Mokanda ya Biblia nimero 43—Yoane
Mokomi: Ntoma Yoane
Esika ya bokomi: Efese to pene na yango
Nsuka ya bokomi: soko 98 T.B.
Boumeli ya lisoló: Nsima na maloba ya ebandeli, 29 kino 33 T.B.
1. Makomami mamonisi nini na ntina na boyokani ya penepene kati na Yoane mpe Yesu?
LISOLÓ ya Evanzile ya Matai, ya Malako mpe ya Luka esilaki kopalangana na boumeli ya bambula koleka 30 mpe ezalaki kotalelama na motuya mingi epai na baklisto ya ekeke ya liboso lokola mikanda ya bato oyo bapemamaki na elimo santu. Sikawa, lokola nsuka ya ekeke wana ezalaki kobɛlɛma mpe lokola motuya ya baoyo bazalaki elongo na Yesu ezalaki kokita, motuna mokokaki kotunama: Ezalaki nde na eloko oyo etikalaki naino mpo na koyebisama? Ezalaki nde naino na moto oyo akokaki, na bokundoli makambo oyo ye ayebaki, koyebisa likambo moko na moko ya motuya litalaki mosala ya Yesu? Ɛɛ, moto ya lolenge wana azalaki. Mobangé Yoane nde moto apambwamaki mingi kati na boyokani na ye elongo na Yesu. Emonani ete azalaki kati na bayekoli ya liboso ya Yoane Mobatisi oyo bamonisamaki epai na Mwana na Mpate ya Nzambe mpe moko kati na bato minei ya liboso oyo Nkolo abyangaki mpo na kosangana na ye kati na mosala ya ntango nyonso. (Yoa. 1:35-39; Mko. 1:16-20) Akóbaki kozala na boyokani ya penepene elongo na Yesu kati na mosala na ye mpe azalaki moyekoli oyo ‘Yesu alingaki mingi,’ oyo alalisaki motó liboso na ntólo ya Yesu na Elekeli ya nsuka. (Yoa. 13:23; Mat. 17:1; Mko. 5:37; 14:33) Azalaki wana na ntango ya kobomama ya nsɔ́mɔ, epai Yesu apesaki ye ndingisa ya kobatela mama na ye ya mosuni, mpe ezalaki ye nde alekaki Petelo na mbangu wana bazalaki kopota mpo na kokende na nkunda mpo na kondimisama na likambo litalaki lisekwa ya Yesu.—Yoa. 19:26, 27; 20:2-4.
2. Lolenge nini Yoane abongisamaki mpe azwaki nguya mpo na kokoma Evanzile na ye, mpe mpo na mokano nini?
2 Lokola akɔmɛlaki na boumeli ya mbula soko 70 kati na mosala ya ntango nyonso mpe lokola azwaki bimonaneli mingi mpe makambo mingi ya komanyola wana autaki kokangama na esanga Patamo, Yoane abongisamaki malamu mpo na kokoma makambo ya motuya oyo azalaki kobomba uta kala kati na motema na ye. Sikawa elimo santu epesaki ye nguya kati na makanisi na ye mpo na komikundola mpe mpo na kokoma makambo mingi wana ya motuya, maloba oyo mazali kopesa bomoi mpo ete moto nyonso oyo akotánga yango ‘akoka kondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe, mpe ete, na ntina na kondima, akoka kozala na bomoi na nzela na nkombo ya Yesu.’—20:31.
3, 4. Wapi bilembeteli ya libándá mpe ya kati mpo na (a) bosolo ya Evanzile oyo, mpe (b) kondima ete Yoane nde akomaki yango?
3 Baklisto ya ebandeli ya ekeke ya mibale bandimaki Yoane lokola mokomi ya lisoló oyo mpe lisusu batalelaki lisoló oyo lokola eteni ya Makomami mapemami oyo ekoki kotyelama ntembe te. Clément moto na Alesandalia, Irénée, Tertullien mpe Origène, baoyo nyonso bazalaki na nsuka ya ekeke ya mibale mpe na ebandeli ya ekeke ya misato, bandimi ete Yoane nde akomaki yango. Lisusu, bilembeteli mingi ya kati, oyo bimonisi ete Yoane nde azalaki mokomi ya makambo oyo, bizali komonana kati na búku yango moko. Ya solo, mokomi azalaki Moyuda mpe ayebaki malamu mimeseno ya Bayuda mpe mokili na bango. (2:6; 4:5; 5:2; 10:22, 23) Lolenge oyo ya kolobela lisoló na bosikisiki mpe na bozindo emonisi ete azalaki bobele ntoma te, kasi moto oyo azalaki kati na bango misato—Petelo, Yakobo, mpe Yoane—baoyo bazalaki elongo na Yesu na mabaku moko ya sikisiki. (Mat. 17:1; Mko. 5:37; 14:33) Kati na bango, Yakobo (mwana na Zebedai) alongolami mpamba te abomamaki na Elode Akalipa I pene na mobu 44 T.B., liboso ete mokanda oyo ekomama. (Mis. 12:2) Petelo alongolami mpamba te alobelami elongo na mokomi na Yoane 21:20-24.
4 Kati na bavɛrsɛ́ na yango ya nsuka, mokomi alobelami lokola moyekoli oyo ‘Yesu alingaki mingi,’ maloba oyo mpe maloba mosusu makokani na yango masalelami mbala mingi kati na lisoló, atako nkombo ya ntoma Yoane etángami ata moke te. Yesu alobi awa na ntina na ye ete: “Soko nalingi ete aumela kino ekoya ngai, ezali likambo na yo?” (Yoa. 21:20, 22) Yango emonisi ete moyekoli yango asengelaki koumela ntango molai koleka Petelo mpe bantoma mosusu. Nyonso oyo emonisi ete ezali ntoma Yoane. Ezali likambo ya kobenda likebi ete Yoane, nsima na kozwa emonaneli ya koya ya Yesu, asukisi esakweli wana monene na maloba oyo: “Amen! Yaká, Nkolo Yesu.”—Emon. 22:20, NW.
5. Ntango nini Yoane akokaki kokoma Evanzile na ye?
5 Atako makomi ya Yoane yango moko epesi te bandimbola ya sikisiki na likambo yango, endimami ete Yoane akomaki Evanzile na ye nsima na kolongwa na ye na boombo na esanga Patamo. (Emon. 1:9) Moyangeli moloma Nerva, na mobu 96-98 T.B., ayebaki mingi baoyo balongolamaki na mboka na bango na nsuka ya boyangeli ya Domitien, oyo azalaki liboso na ye. Nsima ya kokoma Evanzile na ye, pene na mobu 98 T.B., endimami ete Yoane akufaki na kimya nyonso na Efese na mobu ya misato ya Moyangeli Trajan, na mobu 100 T.B.
6. Elembeteli nini emonisi ete Evanzile ya Yoane ekomamaki na Palestine te nde na Efese to zingazinga na yango?
6 Ezala na Efese to na zingazinga na yango, lokola esika oyo yango ekomamaki, mokomi na makambo ya kala Eusèbe (soko 260-342 T.B.) atángi maloba ya Irénée: “Yoane, moyekoli ya Nkolo, oyo kútu apemaki na ntólo na ye, ye moko mpe abimisaki evanzile, na ntango oyo azalaki na Efese kati na Azia.”a Likambo oyo ete mokanda oyo ekomamaki na Palestine te endimami na kolobeláká mbala mingi maloba na Yesu epai na banguna na ye, na ndakisa, “Bayuda,” na esika ya maloba ya sikisiki “Bafalisai,” to “banganga-kapita,” mpe bongo na bongo. (Yoa. 1:19; 12:9) Lisusu, Libeke na Galilai elimbolami na nkombo na yango ya Loma, Libeke na Tibelia. (6:1; 21:1) Mpo na bato oyo bazalaki Bayuda te, Yoane apesi bandimbola kitoko na ntina na bilambo ya Bayuda. (6:4; 7:2; 11:55) Patamo, esika oyo atyamaki, ezalaki penepene na Efese, mpe boyebi na ye malamu ya Efese, mpe masangá mosusu ya Asie Mineure, emonisami na Emoniseli mikapo 2 mpe 3.
7. Papirise ya Rylands 457 ezali na ntina nini?
7 Bokundoli ya maniskri ya ntina na ekeke ya 20 endimisi bosolo ya Evanzile ya Yoane. Moko kati na yango ezali eteni ya Evanzile ya Yoane oyo bakutaki na Ezipito, sikawa eyebani na nkombo ya Papyrus Rylands 457 (P52), oyo ezali na Yoane 18:31-33, 37, 38, mpe ebatelami na Bibliotɛkɛ ya John Rylands na Manchester, na mboka Angleterre.b Mpo na kondimisa likambo liyebani oyo ete Yoane nde akomaki yango na nsuka ya ekeke ya liboso, Sir Frederic Kenyon, oyo asilá kokufa, alobaki kati na búku na ye The Bible and Modern Scholarship, 1949, lokasa 21 ete: “Na yango atako ezali moke, yango ekoki mpo na kondimisa ete maniskri moko ya Evanzile wana ezalaki kotambola, mbala mosusu kati na etúká ya Ezipito epai yango ezwamaki, na eleko ya mobu soko 130-150 na Mbula ya Nkolo na biso. Na kotalela ntango oyo esengelaki mpo na kopalangana na yango kobanda esika oyo yango eutaki, dati ya kokomama na yango ezongisami pene na dati oyo eyebani uta kala, na mbula zomi ya nsuka ya ekeke ya liboso, na boye ete ntina ezali te ya kobɛta ntembe mpo na oyo etali bosolo ya dati yango.”
8. (a) Likambo nini lizali kobenda likebi na maloba ya ebandeli ya Evanzile ya Yoane? (b) Elembeteli nini emonisi ete mosala ya Yesu eumelaki mbula misato na ndambo?
8 Evanzile ya Yoane ezali mpenza kobenda likebi mpo na maloba na yango ya ebandeli, oyo mazali komonisa Liloba, oyo azalaki “na ebandeli elongo na Nzambe,” lokola Ye oyo na nzela na ye biloko nyonso bizalisamaki. (1:2, NW) Nsima na kolobela boyokani malamu oyo ezali kati na Tata mpe Mwana, Yoane alobeli na lolenge ya kokamwa misala mpe masukúlu ya Yesu, mingimingi na kotalela boyokani ya bolingo oyo ekangisi biloko nyonso kati na ebongiseli monene ya Nzambe. Lisoló oyo ya bomoi ya Yesu awa na mabelé esangisi makambo masalemaki na boumeli ya mobu 29 kino 33 T.B., mpe elobeli Bilekeli minei oyo Yesu asanganaki na yango na boumeli ya mosala na ye, yango epesi moko na bilembeteli oyo bimonisi ete mosala na ye eumelaki mibu misato na ndambo. Misato kati na Bilekeli yango elobelami mpenza bongo. (2:13; 6:4; 12:1; 13:1) Moko kati na yango elobelami lokola “elambo ya Bayuda,” kasi maloba ya zingazinga matye yango mwa moke nsima wana Yesu alobaki ete etikalaki “naino sanza minei mpe elaka na kobuka mbuma ekokoka,” yango emonisi ete elambo yango ezalaki Elekeli, oyo esalemaki pene na ebandeli ya eleko ya kobuka mbuma.—4:35; 5:1.c
9. Nini emonisi ete Evanzile ya Yoane ebakisi makambo mosusu, mpe yango elobeli nde makambo nyonso matali mosala ya Yesu?
9 Nsango malamu “engebene Yoane” ebakisi makambo mosusu mingi; makambo 92 % ezali kati na Baevanzile misato mosusu te. Atako bongo, Yoane asukisi na maloba oyo: “Makambo mosusu mingi masalaki Yesu mazali; soko makokomama mokomoko, nabanzi ete mokili mobimba ekokoka te mpo na mikanda mikokomama.”—21:25.
MAKAMBO MAZALI KATI NA YOANE
10. Yoane alobi nini na ntina na “Liloba”?
10 Ebandeli: Komonisa “Liloba” (1:1-18). Na elobeli mpenza ya pɛtɛɛ, Yoane ayebisi ete na ebandeli “Liloba azalaki elongo na Nzambe,” ete bomoi yango moko epesamaki na nzela na ye, ete akómaki “pole na bato,” mpe ete Yoane (Mobatisi) apesaki litatoli na ntina na ye. (1:1, 4, NW) Pole ezalaki kati na mokili, kasi mokili eyebaki ye te. Baoyo bayambaki ye bakómaki bana ya Nzambe, babotamaki na Nzambe. Motindo moko Mibeko mipesamaki na nzela ya Mose, bobele bongo “ngɔlu mpe solo iyei mpo na Yesu Klisto.”—1:17.
11. Yoane Mobatisi amonisi Yesu ete azali nani, mpe bayekoli ya Yoane bandimi ye lokola nani?
11 Komonisa “Mwana na Mpate ya Nzambe” epai na bato (1:19-51). Yoane Mobatisi ayamboli ete ye azali Klisto te kasi ezali na oyo akoya nsima na ye, mpe abongi te mpo na kokangola nsinga ya sapato ya moto yango. Na mokolo molandi, wana Yesu ayei epai na ye, Yoane amonisi ye lokola “Mwana-na-Mpate na Nzambe, molongoli na masumu na mokili.” (1:27, 29) Na nsima, alakisi mibale na bayekoli na ye epai na Yesu, mpe moko kati na bango, Andalea, amemi ndeko na ye Petelo epai na Yesu. Filipo na Natanaele bandimi mpe Yesu lokola ‘Mwana na Nzambe, Mokonzi na Yisalaele.’—1:49.
12. (a) Likamwisi ya liboso ya Yesu ezali nini? (b) Likambo nini asali wana amati na Yelusaleme mpo na Elekeli ya liboso na boumeli ya mosala na ye?
12 Makamwisi ya Yesu mamonisi ete azali “Mobulami ya Nzambe” (2:1–6:71). Yesu asali likamwisi na ye ya liboso na Kana ya Galilai, abongoli mai ete mákóma vinyo ya kitoko koleka na elambo ya libala. Yango ezali “ebandeli ya bilembo na ye, . . . mpe bayekoli na ye bátye kondima na bango epai na ye.” (2:11, NW) Yesu amati na Yelusaleme mpo na Elekeli. Akuti batɛkisi mpe basenzi na misolo kati na tempelo, akamati fimbo mpe abengani bango na nguya nyonso na boye ete bayekoli na ye bandimi kokokisama ya esakweli oyo: “Molende mpo na ndako na yo ekolya ngai.” (Yoa. 2:17, NW; Nz. 69:9) Asakoli ete tempelo ya nzoto na ye moko ekobukana mpe ekotɛlɛmisama lisusu nsima na mikolo misato.
13. (a) Nini Yesu amonisi ete esengeli mpo na kozwa bomoi? (b) Lolenge nini Yoane Mobatisi alobi na ntina na ye moko mpo na oyo etali boyokani na ye elongo na Yesu?
13 Na bobangi nyonso, Nikodeme ayei epai na Yesu na butu. Ayamboli ete Yesu atindamaki na Nzambe, mpe Yesu ayebisi ye ete moto asengeli kobotama na mai mpe na elimo mpo na kokɔta na Bokonzi ya Nzambe. Kondimela Mwana na moto oyo autaki na likoló ezali na ntina mpo na kozwa bomoi. “Mpamba te Nzambe alingaki mokili mingi ete apesi Mwana-mobotami bobele moko na ye, mpo ete moto na moto oyo akozala na kondima epai na ye akoka kobebisama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoa. 3:16, NW) Pole oyo esili koya kati na mokili ezali na boyokani te na molili, “kasi ye oyo azali kosala oyo ezali solo ayaka epai na pole,” Yesu asukisi bongo. Na nsima, Yoane Mobatisi ayoki makambo matali mosala ya Yesu na Yudea mpe alobi ete atako ye moko azali Klisto te, nzokande “moninga ya mobali na libala . . . azali na esengo monene na ntina na mongongo ya mobali na libala.” (3:21, 29, NW) Yesu asengeli sikawa komata, mpe Yoane asengeli kokita.
14. Yesu alimboli nini epai na mwasi Mosamalia na Sukala, mpe litomba nini lizwami na kosakola na ye kuna?
14 Yesu akei lisusu na Galilai. Na nzela, lokola azwaki mputulu mingi mpe “alɛmbaki na ntina na mobembo,” afandi mpo na kopema na liziba ya Yakobo na Sukala, wana bayekoli na ye bakei kosomba bilei kati na engumba. (4:6) Ezali midi, ngonga ya motoba. Mwasi moko Mosamalia abɛlɛmi mpo na kotoka mai, mpe Yesu asɛngi ye mai ya komela. Na nsima, atako alɛmbi mingi, abandi kolobela ye na ntina na “mai” ya solosolo oyo ezali kokitisa motema, oyo ezali kopesa bomoi ya seko epai na baoyo bazali kosambela Nzambe na “elimo mpe na solo.” Bayekoli bazongi mpe basɛngi ye ete alya, kasi alobi ete: “Bilei na ngai ezali kosala mokano ya ye oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” Alekisi mikolo mosusu mibale na etúká wana, kino Basamalia mingi bakómi kondima ete “moto oyo azali solo mobikisi na mokili.” (4:24, 34, 42, NW) Wana ekómi ye na Kana ya Galilai, Yesu abikisi mwana ya moto monene moko kozanga ete akóma epai moto na maladi alalaki.
15. Bifundeli nini bityami likoló na Yesu kati na Yelusaleme, kasi lolenge nini ayanoli batɔ́ngi na ye?
15 Yesu amati lisusu na Yelusaleme mpo na elambo ya Bayuda. Abikisi mobali moko oyo azalaki na mpasi na mokolo ya Sabata, mpe yango ebimisi matɔ́ngi makasi na ntina na ye. Yesu azongisi ete: “Tata na ngai azali naino kosala mosala, ngai mpe nazali kosala.” (5:17) Sikawa batambwisi ya Bayuda balobi ete Yesu asili kotuka, bobele te mpo ete abuki Sabata, kasi mpo ete amikokanisi na Nzambe. Yesu ayanoli ete Mwana akoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ye moko, kasi na makambo nyonso azali kotalela Tata. Abimisi maloba oyo ya kokamwisa ete “baoyo nyonso bazali kati na nkunda [ya kokanisama] bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima” na lisekwa. Kasi epai na bayoki na ye oyo bazangi kondima, Yesu alobi ete: “Bokoki kondima na nzela nini, awa ezali bino koyambana lokumu na kati na bino mpenza nde bozali koluka lokumu louti na Nzambe moko te?”—5:28, 29, 44.
16. (a) Nini Yesu ateyi na ntina na bilei mpe bomoi? (b) Lolenge nini Petelo amonisi endimiseli ya bantoma?
16 Wana Yesu aleisi bato 5 000 na lolenge ya likamwisi na mampa mitano mpe na mbisi mike mibale, bibele bakani kokamata ye mpe kotya ye mokonzi, kasi akimi likoló na ngomba. Na nsima apameli bango mpo bazali kolanda “bilei oyo bibebaka.” Nzokande, basengeli kosala makasi “mpo na bilei bizali koumela mpo na bomoi ya seko.” Amonisi ete kondima ye lokola Mwana ezali kolya limpa na bomoi, mpe abakisi ete: “Soki bolei mosuni na Mwana na moto te mpe bomeli makila na ye te, bozali na bomoi kati na bino te.” Mingi kati na bayekoli na ye batungisami na likambo yango mpe basundoli ye. Yesu atuni na ba 12 ete: “Bino mpe bolingi kokende?” nde Petelo ayanoli ete: “Nkolo, tókenda epai na nani? Yo ozali na maloba na bomoi na seko. Biso mpe tondimi mpe toyebi ete, yo ozali Mobulami na Nzambe.” (6:27, 53, 67-69) Atako bongo, koyebáká ete Yuda akotɛka ye, Yesu alobi ete moko kati na bango azali mosuli.
17. Mateya ya Yesu kati na tempelo na Elambo ya Mingombo ezali na bopusi nini?
17 “Pole” etɛmɛli molili (7:1–12:50). Na nkuku nyonso, Yesu amati na Yelusaleme mpe amimonisi na ntango Elambo ya Mingombo ekómi na katikati na yango, ateyi na polele nyonso kati na tempelo. Bato batyani ntembe mpo na koyeba soki azali solo Klisto. Yesu ayebisi bango ete: “Nayei na likanisi na ngai moko te, kasi ye oyo atindaki ngai azali solo, . . . mpe Ye wana nde atindaki ngai.” Na libaku mosusu ayebisi na bibele ete: “Soki nani azali na mposa, tiká ete ye aya epai na ngai mpe amela.” Basodá oyo batindamaki mpo na kokanga Yesu bazongi mabɔkɔ mpamba mpe bayebisi banganga ete: “Kino ntango oyo moto alobi lokola moto oyo te.” Na nkanda nyonso, Bafalisai bayanoli ete moko te kati na bakonzi asili kondima, mosakoli moko mpe te akobima na Galilai.—7:28, 29, 37, 46, NW.
18. Botɛmɛli nini Bayuda bayeisi epai na Yesu, mpe lolenge nini ayanoli?
18 Kati na lisukúlu mosusu, Yesu alobi ete: “Nazali pole na mokili.” Na bifundeli ya lokuta oyo ete azali motatoli ya lokuta, ete abotamaki kati na libala te, mpe ete azali Mosamalia mpe azali na demó, na nguya nyonso Yesu ayanoli ete: “Soki nazali komikumisa ngai moko, komikumisa na ngai ezali mpamba. Ezali Tata na ngai nde azali kokumisa ngai.” Wana alobi ete, “Liboso ete Abalayama azala, ngai nasilaki kozala,” Bayuda baluki lisusu kotya nsuka na bomoi na ye, kasi balóngi te. (8:12, 54, 58, NW) Lokola balóngi te, na nsima batuni mobali moko oyo Yesu afungolaki miso na lolenge ya likamwisi mpe babéngani ye.
19. (a) Lolenge nini Yesu alobeli boyokani na ye elongo na Tata na ye mpe lobanzo na ye mpo na bampate na ye? (b) Lolenge nini ayanoli Bayuda na ntango bakómi kokanela ye?
19 Lisusu Yesu alobi epai na Bayuda, mbala oyo na ntina na mobateli malamu ya bampate, oyo azali kobénga bampate na ye na nkombo mpe oyo azali komipesa mobimba mpo na bampate ‘ete bákoka kozala na bomoi mingi.’ Alobi ete: “Nazali mpe na bampate mosusu baoyo bazali na lopango oyo te, ekoki na ngai kokamba mpe bango mpe bakoyoka mongongo na ngai mpe bakozala etongá moko mpe mobateli moko.” (10:10, 16) Ayebisi Bayuda ete moto moko te akoki kobɔtɔla bampate longwa na lobɔkɔ ya Tata na ye, mpe alobi ete ye mpe Tata na ye bazali moko. Lisusu baluki kobamba ye mabanga mpo na koboma ye. Mpo na koyanola na efundeli oyo ete azali kotuka, akundweli bango ete kati na mokanda ya Nzembo, bato mosusu ya nguya na mabelé balobelami lokola “banzambe,” nzokande ye amilobeli lokola Mwana ya Nzambe. (Nz. 82:6) Alendisi bango ete bándima ata misala na ye.—Yoa. 10:34.
20. (a) Likamwisi nini monene Yesu asali na nsima? (b) Yango ememi na nini?
20 Uta na Betania, pene na Yelusaleme nsango eyei ete Lasalo, ndeko ya Malia mpe Malata, azali na maladi. Na ntango Yesu akómi kuna, Lasalo asili kokufa mpe mikolo minei esili koleka uta atyamaki na nkunda. Yesu asali likamwisi monene na kozongisáká Lasalo na bomoi, yango esali ete mingi bandimela Yesu. Yango epesi nzela ete Sanedrina esala nokinoki likita moko ya sikisiki, epai nganga-monene Kayafa, apusami na kosakola ete Yesu asengeli kokufa mpo na ekólo. Wana banganga-kapita mpe Bafalisai bazali kokamata myango mpo na koboma ye, Yesu amitangoli mwa moke liboso na bituluku na bato.
21. (a) Bato mpe Bafalisai basali nini na bokɔti ya Yesu na Yelusaleme? (b) Lisese nini Yesu apesi na ntina na kufa na ye mpe mokano na yango, mpe na likambo nini alendisi bayoki na ye?
21 Mikolo motoba liboso ya Elekeli, Yesu ayei lisusu na Betania mpo na kokende na Yelusaleme, mpe ayambami na basangani ya libota ya Lasalo. Na nsima, mokolo oyo molandaki Sabata, na mokolo mwa 9 ya sanza ya Nisana, wana efandi ye likoló na mwana na mpunda, akɔti na Yelusaleme wana bibele bazali kokumisa ye; mpe Bafalisai balobani moko na mosusu: “Bozali kolónga mpenza esika moko te. Talá! Mokili esili kokende nsima na ye.” Na nzela ya lisese ya mbuma na nganu, Yesu amonisi ete asengeli kolónama kati na kufa mpo na kobota mbuma mpo na bomoi ya seko. Abeleli Tata na ye ete akumisa nkombo na Ye, mpe mongongo moyokani longwa na likoló ete: “Nasili kokumisa yango mpe nakokumisa yango lisusu.” Yesu alendisi bayoki na ye ete báboya molili mpe bátambola kati na pole, ɛɛ, bákóma “bana na pole.” Lokola banguya ya molili ezingeli ye, apesi libyangi oyo ya nguya epai na bato ete bándima ye ‘lokola pole oyo esili koya kati na mokili.’—12:19, 28, 36, 46.
22. Ndakisa nini Yesu apesi na elambo ya Elekeli, mpe lilako nini ya sika apesi?
22 Yesu apesi batoli epai na bantoma ya sembo (13:1–16:33). Wana elambo ya mpokwa ya Elekeli elongo na ba 12 ezali kosalema, Yesu atɛlɛmi mpe, alongoli elamba na ye ya likoló, akamati esumɛ́ mpe atye mai na saani mpe abandi kosukola makolo ya bayekoli na ye. Petelo aboyi, kasi Yesu ayebisi ye ete ye mpe asengeli kosukwama makolo. Yesu alendisi bayekoli ete bálanda ndakisa na ye ya komikitisa, mpamba te “moombo azali monene koleka nkolo na ye te.” Alobeli mokabi mpe na nsima abimisi Yuda. Nsima wana Yuda abimi, Yesu abandi koloba maloba ya motema mpenza epai na basusu. “Nazali kopesa bino lilako na sika ete, Bólinganaka; bólinganaka lokola nalingi bino. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”—13:16, 34, 35.
23. Lokola libɔndisi, elikya nini mpe mosungi nini Yesu alobeli?
23 Yesu alobi maloba kitoko ya kobɔndisa mpo na bayekoli na ye na ntango oyo ya mpasi. Basengeli kozala na kondima epai na Nzambe mpe lisusu epai na ye. Kati na ndako ya Tata na ye, bisika ya kofanda bizali mingi, mpe akoya lisusu mpo na kokamata bango ete bázala epai ye azali. Yesu alobi ete: “Nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko akoya epai na Tata te soko na nzela na ngai te.” Na kobɔndisa nyonso, ayebisi bayekoli na ye ete na kozaláká na kondima, bakosala misala minene koleka ye mpe ete akopesa nyonso oyo bakosɛnga na nkombo na ye, mpo ete Tata na ye akumisama. Alaki bango mosungi mosusu, “elimo na solo,” oyo ekoteya bango makambo nyonso mpe ekokundwela bango nyonso ayebisaki bango. Yesu ayebisi ete basengeli kosepela ete azali kokende epai na Tata, mpamba te ‘Tata aleki ye.’—14:6, 17, 28.
24. Lolenge nini Yesu alobeli boyokani ya bantoma elongo na ye moko mpe elongo na Tata, mpe matomba nini bakozwa?
24 Yesu amilobeli ye moko lokola vinyo ya solo mpe Tata na ye lokola molóni. Alendisi bango ete bázala na bomoko elongo na ye, kolobáká ete: “Tata na ngai akumisami na likambo oyo, ete bókóba kobota mbuma mingi mpe bómimonisa bayekoli na ngai.” (15:8, NW) Mpe lolenge nini esengo na bango ekokóma mingi? Na kolinganáká moko na mosusu motindo moko ye asili kolinga bango. Abyangi bango baninga. Oyo nde boyokani kitoko! Mokili ekoyina bango lokola yango esili koyina ye, mpe ekonyokola bango, kasi Yesu akotinda mosungi mpo na kopesa litatoli na ntina na ye mpe mpo na kokamba bayekoli na ye kati na solo nyonso. Bampasi na bango ya sikawa ekotika esika na bosepeli ntango akomona bango lisusu, mpe moto moko te akobɔtɔla bango esengo na bango. Maloba na ye oyo mazali ya kobɔndisa: “Tata ye moko azali na bolingo ya motema mpo na bino, mpamba te bosili kolakisa bolingo ya motema mpo na ngai mpe bosili kondima ete nayaki lokola momonisi na Tata.” Ɛɛ, bakopalangana, kasi, Yesu alobi ete, “Nasili koloba makambo oyo epai na bino ete na nzela na ngai bókoka kozala na kimya. Kati na mokili bokozala na bolɔ́zi, kasi bóyika mpiko! Nasili kolónga mokili.”—16:27, 33, NW.
25. (a) Likambo nini Yesu andimi wana azali kobondela Tata na ye? (b) Eloko nini asɛngi mpo na ye moko, mpo na bayekoli na ye, mpe mpo na baoyo bakomonisa kondima na nzela na liloba na bango?
25 Yesu azali kobondela mpo na bayekoli na ye (17:1-26). Kati na libondeli Yesu andimi epai na Tata na ye ete: “Oyo elimboli bomoi na seko, ete báyekola koyeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” Lokola asilisi mosala mopesamelaki ye awa na mabelé, Yesu asɛngi sikawa ete akumisama epai na Tata na ye na lokumu oyo azalaki na yango liboso ete mokili ezala. Asili koyebisa nkombo ya Tata epai na bayekoli na ye mpe asɛngi Tata ete asɛnzɛla likoló na bango ‘na ntina na nkombo na Ye.’ Alɔmbi na Tata te ete alongola bango na mokili, kasi nde abatela bango longwa na oyo mabe mpe asantisa bango na liloba na Ye ya solo. Kati na libondeli na ye, Yesu alobeli baoyo nyonso bakomonisa kondima na koyokáká liloba ya bayekoli wana, “mpo ete banso bákoka kozala moko, motindo moko yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo, ete bango mpe bákoka kozala na bomoko elongo na biso, mpo ete mokili ekoka kondima ete yo otindaki ngai.” Asɛngi ete bango mpe bákoka kosangana elongo na ye kati na nkembo na ye ya likoló, mpamba te asili koyebisa nkombo ya Tata epai na bango, ete bolingo na Ye ekoka koumela kati na bango.—17:3, 11, 21, NW.
26. Lisoló oyo elobi nini na ntina na kokangama mpe kosambisama ya Yesu?
26 Klisto asambisami mpe akakisami (18:1–19:42). Yesu mpe bayekoli na ye bakei sikawa na elanga oyo ezali na ngambo ya lobwaku ya Kedelona. Ezali awa nde Yuda abimi elongo na limpinga ya basodá mpe akabi Yesu, oyo amitiki na bopɔlɔ nyonso. Nzokande, Petelo asaleli mopanga mpo na kokɔtela ye mpe apamelami ete: “Kɔ́pɔ oyo Tata asili kopesa ngai, nasengeli nde komela yango te?” (18:11, NW) Na nsima Yesu amemami wana ekangami ye na bansinga epai na Ana, bokilo ya Kayafa, nganga-monene. Yoane mpe Petelo bazali kolanda ye penepene, mpe na koyebana ya Yoane bazwi likoki ya kokɔta na lopango ya nganga-monene, epai Petelo awangani mbala misato ete ayebi Klisto te. Yesu asambisami liboso na Ana mpe na nsima bakei na ye liboso ya Kayafa. Na nsima na yango, Yesu amemami liboso ya Pilata, moyangeli moloma, elongo na Bayuda oyo bazali kosɛnga ete apesamelama etumbu ya kufa.
27. (a) Mituna nini Pilata abimisi na ntina na lotómo ya kozala mokonzi mpe na ntina na bokonzi, mpe lolenge nini Yesu alobeli yango? (b) Etɛlɛmɛlo nini Bayuda bakamati na ntina na bokonzi?
27 Na motuna ya Pilata oyo ete, “Ozali mokonzi?” Yesu ayanoli ete: “Yo ozali koloba ete ngai nazali mokonzi. Nabotamaki mpo na oyo, mpe nayaki na mokili mpo na oyo, ete napesa litatoli na ntina na solo.” (18:37, NW) Pilata, amoni elembeteli moko ya mabe na ntina na Yesu te, apesi ye mpo ete akangolama, lokola yango ezalaki momeseno ya kofungola bakangami mosusu na Elekeli, kasi Bayuda basɛngi ete bákangola nde Balabasi, oyo azali moyibi. Pilata asili kobɛtisa Yesu fimbo, mpe lisusu ameki kokangola ye, kasi Bayuda bangangi ete: “Kakisá ye! Kakisá ye! . . . mpamba te amikómisi mwana na Nzambe.” Ntango Pilata alobi na Yesu ete azali na bokonzi ya kokakisa ye, Yesu ayanoli ete: “Okoki te kozala na bokonzi likoló na ngai soki yango epesamelaki yo longwa na likoló te.” Lisusu, Bayuda bangangi ete: “Longolá ye! Longolá ye! . . . Kakisá ye! . . . Tozali na mokonzi mosusu te bobele Kaisala.” Na yango, Pilata akabi ye mpo ete akakisama.—19:6, 7, 11, 15, NW.
28. Likambo nini lisalemi na Gologota, mpe bisakweli nini bikokisami?
28 Bakei na Yesu “na oyo ebéngami Esika na Mokuwa na motó, oyo ebéngami Golgotha na Liebele,” mpe akakisami katikati na bato mosusu mibale. Likoló na ye, Pilata atye likomi oyo “Yesu ya Nasaleta, Mokonzi ya Bayuda,” oyo ekomamaki na Liebele, na Latin, mpe na Greke, mpo ete bato nyonso bámona mpe bákanga ntina. (19:17, 19) Yesu apesi mama na ye na mabɔkɔ ya Yoane mpe, nsima na komeka mwa vinyo ya ngai, angangi ete: “Esili kokokisama!” Na nsima angumbi motó na ye mpe akati motema. (19:30) Mpo na kokokisa bisakweli, basodá oyo babomaki ye babɛti mbɛsɛ mpo na bilamba na ye, bamipekisi mpo na kobuka makolo na ye, mpe batɔbɔli ye mopanzi na likɔnga. (Yoa. 19:24, 32-37; Nz. 22:18; 34:20; 22:17; Zek. 12:10) Na nsima, Yosefe moto na Alimataya mpe Nikodeme babongisi nzoto mpo na kokundama mpe batye yango kati na nkunda ya sika ya kokanisama oyo ezalaki pembeni.
29. (a) Komonana nini Yesu oyo asekwi asali epai na bayekoli na ye? (b) Makambo nini ya ntina Yesu alobeli kati na maloba na ye ya nsuka epai na Petelo?
29 Komonana ya Klisto oyo asekwi (20:1–21:25). Yoane asukisi bilembeteli kitoko na ye na ntina na Klisto na likambo moko ya esengo etali lisekwa. Malia Magadala akuti nkunda ezali mpamba, mpe Petelo mpe moyekoli mosusu (Yoane) bapoti kuna kasi bamoni bobele bilamba bazingaki ye mpe elamba oyo batyaki ye na motó. Malia oyo atikalaki pembeni na nkunda, asololi na baanzelu mibale mpe na nsuka, lokola azali kokanisa, asololi na mobateli na elanga. Ntango ayanoli ete, “Malia!” nokinoki ayebi ete ezali Yesu. Na nsima, Yesu amimonisi epai na bayekoli na ye na ndako oyo bikuke bikangamaki makasi, mpe alobeli bango na ntina na nguya oyo bakozwa na nzela ya elimo santu. Na nsima, Toma oyo azalaki te, aboyi kondima, kasi mikolo mwambe na nsima Yesu amonani lisusu mpe apesi ye bilembeteli, na yango Toma angangi ete: “Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!” (20:16, 28) Nsima na mikolo Yesu akutani lisusu na bayekoli na ye, na Libeke na Tibelia; apesi bango likoki ya koboma mbisi na lolenge ya likamwisi mpe na nsima alei esika moko na bango. Mbala misato atuni Petelo soki azali kolinga ye. Lokola Petelo andimi ete azali kolinga ye, Yesu alobi polele ete: “Leisá bana na mpate na ngai,” “Batelá bampate mike na ngai,” “Leisá bampate mike na ngai.” Na nsima asakoli na lolenge nini ya kufa Petelo akokumisa Nzambe. Petelo atuni na ntina na Yoane, mpe Yesu alobi ete: “Soki nalingi ete aumela kino ekoya ngai, ezali likambo na yo?”—21:15-17, 22.
LITOMBA NA YANGO
30. Lolenge nini Yoane alobeli makanisi ya sikisiki na oyo etali ezaleli ya bolingo?
30 Na kotalela nguya ya motó na likambo na yango mpe kondimisama euti na kolimbolama na yango ya kosimba motema ya Liloba oyo akómaki Klisto, nsango malamu “engebene Yoane” ezali kopesa biso likanisi ya sikisiki ya maloba mpe misala ya Mwana mopakolami wana ya Nzambe. Atako ekomeli mpe maloba ya Yoane ezali ya mpasi te, komonisáká ye lokola moto oyo “atángá te mpe moto mpamba,” maloba ya nguya ezali na lolenge na ye ya koloba. (Mis. 4:13) Evanzile na ye ezali kokóma mpenza na likambo oyo lileki ntina wana ezali koyebisa bolingo ya penepene kati na Tata mpe Mwana, lolenge moko boyokani ya bolingo epambwami oyo ekoki kozwama na kozala na bomoko elongo na bango. Yoane asaleli maloba “bolingo” mpe “alingaki” mbala mingi koleka Baevanzile mosusu misato soki esangisami.
31. Boyokani nini elobelami mingi na Evanzile mobimba ya Yoane, mpe lolenge nini yango ekómi na esika na yango mpenza?
31 Na ebandeli oyo nde boyokani ya kitoko ezalaki kati na Liloba mpe Nzambe Tata! Kati na mayele ya Nzambe “Liloba akómaki mosuni mpe afandaki katikati na biso, mpe tosili komona nkembo na ye, nkembo motindo moko na oyo ya mwana-mobotami bobele moko longwa na Tata; mpe atondaki na ngɔlu mpe na solo.” (Yoa. 1:14, NW) Na yango, na boumeli ya lisoló mobimba ya Yoane, Yesu alobeli mingi boyokani na ye ya komisɔkisa oyo emonani na botosi ya mokano ya Tata na motema mobimba. (4:34; 5:19, 30; 7:16; 10:29, 30; 11:41, 42; 12:27, 49, 50; 14:10) Maloba na ye na ntina na boyokani wana ya penepene emonani mpenzampenza kati na libondeli na ye ya kosimba motema oyo ezwami na Yoane mokapo 17, epai Yesu alobi na Tata na ye ete asilisi mosala oyo Ye apesaki ye mpo na kosala na mabelé mpe abakisi ete: “Na bongo, sikawa yo, Tata, kumisá ngai pembeni na yo na lokumu oyo nazalaki na yango pembeni na yo liboso ete mokili ezala.”—17:5, NW.
32. Na maloba nini Yesu amonisi boyokani na ye mpenza elongo na bayekoli na ye mpe ete azali nzela bobele moko oyo mapamboli ya bomoi ezali kokómela bato?
32 Ezali boni mpo na boyokani na Yesu elongo na bayekoli na ye? Mokumba ya Yesu lokola nzela bobele moko oyo mapamboli ya Nzambe mazali kopesama epai na bango mpe epai na bato nyonso etyami ntango nyonso liboso. (14:13, 14; 15:16; 16:23, 24) Alobelami lokola “Mwana na Mpate ya Nzambe,” “limpa na bomoi,” “pole na mokili,” “mobateli malamu,” “lisekwa mpe bomoi,” “nzela mpe solo mpe bomoi,” mpe “nzeté ya vinyo ya solo.” (1:29; 6:35; 8:12; 10:11; 11:25; 14:6; 15:1, NW) Ezali kati na lisese wana ya “nzeté ya vinyo ya solo” nde Yesu amonisi bomoko ya kokamwa oyo ezali bobele te kati na ye mpe bayekoli na ye ya solo, kasi lisusu elongo na Tata. Na kobotáká mbuma mingi, bakokumisa Tata na ye. Yesu apesi toli oyo ete: “Motindo moko Tata asili kolinga ngai mpe ngai nasili kolinga bino, bóumela kati na bolingo na ngai.”—15:9, NW.
33. Mokano nini ya mosala na ye Yesu amonisi kati na libondeli?
33 Na nsima, Yesu abondeli na motema moko epai na Yehova ete balingami oyo nyonso, mpe lisusu ‘baoyo bakozala na kondima epai na ye na nzela na liloba na bango,’ bázala na bomoko elongo na Tata na ye mpe na ye moko, básantisama na liloba ya solo! Ɛɛ, mokano mobimba ya mosala ya Yesu emonisami na lolenge kitoko kati na maloba ya nsuka ya libondeli na ye epai na Tata na ye: “Nasili kosala ete nkombo na yo eyebana epai na bango mpe nakosala ete yango eyebana, mpo ete bolingo oyo yo olingaki ngai ekoka kozala kati na bango mpe ngai nazala na bomoko elongo na bango.”—17:20, 26.
34. Toli nini ya litomba Yesu apesaki likoló na lolenge ya kolónga mokili?
34 Atako Yesu azalaki pene na kotika bayekoli na ye kati na mokili, alingaki te kotika bango kozanga mosungi, “elimo na solo.” Lisusu, apesaki bango batoli ya ntina likoló na boyokani na bango elongo na mokili, komonisáká bango lolenge bakoki kolónga lokola “bana na pole.” (14:16, 17; 3:19-21; 12:36) Yesu alobaki ete: ‘Soki bokoumela kati na liloba na ngai, bozali solo bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.’ Nzokande, alobaki epai na bana na molili ete: ‘Bouti na tata na bino Zábolo, mpe bolingi kokokisa mposa ya tata na bino. . . . Atɛlɛmaki ngwi kati na solo te, mpamba te solo ezali kati na ye te.’ Na bongo, tiká ete tózwa ekateli ntango nyonso ya kotɛlɛma ngwi kati na solo, ɛɛ, “kosambela Tata na elimo mpe na solo,” mpe kozwa makasi na maloba oyo ya Yesu: “Bóyika mpiko! Nasili kolónga mokili.”—8:31, 32, 44; 4:23; 16:33, NW.
35. (a) Litatoli nini Yesu apesi na ntina na Bokonzi ya Nzambe? (b) Mpo na nini Evanzile ya Yoane ezali kopesa ntina ya kozala na esengo mpe botɔ́ndi?
35 Nyonso oyo ezali mpe na boyokani na Bokonzi ya Nzambe. Yesu amonisaki yango ntango azalaki kosambisama ete: “Bokonzi na ngai ezali kati na mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki kati na mokili oyo, [mbɛlɛ] bayekoli na ngai balingaki kobunda ete nakabama epai na Bayuda te. Kasi, mpo ete ezali bongo, bokonzi na ngai euti wana te.” Na nsima, mpo na koyanola na motuna na Pilata, alobaki ete: “Yo ozali koloba ete ngai nazali mokonzi. Nabotamaki mpo na oyo, mpe nayaki na mokili mpo na oyo, ete napesa litatoli na ntina na solo. Moto na moto oyo azali na ngámbo na solo akoyokaka mongongo na ngai.” (18:36, 37, NW) Ya solo esengo ezali na baoyo bazali koyoka mpe baoyo bazali ‘kobotama lisusu’ mpo na ‘kokɔta na bokonzi ya Nzambe’ na boyokani elongo na Mokonzi. Esengo ezali na “bampate mosusu” oyo bazali koyoka mongongo ya Mokonzi-Mobateli na mpate mpo na kozwa bomoi. Ezali solo na ntina kozala na botɔ́ndi mpo na likabo oyo ya Evanzile ya Yoane, mpamba te yango ekomamaki “ete bókoka kondima ete Yesu azali Klisto Mwana na Nzambe, mpe ete, na ntina na kondima, bókoka kozwa bomoi na nzela ya nkombo na ye.”—3:3, 5; 10:16; 20:31, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a The Ecclesiastical History, Eusebius, V, VIII, lokasa 4.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 323.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 57-58.