Yehova azali komema bana mingi na nkembo
“Mpo ete ebongaki na [Nzambe], awa ezali ye kokamba bana mingi epai na nkembo, akokisa mokambi na bango kino lobiko na nzela na mpasi.”—BAEBELE 2:10.
1. Mpo na nini tokoki kondimisama ete mokano ya Yehova mpo na bato ekokokisama?
YEHOVA azalisaki mabelé mpo ete ezala efandelo ya seko mpo na libota ya bato ya kokoka oyo basengelaki kozala na bomoi ezangi nsuka. (Mosakoli 1:4; Yisaya 45:12, 18) Ya solo, nkɔkɔ na biso Adama asalaki lisumu mpe mpo na yango alekisaki lisumu mpe liwa epai na bakitani na ye. Kasi mokano ya Nzambe mpo na bato ekokokisama na nzela ya Mombóto oyo alakamaki, Yesu Klisto. (Genese 3:15; 22:18; Baloma 5:12-21; Bagalatia 3:16) Bolingo oyo Yehova azali na yango mpo na bato epusaki ye ete apesa “[Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Mpe bolingo epusaki Yesu ete ‘apesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.’ (Matai 20:28) “Lisiko” yango esombi lisusu ntómo mpe bilikya oyo Adama abungisaki mpe efungoli nzela na likoki ya kozwa bomoi ya seko.—1 Timoté 2:5, 6; Yoane 17:3.
2. Lolenge nini mbeka ya lisiko ya Yesu ezalaki komonisama na Mokolo ya Mbɔndi oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula na Yisalaele ya kala?
2 Kosalelama ya mbeka ya lisiko ya Yesu ezalaki komonisama na elilingi na Mokolo ya Mbɔndi oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula. Na mokolo yango, nganga monene na Yisalaele azalaki naino kopesa ngɔmbɛ lokola mbeka mpo na masumu mpe azalaki komema makila na yango liboso na Sanduku ya bulɛɛ na Esika Mosantu oyo ezalaki kati na mongombo, mpe na nsima kati na tempelo. Azalaki kosala bongo mpo na ye moko, mpo na bato ya ndako na ye, mpe mpo na libota ya Balevi. Bobele bongo, Yesu Klisto amemaki epai ya Nzambe motuya ya makila na ye libosoliboso mpo na kolimbisama ya masumu ya “bandeko” na ye bapakolami na elimo. (Baebele 2:12; 10:19-22; Levitike 16:6, 11-14) Na Mokolo ya Mbɔndi, nganga monene azalaki mpe kopesa ntaba lokola mbeka mpo na masumu mpe azalaki komema makila na yango na Esika Mosantu, mpe na bongo azalaki kosala mbɔndi mpo na masumu ya mabota 12 ya Yisalaele oyo mazalaki na bonganga te. Lolenge moko, Nganga Monene Yesu Klisto akosalela makila na ye ya bomoi mpo na bato mosusu oyo bazali komonisa kondima, mpo na kolongola masumu na bango.—Levitike 16:15.
Bamemami na nkembo
3. Engebene Baebele 2:9, 10, Nzambe asalaki nini na boumeli ya mibu 1 900?
3 Na boumeli ya mibu 1 900, Nzambe asalaki likambo monene mpo na “bandeko” ya Yesu. Na ntina na likambo yango, ntoma Paulo akomaki ete: “Kasi tozali kotala Yesu oyo akiti na nsé na baanzelu mwa moke mpo na mpasi na kufa, alati motole na nkembo mpe lokumu ete aletela bato nyonso kufa na ntina na ngɔlu na Nzambe. Mpo ete ebongaki na ye [Yehova Nzambe] oyo biloko nyonso bizali mpo na ye mpe biuti na ye ete, awa ezali ye kokamba bana mingi epai na nkembo, akokisa mokambi na bango kino lobiko na nzela na mpasi.” (Baebele 2:9, 10) Mokambi kino lobiko ezali bongo Yesu Klisto, oyo ayekolaki botosi ya kokoka na nzela ya minyoko oyo azwaki ntango azalaki na bomoi lokola moto awa na mabelé. (Baebele 5:7-10) Yesu azalaki moto ya liboso oyo abotamaki lokola mwana ya Nzambe na elimo.
4. Ntango nini mpe lolenge nini Yesu abotamaki lokola Mwana ya Nzambe na elimo?
4 Yehova asalelaki elimo santu na ye, to nguya oyo ekosalaka mosala, mpo na kobota Yesu lokola Mwana na ye na elimo, mpo ete amema ye na nkembo ya likoló. Ntango azalaki bobele ye na Yoane Mobatisi, Yesu azindisamaki mobimba na mai lokola elembo ya komimonisa na ye epai ya Nzambe. Evanzile ya Luka elobi ete: “Wana esilaki bato nyonso kobatisama, mpe esilaki Yesu kobatisama, mpe ezalaki ye kobondela, Likoló ezipwaki mpe [elimo santu ekitelaki, NW] ye na lolenge na nzoto lokola ebenga. Mongongo ebimaki na Likoló ete, Yo mwana na ngai na bolingo, nasepeli na yo mingi.” (Luka 3:21, 22) Yoane amonaki elimo santu kokita likoló na Yesu mpe ayokaki Yehova koloba polele ete andimi ye lokola Mwana na Ye molingami. Na ntango wana mpe na nzela ya elimo santu, Yehova abotaki Yesu lokola mwana ya liboso kati na ‘bana mingi oyo bakomemama na nkembo.’
5. Banani bazwaki liboso litomba na mbeka ya Yesu, mpe motuya na bango ezali boni?
5 “Bandeko” ya Yesu bazali bato ya liboso oyo bazwi litomba na mbeka na ye. (Baebele 2:12-18) Kati na emonaneli, ntoma Yoane asilaki komona bango kati na nkembo na Ngomba Siona elongo na Mwana na Mpate, Nkolo Yesu Klisto oyo asilaki kosekwisama. Yoane ayebisaki mpe motuya na bango, kolobáká ete: “Natalaki, mpe namoni Mwana na Mpate atɛlɛmi na ngomba na Siona. Bato nkóto monkámá na ntuku minei na minei batɛlɛmi na ye elongo, baoyo bazalaki na nkombo na ye mpe nkombo na Tata na ye esili kokomama na bilongi na bango. . . . Bango basikolami kati na bato, mbuma na liboso mpo na Nzambe mpe na Mwana na Mpate. Na minɔkɔ na bango lokuta ezwami te, mpe bazali na [likambo] na kofundama te.” (Emoniseli 14:1-5) Na yango, ‘bana mingi oyo bamemami na nkembo’ na likoló bazali na motuya ya 144 001—Yesu mpe bandeko na ye ya elimo.
‘Babotami na Nzambe’
6, 7. Banani ‘babotami na Nzambe,’ mpe yango elimboli nini mpo na bango?
6 Baoyo Yehova aboti bango babéngami ‘babotami na Nzambe.’ Ntoma Yoane akomelaki bango maloba oyo: “Moto na moto oyo abotami na Nzambe akosalaka masumu te mpo ete mombóto na Nzambe ekoumelaka kati na ye. Ye mpe akoki kosala masumu te mpo ete asili kobotama na Nzambe.” (1 Yoane 3:9) “Mombóto” yango ezali bongo elimo santu ya Nzambe. Na kosaláká nzela moko na liloba na ye, esili kopesa na mokomoko kati na ba 144 000 “mbotama ya sika” mpo na elikya ya bomoi na likoló.—1 Petelo 1:3-5, 23.
7 Yesu azalaki Mwana ya Nzambe uta kobotama na ye lokola moto, lolenge moko mpe Adama moto ya kokoka azalaki “mwana ya Nzambe.” (Luka 1:35; 3:38) Nzokande, nsima ya batisimo ya Yesu, lolenge Yehova alobaki ete: “Yo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli yo mingi” ezalaki na ndimbola monene. (Malako 1:11) Na maloba yango oyo mabimaki nzela moko na kokita ya elimo santu, emonanaki polele ete Nzambe abotaki Yesu lokola Mwana na ye ya elimo na ntango wana. Na maloba ya elilingi, na ntango wana Yesu apesamelaki “mbotama ya sika” elongo na lotómo ya kozwa lisusu bomoi lokola Mwana ya Nzambe na elimo kuna na likoló. Lolenge moko na ye, bandeko na ye ya elimo 144 000 bazali ‘kobotama lisusu.’ (Yoane 3:1-8; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛ́mbɛ 1992, nkasa 3-6.) Lisusu, lokola Yesu, bapakolami na Nzambe mpe bapesameli mokumba ya kosakola nsango malamu.—Yisaya 61:1, 2; Luka 4:16-21; 1 Yoane 2:20.
Elembeteli ya mbotama
8. Elembeteli nini ya kobotama na elimo ezalaki mpo na (a) Yesu (b) bayekoli na ye ya liboso?
8 Ezalaki na elembeteli oyo emonisaki ete Yesu asilaki kobotama na elimo. Yoane Mobatisi amonaki elimo kokita likoló na Yesu mpe ayokaki maloba ya Nzambe na ntina na kobotama na elimo ya Masiya oyo autaki kopakolama. Kasi lolenge nini bayekoli ya Yesu basengelaki koyeba ete babotami na elimo? Na mokolo oyo abutaki na likoló, Yesu alobaki ete: “Yoane abatisaki na mai, nde bino bokobatisama na [elimo santu, NW] na nsima na mikolo mingi te.” (Misala 1:5) Bayekoli ya Yesu ‘babatisamaki na elimo santu’ na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Kosopama wana ya elimo santu elandamaki na ‘lokito ebimi na Likoló pwasa lokola lokito na kopɛpa na mopɛpɛ makasi’ mpe “ndemo lokola mɔ́tɔ” ezalaki likoló na moyekoli mokomoko. Likambo ya kokamwa mpenza ezalaki bongo likoki oyo bayekoli bakómaki na yango ya “kosolola na nkota mosusu pelamoko [elimo epesi, NW] bango maloba.” Na yango, ezalaki na elembeteli oyo emonanaki mpe oyo eyokamaki ete nzela mpo na nkembo ya likoló lokola bana ya Nzambe esilaki kofungwama mpo na bayekoli ya Klisto.—Misala 2:1-4, 14-21; Yoele 2:28, 29.
9. Elembeteli nini emonisaki ete Basamalia, Koloneli, mpe bato mosusu na ekeke ya liboso babotamaki na elimo?
9 Mwa moke na nsima, Filipo mopalanganisi ya nsango malamu asakolaki na Samalia. Atako Basamalia bandimaki nsango na ye mpe babatisamaki, elembeteli ezalalaki te mpo na komonisa ete Nzambe abotaki bango lokola bana na ye. Ntango ntoma Petelo mpe ntoma Yoane babondelaki mpe batyaki mabɔkɔ likoló na bandimi wana, ‘babandaki kozwa elimo santu’ na lolenge oyo emonanaki na miso ya baoyo bazalaki wana. (Misala 8:4-25) Yango ezalaki elembeteli ete Basamalia oyo bandimaki babotamaki lokola bana ya Nzambe na elimo. Bobele bongo, na mobu 36 T.B., Koloneli mpe bapakano mosusu bandimaki solo ya Nzambe. Petelo mpe bandimi mosusu Bayuda oyo bakendaki na ye elongo ‘bakamwaki ete likabo ya elimo santu esopanelaki bapakano mpe. Mpo ete bayokaki bango kosolola na minɔkɔ mosusu, mpe kokumisa Nzambe.’ (Misala 10:44-48) Baklisto mingi na ekeke ya liboso bazwaki “makabo ya elimo santu,” lokola oyo ya koloba na nkota mosusu. (1 Bakolinti 14:12, 32, NW) Na yango, bato yango bazalaki na elembeteli ya polele ete bazalaki babotami na elimo. Lolenge nini baklisto oyo basengelaki koya na nsima balingaki koyeba ete babotami na elimo to te?
Litatoli ya elimo santu
10, 11. Na kotalela Baloma 8:15-17, lolenge nini okoki kolimbola ete elimo etatolaka epai na baoyo bazali basangoli na libula elongo na Klisto?
10 Baklisto bapakolami nyonso 144 000 basilaki kozwa elembeteli ya sikisiki ete bazali na elimo ya Nzambe. Na yango, Paulo akomaki ete: “Boyambi [elimo, NW] oyo epesi lokumu na bana; na yango mpe tokobelelaka ete Aba! Tata! [Elimo] yango ekosangana na [elimo] na biso kotatola ete tozali bana na Nzambe. Soko tozali bana, mbɛ tozali basangoli na libula. Tozali basangoli na libula na Nzambe, basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo, soko tokoyokaka mpasi na ye elongo ete tózwa nkembo esika moko na ye.” (Baloma 8:15-17) Baklisto bapakolami bazali na liyoki makasi ete bazali bana ya Tata na bango ya likoló. (Bagalatia 4:6, 7) Bandimisami mpenza ete basili kobotama na Nzambe mpo na kozala bana na ye ya elimo lokola basangoli ya libula elongo na Klisto kati na Bokonzi ya likoló. Na likambo yango, elimo santu ya Yehova ezali kokokisa mokumba ya ntina mingi.
11 Na bopusi ya elimo santu ya Nzambe, elimo, to ezalela oyo ezali koyangela makanisi ya bapakolami ezali kopusa bango na kondima ete makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na elikya ya likoló mataleli bango. Na ndakisa, ntango bazali kotánga makambo oyo Makomami elobi mpo na bana ya Nzambe na elimo, bazali kondima na kozanga kokakatana ete maloba yango mataleli bango. (1 Yoane 3:2) Bayebi ete basilaki ‘kobatisama kati na Yesu Klisto’ mpe kati na liwa na ye. (Baloma 6:3) Bazali na kondimisama makasi ete bazali bana ya Nzambe babotami na elimo, baoyo bakokufa mpe bakosekwisama mpo na nkembo ya likoló, lokola esalemaki mpo na Yesu.
12. Eloko nini elimo santu ya Nzambe esili kobota kati na baklisto bapakolami?
12 Kobotama lokola mwana ya elimo ezali te mposa oyo moto ye moko akolisaka. Bana ya elimo bazali na mposa te ya kokende na likoló mpo ete mpasi ezali awa na mabelé. (Yobo 14:1) Nzokande, elimo ya Yehova esili kobimisa epai na baoyo bazali solosolo bapakolami, elikya mpe mposa oyo ezali epai na bato nyonso te. Bana wana bayebi ete bomoi ya seko na ezalela ya kokoka kati na paladiso awa na mabelé esika moko na libota mpe baninga ya esengo ekozala malamu mingi. Nzokande, bomoi lolenge wana ezali mposa ya liboso te na mitema na bango. Bapakolami bazali na mposa mpe elikya makasi ya kokende na likoló na boye ete bandimi kobosana bilikya nyonso mpe bisengo ya kofanda na mabelé.—2 Petelo 1:13, 14.
13. Engebene 2 Bakolinti 5:1-5, ‘mposa makasi’ nini Paulo azalaki na yango mpe emonisi nini na ntina na babotami na elimo?
13 Elikya ya bomoi na likoló oyo Nzambe apesi ezali makasi epai na bango na boye ete mayoki na bango ezali lokola ya Paulo oyo akomaki ete: “Toyebi ete soko mongombo oyo, ezalelo na biso na mokili, ekobeba, tozali na etongelo uta na Nzambe, ndako oyo esalami na mabɔkɔ te, oyo ekoumela seko, oyo na Likoló. Mpo ete kati na oyo awa, tozali kokimela, tozali na mposa na kolata efandelo na biso na Likoló, ete wana ekolata biso yango, tózala na bolumbu te. Zambi naino ezali biso na mongombo oyo, tozali kokimela mpo na bozito na mokumba, tolingi te ete bilamba bilongwa kasi ete tólata oyo mosusu likoló na yango, ete bomoi emela oyo ekokufa. Ye Nzambe abongisi biso mpo na likambo oyo, ye oyo apesi biso [elimo, NW] lokola ndanga.” (2 Bakolinti 5:1-5) Paulo azalaki na ‘mposa [makasi]’ ete asekwisama mpo na kokende na likoló mpe kozala na bomoi lokola ekelamu ya elimo oyo ekoki kokufa te. Asalelaki elilingi ya mongombo oyo ekoki kokwea na ntina na nzoto ya mosuni, esika ya kofanda mpo na mwa ntango mpe oyo ekoki kobeba ekokanisami na ndako. Atako bazali awa na mabelé na nzoto ya mosuni, oyo ekufaka, baklisto oyo bazali na elimo santu lokola ndanga ya bomoi ya seko oyo ekoya bazali kozela “etongelo uta na Nzambe,” nzoto ya elimo oyo ekoki kofufa te mpe ekoki kobeba te. (1 Bakolinti 15:50-53) Lokola Paulo, bakoki koloba na bosembo nyonso ete: “Tokoyikaka mpiko mpe tokotalelaka na esengo ete tóbima na nzoto [ya mosuni] mpe tófanda [na likoló] epai na Nkolo.”—2 Bakolinti 5:8.
Bakɔtisami na kondimana ya ntina mingi
14. Ntango abandisaki Ekaniseli, kondimana nini Yesu alobelaki liboso, mpe yango ezali kokokisa likambo nini mpo na Bayisalaele ya elimo?
14 Baklisto babotami na elimo bazali kondimisama ete basili kokɔtisama na kondimana mibale ya ntina mingi. Yesu alobelaki moko na yango ntango asalelaki limpa ezangi mfulu mpe vinyo mpo na kobandisa Ekaniseli ya liwa na ye oyo ebɛlɛmaki mpe alobaki na ntina na kɔpɔ ya vinyo ete: “Kɔpɔ oyo ezali kondimana na sika na makila na ngai masili kosopama mpo na bino.” (Luka 22:20; 1 Bakolinti 11:25) Banani bazali basangani ya kondimana ya sika? Yehova Nzambe mpe basangani ya Yisalaele ya elimo—baoyo Yehova akani komema bango na nkembo ya likoló. (Yilimia 31:31-34; Bagalatia 6:15, 16; Baebele 12:22-24) Lokola ebandisami na makila ya Yesu oyo masopamaki, kondimana ya sika ezali kobimisa kati na mabota ya bato, libota moko mpo na nkombo ya Yehova mpe ezali kokómisa baklisto yango babotami na elimo eteni ya “mombóto” ya Abalayama. (Bagalatia 3:26-29; Misala 15:14) Kondimana ya sika ezali kopesa nzela na Bayisalaele nyonso ya elimo ete bámemama na nkembo na kosekwisamáká mpo na bomoi ezangi kufa na likoló. Lokola ezali “kondimana ya seko,” matomba na yango makoumela libela. Etikali tóyeba soki kondimana yango ekokokisa makambo mosusu na boumeli ya boyangeli ya mbula nkóto mpe na nsima na yango.—Baebele 13:20.
15. Na boyokani na Luka 22:28-30, bayekoli bapakolami ya Yesu babandaki kokɔtisama na kondimana nini mosusu mpe ntango nini?
15 “Bana mingi” oyo Yehova akani ‘komema na nkembo’ basili mpe kokɔtisama, moko na moko, na kondimana mpo na Bokonzi ya likoló. Na ntina na kondimana yango kati na Yesu mpe balandi ya matambe na ye, ye moko alobaki ete: “Nde bino bato bosili koumela na ngai elongo kati na makambo na ngai na mpasi. Pelamoko Tata na ngai apesaki ngai Bokonzi, ngai mpe napesi bino bokonzi na kolya mpe komela na mesa na ngai kati na bokonzi na ngai, mpe bokofanda na kiti na bokonzi mpe bokosambisa mabota zomi na mibale na Yisalaele.” (Luka 22:28-30) Kondimana ya Bokonzi ebandaki kosala ntango bayekoli ya Yesu bapakolamaki na elimo santu na Pantekote ya mobu 33 T.B. Kondimana wana ekolanda kosala kati na Klisto mpe baninga na ye bakonzi mpo na libela. (Emoniseli 22:5) Na yango, baklisto babotami na elimo bandimisami ete bazali kati na kondimana ya sika mpe kati na kondimana mpo na Bokonzi. Na yango, na ntango ya Elambo ya Mpokwa ya Nkolo, bobele etuluku moke ya batikali bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé nde balyaka limpa, oyo ezali elembo ya nzoto ya Yesu ezangi masumu, mpe bamelaka vinyo, oyo ezali elembo ya makila na ye ya kokoka oyo masopamaki na liwa mpe masimbi kondimana ya sika.—1 Bakolinti 11:23-26; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwáli 1989, nkasa 8-11.
Babyangami, baponami, mpe bazali sembo
16, 17. (a) Mpo na komemama na nkembo, likambo nini esengeli kozala solo mpo na ba 144 000? (b) Banani bazali “bakonzi zomi,” mpe lolenge nini bazali kotalela “bandeko” batikali bapakolami ya Klisto?
16 Kosalelama ya libosoliboso ya mbeka ya lisiko ya Yesu epesi nzela na ba 144 000 ete bábyangama mpo na bomoi na likoló mpe ete báponama na kozaláká bana ya Nzambe babotami na elimo. Ya solo, mpo na komemama na nkembo, basengeli ‘kosala na etingya mpo na kolendisa kobyangama mpe koponama na bango,’ mpe basengeli kotikala sembo kino liwa. (2 Petelo 1:10; Baefese 1:3-7; Emoniseli 2:10) Etuluku moke ya batikali bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé bazali kobatela bosembo na bango atako “bakonzi zomi” oyo ezali bongo banguya nyonso ya politiki batɛmɛli bango. Anzelu moko alobi ete: “Bango bakobunda etumba na Mwana na Mpate, mpe Mwana na Mpate akoleka bango mpo ete azali Nkolo na bankolo mpe Mokonzi na bakonzi, mpe bango na ye elongo bazali babyangami, na baponami, na basembo.”—Emoniseli 17:12-14.
17 Bato oyo bazali koyangela bakoki kosala Yesu, “Mokonzi na bakonzi,” eloko moko te mpamba te ye azali na likoló. Kasi bazali komonisa koyina na bango epai na batikali, “bandeko” na ye oyo bazali naino awa na mabelé. (Emoniseli 12:17) Koyina yango ekosuka na etumba ya Nzambe na Armagedon, ntango bolóngi ekozala mpo na “Mokonzi na bakonzi” mpe “bandeko” na ye—bango “bazali babyangami, na baponami, na basembo.” (Emoniseli 16:14, 16) Liboso na yango, baklisto oyo babotami na elimo bazali na mosala mingi. Bazali kosala nini sikawa, liboso ete bámemama na nkembo ya Yehova?
Eyano na yo ezali nini?
◻ Banani Nzambe azali ‘komema na nkembo ya likoló’?
◻ ‘Kobotama na Nzambe’ elimboli nini?
◻ Lolenge nini ‘elimo ezali kotatola’ epai na baklisto mosusu?
◻ Babotami na elimo bakɔtisami na kondimana nini?
[Elilingi na lokasa 15]
Na Pantekote ya mobu 33 T.B., elembeteli epesamaki ete nzela esilaki kofungwama mpo na nkembo ya likoló