Landá ndakisa ya Paulo mpo okola na elimo
“Nasili kobunda etumba ya malamu mingi, nasili kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka, nabateli kondima.”—2 TIM. 4:7.
1, 2. Mbongwana nini Paulo asalaki na bomoi na ye, mpe mosala nini ya ntina mingi abandaki?
SAULO, moto ya Talasi, azalaki mobali moko ya mayele mpe ya mpiko. Kasi, azalaki “komitambwisa kala na kolanda bamposa ya mosuni na [ye].” (Ef. 2:3) Na nsima, alobaki ete ye azalaki “motuki mpe monyokoli mpe moto ya lofundo.”—1 Tim. 1:13.
2 Na nsima, Saulo abongwanaki mobimba. Atikaki bizaleli na ye ya kala mpe asalaki makasi akóma koluka ‘litomba na ye moko te kasi oyo ya bato mingi.’ (1 Kol. 10:33) Akómaki na boboto mpe akómaki kolinga mpenza bato oyo azalaki konyokola liboso. (Tángá 1 Batesaloniki 2:7, 8.) Akomaki boye: “Nakómaki ministre.” Mpe abakisaki boye: “Epai na ngai, moto ya moke koleka moto oyo aleki moke na kati ya basantu nyonso, boboto monene wana emonisamaki, mpo nasakola na bikólo mosusu nsango malamu oyo etali bomɛngo ya Klisto oyo bozindo na yango ekoki komekama te.”—Ef. 3:7, 8.
3. Ndenge nini koyekola mikanda oyo Paulo akomaki mpe masolo ya mosala na ye ekoki kosalisa biso?
3 Saulo, oyo ayebani mpe na nkombo Paulo, akolaki na elimo na ndenge moko ya kokamwa. (Mis. 13:9) Koyekola mikanda oyo Paulo akomaki, masolo ya mosala na ye mpe kolanda ndakisa ya kondima na ye ezali lolenge moko oyo tokoki koluka kokola noki na elimo. (Tángá 1 Bakolinti 11:1; Baebele 13:7.) Tótala sikoyo ndenge oyo kosala bongo ekoki kosalisa biso tólona mimeseno ya malamu ya koyekola Liloba ya Nzambe, ya koyekola kolinga bato na bolingo ya solo mpe ya koyeba komitalela na ndenge ebongi.
Paulo azalaki na momeseno ya koyekola
4, 5. Ndenge nini koyekola esalisaki Paulo?
4 Lokola Paulo azalaki Mofalisai, atángaki kelasi ‘na makolo ya Gamaliele mpe alakisamaki engebene bokasi ya Mibeko ya bankɔkɔ,’ azalaki na mwa boyebi ya Makomami. (Mis. 22:1-3; Filp. 3:4-6) Ntango kaka azwaki batisimo, ‘akendaki na Alabia,’ oyo ntango mosusu ezali Esobe ya Sulia to mpe esika mosusu ya kimya na mokili ya Alabia, epai akokaki kozwa likoki ya komanyola. (Gal. 1:17) Ekoki kozala ete Paulo azalaki na mposa ya komanyola na mikapo oyo emonisaka ete Yesu azali Masiya. Longola yango, Paulo alingaki komibongisa mpo na mosala oyo ezalaki kozela ye. (Tángá Misala 9:15, 16, 20, 22.) Paulo azwaki ntango ya komanyola na makambo ya Nzambe.
5 Boyebi ya Makomami mpe bososoli oyo Paulo azwaki na nzela ya boyekoli esalisaki ye azala moteyi ya solosolo. Na ndakisa, na sinagoga ya Antiokia ya Pisidia, Paulo atángaki mikapo soki mitano ya Makomami ya Liebele mpo na komonisa ete Yesu azali Masiya. Paulo alobelaki mpe mikapo mosusu ya Makomami mbala mingi. Lokola ayebaki mpenza kolimbola Makomami, “mingi na kati ya Bayuda mpe baprozelite oyo bazalaki kosambela Nzambe balandaki Paulo ná Balanabasi” mpo na koyekola makambo mingi lisusu. (Mis. 13:14-44) Ntango Bayuda mosusu ya Loma bayaki kotala ye na esika oyo azalaki kofanda, Paulo “alimbwelaki bango likambo yango na kopesáká litatoli malamumalamu na ntina etali bokonzi ya Nzambe mpe na kosaleláká mayele ya kondimisa bango na oyo etali Yesu uta na mibeko ya Moize mpe na Basakoli.”—Mis. 28:17, 22, 23.
6. Nini ezalaki kosalisa Paulo atikala makasi na elimo ata na ntango ya mikakatano?
6 Ata ntango azalaki kokutana na mikakatano, Paulo azalaki kokoba kotánga Makomami, mpe nsango na yango ezalaki kopesa ye makasi. (Ebe. 4:12) Ntango azalaki na bolɔkɔ na Loma mwa moke liboso báboma ye, Paulo asɛngaki Timote ayela ye “barulo” mpe mikanda ya “mposo ya nyama.” (2 Tim. 4:13) Ekoki kozala ete mikanda yango ezalaki biteni ya Makomami ya Liebele oyo Paulo azalaki kosalela mpo na koyekola na mozindo. Koyekola Biblia mpo na kozwa boyebi ezalaki na ntina mingi mpo na Paulo, mpo molende na ye ekita te.
7. Tángá matomba oyo okoki kozwa soki ozali koyekola Biblia mokolo na mokolo.
7 Koyekola Biblia mokolo na mokolo mpe komanyola na makambo oyo tozali kotánga ekosalisa biso tókola na elimo. (Ebe. 5:12-14) Mpo na motuya ya Liloba ya Nzambe, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Mobeko ya monɔkɔ na yo ezali malamu na ngai koleka nkóto-nkóto ya wolo mpe ya palata. Na malako na yo, opesi ngai mayele maleki yango ya bayini na ngai; zambi mazali na ngai mikolo nyonso. Napekisi [makolo] na ngai na nzela nyonso mabe ete nabatela maloba na yo.” (Nz. 119:72, 98, 101) Oyekolaka Biblia mokolo na mokolo? Otángaka Biblia mokolo na mokolo mpe omanyolaka na makambo ozali kotánga mpo omibongisa mpo na mikumba oyo okoki kozwa na lisangá na mikolo ezali koya?
Saulo ayekolaki kolinga bato
8. Makambo nini Saulo azalaki kosala bato oyo bazalaki na Lingomba ya Bayuda te?
8 Liboso Saulo akóma moklisto, azalaki na molende mpenza na lingomba na ye, kasi azalaki kolinga te bato oyo bazalaki na lingomba ya Bayuda te. (Mis. 26:4, 5) Ntango Bayuda mosusu babomaki Setefano na mabanga, ye azalaki wana mpe azalaki kotala na esengo nyonso. Yango etindaki ye amona ete konyokola baklisto ezali mabe te, mpe ntango mosusu akanisaki ete Setefano azwaki mpenza etumbu oyo ebongaki na ye. (Mis. 6:8-14; 7:54–8:1) Biblia elobi ete: “Saulo abandaki konyokola lisangá na mobulu makasi. Kokɔtáká na ndako moko na moko mpe, kobimisáká mibali mpe basi, azalaki kokangisa bango na bolɔkɔ.” (Mis. 8:3) ‘Akendeki mosika mpenza tii na konyokola bango ata na bingumba ya libándá.’—Mis. 26:11.
9. Likambo nini Saulo akutanaki na yango oyo etindaki ye abongola lolenge na ye ya kotalela basusu?
9 Ntango Nkolo Yesu abimelaki Saulo, Saulo azalaki kokende konyokola bayekoli ya Klisto na Damasi. Kongɛnga makasi ya Mwana ya Nzambe ebɛtaki Saulo mpe ebomaki ye miso, mpe esengelaki bato mosusu básalisa ye. Ntango Yehova atindaki Anania mpo asalisa Saulo amona lisusu, Saulo asilaki kobongola lolenge na ye ya kotalela bato. (Mis. 9:1-30) Ntango akómaki moyekoli ya Klisto, asalaki makasi akóma kotalela bato nyonso ndenge Yesu azalaki kotalela bango. Yango wana atikaki konyokola bato mpe akómaki “na kimya elongo na bato nyonso.”—Tángá Baloma 12:17-21.
10, 11. Ndenge nini Paulo amonisaki ete azalaki mpenza kolinga bato?
10 Paulo asukaki kaka te na kozala na kimya na basusu. Alingaki komonisa ete azalaki mpenza kolinga bato, mpe mosala ya kosakola epesaki ye libaku yango. Na mobembo na ye ya liboso ya misionɛrɛ, asakolaki nsango malamu na Asie Mineure. Atako akutanaki na botɛmɛli makasi, Paulo ná baninga na ye batikaki te kosalisa bato ya komikitisa bákóma baklisto. Bazongaki lisusu na Lisitala mpe Ikoniumu, atako batɛmɛli oyo bazalaki na bingumba yango balukaki koboma Paulo.—Mis. 13:1-3; 14:1-7, 19-23.
11 Na nsima, Paulo ná baninga na ye balukaki bato oyo babongi na Masedonia, engumba moko na etúká ya Filipi. Prozelite moko na nkombo Lidia andimaki nsango malamu mpe akómaki moklisto. Bakonzi ya mboka wana babɛtaki Paulo ná Silasi fimbo mpe babwakaki bango na bolɔkɔ. Kasi, Paulo apesaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ litatoli, mpe ye ná libota na ye babatisamaki mpe bakómaki basambeli ya Yehova.—Mis. 16:11-34.
12. Nini etindaki Saulo, moto wana ya lofundo, akóma ntoma ya Yesu Klisto oyo atondaki na bolingo?
12 Mpo na nini Saulo, oyo azalaki konyokola baklisto akómaki lisusu na Lingomba ya bato oyo azalaki konyokola? Nini etindaki moto wana ya lofundo, akóma ntoma moko ya boboto mpe ya bolingo oyo azalaki ata kondima kotya bomoi na ye na likama mpo na kosalisa basusu báyeba Nzambe mpe Klisto? Paulo ye moko alobi boye: “Nzambe, . . . oyo abengaki ngai na nzela ya boboto monene na ye, amonaki malamu komonisa Mwana na ye na ntina etali ngai.” (Gal. 1:15, 16) Paulo akomelaki Timote boye: “Nayokelamaki mawa [mpo] na nzela na ngai moto ya libosoliboso mpenza Klisto Yesu akoka kolakisa motema molai na ye nyonso lokola ndakisa epai ya baoyo bakondimela ye mpo na bomoi ya seko.” (1 Tim. 1:16) Yehova alimbisaki Paulo, mpe motema boboto mpe mawa oyo Nzambe amoniselaki ye etindaki ye akóma kolinga basusu mpe kosakwela bango nsango malamu.
13. Nini esengeli kotinda biso tólingaka basusu, mpe ndenge nini tokoki komonisa bolingo yango?
13 Yehova alimbisaka mpe masumu mpe mabunga na biso. (Nz. 103:8-14) Mokomi ya nzembo atunaki boye: “Ɛ [Yehova], soki yo okotalaka bokesene, Ɛ Nkolo, nani akotɛlɛma?” (Nz. 130:3) Soki motema mawa ya Nzambe te, moko te na biso akokaki kozwa esengo ya kosalela ye mosala mosantu to mpe kozala na elikya ya bomoi ya seko. Nzambe amoniselaka biso nyonso boboto monene na ye. Lokola Paulo, biso mpe tosengeli kosakwela bato, koteya bango solo mpe kolendisa bandeko na biso baklisto mpo na komonisa ete tolingaka bango.—Tángá Misala 14:21-23.
14. Ndenge nini tokoki kobakisa molende na mosala ya kosakola?
14 Paulo azalaki na mposa ya kokende liboso na mosala ya kosakola, mpe ndakisa ya Yesu esimbaki motema na ye. Kosakola nsango malamu ezalaki lolenge moko oyo Mwana ya Nzambe amonisaki mpenza ete alingaka bato. Yesu alobaki ete: “Bambuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Na yango, bósɛnga na Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma ete atinda basali na kati ya mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Mat. 9:35-38) Ekoki kozala ete Paulo abondelaki mpe mpo na likambo yango, mpe azalaki kosakola na molende mpo na kokokisa mposa yango. Bongo yo? Okoki mpe kobongisa lolenge na yo ya kosakola? To mpe okoki komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola Bokonzi, ata mpe kokóma mobongisi-nzela? Mpo na komonisa ete tolingaka bato, tosengeli kosalisa bango ‘bákangama makasi na liloba ya bomoi.’—Filp. 2:16.
Ndenge Paulo azalaki komitalela
15. Ndenge nini Paulo azalaki komitalela na kati ya lisangá?
15 Paulo atikelá biso mpe ndakisa mosusu. Atako azwaki mikumba mingi na kati ya lisangá, Paulo ayebaki mpenza ete azwaki yango te mpo na makoki na ye. Ayebaki ete azwaki mikumba wana mpo na boboto monene ya Nzambe. Paulo ayebaki ete baklisto mosusu mpe bazali basakoli ya solosolo ya nsango malamu. Atako azalaki na mikumba mingi na lisangá, azalaki kaka na komikitisa.—Tángá 1 Bakolinti 15:9-11.
16. Ndenge nini Paulo amonisaki elimo ya komikitisa ntango likambo ya ngenga ebimaki?
16 Tótala ndenge Paulo asalaki ntango likambo moko ebimaki na Antiokia, engumba moko ya Sulia. Likambo ya ngenga ekabolaki bandeko na kati ya lisangá. (Mis. 14:26–15:2) Lokola Paulo aponamaki mpo na kozala ntoma epai ya bato oyo bakatamá ngenga te, akokaki kokanisa ete ye nde akokaki kosilisa mokakatano wana mpo ye moto ayebaki bapakano malamu. (Tángá Bagalatia 2:8, 9.) Kasi, ntango amonaki ete nyonso oyo asalaki mpo na kosilisa likambo yango esimbaki te, na komikitisa nyonso amonaki malamu bámema likambo yango na Yelusaleme, epai lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki. Bandeko yango bayokaki bango, bazwaki ekateli mpe batindaki ye ná bandeko mosusu mpo báyebisa masangá ekateli yango. Mpe Paulo atosaki. (Mis. 15:22-31) Na ndenge yango, Paulo amonisaki ete azalaki moto ya liboso mpo na kopesa bandeko lokumu.—Lom. 12:10b.
17, 18. (a) Ndenge nini Paulo akómaki kotalela bandeko ya lisangá? (b) Likambo oyo bankulutu ya Efese basalaki ntango Paulo alingaki kotika bango eteyi biso nini mpo na ye?
17 Na komikitisa na ye, Paulo azalaki komitangola na bandeko ya lisangá te. Kutu, akómaki nde moninga na bango ya solosolo. Na nsuka ya mokanda oyo akomelaki Baloma, atindelaki bandeko koleka 20 mbote na bankombo na bango. Nkombo ya mingi kati na bango etángami na esika mosusu te na Biblia, mpe mingi bazalaki na mikumba minene te na lisangá. Kasi, bazalaki basaleli ya Yehova ya sembo, mpe Paulo alingaki bango mingi.—Lom. 16:1-16.
18 Lokola azalaki na komikitisa mpe azalaki kolinga bandeko, Paulo alendisaki masangá mingi. Ntango alingaki kokabwana na bankulutu ya Efese mpo na mbala ya nsuka, “bakwelaki Paulo na nkingo mpe bapwɛpwaki ye na boboto mpenza, mpamba te bayokaki mpasi mingimingi mpenza na liloba oyo alobaki ete bakomona elongi na ye lisusu te.” Soki Paulo azalaki moto ya lolendo, mbɛlɛ bandeko balelaki ye ndenge wana te ntango atikaki bango.—Mis. 20:37, 38.
19. Ndenge nini tokoki komonisa “elimo ya komikitisa” epai ya bandeko na biso baklisto?
19 Baoyo nyonso balingi kokola na elimo basengeli kozala na elimo ya komikitisa lokola Paulo. Alendisaki baninga na ye baklisto ete ‘básalaka eloko moko te na kowelana to na ezaleli ya komitya liboso, kasi na elimo ya komikitisa bátalelaka bamosusu ete baleki bango.’ (Filp. 2:3) Ndenge nini tokoki kolanda toli wana? Lolenge moko ezali ya koyokela bankulutu ya lisangá na biso, kolanda toli oyo bazali kopesa mpe kondima bikateli oyo bazali kozwa. (Tángá Baebele 13:17.) Lolenge mosusu ezali ya kozwaka bandeko na biso baklisto na motuya. Mbala mingi na masangá ya basaleli ya Yehova, okoki kokuta bato ya bikóló, mimeseno mpe mposo ndenge na ndenge. Na yango, tosengeli te koponaka bilongi, kasi tosengeli nde kolanda ndakisa ya Paulo oyo azalaki kolinga bato nyonso. (Mis. 17:26; Lom. 12:10a) Biblia elendisi biso ‘tóyambanaka biso na biso, ndenge Klisto mpe ayambaki biso, mpo na nkembo ya Nzambe.’—Lom. 15:7.
‘Tópota na mpiko’ momekano ya mbangu mpo na bomoi
20, 21. Nini ekosalisa biso tólonga na momekano ya mbangu mpo na bomoi?
20 Bomoi ya moklisto ezali lokola momekano ya mbangu. Ntoma Paulo akomaki ete: “Nasili kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka, nabateli kondima. Banda sikoyo babombeli ngai motole ya boyengebene, oyo Nkolo, mosambisi oyo azali moyengebene, akopesa ngai lokola mbano na mokolo yango, kasi kaka ngai moko te, kasi mpe baoyo nyonso basili kolinga komonisama na ye.”—2 Tim. 4:7, 8.
21 Kolanda ndakisa ya Paulo ekosalisa biso tólonga na momekano ya mbangu mpo na bomoi ya seko. (Ebe. 12:1) Na yango, tiká ete tózala na momeseno ya koyekola, tólingaka bato mpe tózala na elimo ya komikitisa, mpo tókoba kokende liboso na elimo.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini koyekola Makomami mokolo na mokolo esalisaki Paulo?
• Mpo na nini ezali na ntina ete baklisto ya solo bálingaka bato?
• Bizaleli nini ekoki kosalisa yo oponaka bilongi te?
• Ndenge nini ndakisa ya Paulo ekoki kosalisa yo oyokelaka bankulutu ya lisangá na bino?
[Elilingi na lokasa 23]
Lokola Paulo, tótángaka Makomami mpo na kozwa makasi
[Elilingi na lokasa 24]
Sakweláká basusu nsango malamu mpo na komonisa ete olingaka bango
[Elilingi na lokasa 25]
Oyebi nini esalaki ete bandeko bákóma kolinga Paulo mingi?