Bomoi mpe ntango ya Bakristo ya ekeke ya liboso
“Mosali-mabaya”
“Oyo ezali mwana ya mosali-mabaya te?”—MATAI 13:55.
YESU ayebanaki kaka te lokola mwana ya “mosali-mabaya” kasi mpe lokola “mosali-mabaya.” (Marko 6:3) Na ntembe te, ayekolaki mosala yango epai ya Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye.
Makoki nini Yesu asengelaki kokóma na yango mpe bisaleli nini asengelaki koyeba kosalela na mosala na ye ya mosali-mabaya? Biloko mpe misala nini azalaki kosalela bato ya Nazarete? Kasi, ndenge nini mosala wana oyo ayekolaki banda bomwana esalisaki ye na bomoi na ye?
Mosala ya libota Fɔtɔ oyo ezali awa ezali kolakisa tata moko azali koteya mwana na ye ya mobali ya mokóló ndenge nini akoki kosalela kozanga likama Foret à archet, esaleli oyo batɔbɔlaka na yango mabaya. Mwana ya mobali oyo ya moke azali kolanda mpe kotala na likebi.
Mbala mingi, bana mibali bazalaki kobanda koyekola mosala yango kobanda na mbula soki 12 tii 15. Mingimingi, epai ya batata na bango. Formasyo yango ezalaki kozwa bambula mingi, mpe bana mibali basengelaki kosala makasi soki balingi kokóma na makoki oyo esengeli mpo na kokóma basali-mabaya ya solosolo. Kanisá bangonga mingi ya esengo oyo Yozefe alekisaki na Yesu—kosala na ye elongo, kosolola na ye, kolakisa ye mpo ayeba mosala yango malamumalamu lokola ye. Na ntembe te, Yozefe azalaki mpenza na esengo komona Yesu azali kopasola mabaya na ndenge ebongi mpenza!
Esɛngaki kozala na boyebi, makasi, mpe makoki Mosali-mabaya asengelaki koyeba lolenge ya nzete oyo asengelaki kosala na yango mosala. Akokaki kopona na kati ya banzete oyo ezalaki na mboka na bango, na ndakisa siprɛ, chêne, sɛdrɛ, figi mpe olive. Kasi, ezalaki te na esika oyo mosali-mabaya ya ekeke ya liboso akokaki kokende kosomba mabaya oyo ekatamaki na ndenge ebongi. Asengelaki nde kokende na zamba, kopona banzete oyo ebongi, kokata yango, kobenda yango tii na esika na ye ya mosala.
Biloko nini mosali-mabaya asengelaki kosala na nzete oyo amemaki? Akokaki kolekisa ebele ya bangonga libándá, mpo na kosalisa bato na kotonga bandako. Asengelaki kobongisa mabaya ya nsamba, kosala baeskalye na ndako, mpe kosala baporte, maninisa mpe bakadrɛ mpo na bifelo.
Mosali-mabaya azalaki mpe kosala biloko mosusu ya ndako. Bililingi oyo ezali awa emonisi biloko yango mosusu—Baarmware oyo ezalaki na batirware, ba-etajɛre, to baporte (1); ba-taburɛ (2), bakiti (3), mpe bamesa (4) ya mike mpe ya minene; mpe ba-bɛrso. Mpo na koyeisa kitoko biloko yango mosusu, mosali-mabaya azalaki kozwa libaya moko ya kitoko mpe kosala mayemi ya kitoko mpenza. Mpo na kobatela mpe kokómisa biloko yango kitoko, azalaki kopakola yango mafuta ya nzoi, vernis to mafuta mosusu.
Mosali-mabaya azalaki mpe kosala biloko mpo na baloni-bilanga—bikanganeli (5) oyo basalaki na banzete ya makasi, bazalaki kosala mpe bakanya, barato mpe bapau (6). Bitimweli (7) oyo azalaki kosala esengelaki kozala makasi, mpo bibende na yango ekoka kopasola banzela ya kolona na bisika mabangamabanga. Bapusu ya mabaya (8). Mosala na ye ezalaki mpe kosɛnga kobongisa mpe kobatela biloko ya ndako, bisaleli, mpe bapusu oyo asali.
Okoki komona na makanisi ndenge mosala wana ya Yesu ekómisaki ye? Kanisá ndenge mposo na ye eyindaki na moi makasi ya Proche-Orient, nzoto na ye ekómaki makasimakasi mpo na mosala makasi oyo asalaki bambula ebele, mpe mabɔkɔ na ye ekómaki makasi mpo na kosalela basóka, bamarto mpe basii.
Bandakisa na ye ezalaki kouta na mosala yango Mpo na koteya makambo mozindo ya Biblia, Yesu azalaki kosalela bandakisa ezangi mindɔndɔ ya biloko oyo bato bamesanaki na yango. Asalelaki mayele oyo azwaki na mosala ya mabaya na bandakisa na ye mosusu? Tózwa mwa bandakisa. Alobaki na ebele ya bato boye: “Bongo mpo na nini ozali kotala lititi na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko?” Mosali-mabaya asengelaki koyeba bonene ya libaya ya motɔndɔ. (Matai 7:3) Na nsima, Yesu alobaki na etuluku mosusu ete: “Moto oyo atye lobɔkɔ na ye na etimweli mpe azali kotala biloko oyo ezali na nsima abongi na bokonzi ya Nzambe te.” Ekoki kozala ete asalaki bitimweli mingi. (Luka 9:62) Moko ya libyangi ya boboto oyo Yesu apesaki bato ezalaki na boyokani na eloko moko oyo mosali-mabaya azalaki kosala. Yesu alobaki ete: “Bókamata ekanganeli na ngai . . . mpe bóyekola epai na ngai, . . . ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Matai 11:29, 30) Na ntembe te, Yesu ayebaki kosala ekanganeli oyo ekoki kosala moto mpasi te, kasi oyo ezalaki “pɛtɛpɛtɛ,” to oyo ebongaki mpenza.
Ekoki kozala ete batɛmɛli ya Yesu bazalaki kobenga ye “mwana ya mosali-mabaya” mpo na kotyola ye. Ata soki ezali bongo, ndenge ezalaki na ekeke ya liboso, bakristo ya lelo bamonaka yango likambo ya lokumu kolanda mosali-mabaya wana.
[Etanda/Bililingi na lokasa 26]
Kɛsi ya mosali-mabaya
Mosali-mabaya ya ekeke ya liboso lokola Yesu, asengelaki mpenza koyeba kosalela biloko oyo balakisi awa. Sii na ye (1) ezalaki ya ebende oyo esimbeli na yango ezalaki ya mabaya mpe ebende yango ezalaki na mino oyo epeli oyo ebongisamaki mpo na kokata malamu. Asengelaki mpe kosalela eloko moko oyo babengaka équerre (2) mpo na koyema eloko oyo alingi kosala, asengelaki mpe kozala na nsinga ya nivo mpe (3) komeka bisika oyo ezali semba. Na kati ya kɛsi na ye wana ezalaki mpe na nivo mosusu (4), ezalaki mpe na règle (5), varlope oyo epeli makasi, oyo ezalaki na mwa ebende oyo bakoki kolongola mpe kotya mosusu mpo na kopalola mabaya ya makasi (6), mpe sóka (7) mpo na kokata banzete.
Mosali-mabaya azalaki mpe na esaleli babengi tour à archet (8) mpe sizo (9) ya basali-mabaya, mpo na kokata mpe kobongisa mabaya. Na likoló ya kɛsi na ye, okoki komona marto moko ya monene ya mabaya (10) oyo azalaki kosalela yango mpo na kokɔtisa mabaya. Okoki mpe komona mwa sii ya moke (11), mwa plane (12) mpo na kobongisa, mpe bansɛtɛ (13). Na liboso ya kɛsi yango okoki komona marto ya ebende (14) mpe mwa sóka ya moke (15) mpo na kobongisa mabaya. Likoló ya kɛsi okoki komona mpe mwa mbeli (16) ata mpe basizo (17) ya minene ná mike. Foret à archet (18) elali pembeni ya kɛsi yango.