Yehova ayokaka kolela na biso
“Miso ya [Yehova] ekotalaka bato ya boyengebene mpe matoi na ye ekoyokaka koganga na bango.”—Nz. 34:15.
1, 2. (a) Bato mingi bazali koyoka ndenge nini lelo oyo? (b) Mpo na nini yango ezali kokamwisa biso te?
OZALI kotungisama na bampasi? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Ebele ya bato bazali kobunda na mikakatano ya bomoi na mokili oyo ya mabe. Mpo na bato mosusu, mpasi yango eleki ndelo. Bayokaka mpenza lokola Davidi, oyo akomaki ete: “Nabɛtami mpe nanyetami mingi mpenza, naleli mpo na kotomboka ya motema na ngai. Motema na ngai ekobɛtabɛta, nguya na ngai ezangeli ngai; mpe ata pole ya miso na ngai ezali lisusu na ngai te.”—Nz. 38:8, 10.
2 Biso baklisto, bampasi ya bomoi ekamwisaka biso te. Toyebi ete “bampasi” ezali na kati ya elembo ya kozala ya Yesu oyo esakolamaki. (Mko. 13:8; Mat. 24:3) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “bampasi” elimboli mpasi ya kobota. Yango emonisi mpenza bolɔzi oyo bato bazali kobunda na yango na ntango oyo ya “ndenge mosusu mpe ya mpasi”!—2 Tim. 3:1.
Yehova ayebi mpasi na biso
3. Likambo nini basaleli ya Nzambe bayebi malamu?
3 Basaleli ya Yehova bayebi malamu ete bakoki te kokima bampasi yango. Bayebi mpe ete bampasi yango ekokóma lisusu makasi koleka. Longola bampasi oyo bato nyonso bazali kokutana na yango, biso basaleli ya Yehova tozali mpe kobunda na ‘monguna, Zabolo,’ oyo azali mpenza na mokano ya kobebisa kondima na biso. (1 Pet. 5:8) Ezali mpasi te tóbanda koyoka ndenge Davidi ayokaki: “Kotukama ebomi motema na ngai mpe nayoki bolɛmbu; nataleli ete moto akoyoka mawa nde moko azali te, mpe ete moto akobɔndisa nde namoni moto te”!—Nz. 69:20.
4. Nini ebɔndisaka biso na ntango ya mpasi?
4 Davidi alingaki nde koloba ete azalaki ata na elikya moke te? Te. Talá maloba mosusu oyo akomaki na nzembo yango: “[Yehova] akoyokaka babola; akoboyaka bato na ye te baoyo bakangami.” (Nz. 69:33) Tokoki mpe koloba ete biso nyonso toyokaka ntango mosusu lokola tokangami na bolɔkɔ ya bampasi to minyoko. Tokoki mbala mosusu komona lokola basusu bayebi mpasi na biso te; mpe mbala mosusu ezalaka mpenza bongo. Kasi lokola Davidi, koyeba ete Yehova ayebi mpasi na biso ekoki kobɔndisa biso.—Nz. 34:15.
5. Mokonzi Salomo azalaki na elikya nini?
5 Salomo, mwana ya Davidi, amonisaki likambo yango ntango bafungolaki tempelo ya Yelusaleme. (Tángá 2 Ntango 6:29-31.) Asɛngaki Yehova ete ayokaka mabondeli ya moto nyonso ya motema sembo oyo ayei komilela epai na ye mpo na “mpasi na ye mpe mawa na ye.” Ndenge nini Nzambe asengelaki kotalela mabondeli ya bato wana oyo bazalaki konyokwama? Salomo alobaki na elikya nyonso ete Nzambe akoyoka bango kaka te, kasi akosalisa mpe bango. Mpo na nini? Mpo ayebi “mitema ya bana ya bato.”
6. Ndenge nini tokoki kolonga mitungisi, mpe mpo na nini?
6 Biso mpe tokoki kobondelaka Yehova mpo na ‘bampasi na biso mpe mawa na biso.’ Koyeba ete ayebi bampasi na biso mpe asungaka biso, ekoki mpenza kobɔndisa biso. Ntoma Petelo amonisaki bosolo ya likambo yango ntango alobaki ete: ‘Bóbwaka mitungisi na bino nyonso likoló na ye, mpamba te ye atyelaka bino likebi.’ (1 Pet. 5:7) Yehova amonaka makambo oyo ekómelaka biso. Yesu amonisaki ete Yehova amibanzabanzaka mpo na biso ntango alobaki ete: “Batɛkaka te bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo moko ya ebende ya motuya moke? Nzokande moko te na yango ekokwea na nse kozanga ete Tata na bino ayeba. Kasi nsuki mpenza ya motó na bino etángami yango nyonso. Na yango bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.”—Mat. 10:29-31.
Tótya motema ete Yehova akosalisa biso
7. Tokoki kozala na elikya nini ntango tozali na mpasi?
7 Tosengeli kozala na kondima ete Yehova azalaka na mposa ya kosalisa biso ntango tozali na mikakatano, mpe azali na likoki ya kosala yango. “Nzambe azali ekimelo mpe nguya mpo na biso; amonani solo na kosunga na ntango ya mpasi.” (Nz. 34:15-18; 46:1) Ndenge nini Nzambe apesaka lisalisi yango? Tótala oyo 1 Bakolinti 10:13 elobi: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobimela mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.” Yehova akoki kosilisa mpasi na biso to kopesa biso makasi mpo tóyikela yango mpiko. Ezala ndenge nini, nyonso ezali kaka lisalisi.
8. Tosengeli kosala nini mpo na kozwa lisalisi ya Nzambe?
8 Tosengeli kosala nini mpo na kozwa lisalisi yango? Toli ya Biblia yango oyo: ‘Bóbwaka mitungisi na bino nyonso likoló na ye.’ Yango elimboli ete tosengeli kotika bampasi na biso nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Tokotika komitungisa mpe tokozela na motema mpiɔ ete akokisa bamposa na biso. (Mat. 6:25-32) Yango esɛngaka komikitisa, kasi te kotya motema na makasi to na bwanya na biso moko. Soki tomikitisi “na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe,” yango ekomonisa ete tondimi ete tozali mike liboso na ye. (Tángá 1 Petelo 5:6.) Yango ekosalisa biso tóyika mpiko ata na mokakatano nini oyo Nzambe atiki ekómela biso. Tokoki kozala na mposa ete mpasi na biso esila nokinoki, kasi tosengeli kondima ete Yehova ayebi malamu ntango mpe ndenge nini akosalisa biso.—Nz. 54:7; Yis. 41:10.
9. Mokumba ya ndenge nini Davidi akitiselaki Yehova?
9 Tókanisa lisusu maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 55:22: “Kitisá mokumba na yo epai na [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.” Ntango Davidi akomaki maloba wana, azalaki kotungisama makasi. (Nz. 55:4) Emonani ete akomaki nzembo yango ntango mwana na ye Abesaloma asalelaki mayele mabe mpo na kobɔtɔla ye bokonzi. Ahitofele, mopesi-toli ya Davidi oyo azalaki mpenza kotyela motema, amikɔtisaki mpe na likambo yango. Davidi akimaki Yelusaleme mpo na komibikisa. (2 Sam. 15:12-14) Ata na ntango wana ya mpasi, Davidi akobaki kotya motema epai ya Nzambe, mpe Nzambe atikaki ye te.
10. Tosengeli kosala nini ntango tokutani na mikakatano?
10 Lokola Davidi, biso mpe tosengeli kobondelaka Yehova mpo na mitungisi nyonso oyo ekómeli biso. Tótala elendiseli oyo ntoma Paulo apesi biso na likambo yango. (Tángá Bafilipi 4:6, 7.) Kobondela na etingya ndenge wana ekomemela biso litomba nini? “Kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na [biso] mpe makoki na [biso] ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.”
11. Ndenge nini “kimya ya Nzambe” ebatelaka motema mpe makanisi na biso?
11 Libondeli ekoki mpenza kosalisa yo? Ɛɛ. Kasi, tosengeli kobosana te ete Yehova ayanolaka mabondeli na biso ntango nyonso te kaka na ndenge oyo biso tolingi. Atako bongo, libondeli ekosalisa biso tókitisa mitema, mpe na bongo mpasi na biso ekoleka biso motó te. “Kimya ya Nzambe” ekoki kosalisa biso tólɛmba te ntango mitungisi etondi biso na motema. Lokola limpinga ya basoda oyo batye na engumba moko mpo na kobatela yango liboso ya banguna, “kimya ya Nzambe” ekobatela motema mpe makanisi na biso. Ekosalisa biso mpe tólongola ntembe mpe kobanga oyo tozali na yango na motema, mpe ekopekisa biso kosala makambo kozanga kokanisa liboso.—Nz. 145:18.
12. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge moto akoki kozanga kimya te ata soki azali kotungisama.
12 Ndenge nini tokoki kozala na kimya ntango tozali kotungisama? Tózwa naino ndakisa moko oyo ekoki mbala mosusu koyokana na bomoi na biso. Kanisá ete mokonzi moko na mosala na yo azali konyokola yo. Nzokande, ozwi libaku ya koyebisa mpasi na yo epai ya nkolo kompanyi oyo azali moto malamu mpe ya boboto. Nkolo kompanyi ayebisi yo ete ayebi likambo yango mpe ete mosika te akolongola mokonzi yango na mosala. Okoyoka ndenge nini? Koyeba ete mokonzi yango akolongwa ekopesa yo makasi ya kokoba kosala, ata soki ozali komona mpasi. Biso mpe toyebi ete Yehova ayebi bampasi na biso, mpe alaki biso ete mosika te “moyangeli ya mokili oyo akobwakama libándá.” (Yoa. 12:31) Oyo nde libɔndisi!
13. Longola kobondela, tokoki kosala lisusu nini?
13 Tokosuka kaka na koyebisa Yehova mikakatano na biso na libondeli? Te. Tosengeli mpe kosalaka makambo oyo eyokani na mabondeli na biso. Ntango Mokonzi Saulo atindelaki Davidi bato na ndako mpo na koboma ye, Davidi abondelaki boye: “Ɛ Nzambe na ngai, bikisá ngai na bayini na ngai, bátelá ngai epai na baoyo batɛlɛmɛli ngai. Bikisá ngai na basali ya bokɛsɛnɛ mpe sungá ngai liboso ya bato ya makila.” (Nz. 59:1, 2) Longola kobondela, Davidi ayokelaki mwasi na ye mpe akimaki. (1 Sam. 19:11, 12) Biso mpe tokoki kobondela Nzambe apesa biso bwanya oyo ekosalisa biso tósilisa mitungisi na biso to tókitisa yango mwa moke.—Yak. 1:5.
Ndenge oyo tokoki kozwa makasi ya koyika mpiko
14. Nini ekosalisa biso tóyika mpiko na ntango ya mpasi?
14 Ekoki kozala ete mpasi na biso esili mbala moko te. Ekoki mbala mosusu koumela mwa ntango molai. Soki ezali bongo, nini ekosalisa biso tóyika mpiko? Ya liboso, tosengeli kobosana te ete soki totikali kaka sembo na mosala ya Yehova, tokomonisa ete tolingaka ye. (Mis. 14:22) Tóbosana te likambo oyo Satana akoselaki Yobo: “Yobo akotosaka Nzambe bobele mpamba? Yo otiki lopango kozingela ye te mpo na ndako na ye mpe na biloko na ye nyonso epai na epai? Opamboli mosala ya mabɔkɔ na ye mpe bibwɛlɛ na ye esili kofuluka mingi kati na mokili. Nde tiká ete osembola lobɔkɔ na yo [sikoyo] mpe omama nyonso ezali ya ye mpe akolakela yo mabe na miso na yo.” (Yobo 1:9-11) Lokola Yobo atikalaki sembo, amonisaki ete Satana abukaki lokuta. Soki biso mpe toyiki mpiko na ntango ya mpasi, tokomonisa ete Satana azali moto ya lokuta. Mpiko yango ekokómisa elikya na biso makasi lisusu koleka.—Yak. 1:4.
15. Bandakisa nini ekoki kolendisa biso?
15 Ya mibale, tóbosana te ete “makambo wana na oyo etali bampasi ezali mpe kosalema na lisangá mobimba ya bandeko na [biso] na kati ya mokili.” (1 Pet. 5:9) Ɛɛ, “komekama ata moko te ekómeli bino oyo ezangi kokómela bato nyonso.” (1 Kol. 10:13) Na esika ya komonaka kaka bampasi na biso moko, kokanisa bampasi ya basusu ekoki kopesa biso makasi mpe mpiko. (1 Tes. 1:5-7; Ebe. 12:1) Zwáká ntango ya kokanisa bandakisa ya bato oyo oyebi, oyo bayikaki mpiko atako bazalaki kotungisama. Olukaki na kati ya masolo ya bomoi ya bato oyo batungisamaki na likambo oyo ezali mpe kotungisa yo? Ekoki kolendisa yo.
16. Ndenge nini Nzambe alendisaka biso ntango tozali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge?
16 Ya misato, tóbosana te ete Yehova azali “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso, mpo biso mpe tózala na likoki ya kobɔndisa baoyo bazali na kati ya ndenge nyonso ya bolɔzi na nzela ya kobɔndisama oyo biso moko tobɔndisami na yango epai ya Nzambe.” (2 Kol. 1:3, 4) Ezali lokola Nzambe atɛlɛmi pembeni na biso mpo na kolendisa biso mpe kopesa biso makasi mpo na kolonga, kaka te mokakatano oyo ezali kotungisa biso sikoyo, kasi mpe “bolɔzi na biso nyonso.” Yango ekoki mpe kopesa biso likoki ya kolendisa basusu ‘na kati bolɔzi ya ndenge nyonso.’ Paulo amonaki bosolo ya likambo yango.—2 Kol. 4:8, 9; 11:23-27.
17. Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa biso tólonga mitungisi ya bomoi?
17 Ya minei, tozali na Biblia, Liloba ya Nzambe, oyo “ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Tim. 3:16, 17) Liloba ya Nzambe esukaka kaka te na kopesa biso makoki mpe “nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” Epesaka biso mpe makasi mpo na kolonga mitungisi ya bomoi. Ekómisaka biso bato oyo ‘bakoki mpenza’ mpe ‘bazali na nyonso esengeli.’ Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kozala na nyonso esengeli” elimboli mpenzampenza “kokoka na nyonso.” Na ntango ya kala, bazalaki kosalela liloba yango mpo na kolobela masuwa oyo batye biloko nyonso oyo esengeli na yango mpo na mobembo to masini oyo ezali na nyonso oyo esengeli mpo na mosala. Yehova mpe, na nzela ya Liloba na ye, apesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kolonga mokakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango. Yango wana, tokoki koloba ete, “Soki Nzambe atiki ete likambo oyo ekómela ngai, ye moko akosalisa ngai nalonga yango.”
Tosikolami na bampasi na biso nyonso
18. Kokanisa likambo nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na ntango ya mpasi?
18 Ya mitano, tosengeli ntango nyonso kokanisaka elaka kitoko oyo Yehova apesi ete akosikola bato na bampasi na bango nyonso. (Nz. 34:19; 37:9-11; 2 Pet. 2:9) Nsukansuka, kosikolama na biso ekolimbola kaka te kobikisama na bampasi ya lelo oyo, kasi mpe libaku ya kozala na bomoi ya seko na likoló elongo na Yesu to na paladiso awa na mabelé.
19. Nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko?
19 Liboso ntango yango ekoka, tozali kokoba koyika mpiko na bampasi ya mokili oyo ya mabe. Tozali kozela na motema likoló ntango oyo bampasi yango ekozala lisusu te. (Nz. 55:6-8) Tóbosana te ete mpiko na biso ezali komonisa ete Satana azali moto ya lokuta. Tiká ete tókoba kozwa makasi na nzela ya mabondeli mpe ya bandeko na biso, mpe tóbosanaka te ete bandeko na biso bazali mpe komona mpasi lokola biso. Tókoba kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kozala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na nyonso oyo esengeli. Tótika te ete elikya oyo “Nzambe ya kobɔndisama nyonso” apesi biso elɛmba. Kobosana te ete “miso ya [Yehova] ekotalaka bato ya boyengebene mpe matoi na ye ekoyokaka koganga na bango.”—Nz. 34:15.
Okopesa eyano nini?
• Davidi ayokaki ndenge nini ntango akómaki na mpasi?
• Elikya nini Mokonzi Salomo azalaki na yango?
• Nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na ntango Yehova atiki mpasi ekómela biso?
[Elilingi na lokasa 13]
Salomo azalaki na elikya ete Yehova akosunga basaleli na ye na ntango ya mpasi
[Elilingi na lokasa 15]
Davidi akitisaki mikumba na ye epai ya Yehova na nzela ya libondeli mpe na nsima asalaki makambo oyo eyokanaki na libondeli na ye