Kondima—Ezaleli oyo epesaka makasi
KONDIMA epesaka biso makasi mingi. Na ndakisa, atako Satana alukaka kobebisa boyokani na biso na Yehova, kondima esalisaka biso ‘tóboma mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe.’ (Ef. 6:16) Kondima ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano oyo ezali minene lokola ngomba. Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Soki bozali na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, bokoloba na ngomba oyo ete: ‘Longwá awa kende kuna,’ mpe ekolongwa mpe ekokende.” (Mat. 17:20) Lokola kondima ekoki kopesa biso makasi na elimo, tosengeli kozwa biyano na mituna oyo: Kondima ezali nini? Na ndenge nini motema na biso ekoki kosalisa biso tózala na kondima to te? Ndenge nini tokoki kokómisa kondima na biso makasi? Mpe tosengeli kozala na kondima epai ya banani?—Rom. 4:3.
KONDIMA EZALI NINI?
Kozala na kondima esuki kaka te na koyeba to kondima oyo Biblia elobi, mpo ata ‘bademo bandimaka ete [Nzambe azali] mpe balɛngaka.’ (Yak. 2:19) Na yango, kondima ezali nini?
Biblia epesi ndimbola mibale mpo na kondima. Ya liboso, “kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa.” (Ebr. 11:1a) Soki ozali na kondima, okotya ntembe ata moke te ete makambo nyonso oyo Yehova alobi ezali solo mpe ekokokisama. Na ndakisa, Yehova ayebisaki Bayisraele ete: “Soki bokokoka kobuka kondimana na ngai ya moi mpe kondimana na ngai ya butu, mpo moi ná butu ebima te na ntango na yango, boye kondimana na ngai elongo na Davidi mosaleli na ngai ekoki kobukama.” (Yir. 33:20, 21) Esilá kokómela yo obanga ete moi etika kobima mpe komonana na likoló, mpe na ndenge yango butu ná moi ezala lisusu te? Soki otyaka ntembe te na mibeko ya molɔ́ngɔ́ oyo esalaka ete mabele ebaluka zingazinga na yango moko mpe ebaluka zingazinga ya moi, osengeli nde kotya ntembe ete Mozalisi ya mibeko yango akokisa maloba na ye? Soki moke te!—Yis. 55:10, 11; Mat. 5:18.
Ya mibale, kondima ezali “elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.” (Ebr. 11:1b) Na maloba mosusu, kondima ezali elembeteli oyo emonisaka ete likambo boye to boye ezali solo, ata soki ezali komonana te na miso. Na ndenge nini? Tózwa ndakisa, soki mwana atuni yo, ‘Ndenge nini oyebi ete mopɛpɛ ezalaka?’ Ata soki omoná naino mopɛpɛ te, na ntembe te okosalisa mwana yango akanisa makambo oyo emonisi ete mopɛpɛ ezalaka, na ndakisa mpema, makambo oyo mopɛpɛ esalaka, mpe bongo na bongo. Soki mwana amoni bilembeteli yango, akoyeba ete tokoki kondima ata eloko oyo ezali komonana te. Ndenge moko mpe, kondima esimbami na bilembeteli ya solosolo.—Rom. 1:20.
ESENGELI KOZALA NA MOTEMA OYO EBONGI
Lokola kondima esimbami na elembeteli, mpo moto azala na kondima, asengeli “kozwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4) Kasi boyebi mpamba ekoki te. Ntoma Paulo akomaki: “Na motema nde moto andimaka.” (Rom. 10:10) Moto asengeli kaka te koyeba solo, asengeli mpe kozwa yango na motuya. Yango nde ekotinda ye amonisa kondima, elingi koloba, azala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe. (Yak. 2:20) Moto oyo azali na botɔndi te mpo na solo akoki koboya ata elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya likambo soki akangami kaka na makanisi na ye to mpe aluki komilongisa mpo akokisa bamposa na ye ya nzoto. (2 Pe. 3:3, 4; Yuda 18) Yango wana na ntango ya kala, bato mosusu oyo bamonaki makamwisi na miso na bango moko bamonisaki kondima te. (Mit. 14:11; Yoa. 12:37) Elimo santu ya Nzambe ekolisaka kondima kaka na mitema ya bato oyo balingaka mpenza solo.—Gal. 5:22; 2 Tes. 2:10, 11.
NDENGE OYO DAVIDI AKÓMAKI NA KONDIMA MAKASI
Mokonzi Davidi azali moko ya bato oyo bazalaki na kondima makasi. (Ebr. 11:32, 33) Nzokande, bandeko mosusu ya Davidi bazalaki na kondima ya bongo te. Na ndakisa, na libaku moko, Eliabe, yaya ya Davidi, amonisaki ete azangaki kondima na ndenge apamelaki Davidi na ndenge amitungisaki mpo na matumoli ya Goliate. (1 Sa. 17:26-28) Moto moko te abotamaka na kondima, moko mpe te azwaka kondima ya baboti na ye; na yango, kondima ya Davidi eutaki na boyokani oyo azalaki na yango na Nzambe.
Na Nzembo 27, Davidi amonisi ndenge oyo akómaki na kondima makasi. (Vɛrsɛ 1) Azalaki kokanisa na mozindo makambo oyo akutaná na yango mpe makambo oyo Yehova asalaki banguna na ye. (Vɛrsɛ 2, 3) Azalaki na botɔndi mingi mpo na ebongiseli oyo Yehova azwaki mpo na losambo na ye. (Vɛrsɛ 4) Azalaki mpe kosambela Nzambe elongo na bato mosusu na tabernakle. (Vɛrsɛ 6) Davidi azalaki kobondela Yehova na motema mobimba. (Vɛrsɛ 7, 8) Asɛngaki mpe Nzambe alakisa ye banzela na ye. (Vɛrsɛ 11) Kondima ezalaki na ntina mingi mpo na Davidi, yango wana atunaki ete: “Nalingaki kozala wapi soki nazalaki na kondima te?”—Vɛrsɛ 13, nwt.
NDENGE YA KOKÓMISA KONDIMA NA YO MAKASI
Okoki kozala na kondima lokola ya Davidi soki omekoli makanisi mpe bizaleli oyo amonisaki ntango akomaki Nzembo 27. Lokola kondima eutaka na boyebi ya sikisiki, soki ozali koyekola mingi Liloba ya Nzambe mpe mikanda ya moombo ya sembo, ekozala mpasi te okolisa kondima, oyo ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe. (Nz. 1:2, 3) Zwáká ntango ya komanyola makambo oyo ozali koyekola. Komanyola ekosalisa yo okóma na botɔndi mingi epai ya Yehova. Mpe soki ozali na botɔndi epai ya Yehova, okozala mpe na mposa ya komonisa kondima: okosambela ye na makita mpe okoyebisa basusu elikya oyo ozali na yango. (Ebr. 10:23-25) Lisusu, tomonisaka kondima soki tozali “kobondela ntango nyonso mpe kolɛmba te.” (Luka 18:1-8) Yango wana, ‘bondeláká Yehova ntango nyonso’ mpe yebá ete ‘atyelaka yo likebi.’ (1 Tes. 5:17; 1 Pe. 5:7) Kondima etindaka biso tósala oyo ezali malamu, mpe ntango tozali kosala oyo ezali malamu, kondima na biso ekómaka makasi.—Yak. 2:22.
ZALÁ NA KONDIMA EPAI YA YESU
Na butu ya nsuka liboso ya liwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bóndimela Nzambe, bóndimela mpe ngai.” (Yoa. 14:1) Na yango, tosengeli komonisa kondima kaka epai ya Yehova te, kasi mpe epai ya Yesu. Ndenge nini tokoki komonisa kondima epai ya Yesu? Tólobela ndenge misato.
Ya liboso, monáká ete lisiko ezali likabo oyo Nzambe apesá yo. Ntoma Paulo alobaki boye: “Nandimeli Mwana ya Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.” (Gal. 2:20) Soki ozali kondimela Yesu, okotya ntembe te ete lisiko ekoki kosalisa yo, mpe ete masumu na yo ekoki kolimbisama na nzela na yango. Okondima ete lisiko ekoki kopesa yo elikya ya kozala na bomoi ya seko mpe ete yango nde eloko ya libosoliboso oyo emonisaka ete Nzambe alingaka yo. (Rom. 8:32, 38, 39; Ef. 1:7) Yango ekopesa yo makasi ya kolongola makanisi ya mabe mpe ya kotika koyoka lokola omemá ngambo.—2 Tes. 2:16, 17.
Ya mibale, pusaná penepene na Yehova na libondeli na nzela ya mbeka ya Yesu. Lisiko ekoki kosalisa biso tóbondela Yehova “na elobeli ya polele . . . mpo . . . ayokela biso mawa mpe amonisela biso boboto monene ntango tozali na mposa ya lisalisi.” (Ebr. 4:15, 16; 10:19-22) Libondeli esalisaka biso tózala na ekateli makasi ya kokima masumu.—Luka 22:40.
Ya misato, tosá Yesu. Ntoma Yoane akomaki: “Moto oyo azali kondimela Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo azali kotosa Mwana te akomona bomoi te, kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.” (Yoa. 3:36) Na vɛrsɛ yango, Yoane amonisi ete soki moto azali komonisa kondima te azangi botosi. Na yango, okomonisa kondima epai ya Yesu soki ozali kotosa ye. Kotosa Yesu elimboli kolanda “mobeko ya Kristo,” elingi koloba, makambo nyonso oyo ateyaki mpe oyo apesaki mitindo. (Gal. 6:2) Okotosa mpe Yesu soki ozali kolanda litambwisi oyo azali kopesa na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Soki ozali kotosa Yesu, okozala na makasi ya koyika mpiko na mikakatano oyo ezali lokola mbula ya mopɛpɛ makasi.—Luka 6:47, 48.
“OMITONGA LIKOLÓ YA KONDIMA NA YO OYO ELEKI BOSANTU”
Mokolo moko, mobali moko agangaki epai ya Yesu ete: “Nazali na kondima! Salisá ngai na esika oyo nazali na bosɛnga na kondima!” (Mrk. 9:24) Atako azalaki na mwa kondima, na komikitisa nyonso, mobali yango ayebaki ete asengelaki kozala na kondima mingi. Ndenge moko na moto wana, biso nyonso tokokutana na makambo oyo ekosɛnga tózala na kondima mingi. Mpe biso nyonso tokoki kokómisa kondima na biso makasi lelo oyo. Ndenge tomoni yango, tokokómisa kondima na biso makasi soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango; kosala bongo ekosalisa biso tózala na botɔndi mingi epai ya Yehova. Lisusu, kondima na biso ekokóma makasi soki tozali kosambela Yehova elongo na bandeko na biso, tozali koyebisa basusu elikya na biso, mpe soki tozali kobondela mingi. Longola yango, soki tokómisi kondima na biso makasi, tokozwa mbano oyo eleki nyonso. Biblia elobi ete soki tozali komitonga likoló ya kondima na biso oyo eleki bosantu, ‘tokotikala na kati ya bolingo ya Nzambe.’—Yuda 20, 21.