Ndenge nini nzambe apemisaki Biblia?
LELO oyo, kosolola ezali kosalema na myango ya kokamwisa koleka ndenge ekokaki kosalema na eleko nyonso mosusu kati na lisoló ya bato. Eleki bambula mingi, moto moko te akokaki kokanisa eleko moko oyo bato bazali na likoki ya kotinda bansango ata esika nini na mokili mpe na lombangu mpenza. Lelo oyo tozali na telefone, masini ebéngami fax, ordinatere.
Kasi mwango ya kosolola oyo eleki kokamwisa ezali oyo moto ayeba kosalela yango ata mbala moko te—kopemama na Nzambe. Yehova apemisaki bakomi soko 40 mpo na kobimisa Liloba na ye likomami, Biblia Mosantu. Lolenge moko lelo oyo bato bazali na myango mingi ya kosolola, boye Yehova asalelaki myango ebele ya kosolola mpo na kopemisa Makomami.
Litángela. Nzambe apesaki bansango ya sikisiki oyo na nsima ekɔtisamaki na lisoló ya Biblia.a Na ndakisa, tótalela malako oyo masali kondimana ya Mibeko. Yehova alobaki na Mose ete “Komá maloba oyo. Ngai nasili kosala kondimana na yo mpe na Yisalaele na motindo na maloba oyo.” (Exode 34:27) “Maloba” wana, oyo ‘mapesamaki na minɔkɔ na baanzelu,’ makomamaki na Mose mpe lelo oyo tokoki komona yango kati na Biblia na Exode, Levitike, Mituya, mpe Deteronome.—Misala 7:53.
Basakoli mingi mosusu, kati na bango Yisaya, Yilimia, Ezekiele, Amosa, Nahumu, mpe Mika, bazwaki bansango ya sikisiki eutaki na Nzambe na nzela ya baanzelu. Na bantango mosusu bato yango bazalaki kobanda maloba na bango na kolobáká ete: “[Yehova] alobi boye ete.” (Yisaya 37:6; Yilimia 2:2; Ezekiele 11:5; Amosa 1:3; Mika 2:3; Nahumu 1:12) Na nsima bazalaki kokoma oyo Nzambe alobaki.
Bimonaneli, ndɔ́tɔ, mpe kosenzwa. Emonaneli ezali elilingi, ekela, to nsango etyami na makanisi ya moto wana azali kotala, mingimingi na kosalelama ya mwango moko ya kokamwisa. Na ndakisa, Petelo, Yakobo, mpe Yoane, “wana balamukaki mpenza,” bamonaki emonaneli ya Yesu oyo abongwanaki. (Luka 9:28-36, NW; 2 Petelo 1:16-21) Na bantango mosusu nsango ezalaki kotindama na lilɔ́tɔ, to emonaneli ya butu, yango ezalaki kobatelama na ebombelo ya bɔɔngɔ́ wana moto azalaki kolala. Na yango, Danyele akomaki “bimonaneli na motema na ngai, wana elalaki ngai na mbeto na ngai”—to, engebene lolenge oyo mobongoli Ronald A. Knox alobeli yango, “wana emisembolaki ngai na kotala na lilɔ́tɔ na ngai.”—Danyele 4:10.
Moto oyo Yehova atyaki ye na ezalela ya kosenzwa na ntembe te azalaki mpenza komizindisa na ezalela oyo makanisi na ye nyonso matyamaki na likambo moko, atako mbala mosusu azalaki mwa moke koyoka. (Kokanisá na Misala 10:9-16.) Kati na Biblia liloba ya Greke ebongolami na “kosenzwa” (ekʹsta·sis) elimboli ‘kolongola to kotya esika mosusu.’ Yango ezali kopesa likanisi ya kolongola makanisi na ezalela na yango ya solosolo. Na ndenge yango, moto oyo asenzwi akobosana makambo mazali nzinganzinga na ye wana makanisi na ye nyonso mamemami na emonaneli oyo azali kozwa. Ekoki kozala ete ntoma Paulo asenzwaki motindo wana ntango ‘atombwanaki kino na Paladiso mpe ayokaki makambo mayebi kolobama te oyo moto akoki koloba te.’—2 Bakolinti 12:2-4.
Na bokeseni na baoyo bakomaki nsango oyo Nzambe azalaki kotángela bango, bakomi ya Biblia oyo bazwaki bimonaneli to bandɔ́tɔ to oyo basɛnzwaki mbala mingi bazalaki na bonsomi ya kokoma na maloba na bango moko makambo oyo bamonaki. Balobaki na Habakuku ete: “Komá emonaneli, monisá yango polele na bikomelo, ete ye oyo akotánga yango atánga polele.”—Habakuku 2:2, NW.
Yango elingi nde koloba ete biteni wana ya Biblia bizali na lolenge moko to mosusu maloba oyo mapemamaki na mobimba te lokola ezali maloba oyo matángamaki? Soko moke te. Na nzela ya elimo na ye, Yehova abatelaki makasi nsango na ye na makanisi ya mokomi mokomoko, na ntina ete oyo ekomamaki ezalaki nde makanisi ya Nzambe kasi ya bato te. Atako Yehova apesaki bonsomi na mokomi ete apona maloba mabongi, atambwisaki makanisi mpe motema ya mokomi na boye ete akokaki kobosana ata likambo moko te ya ntina mpe na nsuka maloba mamonanaki na lolenge lobongi mpenza ete ezali maloba ya Nzambe.—1 Batesaloniki 2:13.
Bimonaneli biuti na Nzambe. Kati na Biblia ezali na bisakweli—masoló masila koyebisama mpe makomama liboso ya kokokisama na yango—oyo ezali likambo moto akoki kosala yango te. Ndakisa moko ezali bongo kokóla mpe kokwea ya “mokonzi na Ela,” Alesandala Monene, oyo eyebisamaki pene na mbula 200 liboso ya kokokisama na yango! (Danyele 8:1-8, 20-22) Biblia ezali mpe koyebisa makambo oyo bato bamona yango na miso te. Na ndakisa kozalisama ya likoló mpe mabelé. (Genese 1:1-27; 2:7, 8) Mpe ezali na masoló oyo masalemaki na likoló, lokola oyo eyebisami na mokanda ya Yobo.—Yobo 1:6-12; 2:1-6.
Makambo motindo wana, Nzambe azalaki koyebisa yango mbala moko epai ya mokomi to, azalaki koyebisa yango na moto moko na boye ete yango ekɔta kati na lisoló oyo lizali koyebisama na minɔkɔ ya bato to oyo likomami, kolekáká na libota moko kino na libota mosusu oyo likolanda kino eyaki kokóma eteni ya lisoló ya Biblia. (Talá etanda na lokasa 7.) Ezala lolenge nini, tokoki kondimisama ete Yehova nde azalaki Eutelo ya makambo motindo wana, mpe atambwisaki bakomi na boye ete ata libunga moko te, to kolekisa ndelo, to lisapo ekɔtisamaki na masoló na bango. Petelo akomaki na ntina na esakweli ete: “Bato bauti na Nzambe balobi wana ezalaki bango kopusama na [elimo santu, NW].”b—2 Petelo 1:21.
Esengelaki kosala molende mpo na kobatela bopɛto
Atako bakomi ya Biblia ‘bapusamaki na elimo santu,’ esɛngamaki na bango ete bázala na bokɛngi na makanisi na bango. Na ndakisa, Salomo “atalaki malamu, alukaki mpe abongisaki masese mingi. [Ye] alukaki mpe maloba na kitoko mpe na sembo, akomaki maloba na solo.”—Mosakoli 12:9, 10.
Bakomi mosusu ya Biblia basengelaki kosala bolukiluki mozindo mpo na kozwa moboko ya makambo oyo bakomaki. Na ndakisa, Luka akomaki na ntina na Evanzile na ye ete: “Esilaki ngai kolukaluka ntina na makambo oyo nyonso [na bosikisiki, NW] longwa na liboso mpenza, ngai mpe nakanisaki malamu ete nakomela yo mokanda na yango nyonso [na molɔngɔ́ mpenza, NW].” Ya solo, ntembe ezali te ete elimo ya Nzambe epambolaki milende ya Luka, kosaláká ete amona biutelo ya masoló oyo bikoki kotyelama motema to mpe kotuna bato oyo bamonaki makambo na miso mpe oyo bakokaki kotyelama motema, lokola bayekoli ya Yesu oyo bazalaki naino na bomoi, mbala mosusu mpe mama na ye, Malia. Elimo ya Nzambe etambwisaki Luka ete akoma makambo na bosikisiki.—Luka 1:1-4.
Na bokeseni na Evanzile ya Luka, oyo ya Yoane ezalaki lisoló ya makambo oyo amonaki yango na miso na ye moko, mpe akomaki yango soko mbula 65 nsima ya liwa ya Yesu. Na ntembe te, elimo ya Yehova elamwisaki makanisi ya Yoane na boye ete akokaki kobosana makambo te ata nsima ya ntango oyo elekaki. Yango esengelaki koyokana na oyo Yesu alakaki na bayekoli na ye ete: “Mosungi, ye [elimo santu, NW] oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye akolakisa bino makambo nyonso masili ngai koloba na bino.”—Yoane 14:26.
Na bantango mosusu bakomi ya Biblia bakɔtisaki mikanda ya bakomi mosusu ya masoló ya ntango ya kala oyo bamonaki makambo na miso, masoló oyo nyonso te kati na yango epemamaki. Yilimia asangisaki mokanda ya Mikonzi ya Liboso mpe ya Mibale mingi mpenza na lolenge yango. (2 Mikonzi 1:18) Ezela asalelaki biutelo pene na 14 bipemami te mpo na kozwa makambo akomaki na mokanda ya Ntango ya Liboso mpe ya Mibale, bakisá “mokanda na ntango na mokonzi Davidi” mpe “mokanda na mikonzi na Yuda mpe na Yisalaele.” (1 Ntango 27:24; 2 Ntango 16:11) Mose ye mpe azwaki maloba uta na “mokanda na Bitumba na [Yehova]”—emonani ete ezalaki mokanda oyo ekokaki kotyelama motema, mokanda ya lisoló ya bitumba ya libota ya Nzambe.—Mituya 21:14, 15.
Na makambo ya ndenge yango elimo santu ezalaki mpenza kosala mosala, kopusáká bakomi ya Biblia na kopona bobele makambo ya solosolo, oyo na nsima makómaki mpenza eteni ya lisoló lipemami ya Biblia.
Toli ebongi—Euti na nani?
Biblia ezali na ebele ya batoli ebongi oyo ezwi moboko na botaleli mozindo ya bato likoló na makambo bakutanaki na yango na bomoi na bango moko. Na ndakisa, Salomo akomaki: “Likambo lileki malamu ezali mpo na moto te, bobele ete alya mpe amela mpe azwa esengo kati na mosala na ye. Namoni mpe ete likambo oyo euti na lobɔkɔ na Nzambe.” (Mosakoli 2:24) Paulo alobaki ete toli na ye na ntina na libala ezalaki “na makanisi na [ye],” kasi abakisaki boye: “Nabanzi mpe ete ngai nazali na [elimo, NW] na Nzambe.” (1 Bakolinti 7:25, 39, 40) Na ntembe te Paulo azalaki na elimo ya Nzambe, mpamba te, lokola ntoma Petelo amonisaki yango, makambo oyo Paulo akomaki mazalaki “mpo na mayele mazwi ye.” (2 Petelo 3:15, 16) Na yango, azalaki kopesa likanisi na ye, wana atambwisamaki na elimo ya Nzambe.
Wana bakomi ya Biblia bazalaki kopesa makanisi na bango moko, basalaki yango na makambo bamonaki kati na bomoi na bango oyo balekisaki na koyekola mpe kosalela Makomami oyo bazalaki na yango ntango wana. Tokoki komindimisa ete makomi na bango mazali na boyokani na makanisi ya Nzambe. Oyo bakomaki ekómaki eteni ya Liloba ya Nzambe.
Ya solo, Biblia ezali na maloba te ya baoyo bazalaki na libunga. (Kokanisá Yobo 15:15 na Yobo 42:7.) Ezali mpe na mwa maloba oyo mazali komonisa mayoki ya mpasi ya basaleli ya Nzambe, atako maloba yango mazali komonisa makambo nyonso te na ntina oyo bamonisaki mayoki motindo wana.c Atako soki alobi makambo oyo mazali komonisa makanisi na ye moko, mokomi azalaki sé kotambwisama na elimo ya Nzambe na ntina ete akoma makambo oyo mazali solo, oyo asalisaki mpo na kososola mpe kotɔndɔla likanisi nyonso ya libunga. Lisusu, na likambo mokomoko, lisoló mobimba ezali kosalisa motángi nyonso ya sembo na kokanga ntina ete makanisi ya mokomi mabongi mpenza.
Na mokuse, tokoki komindimisa ete Biblia mobimba ezali nsango euti na Nzambe. Ya solo, asɛnzɛlaki na boye ete likambo nyonso oyo lizali kati na yango liyokana na mokano na ye mpe apesaki mayele makoki mpo na baoyo nyonso balingi kosalela ye.—Baloma 15:4.
Mpo na nini asalelaki bato mpo na kokoma Biblia?
Ndenge Yehova asalelaki bato mpo na kokoma Biblia emonisi bwanya na ye monene. Tótalela likambo oyo: Soki Nzambe atindaki baanzelu ete básala yango, mbɛlɛ botángi ya Biblia ezali kosepelisa ndenge ezali lelo? Ya solo, mbɛlɛ tolingaki kosepela mingi na kotánga bizaleli ya Nzambe na ndenge oyo anzelu azali komonela yango. Kasi soki liyoki ya bomoto ezangaki mpenza, mbala mosusu mbɛlɛ tozali na mokakatano ya kokanga ntina ya nsango ya Biblia.
Tópesa ndakisa: Biblia elingaki bobele kosuka na koloba ete Mokonzi Davidi asalaki ekobo mpe abomaki mpe na nsima abongolaki motema. Nzokande, tokanisi ete eleki malamu kotánga maloba ya Davidi ye moko, lolenge amonisaki mpasi ya motema na ye mpo na misala na ye mpe ndenge asɛngaki Yehova bolimbisi! Akomaki ete: “Lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso. Ɛ Nzambe, yo okoboya motema motutami mpe na mawa te.” (Nzembo 51:3, 17) Na yango, Biblia ezali na mɔ́tɔ, ekembisami, mpe kosepelisa oyo mayoki ya bato epesi yango.
Ɛɛ, Yehova aponaki mwango moleki malamu mpo na kopesa biso Liloba na ye. Atako asalelaki bato ya bolɛmbu mpe ya motau, bapusamaki na elimo santu na boye ete ata libunga moko te likokaki kokɔta na makomi na bango. Boye, Biblia ezali na motuya monene. Toli na yango ezali oyo ebongi, mpe bisakweli na yango na ntina na Paladiso oyo ekosalema awa na mabelé bizali mpenza oyo bikoki kotyelama motema.—Nzembo 119:105; 2 Petelo 3:13.
Mpo na nini te komisalela momeseno ya kotánga eteni ya Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo? Petelo akomaki ete: “Bóyoka mposa na mabɛlɛ sembo na [elimo, NW] ete mpo na yango bókóla kino lobiko.” (1 Petelo 2:2) Lokola yango epemami na Nzambe, okomona ete Makomami nyonso mazali “kopesa litomba na mateya, na mpamela, mpo na kosembola makambo, mpe mpo na kobɔkɔla, kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.”—2 Timoté 3:16, 17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kokomama ya Mibeko Zomi ezali libaku bobele moko oyo makambo makomamaki mbala moko “na mosapi na Nzambe.” Boye Mose ayakisaki to na maloba mosusu azongelaki bobele maloba yango na kokomáká yango na barulo to mpe na bisaleli mosusu.—Exode 31:18; Deteronome 10:1-5.
b Liloba ya Greke oyo ebongolami awa na “ezalaki bango kopusama,” pheʹro, esalelami na lolenge mosusu na Misala 27:15, 17 mpo na kolobela masuwa oyo mazali komemama na mopɛpɛ makasi. Boye elimo santu ‘etambwisaki misala’ ya bakomi ya Biblia. Epusaki bango na kobwaka makambo nyonso oyo mazalaki lokuta mpe na kokɔtisa bobele oyo ezalaki solo.
c Lokola ndakisa, kokanisá 1 Mikonzi 19:4 na vɛrsɛ́ 14 mpe 18; Yobo 10:1-3; Nzembo 73:12, 13, 21; Yona 4:1-3, 9; Habakuku 1:1-4, 13.
[Etanda/Bililingi na lokasa 7]
Epai wapi Mose azwaki makambo akomaki?
MOSE akomaki mokanda ya Biblia ebéngami Genese, kasi makambo nyonso oyo akomaki masalemaki kalakala liboso mpenza ya kobotama na ye. Na bongo, makambo wana azwaki yango epai wapi? Ekoki kozala ete Nzambe ayebisaki ye yango ye moko, to boyebi ya makambo mosusu ezalaki koyebisama na monɔkɔ na libota moko nsima na libota mosusu oyo elandaki. Lokola bato bazalaki koumela mingi na bomoi na eleko wana ya kala, ekoki kozala ete makambo mingi oyo Mose akomaki na mokanda ya Genese mautaki longwa na Adama kino na Mose na kolekáká bobele na bato mitano—Metusela, Semi, Yisaka, Levi, mpe Amalama.
Lisusu, ekoki kozala ete Mose atángaki mikanda oyo mikomamaki. Na ntina na likambo oyo, ezali komonana polele ete Mose asalelaki mbala mingi maloba “oyo ezali lisoló ya,” liboso ya kotánga moto oyo alingi kolobela. (Genese 6:9; 10:1; 11:10, 27; 25:12, 19; 36:1, 9; 37:2, NW) Banganga-mayele mosusu balobi ete liloba ya Liebele oyo libongolami awa na “lisoló,” toh·le·dhohthʹ, ezali kosalelama mpo na kolobela mokanda oyo esila kokomama liboso oyo Mose asalelaki lokola eutelo ya makambo oyo akomaki. Ya solo, tokoki kondimisama na yango na bosikisiki te.
Ekoki kozala ete makambo mazali na mokanda ya Genese mazwamaki na nzela ya myango misato oyo tolobeli liboso—mosusu eutaki mbala moko na emoniseli ya Nzambe, mosusu na nzela ya masoló ya bato ya kala oyo mayebisamaki na monɔkɔ na kolandana ya mabota, mpe mosusu na nzela ya mikanda. Likambo ya ntina mingi ezali ete elimo ya Yehova epemisaki Mose. Na yango, oyo akomaki ezali kotalelama na elónga mpenza ete ezali liloba ya Nzambe.
[Elilingi na lokasa 4]
Na myango ndenge na ndenge, Nzambe apemisaki bato mpo na kokoma Biblia