Yehova akokisaka bamposa na biso ya mokolo na mokolo
“Bótika kozala motema likolólikoló; mpo . . . Tata na bino ayebi ete bozali na mposa ya biloko yango.”—LUKA 12:29, 30.
1. Ndenge nini Yehova aleisaka banyama?
OSÍ omoná mokɛngɛli-mboka to ndɛkɛ mosusu ezali kododadoda na mabelé? Mbala mosusu omitunaki soki ezali mpenza kozwa biloko ya kolya. Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu amonisaki ete tokoki kozwa liteya na ndenge oyo Yehova aleisaka bandɛkɛ. Alobaki boye: “Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló, mpamba te balonaka te mpe babukaka te mpe bayanganisaka te na ndako ya kobomba biloko; nzokande Tata na bino ya likoló aleisaka bango. Bino boleki bango na motuya te?” (Matai 6:26) Yehova aleisaka bikelamu na ye nyonso na ndenge ya kokamwa mpenza.—Nzembo 104:14, 21; 147:9.
2, 3. Mateya nini tokoki kozwa na ndenge Yesu ateyaki biso kobondela mpo na mampa ya mokolo na mokolo?
2 Kasi, mpo na nini, na libondeli ya ndakisa, Yesu abakisaki lilɔmbɔ oyo: “Pesá biso lelo mampa na biso mpo na mokolo oyo”? (Matai 6:11) Tokoki kozwa mateya ya ntina na mwa maloba wana. Ya liboso, ezali komonisa biso ete Yehova azali Mopesi Monene ya biloko. (Nzembo 145:15, 16) Bato bakoki kolona, kasi kaka Nzambe nde akoki kokolisa, ezala na elimo to na mosuni. (1 Bakolinti 3:7) Biloko nyonso oyo tolyaka mpe oyo tomɛlaka ezali makabo ya Nzambe. (Misala 14:17) Kosɛnga ye akokisa bamposa na biso ya mokolo na mokolo emonisaka botɔndi na biso mpo na biloko yango. Kasi, yango elingi koloba te ete soki tosɛngi bongo, nsima tokangi mabɔkɔ ata soki tozali na makasi ya kosala.—Baefese 4:28; 2 Batesaloniki 3:10.
3 Ya mibale, kosɛnga “mampa mpo na mokolo oyo” emonisaka ete tosengeli te komitungisaka mingi mpo na lobi. Yesu abakisaki boye: “Bómitungisa soki moke te mpe bóloba te ete, ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo mosusu balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na mposa ya biloko nyonso wana. Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino. Bongo, bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko.” (Matai 6:31-34) Kosɛnga “mampa mpo na mokolo oyo” etindaka biso tózala na bomoi ya mindɔndɔ te, oyo emonanaka na ‘ezaleli ya kokangama na Nzambe elongo na ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango.’—1 Timote 6:6-8.
Bilei ya elimo mokolo na mokolo
4. Makambo nini na bomoi ya Yesu mpe ya Bayisalaele ezali komonisa ntina ya kolya bilei ya elimo?
4 Kosɛnga mampa mpo na mokolo esengeli mpe kosalisa biso tóyeba ete tozali na mposa ya bilei ya elimo. Atako Yesu ayokaki nzala makasi nsima ya kolekisa mikolo ebele kozanga kolya, akweaki te ntango Satana amekaki ye na kobongola mabanga mampa; alobaki ete: “Ekomamá boye, ‘Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.’” (Matai 4:4) Yesu azongelaki maloba ya mosakoli Moize, oyo alobaki na Bayisalaele ete: “[Yehova] akitisaki lolendo na yo mpe atikaki yo koyoka nzala mpe aleisaki yo na mana, oyo eyebaki batata na yo te, na ntina ete ayebisa yo ete moto akotikala na bomoi bobele mpo na kwanga te, kasi ete moto akotikala na bomoi mpo na makambo nyonso makobimaka na monɔkɔ ya [Yehova].” (Deteronome 8:3) Yehova apesaki Bayisalaele mana mpo na kokokisa mposa na bango ya mosuni, kasi na likambo yango, apesaki bango mpe mateya ya elimo. Ya liboso, esengelaki ‘mokolo na mokolo bálɔkɔtaka yango ekoki.’ Soki balɔkɔti mingi koleka oyo ekoki mpo na mokolo, oyo etikali, soki elali, ezalaki kolumba nsolo mpe kobimisa nkusu. (Exode 16:4, 20) Kasi, ezalaki kosalema bongo te mokolo ya motoba ntango bazalaki kolɔkɔta mingi mpo na mokolo wana mpe mpo na mokolo ya Sabata. (Exode 16:5, 23, 24) Na bongo, mana eteyaki bango ete basengelaki kotosa Nzambe mpe ete eloko ekokaki kobatela bomoi na bango ezalaki mampa te kasi nde “makambo nyonso makobimaka na monɔkɔ ya [Yehova].”
5. Ndenge nini Yehova apesaka biso bilei ya elimo mokolo na mokolo?
5 Biso mpe tosengeli mokolo na mokolo kolyaka bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa biso na nzela ya Mwana na ye. Mpo na yango, Yesu aponi “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa ndako ya kondima “bilei na ntango oyo ebongi.” (Matai 24:45) Moombo ya sembo azali kopesa biso ebele ya bilei ya elimo na nzela ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, kasi azali mpe kolendisa biso tótángaka Biblia mokolo na mokolo. (Yosua 1:8; Nzembo 1:1-3) Lokola Yesu, biso mpe tokoki kozwa bilei ya elimo soki mokolo na mokolo tozali kosala molende mpo na koyeba mokano ya Yehova mpe kosala yango.—Yoane 4:34.
Bolimbisi ya masumu
6. Mpo na banyongo nini tosengeli kosɛnga bolimbisi, mpe Yehova akondima kotika yango soki tosali nini?
6 Lilɔmbɔ mosusu na libondeli ya ndakisa elobi boye: “Limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tosili kolimbisa bato oyo bazali na banyongo na biso.” (Matai 6:12) Na maloba yango, Yesu alobelaki nyongo ya mbongo te. Azalaki kolobela bolimbisi ya masumu na biso. Na Evanzile ya Luka, libondeli ya ndakisa elobi na esika yango boye: “Limbisá biso masumu na biso, mpo biso moko mpe tolimbisaka moto nyonso oyo azali na nyongo na biso.” (Luka 11:4) Na yango, ntango tosali lisumu, ezalaka lokola nde tokɔti nyongo epai ya Yehova. Kasi, Nzambe na biso ya bolingo azali pene ya ‘koboma’ nyongo yango to kotika yango soki tobongoli mpenza motema, ‘tobongwani,’ mpe tosɛngi bolimbisi na nzela ya kondima na biso na mbeka oyo Klisto apesaki mpo na kobikisa biso.—Misala 3:19; 10:43; 1 Timote 2:5, 6.
7. Mpo na nini tosengeli kosɛngaka bolimbisi mokolo na mokolo?
7 Lisusu, tosalaka lisumu ntango tokokisi te mitinda ya sembo ya Yehova. Lokola bankɔkɔ na biso batikelá biso lisumu, biso nyonso tobɛtaka mabaku na maloba, na misala, na makanisi to tokokisaka te oyo tosengeli kosala. (Mosakoli 7:20; Baloma 3:23; Yakobo 3:2; 4:17) Yango wana, ezala toyebi ete tosalaki lisumu na boumeli ya mokolo to te, tosengeli kobosana te kosɛnga bolimbisi ya masumu na biso na mabondeli na biso ya mokolo na mokolo.—Nzembo 19:12; 40:12.
8. Mabondeli na biso mpo na kosɛnga bolimbisi esengeli kotinda biso na kosala nini, mpe yango ememaka matomba nini?
8 Tosengeli kobondela mpo na kosɛnga bolimbisi nsima ya komitalela malamumalamu, kobongola motema, koyambola masumu, mpe tosengeli kondima ete makila ya Yesu oyo esopanaki ezali na nguya ya kolongola masumu. (1 Yoane 1:7-9) Mpo na komonisa ete tozali kobondela na bosembo, ntango tosɛngi bolimbisi, tosengeli mpe komonisa “misala oyo ebongi na kobongola motema.” (Misala 26:20) Na ntango wana nde, tokoki kondima ete Yehova akolimbisa masumu na biso. (Nzembo 86:5; 103:8-14) Na nsima tokozwa kimya ya makanisi, “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso” oyo “ekobatela mitema na [biso] mpe makoki na [biso] ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:7) Kasi, libondeli oyo Yesu ateyaki lokola ndakisa ezali komonisa biso likambo mosusu oyo tosengeli kosala mpo Nzambe alimbisa masumu na biso.
Mpo Nzambe alimbisa biso, tosengeli kolimbisaka
9, 10. (a) Ndimbola nini Yesu abakisaki na libondeli ya ndakisa, mpe yango emonisaki mpenzampenza nini? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki lisusu ntina oyo tosengeli kolimbisaka?
9 Likambo ya kobenda likebi ezali ete, na libondeli yango mobimba, Yesu alimbolaki kaka eteni oyo elobi ete “limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tosili kolimbisa bato oyo bazali na banyongo na biso.” Na nsuka ya libondeli yango, Yesu abakisaki boye: “Mpo soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló akolimbisa mpe bino; kasi soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino akolimbisa mpe mabunga na bino te.” (Matai 6:14, 15) Na bongo, Yesu amonisaki polele ete mpo Yehova alimbisa biso, biso mpe tosengeli kolimbisaka basusu.—Malako 11:25.
10 Mokolo mosusu, Yesu apesaki ndakisa moko oyo ezali komonisa ete tosengeli kolimbisaka soki tolingi ete Yehova alimbisa biso. Alobelaki ndakisa ya mokonzi moko oyo atikelaki moombo na ye nyongo moko monene oyo asengelaki kofuta ye. Na nsima, mokonzi apesaki moombo yango etumbu ya makasi mpo aboyaki kotikela moninga na ye moombo mwa nyongo ya moke. Yesu asukisaki ndakisa na ye na maloba oyo: “Ezali ndenge wana nde Tata na ngai ya likoló mpe akosalela bino soki bozali kolimbisa te moto na moto ndeko na ye na mitema na bino.” (Matai 18:23-35) Liteya ya ndakisa yango ezali polele: Masumu oyo Yehova alimbisi mokomoko na biso ezali monene koleka libunga nyonso oyo moto akoki kosala biso. Lisusu, Yehova alimbisaka biso mokolo na mokolo. Yango wana, tokoki kolimbisa mabe oyo basusu basalelaka biso na mwa bambala ya kotánga.
11. Toli nini ya ntoma Paulo tosengeli kolanda soki tolingi ete Yehova alimbisa biso, mpe yango ekomema matomba nini?
11 Ntoma Paulo akomaki boye: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mawa mingi, kolimbisanáká na motema moko ndenge Nzambe mpe na nzela ya Klisto alimbisaki bino na motema moko.” (Baefese 4:32) Kolimbisana etyaka kimya na esika oyo baklisto bafandi. Paulo alobaki lisusu boye: “Lokola baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami, bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai. Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo. Kasi, longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:12-14) Makanisi nyonso wana emonisami na libondeli oyo Yesu ateyaki biso: “Limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tosili kolimbisa bato oyo bazali na banyongo na biso.”
Libateli na ntango tomekami
12, 13. (a) Nini ekoki te kozala ndimbola ya lilɔmbɔ ya motoba na libondeli ya ndakisa? (b) Nani azali Momeki monene, mpe kobondela ete Yehova atika biso na komekama te elimboli nini?
12 Likambo ya motoba oyo Yesu alakisaki biso tósɛngaka na libondeli ya ndakisa ezali oyo: “Komema biso na komekama te, kasi bikisá biso longwa na moto mabe.” (Matai 6:13) Yesu alingaki nde koloba ete tosengeli kosɛnga Yehova ete amekaka biso te? Ekoki kozala bongo te, mpamba te, na lisalisi ya elimo santu, moyekoli Yakobo akomaki boye: “Ntango moto azali na kati ya komekama, aloba te ete: ‘Nazali komekama na Nzambe.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki te komeka moto na yango.” (Yakobo 1:13) Lisusu, mokomi ya nzembo akomaki boye: “Ɛ [Yehova], soki yo okotalaka bokesene, ɛ, Nkolo, nani akotɛlɛma?” (Nzembo 130:3) Yehova alandelaka te libunga mokomoko oyo tosalaka, alukaka mpe te komeka biso mpo tósala mabunga. Boye, maloba wana ya libondeli ya ndakisa ezali na ndimbola nini?
13 Satana nde moto amekaka biso mpo tósala mabunga, alukaka kokweisa biso na mayele mabe, ata mpe kolya biso. (Baefese 6:11) Azali Momeki monene. (1 Batesaloniki 3:5) Ntango tozali kobondela Yehova atika biso na komekama te, tozali nde kosɛnga ete atika biso te tókwea ntango tomekami. Tozali kosɛnga ye asalisa biso “tókosama na Satana te,” tókwea te na masɛnginya. (2 Bakolinti 2:11) Libondeli na biso ezali ete tótikala “na esika ebombani ya Oyo-Aleki-Likoló,” mpo ete na elimo, tózwa libateli oyo Yehova epesaka bato oyo babosanaka bokonzi na Ye te na makambo nyonso oyo basalaka.—Nzembo 91:1-3, NW.
14. Ndenge nini ntoma Paulo andimisi biso ete Yehova akotika biso te soki tosɛngi ye asalisa biso ntango tomekami?
14 Soki tozali mpenza na mposa ya libateli ya Yehova, tozali kobondela mpo na yango mpe tozali komonisa yango na misala na biso, Yehova akotika biso te. Ntoma Paulo alobi na biso boye: “Komekama ata moko te ekómeli bino oyo ezangi kokómela bato nyonso. Kasi Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobimela mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.”—1 Bakolinti 10:13.
“Bikisá biso longwa na moto mabe”
15. Mpo na nini sikoyo ezali na ntina koleka tóbondela Yehova abikisa biso longwa na moto mabe?
15 Na bamaniskri oyo eleki malamu ya Makomami ya Grɛki ya boklisto, libondeli ya ndakisa oyo Yesu ateyaki esuki na maloba oyo: “Bikisá biso longwa na moto mabe.”a (Matai 6:13) Na ntango oyo ya nsuka, tozali na mposa makasi lisusu ete Yehova abatela biso liboso ya Zabolo. Satana ná bademo na ye bazali kobundisa batikali bapakolami, “oyo bazali kotosa bakomandema ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu”; bazali mpe kobundisa baninga na bango “ebele ya bato.” (Emoniseli 7:9; 12:9, 17) Ntoma Petelo apesaki baklisto toli oyo: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto. Kasi bótɛmɛla ye, bózala makasi na kati ya kondima.” (1 Petelo 5:8, 9) Satana alingi kopekisa mosala na biso ya kotatola, mpe azali kosalela basaleli na ye awa na mabelé, ezala bakonzi ya mangomba, bato ya mombongo, to bato ya politiki, mpo na kobangisa biso. Kasi, soki tozongi nsima te, Yehova akobikisa biso. Yakobo akomaki ete: “Bótosaka Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”—Yakobo 4:7.
16. Yehova asalelaka nini mpo na kosalisa basaleli na ye ntango bamekami?
16 Yehova atikaki ete Mwana na ye amekama. Kasi, lokola Yesu asalelaki Liloba ya Nzambe mpo na komibatela mpe atɛmɛlaki Zabolo, Yehova atindaki baanzelu mpo na kolendisa ye. (Matai 4:1-11) Ndenge moko mpe, Yehova atindaka baanzelu na ye básalisa biso soki tobondeli na kondima mpe tokimi epai na ye. (Nzembo 34:7; 91:9-11) Ntoma Petelo akomaki boye: “Yehova ayebi kosikola uta na komekama bato ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kasi kobomba mpo na mokolo ya lisambisi bato oyo bazangi boyengebene mpo bálongolama.”—2 Petelo 2:9.
Etikali moke tóbikisama mpo na libela
17. Na libondeli ya ndakisa oyo ateyaki, ndenge nini Yesu atyaki likambo na likambo na esika na yango?
17 Na libondeli ya ndakisa, Yesu atyaki likambo na likambo na esika na yango. Mposa na biso ya liboso esengeli kozala ete nkombo monene mpe ya bosantu ya Yehova esantisama. Lokola Yehova akosalela Bokonzi ya Masiya mpo na kosantisa nkombo na ye, tobondelaka ete Bokonzi yango eya koboma makonzi, to baguvɛrnema nyonso ya bato bazangi kokoka, mpe kosala ete mokano ya Nzambe esalema na likoló mpe awa na mabelé. Elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé ekokokisama soki nkombo ya Yehova esantisami mpe bokonzi na ye ya sembo eyebani na molɔ́ngɔ́ mobimba. Nsima ya kobondela mpo na makambo yango ya ntina mingi, tokoki kobondela mpo na bamposa na biso ya mokolo na mokolo, bolimbisi ya masumu na biso, mpe kosɛnga na Nzambe asalisa biso tólonga komekama mpe mayele ya moto mabe, Satana Zabolo.
18, 19. Ndenge nini libondeli ya ndakisa ezali kosalisa biso tókɛngɛlaka ntango nyonso mpe tóbatela elikya na biso “makasi tii na nsuka”?
18 Etikali moke tóbikisama liboso ya moto mabe mpe ebongiseli ya makambo mabe. Satana ayebi malamu ete atikali kaka na “eleko moko ya ntango mokuse” mpo na kolakisa “nkanda makasi,” mingimingi epai ya basaleli ya Yehova awa na mabelé. (Emoniseli 12:12, 17) Ntango Yesu apesaki elembo ya “bosukisi ya ebongiseli ya makambo,” asakolaki makambo minene, mosusu kutu tomoni yango naino te. (Matai 24:3, 29-31) Ntango tokobanda komona yango, elikya ya lobiko ekokóma polele lisusu na miso na biso. Yesu alobaki boye: “Ntango makambo wana ekobanda kobima, bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpamba te kosikolama na bino ekómi pene.”—Luka 21:25-28.
19 Libondeli ya ndakisa oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye ezali komonisa biso makambo oyo tosengeli kolobelaka na mabondeli na biso lokola nsuka ekómi pene. Tiká tóbatela elikya tii na nsuka ete Yehova akokoba kokokisa bamposa na biso ya mokolo na mokolo, ezala ya elimo to ya mosuni. Soki tozali kokɛngɛla mpe kobondela, yango ekosalisa biso “tótingama makasi tii na nsuka na kondimisama makasi oyo tozalaki na yango na ebandeli.”—Baebele 3:14; 1 Petelo 4:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Babiblia mosusu ya kala, lokola Biblia na Ngala (Uele), Libondeli ya Nkolo esuki na lisanzoli oyo elobi boye: “Zambi bokonzi, na makasi, na nkembo azali na yo na mikolo, Amena.” Buku moko (The Jerome Biblical Commentary) elobi ete: “Lisanzoli . . . ezali te na [baminiskri] oyo eleki malamu.”
Bozongeli
• Kosɛnga “mampa mpo na mokolo oyo” elimboli nini?
• Limbolá maloba “limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tosili kolimbisa bato oyo bazali na banyongo na biso.”
• Kosɛnga Yehova amema biso na komekama te elimboli nini?
• Mpo na nini tosengeli kobondelaka ete “bikisá biso longwa na moto mabe”?
[Bililingi na lokasa 15]
Soki tolingi bálimbisa biso, biso mpe tosengeli kolimbisaka basusu
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]
Lydekker