‘Bótikala kaka na kati ya Liloba na ngai’
“Soki botikali kaka na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai.”—YOANE 8:31.
1. (a) Ntango Yesu azongaki na likoló, atikaki nini awa na mabele? (b) Mituna nini tokoluka biyano na yango?
NTANGO Yesu Klisto, Moto oyo asalaki lingomba ya boklisto, azongaki na likoló akomaki mikanda te, atongaki bamonima te, mpe andukaki bozwi awa na mabele te. Atikaki nde bayekoli mpe amonisaki polele makambo oyo esɛngami mpo na kozala moyekoli na ye. Evanzile ya Yoane eyebisi makambo misato ya ntina oyo Yesu alobelaki oyo moto nyonso oyo alingi kozala moyekoli na ye asengeli kokokisa. Ezali makambo nini? Ndenge nini tokoki kokokisa yango? Mpe ndenge nini mokomoko na biso lelo oyo akoki komindimisa ete azali mpenza moyekoli ya Klisto?a
2. Likambo nini ya ntina esɛngami mpo na kozala moyekoli oyo ezali na Evanzile ya Yoane?
2 Sanza soki motoba liboso ya liwa na ye, Yesu akendaki na Yelusaleme mpe asakolaki liboso ya ebele ya bato oyo bayanganaki kuna mpo na Fɛti ya Mingombo oyo ezalaki koumela pɔsɔ mobimba. Mbuma oyo mosala na ye ya kosakola ebotaki ezalaki ete, ntango mikolo ya fɛti ekómaki na katikati, “mingi na kati ya ebele wana ya bato bandimelaki ye.” Yesu akobaki kosakola; yango wana, na mokolo ya nsuka ya fɛti, lisusu “bato mingi bandimelaki ye.” (Yoane 7:10, 14, 31, 37; 8:30) Na ntango yango, Yesu atyelaki mingimingi bandimi wana ya sika likebi mpe ayebisaki likambo moko ya ntina oyo esɛngami mpo na kozala moyekoli na ye; ntoma Yoane akomaki yango boye: “Soki botikali kaka na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai.”—Yoane 8:31.
3. Esengeli kozala na ezaleli nini mpo na ‘kotikala kaka na kati ya liloba ya Yesu’?
3 Yesu alingaki koloba te ete bandimi wana ya sika bazalaki na kondima moke. Azalaki nde komonisa ete bazali na libaku malamu ya kokóma bayekoli na ye ya solo soki batikali na kati ya liloba na ye, elingi koloba ete soki bayiki mpiko. Ya solo, bandimaki liloba na ye, kasi esengelaki sikoyo bátikala na kati na yango. (Yoane 4:34; Baebele 3:14) Mpo na Yesu, ezalaki na ntina mingi ete bayekoli na ye báyika mpiko; yango wana, na lisolo ya nsuka oyo asololaki na bantoma na ye, oyo ekomami na Evanzile ya Yoane, mbala mibale mobimba, Yesu alendisaki moko na bango ete: “Kobá kolanda ngai.” (Yoane 21:19, 22) Ebele ya baklisto ya ekeke ya liboso basalaki bongo. (2 Yoane 4) Nini esalisaki bango na koyika mpiko?
4. Nini esalisaki bayekoli ya ekeke ya liboso na koyika mpiko?
4 Ntoma Yoane, moyekoli ya Klisto oyo atikalaki sembo na boumeli ya mbula soki 70, alobaki likambo moko ya ntina mingi. Apesaki baklisto ya sembo longonya na maloba oyo: “Bozali makasi mpe liloba ya Nzambe ezali na kati na bino mpe bolongi moto mabe.” Bayekoli yango ya Klisto bayikaki mpiko, to batikalaki na kati ya liloba ya Nzambe, mpamba te liloba ya Nzambe etikalaki na kati na bango. Bazalaki kopesa yango motuya mingi. (1 Yoane 2:14, 24) Lelo oyo mpe, mpo tókoka ‘koyika mpiko tii na nsuka,’ tosengeli koluka ete liloba ya Nzambe etikala na kati na biso. (Matai 24:13) Ndenge nini tokoki kosala yango? Tokozwa eyano na kati ya ndakisa moko oyo Yesu alobaki.
‘Koyoka Liloba’
5. (a) Mitindo nini ya mabele Yesu alobeli na ndakisa moko? (b) Na ndakisa ya Yesu, milona elimboli nini mpe mabele elimboli nini?
5 Yesu apesaki ndakisa ya moloni oyo azalaki kolona milona; ndakisa yango ezali na Evanzile ya Matai, ya Malako mpe ya Luka. (Matai 13:1-9, 18-23; Malako 4:1-9, 14-20; Luka 8:4-8, 11-15) Soki otángi masolo yango, okomona ete likambo monene na kati ya ndakisa yango ezali ete milona ya lolenge moko ekweaki na mabele ya ndenge na ndenge mpe makambo ekeseni ekómelaki yango. Mabele ya liboso ezalaki makasi, mabele ya mibale ezalaki na mabanga, mpe oyo ya misato etondaki na banzubɛ. Mabele ya minei ekeseneki na mabele nyonso misato ya liboso; yango ezalaki “mabele ya malamu.” Yesu ye moko alimbolaki ete milona ezali nsango ya Bokonzi oyo ezali na Liloba ya Nzambe, mpe ete mabele ndenge na ndenge ezali mitema ya bato. Atako bato oyo bamonisami na elilingi ya mabele ndenge na ndenge bakokani na mwa makambo mosusu, likambo moko ekesenisi bato oyo bamonisami na elilingi ya mabele ya malamu.
6. (a) Nini ekesenisi mabele ya minei oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye ná mabele mosusu misato ya liboso, mpe yango elimboli nini? (b) Likambo nini ezali na ntina mingi mpo na komonisa ezaleli ya koyika mpiko oyo bayekoli ya Klisto basengeli kozala na yango?
6 Lisolo oyo ezali na Luka 8:12-15 ezali komonisa ete bato nyonso oyo bamonisami na mitindo minei wana ya mabele ‘bayokaki liloba.’ Kasi, baoyo bazalaki na “motema ya kitoko mpe ya malamu” basukaki te kaka na ‘koyoka liloba.’ Bango ‘basimbaki yango mpe babotaki mbuma na koyika mpiko.’ Lokola mabele ya malamu ezali pɛtɛpɛtɛ mpe mozindo, milona oyo ekweaki likoló na yango ekɔtisaki misisa na yango mpenza na kati ya mabele, mpe na bongo, milona yango ebimaki mpe ebotaki mbuma. (Luka 8:8) Ndenge moko mpe, bato oyo bazali na mitema ya malamu, bakangaka ntina ya liloba ya Nzambe, bamonaka ete yango ezali na motuya mingi mpe bamipesaka na yango. (Baloma 10:10; 2 Timote 2:7) Liloba ya Nzambe etikalaka na kati na bato yango. Yango wana, babotaka mbuma na koyika mpiko. Boye, komona ete Liloba ya Nzambe ezali na motuya mingi ezali likambo ya ntina mingi mpo na komonisa ezaleli ya koyika mpiko oyo bayekoli ya Klisto basengeli kozala na yango. (1 Timote 4:15) Kasi, ndenge nini tokoki komona ete Liloba ya Nzambe ezali na motuya mingi?
Motema ya moto mpe komanyola
7. Mbala mingi, motema ya malamu esalaka nini?
7 Talá mosala oyo Biblia emonisi mbala na mbala ete motema ya kitoko mpe ya malamu esalaka. “Motema ya moyengebene emanyolaka mpo na kopesa eyano.” (Masese 15:28, NW) “Ɛ Yehova, tiká ete maloba ya monɔkɔ na ngai mpe makambo oyo motema na ngai ezali komanyola esepelisa yo.” (Nzembo 19:14, NW) “Motema na ngai ekomanyola makambo ya mayele.”—Nzembo 49:3, NW.
8. (a) Ntango tozali kotánga Biblia, tosengeli koboya nini mpe tosengeli kosalaka nini? (b) Matomba nini tozwaka ntango tozali komanyola Liloba ya Nzambe elongo na mabondeli? (Talá mpe etanda ‘Bapikami makasi na kati ya solo.’)
8 Na ndakisa ya bakomi ya Biblia oyo touti kotánga maloba na bango, biso mpe tosengeli kozala na botɔndi mpo na Liloba ya Nzambe mpe mosala na ye, komanyola yango elongo na mabondeli. Ntango tozali kotánga Biblia to mikanda oyo elimbolaka yango, tosengeli te kozala lokola bato oyo bazali kotala esika moko kitoko mwa miniti moke mpo na koleka noki na esika mosusu; bato yango balekisaka ntango na bango mingi na kokanga eloko nyonso fɔtɔ, kasi bazwaka ntango te ya kotala biloko yango malamumalamu. Nzokande, ntango biso tozali koyekola Biblia, tosengeli kozala lokola bato oyo, ntango bazali kotala esika moko kitoko, bazali kotɛlɛma ntango molai mpe kotala yango malamumalamu.b Ntango tofandi nyɛɛ mpe tozali kokanisa makambo oyo tozali kotánga, liloba ya Nzambe esimbaka mpenza mitema na biso. Ekɔtelaka biso mpenza mpe ebongolaka makanisi na biso. Lisusu, etindaka biso na kobondela Nzambe mpo na koyebisa ye makanisi oyo ezali na mitema na biso. Na ndenge yango, boninga na biso ná Yehova ekómaka makasi mpe bolingo na biso mpo na ye etindaka biso tókoba kolanda Yesu ata na ntango ya mpasi. (Matai 10:22) Ya solo, komanyola maloba ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na kotikala sembo tii na nsuka.—Luka 21:19.
9. Tokoki kosala nini mpo ete motema na biso elanda koyamba liloba ya Nzambe?
9 Ndakisa oyo Yesu apesaki ezali mpe komonisa ete ezali na makambo oyo epekisaka liloba ya Nzambe kokola. Yango wana, mpo na kozala ntango nyonso bayekoli ya sembo, ebongi (1) tóyeba makambo oyo emonisami na elilingi ya mabele nyonso ya mabe na kati ya ndakisa ya Yesu mpe (2) tóluka ndenge ya kobongisa to kokima makambo yango. Na ndenge yango, tokobongisa motema na biso mpo elanda koyamba milona ya Bokonzi mpe etika te kobota mbuma.
“Pembeni ya nzela”: Bato oyo bamipesi na ebele ya makambo
10. Lobelá mabele ya liboso oyo Yesu alobelaki na kati ya ndakisa na ye, mpe pesá ndimbola na yango.
10 Mabele ya liboso epai milona ekweaki ezali “pembeni ya nzela” mpe milona yango “enyatamaki.” (Luka 8:5) Mabele oyo ezali pembeni ya nzela oyo eleki na kati ya elanga ezalaka makasi mpamba te bato ya makolo balekalekaka wana mpe banyatanyataka yango. (Malako 2:23) Ndenge moko mpe, baoyo batikaka ete makambo ya mokili oyo ezwa bango ntango mingi mpe makasi na bango bakoki komona ete bazali na ntango te mpo na kopesa liloba ya Nzambe motuya mingi. Bato yango bayokaka liloba ya Nzambe, kasi bamanyolaka likoló na yango te. Yango wana mitema na bango eyambaka yango te. Liboso kutu bákóma kolinga yango, ‘Zabolo ayaka kolongola liloba na mitema na bango mpo bándima te mpe bábikisama te.’ (Luka 8:12) Moto akoki nde kosala ete likambo yango ekómela ye te?
11. Ndenge nini moto akoki kopekisa motema na ye ete ekóma te lokola mabele ya makasi?
11 Ezali na makambo mingi oyo moto akoki kosala mpo motema na ye ekóma te lokola mabele ya mabe oyo ezali pembeni ya nzela. Mabele oyo bato banyatinyati mpe ekómi makasi ekoki kokóma lisusu pɛtɛpɛtɛ mpe kobimisa milona soki babaloli yango mpe balekisi nzela ya bato ya makolo na mopanzi ya elanga. Ndenge moko mpe, soki tozali kozwa ntango ya koyekola Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango, motema na biso ekoki kokóma lokola mabele ya malamu oyo ebimisaka milona. Sɛkɛlɛ yango oyo: esengeli komipesa mpenza te na makambo ya mokili. (Luka 12:13-15) Esengeli nde kozwa ntango mpo na kokanisa “makambo oyo eleki ntina” na kati ya bomoi.—Bafilipi 1:9-11.
“Likoló ya mabanga”: Bato ya bibangabanga
12. Wapi ntina mpenzampenza oyo milona oyo ebimaki na mabele ya mibale oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye ekaukaki?
12 Ntango milona ekweaki na mabele ya mibale, etikalaki likoló te lokola na mabele ya liboso. Ebimisaki misisa mpe ebandaki kokola. Kasi, ntango moi ebɛtaki milona oyo ebimaki, milona yango ekaukaki. Kasi, talá likambo moko oyo ezali kobenda likebi na biso. Ntina mpenzampenza oyo milona oyo ebimaki ekaukaki ezali molunge te. Moi ezalaki mpe kobɛta milona oyo ebimaki na mabele ya malamu, kasi yango ekaukaki te—kutu, ekolaki nde kokola. Mpo na nini milona mosusu ekaukaki, kasi mosusu ekaukaki te? Yesu alobaki ete milona yango ekaukaki “mpo mabele na yango ezalaki mozindo te” mpe “ezalaki na mai te.” (Matai 13:5, 6; Luka 8:6) “Mabanga” oyo ezalaki na kati ya mabele epekisaki misisa ya milona ekɔta na kati ya mabele mpo ebenda mai mpe epikama. Milona oyo ebimaki ekaukaki mpo mabele ezalaki mozindo te.
13. Bato nini bazali lokola mabele oyo ezali na mabanga, mpe wapi ntina mpenzampenza oyo bazalaka ndenge yango?
13 Awa, ndakisa ezali kolobela bato oyo ‘bayambaka liloba na esengo’ mpe balandaka Yesu na molende “na boumeli ya eleko moko.” (Luka 8:13) Ntango moi makasi, elingi koloba “bolɔzi to monyoko” ebɛti bango, bakómaka kobangabanga, bazalaka lisusu na esengo te, balɛmbaka mpe batikaka kolanda Klisto. (Matai 13:21) Kasi, ntina mpenza oyo babangaka ezali te mpo bazali kotɛmɛla bango. Mpamba te ebele ya bayekoli mosusu ya Klisto bayikelaka bolɔzi ndenge na ndenge mpiko, kasi batikalaka sembo. (2 Bakolinti 2:4; 7:5) Ntina mpenza oyo bato mosusu bakómaka kobanga mpe batikaka solo ezali ete mitema na bango oyo ezali lokola mabanga epekisaka bango komanyola malamumalamu likoló na makambo malamu ya elimo. Yango wana, basepelaka na Yehova mpe na liloba na ye se likolólikoló mpe bazalaka na makasi oyo ekoki te mpo na kolonga botɛmɛli. Moto akoki kosala nini mpo asuka ndenge wana te?
14. Makambo nini moto asengeli kosala mpo motema na ye ekóma te lokola mabele oyo ezali na mabanga?
14 Moto asengeli koluka koyeba soki motema na ye ezali na mabanga te, elingi koloba makambo lokola koumela na nkanda, elimo ya koluka matomba na ye moko, to bizaleli mosusu ya mabe ndenge wana oyo ezali komonana polele te. Soki makambo ya ndenge wana esilá kofanda na motema na ye, nguya ya liloba ya Nzambe ekoki kolongola yango. (Yilimia 23:29; Baefese 4:22; Baebele 4:12) Na nsima, komanyola elongo na mabondeli ekolendisa “kopikama ya liloba” na motema ya moto yango. (Yakobo 1:21) Yango ekopesa ye makasi ntango alɛmbi nzoto mpe ekopesa ye mpiko ya kotikala sembo ata na kati ya komekama.
“Na kati ya banzubɛ”: Bato ya mitema mibale
15. (a) Mpo na nini tosengeli mpenza kotya likebi na mabele ya misato oyo Yesu alobelaki? (b) Nsukansuka, likambo nini esalemaki na mabele ya misato, mpe mpo na nini?
15 Tosengeli mpenza kotya likebi na biso na mabele ya misato, oyo ezali na banzubɛ, mpamba te na mwa makambo mosusu ekokani na mabele ya malamu. Milona oyo elonamaki na mabele oyo ezali na banzubɛ ebimisaki misisa mpe ebandaki kokola, lokola kaka oyo elonamaki na mabele ya malamu. Na ebandeli, milona yango ebandaki kokola ndenge moko na mabele yango mibale. Kasi nsima ya ntango, makambo mosusu ebimaki oyo ekómaki kotya milona yango nkaka. Mabele yango ekeseneki na mabele ya malamu mpamba te na nsima, ekómaki na ebele ya banzubɛ. Ntango milona ezalaki kokola na mabele yango, ekómaki kowela esika na ‘banzubɛ oyo ezalaki kokola elongo na yango.’ Mpo na mwa ntango, banzubɛ ezalaki kobunda na milona mpo na kozwa bilei na kati ya mabele, kozwa moi, mpe kozala na mwa esika; kasi nsukansuka, banzubɛ ezipaki milona mpe “etyaki yango nkaka.”—Luka 8:7.
16. (a) Banani oyo bakokani na mabele oyo ezali na banzubɛ? (b) Masolo ya Baevanzile misato eyebisi ete banzubɛ ezali komonisa nini?—Talá maloba na nse ya lokasa.
16 Banani oyo bakokani na mabele oyo ezali na banzubɛ? Yesu alobaki boye: “Yango ezali bato oyo bayoki, kasi, lokola bamemami na mitungisi mpe bomɛngo mpe bisengo ya bomoi oyo, bazwi nkaka bipai nyonso mpe babimisi eloko moko te na kokoka.” (Luka 8:14) Se ndenge oyo milona oyo moloni alonaki ezalaki kokola ná banzubɛ nzela moko, bato mosusu balukaka koyamba liloba ya Nzambe mpe kaka na ntango yango, komipesa na “bisengo ya bomoi oyo.” Solo ya liloba ya Nzambe elonamaka na mitema na bango, kasi ewelanaka na makambo mosusu oyo ebendaka likebi na bango. Na maloba ya elilingi, bato yango bazalaka na mitema mibale. (Luka 9:57-62) Yango ezangisaka bango ntango oyo ekoki mpenza mpo na komanyola malamumalamu likoló na liloba ya Nzambe elongo na mabondeli. Bamipesaka mobimba na liloba ya Nzambe te mpe na bongo, bapesaka yango te motuya oyo esengeli mpo bákoka koyika mpiko. Mokemoke, makambo ya mokili ezipaka mposa na bango mpo na makambo ya elimo mpe nsukansuka ‘bazwaka nkaka bipai nyonso.’c Talá ndenge bato oyo balingaka Yehova na motema moko te basukaka mabe!—Matai 6:24; 22:37.
17. Makambo nini tosengeli kozwa mokano ya kosala na bomoi na biso mpo ete banzubɛ ya elilingi oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye etya biso nkaka te?
17 Soki tozali kotya makambo ya elimo liboso mpe kozongisa makambo ya mokili na nsima, bampasi to mpe bisengo ya mokili oyo ekotya biso nkaka te. (Matai 6:31-33; Luka 21:34-36) Tosengeli soki moke te kobosana momeseno ya kotánga Biblia mpe komanyola likoló ya makambo oyo tozali kotánga. Tokozala na ntango mingi mpo na komanyola malamumalamu elongo na mabondeli soki totiki makambo mingi oyo ezali kokómisa bomoi na biso mindɔndɔ. (1 Timote 6:6-8) Basaleli ya Nzambe oyo basalaki yango, oyo na maloba ya elilingi bapikolaki banzubɛ mpo ete milona oyo ebotaka mbuma ezala na bilei mingi, ezwa moi mpe ezala na esika ya malamu, bazali kozwa mapamboli ya Yehova. Sandra azali na mbula 26, ye alobaki boye: “Soki nakanisi mapamboli oyo nazali na yango na kati ya lisangá, namoni eloko moko te oyo mokili ekoki kopesa ngai oyo ekokani na yango!”—Nzembo 84:11.
18. Ndenge nini tokoki kotikala na kati ya liloba ya Nzambe mpe koyika mpiko lokola baklisto?
18 Nyonso wana ezali komonisa polele ete biso nyonso, bilenge mpe mikóló, tokotikala na liloba ya Nzambe mpe tokoyika mpiko mpo tozali bayekoli ya Klisto ntango nyonso oyo liloba ya Nzambe ekotikala na kati na biso. Yango wana, tótalelaka ntango nyonso motema na biso ya elilingi mpo ekóma te lokola mabele ya makasi, to oyo ezali mozindo te, to mpe oyo etondi na matiti mabe, kasi ezala ntango nyonso lokola mabele ya pɛtɛpɛtɛ mpe ya mozindo. Na bongo, tokomipesa mobimba na liloba ya Nzambe mpe ‘tokobota mbuma na koyika mpiko.’—Luka 8:15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na lisolo oyo, tokotalela likambo ya liboso. Tokotalela makambo mosusu mibale na masolo oyo ekolanda.
b Mpo na komanyola elongo na mabondeli likoló ya mikapo ya Biblia oyo outi kotánga, okoki, na ndakisa, komituna mituna oyo: ‘Makambo oyo natángi ezali komonisa ngai ezaleli moko to ebele ya bizaleli ya Yehova? Ezali na boyokani nini na motó ya likambo ya Biblia? Ndenge nini nakoki kosalela yango na bomoi na ngai to kosalela yango mpo na kosalisa bato mosusu?’
c Baevanzile misato ezali komonisa ete na ndakisa oyo Yesu apesaki, milona ekómaki na nkaka mpo na bampasi mpe bisengo ya mokili: “Mitungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” “nguya ya bokosi ya bomɛngo,” “bamposa ya biloko mosusu,” mpe “bisengo ya bomoi oyo.”—Malako 4:19; Matai 13:22; Luka 8:14; Yilimia 4:3, 4.
Biyano nini okopesa?
• Mpo na nini tosengeli ‘kotikala na kati ya liloba ya Yesu’?
• Ndenge nini tokoki kosala ete liloba ya Nzambe etikala na kati ya motema na biso?
• Bato ya ndenge nini bamonisami na mitindo minei ya mabele oyo Yesu alobelaki?
• Ndenge nini okoki kozwa ntango mpo na komanyola liloba ya Nzambe?
[Etanda/Elilingi na lokasa 10]
‘BAPIKAMI MAKASI NA KATI YA SOLO’
BATO mingi oyo bazali bayekoli ya Klisto banda ebele ya bambula bazali kokoba komonisa ete ‘bapikami makasi na kati ya solo.’ (2 Petelo 1:12) Nini esalisaka bango bálanda koyika mpiko? Yoká mwa maloba oyo bamosusu kati na bango balobaki.
“Mokolo nyonso na mpokwa natángaka mwa mikapo ya Biblia mpe nabondelaka. Na nsima, nakanisaka likoló ya makambo oyo natángi.”—Jean, azwá batisimo na 1939.
“Komanyola ndenge oyo Yehova, moto oyo aleki lokumu, alingaka biso mingi, elongolaka ngai kobanga mpe elendisaka ngai natikala sembo.”—Patricia, azwá batisimo na 1946.
“Lokola nazalaka na momeseno malamu ya koyekola Biblia mpe namipesaka na ‘makambo mozindo ya Nzambe,’ yango esalisaka ngai nakende ntango nyonso liboso.”—1 Bakolinti 2:10; Anna, azwá batisimo na 1939.
“Natángaka Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango mpo na kotalela motema na ngai mpe bamposa na ngai.”—Zelda, azwá batisimo na 1943.
“Ntango oyo nalingaka mingi koleka ezali soki nazali kotambola mpe kosolola na Yehova na libondeli mpe koyebisa ye makambo oyo ezali mpenza na motema na ngai.”—Ralph, azwá batisimo na 1947.
“Soki ntɔngɔ etani, likambo ya liboso nasalaka ezali kotánga mokapo ya mokolo mpe kotánga mwa mikapo ya Biblia. Yango esalisaka ngai nazala na likambo ya sika oyo nakomanyola likoló na yango na boumeli ya mokolo.—Marie, azwá batisimo na 1935.
“Koyekola buku oyo ezali kolimbola vɛrsɛ mokomoko elendisaka ngai mpenza.”—Daniel, azwá batisimo na 1946.
Ntango nini omanyolaka liloba ya Nzambe na kati ya libondeli?—Danyele 6:10b; Malako 1:35; Misala 10:9.
[Elilingi na lokasa 13]
Soki tozali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, tokoki ‘kobota mbuma na koyika mpiko’