Tóluka Yehova, Nzambe oyo atalaka mitema
“Bóluka ngai, mpe bótikala na bomoi.”—AMOSA 5:4, NW.
1, 2. Ntango Biblia elobi ete Yehova “akotalaka kati na motema,” yango elimboli nini?
YEHOVA NZAMBE alobaki na mosakoli Samwele boye: “Moto akomonaka lolenge na libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.” (1 Samwele 16:7) Na ndenge nini Yehova ‘atalaka motema’?
2 Na Biblia, motema elimbolaka bomoto ya kati, elingi koloba bamposa ya moto, makanisi na ye, mpe mayoki na ye. Yango wana, ntango Biblia elobi ete Yehova atalaka motema, yango elimboli ete atalaka te ndenge moto azali komonana na miso, kasi atyaka likebi na bomoto na ye.
Nzambe ataleli Yisalaele
3, 4. Na kolanda Amosa 6:4-6, bato bazalaki na bomoi ya ndenge nini na Yisalaele, ekólo ya mabota zomi?
3 Na mikolo ya Amosa, ntango Ye oyo atalaka mitema atalelaki Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi, amonaki makambo nini? Amosa 6:4-6 elobeli bato oyo ‘bazalaki kolala na mbeto ya mpɛmbɛ ya nzoku, bazalaki komitandisa likoló ya bilaleli.’ Bato yango bazalaki ‘kolya bana ya mpate longwa na bitonga, mpe bana ya ngɔmbɛ longwa na ndako ya bibwɛlɛ.’ Bato yango ‘bamibongiselaki bibɛtɛli ya miziki’ mpe bazalaki ‘komɛla vinyo kati ya saani.’
4 Soki totali yango likolólikoló, tokoki ata kosepela na makambo yango. Na bandako na bango oyo etondi na biloko ya ntalo, bato yango ya bomɛngo bazalaki kolya biloko mpe komɛla masanga oyo eleki malamu; lisusu, bazalaki koyoka bibɛtɛli ya miziki oyo eleki kitoko. Bazalaki mpe na ‘bambeto ya mpɛmbɛ ya nzoku.’ Bato ya arkeoloji bamonaki mpɛmbɛ ya nzoku ebongisami malamu na Samalia, engumba-mokonzi ya Yisalaele. (1 Mikonzi 10:22) Emonani ete bazalaki kobamba mpɛmbɛ ya nzoku yango na bakiti, bamesa to biloko mosusu ya ndako, ata mpe kokɔtisa yango na mabaya oyo bazalaki kolandisa na bifelo mpo na kitoko ya ndako.
5. Mpo na nini Nzambe asepelaki na Bayisalaele te na mikolo ya Amosa?
5 Yehova amonaki nde mabe ndenge Bayisalaele bazalaki na bomoi ya malamu mpenza, bazalaki kolya bilei kitoko, komɛla vinyo ya malamu mpe koyoka miziki ya kitoko? Soki moke te! Kutu, ye moto apesaka ebele ya biloko nyonso wana mpo bato básepela. (1 Timote 6:17) Makambo ezalaki kosepelisa ye te ezalaki nde bamposa mabe ya bato, ndenge mitema na bango ebebaki, kozanga limemya epai ya Nzambe, mpe kozanga bolingo mpo na bandeko na bango Bayisalaele.
6. Yisalaele ezalaki ndenge nini na elimo na mikolo ya Amosa?
6 Bato yango oyo bazalaki ‘komitandisa likoló ya bilaleli, kolya bana ya mpate longwa na bitonga, komɛla vinyo, mpe kosala bibɛtɛli ya miziki’ basengelaki kosutuka. Batunaki bango boye: ‘Bozali koboya mokolo mabe?’ Esengelaki báyoka mawa na komona ndenge makambo ekómaki na Yisalaele, kasi bango ‘bayokaki mawa na libebi ya Yozefe te.’ (Amosa 6:3-6) Atako nkita ya ekólo ezalaki malamu, Nzambe amonaki ete Yozefe—to Yisalaele—azalaki na maladi makasi na elimo. Kasi, bato bamipesaki kaka na misala na bango, mpe bazalaki komitungisa mpo na eloko moko te. Bato mingi lelo oyo bazali na makanisi ndenge yango. Bakoki koloba ete tozali na mikolo ya mpasi, kasi soki bango moko bazali na mpasi te, bamitungisaka te mpo na basusu mpe batyelaka makambo ya elimo likebi te.
Yisalaele: Ekólo oyo ezalaki se kobeba
7. Nini esengelaki kokómela Bayisalaele soki bayoki makebisi ya Nzambe te?
7 Mokanda ya Amosa ezali komonisa ete ekólo yango ezalaki kobeba mpenza, atako na libándá ezalaki komonana kitoko. Lokola bato yango bazalaki koyoka mayebisi ya Nzambe te mpe kobongola makanisi na bango, Yehova alingaki kokaba bango na mabɔkɔ ya banguna na bango. Baasulia basengelaki kolongola bango na bambeto na bango ya mpɛmbɛ ya nzoku mpe komema bango na boombo. Kuna, balingaki kozala lisusu na bomoi ya malamu te!
8. Ebandaki ndenge nini mpo Yisalaele ebeba na elimo?
8 Ebandaki ndenge nini mpo ekólo Yisalaele ebeba ndenge wana? Makambo nyonso wana ebandaki na mobu 997 L.T.B., ntango Mokonzi Salomo akufaki mpe mwana na ye Lehobama akómaki mokonzi, mabota zomi ya Yisalaele ekabwanaki na libota ya Yuda mpe ya Benyamina. Yelobama I, “mwana ya Nebata” akómaki mokonzi ya liboso ya Yisalaele, ekólo ya mabota zomi. (1 Mikonzi 11:26) Yelobama andimisaki bato ya ekólo na ye ete kokende tii na Yelusaleme mpo na kosambela Yehova ezalaki mpasi mingi mpo na bango. Kasi, azalaki mpenza kokanisa bolamu ya bato na ye te. Azalaki nde koluka kobatela bokonzi na ye. (1 Mikonzi 12:26) Yelobama azalaki nde kobanga ete soki Bayisalaele bazali kaka kokende mbula na mbula na tempelo ya Yelusaleme mpo na kokumisa Yehova, nsukansuka mitema na bango ekozonga lisusu na bokonzi ya Yuda. Mpo likambo ya ndenge wana esalema te, Yelobama asalaki bana-ngɔmbɛ mibale ya wolo; atyaki moko na Dani, mosusu na Betele. Na ndenge wana nde losambo ya mwana-ngɔmbɛ ekómaki losambo ya ekólo mobimba na Yisalaele. —2 Ntango 11:13-15.
9, 10. (a) Mokonzi Yelobama I abongisaki bafɛti nini ya losambo? (b) Ndenge nini Nzambe azalaki kotalela bafɛti oyo Bayisalaele bazalaki kosala na mikolo ya Mokonzi Yelobama II?
9 Yelobama amekaki kosala ete losambo yango ya sika emonana malamu na miso ya bato. Abongisaki bafɛti oyo ekokanaki mwa moke na oyo ezalaki kosalema na Yelusaleme. Na 1 Mikonzi 12:32, tozali kotánga boye: “Yelobama abongisaki elambo na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe lokola elambo ezalaki na Yuda mpe abimisaki makabo na etumbelo. Asalaki boye na Betele.”
10 Yehova andimaki bafɛti wana ya losambo ya lokuta ata mokolo moko te. Amonisaki yango polele koleka mbula nkama na nsima na nzela ya Amosa, ntango Yelobama II oyo, na mobu 844 L.T.B., akómaki mokonzi ya Yisalaele, bokonzi ya bikólo zomi. (Amosa 1:1) Amosa 5:21-24 emonisi ete Nzambe alobaki boye: “Nayini mpe natyoli bilambo na bino; nasepeli koyangana [mosantu] na bino te. Ɛɛ, ata bopesi ngai mbeka ya kotumba mpe mbeka ya bilei nakoyamba yango te. Mbeka na bino ya kimya, yango nyama ya mafuta, nakotala mpe te. Longwelá ngai makɛlɛlɛ ya nzembo na yo mpo ete nakoyokamela mongongo ya nzɛnzɛ na yo te. Kasi tiká ete [bosembo etiyola] lokola mai mpe boyengebene lokola ebale monene.”
Makambo oyo ekokani na oyo ya mikolo na biso
11, 12. Makambo nini ekokani na losambo na Yisalaele ya kala mpe oyo ya mangomba ya boklisto?
11 Emonani polele ete Yehova atalaki mitema ya baoyo bazalaki kosala bafɛti oyo ezalaki kosalema na Yisalaele mpe aboyaki milulu mpe bambeka na bango. Lelo oyo mpe ndenge moko, Nzambe aboyi bafɛti euti na bopakano oyo ezali kosalema na mangomba ya boklisto, lokola Noele ná Pasika. Mpo na basambeli ya Yehova, boyokani ata moke te ekoki kozala kati na boyengebene mpe kotyola mibeko, kati na pole mpe molili.—2 Bakolinti 6:14-16.
12 Tokoki mpe komona makambo mosusu oyo ekokani kati na losambo ya mwana-ngɔmbɛ oyo Bayisalaele bazalaki kosala mpe mangomba ya boklisto. Atako bato mosusu oyo bamibengaka baklisto bandimaka ete Liloba ya Nzambe ezali solo, losambo ya mangomba ya boklisto ezalaka mpenza te na bolingo ya solosolo mpo na Nzambe. Soki ezalaki bongo, mbɛlɛ mangomba yango elingaki kolendisa mpenza bandimi básambela Yehova “na elimo mpe na solo,” mpamba te asepelaka nde na losambo ya ndenge wana. (Yoane 4:24) Longola yango, soki totaleli mangomba ya boklisto, tokomona ete mangomba yango ‘ezali kotika te ete bosembo etiyola lokola mai mpe boyengebene lokola ebale monene.’ Kutu, mangomba yango ezali nde ntango nyonso koluka kolɛmbisa bizaleli malamu oyo Nzambe azali kosɛnga. Na mangomba yango bazali kondima pite mpe masumu mosusu ya minene mpe bazali ata kobenisa mabala ya mibali na mibali to basi na basi!
“Bólinga malamu”
13. Mpo na nini tosengeli kotosa maloba ya Amosa 5:15?
13 Yehova alobi na baoyo nyonso balingi kosambela ye na ndenge oyo alingaka ete: “Bóyina mabe mpe bólinga malamu.” (Amosa 5:15) Kolinga mpe koyina, nyonso eutaka kaka na motema ya elilingi. Lokola motema ezalaka na bokosi, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kobatela yango. (Masese 4:23; Yilimia 17:9) Soki tozali kotika bamposa ya mabe ekola na mitema na biso, tokoki kobanda kolinga makambo ya mabe mpe koyina makambo malamu. Mpe soki tokómi na momeseno ya kosala masumu mpo na kokokisa bamposa yango, Yehova akosepela na biso te ata soki tozali koboma nzoto ndenge nini na mosala na ye. Yango wana, tóbondela Nzambe mpo na kosɛnga ye asalisa biso na ‘koyina mabe mpe kolinga malamu.’
14, 15. (a) Na Yisalaele, banani bazalaki kosala malamu, kasi makambo nini bazalaki kosala bamosusu kati na bango? (b) Ndenge nini tokoki kolendisa baoyo bazali na mosala ya ntango nyonso?
14 Kasi, Bayisalaele nyonso te nde bazalaki kosala mabe na miso ya Yehova. Na ndakisa, Hosea mpe Amosa ‘balingaki oyo ezalaki malamu’ mpe bazalaki basakoli ya sembo ya Nzambe. Bamosusu balapaki ndai ya Monasili. Na ntango nyonso oyo bazali Banasili, bazalaki komɛla eloko moko te oyo basali na mbuma ya vinyo, mingimingi vinyo yango moko. (Mituya 6:1-4) Ndenge nini Bayisalaele mosusu bazalaki kotalela bomoi ya komipimela ya bato yango ya misala malamu? Eyano na motuna yango ezali kosala mpasi na motema mpe ezali komonisa ndenge ekólo yango ebebaki mpenza. Amosa 2:12 elobi boye: “Bomɛlisaki Banasili vinyo, [bopesaki mitindo na] basakoli ete, [Bósakola] te!”
15 Ntango Bayisalaele yango bazalaki komona Banasili ná basakoli bazali ntango nyonso sembo, yango esengelaki koyokisa bango nsɔni mpe kotinda bango bábongola mitema. Nzokande, bango bazalaki, na motema mabe mpenza, koluka kolɛmbisa bato ya sembo mpo bátika kopesa Nzambe nkembo. Yango wana, tosengeli te kolobaka na bandeko na biso oyo bazali babongisi-nzela, bamisionɛrɛ, bakɛngɛli-batamboli, to bandeko oyo basalaka na Betele ete bátika mosala na bango ya ntango nyonso oyo bazali kosala na molende mpo bákóma na bomoi oyo biso tomoni ete moto nyonso asengeli kozala na yango. Tólendisa nde bango bákoba na mosala malamu oyo bazali kosala!
16. Mpo na nini Bayisalaele ya ntango ya Moize bazalaki malamu na elimo koleka baoyo ya mikolo ya Amosa?
16 Atako na mikolo ya Amosa Bayisalaele mingi bazalaki na biloko mingi, bazalaki ‘bato ya bomɛngo te epai ya Nzambe.’ (Luka 12:13-21) Na boumeli ya mbula 40, bankɔkɔ na bango balyaki eloko mosusu te kaka mana na esobe. Bazalaki te kolya ngɔmbɛ longwa na ndako ya bibwɛlɛ to komisembola na bilalelo ya mpɛmbɛ ya nzoku. Nzokande, Moize alobaki na bango solo ete: “[Yehova] Nzambe na bino apambolaki bino na misala ya mabɔkɔ na bino nyonso. . . . [Yehova] Nzambe na bino azalaki na bino elongo mbula ntuku minei oyo, mpe bino bozangaki eloko te.” (Deteronome 2:7) Ya solo, na kati ya esobe, Bayisalaele bazalaki ntango nyonso kozwa oyo basengelaki na yango mpenza. Likambo ya malamu koleka, Nzambe alingaki bango, azalaki kobatela bango, mpe kopambola bango!
17. Mpo na nini Yehova amemaki Bayisalaele na Mokili ya Ndaka?
17 Yehova ayebisaki bato ya ntango ya Amosa ete Ye nde amemaki bankɔkɔ na bango na Mokili ya Ndaka mpe asalisaki bango mpo na kobengana banguna na bango nyonso. (Amosa 2:9, 10) Kasi mpo na nini Nzambe abimisaki Bayisalaele wana na Ezipito mpe amemaki bango na Mokili ya Ndaka? Ezalaki nde mpo bákóma na bomoi ya bomɛngo mpe bábosana Mozalisi na bango? Te! Asalaki bongo mpo na kopesa bango nzela bázala libota ya bonsomi mpe ya pɛto mpo na kosambela ye. Kasi, bato ya Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi, bayinaki te oyo ezalaki mabe mpe kolinga oyo ezalaki malamu. Bazalaki nde kopesa bikeko nkembo, na esika ya kopesa yango na Yehova Nzambe. Makambo ya nsɔni mpenza!
Yehova azali kotuna bato mpo na mabunga na bango
18. Mpo na nini Yehova asikoli biso na elimo?
18 Nzambe akokaki te kobosana etamboli mabe ya Bayisalaele. Amonisaki makanisi na ye polele ntango alobaki boye: “Nakotuna bino mpo na mabunga nyonso na bino.” (Amosa 3:2, NW) Maloba wana esengeli kotinda biso tókanisa kosikolama na biso na boombo ya Ezipito ya ntango na biso, elingi koloba ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo. Soki Yehova asikoli biso na elimo, ezali te mpo tólanda mikano na biso ya moimi. Ezali nde mpo tókoka kopesa ye nkembo na motema mobimba lokola bato ya bonsomi oyo bamipesi na losambo ya pɛto. Mpe Nzambe akotuna biso mpo na ndenge oyo tozali kosalela bonsomi oyo apesi biso.—Baloma 14:12.
19. Na kolanda Amosa 4:4, 5, Bayisalaele mingi bakómaki kolinga nini?
19 Likambo ya mawa, bato ya Yisalaele mingi baboyaki koyoka nsango ya polele mpenza oyo Amosa azalaki kosakola. Amonisaki bato yango polele ete bazalaki mpenza na maladi ya elimo. Na Amosa 4:4, 5, alobaki boye: “[Bóya] na Betele mpe bósala masumu! Epai ya Gilegale mpe bósala mabe lisusu! . . . Zambi bolingi yango, ɛ bino bana ya Yisalaele.” Bayisalaele balonaki bamposa ya malamu te. Babatelaki mitema na bango te. Yango wana, mingi kati na bango bakómaki kolinga makambo mabe mpe koyina makambo malamu. Bato yango oyo bakangamaki kaka na losambo ya mwana-ngɔmbɛ babongwanaki te. Yehova asengelaki kotuna bango, mpe basengelaki kokufa na masumu na bango!
20. Ndenge nini moto akoki kolanda nzela oyo eyokani na elendiseli ya Amosa 5:4?
20 Na ntembe te, kotikala sembo epai ya Yehova na ntango wana ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Ndenge biso nyonso, bilenge mpe mikóló, toyebi yango, ezalaka pɛtɛɛ te koboya kosala makambo oyo bato nyonso bamipesi na yango. Kasi, bana ya Yisalaele mosusu bamipesaki na losambo ya solo mpo balingaki Nzambe mpe bazalaki na mposa ya kosepelisa ye. Yehova alobaki na bango maloba oyo ekomami na Amosa 5:4 (NW): “[Bóluka] ngai, mpe bótikala na bomoi.” Ndenge moko lelo oyo, Nzambe azali koyokela mawa bato oyo bazali kobongola mitema mpe bazali koluka ye na koyekola Liloba na ye mpe kosala mokano na ye. Kosala yango ezali pɛtɛɛ te, kasi yango nde ememaka na bomoi ya seko.—Yoane 17:3.
Batondi na bomɛngo atako bazali na nzala na elimo
21. Bato oyo bazali na losambo ya solo te bazali na nzala ya ndenge nini?
21 Makambo nini esengelaki kokómela baoyo balingaki losambo ya solo te? Nzala oyo eleki mabe mpenza, elingi koloba nzala ya elimo! Nkolo Mokonzi Yehova, alobaki boye: “Mikolo ekoya wana nakotinda nzala kati na mokili. Ekozala nzala ya kwanga te, kozanga ya mai mpe te; ekozala nzala ya koyoka maloba ya [Yehova].” (Amosa 8:11) Na mangomba ya boklisto, bato bazali konyokwama na nzala yango ya elimo. Kasi, bato ya mitema sembo oyo bazali na mangomba yango bazali komona bomɛngo ya elimo oyo basaleli ya Nzambe bazali na yango mpe bazali se koya ebele na ebongiseli ya Yehova. Bokeseni kati na ezaleli ya bandimi ya mangomba ya boklisto mpe baklisto ya solo emonisami malamu na maloba ya Yehova oyo: “Talá, baombo na ngai bakolya, nde bino bokoyoka nzala. Talá, baombo na ngai bakomɛla, nde bino bokoyoka mposa ya mai. Talá, baombo na ngai bakosepela, nde bino bokozwa nsɔni.”—Yisaya 65:13.
22. Mpo na nini tosengeli kozala na esengo?
22 Mokomoko na biso oyo tozali basaleli ya Yehova asengeli komituna boye: ‘Nasepelaka mpenza na ebele ya bilei ya elimo mpe mapamboli oyo tozali kozwa?’ Ntango tozali koyekola Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe tozali koyangana na makita mpe na mayangani, toyokaka mposa ya koganga na esengo mpamba te motema na biso ezali malamu. Tozalaka na esengo mpo na ndimbola ya polele ya Liloba ya Nzambe oyo tozali kozwa, bakisa mpe ndimbola ya esakweli ya Amosa.
23. Bato oyo bapesaka Nzambe nkembo bazali na makambo nini?
23 Mpo na bato nyonso oyo balingaka Nzambe mpe balingi kopesa ye nkembo, esakweli ya Amosa ezali na nsango ya elikya. Ezala tozali na mbongo mingi to te to mpe tozali kokutana na mikakatano nini na mokili oyo etondi na yikiyiki, biso baoyo tolingaka Nzambe tozali kozwa mapamboli na ye mpe bilei kitoko ya elimo. (Masese 10:22; Matai 24:45-47) Mpo na yango, nkembo nyonso epesama na Nzambe, oyo apesaka biloko nyonso beboo mpo biso tósepela. Yango wana, tiká tózwa ekateli ya kopesa ye masanzoli na biso oyo euti na motema libela na libela. Yango nde libaku malamu oyo tokozwa soki toluki Yehova, ye oyo atalaka mitema.
Okopesa eyano nini?
• Bato bazalaki na bomoi ya ndenge nini na Yisalaele na mikolo ya Amosa?
• Makambo oyo ezalaki kosalema na Yisalaele, ekólo ya mabota zomi, ekokani na makambo nini oyo ezali kosalema lelo oyo?
• Nzala nini esakolamaki, oyo bato mingi bazali koyoka lelo oyo, kasi banani bazali koyoka nzala yango te?
[Bililingi na lokasa 21]
Bayisalaele mingi bazalaki na bomɛngo, kasi bazalaki kokelela na elimo
[Elilingi na lokasa 23]
Lendisáká basaleli ya ntango nyonso ete bákoba na mosala malamu oyo bazali kosala
[Bililingi na lokasa 25]
Basaleli ya Nzambe bazali bato ya esengo mpe bazali na nzala ya elimo te