Bosato (Trinité)
Ndimbola: Liteya ya ntina mpenza ya mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba. Soki totaleli makanisi ya Athanase, Nzambe azali na Bapersona misato (Tata, Mwana ná Elimo Santu), mokomoko azali libela na libela, mokomoko azali mozwi-ya-nguya-nyonso, oyo aleki moninga azali te, mokomoko azali Nzambe, kasi atako bongo, bango nyonso bazali Nzambe se moko. Liteya yango elobaka mpe ete “Bapersona” yango misato bakabwani te mpe bakeseni te kasi bazali nde lolenge misato ya bonzambe. Na yango, bato mosusu oyo bateyaka Bosato balobaka ete Yesu Kristo azali Nzambe to Yesu ná Elimo Santu bazali Yehova. Biblia eteyaka bongo te.
Liteya ya Bosato eutá wapi?
Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi: “Liloba Bosato, ezala mpe liteya yango moko, ezali na Kondimana ya Sika te, mpe Yesu ná bayekoli na ye balukaki te koloba makambo oyo ekeseni na esakola ya boyambi ya Bayuda (Shema) na Kondimana ya Kala, oyo elobi: ‘Yoká, Ee Yisraele: Nkolo na biso Nzambe azali Nkolo moko’ (Mib. 6:4). . . . Liteya yango ekolaki mokemoke na boumeli ya basiɛklɛ mingi mpe ebimisaki bantembe mingi. . . . Pene na nsuka ya siɛklɛ ya minei . . . liteya ya Bosato ekómaki ndenge oyo ezali lelo.”—(1976), Micropædia, Vol. X, lok. 126.
Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Liboso ya nsuka ya siɛklɛ ya minei, maloba ‘Nzambe moko na Bapersona misato’ ezwaki naino misisa te mpe bakristo bazalaki kondima yango te na bomoi na bango mpe bazalaki koteya yango te. Na nsima, maloba yango nde ekómaki kosimba liteya ya Bosato. Kasi, eloko moko te emonisi ete bakomi oyo bamonaki bantoma mosusu ya Yesu bazalaki kondima liteya yango.”—(1967), Vol. XIV, lok. 299.
Buku moko (The Encyclopedia Americana) elobi ete: “Losambo ya bokristo euti na Lingomba ya Bayuda mpe lingomba yango endimaka ete Nzambe azali kaka moto moko. Banda na Yerusaleme tii na likita ya Nicée, kowelana ezalaki mingi mpo na liteya yango. Liteya ya Bosato na siɛklɛ ya minei, eyokanaki te na mateya ya bakristo ya liboso mpo na ndenge oyo Nzambe azali; ezalaki nde lipɛngwi.”—(1956), Vol. XXVII, lok. 294L.
Diksionɛrɛ moko (Nouveau Dictionnaire Universel) elobi ete: “Liteya ya Bosato ndenge Platon ateyaki yango, ezalaki kaka lolenge ya sika ya kolobela banzambe misatomisato oyo bato ya kala bazalaki kosambela, mpe yango emonanaki ete ezali filozofi ya bosato oyo ebongi, oyo ezalaki komonisa bizaleli misatomisato, mpe yango nde ebotaki biteni misato ya ntina ya liteya ya Bosato oyo eteyamaka na mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba. . . . Liteya wana ya banzambe misato oyo moto ya mayele ya Bagrɛki [Platon, na siɛklɛ ya 4 L.T.B.] ateyaki ezali na mangomba nyonso ya kala ya bapakano.”—(Paris, 1865-1870), ebimisami na M. Lachâtre, Vol. 2, lok. 1467.
John L. McKenzie, S.J., alobi boye na diksionɛrɛ na ye (Dictionary of the Bible): “Mpo na komonisa ete bapersona misato bakoki kozala moto moko to na bomoko, basaleli maloba ‘bomoto’ mpe ‘ndenge ya kozala’ oyo ezali maloba ya filozofi ya Bagrɛki; kasi maloba yango ezali na Biblia te. Ndimbola oyo bato oyo bateyaka Bosato bapesaki na maloba wana mpe maloba mosusu lokola ‘bizaleli’ mpe ‘bomoto’ ebimisaki ntembe mingi kati na bato mosusu ya teoloji oyo basalelaki maloba yango mabe mpo na kolobela ndenge Nzambe azali.”—(New York, 1965), lok. 899.
Atako bato oyo bateyaka Bosato bandimaka ete liloba “Bosato” to vɛrsɛ moko oyo ezali kolobela Bosato ezali na Biblia te, makanisi oyo esimbi liteya yango nde ezali na Biblia?
Biblia eteyaka ete “Elimo Santu” ezali moto?
Mbala mosusu, bavɛrsɛ oyo elobeli elimo santu emonisaka yango lokola nde ezali moto. Na ndakisa, Biblia elobi ete elimo santu azali mosungi (Grɛki, parakletos; “Mobondi,” LNz; “Mosalisi,” LL) ete “akoteya,” “akopesa litatoli,” “akoloba” mpe ‘akoyoka.’ (Yoa. 14:16, 17, 26; 15:26; 16:13) Kasi bavɛrsɛ mosusu elobi ete bato ‘batondaki’ na elimo santu, ete basusu ‘babatisamaki’ na yango to “batyamaki mafuta” na yango. (Luka 1:41; Mat. 3:11; Mis. 10:38) Maloba yango oyo esalelami mpo na kolobela elimo santu ekoki kosalelama te mpo na moto. Mpo na koyeba nini Biblia eteyaka mpo na likambo yango, tosengeli kokangama kaka na vɛrsɛ moko te. Boye, ndimbola ya malamu ya bavɛrsɛ yango ezali mpenza nini? Bavɛrsɛ oyo elobeli elimo santu ya Nzambe, elingi koloba nguya na ye oyo esalaka mosala, lokola nde ezali moto esaleli nde elobeli ya elilingi. Biblia esalelaka mpe elobeli wana ya elilingi mpo na kolobela bwanya, liwa, maladi, mai, mpe makila. (Talá mpe nkasa 178, 179, na motó ya likambo “Elimo.”)
Biblia eyebisi biso ete nkombo ya Tata ezali Yehova. Eyebisi biso ete nkombo ya Mwana ezali Yesu Kristo. Kasi vɛrsɛ moko te ya Biblia emonisi ete elimo santu ezali na nkombo.
Mis. 7:55, 56 elobi ete Stefano azwaki emonaneli moko mpe amonaki Yesu “atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.” Kasi vɛrsɛ yango elobi te ete amonaki elimo santu. (Talá mpe Emoniseli 7:10; 22:1, 3.)
Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi: “Bavɛrsɛ mingi ya [K]ondimana ya [S]ika emonisi ete elimo ya Nzambe ezali eloko, kasi moto te; yango emonani mingimingi na bokokani oyo ezali kati na elimo mpe nguya ya Nzambe.” (1967, Vol. XIII, lok. 575) Elobi lisusu ete: “Bakomi [oyo bazalaki kolongisa makomi ya Grɛki ya bokristo na siɛklɛ ya mibale] bazalaki kokakatana mpenza ntango bazalaki kolobela Elimo; soki totaleli makanisi ya eklezia, tokoloba ete bazalaki koloba ete ezali moto te.”—Vol. XIV, lok. 296.
Biblia endimaka makanisi ya bato oyo bateyaka ete Tata ná Mwana bazali bato mibale oyo bakeseni te?
Mat. 26:39, LNz: “Etamboli ye [Yesu Kristo] mwa moke, akwei elongi o nse mpe asambeli: ‘Tata wa ngai, soko ekoki, nkeni eye elongwa mosika na ngai! Nzokande esalema te lokola ngai nalingi, kasi lokola yo olingi.’” (Soki Tata ná Mwana bázalaka bato mibale oyo bakeseni te, libondeli yango elingaki kozala na ntina te. Yesu alingaki nde komibondela ye moko, mpe mokano na ye esengelaki mpe kozala mokano ya Tata na ye.)
Yoa. 8:17, 18, hf: “[Yesu ayanolaki Bafarisai:] Kati na mibeko na bino mpe ekomami ete litatoli na bato mibale ezali sembo. Ngai nazali kotatola mpo na ngai moko mpe Tata motindi na ngai azali kotatola mpo na ngai.” (Na yango, Yesu amonisaki ete akeseni mpenza na Tata na ye.)
Talá mpe nkasa 426, 427, na motó ya likambo “Yehova.”
Biblia eteyaka ete bapersona ya Bosato bazali libela na libela, mpe moko te azali na ebandeli?
Kol. 1:15, 16, hf: “Ye [Yesu Kristo] azali elilingi na Nzambe, oyo akomonanaka te, Mobotami na liboso na biloko nyonso bizalisami. Mpo kati na ye, biloko nyonso bizalisamaki, na biloko na Likolo mpe biloko na nse.” Na ndenge nini Yesu Kristo azali “mobotami na liboso na biloko nyonso bizalisami”? (1) Bato oyo bateyaka Bosato balobaka ete na vɛrsɛ oyo, “mobotami na liboso” to “mwana ya liboso” elimboli moto oyo azali na esika ya liboso, moto oyo aleki lokumu, moto oyo akeseni na basusu; likanisi yango emonisi te ete Kristo azalisamaki, kasi akeseni nde na bato mosusu oyo bazalisamaki. Nzokande, soki ezali bongo, mpe soki liteya ya Bosato ezali solo, mpo na nini Biblia elobi te ete Tata azali mpe mobotami ya liboso na biloko nyonso bizalisamaki, ezala mpe elimo santu? Kasi Biblia esaleli maloba yango kaka mpo na Mwana. Soki tolandi ndimbola mpenza ya maloba “mobotami na liboso,” yango emonisi ete Yesu azali mwana ya liboso kati na bana mosusu ya Yehova. (2) Longola vɛrsɛ ya Bakolose 1:15, Biblia esaleli mbala mingi maloba “mobotami na liboso,” mpe na esika nyonso oyo maloba yango esalelami mpo na bikelamu ya bomoi, ezali kaka na ndimbola moko—mobotami na liboso yango azali mpe na kati ya bikelamu mosusu oyo elobelami. “Mobotami na liboso na Yisraele” azali moko ya bana ya Yisraele; “mobotami na liboso ya Farao” azali moko ya bana ya Farao; “mobotami na liboso ya banyama” azali mpe nyama. Na yango, nini etindaka bato mosusu bápesa ndimbola mosusu na vɛrsɛ ya Bakolose 1:15? Ezali nde Biblia to liteya moko oyo bakangami na yango mpe balukaka likanisi oyo endimisi yango? (3) Bakolose 1:16, 17 (hf) emonisi nde ete Yesu azalisamaki te, mpo elobi ete “mpo kati na ye, biloko nyonso bizalisamaki, . . . biloko nyonso bisalamaki na mabɔkɔ na ye mpe mpo na ye”? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “biloko nyonso” ezali panta, mpe euti na liloba pas. Na Luka 13:2, LNz, elobi “basusu banso.” (Talá mpe Luka 21:29 mpe Bafilipi 2:21 na hf.) Ndimbola oyo bavɛrsɛ mosusu epesi na liloba panta ntango esaleli yango mpo na kolobela Mwana ezali ndenge moko na oyo NW epesi na liloba yango na Bakolose 1:16, 17; yango wana, eteni moko ya vɛrsɛ yango ebongolami boye: “na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki . . . Biloko mosusu nyonso ezalisamaki na nzela na ye mpe mpo na ye.” Na yango, Yesu azalisamaki, azali mpe na kati ya biloko oyo Nzambe azalisá.
Em. 1:1; 3:14, (hf) elobi ete: “Oyo emoniseli na Yesu Klisto, epesaki Nzambe ye . . . Komela mwanze na lingomba na Laodikia ete, Ye, Bobele bongo, Motatoli na sembo mpe na solo, Ebandeli [Grɛki, arkhe] na bozalisi na Nzambe.” (KJ, Dy, CC, mpe NW ebongoli liloba yango ndenge wana.) Ebongi mpenza kobongola liloba yango ndenge wana? Bato mosusu bakanisaka ete vɛrsɛ yango elingi koloba ete Mwana azali ‘mobandisi ya bozalisi ya Nzambe,’ ete azali ‘eutelo mpenza’ ya bozalisi. Kasi diksionɛrɛ ya Liddell ná Scott (Greek-English Lexicon) emonisi ete ndimbola ya libosoliboso ya liloba arkhe ezali “ebandeli.” (Oxford, 1968, lok. 252) Na mikanda oyo ntoma Yoane akomaki, asalelaki liloba arkhe koleka mbala 20, mpe mbala nyonso oyo asaleli liloba yango, ezali na ndimbola ya “ebandeli.” Na yango, tokoki koloba ete moto oyo Emoniseli 3:14 elobeli azalisamaki, azali moto ya liboso na kati ya bikelamu ya Nzambe, azali na ebandeli. (Talá mpe Masese 8:22 oyo ekokanisi Mwana na bwanya oyo ezali lokola moto oyo azali koloba, ndenge balimboli mingi ya Biblia bandimi yango. RS, NE, mpe JB emonisi ete moto oyo azali koloba na vɛrsɛ yango ‘azalisamaki.’)
Mika 5:2 esakolaki mpo na Masiya ete (KJ) “ebandeli na ye ezalaki banda kala, seko na seko.” Dy elobi: “ebandeli na ye ezali uta na ebandeli, uta na mikolo ya libela na libela.” Yango elingi nde koloba ete akokani na Nzambe? Simbá ete, na esika ya koloba “mikolo ya libela na libela,” RS ebongoli maloba ya Ebre oyo ezali na vɛrsɛ yango na “mikolo ya kalakala”; JB, elobi “mikolo ya kala”; NW, elobi “ntango oyo etyami ndelo te.” Soki totaleli Emoniseli 3:14 oyo tolobelaki liboso, tokomona ete Mika 5:2 endimisi te ete Yesu azangi ebandeli.
Biblia eteyaka ete bapersona ya Bosato bazali ndenge moko, bango nyonso bakokani, mpe bango nyonso bazali na nguya nyonso?
Mrk. 13:32, LNz: “Moto moko te ayebi mokolo mona to ngonga ena, ata banzelu o likoló, ata Mwana, bobele Tata ye moko ayebi.” (Na ntembe te, Yesu akokaki koloba bongo te soki Tata, Mwana, ná Elimo Santu bákokanaka, mpe bázalaka Nzambe kaka moko. Mpe soki ezali ndenge bato mosusu balobaka ete Mwana ayebaki likambo yango te mpo azalaki na lolenge ya moto, motuna yango oyo: mpo na nini Elimo Santu mpe eyebaki likambo yango te?)
Mat. 20:20-23, LNz: “Mama wa bana ba Zebedeo . . . alobi na ye [Yezu]: ‘Talá bana ba ngai babale, salá ’te báfanda o Bokonzi bwa yo, moko o loboko la yo la mobali, mosusu o loboko la yo la mwasi.’ Yezu azongisi: . . . ‘Bokomele nkeni eye nakomele, kasi kofandisa moto o loboko la ngai la mobali to la mwasi, etali ngai te; baye bakofanda o bisika bina ezali baye Tata wa ngai alengeleli bango.’” (Ezali mpenza likambo ya kokamwa soki balobaka ete Yesu azali Nzambe! Yesu apesaki eyano yango kaka na “lolenge ya bomoto”? Soki Yesu azali mpenza “Nzambe-moto,” elingi koloba ete azali moto mpe Nzambe, kasi azali kaka Nzambe te to moto te, ndenge bato oyo bateyaka Bosato balobaka, bakoki lisusu koloba ete Yesu ayanolaki bongo mpo azalaki na lolenge ya bomoto? Matai 20:23 emonisi nde ete Mwana akokani na Tata te, ete ezali na makambo mosusu oyo etali kaka Tata, bongo te?)
Mat. 12:31, 32, LNz: “Bakolimbisa bato masumu na mafinga manso, kasi oyo atuki Elimo [Santu], bakolimbisa ye te. Bakolimbisa moto oyo atumoli Mwana wa Moto, kasi oyo atumoli Elimo Santu, bakolimbisa ye te, o nse eye te, o mokili mosusu [oyo ekoya, hf] mpe te.” (Soki Elimo Santu ezalaka moto mpe Nzambe, vɛrsɛ oyo ekweisi mpenza liteya ya Bosato, mpo yango emonisi ete Elimo Santu eleki Mwana na makambo mosusu. Kasi, maloba ya Yesu emonisi ete Tata, oyo azali nkolo ya “Elimo” yango aleki Yesu, Mwana ya moto.)
Yoa. 14:28, LNz: “[Yezu alobaki:] Soko bolingaki ngai mbele bosepelaki mingi, zambi nakokende epai ya Tata, mpo Tata aleki ngai na bonene.”
1 Ko. 11:3, hf: ‘Nalingi ete bósosola ete motó na babali nyonso ezali Klisto mpe ete motó na mwasi ezali mobali mpe ete motó na Klisto ezali Nzambe.’ (Na yango, vɛrsɛ oyo emonisi polele ete Kristo azali Nzambe te, mpe Nzambe azali na bokonzi koleka Kristo. Tosengeli koyeba ete maloba yango ekomamaki na mobu soki 55 T.B., elingi koloba mbula soki 22 nsima ya kozonga ya Yesu na likoló. Na yango, vɛrsɛ oyo elobeli boyokani oyo Nzambe ná Kristo bazali na yango na likoló.)
1 Ko. 15:27, 28, LNz: “Nzambe atii manso o nse ya makolo ma Kristu. Kasi mokolo Kristu akoloba: ‘Ut’o sikawa binso bizali na botosi,’ liloba ‘binso’ litali Nzambe te, oyo apesi Kristu Bokonzi. Mokolo bikelamo binso bikolakisa ye botosi, Mwana yemei mpe akotosa Oyo asalaki ’te bitosa ye mpo ’te Nzambe azala Mokonzi wa bikelamo binso.”
Liloba ya Ebre Shaddai mpe liloba ya Grɛki Pantokrator, yango mibale ebongolami na “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” Maloba yango mibale ya minɔkɔ ya ebandeli esalelami mbala na mbala mpo na kolobela Yehova, Tata. (Kob. 6:3; Em. 19:6) Kasi esalelami te mpo na kolobela Mwana to elimo santu.
Biblia eteyaka ete mokomoko na bapersona ya Bosato azali Nzambe?
Yesu abondelaki boye: ‘Tata, . . . bomoi bwa seko bwango [elakisi, NW] ’te báyeba yo, “Nzambe wa solo se moko,” báyeba mpe oyo otindi: Yezu Kristu.’ (Yoa. 17:1-3, LNz) (Babiblia mingi esaleli maloba “Nzambe wa solo se moko” mpo na kolobela Tata. NE elobi “oyo azali Nzambe ya solo kaka moko.” Akoki nde kozala “Nzambe wa solo se moko” to “oyo azali Nzambe ya solo kaka moko” soki ezali na Banzambe mibale mosusu oyo bakokani na ye? Nyonso oyo ebengami “nzambe” ezali nzambe ya lokuta to elilingi ya Nzambe ya solo.)
1 Ko. 8:5, 6, hf: “Mpo ete, ata biloko bibiangami banzambe izali kati na lola mpe na nse mpe banzambe yango bazali mingi mpe bankolo bazali mingi, kasi mpo na biso Nzambe moko azali, ye Tata; biloko nyonso bizalisamaki na ye, biso mpe tozali uta na ye. Mpe Nkolo moko azali, ye Yesu Klisto; biloko nyonso bizalisamaki na ntina na ye. Biso mpe tozali na ntina na ye.” (Vɛrsɛ oyo emonisi ete Tata azali “Nzambe moko” ya bakristo mpe akeseni mpenza na Yesu Kristo.)
1 Pe. 1:3, LL: “Lokumu na Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yezu Kristo!” (Nsima ya kozonga ya Yesu na likoló, Biblia elobi mbala na mbala ete Tata azali “Nzambe” ya Yesu Kristo. Yoane 20:17 emonisi ete nsima ya lisekwa ya Yesu, ye moko abengaki Tata ete “Nzambe na ngai.” Na nsima, ntango Yesu azongaki na likoló, Emoniseli 3:12 emonisi ete Yesu abengaki lisusu Tata na ye “Nzambe na ngai.” Kasi vɛrsɛ moko te na Biblia emonisi ete Tata abengi Mwana ete “Nzambe na ngai,” to Tata to Mwana abengi elimo santu ete “Nzambe na ngai.”)
Mpo na koyeba ndimbola ya bavɛrsɛ mosusu oyo bato basalelaka mpo na kondimisa ete Kristo azali Nzambe, talá nkasa 430-435, na motó ya likambo “Yesu Kristo.”
Karl Rahner, S.J. alobi na buku moko (Theological Investigations) ete: “Θεός [Nzambe] esalelamaka ata moke te mpo na kolobela Elimo,” mpe: “ὁ θεός [Nzambe] esalelami ata moke te na Kondimana ya Sika mpo na kolobela πνεῦμα ἅγιον [elimo santu].”—(Baltimore, Md.; 1961), ebongolami uta na monɔkɔ ya Allemand, Vol. I, nk. 138, 143.
Bavɛrsɛ mosusu oyo bato oyo bateyaka Bosato basalelaka endimisi ete liteya yango ezali solo?
Moto oyo alingi mpenza koyeba mateya ya solo ya Nzambe akotánga Biblia te na elikya ya kozwa vɛrsɛ moko oyo ekolongisa makambo oyo andimaka. Asengeli nde koluka koyeba oyo Liloba ya Nzambe elobi. Akoki mbala mosusu komona bavɛrsɛ oyo ezalaka na bandimbola mingi, kasi soki akokanisi bavɛrsɛ yango na bavɛrsɛ mosusu oyo elobeli likambo yango, akoyeba ndimbola ya bavɛrsɛ yango malamu. Tosengeli koyeba ete bavɛrsɛ mingi oyo bato basalelaka mpo na “kondimisa” liteya ya Bosato elobelaka kaka bato mibale, kasi bato misato te; na yango, ata soki bato oyo bateyaka Bosato bapesi ndimbola ya malamu, yango ekondimisa te ete Biblia eteyaka Bosato. Tótalela bandakisa oyo elandi:
(Soki liyebisi ezali te, bavɛrsɛ nyonso oyo elandi euti na LNz.)
Bavɛrsɛ oyo ezali na titre oyo ebongi na Yehova, kasi bazali kosalela yango mpo na Yesu Kristo to bazali koloba ete etaleli Yesu
Alfa ná Omega: Titre oyo ezali kolobela mpenza nani? (1) Boyebisi (Emoniseli) 1:8 emonisi ete nkolo titre yango ezali Nzambe wa bokasi bonso (Mozwi-ya-Nguya-Nyonso). Na vɛrsɛ 11, KJ esaleli titre yango mpo na kolobela Yesu Kristo. Kasi banganga-mayele ya Biblia bamonisi ete maloba Alfa ná Omega oyo ezali na vɛrsɛ 11 babakisá yango kobakisa, yango wana ezali te na RS, NE, JB, NAB, Dy. (2) Mabongoli mingi ya mokanda ya Emoniseli na monɔkɔ ya Ebre emonisi ete moto oyo balobeli na vɛrsɛ 8 ezali nde Yehova, yango wana ezongisi nkombo ya Nzambe na esika na yango. (3) Boyebisi (Emoniseli) 21:6, 7 emonisi ete bakristo oyo balongi na etumba ya elimo babengami ‘bana’ ya Alfa ná Omega. Kasi Biblia elobi te ete bakristo yango oyo batyami mafuta na elimo bazali bana ya Yesu Kristo. Yesu abengi bango ‘bandeko’ na ye. (Ebr. 2:11; Mat. 12:50; 25:40) Kasi ‘bandeko’ yango ya Yesu babengami “bana ba Nzambe.” (Gal. 3:26; 4:6) (4) Na Emoniseli 22:12, LL ekɔtisi nkombo Yesu na vɛrsɛ yango, yango wana ntango vɛrsɛ 13 elobeli Alfa ná Omega, ezali komonana lokola nde ezali kolobela Yesu. Kasi makomi ya Grɛki ezali na nkombo Yesu te na vɛrsɛ yango, mpe Babiblia mosusu etye nkombo yango te. (5) Boyebisi (Emoniseli) 22:13 elobi mpe ete Alfa ná Omega azali “wa-Liboso mpe wa-Nsuka,” mpe Boyebisi (Emoniseli) 1:17, 18 esaleli maloba yango mpo na kolobela Yesu. Ndenge moko mpe Biblia esaleli liloba “apostolo [ntoma]” mpo na kolobela Yesu mpe bayekoli na ye mosusu. Kasi yango emonisi nde ete bazali moto moko to bazali na bokonzi ndenge moko? (Ebr. 3:1) Na yango, bilembeteli emonisi ete titre “Alfa ná Omega” esalelami mpo na kolobela Tata, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, kasi Mwana te.
Mobikisi: Mbala na mbala Biblia ebengi Nzambe ete Mobikisi. Kutu, na Yisaya 43:11 Nzambe alobi ete: “Mobikisi mosusu azali te, bobele ngai.” Lokola Yesu mpe abengami Mobikisi, yango elingi koloba ete Nzambe ná Yesu bazali moto moko? Te. Tito 1:3, 4 elobeli “Nzambe Mobikisi wa biso,” elobeli mpe “Nzambe Tata mpe . . . Kristu Yezu Mobikisi wa biso.” Na yango, bango nyonso mibale bazali babikisi. Yuda 25 emonisi boyokani oyo ezali kati na bango na maloba oyo: ‘Nzambe se moko azali Mobikisi wa biso “na lisalisi” lya Mokonzi [Nkolo] wa biso Yezu Kristu.’ (Talá mpe Misala 13:23.) Na Basambisi 3:9, liloba ya Ebre (mohshiaʽ, oyo ebongolami na “mobikisi” to “mosikoli”) oyo esalelami na Yisaya 43:11 esalelami mpo na kolobela Otiniele, mosambisi moko na Yisraele, kasi yango ekómisi nde Otiniele Yehova? Soki totángi Yisaya 43:1-12, vɛrsɛ 11 emonisi ete kaka Yehova nde abikisaki, to asikolaki Yisraele; lobiko yango eutaki na nzambe moko te ya bikólo ya zingazinga.
Nzambe: Na Yisaya 43:10 Yehova alobi: “Liboso lya ngai nzambe moko azalaki te, mpe nsima ya ngai mosusu akozala te.” Yango elingi koloba ete, lokola esakweli ya Yisaya 9:6 (hf) ebengi Yesu Kristo “Nzambe na nguya,” Yesu akómi Yehova? Mpe soki otángi bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango, okomona ete ezali bongo te! Ekólo moko te ya bapakano oyo bazalaki kosambela bikeko basalaki nzambe moko liboso ya Yehova, mpo nzambe moko te azalaki liboso ya Yehova. Ata na nsima, bakokaki mpe kosala nzambe moko te mpo apesa esakweli. (Yis. 46:9, 10) Kasi, yango elimboli te ete Yehova asalá ekelamu moko te oyo ekoki mpenza kobengama nzambe. (Nz. 82:1, 6; Yoa. 1:1, NW) Yisaya 10:21 (hf) ebengi Yehova “Nzambe na nguya,” ndenge kaka Yisaya 9:6 (hf) ebengi Yesu; kasi kaka Yehova nde abengami “Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”—Eba. 17:1, NW.
Soki titre moko boye to liloba moko boye esalelami mbala mingi na Biblia, esengeli koloba mbala moko te ete ezali kolobela kaka moto moko. Soki bongo, tokoki koloba ete Nebukadenezare azalaki Yesu Kristo, mpo bango nyonso mibale bazali na titre ‘mokonzi na bakonzi’ (Dan. 2:37, hf; Em. 17:14, hf); tokoki mpe koloba ete bayekoli ya Yesu bazalaki mpenza Yesu Kristo, mpo bango nyonso babengami “mwinda mwa nse.” (Mat. 5:14; Yoa. 8:12) Tosengeli ntango nyonso kotángaka bavɛrsɛ oyo ezali na mokapo mpe bavɛrsɛ mosusu oyo elobeli likambo yango.
Bavɛrsɛ ya Makomami ya Ebre oyo etaleli Yehova, kasi oyo bato oyo bakomaki Biblia basalelaki yango mpo na Yesu Kristo
Mpo na nini Yoane 1:23 etángi Yisaya 40:3 mpe elobi ete esakweli yango ekokisamaki ntango Yoane Mobatisi azalaki kobongisela Yesu Kristo nzela, nzokande Yisaya 40:3 emonisi polele ete nzela ezali kobongisama liboso ya Yehova? Ezali mpo Yesu azalaki momonisi ya Tata na ye. Ayaki na nkombo ya Tata na ye mpe andimisamaki ete Tata na ye azalaki na ye ntango nyonso mpo azalaki kosala makambo oyo ezali kosepelisa Tata na ye.—Yoa. 5:43; 8:29.
Mpo na nini Baebre 1:10-12 etángi Nzembo 102:25-27 mpe esaleli yango epai ya Mwana, nzokande nzembo yango ezali kolobela nde Nzambe? Ezali na nzela ya Mwana nde Nzambe asalaki biloko nyonso oyo azalisaki oyo mokomi ya nzembo alobeli. (Talá Bakolose 1:15, 16; Masese 8:22, 27-30.) Baebre 1:5b etángi 2 Samwele 7:14 mpe esaleli yango epai ya Mwana ya Nzambe. Atako vɛrsɛ yango ekokisamaki liboso epai ya Salomo, mpe na nsima epai ya Yesu Kristo, emonisi te ete Salomo ná Yesu bazali moto moko. Yesu “aleki Salomo,” mpe makambo oyo Salomo asalaki ezalaki elilingi ya oyo Yesu asengelaki kosala.—Luka 11:31.
Bavɛrsɛ oyo elobeli Tata, Mwana, mpe Elimo Santu
Na ndakisa, Matai 28:19 ná 2 Bakorinti 13:14. Kasi vɛrsɛ moko te na kati ya bavɛrsɛ yango emonisi ete Tata, Mwana, ná Elimo Santu bazali ndenge moko, to bango nyonso bazali seko na seko, to bango nyonso bazali Nzambe. Bilembeteli ya Biblia oyo tolobeli na nkasa 131-136 emonisi ete tosengeli kolimbola bavɛrsɛ yango ndenge wana te.
Atako McClintock ná Strong bazali kondima liteya ya Bosato, ntango bazali kolobela Matai 28:18-20 na buku na bango (Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature), balobi boye: “Atako bongo, vɛrsɛ oyo emonisi polele te bomoto ya bato misato oyo balobelami, emonisi mpe te ete bakokani to bazali nzambe.” (buku yango enyatamaki lisusu na 1981, Vol. X, lok. 552) Mpo na bavɛrsɛ mosusu oyo elobeli Tata, Mwana, ná elimo santu esika moko, buku yango endimi ete bavɛrsɛ yango “ekoki te” mpo na kondimisa liteya ya Bosato. (Talá mpe 1 Timote 5:21, oyo elobeli Nzambe, Kristo ná baanzelu esika moko.)
Bavɛrsɛ ya Makomami ya Ebre oyo ezali kosalela boike mpo na kolobela Nzambe
Na Ebandeli 1:1, titre “Nzambe” ebongolami uta na liloba ’Elohim, oyo ezali na boike na monɔkɔ ya Ebre. Bato oyo bateyaka Bosato bamonisaka ete yango endimisi liteya ya Bosato. Balobaka mpe ete Kolimbola Mibeko 6:4 emonisi ete bapersona ya Bosato bazali na bomoko mpo elobi ete, “NKOLO Nzambe [euti na ’Elohim] na biso azali NKOLO moko.”
Na Ebre, liloba ’Elohim na boike ezali mpo na komonisa bonene ya moto to lokumu na ye. (Talá NAB, ebimeli ya St. Joseph, Bible Dictionary, lok. 330; talá mpe, New Catholic Encyclopedia, 1967, Vol. V, lok. 287.) Liloba yango epesi te likanisi ya bato mingi kati na Nzambe moko. Ndenge moko mpe, ntango Basambisi 16:23 elobeli nzambe ya lokuta Dagone, esaleli liloba ’elohim; vɛrbɛ ya liloba yango ezali na bɔɔkɔ (singulier), yango emonisi ete vɛrsɛ yango elobeli nzambe kaka moko. Na vɛrsɛ ya Ebandeli 42:30, Yozefe abengami “nkolo” (’adhoneh, ezali na boike mpo na komonisa lokumu) ya Ezipito.
Monɔkɔ ya Grɛki ezali na maloba ya boike te mpo na komonisa ‘bonene to lokumu.’ Yango wana, na vɛrsɛ ya Ebandeli 1:1, babongoli ya LXX basalelaki ho Theos (Nzambe, na bɔɔkɔ) na esika ya ’Elohim. Na Marko 12:29, eyano ya Yesu euti na maloba ya Kolimbola Mibeko 6:4, liloba ya Grɛki ho Theos esalelami na bɔɔkɔ.
Na Kolimbola Mibeko 6:4, makomi ya Ebre esaleli Tetragrami mbala mibale, mpe esengeli kotángama mpenza boye: “Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.” (NW) Bato ya Yisraele, oyo bazalaki koyoka maloba yango, bazalaki kondima liteya ya Bosato te. Bato ya Babilone mpe ya Ezipito bazalaki kosambela banzambe misatomisato, kasi Bayisraele bayebaki malamu ete Yehova azali ndenge wana te.
Bavɛrsɛ oyo moto akoki kolimbola na ndenge na ye na kotalela Biblia oyo azali kosalela
Soki gramɛrɛ ya monɔkɔ moko endimi ete vɛrsɛ moko ekoki kobongolama na ndenge mingi, ndenge nini ekoyebana ete ebongolami malamu? Ndenge oyo vɛrsɛ yango ebongolami esengeli koyokana na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia. Soki moto aboyi kotalela bavɛrsɛ mosusu ya Biblia mpe atingami kaka na ndenge oyo vɛrsɛ moko oyo alingaka ebongolami, boye makambo oyo azali kondima euti na Liloba ya Nzambe te, kasi na makanisi na ye moko, to na makanisi ya moto mosusu ya kozanga kokoka.
RS elobi ete: “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe, mpe Liloba azalaki Nzambe. Azalaki na ebandeli elongo na Nzambe.” (KJ, Dy, JB, NAB ebongoli vɛrsɛ yango mpe ndenge wana.) Kasi, NW elobi: “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe, mpe Liloba azalaki nzambe. Ye azalaki elongo na Nzambe na ebandeli.”
Wapi ndenge ya malamu ya kobongola Yoane 1:1, 2 oyo eyokani na bavɛrsɛ mosusu? Yoane 1:18 elobi boye: “Moto moko amoni naino Nzambe te.” Vɛrsɛ 14 elobi polele ete “Liloba akomi moto mpe azalaki o ntei ya biso . . . Tomonoki nkembo ya ye.” Lisusu, vɛrsɛ 1, 2 (LL) elobi ete na ebandeli azalaki “elongo na Nzambe.” Moto akoki kozala elongo na mosusu mpe azala moto yango? Na Yoane 17:3, Yesu abengaki Tata na ye ete “Nzambe wa solo se moko”; na yango, soki Yesu abengami “nzambe” ezali kaka mpo amonisaka bizaleli ya bonzambe, ya Tata na ye.—Ebr. 1:3.
Na makomi ya ebandeli, na maloba “Liloba azalaki elongo na [N]zambe” artikle defini ezali liboso ya liloba “[N]zambe” (ho theos) mpo na komonisa ete bazali kolobela Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Kasi na maloba “Liloba azalaki nzambe” artikle defini ezali te liboso ya liloba “nzambe” (theos) mpe liloba yango ezali liboso ya vɛrbɛ. Kokoma ndenge wana ezali komonisa ete bazali kolobela lolenge to ezaleli ya moto. Philip B. Harner, na lisolo na ye “Bankombo oyo ezangi artikle ezali komonisa nde ezaleli: Marko 15:39 mpe Yoane 1:1,” alobaki ete, “fraze lokola oyo ezali na Yoane 1:1, oyo ezali na nkombo ezangi artikle liboso ya vɛrbɛ emonisaka libosoliboso ezaleli. Emonisi ete logos azalaki na lolenge ya theos.” Apesi likanisi ete: “Mbala mosusu fraze yango ekokaki kobongolama boye, ‘Liloba azalaki na lolenge ya [N]zambe.’” (Journal of Biblical Literature, 1973, nk. 85, 87)
John L. McKenzie, S.J., alobaki na buku na ye (Dictionary of the Bible) boye: “Yoane 1:1 esengeli mpenzampenza kobongolama boye: ‘liloba azalaki elongo na Nzambe [= Tata], mpe liloba azalaki na lolenge ya nzambe.’”—(Ye moko nde atye bakroshɛ. Enyatami na nihil obstat mpe imprimatur.) (New York, 1965), lok. 317. Babiblia ya minɔkɔ mosusu mpe ebongoli fraze yango ndenge wana.
Koloba ete Liloba (oyo akómaki Yesu Kristo) azali “nzambe” eyokani na ndenge oyo liloba yango esalelami na bavɛrsɛ mosusu. Na ndakisa, Nzembo 82:1-6 emonisi ete, na Yisraele, basambisi babengamaki “banzambe” (Ebre, ’elohim; Grɛki, theoi, na Yoane 10:34) mpo bazalaki bamonisi ya Yehova mpe basengelaki koteya mobeko na ye.
Hf elobi: “Yesu alobi na bango ete, Solo solo nalobi na bino ete, Naino ezalaki Abalayama te, ngai nazali [Grɛki, ego eimi].” (LNz, LL, Uele, yango nyonso ebongoli esika yango “ngai nazali,” kutu Babiblia mosusu mpe ekomi yango na lɛtrɛ ya minene mpo na komonisa ete ezali titre. Na yango, bazali kosala nyonso mpo na koyokanisa maloba yango na oyo ezali na Kobima 3:14, epai, na kolanda ndenge babongoli, Nzambe ye moko amipesi titre “Ngai nazali.”) Kasi, na NW eteni ya nsuka ya Yoane 8:58 elobi ete: “Liboso Abrahama azala, ngai nazalaki.” (Babiblia lokola AT, Mo, CBW, mpe SE, ebongoli yango mpe bongo.)
Wapi ndenge ya malamu ya kobongola vɛrsɛ yango oyo eyokani na bavɛrsɛ mosusu? Motuna oyo Bayuda batunaki (na vɛrsɛ 57) oyo Yesu azalaki koyanola, etalelaki mbula na ye, kasi batunaki te mpo na koyeba soki azali nani. Eyano oyo Yesu apesaki bango mpe etalelaki mbula na ye, bolai ya bomoi na ye. Kutu, bameká ata moke te kopesa elimo santu titre ego eimi.
A. T. Robertson alobi na buku na ye (A Grammar of the Greek New Testament in the Light of Historical Research) boye: “Mbala mosusu, vɛrbɛ [eimi] . . . epesaka likanisi ya kozala, lokola bavɛrbɛ mosusu, na ndakisa na fraze [ego eimi] (Yoa. 8:58).”—Nashville, Tennessee; 1934, lok. 394.
Hf elobi: “Bokeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etonga mobimba oyo [elimo] santu esili kotia bino bakɛngɛli na yango, bozala babateli na lingomba na Nzambe oyo asombaki na makila na ye mpenza.” (Uele, KSN ebongoli yango mpe bongo.) Kasi, na NW eteni ya nsuka ya vɛrsɛ yango elobi: “makila ya Mwana na ye moko.” (LNz ebongoli yango mpe ndenge wana.)
Lolenge nini ya kobongola eyokani na 1 Yoane 1:7 (hf), oyo elobi ete: “makila na Yesu, Mwana na ye [Nzambe], makopɛtɔlaka biso na masumu nyonso”? (Talá mpe Emoniseli 1:4-6.) Ndenge Yoane 3:16 emonisi yango, Nzambe atindaki nde Mwana na ye se moko oyo abotamaki, to ye moko nde ayaki lokola moto, mpo tózwa bomoi? Makila oyo esopanaki ezali ya Nzambe te, kasi ya Mwana na ye.
LNz elobi: “Bazali bana ba bankoko ba biso ba kala. Na nsima Kristu, oyo aleki binso, abotami o libota lya bango. Bákumisa ye Nzambe o bileko binso seko! Amen.” (hf, KSN ebongoli yango mpe bongo.) Kasi, na NW, eteni ya nsuka ya vɛrsɛ yango elobi ete: “baoyo Kristo abotamaki mwana na bango: Nzambe, oyo azali likoló ya nyonso, apambwama libela na libela. Amen.” (Rom. 9:5) (RS, NE, TEV, NAB, Mo ebongoli yango ndenge moko na NW.)
Vɛrsɛ oyo elobi ete Kristo azali “likoló ya nyonso” mpe na yango azali Nzambe? To emonisi nde ete Nzambe ná Kristo bazali bato mibale oyo bakeseni mpe ete Nzambe azali “likoló ya nyonso”? Lolenge nini ya kobongola Baroma 9:5 eyokani na Baroma 15:5, 6, oyo emonisi liboso ete Nzambe akeseni na Kristo Yesu mpe na nsima elendisi motángi ‘akumisa Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo’? (Talá mpe 2 Bakorinti 1:3 mpe Baefese 1:3.) Tótala oyo Baroma mokapo 9 elobi. Vɛrsɛ 6-13 emonisi ete mokano ya Nzambe ekokokisama na kolanda libula ya moto te kasi ndenge Nzambe alingi. Vɛrsɛ 14-18 elobeli nsango oyo Nzambe atindelaki Farao, ndenge ezali na Kobima 9:16, mpo na komonisa ete Nzambe azali likoló ya nyonso. Mpo na komonisa mpenza ete Nzambe aleki nyonso, vɛrsɛ 19-24 esaleli ndakisa ya moyemi-mbɛki ná bambɛki oyo asali. Na yango, maloba oyo ezali na vɛrsɛ 5 ebongi mpenza: “Nzambe, oyo azali likoló ya nyonso, apambwama libela na libela. Amen”!—NW.
Diksionɛrɛ moko (The New International Dictionary of New Testament Theology) elobi: “Rom. 9:5 ebimisi ntembe mingi. . . . Ekozala mpasi te koloba ete vɛrsɛ yango elobeli Kristo soki tolandi mpenza ndenge lokota esɛngi. Na yango, vɛrsɛ yango ekotángama boye, ‘Kristo oyo azali Nzambe likoló ya nyonso, apambwama libela na libela. Amen.’ Atako bongo, Kristo akokokana mpenzampenza na Nzambe te, kasi ekomonisa kaka ete azali moto oyo azali na lolenge ya nzambe, mpo liloba theos ezali na artikle te. . . . Na yango, tomoni mpenzampenza ete maloba ya vɛrsɛ yango ezali nde kokumisa Nzambe.”—(Grand Rapids, Mich.; 1976), ebongolami uta na Allemand, Vol. 2, lok. 80.
KSN elobi ete: “Bókanisaka makanisi makanisaki Masiya Yesu. Ata azalaki na lolenge na Nzambe, atangaki kokokana na ye na Nzambe lokola eloko na kowela te.” (Dy ebongoli yango mpe ndenge wana. LNz elobi ete: “awelaki te kotikala na lokumu la ye loye lokokani na lokumu la Nzambe.”) Kasi, na NW eteni ya nsuka ya vɛrsɛ yango elobi: “oyo, atako azalaki na lolenge ya Nzambe, azwaki makanisi te ya kobɔtɔla bokonzi [Grɛki, harpagmon], elingi koloba, ete akokana na Nzambe.” (RS, NE, TEV, NAB epesi mpe likanisi wana.)
Likanisi nini eyokani na bavɛrsɛ mosusu oyo ezali na mokapo yango? Vɛrsɛ 5 epesi bakristo toli bámekola ezaleli ya Kristo oyo mokapo yango ezali kolobela. Vɛrsɛ yango ezali nde kolendisa bakristo bákanisa ete ‘kokokana na Nzambe’ ezali likambo ya “kowela te,” kasi lotomo na bango? Te! Kasi, basengeli komekola moto oyo “azwaki makanisi te ya kobɔtɔla bokonzi, elingi koloba, ete akokana na Nzambe.” (NW) (Talá Ebandeli 3:5.) Kobongola ndenge wana eyokani mpe na makanisi ya Yesu Kristo oyo alobaki ete: “Tata aleki ngai.”—Yoa. 14:28, KSN.
LNz elobi: “O nzoto ya Kristu Nzambe azali na bonzambe [Grɛki, theotetos] bwa ye mobimba.” (NE, RS, JB, NAB, Dy epesi mpe likanisi wana.) Kasi, NW elobi: “Mpo bonzambe mobimba efandi na kati na ye.” (AT, We, mpe CKW elobi “lolenge ya Nzambe,” na esika ya koloba “Nzambe azali na bonzambe.” Talá 2 Petro 1:4.)
Emonani ete bato nyonso balimbolaka Bakolose 2:9 ndenge moko te. Kasi ndimbola nini eyokani na bavɛrsɛ mosusu ya mokanda ya Bakolose oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe? Kristo azalaki nde na eloko moko oyo ezalaki kaka ya ye moko mpo azali Nzambe, to azali na kati ya Bosato? To moto mosusu nde asalaki ete bonzambe “mobimba” efanda na kati na ye? Bakolose 1:19 (hf) elobi ete bonzambe mobimba efandi na kati ya Kristo mpo “Nzambe asepelaki” ete ezala bongo. LNz elobi ete “Nzambe [nde] akanaki.”
Tótalela vɛrsɛ oyo eyei liboso ya Bakolose 2:9: Vɛrsɛ 8 ekebisi batángi ete bákosama te na bato oyo bateyaka filozofi mpe bonkɔkɔ. Bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango eyebisi mpe bango ete “nkita inso ya bwanya mpe ya boyebi ibombami” na kati ya Kristo, mpe elendisi bango ete ‘bátambola na ye lisangá’ mpe ‘bákangana na ye lokola nzete o mabele, lokola ndako etongamaki o mabanga. Bápikama o boyambi bwa solo.’ (Vɛrsɛ 3, 6, 7) Bonzambe “mobimba” efandi nde na kati na ye, kasi efandi te na kati ya bato oyo babandisá mateya ya filozofi to oyo bateyaka yango. Ntoma Paulo alingaki nde koloba ete bonzambe “mobimba” oyo ezali na kati ya Kristo ekómisi Kristo Nzambe? Bakolose 3:1 emonisi bongo te mpo elobi ete Kristo “afandi o lobɔkɔ la mobali la Nzambe.”—Talá hf, Uele, KSN.
Liddell ná Scott balobi na diksionɛrɛ na bango (Greek-English Lexicon) ete, theotes (ezali moto oyo azali koloba [nominatif], oyo theotetos euti na yango) elimboli “bonzambe, lolenge ya nzambe.” (Oxford, 1968, lok. 792) Lokola Yesu azali mpenza na “bonzambe,” to na “lolenge ya nzambe,” yango esali te ete ye Mwana ya Nzambe akokana na Tata, mpe esali te ete azala seko na seko lokola Tata; ndenge moko mpe, lokola bato nyonso bazali na “bomoto” to na “lolenge ya moto,” yango elingi koloba te ete bango nyonso bakokani to bazali mbula moko.
KSN elobi ete: “Naino ezali biso kotalela elikia na esengo, yango Komonana na nkembo na Nzambe na biso monene, Mobikisi Masiya Yesu.” (LL, BSN ebongoli vɛrsɛ yango mpe bongo.) Kasi NW ebongoli boye: “awa tozali kozela elikya ya kitoko mpenza mpe komonana ya Nzambe monene na nkembo mpe ya Mobikisi na biso, Kristo Yesu.” (LNz mpe ebongoli yango bongo.)
Lolenge nini ya kobongola vɛrsɛ yango eyokani na Tito 1:4, hf, oyo elobi ete “Nzambe Tata mpe Klisto Yesu, Mobikisi na biso”? Atako Biblia elobaka mpe ete Nzambe azali Mobikisi, vɛrsɛ oyo ekesenisi mpenza ye na Kristo Yesu, oyo na nzela na ye Nzambe akobikisa bato.
Bato mosusu balobaka ete Tito 2:13 emonisi ete Kristo azali Nzambe mpe Mobikisi. Simbá ete ata soki LL, BSN ebongoli Tito 2:13 na ndenge oyo ekoki kopesa likanisi ete Yesu azali Nzambe mpe Mobikisi, basali bongo te na 2 Batesaloniki 1:12. Henry Alford alobi na buku moko (The Greek Testament) boye: “Nakoki koloba ete [libongoli oyo ezali komonisa polele bokeseni oyo ezali kati na Nzambe mpe Kristo, na Tito 2:13] elandi mpenza ndenge mibeko nyonso ya gramɛrɛ esɛngi: na kotalela ndenge vɛrsɛ yango ekomami mpe bavɛrsɛ mosusu, yango eyokani mpenza na ndenge Ntoma yango azalaki kokoma.”—(Boston, 1877), Vol. III, lok. 421.
KSN elobi: “Nde na Mwana alobi ete: Kiti-na-bokonzi na yo ɛ Nzambe, ekozala libela na libela.” (hf, LL, LNz, Uele ebongoli vɛrsɛ yango mpe bongo.) Kasi NW elobi: “Kasi alobeli Mwana yango ete: ‘Nzambe azali kiti na yo ya bokonzi libela na libela.’” (AT, Mo, TC, By epesi mpe likanisi wana.)
Lolenge nini ya kobongola eyokani na bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango? Bavɛrsɛ ya liboso elobi ete Nzambe nde azali koloba, kasi bazali koloba na ye te; mpe vɛrsɛ oyo elandi elobi “Nzambe, Nzambe na yo,” mpo na komonisa ete moto oyo bazali koloba na ye ezali Nzambe Oyo-Aleki-Likoló te kasi nde mosambeli ya Nzambe yango. Baebre 1:8 etángi maloba ya Nzembo 45:6, oyo ntango bakomaki yango elobelaki mokonzi moko na Yisraele. Emonani ete mokomi ya nzembo yango akanisaki te ete mokonzi yango ezali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Kasi, na RS, Nzembo 45:6 elobi “Kiti ya bokonzi na yo ya bonzambe.” (NE elobi, “Kiti ya bokonzi na yo ezali lokola kiti ya bokonzi ya Nzambe.” LNz [vɛrsɛ 7]: “Ngwende Nzambe apesi yo.”) Maloba ya Nzembo 45 elobamaki mbala mosusu mpo na Mokonzi Salomo, oyo balobaki ete afandi na “kiti ya bokonzi ya Yehova.” (1 Nt. 29:23, NW) Lokola Nzambe azali “kiti ya bokonzi,” to Eutelo ya bokonzi ya Kristo mpe Moto oyo asimbi bokonzi yango, Danyele 7:13, 14 mpe Luka 1:32 emonisi ete Nzambe nde moto apesi Kristo bokonzi yango.
Baebre 1:8, 9 etángi Nzembo 45:6, 7, oyo nganga-mayele ya Biblia B. F. Westcott alobi mpo na yango ete: “Biblia ya Septante endimi ndenge mibale ya kobongola vɛrsɛ yango: liloba [ho theos] ekoki kolimbola moto oyo bazali koloba na ye (Kiti ya bokonzi na yo, Ee Nzambe, . . . mpe, Ee Nzambe, Nzambe na yo . . . ) to ekoki kolimbola moto oyo azali koloba, na ndakisa ya liboso (Nzambe azali kiti ya bokonzi na yo, to Kiti ya bokonzi na yo ezali Nzambe . . .), mpe liloba [ho theos sou] ekoki kotambola na liloba [ho theos] na ndakisa ya mibale (Mpe Nzambe, Nzambe na yo . . . ). . . . Eyebani te soki na ebandeli basalelaki liloba [’Elohim] mpo na kolobela mokonzi. Yango wana bato mosusu baboyaka kondima ete, na Septante, [ho theos] ezali moto oyo bazali koloba na ye. Na yango, emonani ete fraze ya liboso esengeli kobongolama boye: Nzambe azali kiti ya bokonzi na yo (to, Kiti ya bokonzi na yo ezali Nzambe), elingi koloba ‘Bokonzi na yo etongami likoló ya Nzambe, Libanga oyo eninganaka te.’”—The Epistle to the Hebrews (Londres, 1889), nk. 25, 26.
KJ elobi boye: “Mpo bazali misato oyo bazali kopesa litatoli na likoló, Tata, Liloba, ná Elimo Santu: mpe bango misato bazali moko. Mpe bazali misato oyo bazali kopesa litatoli na mabele, elimo, ná mai, ná makila: mpe yango misato ezali na bomoko.” (Dy mpe ebakisi vɛrsɛ yango oyo endimisaka liteya ya Bosato.) Kasi, NW etye te eteni oyo elobi, “na likoló, Tata, Liloba, ná Elimo Santu: mpe bango misato bazali moko. Mpe bazali misato oyo bazali kopesa litatoli na mabele.” (LNz, hf, LL, KSN, Uele, RS, NE, TEV, JB, NAB etye mpe te eteni ya vɛrsɛ yango oyo ezali kondimisa liteya ya Bosato.)
Nganga-mayele F. H. A. Scrivener akomaki boye mpo na vɛrsɛ yango: “Tokoki kokakatana te koloba polele ete, maloba yango oyo ezali kobimisa ntembe, ekomamaki na Santu Yoane te; ebakisamaki nde kobakisama liboso na maloba oyo ekomami na mopanzi ya lokasa, na bakopi ya Latin na Afrika mpo na kolimbola liteya ya lingomba na vɛrsɛ 8: elongwe na Latin bakɔtisaki yango na bakodekse 2 to 3 ya nsuka ya makomi ya Grɛki, mpe na nsima bakɔtisaki yango na esika oyo esengelaki kozala te, na makomi ya Grɛki oyo babimisaki.”—A Plain Introduction to the Criticism of the New Testament (Cambridge, 1883, ebimeli ya misato), lok. 654.
Bavɛrsɛ mosusu oyo bato oyo bateyaka Bosato balobaka ete esimbi liteya na bango
Simbá ete vɛrsɛ ya liboso na kati ya bavɛrsɛ yango elobeli kaka Mwana; mosusu elobeli Tata ná Mwana; moko na yango elobi te ete Tata, Mwana, ná Elimo Santu bazali Nzambe moko.
Makambo oyo Yesu alobaki na vɛrsɛ yango emonisi ete akomisekwisa ye moko uta na bakufi? Lokola Misala 2:32 elobi ete, “Yezu oyo, Nzambe asekwisi ye,” yango elimboli ete Yesu azali Nzambe? Te. Kokanisa ete Yesu amisekwisaki ye moko eyokani te na Bagalatia 1:1, oyo elobi ete Tata nde asekwisaki Yesu, kasi Mwana ye moko te. Yesu asalelaki elobeli yango na Luka 8:48 ntango alobaki na mwasi moko ete: “Kondima na yo ebikisi yo.” Mwasi yango amibikisaki ye moko? Te; abikisamaki nde na nguya ya Nzambe na nzela ya Kristo, mpo azalaki na kondima. (Luka 8:46; Mis. 10:38) Bobele bongo, ntango Yesu akómaki moto, atosaki Tata na ye na makambo nyonso, yango etindaki Tata na ye asekwisa ye uta na bakufi, mpo na kondimisa ete Yesu azali Mwana ya Nzambe. Lokola Yesu azalaki sembo, tokoki koloba ete yango mpe esalaki ete asekwa.
A. T. Robertson akomi na buku na ye (Word Pictures in the New Testament) boye: “Kanisá [Yoane] 2:19 esika Yesu alobaki: ‘Mpe na mikolo misato nakotɛlɛmisa yango.’ Alingaki koloba te ete akomisekwisa na ndenge na ye moko ata soki Tata asekwisi ye te (Rom. 8:11).”—(New York, 1932), Vol. V, lok. 183.
Ntango Yesu alobi ete, “Ngai ná Tata tozali se moko,” alingaki nde koloba ete bakokani? Bato mosusu oyo bateyaka Bosato balobaka ete ezali bongo. Kasi na Yoane 17:21, 22, (hf)Yesu abondelaki mpo na bayekoli na ye boye: “Ete nyonso bázala moko,” mpe abakisaki ete, “bázala moko pelamoko biso tozali moko.” Na vɛrsɛ yango Yoane asaleli liloba kaka moko ya Grɛki (hen) mpo na kolobela “moko” na bisika yango nyonso. Atako bongo, bayekoli ya Yesu bakómi bapersona ya Bosato te. Kasi bango, ná Tata ná Mwana, bakómi nde na bomoko na mokano oyo bazali na yango, bomoko yango nde esangisi Nzambe ná Kristo.
Ndenge nini Nzambe atalelaka bato oyo bandimaka liteya ya Bosato?
Kondima liteya ya Bosato etye bango na likama. Emonani polele ete liteya ya Bosato ezali na Biblia te, mpe eyokani te na oyo Biblia eteyaka. (Talá makambo oyo tolobeli liboso.) Ezali mpenza komonisa Nzambe ya solo na ndenge ya mabe. Kasi, Yesu Kristo alobaki ete: “Ntango ekoya, ɛɛ ezali sasaipi, wana basambeli na solo bakosambela Tata na bisambeli na [elimo] mpe na solo. Mpo ete Tata azali koluka motindo oyo mpo na kosambela ye. Nzambe azali [Elimo] mpe ekoki na basambeli na ye kosambela ye na [elimo] mpe na solo.” (Yoa. 4:23, 24, hf) Na yango, Yesu amonisaki polele ete baoyo bazali kosambela ‘na solo’ te, elingi koloba, baoyo bazali kosambela te na boyokani na solo oyo emonisami na Liloba ya Nzambe, bazali “basambeli ya solo” te. Na siɛklɛ ya liboso, Yesu alobaki na bakonzi ya Lingomba ya Bayuda boye: “Mpo na mateya na bino bobebisi Liloba na Nzambe. Bakosi! Yisaya alobaki malamu mpo na bino ete, Bato oyo bakotosaka ngai na minɔkɔ, kasi mitema na bango izali mosika na ngai. Bakosanzolaka ngai mpamba, bakolakisa malako mazali mibeko na bato.” (Mat. 15:6-9, hf) Lelo oyo maloba yango etaleli mpe mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba oyo ezali kosalela mateya ya bato na esika ya kosalela mateya ya solo oyo Biblia emonisi polele.
Bato oyo bateyaka liteya yango balobaka ete ezali “libombami.” Emonani polele ete Yesu alobelaki Nzambe ya Bosato te ntango alobaki ete: “Biso tozali kosambela oyo eyebi biso.” (Yoa. 4:22, hf) Oyebi mpenza Nzambe oyo osambelaka?
Ezali na mituna ya ntina oyo tosengeli komituna: Tolingi mpenza mateya ya solo? Tolingi mpenza ete biso na Nzambe tózala na boyokani oyo ekosala ete andima biso? Moto nyonso te nde asepelaka mpenza na mateya ya solo. Bato mingi balingaka nde bandeko na bango mpe baninga na bango bálinga bango na esika bátya bolingo ya solo mpe ya Nzambe na esika ya liboso. (2 Tes. 2:9-12; Yoa. 5:39-44) Nzokande Yesu abondelaki Tata na ye ya likoló boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoa. 17:3, NW) Mpe Nzembo 144:15 elobi solo ete: “Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”—NW.
Soki moto atuni—
‘Ondimaka Bosato?’
Okoki koyanola: ‘Lelo bato mingi bandimaka liteya yango. Kasi oyebi ete Yesu ná bayekoli na ye bateyaki bongo te? Yango wana, biso tosambelaka Moto oyo Yesu alobaki tósambela.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Ntango Yesu azalaki koteya, talá mobeko oyo alobaki ete eleki mibeko nyonso . . . (Mrk. 12:28-30).’ (2) ‘Yesu alobá ata mbala moko te ete akokani na Nzambe. Alobaki ete . . . (Yoa. 14:28).’ (3) ‘Sikoyo, liteya ya Bosato eutá wapi? Simbá likambo buku moko oyo eyebani mingi elobi na likambo yango. (Talá nkasa 129, 130)’
To okoki koloba: ‘Te. Omoni, ezali na bavɛrsɛ mingi na Biblia oyo nakoki koyokanisa yango te na liteya wana. Talá moko na yango. (Mat. 24:36) Okoki kolimbwela ngai yango?’ To okoki koloba: (1) ‘Soki Mwana akokani na Tata, ndenge nini Tata ayebi makambo mosusu oyo Mwana ayebi te?’ Soki alobi ete ayebaki makambo mosusu te kaka ntango azalaki moto, okoki kotuna: (2) ‘Kasi mpo na nini elimo santu eyebi yango te?’ (Soki moto yango asepeli mpenza na solo, monisá ye oyo Biblia elobi mpo na Nzambe. [Nz. 83:18; Yoa. 4:23, 24])
Ndenge mosusu ya koyanola: ‘Tondimelaka Yesu Kristo kasi tondimaka liteya ya Bosato te. Mpo na nini? Mpo tondimaka makambo oyo ntoma Petro andimaki mpo na Kristo. Talá oyo alobaki . . . (Mat. 16:15-17).’
Makanisi mosusu: ‘Namoni ete bato nyonso bazali na likanisi moko te na likambo ya Bosato. Mbala mosusu nakoki kopesa yo eyano ya malamu soki nayebi ndenge otalelaka Bosato.’ Okoki kobakisa: ‘Nayoki ndimbola na yo. Kasi nandimaka kaka oyo Biblia eteyaka. Osilá komona liloba “Bosato” na Biblia? . . . (Talá index ya maloba ya Biblia.) Kasi Biblia elobeli Kristo? . . . Ɛɛ, mpe tondimelaka ye. Talá index ya maloba ya Biblia na nse ya liloba “Kristo,” moko ya bavɛrsɛ oyo bapesi ezali Matai 16:16. (Tángá yango.) Yango nde nandimaka.’
To okoki koyanola (soki moto atángeli yo Yoane 1:1): ‘Nayebi vɛrsɛ yango malamu. Na Babiblia mosusu, vɛrsɛ yango elobaka ete Yesu azali “Nzambe,” kasi na mosusu mpe elobaka ete azali “nzambe.” Mpo na nini?’ (1) ‘Ekoki nde kozala mpo vɛrsɛ oyo elandi elobi ete Yesu azalaki “elongo na Nzambe”?’ (2) ‘To ekoki kozala mpo na maloba oyo ezali na Yoane 1:18?’ (3) ‘Osilá komituna soki ezali na moto oyo Yesu azalaki kobenga Nzambe na ye? (Yoa. 20:17)’
‘Ondimaka ete Kristo azali nzambe?’
Okoki koyanola: ‘Ɛɛ. Kasi mbala mosusu nazali na likanisi moko te na yo ntango ozali kolobela “bonzambe ya Kristo.”’ Okoki kobakisa: (1) ‘Mpo na nini nalobi bongo? Mpo Yisaya 9:6 ebengi Yesu Kristo ete “Nzambe na Nguya,” kasi na Biblia, kaka Tata na ye nde abengami Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.’ (2) ‘Mpe simbá ete na Yoane 17:3 Yesu alobi ete Tata na ye azali “Nzambe ya solo kaka moko.” Na yango, Yesu azali nde elilingi ya Nzambe ya solo.’ (3) ‘Tosengeli kosala nini mpo na kosepelisa Nzambe? (Yoa. 4:23, 24)’