“Tambolá na mokili”
“Tambolá na mokili epai na molai na yango mpe na monene na yango.”—GENESE 13:17.
1. Nzambe atindaki Abalayama asala nini?
OSEPELAKA kotambola na zamba, mbala mosusu kosala mobembo na motuka na wikende? Bato mosusu basepelaka kotambola na velo mpo na kosala ngalasisi mpe kotala zamba mpe biloko mosusu oyo esepelisaka miso. Bamosusu mpe balingaka kotambola na makolo mpo na komona malamu esika moko boye. Mbala mingi, kotambola ndenge wana ezalaka kaka mpo na mwa ntango moke. Kanisá sikoyo ndenge Abalayama ayokaki ntango Nzambe alobaki na ye ete: “Tɛlɛmá, tambolá na mokili epai na molai na yango mpe na monene na yango mpo ete nakopesa yo yango”!—Genese 13:17.
2. Abalayama akendaki wapi ntango alongwaki na Ezipito?
2 Tótala ndenge makambo ezalaki ntango Nzambe alobaki maloba yango. Abalayama ná mwasi na ye mpe bato mosusu bafandaki mwa ntango na Ezipito. Genese mokapo 13 eyebisi biso ete balongwaki na Ezipito mpe bamemaki bibwɛlɛ na bango na “Negebe.” Na nsima, Abalayama “akendaki na mobembo na ye longwa na mokili ya ngɛlɛ [“Negebe,” NW] kokóma na Betele.” Ntango matata ebimaki na kati ya babateli ya mpate na ye ná oyo ya Lota, mwana ya ndeko na ye, mpe lokola emonanaki ete ebongi bákabwana mpo moto na moto azala na esika oyo akoki koleisa bibwɛlɛ, Abalayama atikaki Lota apona esika alingi. Lota aponaki “Mokili ya Yolodani,” mokili patatalu mpe ya matiti kitoko “lokola elanga ya [Yehova]”; mpe nsukansuka, akómaki kofanda na Sodoma. Nzambe alobaki na Abalayama boye: “[Tombolá] miso na esika ezali yo, mpe talá epai na likoló mpe epai na ngɛlɛ mpe epai na ebimelo ya ntango mpe epai na kolimwa ya ntango.” Tokanisi mpenza ete Abalayama azalaki likoló ya ngomba pembeni ya Betele, mpe kuna akokaki komona bisika mosusu ya mokili yango. Kasi, asengelaki kosuka te kaka na komona yango na mosika. Nzambe asɛngaki ye ‘atambola na mokili’ yango mpo na koyeba yango malamumalamu.
3. Mpo na nini ekoki kozala mpasi tómona na makanisi bisika oyo Abalayama atambolaki?
3 Ezala Abalayama atambolaki na mokili yango mingi to te liboso akóma na Hebeloni, na ntembe te ayebaki Mokili ya Ndaka malamu koleka mingi kati na biso. Kanisá bisika oyo batángi na lisolo yango: Negebe, Betele, Mokili ya Yolodani, Sodoma, mpe Hebeloni. Ezali mpasi omona na makanisi esika mboka to etúká mokomoko wana ezalaki? Mpo na bato mingi ezali mpasi mpamba te, ezali na Batatoli mingi te oyo bakómá na bisika oyo batángaka na Biblia to batambolá na mokili yango mobimba. Kasi, ezali na ntina tóyeba bisika oyo balobeli na Biblia. Mpo na nini?
4, 5. (a) Na ndenge nini Masese 18:15 etaleli boyebi mpe bososoli ya mikili ya Biblia? (b) Sefania mokapo 2 ezali komonisa likambo nini?
4 Liloba ya Nzambe elobi boye: “Motema ya moto ya mayele ekozwa boyebi; litoi ya moto ya bososoli ekoluka mpe boyebi.” (Masese 18:15) Ezali na makambo mingi oyo moto akoki koyekola na bomoi na ye, kasi boyebi ya Yehova Nzambe mpe ya misala na ye eleki ntina. Makambo oyo totángaka na Biblia esalisaka biso mingi mpo na kozwa boyebi yango. (2 Timote 3:16) Kasi, tomoni ete ezali mpe kosɛnga kozala na bososoli. Kososola elimboli kotalela likambo na bozindo, komona to koyeba boyokani oyo ezali na kati ya eteni na yango mokomoko na biteni mosusu mpe mobimba na yango. Ezali mpe bongo mpo na bisika oyo Biblia elobeli. Na ndakisa, mingi kati na biso toyebi epai Ezipito ezali, kasi tososolaka lisolo oyo elobi ete Abalayama alongwaki na Ezipito ‘mpe akendaki na Negebe,’ na nsima na Betele, mpe na nsima na Hebeloni? Oyebi ntaka oyo ekaboli bamboka yango?
5 Ndakisa mosusu: Ekoki kozala ete na botángi na yo ya Biblia otángaki Sefania mokapo 2. Kuna, otángaki bankombo ya bingumba, ya mabota, mpe ya mikili. Na mokapo yango batángi bankombo lokola Gaza, Asekelone, Asedode, Ekelone, Sodoma, Ninive, Kanana, Moaba, Amona, mpe Asulia. Okokaki komona na makanisi bisika yango, epai bato bafandaki, baoyo esakweli ya Nzambe ekokisamaki epai na bango?
6. Mpo na nini baklisto mosusu balingaka kotala bakarte? (Talá etanda.)
6 Bayekoli mingi ya Liloba ya Nzambe bayebi makambo mingi na lisalisi ya bakarte ya mikili ya Biblia. Batalaka yango kaka te mpo basepelaka na bakarte, kasi bayebaka ete na lisalisi na yango, bakoki kobakisa boyebi na bango ya Liloba ya Nzambe. Bakarte ekoki mpe kosalisa bango básosola makambo mosusu, bábakisa makambo mosusu na oyo bayebaki. Tokotalela mwa bandakisa mpe, na ntembe te, bolingo na yo mpo na Yehova ekokola mpe okososola malamu masolo oyo ezali na Liloba na ye.—Talá etanda na lokasa 14.
Koyeba ntaka oyo ekaboli bisika ezali na ntina mingi
7, 8. (a) Likambo nini ya kokamwa Samasona asalaki na Gaza? (b) Nini ekoki kosalisa biso tómona bonene ya likambo oyo Samasona asalaki? (c) Ndenge nini boyebi mpe bososoli ya lisolo wana ya Samasona ekoki kosalisa biso?
7 Na Basambisi 16:2, balobi ete Mosambisi Samasona azalaki na Gaza. Lelo oyo, balobelaka Gaza mingi na bansango. Na yango, okoki kozala na mwa likanisi ya esika oyo Samasona azalaki, na mokili ya Bafilistia, penepene na bokula ya Mbu ya Meditelane. [11] Sikoyo, yoká oyo Basambisi 16:3 elobi: “Samasona alalaki kino midi ya butu, mpe na midi ya butu atɛlɛmaki mpe asimbaki bikuke ya monɔkɔ ya mboka mpe makonzí na yango mibale, mpe nzete ya kokanga yango, mpe atyaki yango na mapeka na ye mpe akumbaki yango na likoló ya ngomba oyo ezali na liboso ya Hebeloni.”
8 Na ntembe te, bikuke mpe makonzí ya lopango ya mboka monene lokola Gaza ezalaki monene mpe kilo. Kanisá ete moto atombola mpe amema yango! Samasona amemaki yango; kasi akendaki na yango wapi, mpe na nzela ya ndenge nini? Gaza ezali na pembeni ya mbu, elingi koloba na nse. [15] Nzokande, Hebeloni ezali na ɛsti mpe likoló, na mɛtrɛ 900 banda na nivo ya mbu; elingi koloba ete mpo akóma kuna amataki komata! Toyebi te esika nini mpenza “ngomba oyo ezali na liboso ya Hebeloni” ezalaki, kasi ntaka oyo ezali na kati ya engumba Hebeloni mpe Gaza ezali kilomɛtrɛ soki 60; lisusu mpo na moto oyo auti na Gaza, yango ezali likoló! Lokola toyebi sikoyo ntaka oyo Samasona atambolaki, tomoni malamu lisusu bonene ya likambo oyo asalaki! Tóbosana mpe te nini esalisaki Samasona asala makambo ya ndenge wana: “Elimo ya Yehova esalaki epai na ye.” (Basambisi 14:6, 19; 15:14, NW) Lelo oyo, biso baklisto tokanisaka te ete elimo ya Nzambe ekopesa biso makasi ya kokamwa. Kasi, kaka elimo wana oyo ezali na nguya mingi ekoki kobakisa boyebi na biso ya makambo mozindo ya elimo mpe kokómisa biso bato ya makasi na bomoto na biso ya kati. (1 Bakolinti 2:10-16; 13:8; Baefese 3:16; Bakolose 1:9, 10) Ya solo, kososola lisolo ya Samasona ezali kondimisa biso lisusu ete elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso.
9, 10. (a) Makambo nini Gideona asalaki mpo na kolonga Bamidyani? (b) Ndenge nini boyebi ya bamboka mpe bisika mosusu oyo balobeli na lisolo yango ezali kosalisa biso tókanga ntina na yango malamu lisusu?
9 Lisolo oyo elobeli ndenge Gideona alongaki Bamidyani ezali mpe komonisa ntina ya koyeba bantaka oyo ekaboli bamboka. Bato mingi oyo batángaka Biblia bayebi ete Mosambisi Gideona ná basoda na ye 300 balongaki basoda 135 000 ya Bamidyani, Baamaleki, mpe ya bikólo mosusu oyo batongaki kaa na bango na lobwaku ya Yizelele, penepene na ngomba moke ya Mole. [18] Basoda ya Gideona babɛtaki kelelo, bapasolaki bambɛki mpo miinda na bango emonana, mpe bagangaki ete: ‘Mopanga ya Yehova mpe ya Gideona!’ Banguna bazwaki mobulu mpe babandaki kobomana bango na bango. (Basambisi 6:33; 7:1-22) Basukaki kaka na likambo oyo basalaki na butu wana? Tángá lisolo mobimba na Basambisi mokapo 7 mpe mokapo 8. Okomona ete Gideona alandaki bango tii na bisika mosusu. Batángi bisika mingi, mosusu ekoki koyebana te lelo oyo, yango wana tomonaka yango te na karte ya mikili ya Biblia. Kasi, bisika mingi mpe eyebani, mpe ekoki kosalisa biso tómona nzela oyo Gideona alekaki ntango azalaki kolanda bango.
10 Gideona alandaki basoda oyo babomamaki te, alekaki Bete-sita, tii na sudi ya Abele-mehola, penepene na Ebale Yolodani. (Basambisi 7:22-25) Lisolo yango elobi boye: ‘Gideona akómaki na [Yolodani] mpe akataki ngámbo, ye mpe mibali nkama misato bazalaki na ye elongo. Balɛmbaki kasi batikalaki kobengana.’ Ntango bakómaki na ngámbo, Bayisalaele balandaki banguna na sudi tii na Sukote mpe Penuele, penepene na Yaboko, tii na bangomba Yongebeha (pene na oyo ezali lelo engumba Amman, na ekólo Jordanie). Balandaki banguna kilomɛtrɛ soki 80 mpe nzelanzela bazalaki koboma bango. Gideona akangaki bakonzi mibale ya Bamidyani mpe abomaki bango; na nsima azongaki na engumba na ye, Ofela, penepene na esika oyo etumba ebandaki. (Basambisi 8:4-12, 21-27) Tomoni ete etumba ya Gideona esukaki te kaka na kobɛta kelelo, kopɛpa miinda, mpe koganga na mwa ntango moke. Kanisá sikoyo ndenge likambo yango ezali kosalisa biso na kokanga malamumalamu ntina ya maloba ya Paulo mpo na bato ya kondima: “Ntango ekozanga ngai soki nakobi mpo na kolobela Gideona [ná bamosusu oyo] uta na ezaleli ya bolɛmbu bakómisamaki na nguya, bakómaki bilombe na kati ya etumba.” (Baebele 11:32-34) Baklisto bakoki mpe kolɛmba, kasi tomoni ete ezali na ntina mingi tókoba kosala mokano ya Nzambe!—2 Bakolinti 4:1, 16; Bagalatia 6:9.
Ndenge nini bato bakanisaka mpe batalelaka makambo?
11. Bayisalaele batambolaki na bisika nini liboso mpe nsima ya kokóma na Kadesi?
11 Bato mosusu batalaka bakarte mpo na koyeba bisika oyo Biblia elobeli ezalaki; kasi okanisi ete bakarte ekoki mpe kosalisa biso tóyeba ndenge oyo bato bazalaki kokanisa? Tózwa ndakisa ya Bayisalaele ntango balongwaki na Ngomba Sinai mpe bazalaki kokende na Mokili ya Ndaka. Batɛlɛmaki na bisika ndenge na ndenge na nzela mpe na nsuka, bakómaki na Kadesi (to Kadesi-Balanea). [9] Deteronome 1:2 elobi ete batambolaki mikolo 11, na ntaka ya kilomɛtrɛ 270. Ntango bazalaki na Kadesi, Moize atindaki banɔngi 12 na Mokili ya Ndaka. (Mituya 10:12, 33; 11:34, 35; 12:16; 13:1-3, 25, 26) Banɔngi yango bakendaki na nɔrdi, bakatisaki Negebe, ekoki kozala ete balekaki Bele-seba, na nsima balekaki Hebeloni, mpe bakómaki na ndelo ya nɔrdi ya Mokili ya Ndaka. (Mituya 13:21-24) Lokola bana ya Yisalaele bandimaki lapolo ya mabe ya banɔngi zomi, bazwaki etumbu ya koyengayenga mbula 40 na esobe. (Mituya 14:1-34) Yango ezali komonisa biso nini na ntina na kondima na bango epai ya Yehova mpe na likambo ya kotyela ye motema?—Deteronome 1:19-33; Nzembo 78:22, 32-43; Yuda 5.
12. Tokoki koloba nini mpo na kondima ya Bayisalaele, mpe mpo na nini tosengeli komanyolaka na ndakisa na bango?
12 Tótalela naino mobembo yango na kolanda bamboka mpe bisika oyo balekaki. Soki Bayisalaele bázala na kondima mpe bálanda toli ya Yosua ná Kalebe, balingaki nde kosala mobembo molai ndenge wana liboso ya kokóma na Mokili ya Ndaka? Kobanda Kadesi tii Bele-lahai-loi, esika Yisaka ná Lebeka bazalaki kofanda, ezalaki na kilomɛtrɛ 16. [7] Banda na Kadesi tii na Bele-seba, oyo ebengami ndelo ya sudi ya Mokili ya Ndaka, ekokaki ata kilomɛtrɛ 95 te. (Genese 24:62; 25:11; 2 Samwele 3:10) Lokola batambolaki banda na Ezipito tii na Ngomba Sinai mpe na nsima batambolaki kilomɛtrɛ 270 tii na Kadesi, bakómaki penepene mpenza na Mokili ya Ndaka. Biso mpe tozali penepene na Paladiso oyo Nzambe alaki kotya awa na mabelé. Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango? Ntoma Paulo asalelaki ndakisa ya Bayisalaele ntango apesaki toli oyo: “Na yango tiká tósala nyonso oyo ekoki mpo na kokɔta na kati ya kopema wana, noki te moko akwea na kati ya ndakisa yango ya kozanga botosi.”—Baebele 3:16–4:11.
13, 14. (a) Mpo na nini bato ya Gibeoni balukaki koyokana na Bayisalaele? (b) Mayele oyo bato ya Gibeoni basalaki emonisi nini, mpe liteya nini tokoki kozwa na yango?
13 Ezaleli ya kotyela Nzambe motema, oyo Bayisalaele bazangaki, ezali komonana na lisolo oyo elobeli bato ya Gibeoni. Ntango Yosua akatisaki Bayisalaele na ngámbo ya Ebale Yolodani mpo bákɔta na mokili oyo Nzambe alakaki kopesa bankɔkɔ ya Abalayama, ntango ekokaki mpo bábengana Bakanana. (Deteronome 7:1-3) Bato ya Gibeoni mpe bazalaki Bakanana. Bayisalaele bautaki kokweisa Yeliko ná Ai mpe basalaki kaa na bango na Gilegale. Bato ya Gibeoni baboyaki kokufa nzela moko na Bakanana mosusu, yango wana batindaki bato epai ya Yosua na Gilegale. Mpo na koyokana na Baebele, bakosaki ete bazali Bakanana te, kasi bauti epai mosusu.
14 Batindami wana balobaki boye: ‘Baombo na yo bauti na mokili mosika mingi na ntina na nkombo ya [Yehova] Nzambe na yo.’ (Yosua 9:3-9) Bilamba na bango mpe biloko ya kolya ezalaki komonana lokola nde bautaki mpenza mosika, nzokande kilomɛtrɛ soki 30 mpamba nde ekabolaki Gibeoni na Gilegale. [19] Yosua ná bankumu ya Yisalaele bandimaki maloba na bango mpe bayokanaki na bato ya Gibeoni ná bingumba mosusu ya pembeni oyo esanganaki na Gibeoni. Tokanisi ete bato ya Gibeoni basalelaki mayele wana kaka mpo bábomama te? Te, emonani ete bazalaki na mposa Nzambe ya Yisalaele andima bango. Yehova andimaki bato ya Gibeoni bákóma “bakati ya nkoni mpe batoki ya mai mpo na lingomba mpe mpo na etumbelo ya [Yehova].” (Yosua 9:11-27) Bato ya Gibeoni bakobaki kosala na esengo mosala ezangi lokumu mpo na losambo ya Yehova. Ekoki kozala ete bamosusu kati na bango bazalaki na kati ya Banetinimi oyo bautaki na Babilone ntango babimaki na boombo mpe bazalaki kosala na tempelo ya sika oyo batongaki. (Ezela 2:1, 2, 43-54; 8:20) Tokoki kolanda elimo na bango soki tozali kobatela boyokani na biso na Nzambe mpe soki tozali kondima kosala ata misala ezangi lokumu mpo na losambo na ye.
Tózala na elimo ya komipimela
15. Mpo na nini tosengeli mpe kotalela bamboka mpe bisika oyo elobelami na Makomami ya Grɛki ya boklisto?
15 Masolo ya Makomami ya Grɛki ya boklisto elobeli mpe bamboka ná bisika oyo makambo wana esalemaki; na ndakisa na mibembo mpe mosala ya Yesu mpe ya ntoma Paulo. (Malako 1:38; 7:24, 31; 10:1; Luka 8:1; 13:22; 2 Bakolinti 11:25, 26) Na masolo oyo tolingi kolobela, meká kokanisa ntaka oyo basalaki na mibembo yango.
16. Ndenge nini baklisto ya Beloa bamonisaki ete balingaki Paulo mpe basepelaki na ye?
16 Na mobembo na ye ya mibale (mokɔlɔtɔ ya violɛ na karte), Paulo akómaki na engumba Filipi, oyo ezali lelo na Grèce. [33] Kuna, asakolaki nsango malamu, bakangaki ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ, na nsima batikaki ye mpe akendaki na Tesaloniki. (Misala 16:6–17:1) Ntango Bayuda batindaki bato bátombokela Paulo, bandeko ya Tesaloniki basɛngaki ye akende na Beloa, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 65. Paulo asalaki mosala malamu mpenza na Beloa, kasi Bayuda bakendaki mpe kuna mpe batindaki bato bátombokela ye. Yango wana, “nokinoki bandeko batindaki Paulo akende tii na mbu,” mpe “baoyo bazalaki kokamba Paulo bamemaki ye tii na Atene.” (Misala 17:5-15) Emonani ete baklisto mosusu ya sika bandimaki kotambola kilomɛtrɛ 40 tii na Mbu ya Égée, kofuta tike ya masuwa mpe kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 500. Mobembo ya ndenge wana ezalaki na makama, kasi bandeko bandimaki kosala yango mpe na ndenge yango, balekisaki ntango mingi na mokɛngɛli-motamboli wana.
17. Koyeba ntaka oyo ekabolaki Milete na Efese ekosalisa biso tómona ezaleli nini oyo bankulutu ya Efese bamonisaki?
17 Na mobembo na ye ya misato (mokɔlɔtɔ ya mai ya pondu na karte), Paulo akómaki na libongo ya Milete. Atindelaki bankulutu ya lisangá ya Efese—na ntaka ya kilomɛtrɛ 50—maloba ete bákende kokutana na ye. Kanisá ete bankulutu yango batikaki misala na bango mpo bákende kokutana na Paulo. Na ntembe te, nzelanzela bazalaki kolobela na esengo ndenge bakokutana na Paulo. Nsima ya kokutana na Paulo mpe koyoka libondeli na ye, “mpisoli mingi esopamaki na kati na bango nyonso, mpe bakwelaki Paulo na nkingo mpe bapwɛpwaki ye na boboto mpenza.” Na nsima “bakendaki kotika ye na masuwa” mpo akende na Yelusaleme. (Misala 20:14-38) Na ntembe te, na nzela ya kozonga na Efese bazalaki na makambo mingi oyo bakokaki kolobela mpe kokanisa. Bolingo mpe botɔndi oyo bamonisaki na ndenge basalaki mobembo molai na makolo mpo na kokutana na mokɛngɛli-motamboli oyo akokaki koyebisa bango makambo ya sika mpe kolendisa bango, ezali kosimba motema na yo te? Lisolo yango eteyi yo likambo moko oyo okoki kosalela na bomoi na yo mpe na ndenge na yo ya kotalela makambo?
Yekolá makambo ya Mokili ya Ndaka mpe ya mokili ya sika
18. Tokoki kozwa ekateli ya kosala nini na ntina na bamboka mpe bisika mosusu oyo Biblia elobeli?
18 Bandakisa oyo tolobeli ezali komonisa ntina ya koyeba malamu mokili oyo Nzambe apesaki Bayisalaele, oyo masolo mingi ya Biblia elobeli. (Tokoki mpe koyeba makambo mosusu soki toyekoli mikili mosusu oyo ezali pembenipembeni na yango, oyo Biblia elobeli.) Ntango boyebi mpe bososoli na biso ya Mokili ya Ndaka ezali kobakisama, tosengeli kobosana te likambo moko ya ntina mingi oyo Bayisalaele basengelaki kosala mpo bákɔta mpe báfanda na mokili oyo etondi na ‘miliki mpe mafuta ya nzoi.’ Basengelaki kobanga Yehova mpe kotosa mibeko na ye.—Deteronome 6:1, 2; 27:3.
19. Wapi paladiso mibale oyo tosengeli ntango nyonso kokanisaka?
19 Lelo oyo mpe ndenge moko, tosengeli kosala oyo basɛngi biso, elingi koloba kobanga Yehova mpe kokangama na banzela na ye. Na ndenge yango, tokopesa mabɔkɔ na kokolisa mpe kobongisa paladiso ya elimo oyo baklisto ya mokili mobimba bazali kati na yango. Boyebi na biso ya paladiso yango mpe mapamboli na yango ekobakisama. Toyebi mpe ete makambo mosusu ya malamu mingi ezali liboso na biso. Yosua akatisaki Bayisalaele Ebale Yolodani mpe akɔtisaki bango na mokili malamu mingi. Lelo oyo tozali na ntina malamu ya kozela na elikya mpenza Paladiso, mokili malamu oyo ezali liboso na biso.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini tosengeli kobakisa boyebi mpe bososoli na biso ya mikili oyo Biblia elobeli?
• Mboka to bisika nini tolobeli na lisolo oyo esalisi yo oyeba malamu lisusu lisolo moko oyo otángaka na Biblia?
• Liteya nini ozwi ntango oyekoli makambo mosusu ya bamboka mpe bisika mosusu oyo elobelami na lisolo moko boye?
[Etanda/Elilingi na lokasa 14]
‘Talá mokili malamu’
Na mayangani ya etúká ya 2003-2004, Batatoli ya Yehova basepelaki ntango bazwaki mwa buku ‘Voyez le bon pays.’ Mokanda yango ya sika, oyo ebimisami na minɔkɔ soki 80, ezali na ebele ya bakarte ya langilangi ya mikili oyo Biblia elobeli, mingimingi Mokili ya Ndaka na bileko ndenge na ndenge.
Na lisolo ya boyekoli oyo batye mituya oyo ezali kolakisa nkasa ya mwa buku yango epai tokokuta karte oyo ezali na bisika oyo balobeli; mituya yango ekomami na makomi ya moindo makasi, na ndakisa [gl 15]. Soki ozali na mwa buku yango, zwáká ntango ya kotalaka bakarte mpe makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo oyeba mpe ososola Liloba ya Nzambe lisusu malamu.
(1) Bakarte mingi ezali na mwa maloba pembeni to etanda oyo ezali kolimbola bilembo oyo basaleli na karte [gl 18]. (2) Bakarte mingi ezali na échelle na kilomɛtrɛ mpe na miles mpo na koyeba bonene to ntaka [gl 26]. (3) Na bakarte mingi, likɔnga moko ezali kolakisa nɔrdi, mpo na koyeba ngámbo mokomoko [gl 19]. (4) Bakarte mingi ezali na balangi oyo ezali kolakisa bangomba mpe bisika oyo ezali na nse [gl 12]. (5) Pembenipembeni ya karte ekoki kozala na balɛtrɛ mpe epai mosusu mituya oyo ekoki kosalisa yo na komona noki bingumba to bankombo [gl 23]. (6) Na nkasa mibale ya nsuka ezali na index ya bankombo [gl 34-5], motuya oyo ezali moindo makasi elakisi lokasa ya mwa buku, mpe mbala mingi pembeni na yango ezali na lɛtrɛ ná motuya oyo ekosalisa yo omona esika yango na karte, na ndakisa E2. Nsima ya kosalela yango mwa mingi, okomona ete ekosalisa yo okolisa boyebi mpe bososoli na yo ya Biblia.
[Etanda/Karte na lokasa 16, 17]
NDENGE MOKILI YA NDAKA EZALAKI
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
A. Bokula ya Mai Monene
B. Mokili patatalu ya wɛsti ya Yolodani
1. Mokili patatalu ya Asele
2. Mabelé ya bokula ya Dolo
3. Bitando ya matiti ya Salono
4. Mokili patatalu ya Filistia
5. Lobwaku ya ntei ɛsti-wɛsti
a. Mokili patatalu ya Megido
b. Lobwaku ya Yizelele
C. Bangomba na wɛsti ya Yolodani
1. Ngomba mike ya Galilai
2. Ngomba mike ya Kalamele
3. Ngomba mike ya Samalia
4. Sefela (ngomba mike)
5. Mokili ya ngombangomba ya Yuda
6. Esobe ya Yuda
7. Negebe
8. Esobe ya Palana
D. Alaba (Lobwaku ya Rift)
1. Mokili ya nse ya Ula
2. Etúká ya Mbu ya Galilai
3. Lobwaku ya Yolodani
4. Mai ya Mungwamungwa (Mbu Ekufá)
5. Alaba (sudi ya Mai ya Mungwamungwa)
E. Bangomba mpe mwa bangomba na ɛsti ya Yolodani
1. Basana
2. Gileadi
3. Amona mpe Moaba
4. Mwa bangomba ya Edome
F. Bangomba ya Lebanona
[Karte]
Ng. Helemoni
Mole
Abele-mehola
Sukote
Yongebeha
Betele
Gilegale
Gibeoni
Yelusaleme
Hebeloni
Gaza
Bele-Seba
Sodom?
Kadesi
[Map/Picture on page 15]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
KANANA
Megido
GILEADI
Dotani
Sekeme
Betele (Luzi)
Ai
Yelusaleme (Saleme)
Beteleme (Efalata)
Mamele
Hebeloni (Makapela)
Gelala
Bele-Seba
Sodoma?
NEGEBE
Lehoboti?
[Bangomba]
Moliya
[Mai]
Mbu ya Mungwa- mungwa
[Bibale]
Yolodani
[Elilingi]
Abalayama akatisaki mokili yango
[Karte na lokasa 18]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Toloasi
SAMOTOLASI
Neapolisi
Tesaloniki
Amifipolisi
Thessalonica
Beloya
Atene
Kolinti
Efese
Milete
LODE