Nani akokamba mabota kino na kimya?
1, 2. Lolenge nini esakweli ya Yisaya 2:2-4 ezali kokokisama na mikolo na biso?
YISAYA mokapo 2 ezali esakweli oyo elobeli te bobele bozongi ya Bayuda na Yelusaleme nsima na mibu 70 ya boombo na Babilone. Ya solo, esakweli yango ezali kolobela mingi kobongwana ya bato ya mabota nyonso na losambo ya peto ya Nzambe ya solo, Yehova. Etaleli lisusu kosalema ya libota ya mokili mobimba ya bandeko oyo bazali kosala mosala ya bulee oyo endimami na Nzambe.
2 Mbongwana ya ntina motindo wana oyo esangisi bato ya biteni nyonso ya mokili, ekoki te bobele kosepelisa, kasi esengeli lisusu komonana, lokola nde ezali kosalema likoló ya ngomba oyo ezali komonana na miso ya bato nyonso. Ezali yango nde ezali kosalema lelo kati na Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Bamilió ya bato bauti na mangomba ya boklisto ya lokuta basili koyekola ete Nzambe ya solo azali bobele moko mpe batiki kosambela nzambe ya Bosato. Na Inde, ba Hindous basili kotika kosambela ebele ya banzambe mpe bikeko mingi mpo na kosambela Nzambe bobele moko ya solo. Ezali mpe bobele bongo na Afrika, na bisanga oyo bizali mosika mpe kati na Proche-Orient. Baoyo bazali komata na ngomba na bulee ya Yehova, losambo na ye ya peto, basili kobwaka koyina na bango na ntina na bamposo, na bikólo mpe na makambo ya politike; ‘bazali lisusu koyekola etumba te.’—Yisaya 2:2-4.
Koyebana ya Masiya—Likambo oyo lilobelamaki mingi
3. Na kotalela Yisaya 11:10, bopusi nini Masiya akozala na yango likoló na mabota?
3 Libota wana ya mokili mobimba ya bandeko elobelamaki mpe na kokokisama ya mokano na Nzambe mpo na bato nyonso: ete bato na mabota nyonso bakopambwama na nzela ya “libota” ya ndaká, mokitani ya Abalayama mpe bakosambela Nzambe kati na solo mpe na bomoko. (Genese 3:15; 22:18) Na nsima bisakweli bimonisaki ete “libota” wana azalaki lisusu ‘mosakoli oyo akokani na Mose,’ oyo akozala moyokanisi ya kondimana ya sika oyo ekosalelama lokola moboko mondimami mpo ete bato na sembo na mabota nyonso basambela Nzambe kati na bomoko. (Deteronome 18:15, 18, 19; Yilimia 31:31-34) Lisusu moto yango asengelaki kozala Masiya, moyangeli longwa na libota ya Davidi epai kiti na bokonzi na Nzambe esengeli kotyama libela na libela. (1 Ntango 17:11, 12) Engebene mosakoli Yisaya, Masiya akozala moto oyo akosangisa bato ya mabota nyonso esika moko (na Liebele, Goh·yimʹ). Yisaya 11:10 elobi ete: “Na mokolo yango, mosisa na Yese ekozala, oyo akotelema lokola bendɛlɛ mpo na mabota; bato bakoluka ye mpe bifandelo na ye bikozala na nkembo.”
4. Molakisi moko na mibeko ya Bayuda alobaki nini na kotalela bopusi oyo Yesu azalaki na yango likoló ya bato?
4 Koyebana ya Masiya ezali likambo lilobelamaki mingi na boumeli ya bikeke. Na kotalela Yisaya 11:10 mpe mikapo misusu, asengelaki kozala Moyuda, mokitani ya Mokonzi Davidi (mwana na Yese), mpe bato ya mabota nyonso basengelaki kondima ye lokola Masiya oyo atindamaki na Nzambe. Kolobáká na ntina na Yesu, H. G. Enelow, moteyi Moyuda na ekeke ya liboso, oyo azalaki molakisi na mibeko ya Bayuda, akomaki ete: “Moyuda oyo azali na mayele akoki te kotya ntembe na likambo oyo ete Moyuda moko azalaki na bopusi makasi kati na kolakisama na ntina na makambo ya lingomba mpe kotambwisama ya libota na bato.”10 Moyuda nini mosusu Bapakano mingi bandimaki ye lokola Masiya? Ezalaki na Moyuda mosusu oyo akokaki kondimama epai na bato mingi koleka ye? Kino lelo oyo, ezali na baoyo bazali kokakatana na kondima ete Yesu azalaki Masiya. Bantina oyo bazali kopesa esengeli kotalelama malamu.
Lipengwi ya boklisto ya lokuta
5-7. Mpo na nini bato mingi basepelaka te koyoka nkombo Yesu mpe boklisto?
5 Bato mingi baoyo bazali baklisto te bazali koyina nkombo na Yesu mpenza na ntina ya boklisto ya lokuta, oyo basangani na yango bazali komitanga ete bazali kolanda mateya na Klisto. Na nkombo na Yesu, mabota mingi banyokwamaki na maboko ya boklisto ya lokuta, kasi kozanga ntembe Bayuda nde banyokwamaki mingi koleka bato mosusu.
6 Na ekeke oyo ya ntuku mibale, koyinama ya Bayuda epai na boklisto ya lokuta emonanaki mingi na kobomama oyo esalemaki na ba nazis. Atako makambo mingi matalelami na likambo yango, kasi tosengeli te kobosana ete koyinama na ntina na makambo ya losambo ezalaki moko na makambo mapusaki kobomama yango. Ata soki basangani mosusu ya boklisto ya lokuta bakowangana yango, likambo oyo ete “baklisto,” Bakatolike mpe Baprotestá bazalaki kati na baoyo babomaki bato to baoyo bandimaki bitumba, ekoki kotyelama ntembe te. Elie Wiesel alobeli na mokuse likanisi ya Bayuda kati na mokanda na ye Un juif aujourd’hui: “Lolenge nini kolimbola likambo oyo ete ezala Hitler to Himmler moko te abimisamaki na lingomba? Mpo na nini Pie XII akanisaki te to mpe amonaki malamu te kokweisa Auschwitz mpe Treblinka (bakáa ya bakangami)? Lolenge nini kolimbola likambo oyo ete kati na basodá babengami S.S., mingi na bango bazalaki bandimi baoyo batikalaki sembo na bokangami na bango na boklisto ya lokuta kino nsuka? Mpo na nini babomi bazalaki kokende mbala na mbala nsima na koboma bato kotubela masumu na bango? Mpe mpo na nini bango nyonso bautaki na mabota ya boklisto mpe bazwaki mateya ya boklisto?”11 Na yango, lolenge nini ya kondima Bayuda bakokaki kozala na yango epai na moto oyo, na boumeli ya bikeke nkombo na ye esanganaki na nsoni mpe na bampasi na bango?
7 Longola minyoko wana, ndakisa nini na ntina na bizaleli malamu bikólo ya “boklisto” epesaki na bamboka mosusu kati na mokili? Ezali bobele bitumba, ba Croisades (bitumba kati na bakatolike mpe bamizilmá), mpe Inquisitions (kokanga mpe ata koboma baoyo lingomba ebengaki ete bapengwi). Ata Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki kati na bikólo oyo ezali komitanga ete ya “boklisto.” Tokoki koloba ete bizaleli ya “boklisto” ezalaki ndakisa ya kolanda? Na ndakisa, SIDA ezali komonana mingi na mikili oyo bafandi mingi na yango bazali basangani ya mangomba ya boklisto ya lokuta. Kati na bakambi ya mangomba na Boklisto ya lokuta bizaleli ya mbindo bizali komonana polele. Bateyi na televizyó baoyo bazali na etamboli ya mbindo bazali komizwela bamilió ya badolare mpe bazali na bomoi lokola bakonzi; bamoko kati na batambwisi na mangomba baoyo basangisaka nzoto mibali na mibali, bafundamaki mpo babebisaki bilenge mibali ya mike na kosangisáká na bango nzoto, ezali wana mwa makambo oyo esalaki ete bato oyo bazalaki baklisto te batalela boklisto ya solo na lolenge ya mabe—makambo oyo mayeisaki nsoni mingi likoló na nkombo na Yesu, oyo “baklisto” bazali komikumisa ete bazali kolanda ye.
8-10. (a) Mpo na nini boklisto ya lokuta ebongi te kozala momonisi ya Yesu mpe ya boklisto ya solo? (b) Na maloba nini Makomami masilaki koyebisa ete bato bakopengwa na mateya na solo ya Yesu?
8 Epai mosusu, lingomba ya Bayuda mpe ya Bamizilmá bazali na elónga ya koboya losambo ya bikeko oyo ezali kati na boklisto ya lokuta. Mangomba yango bazali mpe koboya mateya mingi ya Boklisto ya lokuta oyo euti na Makomami te, na ndakisa losambo ya Malia lokola “Mama na Nzambe”. Liteya ya Bosato eboyami mingi na Bayuda mpamba te yango ezali na boyokani te na endimeli na bango—oyo ya Nzambe moko—likanisi oyo ezali kati na maloba oyo: “YOKA, Ɛ YISRAELE, [YEHOVA] AZALI NZAMBE NA BISO, [YEHOVA] MOKO.”—Deteronome 6:4.
9 Minyoko oyo mibimisamaki na boklisto ya lokuta mpe bitumba na yango, etamboli na yango ya mbindo, bokosi na yango, mpe mateya na yango oyo ezali kotuka ekoki kolimbisama te bobele na miso ya bato oyo bazali baklisto te, kasi lisusu na miso ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Mpo na ntina oyo, Batatoli ya Yehova, atako bazali kolanda Yesu Klisto, basangani te na boklisto ya lokuta. Ezali solo ete boklisto ya lokuta ezali eteni ya boklisto ya solo te. Likambo bobele moko likokanisi boklisto ya lokuta mpe baklisto ya ekeke ya liboso ezali kosalelama ya nkombo na Yesu. Kasi, mpo ete mateya na Yesu mazalaki mpenza ya malamu mpe oyo ebongi, lolenge nini lipengwi motindo wana ekokaki kobima?
10 Ya solo, Yesu ye moko asakolaki ete baklisto ya lokuta bakobima mpe ete bapengwi bakotangwa na mateya na ye ya solo, lokola esakolamaki mpenza na bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto, oyo bato babengaka na lolenge lobongi te ete Kondimana ya Sika. (Misala 20:29, 30; 2 Batesaloniki 2:1-12; 1 Timoté 4:1-3; 2 Petelo 2:1, 2) Na kotalela Matai 7:21-23, Masiya ye moko akosambisa bato yango mpe akoloba na bango ete: “Nayebi bino te! Bolongwa na ngai bino batyoli na mibeko.”—NW; talá mpe Matai 13:24-30, 37-43.
Mpo na nini esengelaki kobakisa makambo mosusu kati na Makomami?
11, 12. (a) Makomami na Greke ya boklisto mazali nini? (b) Banani bakomaki yango? (c) Mpo na nini ebongaki ete mikanda yango mipemama na Nzambe?
11 Na ebandeli, bayekoli nyonso ya Yesu bazalaki Bayuda. Na yango, bankóto na Bayuda na ekeke ya liboso, bakisa “ebele na banganga,” bandimaki Yesu lokola Masiya, ‘mosakoli oyo akokani na Mose.’ (Misala 2:5, 37, 41; 4:4; 6:7; Deteronome 18:18) Bayuda wana bakómaki ebandeli ya etuluku ya sika ya basambeli ya Yehova Nzambe na mokili mobimba, etuluku yango ezwi moboko na yango likoló na “kondimana ya sika” oyo esalemaki na nzela ya mosakoli oyo akokani na Mose.—Yilimia 31:31-34.
12 Kondimana ya sika ezalaki kosenga mikanda ya sika mipemami, mpamba te bato oyo balingaki kobanda kosalela Nzambe kati na ebongiseli ya kondimana wana bazalaki na mposa ya makambo mosusu ya sika. Mikanda yango, Makomami ya Greke ya Boklisto, nyonso ekomamaki na Bayuda. Lisoló na bango na ntina na bomoi mpe mateya na Yesu etondi na makambo mingi matali ebele na bisakweli ya Makomami na Liebele mpe elimboli polele makambo matali Masiya mpe mokumba na ye kati na mokano ya Nzambe. Lisusu, ezali mpe na mikanda oyo ezali kopesa batoli mpe bilendiseli epai na lisangá wana ya sika ya mokili mobimba ya basambeli ya Nzambe.a
Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki?
13-16. Nini endimisaki Bayuda mingi na ekeke ya liboso ete Yesu azalaki Masiya?
13 Kasi ezali solo ete Yesu aboyamaki na bakonzi ya mangomba ya ntango na ye, boye te? Ee, bango nde bapusaki bato mingi na kosala motindo wana. Kasi, Yilimia mpe basakoli mosusu bango mpe baboyamaki na bakonzi ya mangomba ya ntango na bango, boye te? (Yilimia 7:25, 26; 20:1-6; 2 Ntango 36:15, 16) Bato na eleko na Yesu baoyo bandimelaki ye, baoyo bazwaki libaku ya liboso ya kotalela mateya na ye mpe misala na ye, ezala mpe mateya oyo matalaki ye moko, bamitikaki te kozimbisama na botemeli ya bakonzi na mangomba, baoyo bamonaki ete etelemelo na bango na makambo ya lingomba ezalaki na likámá. Bayuda wana ya motema sembo bazalaki na matatoli oyo mandimisaki bango ete bisakweli bitalelaki Masiya bikokisamaki epai na Yesu. Nini ezalaki bilembeteli ya nguya oyo esalaki ete Bayuda wana ya ekeke ya liboso bandima kokutana na makámá, ata mpe liwa, na kondimáká Klisto lokola Masiya oyo alakamaki?—Yoane 9:22; 16:2.
14 Likambo ya liboso, eleko eyebanaki malamu. Esakweli oyo etalaki Masiya, oyo ezali na Danyele mokapo 9, emonisaki ete asengelaki kobima liboso ya kobebisama ya tempelo ya mibale.b—Danyele 9:24-27.
15 Ya mibale, moto ye moko. Autaki na libota ya Yuda mpe azalaki mokitani ya mokonzi Davidi. (Genese 49:10; 1 Ntango 17:11-14; talá Matai 1:1-16; Luka 3:23-31.) Lisusu, abotamaki na Beteleme, esika oyo eyebanaki mingi kati na Bayuda ya ekeke ya liboso lokola esika Masiya asengelaki kobotama.c (Mika 5:2 [5:1, Liloba lya Nzambe]; talá Matai 2:4-6; Luka 2:1-7; Yoane 7:42.) Nyonso wana ezali bilembeteli ya ntina oyo Bayuda ya ntango na Yesu bazalaki na yango mpo na koyeba Masiya.
16 Mpo na kosukisa, mateya na ye. Ezalaki te mateya ya politike to ya mibeko ya Leta, kasi ezalaki mateya matali makambo ya elimo mpe ya bizaleli malamu.d Azalaki kolobela makambo oyo mazalaki kosimba motema. Epai mosusu, azalaki bobele kosalela Makomami lokola bokonzi boleki, kasi azalaki te kosalela maloba ya batambwisi na mangomba oyo bazalaki liboso na ye, lokola yango ezalaki momeseno. Yango ekamwisaki ebele na bato, mpo ete “alakisi bango lokola [moto] azali na bokonzi, nde lokola bakomeli na bango te.” (Matai 7:29) Masoló ya bomoi na Yesu mamonisi ete azalaki na bomoto ya nguya, mpe mateya na ye mazalaki polele, oyo bakomi na makambo ya kala bazali kotanga yango lokola moko na bantina oyo ekoki kondimama ete azalaki moto ya lisapo mpamba te.e
17-20. (a) Bisakweli nini kati na Makomami na Liebele bilobelaki ntango ya koya na Masiya mpe ya liwa na ye lokola mbeka? (b) Mpo na nini ebongaki mpenza ete Masiya akufa?
17 Bisakweli mingi ya Makomami na Liebele, oyo endimamaki uta kala lokola ete etalelaki Masiya, ekokisamaki na nzela ya bampasi mpe liwa ya Yesu. Bisakweli motindo wana bizalaki na boyokani na liwa ya Masiya mpe bolimbisi ya masumu. Kati na Makomami na Greke ya Boklisto, likambo ya mbondi mpo na masumu oyo ekokisamaki na nzela na liwa ya Masiya elobelamaka lokola ‘mbeka ya lisiko.’ (Matai 20:28; Baloma 3:24) Mwa bisakweli yango ezalaki nini?
18 Totalela maloba ya esakweli ya Danyele 9:24, 25 oyo ete: “Poso ntuku nsambo elakelami bato na yo mpe mboka na bulee na yo, mpo na kokokisa ekweli, mpe mpo na kosilisa lisumu, mpe mpo na kolimbisa mabe, mpe mpo na kokotisa boyengebene lobiko na lobiko . . . kino koya ya mopakolami [“Masiya,” na Liebele Ma·shiʹach], mokonzi.” Moto moko te akoki kotya ntembe na boyokani oyo ezali na mokapo kati na “Masiya” (Mopakolami) mpe ‘kosilisama ya mabe mpe kolimbisama ya lisumu.’ Verset 26 elandi na koloba ete “nsima na poso ntuku motoba na mibale, mopakolami [“Masiya,” na Liebele Ma·shiʹach] akolongolama,” na maloba mosusu akobomama. (Talá etánda, lokasa 26.)
19 Mokapo mosusu oyo elobelaki “kolongolama” to kobomama ya Masiya lokola mbeka mpo na kolimbisa masumu, ezali Yisaya 52:13 kino 53:12. (Talá etánda, lokasa 28.) Balakisi na mibeko ya Bayuda na ekeke ya liboso, lokola Rambam mpe basusu kati na Moyen-Age, basalelaki mokapo wana mpo na Masiya. Mokapo wana momonisi polele ete kolimbisama ya masumu ezali na boyokani na Masiya mpe na liwa na ye.
20 Mpo na bantina oyo tolobeli na likoló, liteya oyo ete liwa ya Masiya ekokaki kopesa nzela na kolimbisa libela masumu engebene likanisi ya Nzambe, eyebanaki kozanga mpasi na Bayuda ya ekeke ya liboso. Bayebaki ete Makomami malobaki na ntina na kozanga kokoka ya moto. (Mosakoli 7:20) Mposa ya mbeka mpo na kolimbisama ya masumu eyokanaki mokolo na mokolo; yango ezalaki mpe na ebongiseli ya kondimana ya Mibeko na mobimba na yango. Makambo malobelami kati na masoló ya bomoi na Yesu malakisi ye lokola moto na kokoka oyo liwa na ye ekokaki kosikola bato na masumu.f (Matai 20:28; Luka 1:26-38) Ntango Makomami na Greke ya Boklisto mamonisaki ete bambeka ndenge na ndenge oyo ezalaki kopesama na nse ya Mibeko ezalaki elilingi ya mbeka bobele moko oyo eleki ntina, ndimbola mozindo epesamaki kati na makambo nyonso oyo mazalaki na Mibeko, ezala mpe na biteni mosusu ya Makomami.g—Baebele 10:1-10.
Mosakoli ya solo—oyo akokani na Mose
21, 22. (a) Na nini makambo ya kala na ntina na kobebisama ya Yelusaleme mamonisi ete Yesu azalaki mosakoli ya solo? (b) Lolenge nini makambo ya eleko na biso mamonisi mpe likambo yango?
21 Kobakisáká bandimbola mosusu na ntina na liwa ya Yesu lokola lisiko, Makomami na Greke ya Boklisto mamonisi lisusu mokumba na ye lokola ‘mosakoli oyo akokani na Mose.’ (Deteronome 18:18; talá lokasa 14, paragrafe 17 kino paragrafe 19.) Lokola mosakoli, Yesu asakolaki kobebisama ya Yelusaleme mpe apesaki malako na bayekoli na ye ete basengelaki kokima engumba wana bakomona yango kozingama na mampinga. (Matai 23:37 kino 24:2; Luka 21:20, 21) Kasi lolenge nini moto akokaki kokima engumba na ntango yango ezingami na mampinga? Yoseph ben Mattatiyahu (Josèphe) oyo azali Moyuda, mokomi na makambo ya kala, oyo amonaki na miso na ye moko makambo yango apesi eyano: “Cestius [Moloma mokonzi na basodá, na mobu 66 T.B.] . . . mbala moko apesaki etinda na bato na ye ete batika, alongolaki elikya na ye atako akweaki te, amonaki malamu kolongwa na Engumba mpe ntina na yango eyebanaki te.”13 Yango ezalaki libaku oyo Baklisto bazalaki na yango mposa mpo na kokima engumba. Mibu minei na nsima, na mobu 70 T.B., mampinga ya Baloma, sikawa na litambwisi ya Mokonzi na basodá Titus, bazongaki mpe bazingaki lisusu engumba. Yesu asakolaki na ntina na engumba ete banguna bakotónga ‘lopango monene na mabelé, mpe bakozinga yo kokangisa yo na bipai nyonso.’ (Luka 19:43) Josèphe andimi ete Titus atóngaki lopango monene na mabelé oyo ezalaki penepene na bakilomɛtɛlɛ mwambe na molai, kokatáká banzeté ezalaki na zámba na etando ya bakilomɛtɛlɛ zomi na motoba. Bisakweli na Yesu bipesaki malako ya sikisiki mpo na lolenge ya kokima libebi na maboko ya Baloma, mpe bosolo na yango emonisami na likambo oyo ete bato oyo batyaki likebi na maloba na ye babikaki.—Luka 21:20-24.
22 Yesu asakolaki lisusu ete Nzambe akolongola makambo nyonso ya mabe mpe baoyo bakosalaka yango. Na Luka 21:24 (NW) alobelaki “ntango epesamaki na mabota,” komonisáká ete Nzambe atyaki ndelo mpo na ntango oyo akokaki kopesa nzela na biyangeli ya bato.h Lisusu, Yesu asakolaki ete mikolo na nsuka ya biyangeli na bato mikomonisama na bitumba, nzala, koningana ya mabelé, bamaladi mabe, kosala mabe mpe mobulu, mpe liboso ete nsuka eya, mosala ya koteya kati na mokili mobimba ekokokisama mpo na koyebisa na bato na mabota nyonso ete boyangeli na Nzambe esilaki kobanda koyangela na makoló. (Talá Matai 24:3-14; Luka 21:10, 11.) Batatoli ya Yehova bazali kondima ete elembo wana oyo esangisi makambo mingi na kati esilaki kobanda komonana longwa na 1914, wana “ntango elakamaki na mabota” ekómaki na nsuka na yango. Liboso ete ntango wana ekóma, bazalaki kosakola ete 1914 ekozala date oyo ekotyama elembo kati na lisoló ya bato. Wana etumba ya liboso ya mokili mobimba ebandaki na Août ya mbula wana, bilikya na bango bikokisamaki. Ya solo, moko te kati na Batatoli ya Yehova azwaki bimonaneli ya Nzambe; ezalaki boyekoli na bango ya bozindo ya Makomami Mosantu nde esalisaki bango na kokóma na bosukisi wana.
Mabota mazali koyekola kimya
23. Lolenge nini Yesu akokaki kokóma Mokonzi kati na Bokonzi ya Nzambe?
23 Nzokande, mokumba ya Masiya, mbeka mpo na lisiko mpe mosakoli oyo akokani na Mose ekokaki kozala bobele na motuya moke soki likambo ya ntina kati na mokumba na ye na kokokisama ya mokano na Nzambe ezangaki kokokana—kozala Mokonzi kati na Bokonzi ya Nzambe. (Yisaya 9:6, 7 [Yis. 9:5, 6 Liloba lya Nzambe]) Kasi lolenge nini Yesu akoki kozala na etelemelo wana soki asengelaki kokufa? Na boyokani na bisakweli bitali Masiya, Nzambe asekwisaki Yesu na mokolo ya misato nsima na liwa na ye. (Nzembo 16:8-11; Yisaya 53:10, 12; talá Matai 28:1-7; Luka 24:44-46; Misala 2:24-32; 1 Bakolinti 15:3-8.) Nzambe azongisaki ye na bomoi, lokola moto te, mpo ete asilaki kopesa bomoi na ye ya moto na kokoka lokola mbeka, kasi lokola ekelamu ya elimo na nguya, kozeláká na loboko ya mobali ya Nzambe kozwa malako ya sika.—Nzembo 110:1; Misala 2:33-35; Baebele 10:12, 13.
24-26. Esika nini Batatoli ya Yehova bazali na yango kati na kokokisama ya esakweli na Yisaya?
24 Mokonzi Davidi akomaki ete na ntango Masiya akobanda boyangeli na ye, bato na Nzambe ‘bakomipesa na bolingo na bango moko.’ (Nzembo 110:3) Atako makambo na mokili mazali se kobeba mokolo na mokolo kobanda 1914, mbula oyo etyamaki elembo, lolenge malamu ya esakweli oyo ezali mpe kokokisama: bato na Nzambe bazali kopesa ntango na bango mpo na kosakola ‘nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe na mabelé nyonso mafandami na bato lokola litatoli mpo na mabota nyonso.’ (Matai 24:14, NW) Na ndakisa, mbula na mbula Batatoli ya Yehova bazali kolekisa bankóto na bangonga na kolobeláká Bokonzi na Nzambe epai na bato mpe kotambwisáká boyekoli ya Biblia kati na bandako kozanga kosenga lifuta, epai na baoyo basepeli kotalela makambo.
25 Ebele ya ngonga nyonso wana elekisami na mosala yango ezali kopesama mpamba kozanga kofutama. Bato oyo bazali kosala mosala yango bauti na mitindo nyonso na bato, na bambula nyonso mpe na misala ndenge na ndenge. Bazali bato oyo Yisaya 2:3 elobelaki na maloba oyo: “Bikólo mingi bikokende mpe bikoloba ete: ‘Yakani, tobuta na ngomba na Yawe [na Liebele, יהוה, Yehova]’” Yango ezali te bobele mwango ya “kozwa milimo.” Ezali nde ebongiseli ya mokili mobimba mpo na koteya bato oyo ezali na mikano mibale: (1) Koyebisa bato kati na mabota nyonso ete Bokonzi na Nzambe ezali koyangela mpe koyebisa bango na sikisiki oyo yango ekosala mosika te, mpe (2) koteya, kozanga kofuta mbongo, baoyo nyonso balingi kotalela makambo mpe kosalela Nzambe na bomoi na boyokani na mokano na ye. Bolóngi ya mosala oyo mpe kokokisama ya esakweli ezali likambo oyo ekoki kotyamela ntembe te. Mpo na nini? Mpamba te Yehova Nzambe ye moko azali kosimba yango.—Zakari 4:6.
26 Ezali likambo ya mayele na kotalela mosala ya Batatoli ya Yehova lokola kokokisama ya esakweli oyo ezali na Yisaya 2:3, boye te? Oyebi bato mosusu oyo bazali kosala mosala wana? To okanisi ete yango ezali bobele libaku na komona bamilió ya bato, oyo bazali kolekisa ntango kati na bomoi na bango mpo na koloba na ntina na nsango moko oyo esakolamaki esili bongo koleka sikawa pene na bambula nkóto mibale, nsango oyo esakolami mingi na boumeli ya ntango oyo ya mabongwani minene koleka? Na ntembe te, na mikolo oyo ya nsuka, ezali Batatoli ya Yehova nde bakómi ‘pole mpo na mabota.’ (Yisaya 42:6; 49:6) Bobele bango nde bazali libota ya mokili mobimba oyo lizali na bondeko ya solo oyo ezali kosalela Yehova Nzambe kati na bomoko mpe na kimya na nse ya litambwisi ya Masiya, “mosisa na Yese,” oyo bazali kosakola ete bazali ‘bendɛlɛ’ mpo na mabota.—Yisaya 11:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezali na bato mosusu oyo balobaka ete mikanda wana mizali na bongolabongola kati na yango to mizali na boyokani te na Makomami na Liebele. Nzokande, botaleli ya makambo yango oyo mamonanaka lokola ete mazali bongolabongola emonisaka ete ezali mpenza bongo te. Na yango, esengeli kosalela na likambo oyo etinda bobele moko lokola oyo esengeli mpo na botaleli ya makambo oyo mamonisami lokola bongolabongola kati na Makomami na Liebele. (Talá bankasa 6 mpe 8, paragrafe 9 kino paragrafe 12.) Lokola baklisto ya liboso bazalaki bango nyonso Bayuda, bakisa mpe baoyo bakomaki mikanda ya Makomami na Greke ya Boklisto, bakokaki te koteya bato koyina Bayuda, ndenge moko mpe na basakoli Bayuda oyo bazalaki liboso na bango baoyo batondolaki polele misala mabe ya batambwisi ya mangomba na eleko na bango basalaki mpe bongo te.
b Kati na Bayuda ya ekeke ya liboso, eyebanaki mingi ete esakweli wana esengelaki kokokisama na mikolo na bango. (Luka 3:15) Kati na mokanda na ye De Termino Vitae (Makambo matali nsuka na bomoi), molakisi na mibeko ya Bayuda na ekeke ya zomi na nsambo, Menasseh ben Israël, akomaki ete: “Basusu bakokaki kondima ete na nsuka ya baposo 70 wana, Masiya asengelaki kotya bango batambwisi na mokili mobimba. Ya solo, baoyo nyonso bakamataki bibundeli mpo na kobundisa Baloma na ntango wana bazalaki na likanisi motindo wana.”
c Bandimbola ya kala ya Bayuda na ntina na Mika 5:2 na lokóta ya Araméen to Targum elobi ete: “Longwa na yo [Beteleme] Masiya akobima liboso na ngai.”
d Mokomi na makambo ya kala Joseph Klausner akomaki ete: “Moto lokola Yesu oyo makanisi na ye mpo na oyo etali bizaleli malamu ezalaki na ntina mingi, azalaki te kati na lingomba ya Bayuda na ntango wana. . . . Na yango, mateya na ye na ntina na bizaleli malamu, emonani ete eleki oyo ya Pirkē Aboth mpe na oyo ya Talmud mpe Midrash. Mateya na ye mazwi moboko te kati na makambo ya kosambisa mpe kati na mateya ya mokili.”12
e Mpo na lisoló mobimba ya bomoi mpe mosala na Yesu, talá mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
f Ntoma Paulo alobelaki Yesu lokola ‘Adam ya mibale,’ oyo liwa na ye epesaki nzela na kosikolama na lisumu oyo eutaki na Adam. (1 Bakolinti 15:45-47; Baloma 5:12, 15-19) Mpo na bandimbola mingi etali koyeba mpo na nini ebongiseli motindo wana ezalaki na ntina, talá lokasa 14, baparagrafe 15 mpe 16 mpe maloba na nse na lokasa.
g Na kotalela likanisi wana, lisoló mobimba ya Abalayama lizwi ndimbola ya sika. Soki Nzambe asengaki na Abalayama ete aboma mwana na ye ezalaki te bobele mpo na komeka kondima na ye, kasi lisusu mpo na komonisa elilingi ya likambo oyo ekosalisa bato na kokanga ntina ete Nzambe ye moko akokaki kopesa mbeka ya moto oyo azalaki na motuya mingi mpo na ye, mpo na bolamu ya seko ya bato. Moto Oyo apesamaki asengelaki kozala Libota ya Abalayama, oyo na nzela na ye Nzambe alakaki ete “mabota nyonso na mabelé makopambwama.” (Genese 22:10-12, 16-18; talá Yoane 3:16.) Makanisi oyo ya polele mpe ya sikisiki, makoki te kozala bobele libaku moko malamu to bobele mayele na bato.
h Wana alobelaki “ntango epesamaki na mabota,” Yesu azalaki kolobela esakweli ya Danyele 4:10-37 (4:10-34, Liloba lya Nzambe). Mpo na bandimbola mozindo ya esakweli wana, talá Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible lokasa 1454 kino lokasa 1456 to Insight on the Scriptures, volume 1, lokasa 132 kino lokasa 135, mpe mokanda “Que ton Royaume vienne!”, mokapo 14 mpe appendice, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda na lokasa 26]
NANI AZALAKI ‘MOPAKOLAMI’? NTANGO NINI ASENGELAKI KOYA?
Danyele 9:24: “Poso ntuku nsambo elakelami bato na yo.”
◆Nini ezalaki mokano ya eleko oyo elobelami awa?
“Mpo na kosilisa lisumu, mpe mpo na kolimbisa mabe, mpe mpo na kokotisa boyengebene na lobiko na lobiko, mpe mpo na kokanga emonaneli mpe esakweli na elembo.” Bobele maloba wana mazali kopesa likanisi ete oyo ezali moko na bisakweli minene kati na Makomami.
Danyele 9:26: “Mpe na nsima na poso ntuku motoba na mibale, mopakolami [“Masiya,” na Liebele, Ma·shiʹach] akobomama ata likambo ezali na ye te.” Yeba ete kobomama ya Masiya to liwa na ye, ekosalema liboso ya kobebisama ya tempelo ya mibale na mobu 70 ya ntango na biso, lokola molɔngɔ́ elandi na koloba ete: “Mpe bato na mokonzi oyo akoya, bakobebisa mboka mpe esika na bulee.”
◆Lolenge nini Bayuda balímboli na makambo bakangaki ntina ya esakweli oyo?
Ezali na ndimbola bobele moko te ya esakweli oyo endimami lokola elakiseli epai na Bayuda oyo balimbolaka makambo. Bamoko bazali komeka kolobela biteni na yango mpo na bozongi longwa na boombo na Babilone (537 L.T.B.), basusu bazali koloba ete etalelaki eleko ya botomboki ya ba Makabé liboso na mampinga ya Bagreke (168 kino 165 L.T.B.) mpe basusu bazali koloba ete etalelaki eleko ya kobebisama ya tempelo ya mibale na Baloma na mobu 70 T.B., basusu mpe bazali koloba ete biteni na esakweli yango bitaleli koya oyo ebelemi ya Masiya.
Kati na makambo nyonso, tokoki koloba ete bandimbola ya Bayuda na mikolo ya lelo ezali na mabunga minene mibale:
1. Bazali na mposa ya kokitisa motuya mpenza ya esakweli wana, mpo bayebi te ete mokano na yango ya ebandeli ezali ya kotya nsuka na masumu mpe na mabe mpe kotya boyengebene ya lobiko na lobiko.
2. Moko te na bandimbola wana ezali mpenza koyebisa mitango ya solo, nzokande Danyele azwaki mpenza esakweli wana kati na maloba oyo masengelaki kopesa nzela na koyeba eleko ya kokokisama na yango.—Talá Danyele 9:2.
◆Esakweli oyo ezali na ndimbola oyo eyokani na mokano na yango ya ebandeli mpe na makambo matali lisoló ya bato?
Talá oyo elandi:
Baposo ntuku nsambo: Bayuda oyo balimbolaka makambo, bango nyonso bayebaka yango na ndimbola ya baposo ya mibu, na maloba mosusu, mibu 490. Yango ezali na boyokani na lolenge ya kotanga bileko engebene bisakweli ya Makomami na ntina na “mbula moko mpo na mokolo moko.”—Mituya 14:34; Levitike 25:8; Ezekiele 4:6.
◆Longwa na kobima ya liloba na kotelemisa mpe na kotónga Yelusaleme: Nehemia ayebisi ete na mbula ya ntuku mibale ya Mokonzi Alatazese, azwaki mokumba ya kotelemisa mpe kotónga lisusu Yelusaleme. Yango ezalaki na mobu 455 L.T.B.—Nehemia 2:1-8; talá Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, nkasa 127, 1412, 1413 to Insight on the Scriptures, Volume 2, nkasa 614 kino 616, 899 kino 900, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Baposo nsambo: Baposo nsambo (ya bambula, to mibu 49) elobelami mpo na eleko ya kobongisama mobimba ya mboka, Yelusaleme.
Baposo ntuku motoba na mibale: Baposo ntuku motoba na mibale (ya bambula, to mibu 434) emonisi eleko oyo ekoleka na nsima ya kotóngama ya mboka kino koya na Masiya.i
Kosangisama ya bileko wana mibale, ekopesa baposo 69 ya bambula, to mibu 483. Kobanda kotanga yango longwa na mobu 455 L.T.B., ekomonisa nsuka ya poso ya 69 na mobu 29 T.B..
Mobu 29 T.B.: Moyuda na nkombo ya Yesu (na Liebele, Yeshua), abotamaki na Beteleme mpe akólaki na Nazarete, na libota ya Davidi, abandaki kosakola na mokili na Yisraele.—Luka 3:1-3, 21, 22.
◆“Mpe na nsima ya baposo ntuku motoba na mibale Masiya akobomama.” (Danyele 9:26, NW): Na mobu 33 T.B., Yesu abomamaki, nsima na kosakola mbula misato na ndambo. Yango ekokani na oyo Danyele 9:27 elobi.
◆“Akosukisa mbeka mpe moboma.” (Danyele 9:27): Yesu alobelaki liwa na ye lokola mbeka. (Matai 20:28) Ezalaki likambo monene na miso na Nzambe koleka bambeka oyo epesamaki na nse na kondimana ya Mibeko. (Baebele 8:1-13) Liwa na Yesu lokola mbeka epesaki moboko mpo na nyonso elobamaki kati na Danyele 9:24.
Ememaki kolimbisama ya masumu.
Endimisaki bilaka mpe bisakweli na Nzambe.
Epesaki moboko endimami na mibeko ya Nzambe mpo na kotya boyengebene ya lobiko na lobiko na mikolo mizali koya.
Makambo oyo nyonso mabimaki, lokola esakweli emonisaki yango, liboso ya kobebisama ya tempelo ya mibale.
Elingi koloba ete bandimbola mosusu oyo emonisi kokokisama na ntango na kala ezali na boyokani te na mokano oyo eyebisamaki, boye te?
Kotalela kokokisama ya esakweli oyo bobele na mikolo mizali koya, ekoki te koyokanisa yango na eleko oyo epesamaki ya baposo 70 ya bambula mpe yango ekoki te kosalema liboso ya kobebisama na tempelo ya mibale ya Yelusaleme.
[Maloba na nse ya lokasa]
i Bilembo ya kopema (ponctuation) lokola ezali lelo kati na makomi ya Liebele (makomi ya ebandeli ya Liebele mazalaki na bilembo ya kopema te), oyo epesi bokeseni na kokanga ntina na lolenge oyo bokaboli ya bileko esalemaki, ezali makomi ya ebandeli te kasi ezali nde makambo mabakisamaki na bakomeli na Moyen-Age, baoyo basepelaki te na kondima ete ndimbola ya mokapo wana etalelaki Yesu.
[Etanda na lokasa 28]
“MOSALELI NA NGAI”—AZALI NANI?
“‘Tala mosaleli na ngai . . . atyolamaki mpe aboyamaki na bato . . . Totyaki likebi na ye te. Solo akumbi mpasi na biso mpe amemi mawa na biso. . . . Kasi azokisamaki mpo na masumu na biso, atutami mpo na mabe na biso. . . . Biso nyonso, topengwi lokola bampate. . . . Mpe Yehova atyeli ye masumu na biso nyonso.’ . . . Atako asalaki mabe te mpe kokosa ezalaki na monoko na ye te. . . . ‘Mosaleli na ngai na boyengebene akolóngisa mingi; mpe akomema masumu na bango . . . Mpamba te asopi molimo na ye kino kufa mpe atangami kati na bato ya masumu. Kasi amemaki mabe ya bato mingi mpe abondelaki mpo na basumuki.’”—Yisaya 52:13 kino 53:12.
Makambo oyo Yisaya azali kolakisa awa, emonisi mpenza moto oyo azali na likambo te, moto ya peto oyo anyokwamaki mpe liwa na ye epesaki lisiko mpo na libota na ye mpenza, oyo ezangaki botɔndi mpo na ye.
Nzokande, lelo oyo, Bayuda mingi baoyo balimbolaka makambo bazali kondima lokola likambo ya solo ete makambo malobelami awa matali libota ya Yisraele na mobimba na yango to etuluku ya Bayuda oyo bazali bayengebene kati na Yisraele.
Motuna tosengeli komituna ezali oyo: ezalaki Libota na Yisraele to ata ndambo na yango nde ekokisaki makambo oyo, to yango etaleli nde moto moko?
Bambula koleka 800 nsima na kokomama ya maloba oyo ya esakweli na Yisaya (pene na 732 L.T.B.), ezali na lisoló moko te ya Moyuda moko to ya molakisi moko ya mibeko na Bayuda oyo ateyaki ete “mosaleli” wana asengelaki kotalelama na lolenge ya lisangá. Na boumeli ya eleko wana nyonso, esakweli eyebanaki na bato nyonso ete etalelaki moto moko mpe eyebanaki mingi lokola esakweli oyo etalelaki Masiya.
Lisusu, tala maloba oyo mazali na ebandeli ya mokanda Mokapo ya ntuku mitano na misato ya Yisaya, na kotalela ndimbola ya Bayuda (na Lingelesi): “Na kotalela mikanda na Bayuda ya bandimbola na bango ya Biblia oyo tozali na yango kino na nsuka ya eleko ya etuluku mosusu ya balakisi na mibeko ya Bayuda oyo babengi ba Amora [kino na nsuka ya ekeke ya motoba ya ntango na biso] emonisi ete mbala mingi to mbala mosusu ezalaki kondimama kozanga ntembe ete moto oyo balobelaki na esakweli wana ezalaki Masiya, ezali mpe motindo yango nde Targum lisusu elimbolaki yango na nsima.”—Ebimisamaki na H. M. Orlinsky, 1969, lokasa 17.
Nini ekokaki kozala ntina mpo na yango babwakaki ndimbola ya solo ya eteni oyo ya Makomami na kopesáká yango bandimbola mosusu, nzokande yango etalaki moto moko to mpe Masiya? Ezalaki bobele molende esalemaki mpo na koboya boyokani nyonso kati na esakweli wana mpe Yesu, Moyuda ya ekeke ya liboso oyo akokisaki makambo nyonso makomamaki na esakweli wana, boye te?
[Elilingi na lokasa 25]
Batatoli ya Yehova, lokola baoyo awa pene na Ebale ya Galilai na Yisraele, bazali kobyanga bato ya mabota nyonso mpo ete bayekola mokano mpe masengami na Nzambe, mpe yango kati na mokili mobimba