, ntango Elode—moto ya Edome—akozwa bokonzi na Yelusaleme. Kasi “ntɔngɔ” yango ekoumela te. Nsukansuka, Edome akokanga monɔkɔ libela, akolimwa na lisolo ya bato. Nkombo Duma ekobonga mpenza na likambo oyo ekómeli ye na nsuka.
19. Ntango mosɛnzɛli alobi ete, “Soko bolingi kotuna, bótuna naino, bóya mpe lisusu,” mbala mosusu alingaki koloba nini?
19 Mosɛnzɛli asukisi nsango na ye ya mokuse na maloba oyo: “Soko bolingi kotuna, bótuna naino, [bóya] mpe lisusu.” (Yisaya 21:12b) Mbala mosusu elobeli ‘bóya lisusu’ ezali komonisa kolandana ya ‘babutu’ ebele ezangi nsuka oyo ezali kozela Edome. To, lokola liloba yango ekoki mpe kobongolama na “kozonga,” mbala mosusu mosakoli azali kosɛnga ete Baedome oyo balingi kobika na likama oyo ekokómela libota yango, basengeli kobongola mitema mpe “kozonga” epai na Yehova. Ezala ndenge nini, mosɛnzɛli abyangi mpo na kotuna lisusu.
20. Mpo na nini litatoli oyo elobelami na Yisaya 21:11, 12, ezali na ntina mingi mpo na basaleli ya Yehova lelo?
20 Litatoli wana ya mokuse ezali na ntina mingi mpo na basaleli ya Yehova na mikolo na biso.e Toyebi ete bato bakɔti mosika na molili ya elimo mpe bazali mosika na Nzambe, ezalela yango ekomema kobebisama ya mokili oyo. (Baloma 13:12; 2 Bakolinti 4:4) Na eleko ya butu yango, mwa elikya moke oyo bato bakoki kopesa mpo na kimya mpe libateli ezali lokola mwa kongɛnga ya ntɔngɔ, mwa kongɛnga ya moke oyo ekolandana na eleko ya molili makasi. Kongɛnga ya ntɔngɔ ya solosolo ezali koya—kotana ya ntɔngɔ na Bokonzi ya Mbula Nkóto ya Klisto ntango akoyangela mabele. Kasi wana butu ezali naino, tosengeli kolanda litambwisi ya kelasi ya mosɛnzɛli mpe kozala na ekɛngɛ na elimo mpe kosakola na mpiko mpenza kobɛlɛma ya nsuka ya mokili oyo esili kobeba.—1 Batesaloniki 5:6.
Molili ekɔti na esobe
21. (a) Mbala mosusu lisano ya maloba oyo esalelami na elobeli “litatoli mpo na kotɛmɛla esobe” ezali nini? (b) Milɔngɔ ya mibali ya mobembo ya Dedana ezali banani?
21 Litatoli ya nsuka na Yisaya mokapo 21 elobeli “esobe.” Ebandi boye: “Litatoli mpo na [kotɛmɛla esobe, NW]: Na zamba na [esobe, NW] bokofanda, ɛ bibolo na Dedana, bozali kotambolana elongo.” (Yisaya 21:13) Na ntembe te, esobe oyo elobelami awa ezali mokili ya Alabia, mpamba te litatoli yango ezali kotánga bikólo mingi ya Alabia. Liloba oyo ebongolami na “esobe” ebongolamaka mbala mosusu na “mpokwa,” liloba oyo ekokani mwa moke na liloba ya Liebele. Bato mosusu bandimaka ete ezali lolenge ya kosala lisano ya maloba, lokola nde mpokwa moko ya molili—eleko moko ya mobulu—ezali pene ya kokitela etúká yango. Litatoli ebandi kolobela likambo oyo ezali kosalema na butu, milɔngɔ ya bato ya mobembo ya Dedana, oyo ezali moko ya bikólo minene na Alabia. Milɔngɔ ya bato yango ya mobembo bazali kolanda banzela ya kosala mombongo, longwa na esika moko ya esobe oyo mai ezali kino na esika mosusu ya esobe oyo mai ezali, bamemi bambuma na matiti oyo balambelaka, mayaka mpe biloko mosusu ya motuya. Kasi na vɛrsɛ yango, tozali komona bango basɛngisami kotika banzela oyo bato balekaka mingi mpe bazali kolekisa babutu na bisika ya kobombama. Mpo na nini?
22, 23. (a) Mokumba nini ya kilo elingi kokwea likoló na bikólo ya Alabia, mpe yango ekosala bango nini? (b) Etikali ntango boni mpasi yango eya, mpe nani akobimisa yango?
22 Yisaya alimboli ete: “Bóya na mai ntango bokutani na ye oyo azali na mposa ya mai. Ɛ bafandi na Tema, bózwana na mokimi na limpa oyo ezali mpo na ye. Mpamba te na ntina na mipanga bakimi, na ntina na mopanga oyo ebimi na libenga na yango, na ntina na litimbo oyo batalisi mpe na ntina na mpasi ya etumba.” (Yisaya 21:14, 15, NW) Ɛɛ, mokumba ya kilo ya etumba ekokwea likoló ya bikólo yango ya Alabia. Tema, oyo ezali na esika moko ya mai mingi mpenza na etúká yango, asengeli komema mai mpe mampa epai ya babola oyo babiki na etumba. Ntango nini mpasi yango ekoya?
23 Yisaya alobi lisusu ete: “[Yehova] alobi na ngai ete, Na [mbula moko lisusu, engebene bambula ya mosali oyo afutamaka, NW], nkembo nyonso na Kedala ekosuka, mpe baoyo bakotikala na babendi ya matimbo kati na bato ya makasi na bana ya Kedala bakozala bobele na motuya moke; mpo ete [Yehova], Nzambe na Yisalaele, alobi boye.” (Yisaya 21:16, 17) Kedala ezali ekólo monene mpenza mpe na bantango mosusu esalelamaka mpo na komonisa Alabia mobimba. Yehova azwi ekateli ete motángo ya babendi ya matimbo mpe mibali ya makasi na ekólo yango ekita kino bakotikala mwa moke mpenza. Ntango nini? “Na mbula moko,” kasi koleka te, ndenge moko mosali oyo bafutaka ye asalaka mosala kaka mpo na ntango oyo afutamaka mpo na yango. Eyebani mpenzampenza te ndenge maloba yango nyonso ekokisamaki. Bakonzi mibale ya Asulia—Salegone II na Saneheliba—balobaki ete bayangelaki Alabia. Ekoki kozala ete moko na bango abebisaki bikólo yango ya lolendo ya Alabia, ndenge yango esakolamaki.
24. Ndenge nini tokoki kondima ete esakweli ya Yisaya mpo na kotɛmɛla Alabia ekokisamaki?
24 Kasi, tokoki kondima mpenza ete esakweli yango ekokisamaki ndenge kaka elobelamaki. Eloko mosusu te endimisi yango makasi mpenza koleka maloba ya nsuka ya litatoli yango oyo elobi ete: “[Yehova], Nzambe na Yisalaele, alobi boye.” Na miso ya bato ya ntango ya Yisaya, emonani ete ekoki kosalema te ete Babilone azwa esika ya Asulia mpe na nsima abungisa bokonzi kaka na boumeli ya butu moko ya bisengo mpe ya makambo ya mbindo. Mpo na bango emonani mpe ete ekoki kosalema te ete Edome mboka ya nguya ayokana lisusu te to ete butu moko ya mikakatano mpe ya bozangi ekwela bikólo ya bozwi mingi ya Alabia. Kasi Yehova alobi ete yango ekosalema, mpe esalemi. Lelo oyo, Yehova azali koyebisa biso ete lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba ekobebisama nyɛɛ. Yango ezali kaka te likambo oyo ekoki kosalema, kasi ezali nde likambo oyo ekosalema mpenza. Yehova ye moko alobi yango!
25. Ndenge nini tokoki komekola mosɛnzɛli?
25 Yango wana, tiká ete tózala lokola mosɛnzɛli. Tiká ete tózala na ekɛngɛ, lokola nde batii biso na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli ya molai, mpo na kotala mosika elembo nyonso oyo ekoki komonisa likama oyo ezali koya. Tiká ete tósala elongo na kelasi ya mosɛnzɛli ya sembo, baklisto batikali bapakolami oyo bazali lelo na mabele. Tiká ete tóganga na mpiko nyonso elongo na bango makambo tozali komona—bilembo oyo ezali komonisa mpenza ete Klisto azali koyangela na likoló; ete etikali moke asukisa butu molai mpe ya molili oyo na boumeli na yango bato baboyi Nzambe, mpe na nsima akotanisa ntɔngɔ ya solosolo, yango nde Boyangeli ya Mbula Nkóto na paladiso awa na mabele!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na bantango mosusu bazalaki kobenga Sirise mokonzi ya Baperse ete “mokonzi ya Anshan”—Anshan ezalaki etúká to engumba moko ya Elama. Mbala mosusu Bayisalaele ya mikolo ya Yisaya—na ekeke ya mwambe L.T.B.—bayebaki nkombo Perse te, nzokande bayebaki Elama. Yango ekoki komonisa ntina oyo Yisaya atángi Elama awa na esika ya kotánga Perse.
b Banganga-mayele mingi ya Biblia bakanisaka ete elobeli “pakolá nguba” ezali komonisa momeseno ya basoda ya ntango ya kala ya kopakola mafuta na banguba na bango oyo esalemi na mposo ya nyama liboso ya kokenda etumba mpo soki babwakeli bango mbazi edenda mpe eleka pembeni. Atako ndimbola yango ekoki kozala bongo, kasi esengeli koyeba ete na butu oyo engumba yango ekweaki, bato ya Babilone bazwaki ata ntango te ya kobunda, kutu ezala ntango ya komibongisa mpo na etumba mpe kopakola banguba na bango mafuta ezalaki te.
c Esakweli ya Yisaya oyo etali kokwea ya Babilone elobeli makambo na bosikisiki, na yango bato mosusu oyo batyolaka Biblia balobi ete esakweli yango ekomamaki nsima wana makambo yango esilaki kosalema. Kasi, Franz Delitzsch, nganga-mayele ya lokota ya Liebele alobi ete, likanisi ya ndenge wana ebongi te soki tondimi ete mosakoli asengeli kopemama na Nzambe mpo na kosakola makambo bankama ya bambula liboso ete makambo yango esalema.
e Na boumeli ya mbula 59 banda zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebandaki kobima, ezalaki kotya vɛrsɛ ya Yisaya 21:11 likoló ya ezipeli na yango. Kaka vɛrsɛ wana ebimisaki mpe motó ya likambo ya lisolo ya nsuka oyo Charles T. Russell, prezida ya yambo ya la Société Watch Tower akomaki. (Talá elilingi na ngámbo na lobɔkɔ na yo ya mwasi.)
[Elilingi na lokasa 219]
‘Tólya, tómɛla’
[Elilingi na lokasa 220]
Mosɛnzɛli “agangaki lokola nkosi”
[Elilingi na lokasa 222]
“Natɛlɛmi kozanga kotika na ntango na moi, mpe . . . babutu nyonso”