Tiká disiplini ya Yehova ebongisa yo
“Okokamba ngai na toli na yo, mpe na nsima okomema ngai tii na nkembo.”—NZ. 73:24.
1, 2. (a) Tosengeli kosala nini mpo tózala na boyokani malamu na Yehova? (b) Kotalela masolo ya Biblia oyo elobeli ndenge oyo bato mosusu basalaki ntango Yehova apesaki bango disiplini ekosalisa biso na nini?
“MPO na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu. Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azali esika na ngai ya kokima.” (Nz. 73:28) Na maloba yango, mokomi ya nzembo amonisaki ete azalaki kotyela Nzambe motema. Nini etindaki ye aloba maloba wana? Liboso, ntango amonaki ete bato ya mabe bazalaki na kimya, akómaki nkandankanda. Amilelaki boye: “Napɛtoli motema na ngai kaka mpamba mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kaka mpamba mpo na komonisa ete nazali na ngambo te.” (Nz. 73:2, 3, 13, 21) Kasi ntango akɔtaki na “esika mosantu monene ya Nzambe,” alongaki kosembola makanisi na ye mpe kobatela boyokani na ye na Nzambe. (Nz. 73:16-18) Likambo wana epesaki mokomi wana ya nzembo liteya moko monene: Soki moto alingi kobatela boyokani malamu na Yehova, asengeli koyanganaka elongo na basaleli ya Nzambe, kondima toli, mpe kosalela yango.—Nz. 73:24.
2 Biso mpe tolingi kozala na boyokani malamu na Yehova, Nzambe ya solo mpe ya bomoi. Mpo na yango, tosengeli kotika toli to disiplini na ye ebongisa biso mpo tókóma bato oyo bakoki kosepelisa ye! Na ntango ya kala, Nzambe amoniselaki bato mosusu mpe bikólo mosusu motema mawa na ndenge apesaki bango mabaku ya kondima disiplini na ye. Masolo yango ekomamá na Biblia “mpo eteya biso” mpe ezala “likebisi mpo na biso baoyo tokómi na bansuka ya bantango oyo.” (Rom. 15:4; 1 Ko. 10:11) Kotalela masolo yango na likebi ekosalisa biso tóyeba makanisi ya Yehova mpe ekomonisa biso ndenge oyo tokoki kotika Yehova abongisa biso.
YEHOVA ASALAKA LOKOLA MOYEMI-MBƐKI
3. Elilingi nini Yisaya 64:8 mpe Yirimia 18:1-6 esaleli mpo na komonisa bokonzi oyo Yehova azali na yango likoló ya bato? (Talá elilingi na ebandeli ya lisolo.)
3 Yisaya 64:8 esaleli maloba ya elilingi mpo na komonisa bokonzi oyo Yehova azali na yango likoló ya bato mpe bikólo; elobi boye: “Ee Yehova, yo nde Tata na biso. Biso tozali mabele ya lima, mpe yo nde Moyemi na biso; mpe biso nyonso tozali mosala ya lobɔkɔ na yo.” Moyemi-mbɛki asalaka mbɛki ya lolenge nyonso oyo alingi na mabele ya lima oyo azali na yango. Mabele ya lima ekoki te koyebisa moyemi-mbɛki lolenge ya mbɛki oyo asengeli kosala. Ezali mpe bongo mpo na bato mpe Nzambe. Moto azali na lotomo te ya koyebisa Nzambe lolenge oyo asengeli kobongisa ye, ndenge kaka mabele ya lima ekoki te koyebisa moyemi-mbɛki lolenge ya mbɛki oyo elingi kozala.—Tángá Yirimia 18:1-6.
4. Yehova abongisaka bato mpe bikólo na makasi? Limbolá.
4 Na boyokani na ye na Yisraele ya kala, Yehova amonisaki ete azali na bokonzi ya kosala ndenge moyemi-mbɛki asalelaka mabele ya lima. Kasi bokeseni ezali monene. Moyemi-mbɛki akoki kozwa mabele ya lima mpe kosala na yango lolenge nyonso ya mbɛki oyo alingi. Yehova abongisaka nde bato to mabota na makasi, akómisaka basusu malamu mpe basusu mabe? Biblia elobi ete asalaka bongo te. Yehova apesá bato likabo moko ya motuya mingi: bonsomi ya kopona. Asalelaka te bokonzi na ye na ndenge oyo ekobebisa bonsomi wana oyo apesá biso. Bato nde basengeli kopona soki balingi ete Yehova, Mozalisi na biso, abongisa bango to te.—Tángá Yirimia 18:7-10.
5. Yehova asalaka nini soki bato baboyi ete abongisa bango?
5 Bongo soki moto azali motó makasi mpe aboyi ete Yehova, Moyemi na biso, abongisa ye? Na ntango yango, ndenge nini Yehova asalelaka bokonzi na ye? Tókanisa likambo oyo moyemi-mbɛki asalaka na mabele ya lima oyo ezali kobonga te ntango azali kosala na yango mbɛki moko boye. Moyemi akoki kosala na yango mbɛki ya lolenge mosusu, to mpe kobwaka yango. Kasi, soki mabele ya lima ebebi ndenge wana, mbala mingi ezalaka foti ya moyemi-mbɛki. Nzokande, likambo ya ndenge wana ekómelaka Yehova te. (Mib. 32:4) Soki moto aboyi kotika Yehova abongisa ye, foti ezalaka kaka ya moto yango ye moko. Yehova abongolaka ndenge na ye ya kobongisa bato na kolanda ndenge oyo bazali kotalela disiplini na ye. Soki moto andimi kotosa ye, Yehova abongisaka ye na ndenge ya malamu. Na ndakisa, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali “bambɛki ya motema mawa” oyo babongisami mpo na kokóma ‘bambɛki mpo na mosala ya malamu.’ Nzokande, baoyo bazali mitó makasi mpe batɛmɛlaka Nzambe bakómaka “bambɛki ya nkanda oyo ebongi na libebi.”—Rom. 9:19-23.
6, 7. Mokonzi Davidi asalaki nini ntango Yehova apesaki ye toli? Bongo Mokonzi Saulo asalaki nini?
6 Lolenge moko oyo Yehova abongisaka bato ezali na nzela ya toli to disiplini. Na ndakisa, tókanisa ndenge oyo abongisaki bakonzi mibale ya liboso ya Yisraele: Saulo ná Davidi. Ntango Mokonzi Davidi asalaki ekobo na Bate-Sheba, makambo oyo asalaki ememelaki ye moko mpe bato mosusu mpasi. Atako Davidi azalaki mokonzi, Yehova azangaki te kopesa ye disiplini ya makasi. Atindaki mosakoli Natane akende kopamela Davidi. (2 Sa. 12:1-12) Davidi asalaki nini? Ayokaki mawa makasi mpe abongolaki motema. Na yango, Nzambe amoniselaki ye motema mawa.—Tángá 2 Samwele 12:13.
7 Nzokande, Saulo, mokonzi oyo azalaki liboso ya Davidi, andimaki toli te. Na nzela ya mosakoli Samwele, Yehova apesaki Saulo mitindo ya polele ete aboma Baamaleke ná bibwɛlɛ na bango nyonso. Saulo atosaki etinda wana ya Nzambe te. Atikaki na bomoi Agage, mokonzi na bango, mpe abatelaki bibwɛlɛ ya kitoko. Mpo na nini? Na ntembe te, ezalaki mpe mpo azalaki na mposa ya kozwa lokumu. (1 Sa. 15:1-3, 7-9, 12) Ntango Yehova apesaki ye toli na nzela ya Samwele, Saulo asengelaki kolɛmbisa motema, mpe kotika ete Moyemi Monene abongisa ye. Nzokande, Saulo aboyaki Yehova abongisa ye. Alukaki nde komilongisa. Amonisaki ete asalaki likambo ya mabe te mpamba te bibwɛlɛ oyo abatelaki akokaki kopesa yango mbeka, mpe atyolaki toli ya Samwele. Yehova aboyaki Saulo azala mokonzi; mpe banda wana, Saulo abongisaki lisusu te boyokani na ye na Nzambe ya solo.—Tángá 1 Samwele 15:13-15, 20-23.
NZAMBE APONAKA BILONGI TE
8. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge ekólo Yisraele esalaki ntango Yehova alukaki kobongisa yango?
8 Yehova asukaka kaka na kobongisa bato te, apesaka mpe bikólo mobimba libaku ya kotika ye abongisa bango. Nsima ya kobimisa bana ya Yisraele na boombo na Ezipito na mobu 1513 L.T.B., Yehova asalaki na bango kondimana moko. Yehova aponaki Yisraele ezala ekólo na ye moko mpe alakaki ete akobongisa yango, ete akozala Moyemi na yango. Kasi, Bayisraele bazalaki se kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova; bamekolaki kutu losambo ya banzambe ya bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango. Mbala na mbala, Yehova azalaki kotinda basakoli básalisa Bayisraele bázongela makanisi ya malamu, kasi bazalaki koyoka te. (Yir. 35:12-15) Lokola bazalaki mitó makasi, Yehova apesaki bango disiplini ya makasi. Ndenge moko na mbɛki oyo ebongi na libebi, bokonzi ya mabota zomi ya nɔrdi ya Yisraele ekweaki na mabɔkɔ ya bato ya Asiri, mpe bokonzi ya mabota mibale ya sudi ekweaki na mabɔkɔ ya bato ya Babilone. Likambo yango esengeli kopesa biso liteya monene! Yehova akobongisa biso malamu kaka soki tondimi abongisa biso.
9, 10. Bato ya Ninive basalaki nini ntango bayokaki makebisi ya Nzambe?
9 Yehova apesaki mpe bato ya Ninive, mboka-mokonzi ya Asiri, libaku ya kondima makebisi na ye. Alobaki na Yona ete: “Tɛlɛmá, kende na Ninive engumba monene, mpe sakwelá yango ete mabe na bango emati kino liboso na ngai.” Yehova akanaki kobebisa Ninive mpo bato na yango bazalaki mabe mpenza.—Yona 1:1, 2; 3:1-4.
10 Nzokande, ntango Yona asakolaki nsango wana ya libebi, “bato ya Ninive babandaki kondimela Nzambe, mpe basakolaki ete bákila bilei mpe bálata ngɔtɔ, banda na moto oyo aleki monene na kati na bango tii na moto oyo aleki moke na kati na bango.” Mokonzi na bango “atɛlɛmaki na kiti na ye ya bokonzi mpe alongolaki elamba na ye ya bokonzi mpe alataki ngɔtɔ mpe afandaki na putulu ya mɔtɔ.” Bato ya Ninive bandimaki Yehova abongisa bango mpe babongolaki mitema. Yango wana, Yehova abebisaki lisusu engumba yango te.—Yona 3:5-10.
11. Ezaleli nini ya Yehova emonani na makambo oyo asalelaki Yisraele mpe Ninive?
11 Atako Yisraele ezalaki ekólo oyo Nzambe aponaki, Yehova apesaki yango disiplini. Nzokande, bato ya Ninive basalaki kondimana na Nzambe te. Atako bongo, Yehova atindelaki bango nsango ya likebisi mpe amoniselaki bango motema mawa ntango batikaki ye abongisa bango, ndenge moyemi-mbɛki abongisaka mabele ya lima. Bandakisa yango mibale emonisi mpenza polele ete Yehova, Nzambe na biso, “aponaka bilongi te”!—Mib. 10:17.
YEHOVA AYEBAKA NTANGO OYO ESENGELI ABONGOLA EKATELI OYO AZWAKI
12, 13. (a) Mpo na nini Nzambe abongolaka ekateli na ye na kolanda ezaleli oyo moto amonisi ntango alingi kobongisa ye? (b) Na ndenge nini Yehova “ayokaki mawa” na likambo ya Saulo? Bongo na likambo ya Ninive?
12 Ndenge oyo Yehova asalaka ntango azali kobongisa biso emonisi ete azali makambo makasimakasi te mpe abongolaka ekateli oyo azwaki. Yango emonani polele na masolo oyo emonisi ete Yehova azwaki ekateli ya kopesa bato etumbu oyo ebongi na bango kasi na nsima abongolaki makanisi na ye ntango bato yango babongwanaki. Mpo na mokonzi ya liboso ya Yisraele, Biblia elobi ete Yehova ‘ayokaki mawa mpenza ndenge akómisaki Saulo mokonzi.’ (1 Sa. 15:11) Ntango bato ya Ninive babongolaki motema mpe batikaki misala na bango ya mabe, Biblia elobi ete: “Nzambe ya solo ayokaki mawa mpo na likama oyo alobaki ete akobimisela bango; mpe abimisaki yango te.”—Yona 3:10.
13 Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “ayokaki mawa” emonisaka mpenzampenza ete abongolaki makanisi to mikano na ye. Liboso, Yehova aponaki Saulo mpo azala mokonzi, kasi abongolaki makanisi na ye na ndenge aboyaki ye. Soki Yehova abongolaki makanisi na ye, ezalaki te mpo asalaki libunga na ndenge aponaki Saulo; ezalaki nde mpo Saulo azangaki kondima mpe botosi. Na likambo ya bato ya Ninive, Yehova ayokaki mawa na ndenge abongolaki etumbu oyo akanaki kopesa bango. Ezali mpenza likambo ya kobɔndisa koyeba ete Yehova, Moyemi na biso, azali makambo makasimakasi te, azali motema mawa, mpe andimaka kobongola ekateli na ye soki bato oyo basalaki mabe babongwani!
KOBOYA DISIPLINI YA YEHOVA TE
14. (a) Ndenge nini Yehova abongisaka biso lelo oyo? (b) Tosengeli kosala nini ntango Nzambe azali kobongisa biso?
14 Lelo oyo, Yehova abongisaka biso libosoliboso na nzela ya Liloba na ye Biblia, mpe ya ebongiseli na ye. (2 Tim. 3:16, 17) Tosengeli kondima toli to disiplini nyonso oyo tozwi na banzela yango. Ata soki tozwá batisimo banda kala to tozali na mikumba mingi na lisangá, tosengeli kokoba kondima toli ya Yehova, kotika ye akómisa biso bambɛki mpo na mosala ya lokumu.
15, 16. (a) Mayoki nini ya mabe ekoki koyela moto soki disiplini oyo azwi esɛngi abungisa mikumba? Pesá ndakisa. (b) Nini ekoki kosalisa biso tólongola mayoki ya mabe oyo eyelaka moto soki azwi disiplini?
15 Mpo na kopesa biso disiplini, Yehova akoki kopesa biso malako to kosembola makanisi na biso. Kasi, na bantango mosusu, ekoki kosɛnga ete bápesa biso disiplini mpo tosalaki likambo moko ya mabe. Disiplini ya ndenge wana ekoki kosɛnga bákitisa biso mikumba. Tózwa ndakisa ya Ndeko Dennisa oyo azalaki nkulutu. Azwaki ekateli moko ya mabe na makambo ya mosala, mpe yango esalaki ete azwa mpamela ya nkuku. Dennis ayokaki ndenge nini ntango bapesaki liyebisi na lisangá ete azali lisusu nkulutu te? Alobi boye: “Namonaki ete nazali lisusu na valɛrɛ te. Na boumeli ya mbula 30, nazwaki mikumba ndenge na ndenge. Nazalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, nasalaki na Betele, nakómaki mosaleli na misala, mpe na nsima nkulutu. Nautaki mpe kosala diskur na ngai ya liboso na liyangani ya etúká. Na mbala moko, nyonso wana ebungaki. Longola nsɔni oyo nayokaki, namonaki lokola nazali lisusu na esika te na lisangá.”
16 Dennis asengelaki kobongisa etamboli na ye; asengelaki kobongisa makambo oyo esalaki ete bákitisa ye mikumba. Kasi nini esalisaki ye alongola mayoki ya mabe? Alobi boye: “Nazalaki na ekateli ya kokoba kosala makambo ya elimo. Bandeko ya lisangá mpe masolo oyo nazalaki kotánga na mikanda ya moombo ya sembo elendisaki ngai mingi. Lisolo ‘Obungisá mikumba na yo? Okoki kozongela yango?’ oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/2009 ezalaki lokola mokanda oyo batindeli ngai mpo na koyanola na mabondeli na ngai. Toli oyo nasepelaki na yango mingi elobaki ete: ‘Lokola ozali lisusu na mikumba mingi te na lisangá, luká obongisa boyokani na yo na Nzambe.’” Dennis azwaki matomba nini na disiplini yango? Nsima ya mwa bambula, alobi boye: “Yehova apamboli ngai lisusu; nakómi mosaleli na misala.”
17. Ndenge nini kobimisama na lisangá ekoki kosalisa mosumuki? Pesá ndakisa.
17 Kobimisama na lisangá ezali lolenge mosusu ya disiplini oyo eutaka epai ya Yehova. Ebatelaka lisangá na bizaleli ya mabe mpe ekoki kosalisa mosumuki abongola motema. (1 Ko. 5:6, 7, 11) Tózwa ndakisa ya Robert; esalaki mbula pene na 16 kobanda abimisamaki na lisangá. Na boumeli ya bambula yango, baboti na ye mpe bandeko na ye ya libota batikalaki sembo mpe bakangamaki na toli ya Biblia ya koboya kosangana na basumuki, mpe kopesa bango ata mbote. Esali sikoyo mwa bambula, Robert azongá na lisangá mpe azali kokola malamu na elimo. Ntango batunaki ye soki nini etindaki ye azongela Yehova mpe lisangá na ye nsima ya bambula ebele ndenge wana, alobaki ete ezaleli ya libota na ye esimbaki motema na ye. Alobi boye: “Soki bato ya libota na ngai bazalaki kolekisa ata mwa ntango moke elongo na ngai, to ata kotuna ngai soki nazali malamu, nalingaki koyoka te ete nakabwanaki mpenza na bango mpe mbala mosusu elingaki te kopesa ngai mposa ya kozongela Yehova mpe lisangá na ye.”
18. Tosengeli kozala mabele ya lima ya ndenge nini na mabɔkɔ ya Yehova, Moyemi Monene?
18 Mbala mosusu okozwa disiplini ya ndenge wana te, kasi osengeli komituna soki okozala mabele ya lima ya ndenge nini na mabɔkɔ ya Yehova, Moyemi Monene. Okosala nini soki apesi yo disiplini? Okosala lokola Davidi to okosala lokola Saulo? Yehova, Moyemi Monene, azali Tata na biso. Kobosana ata mokolo moko te ete “Yehova apamelaka moto oyo ye alingaka, kaka ndenge tata apamelaka mwana oyo ye asepelaka na ye.” Yango wana, “koboya disiplini ya Yehova te; mpe koyina mpamela na ye te.”—Mas. 3:11, 12.
a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.