Mikolo na bisakweli ya Danyele mpe kondima na biso
“Esengo na ye oyo azali kozela mpe oyo akokóma kino na mikolo nkóto moko na nkámá misato na ntuku misato na mitano!”—DANYELE 12:12.
1. Mpo na nini bato mingi bazali kokoka te kozwa esengo ya solo, mpe nini esengeli mpo na kozala na esengo?
MOTO nyonso alingaka kozala na esengo. Kasi, lelo oyo, bobele bato moke nde bazali na esengo. Mpo na nini? Ezali mpo ete mingi bazali koluka esengo epai yango ekoki kozwama te. Esengo ezali kolukama kati na makambo lokola kotanga kelasi, bozwi, mosala to bokonzi. Nzokande, na ebandeli ya Lisoló na ye likoló na Ngomba, Yesu alobaki ete mpo na kozala na esengo esengeli komibanzabanza na bamposa na yo ya elimo, kozala moto na motema mawa mpe kozala na motema peto, mpe bizaleli mosusu ya lolenge wana. (Matai 5:3-10, NW) Yesu alobelaki esengo ya solo, esengo oyo ekoumelaka.
2. Engebene bisakweli, nini esengelaki komema esengo na ntango ya nsuka, mpe mituna nini mitunami na ntina na yango?
2 Mpo na batikali oyo bazali kobika na ntango ya nsuka, esengo etaleli eloko mosusu eleki na ntina mingi. Kati na mokanda ya Danyele, tozali kotanga ete: “Kenda na yo, Danyele, mpo ete maloba yango mabombami mpe makangami kino ntango ya nsuka. Esengo na ye oyo azali kozela mpe oyo akokóma kino na mikolo nkóto moko na nkámá misato na ntuku misato na mitano!” (Danyele 12:9, 12) Mikolo 1 335 mikokani na eleko nini na Lisoló ya bato? Mpo na nini baoyo bazalaki na bomoi na eleko wana bazalaki na esengo? Yango ezali lelo na boyokani na kondima na biso? Tokozwa lisalisi mpo na koyanola na mituna oyo soki totaleli eleko oyo Danyele akomaki maloba oyo, mwa moke nsima na mbula ya misato ya Siruse, mokonzi ya Pelese, wana Bayisraele basikwamaki na boombo na Babilone.—Danyele 10:1.
Botongi ya sika epesi esengo
3. Likambo nini lisalemaki na mokonzi Siruse na mobu 537 L.T.B., oyo epesaki esengo monene epai na Bayuda ya sembo, kasi mokumba nini oyo Siruse apesaki na Bayuda te?
3 Mpo na Bayuda, kosikwama na boombo na Babilone ezalaki likambo ya esengo monene. Nsima wana Bayuda bayikaki mpiko na boumeli ya mibu 70 ya boombo, Siruse Monene asɛngaki bango ete bazonga na Yelusaleme mpo na kotonga lisusu tempelo ya Jéhovah. (Esdrase 1:1, 2) Baoyo bandimaki libyangi wana bakendaki na elikya nyonso, mpe bakómaki na mokili na bango na mobu 537 L.T.B. Atako bongo, Siruse asɛngaki bango te ete basala lisusu bokonzi oyo mokitani ya mokonzi Davidi akoyangela.
4, 5. (a) Ntango nini bokonzi ya libota ya Davidi ekweisamaki? Mpo na nini? (b) Elikya nini Jéhovah apesaki ete bokonzi ya Davidi ekozongisama?
4 Likambo yango ezalaki na ntina monene. Pene na bikeke mitano liboso, Jéhovah alakaki Davidi ete: “Libota na yo mpe bokonzi na yo ekoumela libela liboso na yo; kiti na yo ya bokonzi ekotyama mpo na seko.” (2 Samwele 7:16, NW) Na mawa nyonso, mingi na bakitani na bokonzi ya Davidi bazalaki batomboki, mpe mabe ya libota wana ekómaki mingi mpenza kino ete na 607 L.T.B., Jéhovah apesaki nzela ete bokonzi ya Davidi ekweisama. Longola bobele na eleko ya ba Maccabées (bakambi mosusu ya Bayuda), uta ntango wana, Yelusaleme eyangelamaki na bapaya kino kobomama na yango ya mibale, na mobu 70 T.B. Bongo, na mobu 537 L.T.B., “ntango ya mabota,” oyo na boumeli na yango mwana moko te ya Davidi asengelaki koyangela lokola mokonzi, ezalaki sé kolandana.—Luka 21:24.
5 Atako bongo, Jéhovah abosanaki te elaká oyo apesaki na Davidi. Na nzela ya ebele ya bimonaneli mpe bandoto oyo apesaki na mosakoli na ye Danyele, amonisaki mpenza makambo masengelaki kobima na mokili na boumeli ya bikeke, kobanda na eleko ya boyangeli ya Babilone likoló ya mokili mobimba kino na ntango oyo mokonzi moko na libota ya Davidi akoyangela lisusu likoló na basaleli ya Jéhovah. Bisakweli wana, oyo bizwami na Danyele mikapo 2, 7, 8, mpe 10 kino 12, bindimisaki Bayuda ya sembo ete, mokolo mosusu, kiti na bokonzi ya Davidi “ekotyama mpo na seko.” Na ntembe te, solo oyo emonisamaki epesaki esengo mingi mpenza epai na Bayuda oyo bazongaki na mokili na bango na mobu 537 L.T.B.!
6. Lolenge nini toyebi ete bisakweli mosusu ya Danyele bisengelaki kokokana na eleko na biso?
6 Balimboli mingi ya Biblia balobaka ete bisakweli ya Danyele bikokanaki nyonso liboso na kobotama na Yesu Klisto. Kasi emonani polele ete ezali bongo te. Na Danyele 12:4 (NW), anzelu alobaki na Danyele ete: “Bombá maloba oyo mpe kangá mokanda, kino na ntango ya nsuka. Mingi bakokende epai na epai, mpe boyebi ya solo ekoyikana.” Soki mokanda ya Danyele mosengelaki kofungolama—elingi koloba soki ndimbola na yango esengelaki komonisama polele—bobele na ntango ya nsuka, na ntembe te, ndambo na bisakweli yango bitalelaki eleko wana.—Tala Danyele 2:28; 8:17; 10:14.
7. (a) Ntango ya mabota esukaki na eleko nini, mpe motuna nini esengelaki koyanolama nokinoki? (b) Banani bakokaki te kozala “moombo na sembo mpe na mayele”?
7 Na 1914, ntango ya mabota esukaki, mpe ntango ya nsuka ebandaki mpo na mokili oyo. Bokonzi ya Davidi etyamaki lisusu na Yelusaleme ya mabelé te, kasi na kozanga komonana, kati “na mapata na makoló.” (Danyele 7:13, 14) Lokola na eleko wana “matiti mabe” ya boklisto ya kopɛngwa esilaki kokóla mingi, ezalela ya boklisto ya solo ezalaki polele te kati na makanisi ya bato. Atako bongo, motuna moko monene mosengelaki koyanolama: “Nani azali mpenza moombo na sembo mpe na mayele?” (Matai 13:24-30; 24:45) Awa na mabelé, nani asengelaki komonisa Bokonzi ya Davidi oyo botyamaki lisusu? Ezalaki Bayuda te, bandeko ya Danyele na mosuni. Bango baboyamaki mpo ete bazangaki kondima mpe ‘batutaki libaku na ntina’ na Masiya. (Baloma 9:31-33) Moombo na sembo akokaki kozala soko moke te kati na masangá ya boklisto ya lokuta! Misala na bango mabe mimonisaki mpenza ete Yesu ayebaki bango te. (Matai 7:21-23) Moombo yango azalaki nani?
8. Banani bamonani ete bazali “moombo na sembo mpe na mayele” na ntango oyo ya nsuka? Lolenge nini toyebi yango?
8 Na ntembe te, ezalaki etuluku moke ya bandeko na Yesu baoyo, na 1914, bayebanaki na nkombo Bayekoli ya Biblia, kasi kobanda 1931, bazwaki nkombo Témoins de Jéhovah. (Yisaya 43:10) Bobele bango nde basakolaki ete Bokonzi na libota ya Davidi esili kotyama lisusu. (Matai 24:14) Bobele bango nde bakabwanaki na mokili mpe bayebisaki nkombo ya Jéhovah. (Yoane 17:6, 14) Mpe bobele likoló na bango nde bisakweli ya Biblia bitaleli libota ya Nzambe na mikolo ya nsuka bizali kokokana. Kati na bisakweli yango, ezali na molɔngɔ́ ya bileko ya bisakweli oyo biyebisami na Danyele mokapo 12, kati na yango, mikolo 1 335 oyo misengelaki komema esengo.
Mikolo 1 260
9, 10. Makambo nini masengelaki kobima na boumeli ya “ntango moko mpe ntango mibale mpe ndambo na ntango” ya Danyele 7:25, mpe kati na mikapo nini mosusu ya Biblia balobeli eleko yango moko?
9 Na Danyele 12:7, tozali kotanga na ntina na eleko na esakweli ya liboso, ete: “Ekozala mpo na ntango moko mpe ntango mibale mpe ndambo na ntango, mpe wana ekosila bango kobuka nguya ya libota na bulee, makambo oyo nyonso makosila.”a Eleko yango elobelami mpe na Emoniseli 11:3-6, oyo elobi ete batemwe ya Nzambe bakosakola wana elati bango ngɔ́tɔ na boumeli ya mbula misato na ndambo, na nsima, bakobomama. Lisusu, na Danyele 7:25 (NW), tozali kotanga ete: “Ye akoloba mabe na ntina na Oyo-Aleki-Likoló, mpe akonyokola basantu ya Oyo-Aleki-Monene. Mpe akokanisa kobongola ntango mpe mibeko, mpe bango bakopesama na lobɔkɔ na ye mpo na ntango moko, mpe ntango mibale, mpe ndambo na ntango.”
10 Kati na esakweli oyo, liloba “ye” elakisi nguya ya mitano ya mokili mobimba kobanda na Babilone. Ezalaki “liseké moke” oyo, na boumeli ya eleko na koyangela na yango nde Mwana na moto azwaki “boyangeli mpe lokumu mpe bokonzi.” (Danyele 7:8, 14, NW) Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, liseké wana ya elilingi, oyo ebandaki na Boyangeli ya Grande-Bretagne, ekómaki na nsima nguya mibale esangani oyo babéngi Anglo-Américaine, oyo ekambami lelo na Etats-Unis. Nguya wana ya mokili mobimba esengelaki konyokola basantu na boumeli ya ntango (mbula) misato na ndambo, mpe komeka kobongola ntango mpe mibeko. Na nsuka, basantu basengelaki kopesama na lobɔkɔ na ye.—Tala mpe Emoniseli 13:5, 7.
11, 12. Makambo nini mabandisaki mikolo 1 260 ya esakweli?
11 Ndenge nini bisakweli wana nyonso bikokanaki? Na boumeli ya bambula oyo ezalaki liboso ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bandeko na Yesu bapakolami basakolaki polele ete 1914 ekozala nsuka ya ntango ya mabota. Wana etumba ebimaki, emonanaki ete bato balandaki likebisi yango te. Satana asalelaki “nyama na yauli” na ye, lisangá ya politike ya mokili mobimba oyo ezalaki naino kokambama na boyangeli ya Grande-Bretagne, mpo na komeka “kobongola ntango mpe mibeko,” mpo na kopusa mosika eleko oyo Bokonzi ya Nzambe esengelaki koyangela. (Emoniseli 13:1, 2) Satana alóngaki te. Bokonzi ya Nzambe etyamaki na likoló, esika bato bakoki kokóma te.—Emoniseli 12:1-3.
12 Mpo na Bayekoli ya Biblia, etumba ekómaki ntango ya komekama. Kobanda Janvier 1914, bazalaki kolakisa Photo-Drame de la création, bililingi bimonisi makambo na Biblia oyo ezalaki kobenda likebi likoló na bisakweli ya Danyele. Na eleko ya molungé, etumba ebimaki epai na mikili ya Nord. Na Octobre, ntango ya mabota esukaki. Wana mbula ezalaki kokóma na nsuka na yango, batikali bapakolami bazalaki komizela na minyoko, lokola emonisami na koponama ya texte mpo na mobu 1915; ezalaki motuna oyo Yesu atunaki na bayekoli na ye, ete: “Bokoki [nde] komela kɔpɔ na ngai?” oyo ezwami na Matai 20:22, King James Version.
13. Na ndimbola nini Bayekoli ya Biblia basakolaki wana elataki bango ngɔ́tɔ na boumeli ya mikolo 1 260, mpe nini esalemaki na nsuka ya eleko yango?
13 Na yango, uta Décembre 1914, etuluku yango moke ya batemwe ‘esakolaki wana balataki ngɔ́tɔ,’ koyikáká mpiko na komikitisa nyonso, wana ezalaki bango koyebisa bikateli ya Jéhovah. Na 1916, mingi baokaki mpasi mpenza mpo na liwa ya Charles Russell, prezidá wa yambo wa la Société Watch Tower. Wana etumba ezalaki kopalangana, baklisto ya solo bazalaki kokutana na botɛmɛli mingi. Basusu batyamaki na bolɔkɔ. Bato lokola Frank Platt, na Angleterre mpe Robert Clegg, na Canada, banyokwamaki na bakonzi mabe. Na nsuka, na le 21 Juin 1918, Joseph Rutherford, prezidá ya sika, mpe bakambi mosusu ya la Société Watch Tower, bakweisamaki mpo na kozwa etumbu ya bolɔkɔ na ntina na bifundeli ya lokuta. Na lolenge wana nde, na nsuka na eleko oyo ya esakweli, “liseké moke” libomaki mosala ya kosakola polele oyo esilaki kobongisama.—Danyele 7:8.
14. Na 1919, lolenge nini makambo mabongwanaki mpo na batikali bapakolami?
14 Mokanda ya Emoniseli esakoli makambo malandaki. Na nsima na eleko wana ya kozanga kosala mosala—mikolo misato na ndambo oyo na boumeli na yango emonisamaki ete bibembe ya basakoli bilali na balabala—batikali bapakolami bazongaki na bomoi mpe bakómaki lisusu na molende. (Emoniseli 11:11-13) Na le 26 Mars 1919, prezidá mpe bakambi mosusu ya la Société Watch Tower babimisamaki na bolɔkɔ mpe, na nsima, balongolaki bifundeli ya lokuta likoló na bango. Nokinoki nsima na kobima na bango, batikali bapakolami bamibongisaki lisusu mpo na mosala. Na bongo, mpo na kokokana na mawa ya liboso oyo elobelami na Emoniseli, babimaki na libulu ya kozanga kosala mosala lokola mayoyo ya elimo, elongo na mólinga monene, oyo esakoli mikolo mabe mizali koya mpo na mangomba ya lokuta. (Emoniseli 9:1-11) Na boumeli ya bambula oyo elandaki, baklisto wana baleisamaki na elimo mpe babongisamaki mpo na mosala oyo mozalaki kozela bango. Na 1921, babimisaki mokanda ya sika, La Harpe de Dieu mpo na kosalisa bato ya sika mpe bana ete bakanga ntina na mateya ya moboko ya Biblia. (Emoniseli 12:6, 14) Makambo nyonso wana masalemaki na boumeli ya eleko mosusu ya ntina mingi.
Mikolo 1 290
15. Lolenge nini tokoki kotanga mituya mpo na koyeba ebandeli ya mikolo 1 290? Eleko wana esukaki ntango nini?
15 Anzelu alobaki na Danyele, ete: “Longwa na ntango bakolongola mbeka na kotumba [“mbeka ya mokolo na mokolo,” note ya Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Lingelesi] mpe bakotɛmisa eloko na mbindo oyo ekobebisaka, ekoleka mikolo nkóto na nkámá mibale na ntuku libwa.” (Danyele 12:11) Na nsé na Mibeko ya Moize, “mbeka ya mokolo na mokolo” ezalaki kotumbama na tempelo na Yelusaleme. Atako baklisto bazali kopesa mbeka na kotumba te, nzokande bazali kopesa mbeka ya mokolo na mokolo kati na elimo. Paulo akanisaki yango wana alobaki ete: “Tótombolaka ntango nyonso mbeka na masanzoli epai na Nzambe, yango mbuma na bibebu bikoyambolaka mpo na nkombo na ye.” (Baebele 13:15, NW; tala Hosea 14:2.) Mbeka wana ya mokolo na mokolo elongolamaki na Juin 1918. Bongo, “eloko na mbindo” ezalaki nini—yango eteni ya mibale oyo esengelaki koyebana? Ezalaki Société des Nations (Lisangá ya Mabota), oyo ebandisamaki na mikili ya nguya oyo milóngaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.b Ezalaki mbindo mpo ete bakonzi ya boklisto ya lokuta batyaki yango na esika ya Bokonzi ya Nzambe mpe bamonisaki yango lokola elikya bobele moko ya kimya mpo na bato. Mokano ya kosala Société des Nations mobandaki na Janvier 1919. Soki totangi mikolo 1 290 (mbula misato na sanza nsambo) kobanda ntango wana, tokokóma na Septembre 1922.
16. Na nsuka ya mikolo 1 290, nini ezalaki mpenza komonisa polele ete batikali bapakolami bamilɛngɛlaki mpo na mosala?
16 Nini esalemaki na eleko wana? Bayekoli ya Biblia bazwaki lisusu makasi, basikwamaki longwa na Babilone Monene mpe bamilɛngɛlaki mpo na kobanda mosala. (Emoniseli 18:4) Na assemblée oyo esalemaki na Septembre 1922 na Cedar Point, Ohio (Etats-Unis), na mpiko nyonso, babandaki koyebisa bikateli ya Nzambe likoló ya boklisto ya lokuta. (Emoniseli 8:7-12) Koswa ya mayoyo ebandaki mpenza kopesa mpasi! Oyo eleki mpenza, mawa ya mibale oyo esakolamaki na Emoniseli, ebandaki. Limpinga ya baklisto bamati na mpunda—esalemaki liboso na batikali bapakolami mpe na nsima, ebele monene bayaki kobakisama—lipalanganaki na mabelé mobimba. (Emoniseli 7:9; 9:13-19) Ya solo, nsuka ya mikolo 1 290 esepelisaki libota ya Nzambe.c Kasi esukaki bongo te.
Mikolo 1 335
17. Ntango nini mikolo 1 335 ebandaki mpe ntango nini esukaki?
17 Danyele 12:12 elobi ete: “Esengo na ye oyo azali kozela mpe oyo akokóma kino na mikolo nkóto moko na nkámá misato na ntuku misato na mitano!” Na ndenge emonani, mikolo 1 335 wana (to mbula misato, sanza mwambe mpe ndambo ya sanza moko), ebandaki na nsuka ya eleko mosusu oyo touti kolobela. Kobanda na Septembre 1922, yango ekomema biso na nsuka ya printemps (epai na mikili ya Nord) ya 1926. Nini esalemaki na boumeli ya mikolo 1 335 wana?
18. Makambo nini mamonisi ete na 1922 bokóli esengelaki naino kosalema?
18 Atako makambo ya ntina mingi mabimaki na 1922, emonanaki ete basusu bazalaki kotalela bobele makambo na kala. Mikanda Etudes des Ecritures, oyo mikomamaki na Charles Russell, ezalaki naino mikanda misalelamaki mpo na boyekoli. Na nsima, brochure Bamilió mingi ya bato oyo bazali lelo na bomoi bakokufa te (na Lingelesi) emonisaki likanisi oyo ete mikano ya Nzambe na ntina na kozongisama ya Paradis na mabelé mpe lisekwa ya basembwi ya ntango ya kala, ekobanda kokokana na 1925. Mpiko ya bapakolami emonanaki lokola ete ekómaki pene na nsuka. Atako bongo, bamoko na baoyo bazalaki kosangana elongo na Bayekoli ya Biblia bamiyokaki te ete bapusami mpo na kosakwela basusu nsango malamu.
19, 20. (a) Lolenge nini makambo mingi mabongwanaki mpo na libota ya Nzambe na boumeli ya mikolo 1 335? (b) Makambo nini mamonisaki nsuka ya eleko ya mikolo 1 335, mpe yango elakisaki nini mpo na libota ya Jéhovah?
19 Nyonso wana ebongwanaki na boumeli ya mikolo 1 335. Mpo na kolendisa bandeko, boyekoli ya Mosenzeli ya poso na poso ebongisamaki na bituluku. Mingi mpenza bazalaki kolobela ntina ya mosala ya kosakola. Kobanda Mai 1923, bato nyonso basɛngamaki mpo na kobima na mosala ya kosakola na mokolo ya Mardi ya liboso ya sanza nyonso mpe, na likita oyo lizalaki kosalema na katikati ya poso, bazalaki kolendisa bandeko mpo na mosala wana. Na Août 1923, na assemblée moko esalemaki na Los Angeles, na Californie (Etats-Unis), emonisamaki ete lisese ya Yesu na ntina na bampate mpe bantaba lisengelaki kokokana liboso ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. (Matai 25:31-40) Na mobu 1924, babandaki kosalela station ya radio WBBR, mpo na kopalanganisa nsango malamu. Lisoló “Libota lisili kobotama,” oyo ebimaki na Mosenzeli ya le 1er Mars 1925 na Lingelesi, epesaki bososoli malamu ya Emoniseli mokapo 12. Na nsuka, baklisto ya sembo basosolaki makambo na yikiyiki ya 1914 kino 1919.
20 Mobu 1925 mosilaki, nde nsuka eyaki te! Uta bambula 1870, Bayekoli ya Biblia bazalaki kosala mosala elongo na ba dates oyo kati na makanisi na bango—libosoliboso 1914, na nsima 1925. Basosolaki sikawa ete basengelaki kosalela Jéhovah lokola elingi ye. Mosenzeli ya le 1er Janvier 1926 na Lingelesi ezalaki na lisoló oyo ete “Nani akokumisa Jéhovah?” komonisáká bongo motuya na nkombo ya Nzambe. Mpe na nsuka, na Mai 1926, na assemblée oyo esalemaki na Londres, na Angleterre, ekateli na motó na likambo “Litatoli epai na bakonzi ya mokili,” endimamaki. Ezalaki mpenza kosakola solo polele na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe kobebisama oyo ezali koya mpo na mokili ya Satana. Na assemblée yango, babimisaki mokanda Délivrance, oyo ezalaki koyebisa makambo polele; yango mokanda ya liboso kati na molɔngɔ́ ya mikanda oyo misengelaki kokitana mikanda Etudes des Ecritures. Sikawa, libota ya Nzambe lizalaki kotala liboso, kasi na nsima te. Mikolo 1 335 mikokaki.
21. Mpo na libota ya Nzambe, ntango ya koyika mpiko oyo balekisaki na boumeli ya mikolo 1 335 ememaki nini epai na bango, mpe kokokana ya bisakweli na ntina na eleko wana ememeli biso nini?
21 Bamoko balingaki te komimesenisa na makambo wana, kasi baoyo bayikaki mpiko na mimekamo wana, bazwaki mpenza esengo. Lisusu, soki totaleli kokokana ya bileko wana ya bisakweli, biso mpe tozali na esengo mpo ete elikya na biso elendisami ete etuluku moke ya baklisto bapakolami baoyo bazalaki na bomoi na bileko wana bazalaki mpenza moombo na sembo mpe na mayele. Uta ntango wana, lisangá ya Jéhovah lisili kokóla mingi mpenza, kasi moombo na sembo mpe na mayele azali ntango nyonso ntéi na yango, mpe azali kokamba yango. Oyo nde esengo na koyeba ete mpo na bapakolami mpe bampate mosusu, makambo mingi mosusu ya esengo makoya na nsima! Ezali yango nde tokomona na esakweli mosusu ya Danyele.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba lolenge ya kotanga bileko wana ya bisakweli, tala mokanda Le futur gouvernement universel — Le Royaume de Dieu, mokapo 8, ebimisamaki na la Société Watchtower.
b Tala Mosenzeli ya le 15 Mai 1986, nkasa 10-20.
c Tala Mosenzeli ya le 1er Janvier 1991, lokasa 12, mpe Annuaire des Témoins de Jéhovah 1975, lokasa 132.
Okoki kolimbola?
◻ Lolenge nini toyebi ete bisakweli mosusu ya Danyele bisengelaki kokokana na eleko na biso?
◻ Mpo na nini tokoki kondimisama ete batikali bapakolami bazali solo “moombo na sembo mpe na mayele”?
◻ Ntango nini mikolo 1 260 mibandaki, mpe misukaki ntango nini?
◻ Mikolo 1 290 mimemaki elendiseli nini mpe kobongisama nini epai na batikali bapakolami?
◻ Mpo na nini baoyo bayikaki mpiko kino na nsuka ya mikolo 1 335 bazalaki na esengo?
[Etanda na lokasa 11]
BILEKO NA BISAKWELI YA DANYELE
Mikolo 1 260:
Décembre 1914 kino Juin 1918
Mikolo 1 290:
Janvier 1919 kino Septembre 1922
Mikolo 1 335:
Septembre 1922 kino Mai 1926
[Elilingi na lokasa 8]
Uta 1919, emonani polele ete batikali bapakolami bazali “moombo na sembo mpe na mayele”
[Elilingi na lokasa 10]
Ndako ya Société des Nations na engumba Genève, na Suisse
[Eutelo ya bafɔtɔ]
UN photo