Ondimaka mpenza lisekwa?
“Ekozala na lisekwa moko.”—MISALA 24:15.
1. Mpo na nini emonanaka ete tokoki kokima liwa te?
“NA MOKILI oyo, ezali na makambo mibale oyo moto akoki kokima yango te: liwa mpe mpako.” Bato mingi bamonaka ete Benjamin Franklin, moto moko ya politiki na États-Unis, oyo akomaki maloba wana na mobu 1789, akanisaki mpenza malamu. Nzokande, bato mingi basalelaka mayele mabe mpe na ndenge yango, bafutaka mpako te. Liwa nde emonanaka ete moto akoki kokima yango te. Ya solo, moto moko te akoki, na makasi na ye moko, kokima liwa mpo na libela. Liwa elandaka mokomoko na biso. Sheole, to nkunda, etondaka te mpe ebɔtɔlaka biso bato oyo tolingaka mingi. (Masese 27:20) Kasi, tiká tólobela naino likanisi moko ya kolendisa.
2, 3. (a) Mpo na nini tolobi ete bato mosusu oyo bazali na bomoi lelo oyo bakomona liwa te? (b) Tokolobela makambo nini na lisolo oyo?
2 Liloba ya Yehova epesi elikya ya solosolo ya lisekwa, to ya kozonga na bomoi. Yango ezali ndɔtɔ te, mpe na molɔ́ngɔ́ mobimba, nguya moko te ekoki kopekisa Yehova asekwisa bato. Bato mingi bayebi te ete bato mosusu oyo bazali na bomoi lelo oyo bakomona liwa te. Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te “ebele ya bato” bakobika na “bolɔzi monene” oyo ekómi pene. (Emoniseli 7:9, 10, 14) Bato yango bakotikala na bomoi mpe bakozala na elikya ya koumela seko na seko. Yango emonisi ete bato yango bakoki kokima liwa. Longola yango, ‘liwa ekobebisama nyɛɛ.’—1 Bakolinti 15:26.
3 Esengeli ete elikya na biso na lisekwa ezala makasi lokola oyo ya ntoma Paulo, oyo alobaki ete: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Tiká tótalela mituna misato oyo etaleli lisekwa. Ya liboso, nini endimisaka biso elikya yango? Ya mibale, ndenge nini elikya ya lisekwa ekoki kobɔndisa yo? Ya misato, elikya yango ekoki kosala nini na bomoi na yo lelo oyo?
Lisekwa ekosalema mpenza
4. Na ndenge nini lisekwa ezali na ntina mingi na kokokisama ya mokano ya Yehova?
4 Makambo mingi ezali kondimisa ete lisekwa ekosalema mpenza. Ya liboso, ezali na ntina mingi na kokokisama ya mokano ya Yehova. Tóbosana te ete Satana akɔtisaki lisumu na mokili, mpe yango ememaki liwa. Yango wana, Yesu alobaki ete Satana “azalaki mobomi-bato ntango abandaki.” (Yoane 8:44) Kasi, Yehova alakaki ete “mwasi” na ye, elingi koloba ebongiseli na ye na likoló, akobota “momboto” oyo akopanza motó ya “nyoka ya ebandeli,” na maloba mosusu, akoboma Satana. (Genese 3:1-6, 15, NW; Emoniseli 12:9, 10; 20:10) Wana Yehova azalaki komonisa mokemoke mokano na ye mpo na Momboto yango, emonanaki polele ete Momboto yango asengelaki kosuka kaka te na koboma Satana. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Ezali mpo na ntina oyo nde Mwana ya Nzambe amonisamaki polele, elingi koloba, mpo na kobukabuka misala ya Zabolo.” (1 Yoane 3:8) Liwa oyo eyaki mpo na lisumu oyo Adama atikelá biso ezali mosala ya libosoliboso ya Satana oyo Yehova akani kobukabuka to, kosukisa na nzela ya Yesu Klisto. Mpo na yango, lisiko oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa bato mpe lisekwa ezali na ntina mingi.—Misala 2:22-24; Baloma 6:23.
5. Mpo na nini tolobi ete lisekwa ekosantisa nkombo ya Yehova?
5 Yehova azali na mokano ya kosantisa nkombo na ye. Satana abebisi lokumu ya nkombo ya Nzambe mpe alendisi lokuta. Akosaki ntango alobaki ete Adama ná Eva ‘bakokufa te’ soki balei mbuma oyo Nzambe apekisaki bango. (Genese 2:16, 17; 3:4) Banda na ntango wana tii lelo, Satana azali koteya makambo mingi ya lokuta, na ndakisa liteya oyo elobaka ete nzoto nde ekufaka, kasi molimo etikalaka na bomoi. Nzokande, na nzela ya lisekwa, Yehova akomonisa polele lokuta yango. Akomonisa mpo na libela ete kaka ye nde azali Mobateli ya bomoi mpe Mozongisi ya bomoi.
6, 7. Ndenge nini Yehova atalelaka likambo ya kosekwisa bato, mpe ndenge nini toyebi yango?
6 Yehova azali na mposa makasi ya kosekwisa bato. Biblia emonisi polele makanisi ya Yehova mpo na lisekwa. Na ndakisa, tótalela maloba oyo mosembwi Yobo akomaki na kopemama na elimo santu: “Soki moto akokufa, akobika nde lisusu? Nakozela kino mikolo nyonso ya ntango ekoki na ngai, kino kolongwa na ngai ekoya. Okobyanga mpe ngai nakozongisela yo; okozala na mposa mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Yobo 14:14, 15) Maloba yango elimboli nini?
7 Yobo ayebaki ete soki akufi, akotikala mowei na boumeli ya ntango moko boye. Abengaki ntango yango “ntango ekoki na ngai,” elingi koloba ntango oyo asengelaki kozela lokola moto ya bolɔkɔ tii bakosikola ye. Yobo azalaki na kondima ete bakosikola ye. Ayebaki ete ata ndɛlɛ, akosikolama. Mpo na nini? Mpamba te ayebaki ndenge oyo Yehova ayokaka. Yehova azali na “mposa” ya komona lisusu mosaleli na ye ya sembo. Nzambe azali mpenza na mposa makasi ya kozongisa na bomoi bato nyonso ya sembo. Yehova akopesa mpe bato mosusu libaku ya kozala na bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé. (Luka 23:43; Yoane 5:28, 29) Lokola yango ezali mokano ya Nzambe, moto moko te akoki kopekisa ye.
8. Ndenge nini Yehova ‘apesaki ndanga’ ya elikya na biso mpo na mikolo ezali koya?
8 Lisekwa ya Yesu ezali ndanga ya elikya na biso mpo na mikolo ezali koya. Ntango Paulo azalaki koteya na Atene, alobaki boye: “[Nzambe] atye mokolo moko oyo akani kosambisa na boyengebene mabelé oyo efandami na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe asili kopesa ndanga epai ya bato nyonso na ndenge asekwisi ye na bakufi.” (Misala 17:31) Ntango bayokaki likambo ya lisekwa, bato mosusu basɛkaki Paulo. Nzokande, mwa ndambo mosusu ya bato bakómaki bandimi. Mbala mosusu likebi na bango ebendamaki ntango bayokaki ete ndanga ezali ete elikya yango ekokokisama. Ntango Yehova asekwisaki Yesu, asalaki likamwisi oyo eleki monene. Azongisaki Mwana na ye na bomoi lokola ekelamu ya elimo oyo azali na nguya mingi. (1 Petelo 3:18) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu alekaki ndenge oyo azalaki liboso abotama. Lokola Yesu azali sikoyo ekelamu ya elimo oyo akoki kokufa te mpe azali na esika ya mibale nsima ya Yehova, etikali moke akokisa mikumba minene oyo Tata na ye akopesa ye. Yehova akotinda Yesu asekwisa bato mosusu mpo bázala na bomoi na likoló to mpe awa na mabelé. Yesu ye moko alobaki boye: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.” (Yoane 5:25; 11:25) Na ndenge Yehova asekwisaki Mwana na ye, apesaki ndanga ya elikya ya lisekwa mpo na bato nyonso ya sembo.
9. Ndenge nini masolo ya Biblia ezali komonisa ete lisekwa ekosalema mpenza?
9 Bato bamonaki ndenge bakufi basekwisamaki mpe masolo yango ekomami na Liloba ya Nzambe. Biblia elobeli bato mwambe oyo basekwisamaki mpe eyebisi na molai ndenge makambo elekaki. Makamwisi yango esalemaki na kobombama te, mbala mingi ezalaki na miso ya bato ebele. Lazalo akufaki banda mikolo minei, kasi Yesu asekwisaki ye na miso ya ebele ya bato oyo bayaki kolela ye, ata mpe bandeko na ye, baninga na ye, mpe bato ya pembeni. Likambo yango oyo emonisaki ete Yesu azalaki motindami ya Nzambe esalemaki mpenza mpe banguna ya Yesu bawanganaki yango te. Kutu, bafandaki likita mpo na koboma ná Yesu, ná Lazalo! (Yoane 11:17-44, 53; 12:9-11) Tozali mpenza na ntina ya kondima ete lisekwa ekosalema. Nzambe akomisi masolo oyo elobeli bato oyo basekwaki na ntango ya kala mpo na kobɔndisa biso mpe kolendisa kondima na biso.
Elikya ya lisekwa ebɔndisaka
10. Ndenge nini masolo ya Biblia oyo elobeli lisekwa ekoki kobɔndisa biso?
10 Osilá kokufela ndeko to moninga moko mpe ozali na mposa ya libɔndisi? Moko na makambo oyo ebɔndisaka ezali masolo ya Biblia oyo elobeli bato oyo basekwisamaki. Kotánga masolo yango, komanyola yango, mpe komona na makanisi ndenge makambo elekaki ekondimisa yo lisusu ete lisekwa ekosalema mpenza. (Baloma 15:4) Makambo yango ezali masapo te. Esalemaki epai ya bato lokola biso, oyo bazalaki mpenza na bomoi na ntango ya kala mpe na bisika oyo eyebani awa na mabelé. Tiká tótalela ndakisa moko—lisekwa ya liboso oyo Biblia elobeli.
11, 12. (a) Likambo nini ekómelaki mwasi moko akufelá mobali na mboka Zalefata, mpe liboso alobaki nini? (b) Lobelá likambo oyo mosakoli Eliya asalelaki mwasi yango na nguya ya Yehova.
11 Mosakoli Eliya alekisaki mwa bapɔsɔ na ndako ya mwasi moko oyo akufelá mobali na mboka Zalefata, azalaki kolala na shambre moko na likoló. Bomoi ezalaki mpasi na mikolo yango. Mbula ezalaki kobɛta te mpe nzala ekɔtaki na etúká yango. Bato bazalaki kokufa mingi. Yehova apesaki Eliya nguya ya kosala likamwisi mpo na kopesa mbano na mwasi yango mpo azalaki na kondima. Mwasi yango ná mwana na ye batikalaki kaka na biloko oyo bakokaki kolya mbala moko; kasi, Eliya asalaki ete farini mpe mafuta na ye esila te atako azalaki kosalela yango. Kasi, na nsima, likambo moko ya mawa ekómelaki mwasi yango. Mwana na ye abɛlaki kaka moke mpe akufaki. Mwasi yango atungisamaki mpenza! Azalaki mwasi oyo akufelá mobali; bongo, mwana na ye kaka moko lisusu akufaki. Kutu, ntango azalaki kolela, alobaki ete Eliya ná Nzambe na ye Yehova nde babimiselaki ye mpasi yango! Mosakoli asalaki nini?
12 Eliya apamelaki mwasi yango te. Alobaki na ye ete: “Pesá ngai mwana na yo.” Eliya amemaki mwana na shambre oyo ezalaki likoló, abondelaki mbala mingi mpo mwana azonga na bomoi. Nsukansuka Yehova asekwisaki ye! Kanisá esengo oyo Eliya ayokaki ntango amonaki mwana abandi kopema. Mwana afungolaki miso mpe akómaki kotala. Eliya akitaki na mwana epai ya mama na ye mpe alobaki na ye ete: “Talá, mwana na yo abiki.” Mwasi yango asepelaki mingi mpenza. Alobaki boye: “[Sikoyo] nayebi ete yo ozali moto ya Nzambe mpe ete liloba ya [Yehova] na monɔkɔ na yo ezali solo.” (1 Mikonzi 17:8-24) Kondima ya mwasi yango epai ya Yehova mpe mosakoli na ye ekómaki lisusu makasi.
13. Na ndenge nini lisolo oyo elobeli ndenge oyo Eliya asekwisaki mwana ya mwasi oyo akufelá mobali ekoki kobɔndisa biso lelo oyo?
13 Komanyola lisolo yango ekoki mpenza kobɔndisa yo. Tomoni polele ete Yehova akoki kolongola liwa oyo ezali monguna na biso! Kanisá mokolo oyo esengo ya mwasi yango ekobakisama lisusu koleka, ntango ebele ya bato bakosekwa! Esengo ekozala mpe monene na likoló ntango Yehova akotinda Mwana na ye asekwisa ebele ya bato na mabelé mobimba. (Yoane 5:28, 29) Osilá kokufela ndeko to moninga moko? Ezali mpenza esengo koyeba ete Yehova azali na nguya ya kozongisa bakufi na bomoi mpe akosala yango!
Elikya ya lisekwa mpe bomoi na yo lelo oyo
14. Elikya ya lisekwa ekoki kosala nini na bomoi na yo?
14 Elikya ya lisekwa ekoki kosala nini na bomoi na yo lelo oyo? Elikya yango ekoki kopesa yo makasi ntango okutani na mikakatano, minyoko, komekama, to likama. Satana alingi ete obangaka liwa tii na kotika bosembo na yo mpo na kondima bilaka ya mpamba. Kobosana te ete Satana alobaki na Yehova boye: “Moto akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye.” (Yobo 2:4) Na maloba yango, Satana atyolaki bato nyonso, ata mpe yo. Ezali solo ete liboso ya likama okotika kosalela Nzambe? Soki ozali ntango nyonso kokanisa elikya ya lisekwa, yango ekolendisa lisusu ekateli na yo ya kokoba kosala mokano ya Tata na yo ya likoló.
15. Ndenge nini maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 10:28 ekoki kobɔndisa biso ntango tokutani na likama?
15 Yesu alobaki boye: “Bóbanga te baoyo babomaka nzoto nde bakoki koboma molimo te; kasi bóbanga nde ye oyo akoki koboma ná molimo ná nzoto na kati ya Gehena.” (Matai 10:28) Tosengeli te kobanga Satana to bato oyo azali kosalela. Ya solo, bamosusu bakoki kozala na nguya ya kosala biso mabe, ata mpe koboma biso. Kasi, ata soki basali biso mabe nini, ezali kaka mpo na mwa ntango. Yehova azali na nguya mpe na mposa ya kolongola mabe nyonso oyo bazali kosala basaleli na ye ya sembo, akoki ata mpe kosekwisa bango. Kaka Yehova nde abongi ete tóbanga ye mpe tómemya ye. Kaka ye nde azali na nguya ya kolongola bomoi mpe elikya nyonso ya kozonga lisusu na bomoi; akoki koboma nzoto mpe molimo na Gehena. Kasi, Yehova alingi te ete yango ekómela yo. (2 Petelo 3:9) Lokola tozali na elikya ya lisekwa, biso basaleli ya Nzambe tondimisami ete bomoi na biso ekoki kosuka mpo na libela te. Tokozwa bomoi ya seko soki totikali sembo mpe, Satana ná bato na ye bakoki kosala eloko moko te oyo ekoki kopekisa yango.—Nzembo 118:6; Baebele 13:6.
16. Na ndenge nini elikya ya lisekwa esalisaka biso tóyeba makambo oyo tosengeli kotya na esika ya liboso?
16 Soki tozali kondima mpenza lisekwa, yango ekoki kobongola ndenge na biso ya kotalela bomoi. Tokomona ete ‘soki tozali na bomoi, to soki tozali kokufa, tozali bato ya Yehova.’ (Baloma 14:7, 8) Ntango tozali kotalela makambo oyo tosengeli kotya na esika ya liboso, tokobosana te toli oyo ya Paulo: “Bótika kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana na kokómisáká makanisi na bino sika, mpo bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baloma 12:2) Ebele ya bato bazali komipesa na koluka kokokisa bamposa na bango. Lokola bazali komona ete bomoi ezali mokuse, bazali koboma nzoto na koluka bisengo, mpe soki basambelaka, losambo na bango ezali kokokisa te ‘mokano ya Nzambe oyo ezali ya kokoka.’
17, 18. (a) Ndenge nini Liloba ya Yehova emonisi ete bomoi ya bato ezali mokuse, kasi Nzambe azali kokana nini mpo na biso? (b) Nini etindaka biso tókumisaka Yehova mokolo na mokolo?
17 Ya solo, bomoi ezali mokuse. “Ekosila noki mpe biso tokopumbwa,” mbala mosusu nsima ya mbula 70 to 80. (Nzembo 90:10) Bato bazali kobotama mpe kokufa lokola matiti na zamba; bazali kolimwa lokola elili, bazali koleka noki lokola mopɛpɛ. (Nzembo 103:15; 144:3, 4) Kasi Nzambe akanaki te ete tózala na bomoi mokuse bongo, elingi koloba tólekisaka kaka mwa bambula na kokola, kozwa mwa mayele, mpe na nsima tóbanda konuna, tóbɛla mpe nsukansuka tókufa. Yehova akelaki bato mpo bázala na bomoi ya seko. Biblia elobi ete ‘atyaki mpe lobiko kati na mitema na biso.’ (Mosakoli 3:11) Nzambe azali nde motema mabe mpo apesa biso mposa moko, bongo akokisa yango te? Te, “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Akosekwisa bato oyo bakufá mpe akopesa bango bomoi ya seko.
18 Elikya ya lisekwa ezali kosalisa biso tóbanga te mikolo ezali koya. Tokoki kowela eloko moko te, to koluka kosala nyonso kaka sikoyo. Tozali na mposa te ya kosalela “na makambo nyonso” mokili oyo ezali kokende na nsuka na yango. (1 Bakolinti 7:29-31; 1 Yoane 2:17) Biso tozali te lokola bato oyo bazangi elikya ya solosolo; tozali na libaku malamu ya koyeba ete soki totikali sembo epai ya Yehova Nzambe, tokosanzola ye mpe tokotikala na bomoi libela na libela. Yango wana, tósala makasi ete mokolo na mokolo tósanzolaka Yehova, oyo akokokisa elikya ya lisekwa!
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini tosengeli koyokaka mpo na lisekwa?
• Makambo nini ezali komonisa ete elikya ya lisekwa ekokokisama?
• Ndenge nini elikya ya lisekwa ekoki kobɔndisa biso?
• Elikya ya lisekwa esengeli kotinda yo ozala na bomoi ya ndenge nini?
[Elilingi na lokasa 28]
Yobo ayebaki ete Yehova azali na mposa ya kosekwisa bato ya sembo
[Elilingi na lokasa 29]
“Talá, mwana na yo abiki”