Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yoane
YOANE, “moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga,” azali moto ya nsuka oyo akomaki lisolo ya bomoi mpe mosala ya Klisto. (Yoa. 21:20) Evanzile ya Yoane, oyo ekomamaki na mobu soki 98 T.B., elobeli makambo mingi oyo ezali te na Baevanzile mosusu misato.
Ntoma Yoane akomaki Evanzile na ye na mokano moko ya sikisiki. Mpo na makambo oyo akomaki, alobi boye: “Makambo oyo ekomami mpo bino bóndima ete Yesu azali Klisto Mwana ya Nzambe, mpe ete, mpo bozali kondima, bózwa bomoi na nkombo na ye.” (Yoa. 20:31) Nsango oyo ezali na mokanda yango ezali na ntina mpenza mpo na biso.—Ebe. 4:12.
“TALÁ, MWANA-MPATE YA NZAMBE”
Ntango Yoane Mobatisi amonaki Yesu, alobaki boye: “Talá, Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili!” (Yoa. 1:29) Ntango Yesu azalaki kotambola na Samalia, na Galilai, na Yudea, mpe na mokili oyo ezali na ɛsti ya Yolodani mpo na kosakola nsango malamu, koteya, mpe kosala makamwisi, ‘bato mingi bayaki epai na ye mpe bandimelaki ye.’—Yoa. 10:41, 42.
Lisekwa ya Lazalo ezali moko na makamwisi minene oyo Yesu asalaki. Bato mingi bandimelaki Yesu ntango bamonaki moto oyo akufaki elekaki mikolo minei, azongi na bomoi. Nzokande, banganga-nzambe bakonzi ná Bafalisai bafandelaki Yesu likita mpo na koboma ye. Yango wana, Yesu alongwaki wana mpe akendaki na “mboka moko pene ya esobe, na engumba ebengami Efalaimi.”—Yoa. 11:53, 54.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:35, 40—Longola Andele, moyekoli mosusu oyo atɛlɛmaki elongo na Yoane Mobatisi ezalaki nani? Na Evanzile na ye mobimba, mokomi abengi Yoane Mobatisi ete “Yoane” mpe ye moko ayebisi nkombo na ye te. Na yango, moyekoli oyo nkombo na ye eyebani te ekoki kozala Yoane, ye oyo akomaki Evanzile yango.
2:20—Tempelo nini “etongamaki [na boumeli ya] mbula ntuku minei na motoba”? Bayuda bazalaki kolobela mosala oyo Elode, mokonzi ya Yudea, asalaki mpo na kotonga lisusu tempelo ya Zolobabele. Josèphe, moto moko ya mayele na masolo ya kala, alobi ete mosala yango ebandaki na mbula ya 18 ya boyangeli ya Elode, elingi koloba kati na mobu 18 mpe 17 L.T.B. Tempelo yango moko mpe bandako mosusu ya minene etongamaki na boumeli ya mbula 8. Kasi, misala mosusu na kati ya lopango ya tempelo ekobaki tii nsima ya Elekeli ya mobu 30 T.B., ntango Bayuda balobaki ete batongaki tempelo yango na boumeli ya mbula 46.
5:14—Soki moto abɛli ezali mpo asalaki lisumu? Mpenza te. Moto oyo Yesu abikisaki abɛlaki na boumeli ya mbula 38 mpo na kozanga kokoka oyo tozwá epai ya Adama ná Eva. (Yoa. 5:1-9) Yesu alingaki koloba ete lokola masumu ya moto yango elimbisamaki, asengelaki kolanda nzela ya lobiko mpe kosala lisusu masumu na nko te, soki te likambo mosusu ya mabe koleka maladi ekoyela ye. Moto yango akokaki kosala lisumu oyo ekoki kolimbisama te mpe na bongo, kokufa liwa oyo ezangi lisekwa.—Mat. 12:31, 32; Luka 12:10; Ebe. 10:26, 27.
5:24, 25—Banani ‘balongwe na liwa mpe bakómi na bomoi’? Yesu azalaki kolobela bato oyo bazalaki bakufi na elimo, kasi nsima ya koyoka maloba na ye, bandimelaki ye mpe batikaki kolanda nzela ya masumu. ‘Balongwe na liwa mpe bakómi na bomoi’ na boye ete bazali lisusu na etumbu ya liwa te, kasi bazwi elikya ya bomoi ya seko mpo na kondima na bango epai ya Nzambe.—1 Pet. 4:3-6.
5:26; 6:53—‘Bomoi na kati ya moto ye moko’ elimboli nini? Mpo na Yesu Klisto, yango elimboli ete Nzambe apesi ye makoki mibale: kosalisa bato bákóma na boyokani ya malamu na Yehova mpe nguya ya kozongisa bakufi na bomoi. Mpo na bayekoli ya Yesu, ‘kozala na bomoi kati na bango moko’ elimboli kokóma na bomoi ya seko. Baklisto bapakolami bakómaka na bomoi yango ntango basekwi mpo na kokende na likoló. Baklisto ya sembo oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé bakokóma na bomoi yango soki balongi komekama ya nsuka oyo ekosalema nsima ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto.—1 Kol. 15:52, 53; Emon. 20:5, 7-10.
6:64—Yesu ayebaki kobanda ntango aponaki Yuda Mokeliota ete akotɛka ye? Emonani ete ayebaki te. Kasi, na libaku moko na mobu 32 T.B., Yesu ayebisaki bantoma na ye ete: “Moko na bino azali mokoseli-bato-makambo.” Ekoki mpenza kozala ete kobanda na ntango wana nde Yesu amonaki “ebandeli” ya makanisi mabe epai ya Yuda Mokeliota.—Yoa. 6:66-71.
Mateya mpo na biso:
2:4. Na maloba yango, Yesu amonisaki Malia ete lokola azwaki batisimo mpe akómaki mopakolami ya Nzambe, asengelaki kozwa malako epai ya Tata na ye ya likoló. Atako Yesu azalaki na ebandeli ya mosala na ye, ayebaki malamu ngonga, to ntango, oyo asengelaki kokokisa mosala oyo Nzambe apesaki ye, ata mpe kokufa lokola mbeka. Moto moko te, ata moto ya libota na ye lokola Malia, akokaki kopekisa ye asala mokano ya Nzambe. Tosengeli kosalela Yehova Nzambe na ekateli ya ndenge wana.
3:1-9. Ndakisa ya Nikodeme, moyangeli moko ya Bayuda, epesi biso mateya mibale. Ya liboso, Nikodeme azalaki na komikitisa, bososoli, mpe ayebaki bamposa na ye ya elimo na ndenge andimaki mwana ya mosali-mabaya ete azali moteyi oyo Nzambe atindaki. Lelo oyo, baklisto ya solo basengeli kozala na komikitisa. Ya mibale, Nikodeme akakatanaki kokóma moyekoli ntango Yesu azalaki awa na mabelé. Mbala mosusu ezalaki mpo azalaki kobanga bato, alingaki te kotika esika ya lokumu oyo azalaki na yango na Sanedrina, to mpe alingaki mingi bozwi na ye. Yango ekoki kopesa biso liteya oyo: Tosengeli te kotika ete makambo ya ndenge wana epekisa biso ‘komema nzete na biso ya mpasi mpe kolanda Yesu ntango nyonso.’—Luka 9:23.
4:23, 24. Mpo Nzambe andima losambo na biso, esengeli koyokana na solo oyo ezali na Biblia mpe kotambwisama na elimo santu.
6:27. Kosala mpo na “bilei oyo eumelaka mpo na bomoi ya seko” elimboli kosala milende mpo na kokokisa bamposa na biso ya elimo. Soki tozali kosala yango, tokozala na esengo.—Mat. 5:3.
6:44. Yehova amibanzabanzaka mpo na mokomoko na biso. Abendi biso epai ya Mwana na ye na ndenge asali ete nsango malamu ekóma epai ya mokomoko na biso mpe na ndenge asalisaka biso tókanga ntina ya mateya ya Biblia mpe tósalela yango na lisalisi ya elimo santu na Ye.
11:33-36. Kolela mpo na komonisa mawa na biso ezali bolɛmbu te.
‘TÓKOBA KOLANDA YE’
Ntango Elekeli ya mobu 33 T.B. ekómaki pene, Yesu azongaki na Betania. Na mokolo ya 9 Nisana, akɔtaki na Yelusaleme, afandaki likoló ya mwana ya mpunda. Na mokolo ya 10 Nisana, Yesu akendaki lisusu na tempelo. Nsima ya kobondela ete nkombo ya Tata na ye ezwa nkembo, mongongo moko eutaki na likoló elobaki boye: “Napesi yango nkembo mpe nakopesa yango nkembo lisusu.”—Yoa. 12:28.
Ntango bazalaki kolya Elekeli, Yesu apesaki bayekoli na ye malako ya nsuka mpo etikalaki moke atika bango, mpe abondelaki mpo na bango. Bakangaki Yesu, basambisaki ye, babakaki ye na nzete, mpe na nsima asekwaki.
Biyano na mituna ya Biblia:
14:2—Ndenge nini Yesu alingaki ‘kobongisa esika’ na likoló mpo na bayekoli na ye ya sembo? Yesu asengelaki komonana liboso ya Nzambe mpe kolakisa Ye motuya ya makila na ye mpo na kokokisa kondimana ya sika. Asengelaki mpe kozwa bokonzi, mpe na nsima, lisekwa ya bayekoli na ye bapakolami na elimo, esengelaki kobanda.—1 Tes. 4:14-17; Ebe. 9:12, 24-28; 1 Pet. 1:19; Emon. 11:15.
14:16, 17; 16:7, 8, 13, 14—Ntango Yoane 14:16, 17 elobeli mosungi, to elimo ya solo, mpo na nini esaleli liloba “yango” nzokande Yoane 16:7, 8, 13, 14 esaleli liloba “ye”? Yango ezali kaka likambo ya gramɛrɛ. Na Grɛki, monɔkɔ oyo Yoane akomaki na yango Evanzile na ye, liloba oyo ebongolami na “mosungi” ezalaka na bobali (masculin), kasi liloba oyo ebongolami na “elimo” ezalaka na nyonso, ezala bobali, bomwasi to eloko (neutre). Na yango, ntango Yoane azongelaki maloba ya Yesu, asalelaki liloba “ye” mpo na kolobela makambo oyo mosungi asengelaki kosala. Kasi, asalelaki liloba “yango” mpo na kolobela makambo oyo elimo ya solo esengelaki kokokisa.
19:11—Yesu azalaki nde kolobela Yuda Mokeliota ntango alobaki na Pilato mpo na moto oyo akabaki Ye? Emonani ete Yesu alobelaki Yuda te to mpe moto mosusu, kasi alobelaki nde bato nyonso oyo bazalaki na ngambo na ndenge babomaki ye. Kati na bato yango tokoki kotánga Yuda, “banganga-nzambe bakonzi mpe Sanedrina mobimba,” ata mpe ‘bibele ya bato’ oyo basɛngaki ete bátika Balabasi.—Mat. 26:59-65; 27:1, 2, 20-22.
20:17—Mpo na nini Yesu alobaki na Malia Magadalena ete atika kokangama na ye? Emonani ete Malia akangamaki na Yesu mpo akanisaki ete Yesu alingi komata na likoló mpe ete alingaki komona ye lisusu te. Mpo na kondimisa ye ete ntango ya komata likoló ekómaki naino te, Yesu ayebisaki ye atika kokangama na ye kasi akende kopesa bayekoli nsango ya lisekwa na ye.
Mateya mpo na biso:
12:36. Mpo na kokóma “bana ya pole,” to bamemi ya pole, tosengeli kokóma na boyebi ya sikisiki ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Tosengeli mpe kosalela boyebi yango mpo na kolongola basusu na molili ya elimo mpe komema bango na pole ya Nzambe.
14:6. Tokoki kokóma na boyokani na Nzambe kaka na nzela ya Yesu Klisto. Tokoki kopusana penepene na Yehova kaka soki tozali komonisa kondima na kati ya Yesu mpe tozali kolanda ndakisa na ye.—1 Pet. 2:21.
14:15, 21, 23, 24; 15:10. Kotosa Nzambe ekosalisa biso tómibatela na kati ya bolingo na ye mpe ya Mwana na ye.—1 Yoa. 5:3.
14:26; 16:13. Elimo santu ya Yehova eteyaka biso mpe ezongisaka na makanisi na biso makambo oyo toyekolaki. Esalisaka biso mpe tóyeba mateya ya solo. Na yango, ekoki kosalisa biso tóbakisa boyebi, bwanya, bososoli, mpe makoki ya kokanisa. Yango wana, tosengeli kobondelaka na etingya, mingimingi mpo na kosɛnga elimo yango.—Luka 11:5-13.
21:15, 19. Yesu atunaki Petelo soki alingi ye koleka “baoyo,” elingi koloba mbisi oyo ezalaki liboso na bango. Na yango, Yesu amonisaki Petelo ete asengelaki kozwa ekateli ya kolanda ye ntango nyonso na esika ya komipesa na mosala ya koboma mbisi. Nsima ya kotalela masolo ya Baevanzile, tiká tókóma na ekateli makasi ya kolinga Yesu koleka biloko mosusu nyonso oyo ekoki kobenda likebi na biso. Tólanda ye na motema na biso mobimba.
[Elilingi na lokasa 31]
Ndakisa ya Nikodeme ekoki koteya biso nini?