MOKAPO 9
Mayele ya kosakola nsango malamu
YESU apesaki bayekoli na ye ndakisa na ndenge azalaki mosakoli ya molende ya nsango malamu. Ye nde azalaki kokende epai ya bato, kosolola na bango mpe koteya bango na bandako na bango mpe na bisika ya bato mingi. (Mat. 9:35; 13:36; Luka 8:1) Yesu asololaki na bato, ateyaki bayekoli na ye na esika oyo azalaki kaka ye ná bango, mpe ateyaki ebele ya bato. (Mrk. 4:10-13; 6:35-44; Yoa. 3:2-21) Asalelaki mabaku nyonso oyo emonani mpo na kobimisa maloba ya kolendisa mpe ya kopesa elikya. (Luka 4:16-19) Ata ntango azalaki na mposa ya kopema to ya kolya mwa eloko, alekisaki te mabaku ya kopesa litatoli. (Mrk. 6:30-34; Yoa. 4:4-34) Ntango totángaka masolo ya mosala ya Yesu na Biblia, toyokaka mposa ya komekola ye, boye te? Na ntembe te, toyokaka mposa yango, kaka lokola bantoma.—Mat. 4:19, 20; Luka 5:27, 28; Yoa. 1:43-45.
2 Tótalela mabaku oyo bakristo bazali na yango lelo oyo mpo na kosala mosala oyo Yesu Kristo abandisaki eleki sikoyo mbula pene na 2 000.
KOSAKOLA NDAKO NA NDAKO
3 Biso Batatoli ya Yehova toyebi ete kosakola nsango malamu ya Bokonzi ndako na ndako na ndenge oyo ebongisami, ezali na ntina mingi. Tosalelaka mayele yango mingi mpe toyebani malamu mpo na mosala yango. Matomba oyo emonani emonisi ete mayele wana oyo tosaleli mpo na koyebisa bamilio ya bato nsango malamu na ntango moke ezali nzela ya bwanya. (Mat. 11:19; 24:14) Kosakola ndako na ndako emonani ete ezali lolenge malamu ya komonisa ete tolingaka Yehova mpe bato.—Mat. 22:34-40.
4 Kosakola ndako na ndako ebandi kaka na Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso te. Ntoma Paulo alobaki ete azalaki koteya na bandako ya bato. Ntango ayebisaki bakɛngɛli ya Efese mosala oyo asalaki, alobaki boye: “Banda mokolo ya liboso oyo nanyataki etúká ya Azia . . . namipekisaki te koyebisa bino makambo nyonso oyo ezalaki na litomba to koteya bino . . . na ndako na ndako.” Ezala na ndako na ndako to mpe na mayele mosusu, ntoma Paulo ‘atatwelaki Bayuda mpe Bagrɛki malamumalamu makambo etali kobongola motema epai ya Nzambe mpe kondimela Nkolo na biso Yesu.’ (Mis. 20:18, 20, 21) Na ntango wana, baampɛrɛrɛ ya Roma bazalaki kolendisa bato na losambo ya bikeko, mpe bato mingi ‘bamipesaki na kobanga banzambe.’ Bato basengelaki nokinoki koluka “Nzambe oyo asalá mokili mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango,” Ye oyo azalaki “koyebisa bato na bisika nyonso ete basengeli bango nyonso kobongola motema.”—Mis. 17:22-31.
5 Lelo oyo mpe, esengeli komemela bato nsango malamu nokinoki mpo nsuka ya mokili oyo mabe ezali se kopusana. Lokola toyebi bongo, tosengeli kobakisa lisusu milende na mosala yango. Ezali na mayele moko te oyo eleki mayele oyo tosalelaka banda kala ya kosakola ndako na ndako mpo na koluka bato oyo bazali na mposa ya koyeba solo. Mayele yango ezali kobota mbuma lelo, kaka ndenge ezalaki na ntango ya Yesu mpe ya bantoma.—Mrk. 13:10.
6 Yo mpe omipesaka na kosakola ndako na ndako? Soki osalaka yango, yebá ete Yehova asepelaka na yo. (Ezk. 9:11; Mis. 20:35) Ekoki kozala ete okokaka te kosakola ndako na ndako mpo ozali na maladi to ozali ebɔsɔnɔ, to mpe ozali kosakola na teritware oyo bato mingi basepelaka na nsango malamu te. Ekoki mpe kozala ete guvɛrnema epekisi mosala na biso. Ntango mosusu ozalaka nsɔninsɔni, mpe omonaka ete ezali mpenza mpasi kobanda masolo na bato oyo oyebi te. Na yango, mbala nyonso oyo okei kosakola ndako na ndako, obangaka mwa moke. Kolɛmba nzoto te. (Kob. 4:10-12) Makambo oyo ozali kokutana na yango ekeseni na oyo bandeko bazali kokutana na yango na bisika mosusu.
7 Yesu alakaki bayekoli na ye ete: “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:20) Elaka yango epesaka biso makasi na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Toyokaka lokola ntoma Paulo ntango alobaki: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Flp. 4:13) Landá bibongiseli nyonso oyo lisangá ezwaka mpo na mosala ya kosakola ndako na ndako. Ntango ozali kosala elongo na bandeko mosusu, bakolendisa yo mpe bakosalisa yo. Bondeláká mpo olonga ata mikakatano nyonso oyo okoki kokutana na yango, mpe sakoláká nsango malamu na molende.—1 Yoa. 5:14.
8 Ntango ozali koyebisa bato nsango malamu, okozwa mabaku ya kolobela ‘ntina ya elikya oyo ozali na yango.’ (1 Pe. 3:15) Mokemoke okobanda komona polele bokeseni monene oyo ezali kati na baoyo bazali na elikya ya Bokonzi ná baoyo bazali na yango te. (Yis. 65:13, 14) Okozala na esengo mpo oyebi ete otosi etinda ya Yesu ya ‘kotika ete pole na yo engɛnga,’ mpe okoki ata kozwa libaku malamu ya kosalisa bato mosusu báyeba Yehova mpe solo oyo ezali komema na bomoi ya seko.—Mat. 5:16; Yoa. 17:3; 1 Tim. 4:16.
9 Bibongiseli ezwamaka mpo na kosakola ndako na ndako na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, ata mpe na kati ya pɔsɔ. Na bisika oyo ezalaka mpasi kokuta bato na bandako na bango na moi, masangá mosusu ezwaka bibongiseli mpo basakoli bápesa litatoli na mpokwa. Bato bakoki kosepela koyamba bapaya malamu na mpokwa to ntango moi ebandi kolala, kasi na ntɔngɔ te.
KOLUKA BATO OYO BABONGI
10 Yesu atindaki bayekoli na ye ‘báluka’ bato oyo babongi. (Mat. 10:11) Mpo na koluka bato oyo bazali na makanisi malamu, asukaki kaka te na mosala ya ndako na ndako. Kutu, azalaki kopesa litatoli ezala ntango azalaki na mosala ya kosakola to ntango kaka libaku emonani. (Luka 8:1; Yoa. 4:7-15) Bantoma mpe bazalaki kopesa litatoli na bisika ndenge na ndenge.—Mis. 17:17; 28:16, 23, 30, 31.
Mokano na biso ezali ete, soki likoki ezali, tósakwela moto nyonso nsango ya Bokonzi
11 Ndenge moko mpe lelo oyo, mokano na biso ezali ete, soki likoki ezali, tósakwela moto nyonso nsango ya Bokonzi. Yango elimboli kolanda mayele oyo Yesu ná bantoma na ye basalelaki mpo na kokómisa bato bayekoli, mpe kotalela mbongwana oyo ezali kosalema na mokili mpe na bomoi ya bato na teritware na biso. (1 Ko. 7:31) Na ndakisa, basakoli bazali kobuka mbuma malamu ntango bazali kokende kotala bato na bisika ya mosala. Kopesa litatoli na balabala ezali kobota mbuma na mikili mingi, ndenge moko na kopesa litatoli na baparke, na bisika oyo mituka etɛlɛmaka, to na bisika nyonso oyo bato bazali. Masangá mosusu etandaka mikanda na bamesa to na bashario na teritware na bango. Lisusu, biro ya filiale ekoki kozwa bibongiseli mpo ete na bingumba ya minene, basakoli ya masangá mingi bápesa litatoli na babalabala oyo bato mingi balekaka na makolo. Yango esalisaka bato oyo bazalaka na ndako te ntango basakoli balekaka kuna báyoka nsango malamu esika mosusu.
12 Na mosala ya kosakola na esika ya bato ebele, ntango tokutani na bato oyo basepeli na nsango ya Biblia, tokoki kolakisa bango mokanda oyo ebongi mpe kotuna bango soki bakozwa yango. Mpo na kokoba kosalisa moto oyo asepeli na solo, okoki kopesa ye nimero ya telefone na yo mpe kozwa bibongiseli mpo na kozongela ye, okoki kolakisa ye site jw.org, to mpe kopesa ye adrɛsi ya esika oyo makita esalemaka pene na esika oyo afandi. Okoki komona ete kopesa bato litatoli na bisika ya bato ebele ezali lolenge ya malamu ya kokolisa mosala na yo.
13 Nzokande, lelo oyo bakristo basengeli kosuka kaka te na kosakwela bato nsango malamu. Mpo na kosalisa mpenza bato báyamba solo oyo ezali komema na bomoi, osengeli kozongelaka mbala na mbala baoyo basepelaki mpo na kosalisa bango bákola tii bákóma bakristo oyo bakɔmeli.
KOZONGELA BATO OYO BASEPELI
14 Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Kasi, alobaki na bango mpe boye: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” (Mat. 28:19, 20) Kozongela bato oyo basepeli ekoki kopesa yo esengo mingi na mosala ya Yehova. Na ntembe te, bato oyo basepelaki na nsango malamu ntango okutanaki na bango mbala ya liboso, bakosepela komona yo lisusu. Soki oyebisi bango makambo mosusu oyo euti na Biblia, okoki kolendisa kondima na bango epai ya Nzambe mpe kosalisa bango báyeba bobola na bango ya elimo. (Mat. 5:3) Soki boyokanaki mpo ozongela bango na ntango oyo ebongi mpe omibongisi malamu, okoki kobanda koyekola na bango Biblia. Mbala nyonso oyo ozali kozongela moto, osengeli kozala na mokano wana. Tosukaka kaka te na kolona mboto ya solo, kasi tosopelaka yango mpe mai.—1 Ko. 3:6.
15 Basakoli mosusu bakokaka kozongela bato te. Mbala mosusu omesaná na maloba moko ya mokuse oyo osalelaka mpo na kobanda lisolo na mosala ya kosakola, mpe osepelaka na lolenge wana ya kosakola. Kasi, ntango mosusu obangaka mingi soki okanisi ete osengeli kozongela moto mpo bósolola makambo ya Biblia. Soki omibongisi malamu okobanga mingi te. Salá makasi osalela makanisi oyo tozwaka na likita ya kati ya pɔsɔ. Okoki mpe koyokana na ndeko oyo amesani na mosala ya kosakola mpo bósakola elongo.
KOYEKOLA NA BATO BIBLIA
16 Ntango Filipe, mopalanganisi ya nsango malamu, asololaki na prozelite moko oyo azalaki kotánga Liloba ya Nzambe, atunaki ye boye: “Ozali mpenza koyeba makambo oyo ozali kotánga?” Mobali yango ayanolaki: “Ndenge nini nakoki koyeba yango mpenza, soki moto alakisi ngai te?” Na nsima, lisolo ya Misala mokapo 8 eyebisi biso ete Filipe abandaki na eteni ya Makomami oyo moto yango azalaki kotánga mpe “asakolelaki ye nsango malamu oyo etali Yesu.” (Mis. 8:26-36) Toyebi te ntango boni Filipe alekisaki na moto wana, kasi Filipe alimbolelaki ye nsango malamu tii moto yango akómaki mondimi mpe asɛngaki ete azwa batisimo na mai. Akómaki moyekoli ya Yesu Kristo.
17 Lelo oyo, bato mingi bayebaka makambo ya Biblia te; yango wana, ekoki kosɛnga ozongela moto mbala na mbala mpe oyekola na ye Biblia na mozindo na boumeli ya bapɔsɔ, basanza, ata mbula mobimba to koleka, liboso akóma na kondima mpe akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo. Kasi, okozwa mbano mpo na motema molai mpe bolingo oyo omonisaka ntango osalisaka bato ya mitema sembo bákóma bayekoli, ndenge Yesu alobaki: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Mis. 20:35.
18 Okomona ete ezali mpenza mpasi te koyekola na moto Biblia soki ozali kosalela mikanda oyo ebongisamá mpo na koyekola na bato Biblia. Soki olandi malako oyo tozwaka na likita ya kati ya pɔsɔ mpe ozali kobima na bandeko oyo bateyaka malamu, okoyeba koyekola na bato na ndenge oyo ekosalisa bango bákola mpe okosalisa basusu bákóma bayekoli ya Yesu Kristo.
19 Soki ozali na mposa básalisa yo obanda koyekola na moto Biblia mpe okoba na boyekoli yango, sololá na nkulutu moko to na Motatoli moko oyo amesani koyekola na bato Biblia. Makanisi oyo ebimaka na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo mpe bilakiseli oyo esalemaka na likita yango ekoki mpe kosalisa yo. Tyelá Yehova motema mpe yebisá ye mposa na yo na libondeli. (1 Yoa. 3:22) Longola moto to bato ya libota na yo oyo mbala mosusu oyekolaka na bango, soki likoki ezali, omityela mokano ya koyekola Biblia ata na moto mosusu oyo azali moto ya libota na yo te. Soki ozali koyekola na bato Biblia, okosepela lisusu mingi na mosala ya kosakola.
TÓMEMA BATO OYO BASEPELI NA SOLO NA EBONGISELI YA YEHOVA
20 Ntango tosalisaka bato báyeba Yehova Nzambe mpe bákóma bayekoli ya Yesu Kristo, bakómaka bandeko na biso ya lisangá. Bayekoli ya Biblia bakokola na elimo mpe bakokɔmela soki bayebi ebongiseli ya Yehova mpe bazali kosala elongo na yango. Koteya bango básala bongo ezali na ntina mingi. Bavideo mpe mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? esalemi mpo na yango. Makambo mosusu oyo ezali na mokapo 4 ya buku oyo ekoki mpe kosalisa.
21 Ntango kaka obandi kosolola na moyekoli masolo ya Biblia, salisá ye amona ete Yehova azali kosalela ebongiseli moko mpo mosala ya kosakola esalema na mabele lelo oyo. Monisá ye ntina ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe limbolelá ye ndenge bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko basalisaka na kobimisa mikanda mpe kokabola yango na mokili mobimba. Bengisá moyekoli na yo na makita na Ndako ya Bokonzi. Limbolelá ye ndenge makita na biso esalemaka, mpe lakisá ye epai ya bandeko. Okoki mpe kosalisa ye ayebana na Batatoli mosusu na mayangani ya zongazonga mpe ya etúká. Na mabaku wana mpe na mabaku mosusu, tiká moto wana ya sika amona ndenge basaleli ya Yehova balinganaka, mpo yango ezali elembo ya bakristo ya solo. (Yoa. 13:35) Soki moto oyo azali kosepela na nsango malamu akómi mpe kosepela na ebongiseli ya Yehova, akopusana lisusu penepene na Yehova.
NDENGE YA KOSALELA MIKANDA NA BISO
22 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bakómaki basakoli ya molende ya Liloba ya Nzambe. Basalaki bakopi ya Makomami mpo na kotángaka bango moko mpe koyekola na lisangá. Bazalaki kolendisa bato mosusu bátánga Liloba ya Nzambe, oyo ezali solo. Bakopi yango oyo basalaki na mabɔkɔ ezalaki mingi te mpe ezalaki na motuya mpenza. (Kol. 4:16; 2 Tim. 2:15; 3:14-17; 4:13; 1 Pe. 1:1) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kosalela mayele ya mikolo oyo mpo na kobimisa na masini bamilio ya Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, na ndakisa batrakte, mwa babuku, babuku mpe bazulunalo na bankama ya minɔkɔ.
23 Ntango ozali kosakwela bato nsango malamu, saleláká mikanda oyo ebongiseli ya Yehova ebimisá. Soki okanisi matomba oyo yo moko ozwi na kotánga mpe koyekola mikanda ya Batatoli ya Yehova, yango ekotinda yo olakisa yango bato mosusu.—Ebr. 13:15, 16.
24 Bato mingi bakómi kosalela Internet lokola nzela ya libosoliboso ya koyeba makambo. Yango wana, longola mikanda oyo tobimisi na papye, site Internet na biso jw.org ezali esaleli ya malamu mpo na kopalanganisa nsango malamu. Bato na mokili mobimba bakoki kosalela ordinatɛrɛ mpo na kotánga mpe koyoka Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na bankama ya minɔkɔ. Bato oyo baboyaka kosolola na biso to baoyo bafandaka na esika oyo bazali na libaku mpenza te ya kosolola na Batatoli ya Yehova, bakoki koyeba bindimeli na biso soki bakɔti na jw.org na bandako na bango.
25 Yango wana, tolendisaka bato bákɔta na jw.org soki libaku emonani. Soki moto atuni motuna mpo na bindimeli na biso, tokoki kosalela telefone to ordinatɛrɛ mpo na kolakisa ye eyano mbala moko na jw.org. Soki tokutani na moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu, ata mpe elobeli ya bajɛstɛ, tokoki komema ye na jw.org mpo azwa Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ na ye. Basakoli mingi basalelaka moko ya bavideo oyo ezali na jw.org mpo na kobanda lisolo ya Biblia.
LITATOLI YA LIBAKU MALAMU
26 Yesu ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka maloba na ye ete: “Bino bozali pole ya mokili. . . . Tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.” (Mat. 5:14-16) Bayekoli yango bamonisaki banzela ya Nzambe na ndenge bamekolaki Yesu Kristo, oyo alobaki: “Ngai nazali pole ya mokili.” Yesu apesaki bakristo ndakisa na ndenge atikaki “pole ya bomoi” engɛnga mpo na bolamu ya bato nyonso oyo bakoyoka.—Yoa. 8:12.
27 Ntoma Paulo mpe atikelá biso ndakisa. (1 Ko. 4:16; 11:1) Ntango azalaki na Atene, mokolo na mokolo azalaki kopesa bato oyo bazalaki na zando litatoli. (Mis. 17:17) Bakristo ya Filipi balandaki ndakisa na ye. Yango wana, ntoma Paulo akomelaki bango ete bazalaki kofanda “na kati ya libota oyo etɛngamá mpe egumbamá,” epai bazalaki “kongɛnga lokola miinda na mokili.” (Flp. 2:15) Lelo oyo, biso mpe tokoki kongɛngisa solo ya Bokonzi na maloba mpe na misala na biso mbala nyonso oyo tozwi libaku ya koyebisa basusu nsango malamu. Toboyi te, lokola tozalaka sembo, bizaleli na biso ya malamu ekoki kosalisa bato mosusu bámona ete tokeseni na bato ya mokili. Kasi, soki toyebisi bango nsango malamu, bakoyeba mpo na nini tokeseni na bato mosusu.
28 Basaleli mingi ya Yehova bayebisa bato nsango malamu na mosala, na kelasi, na mituka to na bisika mosusu wana bazali kosala makambo na bango ya mokolo na mokolo. Ntango tozali na mobembo, tokoki kozwa libaku ya kosolola na bato oyo tozali kosala na bango mobembo. Ntango tozali kosolola na moto, tosengeli koluka ndenge oyo tokoki kopesa litatoli. Tiká ete tómibongisaka mpo na kosolola na bato na libaku nyonso oyo ebongi.
29 Tokozala na mposa ya koyebisa bato nsango malamu soki tozali kobosana te ete mbala nyonso oyo tosali yango, tozali kosanzola Mozalisi na biso mpe kokumisa nkombo na ye. Lisusu, tokoki kosalisa bato ya mitema sembo báyeba Yehova mpo bango mpe básalela ye mpe bázwa elikya ya bomoi ntango bandimeli Yesu Kristo. Yehova asepelaka na milende ya ndenge wana mpe atalelaka yango ete ezali mosala mosantu.—Ebr. 12:28; Em. 7:9, 10.
TERITWARE
30 Mokano ya Yehova ezali ete nsango ya Bokonzi esakolama na mokili mobimba, ezala na bingumba to na bamboka ya mike. Yango wana, biro ya filiale epesaka bateritware na masangá mpe na bandeko oyo basakolaka na bamboka oyo ezali mosika. (1 Ko. 14:40) Likambo yango eyokani na bibongiseli oyo Nzambe atyaki na siɛklɛ ya liboso. (2 Ko. 10:13; Gal. 2:9) Lokola na mikolo oyo ya nsuka mosala ya kosakola Bokonzi ezali kokende liboso nokinoki, soki ebongiseli ya kokabola bateritware etambwisami malamu, mosala ekosalema mingi.
31 Mokɛngɛli na mosala ya kosakola nde azali na mokumba ya kotambwisa ebongiseli yango. Mosaleli na misala moko nde akoki kokabolaka bateritware. Teritware ezali ndenge mibale: teritware ya etuluku ya mosala ya kosakola mpe teritware ya mosakoli mokomoko. Soki teritware ezali moke, bakɛngɛli ya bituluku ya mosala ya kosakola bakozala na bateritware epai bandeko ya etuluku na bango bakoki kosakolaka. Kasi, soki teritware ezali monene, mosakoli mokomoko akoki kozala na teritware na ye.
32 Mosakoli oyo azali na teritware na ye akoki kosakola kuna ata na ntango likita ya mosala ya kosakola ezali te to soki azwi likoki ya kosangana na etuluku na ye te. Na ndakisa, basakoli mosusu bazwaka bateritware oyo ezali pene na bisika basalaka mpe basakolaka kuna na ntango ya bopemi to nsima ya mosala. Mabota mosusu bazwaka teritware pene na esika bafandi, mpe basakolaka kuna bampokwa mosusu. Soki mosakoli azali na teritware pene na esika afandi, yango ekosalisa ye abungisaka ntango te. Kasi, teritware ya mosakoli moko ekoki mpe kosalelama mpo na kosakola kuna bato ebele na mbala moko. Soki ozali na mposa ya kozala na teritware na yo moko, okoki kosɛnga yango epai ya ndeko oyo atalelaka teritware.
33 Ezala mokɛngɛli ya etuluku nde azwi teritware mpo na etuluku na ye to mpe mosakoli azwi teritware na ye moko, esengeli kosala milende oyo ekoki mpo na kosolola na moto moko na ndako mokomoko. Bibongiseli oyo ekozwama mpo na kosala teritware esengeli koyokana na mibeko ya kobomba makambo ya bato. Mokɛngɛli ya etuluku to mosakoli nyonso oyo azwi teritware asengeli kosala makasi asilisa yango na sanza minei. Soki asilisi, asengeli koyebisa ndeko oyo atalelaka makambo ya bateritware. Na kotalela ndenge makambo ezali, mokɛngɛli ya etuluku to mosakoli akoki kobomba teritware yango mpo básalela yango lisusu to akoki kozongisa yango.
34 Soki bandeko nyonso ya lisangá bazali kosala elongo, bakoki kopesa litatoli na teritware mobimba. Ekoki mpe kosalisa mpo basakoli mibale to koleka bákutana te na teritware moko, mpo yango ekoki kosilikisa bato ya teritware yango. Na ndenge yango, tokomonisa limemya mpo na bandeko na biso mpe bato ya teritware na biso.
KOSALA NA BOMOKO MPO NA KOSAKWELA BATO YA MINƆKƆ NYONSO
35 Moto nyonso asengeli koyeba Yehova Nzambe, Mwana na ye, mpe Bokonzi ya Nzambe. (Em. 14:6, 7) Tosepelaka kosalisa bato ya minɔkɔ nyonso mpo bábelela nkombo ya Yehova mpo bábika mpe bálata bomoto ya bokristo. (Rom. 10:12, 13; Kol. 3:10, 11) Mikakatano nini tokoki kokutana na yango ntango tozali kosakola nsango malamu na teritware ya minɔkɔ ebele? Ndenge nini tokoki kosala yango na ndenge oyo ekopesa bato mingi libaku ya koyoka nsango ya Bokonzi na monɔkɔ oyo bayebi malamu?—Rom. 10:14.
36 Teritware ekabolamaka na kotalela monɔkɔ oyo lisangá mokomoko esalaka makita. Yango wana, na bisika oyo bato balobaka minɔkɔ ebele, basakoli ya masangá ndenge na ndenge bakoki kosakola na kartye moko. Soki bongo, ekozala malamu basakoli ya lisangá mokomoko bámipesa na kosakwela bato oyo balobaka monɔkɔ oyo ya makita na lisangá na bango esalemaka. Bakosala mpe bongo na ntango ya bakampanye oyo tosalaka mbula na mbula mpo na kokabola nkasa ya libyangi. Kasi, ntango bazali kopesa litatoli na esika ya bato ebele to litatoli ya libaku malamu, bakoki kosolola na bato nyonso mpe kokabola mikanda na minɔkɔ nyonso.
37 Ekoki kokóma ete teritware ya masangá ya minɔkɔ mosusu ezali mosika mpe masangá yango ezali kokoka te kosakola na teritware oyo ezali mosika. Na ntango wana, bakɛngɛli na mosala ya kosakola ya masangá yango basengeli kosolola mpo na kozwa bibongiseli oyo esengeli mpo bátala ndenge ya kosakola na teritware mobimba. Yango ekopesa moto nyonso libaku ya koyoka nsango ya Bokonzi mpe ekosala ete milende oyo basakoli mosusu bakosala ekende mai te.—Mas. 15:22.
38 Tokosala nini soki moto oyo ayambi biso na porte alobaka monɔkɔ oyo toyebi te? Tosengeli te kokanisa ete basakoli oyo balobaka monɔkɔ yango bakoya kosakwela ye. Basakoli mosusu bayekolá mwa moke ndenge ya kobanda lisolo na monɔkɔ oyo bayokaka bato mingi bazali koloba na teritware na bango. Tokoki kolakisa moto ndenge oyo akoki kotánga to kozwa mikanda na monɔkɔ na ye na site na biso jw.org, to koyebisa ye ete tokomemela ye mikanda na monɔkɔ na ye.
39 Soki moto asepeli mpenza na nsango malamu, tosengeli koluka mosakoli oyo akoki kosalisa ye na monɔkɔ oyo ayebi malamu. Tokoki mpe koyebisa ye esika ya pene oyo makita esalemaka na monɔkɔ na ye. Soki alingi ete moto moko oyo alobaka monɔkɔ na ye aya kotala ye, tokoki kolakisa ye ndenge akoki kokɔtisa nkombo mpe adrɛsi na ye na jw.org. Na nsima, biro ya filiale ekosala makasi eluka mosakoli moko oyo azali pene, etuluku to lisangá oyo ekoki kosalisa ye.
40 Tokotika kotala moto yango oyo asepelaki kaka soki ayebisi biso ete ndeko moko oyo alobaka monɔkɔ na ye asololaki na ye. Na bantango mosusu, biro ya filiale ekoki koyebisa bankulutu ete bazwi ata ndeko moko te oyo alobaka monɔkɔ yango. Soki ezali bongo, tosengeli kosala nyonso mpo tókoba kotalaka moto yango mpo na kokolisa mposa na ye. Soki likoki ezali, tokoki koyekola na ye Biblia, ntango mosusu na mokanda moko ya monɔkɔ na ye. Soki tosaleli bililingi malamu mpe tozali kosɛnga ye atánga bavɛrsɛ ya Biblia, akokanga ntina ya mwa mateya mosusu ya Biblia. Ndeko na ye ya libota oyo ayebi malamu monɔkɔ na bango mpe monɔkɔ ya lisangá andima kosalisa na kobongola.
41 Mpo na komema moto oyo asepeli na nsango malamu na ebongiseli ya Nzambe, tosengeli kobengisa ye na makita na biso, ata soki mbala mosusu akokanga mpenza ntina ya mateya te. Ntango bazali kotánga bavɛrsɛ, tokoki kosalisa ye amona yango na Biblia ya monɔkɔ na ye, soki ezali. Koyangana elongo na bandeko mosusu na lisangá ekoki kotonga kondima na ye mpe kosalisa ye akola na elimo.
42 Mwa-bituluku: Mwa-bituluku ezali mwa motángo moko boye ya basakoli oyo bazali kosakola na monɔkɔ moko oyo ezali ya lisangá te, ata soki ezali te na nkulutu to mosaleli na misala ya makoki mpo na kotambwisa makita pɔsɔ na pɔsɔ na monɔkɔ yango. Biro ya filiale ekoki kondima ete lisangá moko etalelaka mwa-etuluku soki ekokisi masɛngami oyo elandi:
(1) Bato mwa mingi ya teritware balobaka monɔkɔ oyo ekeseni na oyo ya lisangá.
(2) Ezali na mwa basakoli oyo bayebi monɔkɔ yango to bandimi koyekola yango.
(3) Lisangani ya bankulutu endimi kotambwisa mosala ya kosakola na monɔkɔ yango.
Soki lisangani ya bankulutu endimi kotalela mwa-etuluku moko, bankulutu basengeli koyebisa mokɛngɛli ya zongazonga. Mbala mosusu ayebi masangá mosusu oyo ezali komeka kosakwela bato ya monɔkɔ yango, mpe akoki kopesa makanisi oyo ekosalisa mpo na koyeba lisangá oyo ebongi mpenza mpo na kotalela mwa-etuluku yango. Soki lisangá yango eyebani, bankulutu bakokomela biro ya filiale mpo na kosɛnga ete lisangá yango endimama lokola lisangá oyo ezali kotalela mwa-etuluku moko ya monɔkɔ mosusu.
43 Bituluku: Biro ya filiale ekoki kondima ete lisangá moko etalelaka etuluku moko ya monɔkɔ mosusu soki ekokisi masɛngami oyo elandi:
(1) Bato mingi oyo balobaka monɔkɔ moko bazali kosepela na solo mpe bokoli ekoki komonana
(2) Ezali na mwa basakoli mosusu oyo bayebi monɔkɔ yango to bazali koyekola yango.
(3) Ezali na nkulutu to mosaleli na misala oyo akoki kokamba etuluku yango mpe kotambwisa ata likita moko pɔsɔ na pɔsɔ, to eteni ya likita ya nsuka ya pɔsɔ, na ndakisa diskur to Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na monɔkɔ yango.
Ntango masɛngami yango ekokisami na ndenge oyo ekoki, lisangani ya bankulutu ekotindela biro ya filiale mokanda oyo elimboli makambo malamumalamu mpo na kosɛnga ete biro endima lisangá na bango lokola lisangá oyo etalelaka etuluku moko ya monɔkɔ mosusu. Nkulutu oyo azali kotambwisa etuluku yango akobengama “mokɛngɛli ya etuluku” mpe soki mosaleli na misala nde azali kotambwisa yango, akobengama “mosaleli ya etuluku.”
44 Soki etuluku yango endimami, bankulutu ya lisangá na yango bakotala soki bakobakisa biteni ya makita oyo esengeli kosalema na monɔkɔ ya etuluku yango, mpe mbala boni esengeli kosalema na sanza. Bakoki mpe kobongisa makita ya mosala ya kosakola mpo na etuluku yango. Bandeko nyonso ya etuluku yango bakolanda malako ya lisangani ya bankulutu ya lisangá oyo ezali kotalela etuluku yango. Bankulutu basengeli kopesa malako oyo ebongi mpe komonisa ete bazali mpenza kotya likebi na bamposa ya etuluku yango. Soki mokɛngɛli ya zongazonga asakoli elongo na bandeko ya etuluku yango na pɔsɔ oyo ayei kotala lisangá oyo etalelaka etuluku yango, akotinda lapolo ya mokuse na biro ya filiale oyo ekolimbola ndenge etuluku yango ezali kotambola mpe makambo oyo etuluku yango esengeli na yango. Na ntango oyo ebongi, etuluku yango ekoki kokóma lisangá. Soki bandeko nyonso bazali kolanda litambwisi ya Teokrasi, Yehova akosepela.—1 Ko. 1:10; 3:5, 6.
KOSAKOLA ELONGO NA BASAKOLI EBELE
45 Bakristo oyo bamipesi na Nzambe bazali na mokumba ya koyebisa bato nsango malamu. Ezali na ndenge mingi ya kosala yango, kasi mingi kati na biso tosepelaka kobima na mosala ya kosakola na bandeko mosusu. (Luka 10:1) Yango wana, bandeko ya lisangá bakutanaka na likita ya mosala ya kosakola, ezala na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo to na kati ya pɔsɔ. Mikolo oyo bato bakendaka misala te ezalaka mpe libaku ya kobima na mosala ya kosakola elongo na basakoli ebele mpo bandeko mingi basalaka te. Komite ya mosala ya kosakola ezwaka bibongiseli mpo makita ya mosala ya kosakola esalema na bangonga mpe bisika oyo ebongi mpo na basakoli, ezala na moi to na mpokwa.
46 Kosakola elongo na basakoli ebele esalisaka bandeko bámesana mpe ‘bálendisana.’ (Rom. 1:12) Basakoli ya sika bakoki kosakola elongo na basakoli ya kala oyo bameseni kosakola mpo bápesa bango formasyo. Na bisika mosusu ezalaka malamu basakoli mibale to koleka básakola esika moko mpo bábatelana. Ata soki okani kobima yo moko, kokɔta likita ya mosala ya kosakola elongo na basakoli mosusu ekoki kolendisa moto nyonso. Koyeba ete basakoli mosusu mpe bazali kosakola na teritware oyo ozali, ekoki kopesa yo mpiko. Babongisi-nzela mpe basakoli mosusu basɛngisami te kozala na likita nyonso ya mosala ya kosakola oyo lisangá ebongisi, mingimingi soki makita yango esalemaka mikolo nyonso. Atako bongo, bandeko yango bakoki koyaka na makita mosusu ya mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ.
47 Tiká ete biso nyonso tólanda ndakisa ya Yesu mpe ya bantoma na ye! Tokoki mpenza kondima ete Yehova akopambola milende oyo tozali kosala mpo na komipesa na mosala ya ntina mingi ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi.—Luka 9:57-62.