Mokapo 9
Saleláká basusu makambo ndenge Nzambe alingaka
1-3. (a) Bakristo mingi bakoki kokanisa nini na oyo etali Tire? (b) Lobelá boyokani oyo ezalaki kati na Mokonzi Hirame mpe Yisraele. (c) Likambo nini tokosepela koyeba na ntina na Tire?
NINI eyelaka yo na makanisi ntango oyoki balobeli Tire? Bakristo mingi bakoki kokanisa ndenge esakweli ekokisamaki ntango Alezandre Monene asalelaki bitiká oyo azwaki na Tire mpe asalaki nzela moko oyo ekendeki tii na esanga moko ya sika ya engumba Tire mpe abebisaki engumba yango. (Ezekiele 26:4, 12; Zekaria 9:3, 4) Kasi, ndenge balobeli Tire ekoki kosalisa yo okanisa makambo oyo osengeli kosalela bandeko na yo ya elimo to bato mosusu mpe makambo oyo osengeli kosalela bango te?
2 Mpo na nini Tire ebomamaki? “Mpo na botomboki misato ya Tire, . . . mpo na ndenge bapesá na lobɔkɔ ya Edome etuluku mobimba ya bato oyo bamemami na mboka mopaya, mpe mpo bakanisaki te kondimana ya bandeko. Mpe nakotinda mɔtɔ na efelo ya Tire.” (Amose 1:9, 10) Na ntango ya kala, Mokonzi Hirame ya Tire amoniselaki Davidi motema boboto mpe apesaki biloko mpo na tempelo ya Salomo. Salomo asalaki kondimana na Hirame mpe apesaki ye bingumba na Galile. Hirame abengaki Salomo “ndeko na ngai.” (1 Bakonzi 5:1-18; 9:10-13, 26-28; 2 Samwele 5:11) Ntango Tire ‘ekanisaki te kondimana ya bandeko’ mpe batɛkaki bato mosusu na kati ya basaleli ya Nzambe na boombo, Yehova atyaki likebi na makambo oyo Tire esalaki.
3 Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Nzambe apesaki bato ya Kanana ya Tire etumbu mpo na makambo makasi oyo basalelaki bato na ye? Liteya monene etali lolenge oyo tosalelaka bandeko na biso ya elimo makambo. Na mikapo oyo eleki, tozwaki batoli oyo basakoli 12 bapesaki na oyo etali ndenge ya kozala na basusu, na ndakisa kozala sembo na makambo etali mosala mpe kozala na etamboli ya pɛto. Kasi, mikanda yango 12 ezali na makambo mingi oyo emonisi makambo oyo Nzambe alingaka tósala basusu.
KOSEPELA TE NA MPASI YA BASUSU
4. Na ndenge nini bato ya Edome bazalaki “bandeko” ya Bayisraele, kasi basalaki “bandeko” na bango nini?
4 Okoki kozwa liteya na ndenge oyo Nzambe apamelaki Edome, ekólo oyo ezalaki pene na Yisraele: “Osengelaki te kotala likambo yango na mokolo ya ndeko na yo, na mokolo ya mawa na ye; mpe osengelaki te kosepela na libebi ya bana ya Yuda na mokolo ya libebi na bango.” (Obadia 12) Ekoki kozala ete bato ya Tire bazalaki “bandeko” mpo na makambo etali mombongo, kasi bato ya Edome bazalaki mpenzampenza “bandeko” ya Bayisraele, mpo bazalaki bakitani ya Esau, lipasa ya Yakobo. Ata Yehova abengaki bato ya Edome “bandeko” ya Bayisraele. (Kolimbola Mibeko 2:1-4) Na yango, ezalaki mpenza mabe bato ya Edome básepela ntango bato ya Babilone banyokolaki Bayuda.—Ezekiele 25:12-14.
5. Na makambo nini tokoki komonisa elimo lokola oyo ya bato ya Edome?
5 Emonani polele ete Nzambe asepelaki te na makambo oyo bato ya Edome basalaki bandeko na bango Bayuda. Nzokande, tokoki komituna: ‘Soki Nzambe atali makambo oyo nasalelaka bandeko na ngai, akoloba nini?’ Likambo moko oyo tosengeli kotyela likebi ezali ndenge oyo totalelaka mpe tosalelaka bandeko na biso makambo ntango tozwani matata. Na ndakisa, kanisá ete mokristo moko asali yo mabe to azwani matata na ndeko na yo. Soki ozali “na likambo ná mosusu,” okobomba nde nkanda, okobosana te likambo yango to okoluka te kosilisa yango? (Bakolose 3:13; Yosua 22:9-30; Matai 5:23, 24) Kosala bongo ekoki kosala ete okóma kosalela ndeko na yo makambo ya malamu te, okóma malilimalili, okóma kokima ye to kolobaka mabe mpo na ye. Tólobela ndakisa yango ndenge mosusu. Kanisá ete ndeko wana kaka, na nsima asali libunga, mpe ntango mosusu esɛngi bápesa toli to básembola ye na bankulutu ya lisangá. (Bagalatia 6:1) Okosala lokola bato ya Edome mpe okosepela na mpasi oyo ekómeli ndeko wana? Nzambe akolinga osala nini?
6. Na bokeseni na Zekaria 7:10, likambo nini Mika 7:18 esɛngi biso tósala?
6 Yehova asɛngaki Zekaria ayebisa mposa na ye ete ‘tokanaka na mitema na biso kosalelana eloko ata moko te ya mabe.’ (Zekaria 7:9, 10; 8:17) Toli oyo ezali na ntina ntango tomoni ete ndeko moko asaleli biso to ndeko na biso moko ya libota mabe. Na makambo ya ndenge wana, ezalaka mpasi te ‘tókana na mitema na biso kosala mabe’ mpe komonisa yango na misala. Lisusu, Nzambe alingaka ete tómekola ndakisa na ye ya malamu. Kobosana te ete Mika akomaki ete Yehova “alimbisaka libunga mpe abosanaka kobuka mibeko.”a (Mika 7:18) Ndenge nini tokoki mpenza kosalela yango?
7. Mpo na nini tosengeli kaka kolimbisa mabe oyo basali biso?
7 Tokoki koyoka mpasi na motema mpo na likambo oyo basali biso to ndeko na biso, kasi likambo yango ezali monene ndenge nini? Biblia eyebisi ndenge ya kosala ntango tozwani matata, ata soki tosaleli ndeko moko lisumu. Nzokande, mbala mingi, lolenge eleki malamu ezalaka ya kobosana libunga to likambo mabe oyo basali biso, ‘kobosana kobuka mobeko.’ Omituna boye: ‘Oyo ekoki nde kozala moko ya mbala 77 oyo nasengeli kolimbisa ye? Mpo na nini te kaka kolimbisa?’ (Matai 18:15-17, 21, 22) Ata soki likambo yango ezali monene lelo, ekozala kaka bongo nsima ya mbula nkóto moko? Zwá liteya oyo ebongi na maloba oyo ezali na Mosakoli 5:20, oyo elobeli esengo oyo mosali ayokaka na kolya mpe komɛla: “Akokanisa mingi te mikolo ya bomoi na ye, mpamba te Nzambe ya solo azali kopesa ye mosala ná esengo na motema na ye.” Lokola moto wana azali kotya likebi na esengo oyo azali na yango, akobosana mitungisi na ye ya mokolo na mokolo. Tokoki komekola ezaleli wana? Soki tozali kotya makanisi na esengo oyo tozalaka na yango na kati ya bandeko, tokoki kobosana mikakatano oyo ezangi ntina, oyo tokokanisa yango lisusu te na mokili ya sika. Yango ekesani mpenza na kosepela na mpasi oyo ekómeli moto mosusu to kokanisa mabe oyo asali biso.
LOBÁKÁ SOLO
8. Tokutanaka na mokakatano nini na oyo etali koloba solo?
8 Mikanda 12 ya bisakweli elobeli mpe mingi ete Nzambe alingaka ete tólobaka solo epai ya basusu. Ya solo, tosalaka makasi mpo na koyebisa “solo ya nsango malamu” epai ya basusu. (Bakolose 1:5; 2 Bakorinti 4:2; 1 Timote 2:4, 7) Kasi, ezali mpenza mpasi kolobaka solo mokolo na mokolo epai ya bato ya libota na biso mpe bandeko na biso ya elimo, na masolo oyo esangisaka makambo ndenge na ndenge. Mpo na nini ekoki kozala bongo?
9. Ntango nini tokoki komekama mpo na koloba likambo moko oyo ezali mpenza solo te, kasi tosengeli komituna mituna nini?
9 Nani na kati na biso alobá naino te to asalá naino te likambo moko ya mabe mpe na nsima bapameli ye mpo na yango? Na ntembe te, toyokaka nsɔni to ntango mosusu lokola tomemi ngambo. Makanisi ya ndenge wana ekoki kotinda moto aboya kondima libunga na ye to “koluka koloba” makambo oyo ezali solo te mpo na kolongisa mabe oyo asali to komonisa ete ezali mabe te. To soki tokutani na likambo moko oyo etungisi biso, tokoki koluka koloba kaka makambo oyo ezali mpo na litomba na biso, oyo ekokómisa makambo yango kitoko. Na yango, makambo oyo tokoloba ekoyokana lokola ezali solo, nzokande ekomonisa mpenza te likambo ndenge ezalaki. Ata soki lokuta yango ezali monene te ndenge bato bakanisaka, ezali mpenza ‘koloba solo mokomoko na mozalani na ye,’ to ndeko? (Baefese 4:15, 25; 1 Timote 4:1, 2) Mpo na yo, Nzambe akanisaka nini ntango amoni mokristo moko azali koloba mpenza likambo moko ya lokuta na mokano ya kotinda bandeko bázwa ekateli ya mabe, bándima likambo moko oyo ezali solo te?
10. Ndenge nini basakoli balobeli bizaleli oyo bato mingi bakómaki na yango na Yisraele mpe na Yuda?
10 Basakoli bayebaki ete ata mibali to basi oyo bamipesá na Yehova bakoki ntango mosusu kotya likebi te na oyo Nzambe azali kosɛnga bango. Hosea amonisaki ndenge Nzambe azalaki koyoka mpo na bato mosusu ya eleko na ye: “Bápunza bango, mpo babuki mibeko na ngai! Mpe ngai nabandaki kosikola bango, kasi bango bakoseli ngai mpenza makambo.” Longola makambo oyo bazalaki kokosela Yehova, basusu bakómaki tii ‘kolakela mabe mpe kokosa,’ ekoki kozala bazalaki kobongola makambo mpo na kobuba basusu. (Hosea 4:1, 2; 7:1-3, 13; 10:4; 12:1) Hosea akomaki maloba wana na Samaria na bokonzi ya nɔrdi. Makambo ezalaki malamu na Yuda? Mika alobi boye: “Bazwi na ye mpenza batondi na mobulu, mpe bato oyo bafandi epai na ye mpenza balobi lokuta, mpe lolemo na bango ezali na bokosi na monɔkɔ na bango.” (Mika 6:12) Ezali malamu tóyeba ndenge basakoli yango bapamelaki baoyo bazalaki ‘kokosa’ mpe baoyo ‘lolemo na bango ezalaki na bokosi na monɔkɔ na bango.’ Na yango ata bakristo, baoyo bakolinga te kokosa na nko bakoki komituna boye: ‘Ekómaka ntango mosusu nakosa to nazala na lolemo ya bokosi na monɔkɔ na ngai? Nzambe alingi nasala nini na likambo yango?’
11. Basakoli bamonisi ete Nzambe alingaka tólobaka makambo ya ndenge nini?
11 Kasi Nzambe asalelaki mpe basakoli bámonisa polele etamboli ya malamu oyo alingi biso tózala na yango. Zekaria 8:16 elobi boye: “Talá makambo oyo bosengeli kosala: Bólobanaka mpenza solo. Bósambisaka na solo mpe na lisambisi ya kimya na baporte na bino.” Na mikolo ya Zekaria baporte ezalaki bisika ya bato nyonso epai mikóló bazalaki kosambisa makambo. (Ruta 4:1; Nehemia 8:1) Nzokande, Zekaria alobaki te ete kaka na esika yango nde esengeli koloba solo. Tosengeli kozala sembo na makambo nyonso, kasi Biblia epesi biso mpe toli oyo: “Bólobanaka mpenza solo.” Yango esɛngi koloba solo ata na ndako ntango tozali kosolola na molongani to bandeko na biso. Etaleli mpe masolo oyo tosololaka mokolo na mokolo na bandeko na biso bakristo, ata soki tozali esika moko, to tozali kosolola na bango na telefone to mpe na nzela mosusu. Bazelaka ete makambo oyo tozali koloba na bango ezala solo. Baboti bakristo basengeli komonisa bana na bango ntina oyo basengeli koboya lokuta. Na ndenge yango ntango bazali kokola, bana bakoyeba ete Nzambe azali kosɛnga bango báboya lolemo ya bokosi mpe bázala sembo na maloba na bango.—Sefania 3:13.
12. Mateya nini ya ntina tokoki kozwa na mikanda ya bisakweli?
12 Elenge to mokóló oyo akangamaka na bosembo andimaka toli oyo ya Zekaria: “Bólinga solo mpe kimya.” (Zekaria 8:19) Lisusu, yoká makambo oyo Malaki alobi na oyo Yehova alobaki mpo na ndakisa oyo Mwana na ye akopesa: “Mobeko ya solo ezalaki na monɔkɔ na ye, mpe makambo ya kozanga boyengebene ezalaki na mbɛbu na ye te. Atambolaki na ngai na kimya mpe na bosembo.” (Malaki 2:6) Yehova azali kosɛnga mpe biso kaka bongo? Kobosana te ete tozali na Liloba na ye na mobimba na yango, kati na yango mikanda 12 ya basakoli oyo ezali na mateya mingi oyo tokoki kozwa.
BOYÁ EZALELI YA MOBULU NA BOYOKANI NA YO NA BASUSU
13. Mika 6:12 elobeli likambo nini mosusu oyo ezalaki kosalema?
13 Mika 6:12 eyebisi biso ete lolenge moko oyo bato ya Nzambe ya ntango ya kala basalaki basusu mabe ezalaki ya ‘koloba lokuta, mpe lolemo na bango ezalaki na bokosi na monɔkɔ na bango.’ Kasi, vɛrsɛ yango elobeli likambo mosusu ya mabe mpenza oyo bazalaki na yango. Elobi ete ‘bazwi batondaki na mobulu.’ Nini ezalaki kosalema mpenza mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
14, 15. Bikólo oyo ezalaki zingazinga ya basaleli ya Nzambe eyebanaki ndenge nini na oyo etali mobulu?
14 Tótalela makambo oyo ezalaki na bikólo mosusu oyo ezalaki zingazinga ya libota ya Nzambe. Mpo na Asiri oyo mboka-mokonzi na yango ezalaki Ninive, oyo ezalaki na nɔrdi-ɛsti, Nahumu akomaki boye: “Mawa na engumba oyo esopaka makila. Yango nyonso etondi na bokosi mpe na moyibi. Nyama ya kolya ezangi te!” (Nahumu 3:1) Bato ya Asiri bayebanaki mpo na bitumba na bango ya nsɔmɔ mpe makambo mabe oyo bazalaki kosala bato oyo bazalaki kokanga na bitumba—bazalaki kotumba bato yango mosusu to kolongola bango mposo ya nzoto wana bazali naino na bomoi, mpe bazalaki kotɔbɔla bamosusu miso, kokata bango zolo, matoi, to misapi. Buku moko (Gods, Graves, and Scholars) elobi boye: “Soki bato babosanaka Ninive te, ezali mpo na makambo ya koboma bato, kobɔtɔla biloko, mobulu, konyokola babola; bitumba mpe minyoko ya lolenge nyonso.” Ezali na moto oyo amonaki mobulu yango (mpe ntango mosusu akɔtaki) na mobulu yango. Nsima ya koyoka nsango ya Yona, mokonzi ya Ninive alobaki na bato na ye boye: “Bálata ngɔtɔ, moto mpe nyama ya mboka; mpe bábelela Nzambe makasi mpe bábongwana moto na moto na nzela na ye ya mabe mpe na mobulu oyo ezali na mabɔkɔ na bango.”—Yona 3:6-8.b
15 Mobulu ya nsɔmɔ esukaki kaka na Asiri te. Edome, oyo ezalaki na sudi-ɛsti ya Yuda esengelaki mpe kozwa etumbu. Mpo na nini? “Mpe Edome ekokóma esobe oyo etikali mpamba, mpo na mobulu oyo basalelaki bana ya Yuda, oyo na mokili na bango, basopaki makila ya moto oyo azali na likambo te.” (Yoele 3:19) Bato ya Edome bayokaki likebisi yango mpe batikaki banzela na bango ya mobulu? Bikeke soki mibale na nsima, Obadia akomaki boye: “Ee Temane [engumba moko ya Edome], bato na yo ya nguya bakokóma na nsɔmɔ makasi, . . . mpo na mobulu oyo osalelaki ndeko na yo Yakobo, . . . okolongolama mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” (Obadia 9, 10) Kasi, ezali boni mpo na basaleli ya Nzambe?
16. Amose ná Habakuku basalisi biso tóyeba likambo nini oyo ezalaki na mikolo na bango?
16 Amose amonisi ndenge makambo ezalaki na Samaria, mboka-mokonzi ya bokonzi ya nɔrdi ete: “‘Bótala makambo mingi ya mobulu oyo ezali na kati na yango mpe makambo ya kobuba oyo ezali na kati na yango. Mpe bayebaki te kosala oyo ezali alima,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘baoyo bazali konduka mobulu mpe kopunza.’” (Amose 3:9, 10) Okoki kokanisa ete makambo ekokaki kozala ndenge mosusu na Yuda, epai tempelo ya Yehova ezalaki. Kasi, Habakuku oyo azalaki na Yuda, atunaki Nzambe boye: “Kino ntango nini nakobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi mpo obikisa na mobulu, mpe yo okobikisa te? Mpo na nini ozali kosala ete namona makambo oyo ezali koyokisa mpasi, mpe ozali kokoba kotala motungisi? Mpo na nini kopunza ná mobulu ezali liboso na ngai?”—Habakuku 1:2, 3; 2:12.
17. Ntango mosusu nini esalaki ete ezaleli ya mobulu ekɔta na kati ya basaleli ya Nzambe?
17 Ekoki kozala ete mobulu ekómaki mingi na kati ya basaleli ya Nzambe mpo balandaki ezaleli ya mobulu ya bato ya Asiri, Edome mpe bikólo mosusu? Salomo akebisaki mpo na likambo yango: “Kobanda kolula moto ya mobulu te, kopona mpe nzela na ye ata moko te.” (Masese 3:31; 24:1) Na nsima, Yirimia alobaki polelepolele ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Bóyekola nzela ya bikólo mosusu ata moke te.’”—Yirimia 10:2; Kolimbola Mibeko 18:9.
18, 19. (a) Soki Habakuku azalaki na bomoi lelo, alingaki koyoka ndenge nini na mobulu ya lelo? (b) Oyokaka ndenge nini mpo na mobulu ya mikolo na biso?
18 Soki Habakuku azalaki na bomoi lelo oyo, alingaki koyoka mpasi mpo na mobulu oyo ezali kosalema na mikolo na biso? Bato mingi babandá komona mobulu banda bolenge na bango. Masano mingi, na ndakisa dessin animé oyo bana mingi mibali mpe basi balingaka ezalaka na makambo ya mobulu—ntango mosusu balakisaka moto moko azali koluka koboma mosusu, kopanza ye na bɔmbi, to koluka koboma ye na ndenge mosusu. Bana mingi baumelaka te komesana na masano ya video oyo esɛngaka kobɛta monguna masasi, kopanza ye na bɔmbi, to kokata ye bitenibiteni. Bato mosusu bakoki koloba ete “yango ezali kaka masano ya mpamba.” Kasi, masano ya mobulu oyo bana batalaka na bandako na ordinatɛrɛ to na video elakisaka mingi basani ya mobulu, ebongolaka bizaleli mpe etamboli ya bana. Likambo yango emonisi bosolo ya toli oyo: “Moto ya mobulu akolengola moninga na ye, mpe ya solo akotinda ye na nzela oyo ezali malamu te”!—Masese 16:29.
19 Atako Habakuku asengelaki kokoba kotala motungisi mpe ‘mobulu oyo ezalaki liboso na ye,’ yango ezalaki kopesa ye mpasi na motema. Okoki komituna, ‘Alingaki nde kosepela kofanda esika moko na ngai mpe kotala makambo oyo natalaka ntango nyonso na televizyo?’ Omituna lisusu boye: ‘Alingaki komibombela ntango mpo na kotala makambo oyo bato babengaka ete ezali masano kasi elakisaka mobulu, mpe oyo basani na yango balataka molato ya komibatela lokola oyo tomonaka na bililingi ya bato ya Roma oyo bazalaki kosala masano ya bitumba na ntango ya kala?’ Na masano mosusu, oyo esepelisaka bato mingi, ezali na bitumba oyo basani na yango babundaka na esika oyo babongisá mpo na masano, to kati na bato oyo bayaki kotala masano yango mpe basiliki. Na mikili mosusu, bato mingi batalaka bafilme mpe bavideo ya mobulu oyo elakisaka bitumba ya makofi to karate. Lokola balobaka ete bafilme yango mingi elobelaka masolo ya kala mpe emonisaka ndenge mimeseno ya mboka na bango ezalaki, yango epesi nzela ete bato bándima bafilme yango ya mobulu?—Masese 4:17.
20. Malaki amonisaki likanisi ya Yehova mpo na mobulu ya ndenge nini?
20 Malaki alobelaki mpe likambo mosusu ya ndenge wana ntango amonisaki likanisi ya Yehova na ntina na bokosi oyo Bayuda mosusu bazalaki kosalela basi na bango; alobi boye: “‘Ayini koboma libala,’ Yehova Nzambe ya Yisraele alobi bongo; ‘mpe moto oyo azipi elamba na ye na mobulu.’” (Malaki 2:16) Maloba ya Ebre oyo ebongolami na “azipi elamba na ye na mobulu” elimbolamaka ndenge mingi. Bato mosusu ya mayele balobaka ete yango elimboli kobebisa elamba ya moto mosusu na makila ntango ozali kobundisa ye. Ata soki ezali bongo to te, emonani polele ete Malaki akweisaki mpenza likambo ya konyokola mwasi. Ya solo, Malaki alobelaki likambo ya konyokola molongani mpe amonisaki ete Nzambe aboyaka likambo yango.
21. Na makambo nini bakristo basengeli koboya konyokola?
21 Na kati ya ndako ya mokristo, kobɛta moto na nzoto to na maloba epekisami makasi ndenge kaka epekisami kosala yango na miso ya bato; mpo Nzambe amonaka nyonso. (Mosakoli 5:8) Atako Malaki alobelaki likambo etali konyokola mwasi, vɛrsɛ moko te ya Biblia epesi nzela na mobali anyokola bana to baboti na ye oyo bakómi mikóló. To epesami mpe nzela te ete mwasi asalela mobali, bana, to baboti likambo yango. Ya solo, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, matata ekoki kobima, likambo moko ekoki kosilikisa biso mpe ntango mosusu kopesa biso nkanda. Atako bongo, Biblia epesi biso toli ete: “Bóyoka nkanda, mpe ata bongo bósala lisumu te; moi elala te bino bozali kaka na nkanda.”—Baefese 4:26; 6:4; Nzembo 4:4; Bakolose 3:19.
22. Ndenge nini toyebi ete tokoki koboya kozala bato ya mobulu ata soki bato mingi pene na biso bazali bongo?
22 Mpo na kolongisa ezaleli na bango ya konyokola to kofinga, bato mosusu balobaka ete: ‘Nazali boye mpo nakolá na libota oyo bato bazalaki kosalana makambo na boboto te,’ to ‘Bato ya mboka na ngai basilikaka mpambampamba.’ Nzokande, ntango Mika apamelaki ‘bazwi oyo batondi na mobulu,’ alobaki te ete bato yango bakoki kokoba na ezaleli yango mpo bakolaki na esika oyo mobulu ezalaki makasi. (Mika 6:12) Noa azalaki na bomoi ntango oyo mabele “etondaki na mobulu,” mpe bana na ye bakolaki na esika oyo etondaki na mobulu. Balandaki mobulu yango? Soki moke te! Biblia elobi ete “Noa andimamaki na miso ya Yehova,” mpe bana na ye balandaki ndakisa na ye mpe babikaki na Mpela.—Ebandeli 6:8, 11-13; Nzembo 11:5.
23, 24. (a) Nini ekoki kosalisa biso tóyebana te lokola bato ya mobulu? (b) Ndenge nini Yehova ayokaka mpo na bato oyo basalelaka bato makambo ndenge oyo ye alingaka?
23 Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bayebani lokola bato ya kimya kasi te lokola bato ya mobulu. Batosaka mpe balandaka mibeko ya Kaisala oyo epekisi misala ya mobulu. (Baroma 13:1-4) Basalaka makasi mpo na ‘kotula mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele,’ mpe basalaka nyonso mpo na kolanda kimya. (Yisaya 2:4) Basalaka nyonso mpo na kolata “bomoto ya sika,” yango esalisaka bango báboya mobulu. (Baefese 4:22-26) Mpe balandaka ndakisa kitoko ya bankulutu ya lisangá, oyo bakoki te ‘kobɛta’ bato na maloba to na nzoto.—1 Timote 3:3; Tito 1:7.
24 Ya solo tokoki mpe tosengeli kosalela bato makambo ndenge Nzambe alingaka. Hosea alobi boye: “Nani azali moto ya bwanya, mpo akanga ntina ya makambo oyo? Moto ya mayele, mpo ayeba yango? Mpamba te banzela ya Yehova ezali alima, mpe bayengebene nde bakotambola wana.”—Hosea 14:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na oyo etali ‘kobosana kobuka mibeko,’ moto moko ya mayele alobaki ete maloba ya Ebre “emonisi ndenge moto ya mobembo alekaka na nzela kozanga kotala eloko moko oyo alingi te kotyela likebi. Likanisi [ezali te ete Nzambe amonaka te lisumu] kasi na ntango mosusu atyaka mpenza likebi te na lisumu, asepelaka kolimbisa na esika ya kopesa etumbu.”
b Na kilomɛtrɛ soki 35 na sudi-ɛsti ya Ninive, ezalaki na engumba Kalah (Nimroud), engumba oyo Assournasirpal atongaki lisusu. Na ndako oyo babombaka biloko ya kala na Angleterre, batyá makonzí ya bifelo oyo eutá na Kalah, mpe na makonzí yango tokoki kotánga boye: “Assournasirpal, azalaki mpenza kobunda lokola nyama mabe ya zamba ntango azali kobunda na banguna na ye. Bato oyo azalaki kokanga na etumba azalaki kokakisa bango na nzete to kobaka bango na nzete mpe kokakisa bango na bifelo ya bingumba oyo azalaki kozwa . . . ; azalaki kolongola bilenge mibali mpe basi mposo ya nzoto wana bazali naino na bomoi.”—Archaeology of the Bible.
YEHOVA ALINGAKA NINI?
• Ndenge nini ndakisa ya Yehova ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge tokoki kosala epai ya ndeko oyo asali biso mabe?—Hosea 14:2; Mika 7:18; Malaki 2:10, 11.
• Soki tokokanisi Hosea 4:1 mpe Zekaria 8:16 tokomona ete Yehova asɛngaka tózala ndenge nini na basusu?
• Likambo nini omoni okoki kobongisa na ndenge na yo ya kosalela basusu makambo?
NA BOKESENI NA MOKILI
• Makambo nini omoni oyo emonisi ete bato mingi na mokili bazali ‘komɛla mobulu’?—Masese 4:17; Sefania 1:9; Malaki 2:17.
• Ndenge nini okoki kosalela Mika 4:3 na lisangá mpe na libota na yo?
• Ndenge nini mokapo oyo esalisi yo omona ete okoki kozwa mateya na mikanda mosusu ya Biblia oyo mbala mingi totyelaka likebi mingi te?
[Elilingi na lokasa 113]
Soki moto moko asali yo mabe, likambo nini osengeli koboya?
[Elilingi na lokasa 121]
Dessin animé mpe masano mingi ya video ekosaka bilenge bákanisa ete mobulu ezali mabe te