Boyekoli ya Makomami mapemami mpe ya mambí manso makangani na yango
Boyekoli nimero 1—Mobembo mpo na kotala Mokili ya Ndaka
Bitúká ya mokili yango, lolenge na yango, bangomba mpe mabwaku na yango, bibale mpe mabeke na yango, klimá na yango, mabelé na yango mpe bitwɛlɛ na yango ndenge na ndenge.
1. (a) Mpo na nini ebéngeli oyo ete “Mokili ya Ndaka” ezali oyo ebongi mpenza? (b) Elikya kitoko nini tokoki kobatela kati na makanisi na biso wana tozali kotalela geografi ya Mokili ya Ndaka?
BANDELO ya Mokili ya Ndaka etyamaki na Yehova Nzambe. (Ex. 23:31; Mit. 34:1-12; Yos. 1:4) Na boumeli ya bikeke mingi, bamoko bazalaki kobénga mabelé yango ete mokili ya Palestine, nkombo oyo euti na liloba ya Latin Palaestina mpe na liloba ya Greke Pa·lai·stiʹne. Liloba oyo ya nsuka liuti na liloba ya Liebele Peleʹsheth. Kati na Makomami ya Liebele, Peleʹsheth ebongolami na “Filisitia,” mpe yango ezali kolobela mpenza teritware ya Bafilisitia, oyo bazalaki banguna minene ya libota ya Nzambe. (Ex. 15:14) Nzokande, lokola Yehova alakaki ete akopesa mokili yango epai na mosembwi Abalayama mpe epai na bakitani na ye, ebéngeli oyo ete “Mokili Molakami,” to “Mokili ya Ndaka,” ebongi mpenza. (Gen. 15:18; Det. 9:27, 28; Ebe. 11:9) Mokili yango mozali mpenza kobenda likebi mpo na makambo ndenge na ndenge ya geografi na yango; etando moke wana ezali na biloko mingi ya ndenge na ndenge oyo bikoki kozwama na mabelé mobimba. Lokola Yehova akokaki kopesa libula ya mokili wana ya biloko ndenge na ndenge ya bonzenga epai na batatoli na ye ya kala, boye ntembe ezali te ete akoki mpe kopesa, epai na basambeli na ye oyo bamipesi, paladiso na mokili ya sika oyo ekozipa mabelé mobimba, oyo etondi na bangomba, na mabwaku, na bibale mpe na mabeke oyo ekoki kopesa bango esengo. Tiká sikawa tótya likebi makasi na makambo ndenge na ndenge ya geografi ya Mokili ya Ndaka, wana tozali koleka mpo na kotala yango, kati na makanisi na biso.a
BONENE NA YANGO
2. Etando ya Mokili ya Ndaka oyo efandamaki na Bayuda ezalaki na bonene nini, mpe kati na teritware nini mosusu bamoko na bango bafandaki?
2 Engebene bandelo na yango etyamaki na Nzambe, lokola yango elobelami na Mituya 34:1-12, mokili oyo molakamaki epai na Yisalaele mosengelaki kozala etando moke ya mabelé. Uta nɔ́rdi kino súdi, yango esengelaki kozala na mwayene ya bolai ya kilomɛtɛlɛ 480 mpe bonene ya kilomɛtɛlɛ soko 56. Liboso ya boyangeli ya Mokonzi Davidi mpe Mokonzi Salomo, etando oyo elakamaki ezwamaki naino na mobimba te na basodá, mpe ebele ya mabota matyamaki naino na nsé na bokonzi na bango te. Nzokande, eteni oyo efandamaki mpenza na Bayuda elobelamaka mingi ete ezalaki eteni oyo ebandi na Dani kino Bele-seba, oyo ezalaki na bolai ya kilomɛtɛlɛ 240 kobanda na nɔ́rdi kino súdi. (1 Mik. 4:25) Bonene ya mboka yango, kobanda na Ngomba Kalemele kino Libeke ya Galilai, ezali ya kilomɛtɛlɛ soko 51, mpe na súdi, epai kuna Mai monene ya Méditerranée mazali kotangwa mokemoke kino ngámbo ya súdi-wɛ́sti, ezali na bonene ya kilomɛtɛlɛ koleka 80, kobanda na Gaza kino na Mbu Ekufá. Etando wana oyo efandami na bato, mpe ezwami na wɛ́sti ya Ebale Yordani, ezali na bonene bobele ya kilomɛtɛlɛ-karé soko 15 000. Nzokande, Bayisalaele bafandaki lisusu na mikili ya ɛ́sti ya Yordani (mikili oyo mityamaki te kati na bandelo oyo elakamaki longwa na ebandeli); mpe yango esalaki ete etando mobimba oyo efandamaki ezala na bonene ya kilomɛtɛlɛ-karé pene na 26 000.
BITÚKÁ BITYAMÁ NDELO UTA BOZALISI
3. Na paragrafe oyo, na lisalisi ya kálati “Bitúká ya Mokili ya Ndaka oyo bityamá ndelo uta bozalisi,” lobelá na mokuse bisika oyo bitúká bilandi ya Mokili ya Ndaka, oyo bityamá ndelo uta bozalisi, bizwamaki: (a) bisobe ya wɛ́sti ya Yordani, (b) bitúká ya ngombangomba na wɛ́sti ya Yordani, (c) ngomba mike mpe ngomba patatálú ya ɛ́sti ya Yordani.
3 Mobembo na biso mpo na kotala Mokili ya Ndaka ekomema biso kino tokomona kokabolama ya mokili yango, kokabolama oyo esalemá uta bozalisi. Molɔngɔ́ ya nkombo ya bisika oyo etyami awa na nsé mokosalisa biso na kososola kálati oyo ezali na boyekoli oyo, yango ezali komonisa bandelo ya bitúká oyo bilobelami awa.
Bitúká na yango engebene geografi
A. Bokúla ya Mai Monene.—Yos. 15:12.
B. Bisobe ya wɛ́sti ya Yordani
1. Esobe ya Asele.—Bas. 5:17.
2. Bisika ya likoló ya Dolo.—Yos. 12:23.
3. Bilanga ya bibwɛlɛ na Salono.—1 Nta. 5:16.
4. Esobe ya Filisitia.—Gen. 21:32; Ex. 13:17.
5. Lobwaku ya ntéi ya ɛ́sti-wɛ́sti
a. Esobe ya Megido (Esedalono).—2 Nta. 35:22.
b. Lobwaku ya Yizelele.—Bas. 6:33.
C. Bitúká ya ngombangomba na wɛ́sti ya Yordani
1. Ngomba mike ya Galilai.—Yos. 20:7; Yis. 9:1.
2. Ngomba Kalemele.—1 Mik. 18:19, 20, 42.
3. Ngomba mike ya Samalia.—Yil. 31:5; Amo. 3:9.
4. Sefela.—Yos. 11:2; Bas. 1:9, NW.
5. Mokili ya ngomba na Yuda.—Yos. 11:21.
6. Mokili mokauki ya Yuda (Yesimona).—Bas. 1:16; 1 Sam. 23:19, NW.
7. Mokili ya Ngɛlɛ (Negebi).—Gen. 12:9; Mit. 21:1.
8. Mokili mokauki ya Palani.—Gen. 21:21; Mit. 13:1-3, NW.
D. Alaba Monene (Lobwaku ya Yordani).—2 Sam. 2:29; Yil. 52:7.
1. Lobwaku ya Hula
2. Etúká ya zingazinga na Libeke ya Galilai.—Mat. 14:34; Yoa. 6:1.
3. Etúká ya Lobwaku ya Yordani (Golo).—1 Mik. 7:46; 2 Nta. 4:17; Luka 3:3.
4. Mai ya Monana (Mbu Ekufá) (Mai monene ya Alaba). —Mit. 34:3; Det. 4:49; Yos. 3:16.
5. Alaba (na súdi ya Mai ya Monana).—Det. 2:8.
E. Ngomba mike mpe ngomba patatálú ya ɛ́sti ya Yordani. —Yos. 13:9, 16, 17, 21; 20:8.
1. Mokili ya Basana.—1 Nta. 5:11; Nz. 68:15.
2. Mokili ya Gileadi.—Yos. 22:9, NW.
3. Mokili ya Amona mpe ya Moaba.—Yos. 13:25; 1 Nta. 19:2; Det. 1:5.
4. Ngomba patatálú ya Edome.—Mit. 21:4; Bas. 11:18.
F. Ngomba ya Lebanona.—Yos. 13:5.
A. BOKÚLA YA MAI MONENE
4. Biloko nini mpe klimá nini ezali na bokúla ya mai monene?
4 Na kobandáká botali na biso na wɛ́sti, tozali komona libosoliboso bokúla oyo botandami pembenipembeni ya mai kitoko mpe ya bulé ya Méditerranée. Lokola zɛlɔ ezali mingi pembenipembeni ya ngámbo yango ya wɛ́sti, ezali bobele na libóngo moko ya malamu na nsé ya Ngomba Kalemele, libóngo ya Yafo; kasi na nɔ́rdi ya Ngomba Kalemele ezali na mabóngo mingi ya malamu. Bato ya Foenike, oyo bafandaki na mokili yango pembenipembeni ya eteni wana ya bokúla, bakómaki batambwisi minene ya masuwa na mai monene. Na bokúla wana ya moi makasi, mwayene ya molungé na mbula mobimba ezali bongo mwayene kitoko ya 19o C; nzokande, bileko na yango ya Eté bizalaka molungé makasi, mpe mwayene ya molungé ya mokolo ezali soko ya 34o C na Gaza.
B-1 ESOBE YA ASELE
5, 6. Na maloba mokuse, lobelá (a) Esobe ya Asele, (b) bisika ya likoló ya Dolo.
5 Esobe wana ya pene na mai etandami na bolai ya kilomɛtɛlɛ soko 40, na nɔ́rdi ya Ngomba Kalemele. Bonene na yango ya koleka ezali soko na kilomɛtɛlɛ 13, mpe ezali eteni ya mokili oyo epesamaki na libota ya Asele. (Yos. 19:24-30) Ezalaki esobe moko oyo mabelé na yango mazalaki malamu mpo na milóna mpe mazalaki kobota mbuma mingi; yango ekómaki eutelo ya bilei ya ndako ya mokonzi Salomo.—Gen. 49:20; 1 Mik. 4:7, 16.
B-2 BISIKA YA LIKOLÓ YA DOLO
6 Eteni moke wana ya mabelé, oyo ezali na bokúla ya mai, etandami pembenipembeni ya molɔngɔ́ ya Ngomba Kalemele, na bolai ya kilomɛtɛlɛ soko 32. Bonene na yango ezali bobele ya kilomɛtɛlɛ soko 4. Ezali mpenza eteni ya mabelé oyo ezwami katikati na Ngomba Kalemele mpe Mai monene ya Méditerranée. Na eteni na yango ya súdi, tokokuta engumba Dolo, epai kuna libóngo ezali; mpe na súdi ya engumba yango, bitando ya zɛlɔ bibandi wana. Bangomba mike oyo ezali na nsima ya Dolo ezalaki kobimisa bilei malamu mpo na bilambo ya Salomo. Moko kati na bana basi ya Salomo abalanaki na moyangeli ya etúká yango.—1 Mik. 4:7, 11.
B-3 BILANGA YA BIBWƐLƐ NA SALONO
7. (a) Lolenge nini Salono elobelami kati na esakweli mpe mpo na nini? (b) Na ntango ya Bayuda ya kala, etúká yango ezalaki kosalelama mpo na likambo nini?
7 Na kotalela bonzenga ya bafololo na yango oyo ekómaki kosalelama lokola masese, ezalaki solo likambo libongi ete Salono elobelama kati na emonaneli ya esakweli ya Yisaya oyo ezalaki kolobela mokili ya Yisalaele oyo mozongisamaki na kitoko na yango ya kala. (Yis. 35:2) Yango ezali mokili mokobotaka mbuma mingi, mpe momwangisami malamu na mai. Na bonene na yango, Salono ezali etando moko oyo ekoki kozwa kilomɛtɛlɛ 16 kino 19, mpe oyo etandami na bolai ya kilomɛtɛlɛ soko 64 na súdi ya mokili ya Dolo na pembeni ya mai monene. Na ntango ya kala epai na Bayuda, zámba ya banzeté babéngi chênes itandamaki na eteni ya nɔ́rdi ya Salono. Na nsima ya bobuki mbuma, bitongá mingi bizalaki kolya matiti kuna. Ezali na ntina wana nde yango ebéngamaki bilanga ya bibwɛlɛ na Salono. Na ntango ya Mokonzi Davidi, bitongá ya mokonzi bizalaki kobatelama na Salono. (1 Nta. 27:29) Na mikolo na biso, ezali na bilanga minene ya nzeté ya ndímo-ngai na etúká yango.
B-4 ESOBE YA FILISITIA
8. Esobe ya Filisitia ezwami wapi, mpe wapi makambo ndenge na ndenge oyo tozali kokuta kuna?
8 Eteni oyo ya mabelé ezwami na súdi ya bilanga ya bibwɛlɛ na Salono, etandami na bolai ya kilomɛtɛlɛ soko 80 pembenipembeni ya Mai Monene mpe ekɔti na mokili na ntáká ya kilomɛtɛlɛ soko 24. (1 Mik. 4:21) Na bantango mosusu, bitando ya zɛlɔ oyo bitondi pembenipembeni ya bokúla ya mai bibimaka kino na mokili mpenza, na ntáká ya kilomɛtɛlɛ ata motoba. Yango ezali esobe moko ya ngombangomba, oyo ezali na mɛtɛlɛ 30 longwa na nivo ya Mai Monene, ebimisi mokili ya matiti ya zámba mike mpe, na nsima na Gaza na súdi, etombwani kino mɛtɛlɛ 200. Mabelé na yango mazali malamu mpenza; kasi mbula inɔkaka mingi mpenza te, mpe ezalaka ntango nyonso na likámá ya kokauka ya mai.
B-5 LOBWAKU YA NTÉI YA Ɛ́STI-WƐ́STI
9. (a) Wapi biteni mibale oyo bisali lobwaku ya ntéi ya ɛ́sti-wɛ́sti, mpe lisalisi nini ya ntina yango ezalaki kopesa? (b) Na kosaleláká etánda “Milɔngɔ́ ya bokaboli biteni ya Mokili ya Ndaka,” lobelá na mokuse komonisama ya biteni ndenge na ndenge ya mokili yango.
9 Lobwaku ya ntéi ya ɛ́sti-wɛ́sti losalemi mpenza na biteni mibale, Esobe ya Megido, to Esedalono, na wɛ́sti mpe Lobwaku ya Yizelele, na ɛ́sti. (2 Nta. 35:22; Bas. 6:33) Lobwaku yango ya ntéi lozalaki kosalisa bato na kokatisa mokili yango kozanga mpasi, longwa na lobwaku ya Yordani kino na Méditerranée, mpe ekómaki nzela ya ntina mingi mpo na mombongo. Kati na Esobe ya Megido, molúká ya Kisoni ezali koleka wana; efungoli nzela na yango na elekelo moke oyo ezali katikati na Ngomba Kalemele mpe bangomba mike ya Galilai, ekɔti na Esobe ya Asele mpe na nsima emibwaki kati na Méditerranée. Molúká moke yango mokaukaka na boumeli ya basanza pene na nyonso na eleko ya molungé, kasi na bileko mosusu yango ekómaka mongálá moko monene.—Bas. 5:21.
10. (a) Lobelá Lobwaku ya Yizelele. (b) Etúká oyo elobelami na bokangani na makambo nini ya Biblia?
10 Lobwaku ya Yizelele lotandami na motindo boye ete Ebale Yordani ezwami na súdi-ɛ́sti na yango. Lobwaku yango moke ya Yizelele lozali na bonene ya kilomɛtɛlɛ soko 3,2 mpe lotandami na bolai ya kilomɛtɛlɛ pene na 19. Bosándá na yango ebandi na mɛtɛlɛ koleka 90, mpe na nsima ekiti makasi kino mɛtɛlɛ soko 120 na nsé ya nivo ya mai monene, pene na Betesana. Lobwaku ya ntéi, na mobimba na yango, lozali na mabelé malamu mpo na milóna, mpe eteni na yango ya Yizelele ezali moko na mabelé oyo maleki na biloko mingi kati na mokili yango mobimba. Nkombo Yizelele yango moko elimboli ete “Nzambe akolóna milóna.” (Hos. 2:22, NW) Makomami mazali kolobela bonzenga mpe kitoko ya etúká yango. (Gen. 49:15) Megido mpe Yizelele ezalaki bisika ya ntina kati na bitumba ya Yisalaele mpe mabota mosusu, mpe ezalaki kuna nde Balaka, Gideona, Mokonzi Saulo, mpe Yehu babundaki bitumba.—Bas. 5:19-21; 7:12; 1 Sam. 29:1; 31:1, 7; 2 Mik. 9:27.
C-1 NGOMBA MIKE YA GALILAI
11, 12. (a) Na meko nini Galilai elobelami na boyokani na mosala ya Yesu, mpe banani bazalaki bato ya etúká yango? (b) Kesenisá Galilai ya Ngɛlɛ mpe Galilai ya Likoló.
11 Ezalaki na eteni ya súdi ya ngomba mike ya Galilai (mpe na zingazinga na Libeke ya Galilai) nde Yesu asalaki eteni eleki monene ya mosala na ye ya kotatola mpo na nkombo ya Yehova mpe Bokonzi na ye. (Mat. 4:15-17; Mko. 3:7) Mingi kati na bayekoli na Yesu, bakisá mpe bantoma 11 na ye nyonso ya sembo, bazalaki bato ya Galilai. (Mis. 2:7) Kati na etúká yango, oyo na bantango mosusu ebéngamaka Galilai ya Ngɛlɛ, mokili mozali kitoko mpenza, bangomba etombwani mpenza te koleka mɛtɛlɛ 600. Kobanda na eleko ya Ɔtɔmne kino eleko ya prɛntá, mbula inɔkaka ntango nyonso na mokili yango ya bonzenga, boye etúká yango ezangaka mai soko moke te. Na ntango ya prɛntá, mipanzi ya ngomba nyonso mingɛngisamaka na bafololo, mpe mabelé nyonso kati na lobwaku matondaka na milóna. Na ngomba patatálú ya mike, ezali na mabelé malamu mpenza mpo na kolóna, mpe ngomba itondi na nzeté ya olive mpe na nzeté ya vinyo. Kati na etúká oyo, bingumba bilobelami mingi na Biblia bizali bongo Nasalete, Kana, mpe Naina. (Mat. 2:22, 23; Yoa. 2:1; Luka 7:11) Yesu asalelaki biloko mingi ya etúká yango wana azalaki kopesa masese na ye.—Mat. 6:25-32; 9:37, 38.
12 Na eteni ya nɔ́rdi, to Galilai ya Likoló, ngomba izali na bosándá ya mɛtɛlɛ koleka 1 100, kokómáká bongo makolo ya Ngomba ya Lebanona. Galilai ya Likoló etangwá mpe ezwaka mipɛpɛ mingi; mbula inɔkaka makasi kuna. Na ntango ya lisoló ya Biblia, mipanzi ya ngomba oyo mizali na wɛ́sti mizipamaki na zámba minene. Etúká yango epesamaki na libota ya Nafatali.—Yos. 20:7.
C-2 NGOMBA KALEMELE
13. (a) Kalemele ezali mpenza nini? (b) Lolenge nini Biblia elobeli yango?
13 Na bonzenga nyonso, nsɔngɛ́ ya Ngomba Kalemele ezali komonana likoló mpenza ya Mai monene ya Méditerranée. Lelo oyo, Kalemele ezali molɔngɔ́ ya ngomba mingi, oyo ezali na bolai ya kilomɛtɛlɛ soko 48; yango ezali na bosándá ya mɛtɛlɛ 545 likoló na nivo ya mai monene. Etandami uta na ngomba mike ya Samalia kino na Méditerranée, mpe eteni ya ngomba yango oyo eleki molai longwa na nivo ya mai monene, na ngámbo ya nɔ́rdi-wɛ́sti, mpe oyo ekaboli mipanzi nyonso mibale ya ngomba yango, ezali na bonzenga mpe na kitoko oyo moto moko te akoki kobosana yango. (Loy. 7:5) Nkombo Kalemele elimboli “Elanga monene”; nkombo wana ebongi mpenza na eteni ya ngomba yango oyo ebimisá motó na mai monene mpe ezali na mabelé malamu mpenza; yango etondi na bilanga ya vinyo, banzeté na yango ya mbuma mpe banzeté ya olive, oyo eyebani mingi. Yisaya 35:2 esaleli yango lokola elembo ya nkembo mpe ya bofuluki ya mbuma oyo esengelaki kozala na mokili ya Yisalaele nsima na kozongisama na yango uta na boombo: ‘Nkembo ya Kalemele esengeli kopesamela yango.’ Ezalaki na etúká oyo nde Eliya atyanaki ntembe na banganga ya Baala mpe ezalaki kuna nde “mɔ́tɔ na [Yehova] ekitaki” mpo na komonisa ete Ye aleki likoló, mpe ezalaki na nsɔngɛ́ ya Kalemele nde Eliya abendaki likebi likoló na lipata moke oyo likómaki mbula makasi, kosukisáká bongo, na lolenge ya ekamwiseli, elanga makasi oyo eumelaki na Yisalaele.—1 Mik. 18:17-46.
C-3 NGOMBA MIKE YA SAMALIA
14. Mabota nini mafandaki na ngomba mike ya Samalia, mpe milóna nini mizalaki kobota malamu na etúká yango?
14 Eteni ya súdi ya etúká oyo ezali na ngomba mingi, oyo bosándá na yango ezali ya mɛtɛlɛ koleka 900 na ɛ́sti. (1 Sam. 1:1) Kati na etúká oyo, mbula inɔkaka mingi mpe izangaka te ndenge yango esalemaka na Yuda, oyo ezali na súdi. Etúká oyo efandamaki na bakitani ya Efelaima, mwana ya nsuka ya Yosefe. Eteni na yango ya nɔ́rdi, oyo epesamaki na ndambo ya libota ya Manase, mwana ya liboso ya Yosefe, esangisaki mabwaku mpe bisobe mike oyo izingamaki na ngomba. Mokili yango ya ngombangomba mozali na mabelé malamu mpenza te, atako ezali na bilanga ya vinyo mpe ya olive, oyo bizwamaki na lisalisi ya banzela ya mai oyo batimolaki na mipanzi ya bangomba. (Yil. 31:5) Nzokande, mabwaku ya minene koleka mazali na mabelé malamu mpenza mpo na kolóna biloko ndenge na ndenge, lokola masango mpe lɔsɔ. Ezalaki na bingumba mingi kati na etúká yango na ntango ya lisoló ya Biblia. Na boumeli ya boyangeli ya bokonzi ya nɔ́rdi, Manase atongaki, na kolandana mpenza, mboka-mokonzi misato—Sekeme, Tilisa, mpe Samalia—mpe etúká mobimba ekómaki kobéngama Samalia, nkombo euti na oyo ya mboka-mokonzi.—1 Mik. 12:25; 15:33; 16:24.
15. (a) Lolenge nini mapamboli ya Mose likoló na Yosefe makokisamaki na oyo etali mokili ya Samalia? (b) Lolenge nini mokili yango mopambwamaki lisusu na eleko ya Yesu?
15 Mapamboli oyo Mose alakaki likoló na Yosefe ekokisamaki mpenza na mokili oyo. “Alobaki na ntina na Yosefe ete, [Yehova] apambola mokili na ye, na makabo kitoko na lola, mpe na mamwe, . . . mpe na mbuma kitoko na moi, mpe na biloko malamu bibimi na sanza, mpe na biloko ipusi malamu na nkeka na kalakala, mpe na kotondana na ngomba na koumela seko.” (Det. 33:13-15) Ɛɛ, yango ezalaki mpenza mokili mokopesaka bosepeli mingi. Ngomba na yango izipamaki na zámba minene, mabwaku na yango mazalaki kobota mbuma malamu, mpe mokili yango motondaki maa na bingumba ya bozwi oyo bifandamaki na bibele ya bato. (1 Mik. 12:25; 2 Nta. 15:8) Na bileko biyaki nsima, Yesu asakolaki na mokili ya Samalia, lolenge moko na bayekoli na ye, mpe bazwaki bato mingi kuna, oyo bandimaki losambo ya boklisto.—Yoa. 4:4-10; Mis. 1:8; 8:1, 14.
C-4 SEFELA
16. (a) Makambo nini tozali kokuta na Sefela? (b) Motuya nini etúká wana ezalaki na yango na ntango ya lisoló ya Biblia?
16 Atako nkombo Sefela elimboli “Mokili mokiti,” nzokande yango ezali mpenza etando oyo etondi na ngomba oyo ikoki kokóma kino bosándá ya mɛtɛlɛ soko 450 na eteni ya súdi mpe oyo ekatamikatami na ebele ya mabwaku matandami kobanda na ɛ́sti kino wɛ́sti. (2 Nta. 26:10) Yango ezwami na ɛ́sti ya esobe ya Filisitia oyo ezwami pembenipembeni ya mai mpe esengeli kotalelama lokola mokili mokiti bobele soki tokokanisi yango na ngomba milai ya Yuda, oyo izali mosika na ɛ́sti. (Yos. 12:8) Ngomba na yango, oyo izipamaki na banzeté ya mosuke, itondi sikawa na bilanga ya vinyo mpe ya olive. (1 Mik. 10:27) Sefela ezalaki na bingumba mingi. Kati na lisoló ya Biblia, yango ezali esika oyo ezalaki kopesa libateli na Yisalaele liboso na Bafilisitia to mampinga mosusu nyonso oyo mazalaki koya mpo na komeka kokɔta na Yuda, uta na nzela ya esobe oyo ezali pembenipembeni ya mai monene.—2 Mik. 12:17; Obad. 19.
C-5 MOKILI YA NGOMBA NA YUDA
17. (a) Na meko nini mokili ya ngomba ya Yuda mozalaki kobota mbuma na ntango ya lisoló ya Biblia, mpe tokoloba boni mpo na mikolo na biso? (b) Yuda etalelamaki lokola esika malamu mpo na likambo nini?
17 Oyo ezali mokili motondi na mabanga mpe motombwani likoló; yango etandami na bolai ya kilomɛtɛlɛ soko 80 mpe na bonene ya kilomɛtɛlɛ pene na 32; ezali na bosándá bobandi na kilomɛtɛlɛ 600 kino 1 000, likoló ya nivo ya mai monene. Na ntango ya lisoló Biblia, mokili yango mozipamaki na banzeté, mpe mingi mpenza na mopanzi ya wɛ́sti, bangomba mpe mabwaku etondaki na bilanga ya biloko lokola masango mpe lɔsɔ, banzeté ya olive, mpe bilanga ya vinyo. Yango ezali etúká oyo ezalaki kobimisa nkóna mingi ya malamu, na mafuta, mpe masanga ya vinyo mpo na Yisalaele. Mingi mpenza bazámba ya etando oyo ezwami zingazinga na Yelusaleme ezalaki kokatama mbala na mbala uta na ntango ya lisoló ya Biblia; boye, soki tokokanisi yango na lolenge ezalaki kala, emonani mpenza ete etúká yango ebungisá makoki na yango ya kobota mbuma. Na eleko ya mpiɔ, mbula-mpɛmbɛ ikweaka na bantango mosusu likoló na bisika bileki kotombwana, oyo bizali na ntéi, na ndakisa Beteleme. Na ntango ya kala, Yuda etalelamaki lokola esika malamu mpo na kotonga bingumba mpe mboka ikembisami makasi, mpe na ntango ya yikiyiki bato bakokaki kokima likoló na ngomba yango mpo na kobatelama.—2 Nta. 27:4.
18. (a) Ntango nini Yelusaleme ekómaki mboka-mokonzi ya Yisalaele mpe Yuda? (b) Wapi mwa makambo kitoko oyo tozali kokuta na engumba yango?
18 Yelusaleme, oyo ebéngamaki lisusu Siona, nkombo euti na esika na yango ya libateli, ezali engumba oyo eleki kobenda likebi kati na lisoló ya kala ya Yuda mpe ya Yisalaele. (Nz. 48:1, 2) Na ebandeli, yango ezalaki engumba ya Bakanana, na nkombo Yebusi, oyo etandamaki na mokili ya likoló epai Lobwaku ya Hinomo mpe Lobwaku ya Kidilono ekutani. Nsima wana Davidi abɔtɔlaki engumba yango mpe akómisaki yango mboka-mokonzi, yango eyeisamaki monene na ngámbo ya nɔ́rdi-wɛ́sti, mpe na nsima ekómaki kino Lobwaku ya Tiropeoni. Na bileko bilandaki nsima, Lobwaku ya Hinomo lokómaki kobéngama Gehena. Lokola Bayuda bakómaki kopesa mbeka epai na bikeko kuna, boye esika yango etángamaki mbindo mpe ekómaki ebwakelo ya bosɔtɔ epai kuna bazalaki kobwaka bibembe ya bato mabe. (2 Mik. 23:10; Yil. 7:31-33) Na bongo, mɔ́tɔ na yango oyo ezalaki kozimana te ekómaki elembo ya kolongolama to kobomama ya libela. (Mat. 10:28; Mko. 9:47, 48) Yelusaleme ezalaki bobele na mai moke oyo mazalaki kouta na Etima ya Siloama, na wɛ́sti ya Lobwaku ya Kidilono, mpe mpo na kobatela yango, Mokonzi Hizikiya atongaki efelo moko na libándá mpo na kokangisa lobwaku yango na engumba.—Yis. 22:11; 2 Nta. 32:2-5.
C-6 MOKILI MOKAUKI YA YUDA (YESIMONA)
19. (a) Mpo na nini nkombo ya Yesimona ebongi mpenza na mokili yango? (b) Makambo nini masalemaki na etúká yango oyo mayebisami kati na Biblia?
19 Yesimona ezali nkombo oyo Biblia (NW) ebéngaka Mokili mokauki ya Yuda. Nkombo Yesimona elimboli “Mokili mokauki.” (1 Sam. 23:19, NW, maloba na nsé ya lokasa) Nkombo yango ebongi mpenza mpe etondi na ndimbola! Mokili yango mokauki mozwami na mipanzi ya ɛ́sti ya bangomba ya Yuda oyo esalemi na mabelé mpɛmbɛ ya mabangamabanga; na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 24, bosándá ya bangomba yango ebandi na mɛtɛlɛ koleka 900, mpe ezali kokita wana yango ezali kobɛlɛma na Mbu Ekufá, epai kuna efelo moko ya mabanga makasi ezwami. Kati na Yesimona, bingumba bizali te mpe bobele bato moke nde bafandaka na etúká yango. Ezalaki kati na mokili yango mokauki ya Yuda nde Davidi akendeki komibomba ntango Mokonzi Saulo alingaki koboma ye; ezalaki mpe kati na etando ekaboli mokili wana mokauki mpe Ebale Yordani nde Yoane Mobatisi asakolaki, mpe ezalaki na etúká oyo nde Yesu amitangolaki na boumeli ya mikolo 40 oyo akilaki bilei.b—1 Sam. 23:14; Mat. 3:1; Luka 4:1.
C-7 MOKILI YA NGƐLƐ (NEGEBI)
20. Lobelá Negebi.
20 Negebi ezwami na súdi ya bangomba ya Yuda, epai kuna Abalayama, Yisaka mpe Yakobo, batata ya mabota, bafandaki na boumeli ya bambula mingi. (Gen. 13:1-3; 24:62) Biblia ezali mpe kobénga eteni ya súdi ya mokili yango ete “mokili mokauki ya Zini.” (Yos. 15:1, NW) Negebi, oyo ekokani mwa moke na mokili mokauki, etandami longwa na etúká ya Bele-seba, na nɔ́rdi, kino Kadesi-balenea, na súdi. (Gen. 21:31; Mit. 13:1-3, 26; 32:8) Uta na bangomba ya Yuda, mokili yango mosuki na molɔngɔ́ moko ya ngomba milai, oyo itandami longwa na ɛ́sti kino wɛ́sti, na motindo boye ete, uta kozalisama, yango etɛlɛma lokola efelo ya bopekisi kolekaleka ya bato ya mombongo mpe bokɔti ya banguna uta na súdi ya mokili yango. Bosándá ya mokili yango ezali kokita mpenza kobanda na ngomba, na eteni ya ɛ́sti ya Negebi, kino esobe ya mokili mokauki, oyo ezali na wɛ́sti, pembenipembeni ya bokúla ya mai monene. Na boumeli ya eleko ya molungé, mabelé na yango ekómaka mpenza lokola mokili mokauki, longola bobele pene na mabwaku mosusu ya milúká na yango. Nzokande, mai makoki kozwama na kotimoláká libulu. (Gen. 21:30, 31) Ekóló ya Yisalaele na mikolo na biso ezali koyeisa mai na Negebi na nzela ya myango misalemi na bato mpe ezali kosala mpo na kokómisa biteni na yango bisika malamu mpe bibongi. ‘Ebale ya Ezipito’ ezalaki ndelo ya súdi-wɛ́sti ya Negebi; yango ezalaki mpe ndelo ya súdi, epai kuna Mokili ya Ndaka mosukaki.—Gen. 15:18.
C-8 MOKILI MOKAUKI YA PALANI
21. Palani ezwami wapi, mpe yango ekokisaki mosala nini kati na lisoló ya Biblia?
21 Mokili mokauki ya Palani ezwami na súdi ya Negebi mpe esangani na Lisobe ya Zini. Ntango balongwaki na Sinai, Bayisalaele bakatisaki mokili yango mokauki wana bazalaki kokende na Mokili ya Ndaka, mpe ezalaki uta na Palani nde Mose atindaki banɔ́ngi 12.—Mit. 12:16–13:3.
D. ALABA MONENE (LOBWAKU YA YORDANI)
22. Na kosaleláká kálati oyo ezali na lokasa 272 mpe etánda ya lokasa 273, elongo na paragrafe oyo, lobelá na mokuse makambo minene ya Alaba (Lobwaku ya Yordani) mpe boyokani na yango na teritware ya zingazinga.
22 Moko na bitúká ya kokamwisa awa na mabelé ezali bongo Lobwaku monene ya Yordani. Kati na Biblia, eteni oyo ekatisi Mokili ya Ndaka longwa na nɔ́rdi kino na súdi ebéngami “Alaba.” (Yos. 18:18) Na 2 Samwele 2:29, (NW), kopaswana wana ya mabelé elobelami ete ezali libulu monene. Na nɔ́rdi na yango, Ngomba Helemono ezali kuna. (Yos. 12:1) Kobanda na nsé ya Ngomba Helemono, Lobwaku yango ya Yordani ezali kokita nokinoki epai na súdi, na bozindo ya mɛtɛlɛ soko 800 na nsé ya nivo ya Mbu Ekufá. Kobanda na ndelo ya Mbu Ekufá, na ngámbo ya súdi, Alaba elandi kofungwana, kotombwanáká kino mɛtɛlɛ koleka 200 likoló na nivo ya mai monene, na ntáká ya pene na katikati ya bolai na yango mobimba, longwa na Mbu Ekufá kino Golfe ya Akaba. Na nsima, ezali kokita nokinoki kati na mongálá ya ɛ́sti ya Mai Motane, mongálá oyo mai na yango mazali mɔ́tɔ te mpiɔ mpe te. Kálati ya bokaboli biteni bikeseni, oyo etyami awa na boyekoli oyo, ezali komonisa bokangani oyo ezali kati na Lobwaku ya Yordani mpe mokili oyo mozingi yango.
D-1 LOBWAKU YA HULA
23. Na ntango ya lisoló ya Biblia, makambo nini makangisamaki na etúká ya Hula?
23 Kobandáká na nsé na Ngomba Helemono, Lobwaku ya Yordani ezali kokita nokinoki na bozindo ya mɛtɛlɛ koleka 490 kino etúká ya Hula, oyo etombwani na bosándá boye bokokani mwa moke na nivo ya mai monene. Etúká yango ezwaka mai mingi mpe, atako moi ezalaka makasi na basanza ya eleko ya molungé, yango ezalaka ntango nyonso na bonzenga [ya zámba] na yango ya lángi ya mai ya mpondu. Ezalaki na etúká oyo nde bato ya libota ya Dani bafandaki kati na engumba na bango oyo ebéngamaki mpe Dani; yango ezalaki esika monene ya losambo ya bikeko, kobanda na mikolo ya basambisi kino na mikolo ya bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele. (Bas. 18:29-31; 2 Mik. 10:29) Ezalaki na Kaisalia ya Filipo, engumba oyo ezwamaki penepene na esika oyo Dani ezalaki, nde Yesu amonisaki polele epai na bayekoli na ye ete azalaki Klisto, mpe bato mingi bazali na likanisi ete ezalaki likoló na Ngomba Helemono oyo ezwami pene wana nde kobongwana ya Yesu esalemaki, mikolo motoba na nsima. Longwa na Hula, Lobwaku ya Yordani ekiti kino Libeke ya Galilai, oyo ezwami na mɛtɛlɛ soko 210 na nsé na nivo ya mai monene.—Mat. 16:13-20; 17:1-9.
D-2 ETÚKÁ YA ZINGAZINGA NA LIBEKE YA GALILAI
24. (a) Libeke ya Galilai libéngami na bankombo nini mosusu kati na Biblia? (b) Zingazinga na yango ezalaki ndenge nini na mikolo na Yesu?
24 Libeke ya Galilai mpe zingazinga na yango ezali bisika kitoko mpenza.c Likebi lityami mingi na etúká yango mpamba te ezali esika oyo kati na yango makambo mingi ya mosala ya Yesu masalemaki. (Mat. 4:23) Libeke yango libéngamaka mpe Libeke ya Genesaleta, to Kinelete, to mpe Libeke ya Tibelia. (Luka 5:1; Yos. 13:27; Yoa. 21:1) Libeke yango likangamá mpenza lokola motema ya moto; bolai na yango ezali na kilomɛtɛlɛ pene na 21 mpe bonene na yango ezali ya kilomɛtɛlɛ soko 11 na eteni na yango oyo eleki monene; libeke oyo ezali eutelo mpenza ya mai mpo na mokili wana mobimba. Yango ezingelami na ngomba mikemike na ngámbo na yango pene na nyonso. Etando ya libeke yango na likoló ya mai ezwami na mɛtɛlɛ soko 210 na nsé ya nivo ya mai monene; na ntina wana, bileko na yango ya mpiɔ bizalaka na mwa molungé mpe bileko na yango ya molungé bizalaka milai mpe na moi makasi. Na mikolo na Yesu, yango ezalaki esika monene ya bolɔ́bi mpe botekisi mbisi, mpe bingumba oyo ya bozwi: Kolazi, Betesaida, Kapalanauma, mpe Tibelia, bizwamaki na bokúla to penepene na bokúla ya libeke yango. Mai ya libeke yango mazalaki nyɛɛ, kasi mipɛpɛ mizalaki kobolabola yango na bantango mosusu. (Luka 8:23) Esobe moke ya Genesaleta, oyo ezalaki etando ya mbata misato (triangle), ezwami na ngámbo ya nɔ́rdi-wɛ́sti ya libeke yango. Mabelé na yango mazali malamu mpenza, mpe mazalaki kobimisa pene na mitindo nyonso ya milóna oyo miyebanaki na Mokili ya Ndaka. Na boumeli ya prɛntá, mipanzi ya ngomba oyo mizali na lángi kitoko mpenza mingɛngaka na kongɛnga oyo eleki bisika mosusu nyonso na mokili ya Yisalaele.d
D-3 ETÚKÁ YA LOBWAKU YA YORDANI (GOLO)
25. Wapi makambo ya kobénda likebi oyo tozali kokuta kati na Lobwaku ya Yordani?
25 Lobwaku yango mobimba, oyo lokokani na libulu, lobéngamaka mpe “Alaba.” (Det. 3:17) Lelo oyo, Baalaba babéngaka yango Golo, oyo elimboli “Libulu.” Lobwaku yango ebandi na Libeke ya Galilai mpe efungwamá mpenza na bisika mingi na yango—na bonene ya kilomɛtɛlɛ soko 19 na bisika mosusu. Ebale Yordani yango moko etandami na mɛtɛlɛ soko 46 na nsé na lisobe ya lobwaku yango, ebaluki mpe engumbami nyokanyoka na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 320 mpo na kosukisa kilomɛtɛlɛ 105 oyo etikali mpo na kokóma na Mbu Ekufá.e Na kokitáká mpe komatáká na ntina na ba chutes to bwéta 27 oyo izali kati na elekelo na yango, Ebale Yordani ekitá na nsé mpenza, na mɛtɛlɛ soko 180, na ntango ezali kokóma na Mbu Ekufá. Na Yordani ya Ngɛlɛ, banzeté mingi ya mike mpe ya minene itandami pembenipembeni ya ebale; mingimingi mpenza banzeté ebéngami tamaris, oléandres, mpe saules, oyo na nsé na yango, na ntango ya lisoló ya Biblia, bankosi mpe bana na bango bazalaki komibomba. Yango eyebani lelo na nkombo ya Zor mpe, na ntango ya prɛntá, ndambo ya etando na yango ezindaka na mai. (Yil. 49:19) Likoló na mopanzi mokomoko ya etando yango ya mabelé oyo ekokani na zámba moke ya banzeté kilikili, Qattara etombwani wana; yango ezali etando moke ya mabelé oyo etangwá mpe ezali mpasi mpo na kokɔta kuna; yango etondi na ngomba mike ya patatálú mpe ya mipanzi milyamá, oyo mizali kokóma kino na bisobe ya Golo yango moko. Bisobe oyo bizali na eteni ya nɔ́rdi ya Golo, to Alaba, bitondi na bilanga bipai binso. Ezala na eteni ya súdi, epai na Mbu Ekufá, ngomba patatálú ya Alaba, oyo ekómá lelo mokili mokauki, elobelamaki ete ezalaki kobota mitindo ndenge na ndenge ya mbuma babéngi dattes, bakisá mpe mbuma mingi mosusu oyo ibotaka na mikili ya molungé. Yeliko ezalaki, mpe ezali kino lelo, engumba ya Lobwaku ya Yordani oyo eyebani mingi koleka.—Yos. 6:2, 20; Mko. 10:46.
D-4 MAI YA MONANA (MBU EKUFÁ)
26. (a) Wapi mwa makambo minene oyo matali Mbu Ekufá? (b) Litatoli makasi nini etando yango ezali kopesa na ntina na bikateli ya Yehova?
26 Oyo ezali moko na bitando ya mai ya kokamwisa awa na mabelé. Yango ebongi mpenza kobéngama “Mbu Ekufá” mpo ete ezali ata na mbisi moko te mpe ezali bobele na bitwɛlɛ moke pembenipembeni na yango. Biblia ebéngi yango Mai ya Monana, to Mai Monene ya Alaba, mpamba te yango ezwami kati na lobwaku ya Alaba. (Gen. 14:3, NW; Yos. 12:3) Mai yango matandami na bolai ya kilomɛtɛlɛ pene na 75, kobanda na nɔ́rdi kino súdi, mpe ezali na bonene ya kilomɛtɛlɛ 15. Etando na yango na likoló ya mai ezwami na mɛtɛlɛ soko 400 na nsé ya Mai Monene ya Méditerranée; likambo yango lisali ete mai wana mázala esika oyo ezwami na nsé mingi koleka bisika mosusu nyonso awa na mabelé. Na eteni ya nɔ́rdi, yango ezali na bozindo ya mɛtɛlɛ soko 400. Na ngámbo mokomoko, mai yango masuki na bifelo ya ngomba ya mabelé makasi mpe na mitó ya mabanga mineneminene. Atako Ebale Yordani esopaka mai ya sika kati na yango, nzokande ezali ata na nzela moko te epai kuna mai mabimaka uta na Mai wana ya Monana, longola bobele na ntango oyo mai emataka na lolenge ya londende; komata yango esalemaka nokinoki na kolandáká boíké ya mai oyo makɔti kuna. Mai wana oyo makangamá sé esika moko matondi na biloko mikemike ya makasi (25 %), mingimingi mpenza mungwa, mpe mazali na ngɛngɛ oyo ebomaka bambisi mpe esalaka mpasi soki ekɔti na miso ya moto. Bapaya oyo bakendaka kotala mokili ya zingazinga ya Mbu Ekufá bamiyokaka mbala mingi ete bazali kati na esika oyo esundolamá mpe ebebisamá. Ezali esika ya bakufi. Atako na ntango ya kala etúká ya zingazinga ya Mbu Ekufá ezalaki “na mai mingi . . . lokola na elanga na [Yehova],” nzokande yango ekómá sikawa ‘esika ebebá’ mpe, uta kobeba na yango, mbula pene na 4 000 esili koleka; likambo yango lizali litatoli monene oyo limonisi ete bikateli oyo Yehova akweisaki likoló na Sodomo mpe Gomola, mboka iye izwamaki kuna, bikoki kobongwana te.—Gen. 13:10; 19:27-29; Sef. 2:9.
D-5 ALABA (NA SÚDI YA MAI YA MONANA)
27. Alaba ya súdi ezwami na teritware ya lolenge nini mpe, na ntango ya kala, yango ezalaki koyangelama na nani?
27 Eteni oyo ya nsuka ya Lobwaku ya Yordani etandami na bolai ya kilomɛtɛlɛ mosusu 160 na súdi. Etando yango ezali mpenza mokili mokauki. Mbula inɔkaka mingi te, mpe moi mobɛtaka makasi koleka. Biblia ebéngi yango mpe “Alaba.” (Det. 2:8) Pene na katikati na yango, Alaba ezali kokóma na eteni oyo eleki likoló, oyo ezali na bosándá ya mɛtɛlɛ koleka 200 likoló na nivo ya mai monene; na nsima, na ngámbo ya súdi, yango ezali lisusu kokita kino na Golfe ya Akaba, mongálá ya Mai Motane oyo mozali na ngámbo ya ɛ́sti. Ezalaki awa na libóngo ya Eseyono-gebele nde Salomo asalaki masuwa mingi. (1 Mik. 9:26) Na boumeli ya bileko mingi ya boyangeli ya bakonzi ya Yuda, eteni oyo ya Alaba ezalaki na mabɔkɔ ya bokonzi ya Edome.
E. NGOMBA MIKE MPE NGOMBA PATATÁLÚ YA Ɛ́STI YA YORDANI
28. Na oyo etali mosala ya bilanga, mokili ya Basana mpe mokili ya Gileadi ezali na motuya nini, mpe lolenge nini bitúká yango bilobelami na lisoló ya Biblia?
28 “Ngámbo na Yordani epai na [ɛ́sti]” ezali kotombwana nokinoki uta na Lobwaku ya Yordani mpe esali molɔngɔ́ ya ngomba patatálú. (Yos. 18:7; 13:9-12; 20:8) Na nɔ́rdi na yango, mokili ya Basana ezali kuna (E-1); mokili yango, elongo na ndambo ya Gileadi, mopesamaki na libota ya Manase. (Yos. 13:29-31) Yango ezali mokili epai kuna bazalaki kobɔkɔla bibwɛlɛ, mpe mokili motondaki na basáli na bilanga; yango ezalaki ngomba patatálú oyo mwayene ya bosándá na yango ezalaki ya mɛtɛlɛ pene na 600 likoló na nivo ya mai monene. (Nz. 22:12; Ezek. 39:18; Yis. 2:13; Zek. 11:2) Na mikolo na Yesu, mokili yango mozalaki kobota biloko mingi mpe, lelo oyo, bilanga na yango bibotaka mbuma mingi mpenza. Na kolandana, na ngámbo ya súdi, mokili ya Gileadi motandami wana (E-2); ndambo na yango, oyo ekitá na nsé koleka, epesamaki na bato ya libota ya Gada. (Yos. 13:24, 25) Yango ezali mokili ya ngombangomba oyo bosándá na yango ezali ya mɛtɛlɛ 1 000; na eleko ya mpiɔ, mbula inɔkaka mingi kati na yango mpe na eleko ya molungé, mamwe ezipaka yango na boíké mpenza; yango ezali mpe mokili moko malamu mpo na kobɔkɔla bibwɛlɛ mpe moyebanaki mingi mpo na malasi na yango ya nsolo kitoko. Lelo oyo, yango eyebani mingi mpo na mbuma kitoko na yango ya vinyo. (Mit. 32:1; Gen. 37:25; Yil. 46:11) Ezalaki na mokili ya Gileadi nde Davidi akimaki Abesaloma, mpe na eteni na yango ya wɛ́sti, Yesu ateyaki kati na ‘bitúká ya Dekapoli.’—2 Sam. 17:26-29; Mko. 7:31.
29. Na ɛ́sti ya Yordani, mikili nini mizwami na súdi, mpe yango eyebanaki na ntina na makambo nini?
29 “Mokili ya Amona” (E-3) mozwami na súdi ya Gileadi, mpe ndambo na yango epesamaki na libota ya Gada. (Yos. 13:24, 25; Bas. 11:12-28) Ezali ngomba patatálú ya kitá-matá, kasi ezali mokili mobongi mpenza mpo na koleisa bampate. (Ezek. 25:5) Mwa mosika na ngámbo ya súdi, “mokili na Moaba” mozali kuna. (Det. 1:5) Bato na Moaba bazalaki babateli minene na mpate, mpe kino lelo, mosala ya liboso kati na etando wana ezali mosala ya kobɔkɔla mpate. (2 Mik. 3:4) Na nsima, na súdi-ɛ́sti ya Mbu Ekufá, ngomba patatálú ya Edome ezali wana (E-4). Bitíká ya bingumba makasi na yango ya mombongo, na ndakisa engumba ya Petra, bizali kino lelo.—Gen. 36:19-21; Obad. 1-4.
30. Ngomba patatálú ikangisami na eloko nini na ɛ́sti?
30 Na ɛ́sti ya ngomba mike mpe ngomba yango patatálú, mokili monene oyo mokauki motandami wana; yango ezali etando ya mabangamabanga mpe epesaka mikakatano mpo na bosáli mobembo bandá na Mokili ya Ndaka kino mokili ya Mésopotamie, kosaláká ete banzela ya bosáli mobembo ikende kobaluka mosika na nɔ́rdi. Na súdi, mokili yango mokauki mozali kokutana na bitando ya zɛlɔ ya mokili monene mpe mokauki ya Arabie.
F. NGOMBA YA LEBANONA
31. (a) Ngomba ya Lebanona isalemi na nini? (b) Makambo nini mazali kino lelo na ngomba ya Lebanona oyo mazalaki mpe bongo na ntango ya lisoló ya Biblia?
31 Kati na etando mobimba ya Mokili ya Ndaka, ngomba ya Lebanona nde emonanaka mingi koleka. Yango esalemi mpenza na milɔngɔ́ mibale ya ngomba oyo izali kotalana. Ngomba mike oyo izwami na molɔngɔ́ ya ngomba ya Lebanona izali kolandana kino Galilai ya Likoló. Na bisika mingi, ngomba yango izali kokóma kino bokúla ya mai monene. Kati na molɔngɔ́ ya ngomba yango, esika oyo eleki kotombwana ezali na mɛtɛlɛ soko 3 000 likoló na nivo ya mai monene. Nsɔngɛ́ oyo eleki kotombwana kati na molɔngɔ́ ya ngomba ibéngami Anti-Liban, oyo italani na molɔngɔ́ ya ngomba ya Lebanona yango moko, ezali bongo Ngomba kitoko ya Helemono, oyo etombwani na bosándá ya mɛtɛlɛ 2 814 likoló ya nivo ya mai monene. Mbula-mpɛmbɛ oyo ekweaka kuna epesaka mai mingi na Ebale Yordani mpe ezalaka eutelo ya mamwe na ntango ya elanga oyo eyaka na nsuka ya eleko ya prɛntá. (Nz. 133:3) Ngomba ya Lebanona iyebanaki mingimingi mpo na banzeté milai na yango ya ɛlɛzɛ (cèdre), oyo mabaya na yango kitoko masalelamaki kati na botongi ya tempelo ya Salomo. (1 Mik. 5:6-10) Atako, na mikolo na biso, banzeté ya ɛlɛzɛ etikalá bobele moke kuna, nzokande mipanzi ya ngomba yango mizali naino kosalelama mpo na bilanga ya vinyo, bilanga ya olive, mpe banzeté mosusu ya mbuma, lokola yango ezalaki na ntango ya lisoló ya Biblia.—Hos. 14:5-7.
32. Lolenge nini Mose alobelaki na bosolo mpenza Mokili ya Ndaka?
32 Lokola tosukisi mobembo na biso mpo na kotala Mokili ya Ndaka ya Yehova, mpe lokola totɛlɛmi katikati na Mai Monene mpe mokili mokauki ya nsɔ́mɔ, oyo mozwami na ɛ́sti, tokoki komona sikawa kati na makanisi na biso nkembo oyo yango elataki na mikolo ya Yisalaele. Ya solo, yango ezalaki mpenza “mokili malamu mingi . . . , eleki na mabɛlɛ mpe na mafuta na nzoi.” (Mit. 14:7, 8; 13:23) Mose alobelaki yango na maloba oyo malandi: ‘Yehova Nzambe na yo akokɔtisa yo na mokili malamu, mokili na misóló na mai mpe na bitoko mpe na mitó na mai ikobimaka na mabwaku mpe na ngomba, mokili na masango mpe na lɔsɔ, mpe na nzeté na vinyo mpe na nzeté na mosuke mpe na limona, mokili na nzeté na olive mpe na mafuta na nzoi, mokili kuna ekolya yo limpa na kosɛnga te, kuna ekozanga bino eloko te, mokili mabanga na yango mazali ebendé, mpe kuna ekotimola bino mondo na ngomba na yango. Okolya mpe okotonda, mpe okasanzola Yehova Nzambe na yo mpo na mokili malamu apesaki yo.’ (Det. 8:7-10) Tiká ete baoyo nyonso balingi Yehova báyeba kopesa matɔ́ndi motindo moko mpo ete azali kokana kobongola mabelé mobimba oyo paladiso ya nkembo, na motindo ya Mokili ya Ndaka na ye, na ntango ya kala.—Nz. 104:10-24.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 332-333.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 335.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 336.
d Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 737-740.
e Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 334.
[Karte na lokasa 272]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
BITÚKÁ ya MOKILI YA NDAKA OYO BITYAMÁ NDELO UTA BOZALISI
(mpe teritware oyo ekangami na yango)
MI 0 10 20 30 40 50 60
KM 0 20 40 60 80
(Mpo na milɔngɔ́ ya bokaboli V—V, W—W, X—X, Y—Y, mpe Z—Z, talá lokasa lolandi)
KOMONISAMA YA NIMERO
MAI MONENE YA MÉDITERRANÉE
A Bokúla ya Mai Monene
Yafo
B-1 Esobe ya Asele
B-2 Bisika ya likoló ya Dolo
Dolo
B-3 Bilanga ya bibwɛlɛ na Salono
B-4 Esobe ya Filisitia
Asedode
Asekelone
Ekelone
Gata
Gaza
B-5 Lobwaku ya ntéi ya ɛ́sti-wɛ́sti (Esobe ya Megido, Lobwaku ya Yizelele)
Bete-sana
C-1 Ngomba mike ya Galilai
Kana
Naina
Nasalete
Tulo
C-2 Ngomba Kalemele
C-3 Ngomba mike ya Samalia
Betele
Yeliko
Samalia
Tisila
Sekeme
C-4 Sefela
Lakisi
C-5 Mokili ya ngomba na Yuda
Beteleme
Geba
Hebeloni
Yelusaleme
C-6 Mokili mokauki ya Yuda (Yesimona)
C-7 Mokili ya Ngɛlɛ (Negebi)
Bele-seba
Kadesi-balenea
Ebale ya Ezipito
C-8 Mokili mokauki ya Palani
D-1 Lobwaku ya Hula
Dani
Kaisalia na Filipi
D-2 Etúká ya zingazinga na Libeke ya Galilai
Betesaida
Kapalanauma
Kolazi
Libeke ya Galilai
Tibelia
D-3 Etúká ya Lobwaku ya Yordani (Golo)
Ebale Yordani
D-4 Mai ya Monana (Mbu Ekufá) (Mai Monene ya Alaba)
Mai ya Monana
D-5 Alaba (na súdi ya Mai ya Monana)
Esione-gebele
Mai Motane
E-1 Mokili ya Basana
Damaseke
Edeli
E-2 Mokili ya Gileadi
Laba
Lamoto-gileadi
Lobwaku ya Yaboko
E-3 Mokili ya Amona mpe ya Moaba
Heseboni
Kili-halesete
Medeba
Lobwaku ya Alenono
Lobwaku ya Zelede
E-4 Ngomba patatálú ya Edome
Petra
F Ngomba ya Lebanona
Sidona
Ngomba ya Lebanona
Ngomba ya Helemono
[Karte na lokasa 273]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MILƆNGƆ́ YA BOKABOLI BITENI YA MOKILI YA NDAKA
(Mpo na koyeba nkombo ya bisika, talá kálati oyo etyami na lokasa ya pembeni)
Bosándá bozwi pene na mbala 10 emekeli ya semba
Eteni ya wɛ́sti-ɛ́sti katisá Efelaima (V—V)
Mai Monene ya Méditerranée
B-3 Bilanga ya bibwɛlɛ na Salono
C-3 Ngomba mike ya Samalia
D-3 Alaba to Lobwaku ya Yordani (Golo)
Qattara
Zɔlɔ
E-2 Mokili ya Gileadi
MI 0 5 10
KM 0 8 16
Mituya oyo mizali na lobɔkɔ Mituya ya lobɔkɔ ya mobali ya mwasi mimonisi BAMƐTƐLƐ mimonisi emekeli babéngi PIEDS
+900 +3 000
+600 +2 000
+300 +1 000
0 (Nivo ya Mai Monene) 0
−300 −1 000
−600 −2 000
Eteni ya wɛ́sti-ɛ́sti katisá Yuda (W—W)
Mai Monene ya Méditerranée
B-4 Bitando ya zɛlɔ
Esobe ya Filisitia
C-4 Sefela
C-5 Mokili ya ngomba na Yuda
Yelusaleme
C-6 Mokili mokauki ya Yuda
D-4 Lobwaku ya Yordani
E-3 Mokili ya Amona mpe ya Moaba
MI 0 5 10
KM 0 8 16
Mituya oyo mizali na lobɔkɔ Mituya ya lobɔkɔ ya mobali ya mwasi mimonisi BAMƐTƐLƐ mimonisi emekeli babéngi PIEDS
+900 +3 000
+600 +2 000
+300 +1 000
0 (Nivo ya Mai Monene) 0
−300 −1 000
−600 −2 000
Eteni ya wɛ́sti-ɛ́sti katisá Yuda (X—X)
Mai Monene ya Méditerranée
B-4 Bitando ya zɛlɔ
Esobe ya Filisitia
C-4 Sefela
C-5 Mokili ya ngomba na Yuda
C-6 Mokili mokauki ya Yuda
D-4 Lobwaku ya Yordani
Mai ya Monana
E-3 Mokili ya Amona mpe ya Moaba
MI 0 5 10
KM 0 8 16
Mituya oyo mizali na lobɔkɔ Mituya ya lobɔkɔ ya mobali ya mwasi mimonisi BAMƐTƐLƐ mimonisi emekeli babéngi PIEDS
+900 +3 000
+600 +2 000
+300 +1 000
0 (Nivo ya Mai Monene) 0
−300 −1 000
−600 −2 000
−9(km) 00 −
Eteni ya súdi-nɔ́rdi pembenipembeni ya ngomba ya wɛ́sti ya Yordani (Y—Y)
C-7 Negebi
C-5 Mokili ya ngomba na Yuda
C-3 Ngomba mike ya Samalia
B-5 Lobwaku ya Yizelele
C-1 Ngomba mike ya Galilai
F
MI 0 5 10 20
KM 0 8 16 32
Mituya oyo mizali na lobɔkɔ Mituya ya lobɔkɔ ya mobali ya mwasi mimonisi BAMƐTƐLƐ mimonisi emekeli babéngi PIEDS
+900 +3 000
+600 +2 000
+300 +1 000
0 (Nivo ya Mai Monene) 0
Eteni ya súdi-nɔ́rdi pembenipembeni ya Alaba to Lobwaku ya Yordani (Z—Z)
D-5
D-4 Mai ya Monana
D-3 Alaba to Lobwaku ya Yordani (Golo)
D-2 Libeke na Galilai
D-1 Lobwaku ya Hula
F
MI 0 5 10 20
KM 0 8 16 32
Mituya oyo mizali na lobɔkɔ Mituya ya lobɔkɔ ya mobali ya mwasi mimonisi BAMƐTƐLƐ mimonisi emekeli babéngi PIEDS
+900 +3 000
+600 +2 000
+300 +1 000
0 (Nivo ya Mai Monene) 0
−300 −1 000
−600 −2 000
−900 −3 000