Toluka baoyo babongi mpo na bomoi na seko
“Baoyo nyonso babongi mpo na bomoi na seko bandimaki.”—MISALA 13:48, “MN.”
1. Motema na moto mokoki nde kobómba likambo moko liboso na Jéhovah?
JÉHOVAH NZAMBE akotalaka makanisi nyonso ya mitema na bato. Yango emonanaki wana mosakoli Samwele akendeki epai na Yisai mpo na kopakola moko kati na bana na ye lokola mokonzi na Yisraele. Emonaki ye Eliaba, Samwele “alobaki ete, ‘Solo mopakolami na Jéhovah azali liboso na ye.’ Kasi Jéhovah alobaki na Samwele ete: ‘Tala elongi na ye te mpe molai na nzoto na ye te, mpo ete naboyi ye. Mpamba te Jéhovah akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akotalaka lolenge na libanda nde Jéhovah akotalaka kati na motema.’” Na yango, Jéhovah alobaki na Samwele ete apakola Davidi, “moto oyo akosepelisa motema na ye.”—1 Samwele 13:13, 14; 16:4-13.
2. Nini elonami kati na motema na elilingi ya moto nyonso, mpe maloba nini mandimisi biso kati na Makomami?
2 Moto nyonso azali na motindo na ezalela ya makanisi oyo malónami kati na motema na ye ya elilingi. (Matai 12:34, 35; 15:18-20) Na yango tozali kotanga na ntina na moto moko ete “motema na ye motondi na etumba” (Nzembo 55:21); lisusu ete, “moto na nkanda ekotonda na masumu”; mpe lisusu ete “moto na baninga akoki kokweisama, kasi moninga azali mpe oyo akotikala penepene koleka ndeko.” (Masese 29:22; 18:24, MN) Likambo na esengo mpenza mpo ete, mingi bakokani na Bapakano oyo bafandaki na Antiokia na Pisidi ya kala, baoyo, nsima na koyoka bibongiseli bizwamaki na Jéhovah mpo na lobiko, “basepelaki, mpe bakumisaki liloba na Jéhovah. mpe baoyo nyonso babongi mpo na bomoi na seko bandimaki.”—Misala 13:44-48.
Bandimi “bapetwi na mitema”
3, 4. (a) Banani bapetwi na mitema? (b) Na ndimbola nini baoyo bapetwi na mitema bazali komona Nzambe?
3 Bandimi wana ya Antiokia bazwaki batisimo, mpe baoyo batikalaki sembo na lisangá ya boklisto bakokisaki maloba oyo na Yesu ete: “Esengo na baoyo bapetwi na mitema, mpo ete bakomona Nzambe.” (Matai 5:8) Kasi, banani oyo “bapetwi na mitema”? Mpe na ndimbola nini “bakomona Nzambe”?
4 Baoyo bapetwi na mitema bazali peto kati na bango. Bopeto yango botali makambo oyo basepelaka na yango, bolingo na bango, mposa na bango mpe mikano na bango. (1 Timote 1:5) Uta sikawa, bazali komona Nzambe na boye ete bazali komona lolenge Nzambe azali kosalisa bato na sembo. (Tala Exode 33:20; Yobo 19:26; 42:5.) Liloba na greke libóngolami ete “bakomona” elimboli lisusu “komona na miso ya elimo, kososola, koyeba.” Mpo ete Yesu azalaki na kokoka, amonisaki bomoto na Nzambe mpenzampenza, baoyo “bapetwi na mitema,” baoyo bazali kondima Klisto mpe mbeka na ye ya lisiko, baoyo, epai mosusu bazali kozwa lilimbisi ya masumu na bango mpe bazali kopesa Nzambe losambo oyo lozali kosepelisa ye, baoyo wana bazali mpenza komona bomoto na Nzambe polele. (Yoane 14:7-9; Baefese 1:7) Mpo na oyo etali baklisto bapakolami na elimo, bakomona mpenza Nzambe mpe Klisto ntango bakosekwa mpo na makoló. (2 Bakolinti 1:21, 22; 1 Yoane 3:2) Nzokande, baoyo nyonso bapetwi na mitema bakoki komona Nzambe na kozwáká boyebi ya solo mpe na kosambelaka engebene solo. (Nzembo 24:3, 4; 1 Yoane 3:6; 3 Yoane 11) Bazalí na ezalela ebongi mpo na bomoi na seko na likoló to kati na Paradis na mabelé.—Luka 23:43; 1 Bakolinti 15:50-57; 1 Petelo 1:3-5.
5. Bobele na ezalela nini moto akoki kokóma mondimi mpe moyekoli ya solo na Yesu Klisto?
5 Baoyo babongi te mpo na bomoi na seko bazali bandimi te. Bakoki mpe kondima te. (2 Batesaloniki 3:2) Na epai mosusu, moto te akoki kokóma moyekoli na Yesu Klisto kozanga kolakisama to mpe soki Jéhovah abendi ye te, ye oyo akotalaka motema. (Yoane 6:41-47) Ya solo, wana ekosakolaka bango ndako na ndako, ba Témoins de Jéhovah bakoponaka bato te. Bakotalaka mpe mitema na bato te: bakotikaka nyonso epai na Nzambe.
6. (a) Nini elobamaki mpo na kosolola elongo na bato kati na mosala ya kosakola ndako na ndako? (b) Ba Témoins de Jéhovah bazali koluka baoyo babongi mpo na bomoi na seko. Nini esili kosalema mpo na kosalisa bango kati na likambo yango?
6 Molimboli moko na Biblia amonisaki na bosembo nyonso ete: “[Paulo] ateyaki solo liboso na bato banso mpe ndako na ndako. Asakolaki na ntina na Klisto bobele na nzela na badiskur te, kasi lisusu na masoló oyo azalaki kosala elongo na moto na moto. Mbala mingi, lisoló elongo na moto eleki mpenza malamu mpo na kosimba motema na ye.” (August Van Ryn) Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, Comment raisonner à partir des Écritures mpe Mosala na biso ya Bokonzi ezali mikanda mizali kosalisa ba Témoins de Jéhovah na kosala mikumba na bango malamu mpe kobongisa malamu masoló oyo bazali kosala elongo na bato oyo bazali kokutana na bango kati na mosala ya ndako na ndako. Bilakiseli oyo bisalamaka na Likita ya mosala mpe batoli epesamaka na Eteyelo ya mosala ya Nzambe ezali mpe na matomba mingi. Baoyo bakosalaka mikumba na eteyelo, bazali koyekola mpo na kozala na makoki ya koloba malamu, oyo ekosalisaka bango na kobanda masoló kitoko, na kosalela Makomami na ndenge ekoki, kolimbola lisoló moko na lolenge malamu, na kopesa makanisi ya kondimisa moto, na kosalela masese mpe koyeba kosukisa lisoló na maloba oyo makoki kopusa moto na kosala eloko to na kozwa ekateli. Totala lolenge nini Biblia ebakisi formation oyo ezali kopesa nzela na basaleli na Nzambe ete baluka lisusu na molende mpenza, baoyo babongi mpo na bomoi na seko.
Maloba na kobanda masoló maye makosengaka bato ete bakanisa
7. Maloba na Yesu mpo na kobanda Lisoló likoló na ngomba mateyi biso nini mpo na oyo etali ebandeli ya masoló na bisi?
7 Wana tokomibongisa mpo na kotatola na ndako na ndako, tokoki mpenza kokanisa na lolenge oyo Yesu azalaki kolamusa mposa ya bato na maloba ya ebandeli. Na ebandeli ya Lisoló na ye na likoló na ngomba, asalelaki liloba “esengo” mbala libwa. Na ndakisa alobaki ete: “Esengo na baoyo bazali kobanza mposa na bango ya elimo, mpo ete bokonzi ya makoló ezali na bango. . . . Esengo na basokemi, mpo ete bakosangola mokili.” (Matai 5:3-12, MN) Maloba oyo mazali polele mpe mataleli bato; mpe ntembe ezali te ete maloba yango malamusaki mposa ya bayoki na ye mpe bamonaki ete maloba yango matali bango, mpamba te mposa ya moto nyonso ezali ete azala na esengo. Boye te?
8. Ndenge nini tokoki kobanda lisoló kati na mosala ya kosakola ndako na ndako?
8 Kati na mosala ya kosakola ndako na ndako, tosengeli kobanda lisoló na móto nyonso mpe na maloba kitoko. Kasi, ebongi te kobanda lisoló na maloba oyo makobulunganisa moto, lokola oyo ete: “Namemeli yo nsango moko’euti mpenza na likoló.” Ya solo, nsango euti longwa na makoló, kasi, na maloba wana, molobani na biso akoki komituna soki motó na biso ezali mpenza malamu, to soki asengeli nokinoki kolongwa pene na biso.
Tosembola Líloba na Nzambe
9. (a) Kati na mosala ya kosokola, ndenge nini tokoki kokótisa mokapo, kotanga yango mpe komonisa na molobani na biso lolenge oyo akoki kosalela yango? (b) Ndakisa nini etongami mpo na komonisa ete Yesu azalaki kotuna mituna?
9 Ezala na estrade to na mosala ya ndako na ndako, tosengeli kosalela na mayele mpenza mikapo ya Makomami oyo tozali kolimbola, kotanga yango na mongongo mobongi mpe kokokisa yango na lolenge malamu mpe ya polele. Ezali lisusu malamu na kotunaka mituna epai na molobani na biso mpo ete akanisa na mokapo boye to boye ya Biblia. Wana lisusu, ndakisa na Yesu ezali na ntina mingi. Moto moko ayebaki mpenza Mibeko na Moïse, atunaki ye mokolo mosusu ete: “Molakisi, nasala nini ete nazwa bomoi na seko?” Yesu ayanolaki ye ete: “Nini ekomami kati na Mibeko? Otangi nini na yango?” Yesu ayebaki ete moto yango akokaki koyanola na motuna wana. Mpe, moto yango ayanolaki malamu mpenza. Alobaki ete: “‘Okolinga Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na mayele na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba, mpe na elimo na yo mobimba’, mpe ‘mozalani na yo lokola yo moko.’” Na yango, Yesu akumisaki ye, mpe lisoló elandamaki.—Luka 10:25-37.
10. Na ntina etali lisoló mpo na mosala ya kosakola, eloko nini tosengeli kobosana te, mpe tosengeli kopengola nini wana ezali biso kotuna mituna epai na molobani na biso?
10 Wana ezali biso kopesa litatoli ndako na ndako, tosengeli kolobela mingi motó na likambo ya lisoló mpo na mosala ya kosakola mpe komonisa polele bantina oyo tozali kotanga mikapo ya Biblia oyo mizali na boyokani na lisoló yango. Mpo ete mokano ya Témoin ezali ete asimba motema ya molobani na ye, asengeli bongo kopengola kotuna ye mituna na kookisa nkanda to nsoni. Wana ezali biso kosalela Liloba na Nzambe, tika ete maloba na biso ‘mazala ntango nyonso na ngolu mpe na elengi na mongwa.’—Bakolose 4:6.
11. Na likambo nini lolenge oyo Yesu ayanolaki na moko na masenginya na Satana ekoki kozala ndakisa mpo na biso, wana tokosalela Makomami mpo na kosembola makanisi malongóbani te?
11 Mingi mpenza na ntango tozongaka kotala bato oyo tosilaki kokutana na bango, ekoki kozala ntina ete tosembola mwa makanisi oyo malongóbani te, na komonisáká to na kolimboláká nini elobami na Makomami. Ezali yango nde Yesu asalaki wana apamelaki Satana, oyo alobaki ete: “Soki ozali Mwana na Nzambe, omibwaka yo moko na nsé [longwa na nsamba na temple, likambo oyo elingaki kokokana na komiboma]; mpamba te ekomami ete: ‘Akolaka baanzelu na ye na ntina na yo, bakomema yo na maboko na bango, ete otuta litambe na yo na libanga te.’” Nzembo 91:11, 12, oyo etangamaki na Satana, elimboli soko moke te ete otya bomoi na likámá. Bomoi ezali likabo na Nzambe. Kososoláká ete ezalaki malamu te na komeka Jéhovah na kotyáká bomoi na ye na likámá kozanga ntina, Yesu alobaki na Satana ete: “Ekomami lisusu ete: ‘Okomeka Jéhovah, Nzambe na yo te.’” (Matai 4:5-7) Na motindo na ye mpenza, Satana azali moto oyo akolukaka solo te; kasi wana bato na bososoli bazali na makanisi mabe oyo ekoki kopekisa bango ete bakóla noki te kati na elimo, mosakoli ya Liloba na Nzambe asengeli na mayele nyonso, komonisa bango nini elobami na Makomami na ntina na likambo yango mpe kopesa bango ndimbola malamu. Tala kati na makambo mosusu, ndimbola ya ‘kosembola liloba na solo,’ moko na makambo na ntina oyo Eteyelo ya mosala ya Nzambe ezali kolakisa biso.—2 Timote 2:15.
Kondimisa moto ezali na ntina mingi
12, 13. Mpo na nini ezali malamu koluka kondimisa bato kati na mosala ya kosakola?
12 Kondimisa bato ezali na ntina mingi kati na mosala na boklisto. Na ndakisa, Paulo alendisaki Timote, moninga na ye ya mosala ete aumela kati na makambo oyo ayekolaki mpe kati na makambo oyo “bandimisaki ye.” (2 Timote 3:14, MN) Na mokolo nyonso ya Sabata na mboka Kolinti, Paulo “alakisaki kati na eyanganelo mpe andimisaki Bayuda mpe Bagreke.” (Misala 18:1-4, MN) Na Efese, alongaki kati na mosala na ye na “kolakisáká [kati na eyanganelo] mpe koluka kondimisa bato na ntina na bokonzi na Nzambe.” (Misala 19:8, MN) Wana ezalaki ye na ndako oyo ekengelamaki na basoda na Roma, ntoma azalaki kobenga bato mpe kotatwela bango, mpe “koluka kondimisa” bango, na boye ete bamosusu bakómaki bandimi.—Misala 28:23, 24.
13 Ya solo mpenza, ata lolenge nini ba Témoins bakosala mpo na kondimisa bato, bobele baoyo babongi mpo na bomoi na seko nde bakokóma bandimi. Makanisi mpe bandimbola ya polele oyo ekopesama na mayele nyonso, ekomema bango mbala mosusu ete bandima. Kasi, tosengeli lisusu kosala nini mpo na oyo etali kondimisa bato?
Tozala na maloba malamu makoki kondimisa
14. (a) Kolimbola makambo na molongó na yango elimboli nini? (b) Kopesa makanisi makoki kosilisa ntembe elimboli nini?
14 Moko na bizaleli mpo na koloba malamu oyo etalelami na Eteyelo ya mosala ya Nzambe ezali bongo kolimbola makambo na molongó na yango, kozanga ete ekatana na nzela. Esengeli kobongisa malamu makanisi ya ntina mpenza mpe bandimbola ebongi na yango. Likambo mosusu ya ntina mingi: Makanisi makoki kosilisa ntembe; esengeli mpo na yango kotya miboko makasi mpe kopesa bilembeteli ya makambo oyo tozali koloba. Lisusu, ebongi na biso kosalisa bayoki na biso ete basosola na kolobeláká likanisi oyo tokoki koyokana elongo na bango, na kolimboláká makanisi na lolenge ebongi mpe na komonisáká na bayoki ete makambo yango matali bango. Wana lisusu, Makomami mazali kolakisa biso nzela ya kolanda.
15. (a) Wana elobaki ye na ngomba ya Ale, ndenge nini Paulo abendaki likebi ya bayoki na ye mpe ndenge nini azwaki likanisi mpo na koyokana elongo na bango? (b) Monisa na likambo nini Paulo alimbolaki makambo na molongó?
15 Bizaleli wana mpo na koloba malamu emonisamaki kati na diskur oyo ntoma Paulo asalaki na mboka Atene na ngomba ya Ale. (Misala 17:22-31) Ebandeli ya lisoló na ye ebendaki likebi ya bayoki mpe epesaki nzela na kozwa likanisi oyo akokaki koyokana elongo na bango. Alobaki ete: “Mibali ya Atene! Namoni ete na makambo nyonso boleki kokumisa banzambe.” Baatene bayambaki maloba wana lokola longonya. Nsima na kolobela etumbelo na mbeka oyo esalamaki mpo “na Nzambe oyo ayebani te,” Paulo apesaki ndimbola na molongó na yango, elongo na makanisi oyo makokaki kosilisa ntembe. Alobaki epai na Baatene ete Nzambe oyo bango bayebaki te, ye nde “asalaki mokili, mpe biloko nyonso kati na yango.” Na kokesene na nzambe-mwasi Aténa to na banzambe mosusu na Bagreke, ‘ye akofandaka na tempelo esalemi na maboko na bato te.’ Ntoma abakisaki ete Nzambe yango akopesaka bato banso bomoi mpe asalaki ete toluka ye mpe tozwa ye. Asosolaki lisusu elongo na bango na ntina na kozanga boyebi na losambo na bikeko ete, Nzambe akanisaki yango te, nde Mozalisi ‘azali kosakola epai na bato nyonso ete babongola mitema.’ Likambo oyo limemaki ye na koloba ete ‘Nzambe akosambisa mokili na boyengebene na nzela ya moto oyo ye asilaki kosekwisa kati na bakufi mpe atyaki ye’ mpo na yango. Lokola Paulo azalaki kosakola “nsango malamu na ntina na Yesu mpe na ntina na lisekwa,” Baatene bayebaki ete Mosambisi yango ezalaki Yesu Klisto.—Misala 17:18.
16. Diskur ya Paulo na ngomba ya Ale mpe formation oyo epesami na Eteyelo ya mosala ya Nzambe ekoki kozala na bopusi nini likoló na mosala na biso?
16 Ya solo, na ngomba ya Ale, Paulo asakolaki ndako na ndako te. Kasi, diskur na ye mpe formation oyo tozali kozwa na Eteyelo ya mosala ya Nzambe ekoki kosalisa batemwe mingi mpe kopesa bango nzela ete babongisa lolenge na mosala na bango ya kosakola Ee, bobele lokola bandimbola malamu mpe makanisi na Paulo mpo na kosilisa ntembe endimisaki mwa ndambo na bayoki na ye na mboka Atene ete bakóma bandimi, bobele bongo batoli yango ezali kosalisa ba Témoins de Jéhovah na kozala basakoli malamu mpenza.—Misala 17:32-34.
Tosalela bandakisa ebongi na koteya
17. Bandakisa ya lolenge nini tosengeli kosalela yango kati na mosala ya kosakola?
17 Eteyelo ya mosala ya Nzambe ezali mpe kosalisa basaleli na Nzambe na kosalela bandakisa malamu wana ezali bango kopesa litatoli ndako na ndako, mpe kati na mitindo misusu ya mosala na bango. Mpo na komonisa makanisi ya ntina, esengeli kosalela bandakisa ya petee mpe ya malamu. Esengeli kozwa yango kati na makambo mazali koleka na mokili mpe kokokisa yango na lolenge ya polele. Bandakisa na Yesu elongobanaki na masengami oyo nyonso.
18. Ndenge nini Matai 13:45, 46 ekoki kosalisa biso kati na mosala ya kosakola?
18 Na ndakisa, tala maloba oyo na Yesu, ete: “Bokonzi ya likoló ezali lokola motɛki oyo azali koluka mangaliti kitoko. Ezwi ye mangaliti moko ya motuya monene, akei nokinoki kotekisa nyonso ezalaki na ye mpe asombi yango.” (Matai 13:45, 46) Mangaliti kitoko ekozwamaka kati na bikókóló bizali na makelé (huitres) mpe na banyama mosusu ya seliseli. Nzokande, mangaliti oyo elobelami awa ebengami “mangaliti ya motuya monene.” Moteki azalaki na bososoli malamu mpo na koyeba motuya monene ya mangaliti wana, mpe amilengelaki na koteka nokinoki biloko na ye nyonso mpo ete azwa yango. Tokoki mbala mosusu kosalela ndakisa oyo, wana tokosala bozongeli ya sika to na boyekoli na Biblia na ndako, mpo na komonisa ete moto oyo ayebi solo motuya na Bokonzi na Nzambe, akosalaka lokola motɛki oyo. Asengeli kotya Bokonzi na Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na ye, kondimisamáká ete yango eleki makambo manso tozali koluka
Esukiseli oyo ekopusa moyoki ete azwa ekateli
19. Nini ezali mokano ya maloba na biso ya nsuka kati na mosala ya kosakola ndako na ndako?
19 Na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, basaleli na Nzambe bazali koyekola lisusu ete esukiseli ya diskur to ya lisoló esengeli mpenza koyokana na motó na likambo oyo elimbolami, komonisa na bayoki makambo nini basengeli kosala mpe kolendisa bango mpo na yango. Kati na mosala ya kosakola ndako na ndako, ezali na ntina mpenza ete molobani ayeba makambo nini asengeli kosala: ete asomba mokanda to mpe andima bozongeli ya sika.
20. Ndakisa nini malamu epesami na Matai 7:24-27 likoló na esukiseli oyo ezali kopusa moto na kosala eloko to na kozwa ekateli?
20 Mpo na yango, esukiseli ya Lisoló likoló na ngomba epesi biso ndakisa malamu. Na nzela na bandakisa ya petee oyo bato bazali kokanga ntina noki, Yesu amonisaki ete ezali likambo na mayele na kotósa maloba na ye. Alobaki ete: “Moto na moto oyo akoyokaka maloba na ngai mpe akotosaka yango, akokokana na moto na mayele oyo atongi ndako na ye likoló na mabangá. Mbula enoki, mpe mpela eyei, mpe mipepe mipepi, mpe ebeti ndako, nde ekwei te, mpamba te etongami likoló na mabangá. Kasi moto na moto oyo akoyokaka maloba na ngai, nde akotosaka yango te, akokokana na moto na ebebe oyo atongi ndako na ye likoló na zelo. Mbula enoki, mpe mpela eyei, mpe mipepe mipepi, mpe ebeti ndako yango, mpe ekwei. Kokwea na yango ezalaki mpe monene mpenza.” (Matai 7:24-27) Esukiseli oyo emonisi ete basaleli na Nzambe basengeli kotya milende ete bapusa bayoki na bango na kosala eloko to kozwa ekateli.
21. Likambo nini limonisami kati na makambo nyonso oyo touti kotalela, kasi nini tosengeli koyeba?
21 Likambo moko limonisami kati na makambo nyonso oyo touti kotalela: Eteyelo ya mosala ya Nzambe ekoki kosalisa baklisto mingi na kokóma basakoli na Bokonzi baoyo bakoki. Ya solo, soko tozali na makoki, ezali mpo ete yango euti liboso epai na Nzambe. (2 Bakolinti 3:4-6) Na epai mosusu, ezala makoki nini tozali na yango, mosakoli na nsango malamu moko te akoki kokómisa moto mondimi, bobele soko Nzambe abendi ye na nzela na Klisto. (Yoane 14:6) Nzokande, na kolukáká baoyo babongi mpo na bomoi na seko, basaleli na Nzambe basengeli kosalela biloko nyonso oyo Jéhovah azali kopesa bango mpo na kosunga bango na elimo.
Bozongeli
◻ Banani “baoyo bapetwi na mitema,” mpe na ndimbola nini ‘bazali komona Nzambe’?
◻ Makambo nini tosengeli kotalela wana ezali biso kobanda lisolo ya nsango na Bokonzi kati na mosala ya ndako na ndako?
◻ Tosengeli kosala nini mpo na kosembola Liloba na Nzambe kati na mosala ya kosakola?
◻ Eloko nini ekoki kosalisa biso na kozwa masoló mabongi mpe mazali kondimisa bato kati na mosala ya kosakola ndako na ndako?
◻ Likambo nini tosengeli komikundola na ntina na bandakisa oyo tokosalela kati na mosala ya kosakola?
◻ Esukiseli ya lisoló ezali na ntina nini kati na mosala ya kopesa litatoli?
[Elilingi na lokasa 16]
Yesu alobaki ete baoyo ‘bapetwi na mitema bakomona Nzambe.’ Yango elimboli nini?
[Elilingi na lokasa 18]
Esengeli kokótisa mikapo ya Makomami na mayele mpenza, kotanga yango na mongongo mobongi mpe kolimbola polele mpe na solo na likambo nini tokoki kosalela yango