Elónga ya nsuka ya Mikaele, Mokonzi Monene
“Na ntango yango, Mikaele, mokonzi monene, mobateli na bato na yo, akotɛlɛma.”—DANYELE 12:1.
1. Bakonzi mingi bamonisaki ezaleli nini liboso na boyangeli ya Jéhovah, mpe mpo na nini tokoki koloba ete mokonzi ya nord asalaki lolenge moko?
“JÉHOVAH azali nani ete nayoka monoko na ye mpe natika Yisraele kokenda?” (Exode 5:2) Wana ezalaki maloba na ntembe oyo Farao alobaki na Moize. Koboyáká kondima ete Jéhovah azali Nzambe oyo aleki monene, Farao azwaki ekateli ya kokanga Yisraele libela kati na boombo. Bakonzi mosusu mpe batyolaki Jéhovah na lolenge yango, bakisa mpe bakonzi oyo balobelami na esakweli ya Danyele. (Yisaya 36:13-20) Atako bongo, mokonzi ya nord alekisaki mpenza ndelo. Anzelu alobi ete: “[Akomitombola] mpe akomikumisa na koleka banzambe nyonso, mpe akoloba makambo na kokamwa na ntina na Nzambe ya banzambe. . . . Mpe akokanisa Nzambe ya batata na ye te, mpe oyo elingami na basi te; akokanisa nzambe mosusu te mpo ete akomitombola likoló na nyonso.”—Danyele 11:36, 37.
2, 3. Na lolenge nini mokonzi ya nord aboyaki “Nzambe ya batata na ye” mpo na kosambela “nzambe” mosusu?
2 Mpo na kokokisa maloba oyo ya esakweli, mokonzi ya nord atyolaki “Nzambe ya batata na ye” (to, “banzambe ba bankoko ba ye,” Liloba lya Nzambe), ezala banzambe ya bapakano ya Loma to la Trinité oyo esambelami na mangomba ya boklisto ya lokuta. Hitler asalelaki boklisto ya lokuta mpo na matomba na ye mpenza; kasi emonani lokola ete alingaki kokitanya yango na Lingomba ya sika, ya Allemagne. Mokitani na ye atombolaki mpenza losambo ya baoyo baboyi kondima ete Nzambe azali. Na motindo wana nde mokonzi ya nord amikómisaki ye moko nzambe, ‘na komitomboláká likoló na nyonso.’
3 Esakweli elandi boye: “Na esika na ye, akokumisa nzambe ya bibombelo na nguya; mpe nzambe oyo batata na ye bayebaki te, akokumisa ye na wolo, na palata, mpe na mabanga [ya ntalo, mpe na biloko kitoko].” (Danyele 11:38) Na yango, mokonzi ya nord atyaki motema na ye kati na bibundeli ya basodá oyo bisalemi na bato ya sianse ya eleko na biso, yango nde “nzambe ya bibombelo na nguya.” Na boumeli nyonso ya ntango ya nsuka, alukaki lobiko epai na “nzambe” wana, na kopesáká ebele na bozwi na etumbelo na ye.
4. Elónga nini mokonzi ya nord azwaki?
4 “Mpe akobunda na nguya na bibombelo bileki makasi, na lisungi ya nzambe mopaya. Moto nani akondima ye, akopesa moto yango lokumu, mpe akozalisa ye mokonzi likoló na bato mingi; mpe akokabola mabelé mpo na lifuti.” (Danyele 11:39, NW) Kotyáká motema epai na “nzambe mopaya,” mampinga na ye, mokonzi ya nord ‘abundaki na nguya,’ komonisáká ete azali nguya monene na basodá na “mikolo ya nsuka.” (2 Timoté 3:1) Baoyo bandimaki makanisi na ye bazwaki mbano na motindo ya lisungi kati na makambo ya politike, ya nkita, mbala mosusu mpe na basodá.
“Na ntango ya nsuka”
5, 6. Lolenge nini mokonzi ya sud asalelaki mokonzi ya nord etumba “na matumoli,” mpe lolenge nini mokonzi ya nord asalaki?
5 Totangi na Danyele 11:40a (NW) ete: “Na ntango ya nsuka, mokonzi na mikili ya ngɛlɛ [mokonzi ya sud] akosalela ye etumba na matumoli.” Basusu balobaki ete verset oyo mpe oyo elandi, na kotalela eleko na biso, ekokokana nde na mikolo mizali koya. Nzokande, soki awa “ntango ya nsuka” ezali na ndimbola moko na oyo ezwami na Danyele 12:4, 9, boye tosengeli koluka kokokana ya maloba yango na boumeli ya mikolo ya nsuka. Mokonzi ya sud asili kobundisa mokonzi ya nord na “matumoli” na boumeli ya eleko oyo? Ee, ezali bongo! Nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mibeko mpo na kimya oyo batyaki likoló na mikili oyo milongaki te, ezalaki mpenza “matumoli” oyo mapusaki bango na koluka kozongisa mabe. Nsima na kolónga na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mokonzi ya sud atalisaki bibundeli ya nsɔmɔ ya nikleere epai na monguna na ye mpe atyaki limpinga na basodá ya nguya oyo babéngaki OTAN, mpo na kobundisa ye. Nsima ya bambula, “matumoli” na ye masangisaki mpe mosala ya konɔnga oyo mosalemi na nzela na bamasini na kokamwa, bakisa mpe matumoli na makambo ya politike mpe na makambo matali basodá.
6 Lolenge nini mokonzi ya nord asalaki? “Mokonzi na mikili ya likoló [mokonzi ya nord] akokwela ye lokola mopepe makasi, na makálo mpe bamati na mpunda mpe na masuwa mingi; mpe akokɔta na mikili mpe akopalangana mpe akoleka na kati.” (Danyele 11:40b) Lisoló ya bato na mikolo ya nsuka limonisi mpenza lolenge nini mokonzi ya nord alukaki ete mikili misusu milanda ye kati na politike na ye. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, “mokonzi” ya Nazi akamataki mikili mizalaki zingazinga na mokili na ye na nzela na bitumba. Na nsuka ya etumba wana, “mokonzi” mokitani na ye atongaki bokonzi moko ya nguya kino koleka bandelo ya mokili na ye. Na boumeli ya la guerre froide, mokonzi ya nord abundisaki monguna na ye na nzela ya mikili misusu, na ntango ya matáta mpe botomboki na Afrika, na Azia, mpe na Amérique Latine. Anyokolaki baklisto ya solo, apekisaki mosala na bango kasi akokaki kosukisa yango te. Akamataki mikili mingi na nzela na bibundeli mpe na politike. Ezali yango nde esakolamaki mpenza na anzelu, ete: “Ye akokɔta na mokili Moleki Kitoko [efandelo ya elimo ya libota ya Nzambe], mpe mikili mingi mikokwea.”—Danyele 11:41a, NW.
7. Mokonzi ya nord apalanganisaki bokonzi na ye kino na ndelo nini?
7 Kasi, ata soki—na makanisi ya monguna na ye—mokonzi ya nord azalaki likámá monene, nzokande alóngaki te koyangela mokili mobimba. “Baoyo bakobika na lobɔkɔ na ye, Edome mpe Moaba mpe litika ya Baamona.” (Danyele 11:41b) Na ntango ya kala, Edome, Moaba, mpe Amona ezalaki pene na katikati ya Ezipito mpe Sulia. Yango ekoki komonisa bikólo mpe masangá ya lelo oyo mokonzi ya nord abundisaki mingi na mokano ete akamata yango, kasi alóngaki yango te.
“Ezipito ekokima te”
8, 9. Lolenge nini bopusi ya mokonzi ya nord emonisamaki, ata likoló na monguna na ye?
8 Anzelu alandi koloba ete: “Ye akosembola lobɔkɔ na ye likoló na mikili misusu; mpe mokili ya Ezipito ekokima te. Ye akozala na nguya na likoló na biloko na motuya na wolo mpe na palata, mpe na biloko kitoko nyonso ya Ezipito. Mpe Balibyé mpe Baetiopia bakolanda ye.” (Danyele 11:42, 43) Ata mokonzi ya sud, “Ezipito,” akimaki te bopusi ya politike ya mokonzi ya nord oyo epalanganaki mingi. Na ndakisa, akweaki mpenza na mboka Viêt Nam. Kasi ezali boni mpo na “Balibyé mpe Baetiopia”? Bikólo wana ya zingazinga na Ezipito ya kala bimonisi mbala mosusu bikólo oyo bizali zingazinga na “Ezipito” ya lelo, mpe oyo, na bantango mosusu ‘bilandaki’ mokonzi ya nord.
9 Mokonzi ya nord asili ‘koyangela likoló na biloko na motuya ya Ezipito’? Ya solo, alóngaki mokonzi ya sud te, mpe kino na 1993, makambo mazali koleka na mokili mamonisi lokola ete likambo yango likoki kosalema te. Nzokande, mokonzi ya nord azalaki na bopusi makasi likoló na lolenge oyo mokonzi ya sud asalelaki misolo na ye. Mpo na bobangi azali na yango na ntina na monguna na ye, mokonzi ya sud azali kopesa ebele na mosolo mbula na mbula mpo na kokembisa mampinga na basodá oyo bakobundaka na mabelé, na likoló mpe na mai. Ezali motindo wana nde tokoki koloba ete mokonzi ya nord asili ‘koyangela’ lolenge oyo mokonzi ya sud azali kosalela misolo na ye.
Etumba ya nsuka ya mokonzi ya nord
10. Lolenge nini anzelu amonisi nsuka ya kowelana kati na bakonzi oyo mibale?
10 Kowelana kati na mikonzi wana mibale ekolandana libela na libela? Bongo te. Anzelu alobaki na Danyele ete: “Nsango longwa na ebimelo na ntango mpe na mikili ya likoló ekobangisa ye [mokonzi ya nord], mpe akobima na nkɛlɛ monene mpo na koboma [ebele na bato] mpe kobebisa nyee. Mpe akotɛmisa hema na ye minene kati na mai monene mpe na ngomba kitoko ya bulee; mpe akokóma na nsuka na ye, mpe moto akosunga ye te.”—Danyele 11:44, 45.
11, 12. Makambo nini mauti kosalema kala mingi te, oyo mazali na boyokani na kowelana kati na mokonzi ya nord mpe mokonzi ya sud, mpe makambo nini tokoyekola lisusu?
11 Makambo oyo mazali mpo na ntango ezali koya; na yango, tokoki te kolimbola mpenza lolenge nini esakweli oyo ekokokana. Kala mingi te, ezalela ya politike ya bakonzi mibale wana esilaki kobongwana. Kowelana monene kati na Etats-Unis mpe mikili ya Europe de l’Est, esili kokita. Lisusu, Union soviétique ekweaki na 1991 mpe ezali lisusu te.—Tala Mosenzeli ya le 1er Mars 1992, nkasa 4, 5.
12 Na yango, nani azali lelo mokonzi ya nord? Ezali moko na bamboka oyo ezalaki kala kati na Union soviétique? To asili mpenza kobongwana, lokola asili kosala yango mbala mingi? Toyebi te. Nani akozala mokonzi ya nord na ntango Danyele 11:44, 45 ekokokana? Kowelana kati na mikonzi mibale oyo ekobima lisusu? Nini ekokómela ebele na bibundeli ya nikleere oyo mikili mingi mizali naino kobomba yango? Ntango ezali koya nde ekoyanola na mituna oyo.
13, 14. Makambo nini toyebi na ntina na bakonzi oyo mibale mpo na mikolo mizali koya?
13 Ezali na likambo moko oyo toyebi yango. Mosika te, mokonzi ya nord akobima mpo na etumba moko monene nsima na koyoka “nsango longwa na ebimelo na ntango mpe na mikili na likoló [oyo] ekobangisa ye.” Etumba yango ekobima nokinoki liboso ya “nsuka” na ye. Tokoki koyekola makambo mingi likoló na “nsango” yango na kotaleláká bisakweli mosusu ya Biblia.
14 Libosoliboso, toyeba ete awa mokonzi ya nord azali kobundisa mokonzi ya sud te. Akokóma te kino nsuka na ye mpo na monguna na ye monene. Bobele bongo, mokonzi ya sud abomami te na mokonzi ya nord. Mokonzi ya sud (oyo amonisami kati na bisakweli mosusu na liseké ya nsuka oyo libimi na motó ya nyama na yauli) abomami na “mabɔkɔ [na moto] te” nde na nzela na Bokonzi ya Nzambe. (Danyele 7:26; 8:25) Ya solo, na nsuka, bakonzi nyonso na mokili bakobomama na nzela ya Bokonzi ya Nzambe, na etumba ya Armagedon, mpe ezali yango nde ekokómela mokonzi ya nord. (Danyele 2:44; 12:1; Emoniseli 16:14, 16) Danyele 11:44, 45 emonisi makambo oyo makomema kino na etumba wana ya nsuka. Ntango mokonzi ya nord akokóma na nsuka na ye, ezali likambo ya kokamwa te ete “moto akosunga ye te.”
15. Mituna nini ya ntina mingi oyo tosengeli kotalela yango lisusu?
15 Bisakweli nini mosusu oyo bikoki kosalisa biso na kososola “nsango” oyo ekopusa mokonzi ya nord na “koboma ebele na bato”? Mpe banani “ebele na bato” oyo ye akolinga koboma?
Nsango longwa na ebimelo na ntango
16. (a) Likambo nini monene lisengeli kobima liboso ya Armagedon? (b) Banani bazali “bakonzi oyo balongwi na ebimelo ya ntango”?
16 Liboso na etumba ya nsuka, Armagedon, monguna monene ya losambo ya solo akobomama—ye Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba oyo akokanisami na mwasi na pite. (Emoniseli 18:3-8) Kobomama wana emonisamaki na likambo oyo ete mbeki ya motoba ya nkanda na Nzambe, esopamaki likoló na ebale Efrate ya elilingi. Ebale “ekauki ete nzela ebongisama mpo na bakonzi balongwi na ebimelo na ntango.” (Emoniseli 16:12) Bakonzi yango ezali banani? Mosusu te, bobele Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto!a
17. (a) Biblia eyebisi biso nini na ntina na kobomama ya Babilone Monene? (b) Nsango “longwa na mikili ya likoló” ezali komonisa nini?
17 Kobomama ya Babilone Monene emonisami na lolenge ya nsɔmɔ kati na mokanda ya Emoniseli, ete: “Maseké zomi mamonaki yo [‘mikonzi’ oyo mizali koyangela na ntango ya nsuka] mpe nyama na yauli [nyama na yauli na langi motane oyo emonisami na O.N.U.], bakoyina mwasi na pite, bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu, mpe bakolya misuni na ye, mpe bakotumba ye na mɔ́tɔ.” (Emoniseli 17:16) Ya solo, mabota mazali ‘koboma bato mingi’! (Danyele 7:5) Kasi mpo na nini bayangeli, kati na bango mpe mokonzi ya nord azali, bakoboma Babilone Monene? Mpo ete ‘Nzambe atii kati na mitema na bango ete basala mokano na ye.’ (Emoniseli 17:17) Nsango “longwa na ebimelo na ntango” ekoki mpenza kozala mosala wana ya Jéhovah, oyo na nzela na yango akotya kati na mitema ya bakonzi likanisi ya koboma mwasi wana na pite na losambo, engebene mwango mosili ye kopona.—Danyele 11:44.
Nsango longwa na mikili ya likoló (nord)
18. Esika nini mosusu oyo mokonzi ya nord azali kobundisa, mpe epai wapi tokoki komona ye na ntango akómi na nsuka na ye?
18 Kasi nkanda ya mokonzi ya nord ezali kongala mpe epai mosusu. Anzelu alobi ete “akotɛmisa hema na ye minene katikati na mai monene mpe ngomba kitoko na bulee.” (Danyele 11:45) Na mikolo ya Danyele, mai monene ezalaki mai ya Méditerranée, mpe ngomba na bulee ezalaki Siona, epai tempelo ya Nzambe ezalaki kala. Na yango, na kokokana ya esakweli oyo, na nkanda na ye, mokonzi ya nord akokamba basodá mpo na kobundisa nde libota ya Nzambe! Na ndimbola ya elimo, lelo, “katikati na mai monene mpe ngomba na bulee” elakisi ete mokonzi ya nord asili kokɔta kati na efandelo ya elimo ya basaleli ya Nzambe oyo bapakolami na elimo, baoyo babimaki na “mai monene” (oyo emonisi bato nyonso batangwi mosika na Nzambe) mpe bazali na elikya ya koyangela elongo na Yesu Klisto na ngomba Siona na likoló.—Yisaya 57:20; Baebele 12:22; Emoniseli 14:1.
19. Lokola emonisami na esakweli ya Ezekiele, lolenge nini tokoki koyeba eutelo ya nsango oyo ekobimisa etumba ya Gog? (Tala note na nsé.)
19 Ezekiele, mosakoli oyo azalaki na bomoi na eleko moko na Danyele, asakolaki lisusu lolenge libota ya Nzambe likobundisama “na eleko ya mikolo ya nsuka.” Alobaki ete etumba yango ekobimisama na Gog moto na Magog, oyo elakisi Satan le Diable. (Ezekiele 38:16) Gog auti na esika nini ya elilingi? Jéhovah alobi na nzela ya Ezekiele, ete: “Okolongwa na esika na yo, na nsuka na mokili epai na likoló.” (Ezekiele 38:15) Na bongo, nsango ‘longwa epai na likoló’ ekoki mpenza kozala propagande ya Satana mpo na kopusa mokonzi ya nord mpe mikonzi misusu ete babundisa libota ya Jéhovah.b—Tala Emoniseli 16:13, 14; 17:14.
20, 21. (a) Mpo na nini Gog akopusa mabota, kati na yango mokonzi ya nord, mpo na kobundisa libota ya Nzambe? (b) Akolónga na etumba na ye?
20 Gog abongisi etumba wana makasi mpo ete amoni bomɛngo bozali epai na “Yisraele ya Nzambe” oyo, elongo na ebele monene ya bampate mosusu, basangani lisusu na mokili te. (Bagalatia 6:16; Yoane 10:16; 17:15, 16; 1 Yoane 5:19) Gog azali na likunya epai na “bato oyo balongwaki na mabota, baoyo bazwi misolo mpe bozwi [ya elimo].” (Ezekiele 38:12; Emoniseli 5:9; 7:9) Na kokokisama ya maloba oyo, libota ya Jéhovah lizali lelo na bomɛngo mingi koleka liboso. Na mikili mingi ya Mpótó, ya Afrika, mpe ya Azia epai losambo na bango lopekisamaki, bazali lelo kosambela Nzambe na bonsomi nyonso. Longwa na mobu 1987 kino mobu 1992, koleka milió moko ya “biloko kitoko” bisili kobima na mabota mpo na kokenda na ndako ya Jéhovah, epai losambo ya solo lozali kosalema. Na ndimbola ya elimo, bazali bazwi mpe bazali na kimya.—Agai 2:7; Yisaya 2:2-4; 2 Bakolinti 8:9.
21 Kotaleláká ezalela ya elimo ya baklisto lokola “mokili oyo mboka na yango ezali na bifélo te,” oyo ebongi na kokamatama, Gog akosala na makasi nyonso mpo na kolongola nkaká wana ete ayangela bato nyonso. (Ezekiele 38:11) Kasi akolónga te. Ntango bakonzi ya mokili bakobundisa libota ya Jéhovah, ‘bakokóma na nsuka na bango.’ Lolenge nini?
Mokonzi ya misato
22, 23. Wana Gog akobimisa etumba, nani akokɔtɛla libota ya Nzambe, mpe yango ekobimisa makambo nini?
22 Ezekiele alobi ete etumba oyo Gog akobimisa ezali elembo mpo ete Jéhovah Nzambe akɔtɛla libota na ye mpe aboma mampinga ya Gog “likoló na ngomba ya Yisraele.” (Ezekiele 38:18; 39:4) Yango ezali kokundwela biso makambo oyo anzelu alobaki na Danyele, ete: “Na ntango yango, Mikaele, mokonzi monene, mobateli ya bato na yo, akotɛlɛma; mpe ntango na bolózi ekozala, lokola ezalaki te longwa na ebandeli ya mabota kino ntango yango; nde na ntango yango, bato na yo bakobikisama, moto na moto oyo akomami na mokanda.”—Danyele 12:1.
23 Na 1914, Yesu—Mikaele, mobundi na likoló—akómaki Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló. (Emoniseli 11:15; 12:7-9) Uta ntango wana, azali ‘kobatela bato na libota ya Danyele.’ Nzokande, mosika te “akotɛlɛma” na nkombo ya Jéhovah lokola Mokonzi-Mobundi oyo akolóngama te, mpe “akobukanisa likoló na baoyo bayebi Nzambe te mpe likoló na baoyo baboyi kotósa nsango malamu na ntina na Yesu, Nkolo na biso.” (2 Batesaloniki 1:8) Mabota nyonso ya mokili, kati na yango bakonzi balobelami na esakweli ya Danyele, “bakolela.” (Matai 24:30) Ezali bango na makanisi mabe kati na mitema na ntina na ‘libota ya Danyele,’ bakokufa mpo na libela na mabɔkɔ ya “Mikaele, mokonzi monene.”—Emoniseli 19:11-21.
24. Boyekoli oyo ya bisakweli ya Danyele esengeli kozala na bopusi nini likoló na biso?
24 Tolingi mpenza komona elónga monene ya Mikaele mpe ya Jéhovah, Nzambe na ye, boye te? Na yango, elónga wana ekolimbola ‘kobikisama’ mpo na baklisto ya solo. (Tala Malaki 4:1-3.) Na bongo, awa ezali biso kotalela mikolo mizali koya na motema likoló, tomikundola toli oyo ya ntoma Paulo, ete: “Osakola liloba. Sala yango na etingya nyonso na eleko malamu mpe na eleko na mpasi.” (2 Timoté 4:2, NW) Tókangama na Liloba ya bomoi mpe tóluka bampate ya Jéhovah na molende awa eleko malamu ezali naino. Tozali na nsuka kati na emekaneli na mbango mpo na bomoi. Etikali moke mpo na kozwa mbano. Tika ete biso banso tozwa ekateli ya koyika mpiko kino nsuka, mpe bongo kozala kati na baoyo bakobika.—Matai 24:13; Baebele 12:1.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! oyo ebimisamaki na la Société Watchtower, nkasa 229-230.
b Epai mosusu, nsango ‘longwa epai na likoló’ ekoki kouta epai na Jéhovah, mpamba te alobaki na Gog, ete: “Nakotya ndɔbɔ na mbangá na yo, mpe nakobimisa yo.” “Nakobimisa yo na nsuka epai na likoló, mpe nakokamba yo likoló na ngomba ya Yisraele.”—Ezekiele 38:4; 39:2; tala Nzembo 48:2.
Osimbi malamu?
◻ Lolenge nini mokonzi ya sud abundisaki mokonzi ya nord na boumeli ya ntango ya nsuka?
◻ Makambo nini tosengeli koyekola lisusu na ntina na kowelana oyo ezali kati na bakonzi wana mibale?
◻ Makambo mibale nini oyo mokonzi ya nord akosangana na yango liboso ya Armagedon?
◻ Lolenge nini ‘Mikaele, mokonzi monene,’ akobatela libota ya Nzambe?
◻ Boyekoli na biso likoló na bisakweli ya Danyele esengeli kozala na bopusi nini likoló na biso?
Na likoló, na lobɔkɔ ya mwasi mpe na ntéi: UPI⁄Bettmann; na nsé, na lobɔkɔ ya mwasi: Reuters/Bettmann; na nsé, na lobɔkɔ ya mobali: Jasmin/Gamma Liaison
[Bililingi na lokasa 19]
Mokonzi ya nord asambelaki nzambe oyo akeseni na banzambe ya bankoko na ye
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Top left and middle: UPI/Bettmann; bottom left: Reuters/Bettmann; bottom right: Jasmin/Gamma Liaison