Basalaki Mokano ya Yehova
Batosaki maloba ya nsuka ya Yesu
NA MPOKWA ya 14 Nisan 33 T.B., Yesu Klisto mpe bantoma na ye ya sembo 11 bafandaki na mesa kati na ndako moko ya likoló na Yelusaleme. Awa ayebaki malamu ete kufa na ye ebɛlɛmi, ayebisaki bango ete: “Nazali naino na bino mwa ntango moke.” (Yoane 13:33) Ya solo, Yuda Iskariote asilaki kobima mpo na koyokana na bato mabe oyo balingaki koboma Yesu.
Moto moko te kati na ndako wana ya likoló asosolaki koleka Yesu ete ntango etikalaki bobele moke. Ayebaki malamu ete etikalaki moke ete anyokwama. Yesu ayebaki mpe ete bantoma na ye bakotika ye bobele ye moko na butu wana. (Matai 26:31; Zekalia 13:7) Lokola ezalaki mpo na Yesu libaku ya nsuka ete asolola na bantoma na ye liboso ya kufa na ye, tokoki solo kondimisama ete maloba na ye ya nsuka matalelaki makambo maleki ntina.
“Bósalaka boye mpo na ekaniseli na ngai”
Elongo na bantoma na ye ya sembo, Yesu abandisaki elambo moko ya sika oyo elingaki kokitana Elekeli ya Bayuda. Ntoma Paulo abéngaki yango “elambo ya mpokwa ya Nkolo.” (1 Bakolinti 11:20, NW) Wana akamataki limpa moko ezangi mfulu, Yesu asalaki libondeli. Na nsima abukaki limpa yango mpe apesaki yango na bantoma na ye. Alobaki ete: “Bókamata, bólya; oyo [elimboli, NW] nzoto na ngai. Akamati mpe kɔ́pɔ mpe esili ye kotɔ́nda, apesi epai na bango, ye ete, Bómela na yango, bino nyonso. Mpo ete oyo [elimboli, NW] makila na ngai na kondimana na sika masopameli bato mingi mpo na kolimbisa masumu.”—Matai 26:26-28.
Ndimbola ya likambo wana ezali nini? Lokola Yesu amonisaki, limpa lizalaki elembo ya nzoto na ye ezangi lisumu. (Baebele 7:26; 1 Petelo 2:22, 24) Vinyo ezalaki elembo ya makila ya Yesu oyo esopanaki, oyo elingaki kofungola nzela ya kolimbisama ya masumu. Makila na ye oyo epesaki mbeka elingaki mpe kotya moboko ya kondimana ya sika kati na Yehova Nzambe mpe bato 144000, oyo na nsima balingaki koyangela elongo na Yesu na makoló. (Baebele 9:14; 12:22-24; Emoniseli 14:1) Na kobyangáká bantoma na ye ete básangana na elambo wana, Yesu amonisaki ete basengelaki kosangana na ye na Bokonzi ya likoló.
Na ntina na elambo yango ya ekaniseli, Yesu apesi etindá oyo: “Salá boye mpo na ekaniseli na ngai.” (Luka 22:19) Ee, Elambo ya mpokwa ya Nkolo esengelaki kosalema mbala moko mbula na mbula, lokola Elekeli ezalaki kosalema. Elekeli ezalaki kokundola kosikolama ya Bayisalaele na boombo ya Ezipito, kasi Elámbo ya mpokwa ya Nkolo esengelaki kobenda likebi likoló na kosikolama eleki monene—oyo ya bato nyonso oyo bakoki kosombama na boombo ya lisumu mpe ya kufa. (1 Bakolinti 5:7; Baefese 1:7) Epai mosusu, baoyo bazali kolya limpa mpe komela vinyo ya Ekaniseli basengelaki kokanisa na libaku ya kozala bakonzi mpe banganga kati na Bokonzi ya Nzambe na likoló.—Emoniseli 20:6.
Kufa ya Yesu Klisto ezalaki solo likambo lileki ntina kati na lisoló ya bato. Baoyo bakangi ntina na oyo Yesu asalaki batosaka etindá ya Yesu na ntina na Elambo ya mpokwa ya Nkolo, ete: “Bósalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.” Batatoli ya Yehova bakanisaka kufa ya Yesu mbula na mbula na mokolo oyo ekokani na 14 Nisan. Na 1996 mokolo yango mokozala na 2 Apríli, nsima ya kolala na moi. Tozali na esengo ya kobyanga yo na Ndako ya Bokonzi oyo ezali na kartyé na bino.
‘Nazali kopesa bino lilako na sika’
Longolá kobandisama ya ebongiseli ya Elambo ya mpokwa ya Nkolo, Yesu apesaki mpe batoli ya nsuka na bantoma na ye. Atako babongisamaki malamu, mibali yango basengelaki naino koyekola makambo mingi. Basosolaki naino malamumalamu te mokano ya Nzambe mpo na Yesu, mpo na bango, to mpo na mikolo mizalaki koya. Kasi Yesu alukaki te kolimbola makambo yango nyonso na ntango wana. (Yoane 14:26; 16:12, 13) Nzokande, asololaki na bango na ntina na likambo moko lileki ntina. Alobaki ete: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete, Bólinganaka; bólinganaka lokola ngai nalingi bino.” Na nsima Yesu abakisaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”—Yoane 13:34, 35.
Na lolenge nini yango ezalaki “lilako na sika”? Ya solo, Mibeko ya Mose epesaki etindá ete: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.” (Levitike 19:18) Nzokande, Yesu asɛngaki na bayekoli na ye ete bámonisa bolingo ya komipimela—oyo ekoki kopusa moto kino na kopesa bomoi na ye mpo na baninga na ye baklisto. Ya solo, ‘lilako na bolingo’ esengelaki mpe kosalelama na makambo ya mike. Kati na makambo nyonso moyekoli ya Yesu Klisto asengelaki kozwa likanisi ya komonisa bolingo na kosalisáká basusu na elimo mpe na mitindo mikeseni.—Bagalatia 6:10.
Na butu wana ya nsuka ya bomoi ya Yesu na mabelé, bolingo etindaki Yesu ete abondela Yehova Nzambe mpo na bayekoli na ye. Na eteni mosusu, asɛngaki na libondeli na ye ete: “Bazali kati na mokili, kasi ngai nazali koya epai na yo. Tata na bulɛɛ, batelá bango kati na nkombo na yo, baoyo esili yo kopesa ngai ete bázala moko pelamoko ezali biso.” (Yoane 17:11) Ezali ntina tósimba likambo oyo ete kati na lilɔmbɔ wana epai na Tata na ye, Yesu abondelaki mpo na bomoko mpe bolingo kati na bayekoli na ye. (Yoane 17:20-23) Basengelaki ‘kolingana lokola Yesu alingaki bango.’—Yoane 15:12.
Bantoma ya sembo ya Yesu batosaki maloba wana ya nsuka ya Yesu. Biso mpe tosengeli kotosa malako na ye. Na “mikolo ya nsuka” oyo ya mpasi, bolingo mpe bomoko kati na basambeli ya solo ezali mpenza na ntina monene koleka liboso. (2 Timoté 3:1) Ya solo, baklisto ya solo batosaka malako ya Yesu mpe bamonisaka bolingo epai na bandeko. Yango esangisi lilako oyo litali kokumisa Elambo ya mpokwa ya Nkolo.