Tiká ete lisangá elendisama
“Lisangá . . . ekɔtaki na eleko moko ya kimya, kotongamáká.”—MISALA 9:31.
1. Mituna nini tokoki komituna na ntina na “lisangá ya Nzambe”?
MOKOLO ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Yehova andimaki bayekoli ya Klisto lokola ekólo na ye ya sika, “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16) Baklisto bapakolami yango bakómaki mpe oyo Biblia ebengi “lisangá ya Nzambe.” (1 Bakolinti 11:22) Kasi, yango elimbolaki nini? Ndenge nini “lisangá ya Nzambe” esengelaki kobongisama, mpe ndenge nini esengelaki kotambwisama awa na mabelé, ata soki basangani na yango bafandi na mboka nini? Mpe yango esengeli kozala na esika nini na bomoi na biso mpe na ndenge nini etaleli bolamu na biso?
2, 3. Ndenge nini Yesu amonisaki ete lisangá ekozala na ebongiseli?
2 Ndenge lisolo oyo eleki emonisaki yango, Yesu asakolaki kosalema ya lisangá ya bayekoli na ye bapakolami ntango alobaki na ntoma Petelo boye: “Na libanga oyo [Yesu Klisto] nakotonga lisangá na ngai, mpe bikuke ya Hadesi ekolonga yango te.” (Matai 16:18) Longola yango, ntango Yesu azalaki naino elongo na bantoma na ye, ayebisaki bango ndenge oyo lisangá yango oyo esengelaki kosalema mosika te ekotambwisama mpe ekobongisama.
3 Na maloba mpe misala na ye, Yesu ateyaki ete ekozala na bato oyo bakokamba lisangá. Bakokamba yango na ndenge bakobanda kosalela bandeko na bango. Klisto alobaki boye: “Boyebi ete baoyo bamonanaka lokola bazali koyangela bikólo mosusu bamityaka bankolo likoló na bango mpe bato na bango ya minene bayokisaka bango bokonzi na bango. Ezali bongo te epai na bino; kasi moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino, mpe moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo ya banso.” (Malako 10:42-44) Maloba yango emonisi polele ete “lisangá ya Nzambe” esengeli te kozala lingomba ya nkombo mpamba, oyo mokomoko na basangani na yango asalaka makambo na ndenge na ye. Esengelaki nde kobongisama malamu, mpe basangani na yango basengelaki kozala na boyokani mpe kosala na bomoko.
4, 5. Ndenge nini toyebi ete mateya ya elimo esengelaki kopesamaka na kati ya lisangá?
4 Yesu, Mokonzi ya “lisangá ya Nzambe” alobaki ete bantoma na ye mpe bayekoli mosusu oyo bayokaki mateya na ye bakozala na mikumba ya kokokisa mpo na bolamu ya basusu na kati ya lisangá. Mikumba nini basengelaki kokokisa? Mokumba ya ntina mingi ezalaki ya koteya lisangá. Tóbosana te ete nsima ya kosekwa na ye mpe na miso ya mwa bantoma mosusu, Yesu atunaki Petelo ete: “Simona mwana ya Yoane, olingaka ngai?” Petelo ayanolaki ete: “Ɛɛ, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo mingi.” Yesu alobaki na ye: “Leisá bana-mpate na ngai . . . Batelá bampate na ngai ya mike. . . . Leisá bampate na ngai ya mike.” (Yoane 21:15-17) Ezalaki mokumba monene mpenza!
5 Maloba ya Yesu ezali komonisa ete bato oyo bazali koya na lisangá bazali lokola bampate na kati ya etonga moko. Bampate yango, elingi koloba baklisto ya mibali, ya basi, mpe bana, basengeli koleisama na elimo mpe kobatelama malamu. Lisusu, lokola Yesu apesaki bayekoli na ye nyonso mokumba ya koteya bato mosusu mpe kokómisa bango bayekoli, moto nyonso oyo akómi mpate na ye asengeli kozwa formasyo mpo na kosala mosala wana oyo euti na Nzambe.—Matai 28:19, 20.
6. Bibongiseli nini ezwamaki na “lisangá ya Nzambe” ntango ebandaki sika?
6 Ntango “lisangá ya Nzambe” ebandaki, basangani na yango bazalaki koyangana mbala na mbala mpo na koyoka mateya mpe kolendisana: “Bakobaki komipesa na mateya ya bantoma mpe na bosangani bango na bango, na kolya mpe na mabondeli.” (Misala 2:42, 46, 47) Likambo mosusu ya ntina oyo lisolo elobi ezali ete mibali oyo bakokisi masɛngami baponamaki mpo bákokisa mikumba ya ntina na kati ya lisangá. Bazalaki koponama te na kotalela bakelasi oyo batángaki, to mayele na bango. Bazalaki bato “oyo batondi na elimo mpe na bwanya.” Moko na bango ezalaki Setefano, mpe Biblia emonisi ete azalaki “mobali moko oyo atondi na kondima mpe na elimo santu.” Moko na matomba ya lisangá ezalaki ete “liloba ya Nzambe ekobaki kokola, mpe motángo ya bayekoli ekobaki kobakisama mingi mpenza na kati ya Yelusaleme.”—Misala 6:1-7.
Mibali oyo Nzambe apesaki mikumba
7, 8. (a) Bantoma mpe bankulutu ya Yelusaleme bazalaki na mokumba nini na kati ya baklisto ya liboso? (b) Litomba nini emonanaki ntango malako ya bantoma etángamaki na masangá?
7 Na ebandeli, mokumba ya kokamba lisangá ezalaki na mabɔkɔ ya bantoma; kasi bazalaki bango moko te. Na eleko moko boye, Paulo ná baninga na ye bazongaki na Antiokia ya Sulia. Misala 14:27 elobi boye: “Ntango bakómaki mpe bayanganisaki lisangá, babandaki koyebisa ebele ya makambo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.” Na ntango yango, ntembe makasi ebimaki na likambo ya kokatama ngenga mpo na bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki baklisto. Mpo na kozwa eyano, batindaki Paulo ná Balanabasi “epai ya bantoma mpe bankulutu na Yelusaleme,” tokoki koloba ete bango nde bazalaki lisangani ya mikóló-bakambi.—Misala 15:1-3.
8 Yakobo, oyo azalaki ndeko ya Yesu mpe nkulutu na lisangá, azalaki ntoma te; kasi akambaki likita ntango “bantoma ná bankulutu bayanganaki mpo na kotalela likambo yango.” (Misala 15:6) Nsima ya kopesana makanisi mpe na lisalisi ya elimo santu, bazwaki ekateli moko oyo eyokani na Makomami. Bakomaki mokanda oyo eyebisaki ekateli na bango mpe batindaki yango na masangá. (Misala 15:22-32) Bandeko batángaki mokanda, bandimaki makambo yango mpe basalelaki yango. Ebimisaki litomba nini? Bandeko balendisamaki. Lisolo elobi boye: “Na yango, . . . masangá ekobaki kokóma makasi na kondima mpe kobakisama motángo mokolo na mokolo.”—Misala 16:5.
9. Biblia elobeli mikumba nini oyo mibali oyo bakokisi masɛngami basengeli kokokisa?
9 Kasi, ndenge nini lisangá mokomoko ezalaki kotambwisama mokolo na mokolo? Tókamata ndakisa ya masangá oyo ezalaki na Esanga Krɛti. Atako bato mingi ya esanga yango bazalaki na etamboli ya mabe, bamosusu babongwanaki mpe bakómaki baklisto ya solo. (Tito 1:10-12; 2:2, 3) Baklisto yango bazalaki kofanda na bingumba ndenge na ndenge ya Esanga Krɛti, bingumba yango nyonso ezalaki mosika na Yelusaleme, epai lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki. Kasi, yango ezalaki mokakatano monene te mpamba te na lisangá mokomoko ya Krɛti, ndenge moko mpe na bisika mosusu, mibali oyo bazalaki na makoki ya elimo baponamaki mpo na kokamba masangá yango. Mibali yango bakokisaki masɛngami oyo Biblia eyebisi. Baponamaki lokola bankulutu to bakɛngɛli, oyo bazalaki “kolendisa na mateya oyo epesaka litomba mpe . . . kopamela batɛmɛli.” (Tito 1:5-9; 1 Timote 3:1-7) Mibali mosusu oyo bakokisaki masɛngami bazalaki kosalisa masangá lokola basaleli na misala.—1 Timote 3:8-10, 12, 13.
10. Na kolanda Matai 18:15-17, ndenge nini tosengeli kosilisaka matata ya minene?
10 Yesu amonisaki ete ebongiseli ya ndenge wana esengelaki kozala. Tókanisa lisusu lisolo oyo ezali na Matai 18:15-17, epai alobaki ete ntango mosusu matata ekoki kobima kati na basaleli ya Nzambe mibale, elingi koloba ete moko akoki kosalela moninga na ye lisumu. Moto oyo basali mabe asengeli kokutana na ndeko na ye mpe “komonisa ye libunga na ye” mpo básolola bango mibale. Nsima ya kosala yango, soki likambo esili kaka te, akoki kobenga moto moko to bato mibale oyo bayebi likambo yango mpo básalisa bango. Bongo soki esili kaka te? Yesu alobaki boye: “Soki ayoki bango te, lobá na lisangá. Soki ayoki ata lisangá te, azala epai na yo lokola moto ya bikólo mosusu mpe lokola mokɔngɔli-mpako.” Ntango Yesu alobaki maloba yango, Bayuda bazalaki naino “lisangá ya Nzambe”; na bongo, maloba na ye ezalaki liboso kotalela bango.a Nzokande, ntango lisangá ya boklisto esalemaki, esengelaki malako wana ya Klisto ekóma kosalelama na lisangá. Maloba wana emonisi mpe ete basaleli ya Nzambe basengelaki kozala lisangá mpo moklisto mokomoko alendisama mpe atambwisama malamu.
11. Bankulutu bazalaki na mokumba nini mpo na kosilisa matata?
11 Bankulutu, to bakɛngɛli, basengelaki mpenza kozala bamonisi ya lisangá mpo na kotalela to kosilisa matata to mpe kosalisa moto oyo asali lisumu. Yango eyokani na masɛngami ya bankulutu oyo ezali na Tito 1:9. Ezali solo ete bankulutu wana bazalaki bato ya kozanga kokoka, ata mpe Tito, oyo Paulo atindaki mpo na “kosembola makambo oyo ezalaki kotambola malamu te” na masangá. (Tito 1:4, 5) Lelo oyo, mpo na kopona bandeko na mokumba ya nkulutu, balukaka baklisto oyo bamonisi kondima mpe ezaleli ya kobanga Nzambe banda bambula mwa mingi. Na ndenge yango, bandeko mosusu na lisangá bakoki kotyela batoli mpe litambwisi na bango motema.
12. Bankulutu bazali na mokumba nini na lisangá?
12 Paulo ayebisaki bankulutu ya lisangá ya Efese boye: “Bókeba mpo na bino moko mpe mpo na etonga mobimba, oyo na kati na yango elimo santu etye bino bakɛngɛli, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko.” (Misala 20:28) Lelo oyo mpe ndenge moko, bankulutu baponamaka mpo na “kobatela lisangá ya Nzambe.” Mokumba na bango ezali ya kobatela etonga na bolingo, kasi te koyangela yango. (1 Petelo 5:2, 3) Bankulutu basengeli kosala makasi ete bálendisaka mpe básalisaka “etonga mobimba.”
Tókangama na lisangá
13. Ntango mosusu, nini ekoki komonana na lisangá, mpe mpo na nini?
13 Bankulutu mpe bandeko nyonso na lisangá bazali bato ya kozanga kokoka; yango wana, ntango mosusu mwa matata to mikakatano ebimaka, ndenge mpe ezalaki kosalema na siɛklɛ ya liboso ntango bantoma mosusu bazalaki naino na bomoi. (Bafilipi 4:2, 3) Nkulutu to ndeko moko akoki koloba likambo moko ya kozokisa, oyo ezangi boboto, to oyo ezali mpenza solo te. To mpe, tokoki kokanisa ete likambo moko oyo Biblia endimi te ezali kosalema na lisangá, bankulutu bayebi yango, kasi bazali kosala eloko te. Nzokande, ekoki kozala ete bankulutu basilaki kotalela yango to mpe bazali kotalela yango na ndenge oyo eyokani na Biblia mpe na kolanda makambo mosusu oyo biso toyebi te. Kasi, ata soki likambo ezali ndenge oyo tozali kokanisa, tóbosana likambo oyo te: Na boumeli ya mwa ntango, moto moko azalaki kosala lisumu moko monene na lisangá ya Kolinti, lisangá oyo Yehova azalaki komibanzabanza mpe mpo na yango. Na nsima, Yehova asalaki ete likambo ekatama na ndenge oyo ebongi mpenza. (1 Bakolinti 5:1, 5, 9-11) Tokoki komituna boye: ‘Soki nazalaki na Kolinti na ntango wana, nalingaki kosala nini liboso likambo yango ekatama?’
14, 15. Mpo na nini bato mosusu batikaki kolanda Yesu, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
14 Tótalela likambo mosusu oyo ekoki komonana na lisangá. Ekoki kozala na ndeko moko oyo azali kokanga te ntina ya liteya moko ya Biblia mpe azali kondima yango te. Mbala mosusu ndeko yango aluki bandimbola na Biblia mpe na mikanda oyo ebimisami na lisangá mpe atuni bandeko oyo bakɔmeli, ata mpe bankulutu. Kasi, azali kaka kokanga ntina ya liteya yango te mpe azali kondima yango te. Moto ya ndenge wana asengeli kosala nini? Likambo moko mpe ya ndenge wana esalemaki mbula moko liboso Yesu akufa. Alobaki na bato ete ye azali “limpa ya bomoi” mpe ete mpo moto azwa bomoi ya seko, asengeli ‘kolya mosuni ya Mwana ya moto mpe komɛla makila na ye.’ Maloba yango ebulunganisaki bayekoli na ye mosusu. Na esika báluka koyeba soki alingaki mpenza koloba nini to bázela bingɛngiseli mosusu na ntango oyo ebongi, bayekoli mingi “balingaki lisusu kotambola elongo na [Yesu] te.” (Yoane 6:35, 41-66) Soki tozalaki na ntango wana, tolingaki kosala nini?
15 Na ntango na biso, bandeko mosusu mpe batiki kosangana na lisangá, na makanisi ete bakosalela Nzambe na ndenge na bango moko. Bamosusu bakoki koloba ete bazokisamaki, bamosusu bamoni ete lisangá ezali kokanga miso na mabe, mpe bamosusu bazali kondima te liteya moko boye. Ekateli na bango ezali mpenza malamu? Ezali solo ete moklisto mokomoko asengeli kozala na boyokani makasi na Nzambe; kasi, tosengeli kobosana te ete Yehova azali kosalela lisangá moko na mokili mobimba, ndenge kaka asalaki na ntango ya bantoma. Lisusu, na siɛklɛ ya liboso, Yehova asalelaki masangá mpe apambolaki yango; atyaki bankulutu mpe basaleli na misala mpo na bolamu ya lisangá. Ezali mpe bongo lelo oyo.
16. Likambo nini moto oyo akómi na makanisi ya kokabwana na lisangá, asengeli kobosana te?
16 Soki moklisto moko azali kokanisa ete akoki kozala na boyokani malamu na Nzambe ata soki asanganaka na lisangá te, azali kopesa mokɔngɔ na ebongiseli oyo Nzambe ye moko asali, elingi koloba lisangá ya Nzambe na mokili mobimba mpe lisangá mokomoko ya basaleli ya Nzambe. Moto ya ndenge wana akoki kobanda kosambela na ndenge na ye to kosangana kaka na mwa bandeko oyo ye asepeli na bango, kasi akozwa litomba te na ebongiseli oyo Nzambe asali ya kotya bankulutu mpe basaleli na misala. Nzokande, ntango Paulo akomelaki lisangá ya Kolose mpe apesaki malako ete mokanda wana etángama na Laodikia, alobelaki likambo ya “kopikama mpe kotongama na kati ya [Klisto].” Ezali bato oyo bazalaki kosangana na lisangá, kasi te baoyo bamikabolaki na yango nde bakokaki kozwa litomba na ebongiseli yango.—Bakolose 2:6, 7; 4:16.
Likonzí mpe eloko oyo esimbi solo
17. Mokapo ya 1 Timote 3:15 emonisi nini na ntina na lisangá?
17 Na mokanda ya liboso oyo akomelaki Timote, ntoma Paulo alobelaki masɛngami oyo moklisto asengeli kokokisa mpo aponama lokola nkulutu to mosaleli na misala. Na nsima, Paulo alobelaki “lisangá ya Nzambe ya bomoi,” mpe abakisaki ete yango ezali “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo.” (1 Timote 3:15) Na siɛklɛ ya liboso, emonanaki polele ete lisangá mobimba ya baklisto bapakolami na elimo nde ezalaki likonzí yango. Ntembe ezali te ete lisangá ezalaki ebongiseli ya libosoliboso epai moklisto mokomoko asengelaki koyekola solo yango. Na kati ya lisangá nde akokaki koyoka solo ezali koteyama mpe kosimbama, mpe akokaki kolendisama.
18. Mpo na nini makita ya lisangá ezali na ntina mingi?
18 Ndenge moko mpe lelo oyo, lisangá ya boklisto na mokili mobimba ezali ndako ya Nzambe, “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo.” Koyangana na makita ya lisangá na biso pɔsɔ na pɔsɔ mpe kopesa biyano ezali lolenge moko malamu mingi ya kolendisama, kokembisa boyokani na biso na Nzambe, mpe komibongisa mpo na kosala mokano na ye. Ntango Paulo akomelaki lisangá ya Kolinti, apesaki toli mingi mpo na makambo oyo ezalaki kolobama na makita. Akomaki ete alingaki makambo oyo ezalaki kolobama na makita ezala polele mpe bayangani bákanga ntina na yango mpo ‘bálendisama.’ (1 Bakolinti 14:12, 17-19) Lelo oyo, biso mpe tokoki kolendisama soki tozali kondima ete masangá ezali ebongiseli ya Yehova Nzambe mpe ye moko azali kobatela yango.
19. Mpo na nini okanisaka ete osengeli kokangama na lisangá?
19 Soki tolingi mpenza ete kondima na biso elendisama, tosengeli kokangama na lisangá. Banda kalakala, lisangá ebatelaka baklisto na mateya ya lokuta, mpe Nzambe asalelaka yango mpo nsango malamu ya Bokonzi ya Masiya esakolama na mokili mobimba. Ntembe ezali te ete Nzambe asili kokokisa makambo mingi na nzela ya lisangá ya boklisto.—Baefese 3:9, 10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Albert Barnes, molimboli ya maloba ya Biblia, alobaki ete toli oyo Yesu apesaki ya “koloba na lisangá” ekoki kolimbola koyebisa “baoyo bazali na ndingisa ya kosambisa makambo ya ndenge wana—bamonisi ya lingomba. Na sinagoga mokomoko ya Bayuda ezalaki na bankulutu oyo bazalaki kosambisa makambo ya ndenge yango.”
Ozali koyeba lisusu?
• Nini ezali kondimisa biso ete Nzambe azali kosalela masangá awa na mabelé?
• Atako bankulutu bazali bato ya kozanga kokoka, basalaka nini mpo na lisangá?
• Ndenge nini lisangá na yo elendisaka yo?
[Elilingi na lokasa 26]
Bantoma mpe bankulutu ya Yelusaleme bazalaki lisangani ya mikóló-bakambi
[Elilingi na lokasa 28]
Bankulutu ná basaleli na misala bazwaka malako mpo na kokokisa mikumba na bango na lisangá