Mokanda ya Biblia nimero 41—Malako
Mokomi: Malako
Esika ya bokomi: Loma
Nsuka ya bokomi: soko 60–65 T.B.
Boumeli ya lisoló: 29–33 T.B.
1. Toyebi nini na ntina na Malako mpe libota na ye?
NTANGO Yesu akangamaki na Getesemane mpe wana bantoma na ye bakimaki, “elenge mobali moko oyo alataki elamba moko kitoko ya pɛtɛpɛtɛ likoló na nzoto na ye oyo ezalaki bolumbu,” azalaki kolanda ye. Wana bibele balingaki mpe kokanga ye lokola, “atikaki elamba na ye ya pɛtɛpɛtɛ mpe akimaki bolumbu.” Mbala mingi, ekanisamaka ete elenge mobali yango nde Malako. Kati na mokanda ya Misala, alobelami lokola “Yoane, oyo abyangamaki lisusu ete Malako” mpe ekoki kozala ete autaki na libota moko ya bozwi kati na Yelusaleme, mpamba te bazalaki na ndako na bango moko mpe na basáli. Malia, mama na ye, azalaki mpe moklisto, mpe lisangá ya liboso esalelaki ndako na ye lokola esika ya makita. Na libaku moko, wana anzelu abimisaki ye longwa na bolɔ́kɔ, Petelo akendeki na ndako yango mpe akutaki bandeko bayangani kuna.—Mko. 14:51, 52; Mis. 12:12, 13, NW.
2, 3. (a) Kozanga ntembe, nini epusaki Malako na kokɔta na mosala ya misionere? (b) Boninga ya lolenge nini azalaki na yango elongo na bamisionere mosusu, mingimingi elongo na Petelo mpe Paulo?
2 Misionere Balanaba, mobotami na Kupulu, oyo azalaki Molevi, azalaki ndeko ya Malako. (Mis. 4:36; Kols. 4:10) Ntango Balanaba ayaki elongo na Paulo na Yelusaleme mpo na kopesa lisungi na ntina na nzala, ezali na libaku wana nde Malako ayebaki Paulo. Boninga wana kati na lisangá mpe kozala elongo na baministre wana ya molende, kozanga ntembe, elamwisaki mposa ya Malako mpo na kobanda mosala ya misionere. Na yango, tozali komona ye kosala lokola moninga mpe mosungi ya Paulo mpe ya Balanaba na mobembo na bango ya liboso ya misionere. Nzokande, mpo na ntina moko boye, Malako atikaki bango na Pɛlɛgɛ na mokili na Pamfulia, mpe azongaki na Yelusaleme. (Mis. 11:29, 30; 12:25; 13:5, 13) Mpo na yango, Paulo aboyaki kokamata Malako na mobembo ya mibale ya misionere, mpe yango ebimisaki bokabwani kati na Paulo mpe Balanaba. Paulo akamataki Sila, nzokande Balanaba akamataki ndeko na ye Malako mpe akendeki elongo na ye na Kupulu.—Mis. 15:36-41.
3 Malako amonisaki molende kati na mosala mpe akómaki lisungi monene bobele mpo na Balanaba te, kasi mpe na nsima mpo na ntoma Petelo mpe ntoma Paulo. Malako azalaki elongo na Paulo (s. 60-61 T.B.) na boumeli ya kokangama na ye na bolɔ́kɔ na Loma. (Flmo. 1, 24) Na nsima, Malako na Petelo bazalaki elongo na Babilone katikati na mobu 62 mpe mobu 64 T.B. (1 Pet. 5:13) Paulo azalaki lisusu mokangami na Loma mbala mosusu na mobu 65 T.B., mpe kati na nkomá moko asɛngaki na Timoté ete aya elongo na Malako, kolobáká ete, “mpamba te azali ntina mpo na ngai kati na mosala.” (2 Tim. 1:8; 4:11, NW) Yango ezali mbala ya nsuka oyo Malako alobelami kati na lisoló ya Biblia.
4-6. (a) Lolenge nini Malako akokaki kozwa na bosikisiki nyonso likambo moko na moko oyo ezali kati na Evanzile na ye? (b) Nini emonisi boninga na ye ya pene elongo na Petelo? (c) Pesá bandakisa ya makambo matali Petelo oyo mazali kati na Evanzile.
4 Ezalaki Malako oyo nde akomaki Evanzile oyo eleki mokuse kati na Baevanzile nyonso. Azalaki mosalani elongo na bantoma ya Yesu mpe moko kati na baoyo bapesaki bomoi na bango mpo na mosala ya nsango malamu. Kasi Malako azalaki te moko kati na bantoma 12, mpe azalaki te moninga ya penepene ya Yesu. Epai wapi azwaki makambo ya sikisiki oyo masali ete lisoló na ye mpo na mosala ya Yesu ezala mpenza solo uta ebandeli kino nsuka? Engebene bakomi na kala: Papias, Origène mpe Tertullien, azwaki makambo yango epai na Petelo, ye oyo azalaki moninga ya penepene ya Malako.a Petelo abyangaki ye ete “mwana na ngai,” boye te? (1 Pet. 5:13) Petelo azalaki moto oyo amonaki na miso mpenza makambo nyonso oyo Malako akomaki, na bongo akokaki koyoka epai na Petelo makambo ya mikemike mingi oyo alobeli, makambo oyo mazangi kati na Baevanzile mosusu. Na ndakisa, Malako alobeli “basáli” oyo bazalaki kosala epai na Zebedai; moto na maba oyo ayaki epai na Yesu mpe “akumbamaki liboso na ye”; moto oyo demó akɔtelaki ye, oyo “azalaki komizokisa na mabanga,” mpe Yesu apesaki esakweli na ye na ntina na ‘koya ya Mwana na moto na nguya mingi mpe na nkembo’ wana efandaki ye na Ngomba ya Olive “kotalana na tempelo.”—Mko. 1:20, 40; 5:5; 13:3, 26.
5 Petelo ye moko azalaki mobali ya mayoki mozindo mpe na yango asengelaki kosepela mpe kolobela epai na Malako mayoki ya Yesu. Yango wana Malako azali mbala mingi kolobela lolenge Yesu azalaki koyoka mpe kosala; na ndakisa, tozali kotánga ete atambolisaki miso “likoló na bango na nkanda, ayokaki mawa,” “akimelaki mingi,” mpe “aleli mingi na elimo na ye.” (3:5; 7:34; 8:12, NW) Ezali Malako nde alobeli biso mayoki oyo Yesu azalaki na yango epai na elenge mokonzi mozwi, kolobáká ete “azalaki na bolingo mpo na ye.” (10:21, NW) Mpe oyo nde elobeli ya nsáí na motema tozali kokuta kati na lisoló oyo ete Yesu asukaki te bobele na kotɛlɛmisa mwana moke katikati na bayekoli na ye kasi mpe “azingaki ye na mabɔkɔ na ye,” mpe ete na libaku mosusu “amemaki bana na mabɔkɔ na ye”!—9:36; 10:13-16, NW.
6 Bizaleli mosusu ya Petelo bimonani kati na ekomeli ya Malako, oyo ezali ya mbalakaka, ya mayoki, ya nguya, ya bompikiliki, mpe ya kolimbola likambo moko na moko. Emonani ete alingaki kolobela makambo na lombangu mpenza. Na ndakisa, liloba “nokinoki” emonani mbala mingi, komemáká lisoló na lolenge ya mbangumbangu lokola liboso na likámá moko.
7. Nini ekesenisi Evanzile ya Malako na oyo ya Matai?
7 Atako Malako atángaki Evanzile ya Matai mpe lisoló na ye ezali bobele na 7 % ya makambo oyo mazwami na Baevanzile mosusu te, ekozala libungá na kokanisa ete Malako alobelaki na mokuse makambo oyo mazali na Evanzile ya Matai mpe abakisaki mwa makambo ya sikisiki. Atako Matai amonisaki Yesu lokola Masiya oyo alakamaki mpe Mokonzi, Malako sikawa azali kotalela bomoi mpe misala na ye na lolenge mosusu. Amonisi Yesu lokola Mwana na Nzambe oyo azalaki mosáli na makamwisi, Mobikisi-molóngi. Malako alobeli mingi misala ya Klisto na esika ya kolobela masoló mpe mateya na ye. Bobele mwa biteni moke ya masese mpe moko na masoló ya Yesu oyo eleki molai elobelami, kasi Lisoló likoló na Ngomba elobelami te. Yango nde esali ete Evanzile ya Malako ezala mokuse, atako ezali na nguya motindo moko na Baevanzile mosusu. Soko makamwisi 19 malobelami mpenza polele.
8. Makambo nini mamonisi ete Evanzile ya Malako ekomamaki mpo na Baloma?
8 Atako Matai akomaki Evanzile na ye mpo na Bayuda, emonani polele ete Malako akomaki oyo ya ye libosoliboso mpo na Baloma. Lolenge nini toyebi yango? Mobeko ya Mose elobelami bobele ntango azali kosolola makambo matali mobeko yango, mpe molɔngɔ́ ya bankɔ́kɔ ya Yesu elobelami te. Evanzile ya Klisto emonisami lokola likambo ya ntina na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Azali kolimbola likambo mokomoko likoló na mimeseno mpe mateya ya Bayuda, mpamba te batángi oyo bazalaki Bayuda te bamesanaki na yango te. (2:18; 7:3, 4; 14:12; 15:42) Maloba oyo mautaki na lokótá Aramɛyɛ mabongolamaki. (3:17; 5:41; 7:11, 34; 14:36; 15:22, 34) Apesi na bosikisiki nkombo ya bisika oyo bizali na Palestine mpe nkombo ya bitwɛlɛ. (1:5, 13; 11:13; 13:3) Motuya ya mbongo ya Bayuda epesami na mosolo ya Baloma. (12:42, NW, maloba na nsé ya lokasa) Asaleli maloba mingi ya Latin koleka bakomi mosusu ya Baevanzile, na ndakisa speculator (mokɛngɛli), praetorium (ndako ya moyangeli), mpe centurio (kapitɛnɛ ya basodá).—6:27; 15:16, 39.
9. Epai wapi mpe ntango nini mokanda ya Malako ekomamaki, mpe nini endimisi bosolo na yango?
9 Mpo ete Malako akomaki libosoliboso mpo na Baloma, boye ekoki kozala ete akomaki búku na ye na Loma. Ezala babúku ya kala mpe makambo oyo mazali kati na mokanda na ye epesi biso nzela na koloba ete yango ekomamaki na Loma na boumeli ya bokangami ya liboso to ya mibale ya ntoma Paulo, elingi koloba na boumeli ya eleko ya mobu 60 kino 65 T.B. Na eleko wana Malako asilaki kokóma na Loma soko mbala moko to mpe mbala mibale. Bato nyonso ya mayele ya ekeke ya mibale mpe ya misato bandimi ete Malako azalaki mokomi na yango. Evanzile yango esilaki kopalangana epai na baklisto na katikati ya ekeke ya mibale. Kopemama ya Evanzile ya Malako endimami na mikanda nyonso ya liboso ya Makomami ya Greke ya boklisto.
10. Lolenge nini tosengeli kotalela bosukisi molai mpe bosukisi mokuse ya Malako, mpe mpo na nini?
10 Atako bongo, bosukisi ya molai mpe ya mokuse oyo na bantango mosusu ebakisamaka nsima ya mokapo 16, molɔngɔ́ 8, esengeli te kotalelama lokola ete epemamaki. Ezali te kati na bamaniskri mingi ya kala, lokola Sinaïticus mpe Vaticanus No. 1209. Eusèbe mpe Jérôme, banganga-mayele ya ekeke ya minei, bandimi likambo oyo ete lisoló yango lisuki na maloba “bazalaki kati na bobangi.” Ekoki kozala ete maloba mosusu ya nsuka ebakisamaki mpo na kosala ete Evanzile esuka na lolenge ya pwasa te.
11. (a) Nini emonisi bosikisiki ya Evanzile ya Malako, mpe moto nani oyo azali na bokonzi alobelami mingi kati na yango? (b) Mpo na nini yango ezali “nsango malamu,” mpe Evanzile ya Malako elobeli makambo oyo masalemaki na boumeli ya eleko nini?
11 Likambo oyo ete lisoló ya Malako ezali sikisiki, emonisami na boyokani mpenza oyo ezali bobele kati na Evanzile na ye mpe Baevanzile mosusu te, kasi lisusu na boyokani elongo na Makomami Mosantu nyonso longwa na Genese kino Emoniseli. Lisusu, Yesu amonisami mbala na mbala lokola moto oyo azali na bokonzi bobele na maloba na ye te, kasi likoló na nguya ya biloko bizalisami, likoló na Satana mpe bademó, likoló na bokɔnɔ mpe mpasi, ɛɛ, likoló na liwa. Yango wana Malako abandisaki lisoló na ye na maloba ya ebandeli oyo ya kobenda likebi: “Ebandeli ya nsango malamu na ntina na Yesu Klisto.” Koya na ye mpe mosala na ye ezali “nsango malamu,” mpe na yango boyekoli ya Evanzile ya Malako esengeli kopesa litomba epai na batángi nyonso. Makambo oyo malobelami na Malako esangisi eleko oyo ebandaki na prɛntá ya mobu 29 T.B. kino prɛntá ya mobu 33 T.B.
MAKAMBO MAZALI KATI NA MALAKO
12. Nini elobelami na mokuse na milɔngɔ́ 13 ya liboso oyo mizali kati na Malako?
12 Batisimo mpe komekama ya Yesu (1:1-13). Malako abandi nsango malamu na komonisáká Yoane Mobatisi. Azali momemi ya nsango oyo asakolamaki, oyo atindamaki mpo na kosakola ete: “Bongisá balabála ya Yehova, bino bato, sembolá nzela na ye.” Mpo na ntina na Ye oyo akoya mosika te, mobatisi alobi ete, ‘Azali na nguya koleka ngai.’ Ɛɛ, akobatisa, na mai te, kasi na elimo santu. Sikawa Yesu auti na Nasalete ya Galilai, mpe Yoane abatisi ye. Elimo ekiti likoló na Yesu lokola ebenga, mpe mongongo moyokani longwa na likoló ete: “Ozali Mwana na ngai, molingami; nandimi yo.” (1:3, 7, 11, NW) Yesu amekami na Satana na mokili mokauki, mpe baanzelu basaleli ye. Makambo oyo nyonso ya kokamwa makangisami kati na milɔngɔ́ 13 ya liboso oyo mizali na Evanzile ya Malako.
13. Na makambo nini ya ebandeli ya mosala na ye, Yesu amonisaki bokonzi na ye lokola “Mobulami na Nzambe”?
13 Yesu abandi mosala na Galilai (1:14–6:6). Nsima na kokangama ya Yoane, Yesu akei kosakola nsango malamu ya Nzambe na Galilai. Oyo nde nsango ya kokamwa azali na yango! “Bokonzi ya Nzambe esili kobɛlɛma. Bóbongola mitema, bino bato, mpe bóndima nsango malamu.” (1:15, NW) Abéngi Simona mpe Andalea mpe Yakobo mpe Yoane uta na mosala na bango ya koluba na miluba mpo ete bákóma bayekoli na ye. Na Sabata abandi koteya kati na eyanganelo na Kapalanauma. Bato bakamwi mingi, mpamba te azali koteya “lokola moto oyo azali na bokonzi, kasi lokola bakomeli te.” Amonisi bokonzi na ye lokola “Mobulami ya Nzambe” na kobimisáká elimo ya mbindo longwa na mobali moko oyo azalaki na yango mpe na kobikisáká mama ya mwasi ya Petelo, oyo azalaki na fɛ́fɛlɛ. Nsango epalangani lokola mɔ́tɔ na zámba, mpe na mpokwa wana “mboka mobimba” eyanganaki liboso na ndako ya Simona. Yesu abikisi bato mingi oyo bazalaki na makɔnɔ mpe abimisi bademó mingi.—1:22, 24, 33, NW.
14. Lolenge nini Yesu amonisi elembo ya bokonzi na ye mpo na kolimbisa masumu?
14 Yesu alobeli mosala na ye: “Ebongi na ngai kosakola.” (1:38) Asakoli na Galilai mobimba. Bipai binso akei, azali kobimisa bademó mpe azali kobikisa babɛ́li, kati na bango moto moko na maba mpe mokatatali moko, baoyo epai na bango alobi ete: “Masumu na bino malimbisami.” Bamoko kati na bakomeli bazali kokanisakanisa kati na mitema na bango ete, ‘Oyo ezali kotuka. Longola Nzambe, nani mosusu akoki kolimbisa masumu?’ Kososoláká makanisi na bango, Yesu amonisi ete “Mwana na moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu” na koyebisáká na mokatatali ete tɛlɛmá mpe kendá na ndako. Bato bakumisi Nzambe. Ntango Levi (Matai) mokɔngɔli na mpako, akómi moyekoli na ye, Yesu ayebisi bakomeli ete: “Nayaki mpo na kobyanga bayengebene te, kasi basumuki.” Amimonisaki ye moko ete azali “Nkolo ata ya sabata.”—2:5, 7, 10, 17, 28.
15. Yesu alobi nini epai na baoyo bazali koboya kondima makamwisi na ye, mpe alobi nini na ntina na bikanganelo ya libota?
15 Yesu abongisi sikawa etuluku ya bantoma 12. Biboto na ye babandi komonisa mwa botɛmɛli, mpe na nsima bamoko na bakomeli longwa na Yelusaleme bafundi ye ete azali kobimisa bademó na lisalisi ya mokonzi ya bademó. Yesu atuni bango ete, “Satana akoki kobimisa Satana boni?” mpe akebisi bango ete: “Ye oyo azali kotuka elimo santu mpo na libela akolimbisama te, kasi azali na ngambo ya lisumu ya seko.” Na boumeli ya lisoló wana, mama na ye mpe bandeko na ye bayei koluka ye, mpe Yesu apusami na koloba ete: “Moto nani akosalaka mokano na Nzambe azali ndeko mobali na ngai mpe ndeko mwasi mpe mama.”—3:23, 29, 35, NW.
16. Na kosaleláká masese, Yesu ateyi nini na ntina na “bokonzi ya Nzambe”?
16 Yesu abandi koteya “mabombami ya bulɛɛ ya bokonzi ya Nzambe” na nzela ya masese. Alobeli moto oyo alónaki mbóto oyo ekweaki na mitindo mikeseni ya mabelé (oyo emonisi mitindo mikeseni ya bayoki na liloba) mpe alobeli mwinda oyo mozali kongɛnga longwa na etyelo ya mwinda. Kati na lisese mosusu, Yesu alobi ete Bokonzi ya Nzambe ezali lokola ntango moto azali konyakela mbóto na mabelé: “Mabelé ekobotaka mbuma yango mpenza—liboso etanga, na nsima motó, na nsima masangu matondi kati na motó.” (4:11, 28) Apesi lisusu lisese ya mbuma na sinapi, oyo atako ezali moke koleka mbóto nyonso, ekóli mingi na bitape minene oyo ekoki kozala ebombamelo.
17. Lolenge nini makamwisi ya Yesu mamonisi bonene ya bokonzi na ye?
17 Wana bakatisi Libeke ya Galilai, na lolenge ya likamwisi Yesu alɛmbisi nguya ya mopɛpɛ makasi, mpe na etindá na ye mbongé ya libeke esili: ‘Nyɛɛ! Zalá kimya!’ (4:39) Na ngámbo ya mokili ya Bagelasa, Yesu abimisi “Etuluku” ya bademó longwa na moto moko mpe atikeli bango nzela ete bákɔta na etongá ya bangulu soko 2 000, oyo na nsima emibwaki mpe ezindi kati na libeke. (5:8-13) Na nsima na yango, Yesu akatisi na ngámbo mosusu. Mwasi moko abikisami na bokɔnɔ na ye ya kotanga makila, oyo esilaki te na boumeli ya mbula 12, abikisami bobele na kosimbáká elamba ya Yesu, wana azali na nzela mpo na kokende kosekwisa elenge mwasi ya mibu 12 oyo azalaki mwana ya Yailo. Ya solo, Mwana na moto azali na bokonzi likoló na bomoi mpe kufa! Atako bongo, bato oyo bafandi na esika Yesu akólaki bazali kotyana ntembe na ntina na bokonzi na ye. Akamwi na ntina na kozanga na bango ya kondima kasi akóbi “kolakisa na mboka mike epai na epai.”—6:6.
18. (a) Lolenge nini mosala ya Yesu ekólaki? (b) Nini epusi Yesu na koteya mpe na kosala makamwisi?
18 Mosala ya kosakola ekóli na Galilai (6:7–9:50). Ba 12 batindami 2 na 2, bazwi malako mpe bokonzi mpo na kosakola mpe koteya, kobikisa bato, mpe kobimisa bademó. Nkombo ya Yesu eyebani malamu, bamoko bazali kokanisa ete azali Yoane Mobatisi oyo asekwi longwa na bakufi. Likanisi wana litungisi Elode, oyo na boumeli ya elambo ya bokundoli mokolo ya kobotama na ye, Yoane akatamaki motó. Bantoma bauti na mobembo na bango ya mosala ya kosakola mpe bapesi lapólo ya mosala na bango epai na Yesu. Ebele monene ya bato balandi Yesu zingazinga na Galilai, mpe ‘ayokeli bango mawa, mpamba te bazali lokola bampate bazangi mobateli.’ Na bongo, abandi koteya bango makambo mingi. (6:34) Na bolingo nyonso, apesi bango mpe bilei ya mosuni na koleisáká bato 5 000 na mampa mitano mpe mbisi mibale. Mwa moke na nsima, wana bayekoli bazali kobunda na mopɛpɛ makasi kati na masuwa lokola basalaki yango na Betesaida, ayei epai na bango kotamboláká likoló na mai mpe akitisi mopɛpɛ. Likambo ya kokamwa ezali te ete ata bayekoli na ye “bakamwi kokamwa”!—6:51.
19, 20. (a) Lolenge nini Yesu apameli bakomeli mpe Bafalisai? (b) Makambo nini mapesi nzela ete Petelo mpe apamelama?
19 Kati na etúká ya Genesaleta, Yesu atyani ntembe elongo na bakomeli mpe Bafalisai longwa na Yelusaleme na ntina na likambo litali kolya kozanga kosukola mabɔkɔ, mpe apameli bango mpo bazali ‘kosundola malako ya Nzambe nde bazali kotosa mibeko ya bato.’ Alobi ete ezali te oyo ekokɔta longwa na libándá nde ezali kobebisa moto, kasi nde oyo ezali kouta longwa na kati, longwa na motema, elingi koloba, “makanisi mabe.” (7:8, 21) Akei na nɔ́rdi ya bitúká ya Tulo mpe ya Sidona, asali likamwisi epai na mopakano moko, abimisi demó epai na mwana mwasi ya mwasi moko ya mboka Sulapoinika.
20 Ezongi ye na Galilai, Yesu ayoki mawa mpo na bibele oyo bazali kolanda ye mpe aleisi bato 4 000 na mampa nsambo mpe na mwa mbisi mike. Akebisi bayekoli na ye na ntina na lokweza ya Bafalisai mpe lokweza ya Elode, kasi na ntango yango bazali kokanga ntina na yango te. Na nsima, likamwisi mosusu—kobikisama ya mokufi-miso moko na Betesaida. Wana bazali kosolola na nzela oyo ezali komema na mboka mike ya Kaisalia na Filipi, Petelo na kondimisama nyonso amonisi ete Yesu azali “Klisto” kasi na nsima atɛmɛli makasi wana Yesu alobeli kobɛlɛma ya minyoko mpe ya kufa ya Mwana na moto. Mpo na yango Yesu apameli ye: “Kendá nsima na ngai, Satana! Zambi ozali kokanisa makambo na Nzambe te kasi makambo na bato.” (8:29, 33) Yesu alendisi bayekoli na ye ete bálanda ye ntango nyonso na ntina na nsango malamu; soki bayoki nsɔ́ni mpo na ye, ye akoyoka bango nsɔ́ni ntango akokóma kati na nkembo ya Tata na ye.
21. (a) Banani bamoni “koya ya bokonzi ya Nzambe kati na nguya,” mpe na lolenge nini? (b) Lolenge nini Yesu alobeli mingi likambo ya kotya bokonzi na esika ya liboso?
21 Mikolo motoba na nsima, ntango amati likoló na ngomba moko molai, Petelo, Yakobo mpe Yoane bazwi libaku malamu ya komona “bokonzi ya Nzambe kati na nguya na yango” wana emoni bango kobongwana ya Yesu kati na nkembo. (9:1) Yesu amonisi lisusu nguya na ye na kobimisáká elimu oyo ekómisaki mwana moko ya mobali ebubu, mpe na mbala ya mibale alobeli minyoko mpe kufa oyo esengeli koyela ye. Apesi bayekoli na ye toli ete bápesa nzela te na eloko moko ete epekisa bango kokɔta kati na bomoi. Lobɔkɔ na yo ezali nde kobɛtisa yo libaku? Katá yango! Lokolo na yo? Katá yango! Liso na yo? Bwaká yango mosika! Ebongi malamu kokɔta elɛmɛ na Bokonzi ya Nzambe na esika ya kobwakama mobimba kati na Gehena.
22. Toli nini emonisami polele kati na mosala ya Yesu na Pelea?
22 Mosala kati na Pelea (10:1-52). Yesu akei na ndelo ya Yuda mpe “akatisi Yordani” (kati na Pelea). Sikawa Bafalisai bazali kotuna ye na ntina na koboma libala, mpe asaleli libaku yango mpo na koyebisa mitindá ya Nzambe mpo na libala. Elenge mobali moko ya bozwi atuni ye na ntina na kozwa bomoi ya seko kasi ayoki mpenza mpasi na motema ntango ayoki ete mpo na kozwa biloko ya motuya na likoló, asengeli kotɛkisa biloko na ye nyonso mpe kokóma moyekoli ya Yesu. Yesu ayebisi bayekoli na ye ete: “Ezali pɛtɛɛ mpo na kamela kokɔta na lidusu ya ntonga koleka mpo na mozwi kokɔta kati na Bokonzi ya Nzambe.” Alendisi baoyo basili kotika nyonso na ntina na nsango malamu, alaki bango ete bakozwa “mbala monkámá sikawa . . . elongo na minyoko, mpe na mikolo mizali koya bomoi ya seko.”—10:1, 25, 30, NW.
23. Lisoló nini mpe likamwisi nini lisalemi na mobembo na Yelusaleme?
23 Yesu mpe ba 12 bakei sikawa na Yelusaleme. Yesu alobeli bango mpo na mbala ya misato na ntina na minyoko oyo mizali liboso na ye mpe lisusu mpo na lisekwa na ye. Atuni bango soki bakoki komela kɔ́pɔ lolenge moko lokola oyo ye azali komela, mpe ayebisi bango ete: “Ye nani alingi kozala liboso kati na bino asengeli kozala moombo ya nyonso.” Wana ebimi bango na Yeliko, mosɛngi moko oyo azali mokufi-miso azali konganga na ngámbo ya nzela: “Yesu, Mwana na Davidi, yokelá ngai mawa!” Yesu afungoli miso na ye—oyo ezali kobikisa na ye ya likamwisi ya nsuka oyo Malako akomaki.—10:44, 47, 48.
24, 25. (a) Na makambo nini Yesu amonisi bokonzi na ye? (b) Na maloba nini ayanoli batɛmɛli na ye? (c) Likebisi nini Yesu apesi epai na bibele, mpe nini asɛngi epai na bayekoli na ye?
24 Yesu kati na Yelusaleme mpe na zingazinga na yango (11:1–15:47). Lisoló lilobelami na lolenge ya lombangu! Yesu amati likoló na mwana na mpunda mpo na kokɔta na engumba, mpe bato bazali kokumisa ye lokola Mokonzi. Na mokolo molandi, apɛtoli tempelo. Banganga-kapita mpe bakomeli bakómi na bobangi na ntina na ye mpe bazali koluka koboma ye. Batuni ye ete: “Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini?” (11:28) Na mayele nyonso Yesu azongiseli bango motuna na kopesáká lisese ya balóni oyo babomaki mosangoli ya elanga ya vinyo. Basosoli yango mpe batiki ye.
25 Na nsima batindi bamoko kati na Bafalisai mpo na kozwa ye na ekweli na likambo ya mpako. Kobyangáká lopata, atuni ete: “Oyo elilingi mpe likomi ya nani?” Bayanoli ete: “Ya Kaisala.” Na nsima, Yesu alobi ete: “Bópesa na Kaisala biloko na Kaisala mpe na Nzambe biloko na Nzambe.” Na ntembe te, bakamwi na ntina na ye! (12:16, 17) Sikawa Basadukai, oyo bandimaka lisekwa te, bameki kotyela ye motambo na motuna oyo: ‘Soki mwasi moko alandaki kozwa mibali kino nsambo, akozala mwasi ya nani na lisekwa?’ Yesu ayanoli mbala moko ete baoyo bakosekwa longwa na bakufi bakozala “pelamoko na baanzelu na likoló,” mpamba te bakobala te. (12:19-23, 25) Moko na bakomeli atuni ete: “Mobeko nini ezali liboso ya nyonso?” Yesu ayanoli ete: “Ya liboso ezali, ‘Yoká, ɛ Yisalaele, Yehova Nzambe na biso azali Yehova moko, mpe osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba mpe na nguya na yo mobimba.’ Ya mibale ezali oyo, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’” (12:28-31, NW) Nsima na yango, moto moko ameki kotuna ye motuna lisusu te. Ɛtɛlɛmɛlo ya Yesu lokola moteyi ya kokoka endimami. Ebele monene bazali koyoka ye na esengo, mpe Yesu akebisi bango na ntina na bakomeli ya lolendo. Na nsima, epai na bayekoli na ye, akumisi mwasi-mobólá oyo atye mingi koleka banso mosusu kati na ebombelo ya tempelo, mpamba te mwa mpata na ye mibale ezali “nyonso oyo azalaki na yango, bomoi na ye mobimba.”—12:44, NW.
26. Wapi lisoló bobele moko ya molai oyo elobelami na Malako, mpe yango esuki na toli nini?
26 Wana efandi ye na Ngomba ya Olive mpe kotaláká tempelo, Yesu ayebisi na nkuku epai na minei kati na bayekoli na ye oyo ekozala “elembo” ya nsuka ya biloko wana. (Oyo ezali lisoló bobele moko lileki molai oyo ekomami na Malako, mpe yango ekokani na oyo ezali na Matai mikapo 24 mpe 25.) Yango esuki na toli oyo ya Yesu: “Na ntina na mokolo yango to ngonga yango moto te ayebi, ezala baanzelu kati na likoló, ezala ata Mwana, kasi bobele Tata. Kasi oyo nalobi na bino, nazali mpe koloba na banso, Bólanda kosɛnzɛla.”—13:4, 32, 37, NW.
27. Lobelá makambo oyo mamemaki kino na kotɛkisama ya Yesu na Getesemane.
27 Pene na Betania, mwasi moko apakoli Yesu malasi moko ya motuya. Bamoko balobi ete yango ezali mpenza libebisi ya malasi, kasi Yesu alobi ete yango ezali likambo moko malamu, ezali kobongisama mpo na kokundama na ye. Na ntango ebongisami, Yesu mpe ba 12 bayangani kati na engumba mpo na Elekeli. Amonisi moto oyo akokaba ye mpe abandisi elambo ya mpokwa ya ekaniseli elongo na bayekoli na ye ya sembo, mpe bakei na Ngomba ya Olive. Na nzela, Yesu ayebisi bango ete bango nyonso bakobɛta libaku. Petelo angangi ete: “Ngai te.” Kasi Yesu alobi na ye ete: “Butu oyo, liboso ete nsoso elela mbala mibale, yo okowangana ngai mbala misato.” Wana ekómi bango na esika ebéngami Getesemane, Yesu amitangoli mpo na kobondela, kosɛngáká na bayekoli na ye ete bálanda kosɛnzɛla. Libondeli na ye esuki na maloba oyo: “Abba, Tata, makambo nyonso makoki kosalema epai na yo; longolá kɔ́pɔ oyo longwa na ngai. Nzokande lokola elingi ngai te, kasi lokola elingi yo.” Mbala misato Yesu azongeli bayekoli na ye, mpe mbala misato akuti bango balali, ata “na ntango lokola oyo”! (14:29, 30, 36, 41, NW) Kasi ntango esili kokóma! Talá!—mokabi!
28. Wapi makambo mamemi na kokangama ya Yesu mpe na komonana na ye liboso ya nganga-monene?
28 Yuda abɛlɛmi mpe apwepwi Yesu. Yango ezali elembo mpo na mampinga ya banganga-kapita mpo na kokanga ye. Bamemi ye na libándá ya nganga-monene, epai [bato] mingi bazali kopesa matatoli ya lokuta na ntina na ye, kasi matatoli na bango mazali kokokana te. Yesu akangi monɔkɔ. Na nsuka, nganga-monene atuni ye ete: “Ozali Klisto, Mwana na Oyo apambwami?” Yesu ayanoli, “Nazali ye.” Nganga-monene angangi, ‘Lituki!’ mpe bango nyonso bakateli ye etumbu ya liwa. (14:61-64) Kati na libándá na eteni ya nsé na ndako, Petelo asili kowangana Yesu mbala misato. Nsoso eleli mpo na mbala ya mibale, mpe Petelo, amikundoli maloba ya Yesu, ayoki mawa mpe aleli.
29. Makambo nini Malako akomi na ntina na komekama ya nsuka mpe kobomama ya Yesu, mpe lolenge nini Bokonzi emonisami ete ezali likambo oyo lityelami ntembe?
29 Nokinoki wana ntɔ́ngɔ́ ebandi kotana, Sanedrina bayokani mpe batindi Yesu na minyɔlɔlɔ epai na Pilata. Asosoli nokinoki ete Yesu azali moto mabe te mpe alingi kotika ye. Nzokande, na ntina na botɛmɛli ya bibele oyo bapusami na banganga-kapita, asuki na kotinda ete Yesu atyama na nzeté. Bakei na Yesu na Gologota (elimboli “Esika na Mokuwa”) mpe babáki ye na nzeté, elongo na efundeli oyo ekomami likoló na ye ete: “Mokonzi ya Bayuda.” Baleki-nzela batyoli ye na maloba oyo: “Abikisaki bato mosusu; akoki komibikisa ye moko te!” Na midi (ngonga ya motoba) molili ekwei na mboka mobimba kino na ngonga ya misato. Na nsima Yesu angangi na mongongo makasi ete, “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?” mpe akufi. Wana emoni ye makambo oyo, mokonzi na basodá alobi ete: “Ya solo moto oyo azalaki Mwana na Nzambe.” Yosefe moto na Alimataya, moko na basangani ya Sanedrina, kasi azali na kondima kati na Bokonzi ya Nzambe, atuni Pilata mpo na kozwa nzoto ya Yesu mpe alalisi yango kati na nkunda oyo esalemi kati na libanga.—15:22, 26, 31, 34, 39.
30. Na mokolo ya liboso na pɔ́sɔ, likambo nini lisalemi na nkunda?
30 Makambo masalemi nsima na liwa ya Yesu (16:1-8). Na ntɔ́ngɔ́ makasi ya mokolo ya liboso na pɔ́sɔ, basi misato bakei na nkunda. Na kokamwa nyonso, bakuti ete libanga monene oyo etyamaki na ekɔtelo ya nkunda elongwi. “Elenge mobali” oyo afandi na kati ayebisi bango ete Yesu asekwi. (16:5) Azali lisusu wana te, kasi akei liboso na bango na Galilai. Bakimi longwa na nkunda, na kolɛnga mpe na kobanga.
LITOMBA NA YANGO
31. (a) Lolenge nini Malako amonisi ete Yesu azali Masiya? (b) Nini emonisi bokonzi ya Yesu lokola Mwana na Nzambe, mpe nini alobelaki mingi mpenza?
31 Na nzela ya lisoló oyo ya kosepelisa ya bomoi ya Yesu Klisto, batángi nyonso ya Malako, uta ebandeli ya boklisto kino sikawa, basili kozwa likoki ya komona kokokisama ya bisakweli mingi ya Makomami ya Liebele oyo etali Masiya. Kobanda na maloba ya liboso oyo matángami, “Talá! Natindi ntoma na ngai liboso na bino,” kino maloba ya Yesu wana azalaki kobunda na mpasi ya liwa likoló na nzeté, “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?” lisoló mobimba ya molende na ye mpo na mosala, lokola Malako akomaki yango, ezali na boyokani na makambo oyo masakolamaki na Makomami ya Liebele. (Mko. 1:2; 15:34; Mki. 3:1; Nz. 22:1) Lisusu, makamwisi na ye mpe misala na ye ya nguya, mateya na ye ya kolendisa, biyano na ye ya sikisiki, komipesa na ye mobimba na Liloba mpe na elimo ya Yehova, mpe boboto na ye mpo na kobatela bampate—makambo nyonso oyo mamonisi Ye lokola oyo ayaki na bokonzi, Mwana na Nzambe. Ateyaki “lokola moto oyo azali na bokonzi,” bokonzi oyo azwaki epai na Yehova, mpe alobelaki mingi “kosakola nsango malamu ya Nzambe,” elingi koloba “bokonzi ya Nzambe esili kobɛlɛma,” lokola mosala na ye ya libosoliboso awa na mabelé. Mateya na ye masili komonana ete mazali kopesa litomba mingi epai na baoyo nyonso bazali kotya likebi na yango.—Mko. 1:22, 14, 15, NW.
32. Mbala boni Malako asaleli liloba “bokonzi ya Nzambe,” mpe wapi mwa ndambo ya mitindá minene amonisi mpo na kozwa bomoi na nzela ya Bokonzi?
32 Yesu alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Epai na bino mabombami ya bokonzi masili kopesama.” Malako asaleli maloba “bokonzi ya Nzambe” mbala 14 mpe amonisi mitindá mingi misengeli kotambwisa baoyo bakolinga kozwa bomoi na nzela ya Bokonzi. Yesu alobaki ete: “Ye nani abungisi molimo na ye mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu akobikisa yango.” Epekiseli nyonso mpo na kozwa bomoi esengeli kolongolama: “Ezali malamu koleka mpo na yo kokɔta na liso moko na bokonzi ya Nzambe na esika ya kozala na miso mibale mpe kobwakama kati na Gehena.” Yesu alobaki lisusu ete: “Ye nani ayambi te bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akokɔta soko moke te kati na yango,” mpe, “Oyo nde mpasi ekozala mpo na baoyo bazali na bozwi kokɔta na bokonzi ya Nzambe!” Alobaki ete moto oyo azali kososola ete kobatela mibeko mibale mileki minene ezali na ntina mingi koleka makabo nyonso na kotumba mpe bambeka azali “te mosika na bokonzi ya Nzambe.” Mateya oyo mpe mateya mosusu ya Bokonzi oyo mazwami na Evanzile ya Malako matondi na batoli mingi ya malamu oyo tokoki kosalela na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.—4:11; 8:35; 9:43-48; 10:13-15, 23-25; 12:28-34, NW.
33. (a) Lolenge nini tokoki kozwa litomba na Evanzile ya Malako? (b) Malako alendisi biso na kolanda etamboli nini, mpe mpo na nini?
33 Nsango malamu “engebene Malako” ekoki mbala mosusu kotángama na mobimba na yango na boumeli ya ngonga moko to na ngonga mibale, kopesáká na motángi bozongeli ya kosepelisa, ya nokinoki, mpe ya nguya ya mosala ya Yesu. Botángi nokinoki motindo wana ya lisoló oyo lipemamaki, lolenge moko na koyekola mpe komanyola likoló na yango, ekozala ntango nyonso na litomba. Evanzile ya Malako ezali kopesa litomba epai na baklisto oyo bazali konyokwama lelo motindo moko lokola ezalaki na ekeke ya liboso, mpamba te baklisto ya solo bazali sikawa kokutana na ‘ntango ya mpasi mpe ya mikakatano’ mpe bazali na mposa ya litambwisi lipemami motindo oyo lokola yango emonisami kati na lisoló oyo litali Yesu Klisto, Ndakisa na biso. Tángá yango, sepelá na elobeli ya kokamwisa ya makambo mazwami kati na yango, mpe zwá elendiseli kati na yango mpo na kolanda matambe ya Yesu, Mosaleli ya liboso mpe Mokokisi ya kondima na biso, na esengo oyo ekoki kolongolama te oyo amonisaki. (2 Tim. 3:1; Ebe. 12:2) Ɛɛ, talá ye lokola moto na misala, zalá na molende oyo azalaki na yango, mpe mekolá bosembo na ye oyo ebebisamaki te mpe mpiko na ye kati na komekama mpe botɛmɛli. Zwá libɔndisi longwa na eteni oyo ya motuya ya Makomami mapemami. Tiká ete yango ezala litomba mpo na yo wana ozali kolanda nzela ya bomoi ya seko!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 337.