Tósakola Liloba ya Nzambe na mpiko
“Kende, sakwelá bato na ngai.”—AMOSA 7:15.
1, 2. Amosa azalaki nani, mpe makambo nini Biblia eyebisi biso mpo na ye?
MOKOLO moko, mosaleli ya Yehova moko azalaki kosakola mpe nganga-nzambe moko abandaki koswanisa ye. Nganga-nzambe yango alobaki na ye na mongongo makasi ete: ‘Tiká kosakola! Longwá na mboka oyo!’ Motatoli yango asalaki nini? Atosaki nganga-nzambe yango, to akobaki nde kosakola Liloba ya Nzambe na mpiko? Ezali mpasi te oyeba oyo asalaki, mpamba te Motatoli yango akomá lisolo na ye na mokanda moko oyo ezali na nkombo na ye. Mokanda yango ezali mokanda ya Amosa. Kasi, liboso tólobela makambo mosusu oyo elekaki ntango Amosa akutanaki na nganga-nzambe yango, tólobela naino Amosa ye moko.
2 Amosa azalaki nani? Azalaki na bomoi na ntango nini mpe azalaki kofanda wapi? Tokozwa biyano na mituna yango na Amosa 1:1, oyo elobi boye: “Maloba ya Amosa oyo azalaki kati na babateli ya bampate na Tekoa . . . na mikolo ya Uziya mokonzi ya Yuda mpe na mikolo ya Yelobama, mwana ya Yoasa, mokonzi ya Yisalaele.” Amosa azalaki kofanda na ekólo Yuda. Mboka na ye ezalaki Tekoa, na ntaka ya kilomɛtrɛ 16 na sudi ya Yelusaleme. Azalaki na bomoi na nsuka ya ekeke ya libwa liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango Uziya azalaki mokonzi ya Yuda mpe Yelobama II azalaki mokonzi ya Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi. Amosa azalaki mobɔkɔli ya mpate. Kutu, Amosa 7:14 emonisi ete Amosa azalaki kaka “mobateli ya bibwɛlɛ” te, kasi azalaki mpe ‘mopɛtoli ya nzete ya figi.’ Yango elingi koloba ete na mbula moko, Amosa azalaki kolekisa mwa basanza na mosala ya bilanga. Azalaki kotɔbɔlatɔbɔla bambuma ya figi mpo etela noki. Mosala yango ezalaki mpasi mpenza.
‘Kende, sakolá’
3. Soki tokanisaka ete tobongi te mpo na kosakola Liloba ya Nzambe, ndenge nini kotalela ndakisa ya Amosa ekosalisa biso?
3 Amosa alobaki na bosembo ete: “Ngai nazalaki mosakoli te, nazalaki mpe mwana ya mosakoli te.” (Amosa 7:14, NW) Amosa azalaki mwana ya mosakoli te, azwaki mpe formasyo ya kokóma mosakoli te. Nzokande, na kati ya bato nyonso ya Yuda, Yehova aponaki kaka Amosa mpo asala mosala na Ye. Na ntango wana, Nzambe aponaki te mokonzi moko ya nguya, to nganga-nzambe moko oyo ayebi makambo mingi, to mpe nkumu moko ya bozwi mingi. Yango eteyi biso likambo moko oyo esengeli kokitisa biso mitema. Ntango mosusu tozali bato minene te to mpe totángá kelasi mingi te. Kasi, tosengeli nde kokanisa ete tobongi kosakola liloba ya Nzambe te? Soki moke te! Yehova akoki kopesa biso makoki nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kosakola nsango na ye, ata na bisika oyo bato basepelaka na yango te. Lokola Yehova apesaki Amosa makoki ya kosakola epai ya bato oyo bazalaki kolinga koyoka nsango na ye te, moto nyonso oyo azalaka na mposa ya kosakola liloba ya Nzambe na mpiko akozwa liteya na kotalela ndakisa oyo mosakoli yango ya mpiko atiká.
4. Mpo na nini kosakola na Yisalaele ezalaki mokumba ya mpasi mpo na Amosa?
4 Yehova alobaki na Amosa boye: “Kende, sakwelá bato na ngai Yisalaele.” (Amosa 7:15) Ezalaki mokumba moko ya mpasi mpenza. Na ntango wana, Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi, ezalaki na kimya mpe bozwi mingi. Bato mingi bazalaki na ‘bandako ya ntango ya mpiɔ’ mpe ‘bandako ya ntango ya moi makasi,’ oyo etongamaki na babiliki ya mabelé te, kasi nde na “mabanga mabongisami kitoko” mpe ya ntalo mingi. Bamosusu bazalaki na bakiti mpe biloko mosusu ya ndako oyo ekembisami na mpɛmbɛ ya nzoku, mpe bazalaki komɛla vinyo oyo euti na ‘bilanga malamu ya vinyo.’ (Amosa 3:15; 5:11) Lokola bazalaki na bomɛngo, bato mingi babosanaki mpenza makambo ya Nzambe. Emonani polele ete mboka oyo Yehova atindaki Amosa ekokani mpenza na bateritware ya basakoli mosusu kati na biso lelo oyo.
5. Makambo nini ya mabe bato ya Yisalaele mosusu bazalaki kosala?
5 Ezalaki mabe te ete bato ya Yisalaele bázala na bozwi. Kasi, bamosusu kati na bango bazalaki kozwa bomɛngo na bango na banzela oyo elongobani te. Bato ya bomɛngo bazalaki “kolyela bato mpamba” mpe bazalaki ata “konyata babola.” (Amosa 4:1, NW) Bato minene lokola bato ya mombongo, bazuzi mpe banganga-nzambe bazalaki koyokana mpo na koyiba babola. Sikoyo, tózonga naino na ntango ya Amosa mpe tótala makambo oyo bato yango bazalaki kosala.
Bazalaki kobuka Mibeko ya Nzambe
6. Ndenge nini bato ya mombongo ya Yisalaele bazalaki kolyela basusu?
6 Tóbanda naino na zando. Kuna, bato ya mombongo bakómisaki “efa moke” mpe “sekele monene,” mpe bazalaki kotɛka ata “mpumbulu mike” ya masango. (Amosa 8:5, 6) Bato yango ya mombongo bazalaki koyiba basombi: bazalaki kopesa bango biloko ekoká te na mbongo oyo bazalaki kozwa, bazalaki komatisa mpenza ntalo ya biloko, kasi biloko yango ezalaki malamu te. Bato ya mombongo bazalaki kolyela babola tii kotika bango mabɔkɔ mpamba; yango wana, babola bakómaki komitɛka na boombo. Kaka bato yango ya mombongo bazalaki lisusu kosomba bango ‘na ntalo ya sapato.’ (Amosa 8:6) Kanisá naino: mpo na bato wana ya mombongo, sapato ya mpamba ezalaki na motuya koleka bandeko na bango Bayisalaele! Basilisaki mpenza babola lokumu mpe, na ndenge yango, babukaki mpenza mibeko ya Nzambe! Atako bongo, bato yango ya mombongo bazalaki kotosa “sabata.” (Amosa 8:5) Ya solo, bazalaki kosambela, kasi losambo na bango ezalaki kaka ya maloba.
7. Nini ezalaki kosalisa bato ya mombongo na kobuka Mobeko ya Nzambe?
7 Kasi, mpo na nini bato yango ya mombongo bazalaki kozwa etumbu te atako bazalaki kobuka mobeko ya Nzambe oyo elobi ete: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza”? (Levitike 19:18) Bazalaki kozwa etumbu te mpo bato oyo basengelaki kolandela Mibeko, elingi koloba bazuzi, bazalaki na ngámbo na bango. Na porte ya engumba, esika bazalaki kosambisa makambo, bazuzi bazalaki ‘kondima kanyaka mpe kobengana mobola.’ Na esika bazuzi bábatela babola, bazalaki nde kokaba bango mpo na kanyaka. (Amosa 5:10, 12, NW) Bazuzi mpe bazalaki kotosa Mibeko ya Nzambe te.
8. Banganga-nzambe mabe bazalaki kokanga miso na ezaleli nini?
8 Bongo banganga-nzambe ya Yisalaele, bazalaki kosala nini? Mpo na kozwa eyano, tótya likebi na esika mosusu. Talá masumu oyo banganga-nzambe bazalaki kotikela bato nzela básala na “ndako ya [banzambe, NW] na bango”! Na nzela ya Amosa, Nzambe alobaki boye: “Mwana mobali mpe tata na ye bakokɔtela mwasi moko, boye bazali kobebisa nkombo ya bulɛɛ na ngai.” (Amosa 2:7, 8) Kanisá naino likambo ya ndenge wana! Mwasi ya ndumba oyo tata azalaki kosala na ye pite, mwana na ye mpe azalaki kosala pite kaka na mwasi wana. Kasi banganga-nzambe wana ya mabe bazalaki kokanga miso na misala ya mbindo ya ndenge wana!—Levitike 19:29; Deteronome 5:18; 23:17.
9, 10. Bayisalaele babukaki mibeko nini ya Nzambe, mpe yango ekokani na makambo nini oyo ezali kosalema lelo oyo?
9 Yehova alobelaki ezaleli mosusu ya mabe na maloba oyo: “Bazali kolalalala pembeni ya bitumbelo nyonso na bilamba bisili bango kokanga lokola ndanga. Na ndako ya [banzambe, NW] na bango bazali komɛla vinyo ya baoyo basili kofutisa lifuti.” (Amosa 2:8) Banganga-nzambe ná bato mosusu nyonso bazalaki kotosa te mobeko oyo ezali na Exode 22:26, 27, oyo elobi ete soki moto akangi elamba ya moninga lokola ndanga asengeli kozongisela ye yango liboso butu eyinda. Na esika básala bongo, bazalaki nde kotanda yango mpo na kolala na ntango bazali kosepela mpe komɛla mpo na lokumu ya banzambe ya lokuta. Lisusu, na mbongo ya amande oyo bazalaki kofutisa babola, bazalaki kosomba vinyo oyo bazalaki komɛla na biyenga ya losambo ya lokuta. Batikaki losambo ya pɛto mosika mpenza!
10 Kozanga ata nsɔni, Bayisalaele bazalaki kobuka na nko mpenza mibeko mibale oyo eleki monene na Mibeko ya Moize, elingi koloba, kolinga Yehova mpe kolinga bazalani na bango. Yango wana, Nzambe atindelaki bango Amosa mpo na komonisa bango ete bazali sembo te. Lelo oyo, bikólo nyonso ya mokili, ata mpe oyo babengaka bikólo ya boklisto, etondi na makambo ya mabe mpenza se ndenge ezalaki na Yisalaele ya kala. Mwa ndambo ya bato bazali na bomɛngo, kasi ebele ya bato mosusu bazali kokelela mpe kotungisama mpo na makambo mabe ya bankóló ya bakompanyi minene, bakonzi ya politiki mpe bakonzi ya mangomba ya lokuta. Atako bongo, Yehova azali komibanzabanza mpo na baoyo bazali konyokwama mpe bazali koluka ye. Yango wana, apesi basaleli na ye ya mikolo na biso mosala lokola oyo apesaki Amosa: kosakola Liloba na Ye na mpiko.
11. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Amosa?
11 Lokola mosala oyo tozali kosala lelo ekokani na oyo ya Amosa, tokozwa matomba mingi soki totaleli ndakisa na ye. Amosa amonisi biso (1) nsango oyo tosengeli kosakola, (2) ndenge oyo tosengeli kosakola yango, mpe (3) ntina oyo banguna bakokoka te kopekisa mosala na biso ya kosakola. Tótalela mokomoko ya makambo yango misato.
Ndenge oyo tokoki komekola Amosa
12, 13. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azalaki kosepela na ezaleli ya bato ya Yisalaele te mpe bango basalaki nini?
12 Biso Batatoli ya Yehova, mosala na biso ya libosoliboso ezali kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 28:19, 20; Malako 13:10) Kasi, tosakolaka mpe makebisi ya Nzambe, ndenge Amosa asakolaki ete Yehova akopesa bato mabe etumbu. Na ndakisa, Amosa 4:6-11 emonisi ete Yehova azalaki mbala na mbala komonisa bato ya Yisalaele ete azali kosepela na makambo na bango te. Asalaki ete ‘bázanga mampa,’ ‘apekiselaki bango mbula,’ abɛtaki bango na “maladi ya kopɔla mpe na maladi ya kotela,” mpe atindelaki bango “maladi.” Bampasi nyonso wana etindaki bato ya Yisalaele bábongola motema? Nzambe alobaki boye: “[Bozongi, NW] epai na ngai te.” Ya solo, bato ya Yisalaele bazalaki mbala na mbala kopesa Yehova mokɔngɔ.
13 Yehova apesaki bato ya Yisalaele oyo babongolaki motema te etumbu. Kasi, liboso asala yango, akebisaki bango. Na boyokani na yango, Nzambe alobaki boye: “Nkolo [Yehova] akosala likambo te [kozanga ete ayebisa, NW] mwango na ye epai ya baombo na ye, bango basakoli.” (Amosa 3:7) Nzambe ayebisaki Noa ete akotinda Mpela mpe atindaki ye akebisa bato. Ndenge moko mpe, Yehova ayebisaki Amosa apesa likebisi ya nsuka. Kasi, bato ya Yisalaele baboyaki koyoka maloba ya Nzambe mpe basalaki te oyo Nzambe asɛngaki bango.
14. Ntango ya Amosa ekokani na ntango na biso na makambo nini?
14 Na ntembe te yo mpe okondima ete makambo mosusu ya mikolo ya Amosa ekokani mpenza na oyo ya mikolo na biso. Yesu Klisto asakolaki ete bampasi ya ndenge na ndenge ekoya na ntango ya nsuka. Asakolaki mpe ete mosala ya kosakola ekosalema na mokili mobimba. (Matai 24:3-14) Kasi, kaka ndenge ezalaki na mikolo ya Amosa, bato mingi lelo bazali kotya likebi te na bilembo mpe bantango; baboyi ata mpe koyoka nsango ya Bokonzi. Likambo oyo ekómelaki bato ya Yisalaele oyo baboyaki kobongola motema ekokómela mpe bango. Yehova akebisaki bato ya Yisalaele na maloba oyo: “Omibongisa mpo na [kokutana, NW] na Nzambe na yo.” (Amosa 4:12) Bakutanaki na Nzambe na ndenge apesaki bango etumbu, elingi koloba atikaki ekólo Asulia elonga bango. Mokili ya lelo, oyo eyebi Nzambe te, ‘ekokutana na Nzambe’ na Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16) Kasi, lokola Yehova azali naino komonisa motema molai, tozali kolendisa bato mingi boye: ‘Bóluka [Yehova], mpe bótikala na bomoi.’—Amosa 5:6, NW.
Botɛmɛli lokola oyo Amosa akutanaki na yango
15-17. (a) Amasia azalaki nani, mpe asalaki nini ntango ayokaki makambo oyo Amosa azalaki kosakola? (b) Makambo nini Amasia akoselaki Amosa?
15 Tokoki komekola Amosa kaka na nsango oyo tozali kosakola te, kasi mpe na lolenge oyo tozali kosakola yango. Likambo yango emonisami polele na mokapo 7, oyo ezali na lisolo ya nganga-nzambe oyo tolobelaki na ebandeli. Nkombo na ye ezalaki “Amasia, nganga-nzambe ya Betele.” (Amosa 7:10) Betele ezalaki engumba oyo ezalaki makasi na losambo ya lipɛngwi na Yisalaele, epai bazalaki kosambela mwana-ngɔmbɛ. Na bongo, Amasia azalaki nganga-nzambe ya lingomba ya ekólo. Asalaki nini ntango ayokaki makambo oyo Amosa azalaki kosakola na mpiko nyonso?
16 Amasia alobaki na Amosa boye: ‘E yo momoni-ya-makambo, kimá kino mokili ya Yuda; lyá kwanga wana mpe sakolá wana. Nde sakolá lisusu na Betele te mpo ete oyo ezali esika ya bosantu ya mokonzi mpe ndako ya mokonzi.’ (Amosa 7:12, 13) Na maloba mosusu, Amasia alobaki boye: ‘Zongá na mboka na bino! Biso tozali na lingomba na biso.’ Amasia amekaki mpe kotinda bakonzi ya mboka bápekisa mosala ya Amosa. Ayebisaki Mokonzi Yelobama II boye: “Amosa asili koyangela yo mwango kati na ndako ya Yisalaele.” (Amosa 7:10) Yoká likambo, Amasia afundaki Amosa ete azali kosepela banguna bábebisa mboka! Ayebisaki mokonzi boye: “Amosa azali koloba ete, Yelobama akokufa na mopanga mpe Yisalaele akobɔtɔlama solo kino kokangama libándá ya mokili na ye.”—Amosa 7:11.
17 Kaka na mwa maloba wana, Amasia alobaki lokuta misato. Abandaki boye: “Amosa azali koloba ete.” Nzokande, ata mokolo moko te Amosa alobaki ete makambo oyo azalaki kosakola ezalaki kouta epai na ye moko. Azalaki koloba ntango nyonso ete: “[Yehova] alobi boye.” (Amosa 1:3) Amasia alobaki mpe ete Amosa alobaki boye: “Yelobama akokufa na mopanga.” Nzokande, lokola ekomami na Amosa 7:9, Amosa asakolaki nde boye: “[Ngai Yehova] nakotɛlɛmɛla ndako ya Yelobama na mopanga.” Nzambe asakolaki ete makambo wana ekokómela “ndako” ya Yelobama, elingi koloba bana na ye. Longola yango, Amasia alobaki ete Amosa alobaki boye: ‘Yisalaele akobɔtɔlama solo kino kokangama.’ Nzokande, Amosa asakolaki mpe ete Moyisalaele nyonso oyo akozonga epai ya Nzambe akopambolama. Tomoni polele ete Amasia abongolaki makambo oyo Amosa alobaki mpo kaka mokonzi apekisa mosala ya kosakola oyo Amosa azalaki kosala.
18. Na ndenge nini mayele oyo Amasia asalelaki ekokani na oyo bakonzi ya mangomba bazali kosalela lelo oyo?
18 Tomoni mpenza ete mayele oyo Amasia asalelaki ekokani na mayele oyo banguna ya basaleli ya Yehova bazali kosalela lelo oyo. Se ndenge Amasia alukaki kokanga Amosa monɔkɔ, lelo oyo mpe basango, baepiskɔpɔ mpe bakonzi mosusu ya mangomba bazali koluka kopekisa mosala ya kosakola ya basaleli ya Yehova. Amasia akoselaki Amosa ete azali kosepela mboka ekwea. Ndenge moko mpe lelo oyo, bakonzi mosusu ya mangomba bazali kokosela Batatoli ya Yehova ete bakoki kokɔtisa mobulu na mboka. Lisusu, se ndenge Amasia alukaki lisalisi ya mokonzi mpo na kopekisa mosala ya Amosa, mbala mingi bakonzi ya mangomba mpe bazali koluka lisalisi ya bakonzi ya politiki mpo na konyokola basaleli ya Yehova.
Banguna bakolonga te kopekisa mosala ya kosakola
19, 20. Amosa asalaki nini lokola Amasia azalaki kopekisa mosala na ye?
19 Amosa asalaki nini lokola Amasia azalaki kopekisa mosala na ye? Ya liboso, Amosa atunaki nganga-nzambe yango boye: “Yo olobi ete: ‘kosakola mabe mpo na Yisalaele te’?” Na nsima, kozanga kokakatana, mosakoli yango ya mpiko alobaki makambo oyo, na ntembe te, Amasia asepelaki na yango te. (Amosa 7:16, 17, NW) Amosa abangaki ye te. Talá ndakisa malamu mpenza mpo na biso! Mpo na likambo etali kosakola liloba ya Nzambe, tokotosa etinda ya Nzambe, ata na mikili oyo bato oyo bazali kosala makambo lokola Amasia bazali kobimisela biso minyoko makasi. Lokola Amosa, biso mpe tozali kotika te kosakola ete: “[Yehova] alobi boye.” Banguna bakokoka ata moke te kopekisa mosala na biso ya kosakola, mpamba te “lobɔkɔ ya Yehova” ezali na biso.—Misala 11:19-21.
20 Amasia asengelaki koyeba ete makaneli na ye ekosala eloko te. Amosa asilaki kolimbola ntina oyo moto moko te awa na mabelé akokaki kopekisa ye koloba—mpe yango nde likambo ya misato oyo tokotalela. Na Amosa 3:3-8, Amosa atuni mwa mituna mpe asaleli bandakisa mpo na komonisa ete mai eninganaka mpamba te. Na nsima, amonisaki ntina oyo alobaki bongo na maloba oyo: “Nkɔsi angulumi, nani akobanga te? Nkolo [Mokonzi Yehova] alobi, nani akosakola te?” Na maloba mosusu, Amosa alingaki koyebisa bato oyo bazalaki koyoka ye boye: ‘Kaka ndenge bino bokobanga soki boyoki nkɔsi engulumi, ngai mpe nakosakola liloba ya Nzambe, mpo nayoki etinda ya Yehova.’ Lokola Amosa azalaki kobanga Yehova mingi to mpe komemya Ye, yango etindaki ye asakola na mpiko.
21. Tosalaka nini ntango toyokaka etinda ya Yehova ete tósakola nsango malamu?
21 Biso mpe lelo tozali koyoka Yehova azali kotinda biso tósakola. Tosalaka nini? Lokola Amosa mpe bayekoli ya liboso ya Yesu, na lisalisi ya Yehova tosakolaka liloba na Ye na mpiko. (Misala 4:23-31) Eloko moko te ekokanga biso monɔkɔ, ezala monyoko oyo banguna bazali kobimisela biso to lityo ya bato oyo tozali kosakwela nsango malamu. Na molende lokola oyo ya Amosa, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali se kokoba kosakola nsango malamu na mpiko. Tozali na mokumba ya kokebisa bato ete etumbu ya Yehova ezali koya. Etumbu yango ekozala ndenge nini? Lisolo oyo elandi ekopesa eyano na motuna wana.
Okopesa eyano nini?
• Makambo ezalaki ndenge nini ntango Amosa azalaki kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ye?
• Lokola Amosa, nsango nini tosengeli kosakola?
• Makanisi nini tosengeli kozala na yango mpo na mosala na biso ya kosakola?
• Mpo na nini banguna bakolonga te kopekisa mosala na biso ya kosakola?
[Elilingi na lokasa 10]
Nzambe aponaki Amosa, oyo azalaki mopɛtoli ya nzete ya figi, mpo asala mosala na Ye
[Bililingi na lokasa 13]
Yo mpe osakolaka nsango ya Yehova na mpiko lokola Amosa?